Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g02 Juillet nk. 24-27
  • Bamasai: Bato oyo bakeseni mpenza na bato mosusu

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bamasai: Bato oyo bakeseni mpenza na bato mosusu
  • Lamuká!—2002
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Boyei malamu na mboka ya Bamasai
  • Bato oyo babɔkɔlaka bangɔmbɛ
  • Makambo mingi ekesenisi bango na bato mosusu
  • Ndenge Bamasai batalelaka libota
  • Bana ya Bamasai
  • Ntango mwana akómi mokóló
  • Elikya nini ezali mpo na Bamasai na mikolo mizali koya?
  • Mobembo oyo tokobosana te na lobwaku ya Ngorongoro
    Lamuká!—2005
  • Tozali na bomoi mpo na biso moko lisusu te’
    Lamuká!—1999
Lamuká!—2002
g02 Juillet nk. 24-27

Bamasai: Bato oyo bakeseni mpenza na bato mosusu

EUTI NA MOKOMI NA BISO NA KENYA

MONGONGO moke ya mwana mobali moko Masai oyo azali koyemba, ekei na mopɛpɛ ya ntɔngɔntɔngɔ oyo etondi na londende, ezalaki koyokana na lobwaku mobimba. Wana moi ya ntɔngɔ ezali komata, loyembo ya mwana yango ekómi koyokana makasi koleka, lokola mongongo ya ndɛkɛ oyo ezali koyemba mpe kosala makasi mpo na kobimisa mongongo na yango na ntango moi ebandi kobima.

Nazalaki koyoka loyembo yango kino ntango moi elakisaki mwana mobali yango Masai, atɛlɛmi na kati ya bangɔmbɛ ya tata na ye oyo azali kobatela. Amizingi na elamba moko molai ya motane oyo ezipi ye mobimba te, atɛlɛmi na lokolo moko lokola ndɛkɛ babengi nkɔngi (cigogne), asimbi nzete na ye mpe azali koyembela bangɔmbɛ na ye oyo bazali kosepela na loyembo yango. Tiká nayebisa bino mwa makambo mosusu ya Bamasai, bato oyo bakeseni mpenza na bato mosusu.

Boyei malamu na mboka ya Bamasai

Bamasai, babɔkɔli ya bangɔmbɛ, bafandaka na bisobe minene ya Ɛsti ya Afrika na esika babengi Vallée du Rift. Bamasai bazalaka na Kenya mpe na Tanzanie; bazali kati na mwa ndambo ya bato oyo bakangamá na makambo ya kala mpe lolenge na bango ya bomoi ekeseni te na oyo bankɔkɔ na bango bazalaki na yango kala. Makambo ya ngonga ndenge ezali koleka etali bango te; kotana ya ntɔngɔ, koinda ya butu mpe kobongwana ya bileko na mobu nde etambwisaka bomoi na bango.

Bamasai bayebi makambo mingi ya kokamwa, kati na yango tokoki kotánga ndenge bafandaka na lobwaku babengi Vallée du Rift, esika ya bangombangomba mpe oyo ezali mpasi mpo na kofanda kuna. Batambolaka mbangu mpe na kobwaka makolo, mpe bakendaka mosika mpo na koluka esika matiti ya mobesu mpe maziba ya mai ezali mpo na bangɔmbɛ na bango. Bisika baleisaka bangɔmbɛ na bango ezali mpe na banyama mosusu oyo etambolaka mingi esika moko lokola oyo babengi gnou, bazɛbrɛ, badikala (girafes) mpe banyama mosusu ya bisobe oyo ezalaka na mboka na bango.

Bato oyo babɔkɔlaka bangɔmbɛ

Bamasai bakanisaka ete bangɔmbɛ nyonso oyo ezali na mokili ezali ya bango. Likambo yango euti na lisapo na bango oyo elobaka ete na ebandeli Nzambe azalaki na bana mibali misato mpe apesaki mokomoko likabo na ye. Mwana ya liboso azwaki mbanzi mpo na kosala bokila, oyo ya mibale azwaki nkongo mpo na kosala bilanga, mpe oyo ya misato azwaki mwa nzete mpo na kobatela bangɔmbɛ. Mpe balobaka ete mwana oyo ya nsuka nde akómaki nkɔkɔ na bango Bamasai. Atako bato ya bikólo mosusu bazalaka mpe na bangɔmbɛ, Bamasai bakanisaka ete bangɔmbɛ nyonso wana ezali kaka ya bango.

Epai ya Bamasai, lokumu mpe kilo ya moto eyebanaka nde na motángo ya bangɔmbɛ oyo azali na yango mpe motángo ya bana oyo ye azali na bango. Soki moto akómi na bangɔmbɛ ntuku mitano te batalaka ye mpenza lokola mobola. Lokola azali na ebele ya basi mpe bana, mobali nyonso Masai azalaka na elikya ya kokóma na etonga monene oyo ekoki kozala ata na bangɔmbɛ nkóto moko.

Bato ya libota mokomoko ya Bamasai bakangamaka makasi na bangɔmbɛ ya libota na bango. Bayebaka malamu mongongo mpe bizaleli ya ngɔmbɛ mokomoko. Mbala mingi, na lisalisi ya ebende moko ya mɔtɔ, batyaka bangɔmbɛ na bango bilembo; lisusu, batyaka yango banzelanzela ya milai oyo egumbamá mpe mayemi ya ndenge na ndenge mpo ekóma lisusu kitoko. Basalaka nzembo mpo na kokumisa kitoko ya bangɔmbɛ mosusu ya etonga na bango mpe komonisa ndenge balingi yango. Bamonaka ete ngɔmbɛ mobali oyo ezali na maseke minene oyo egunzamá ezali na ntina mingi, mpe balɛngɛlaka bana ya ngɔmbɛ lokola basalaka mpo na bana na bango oyo bauti kobota.

Na bonkɔkɔ na bango, basi nde batongaka ndako na bitape ya nzete oyo balíngilíngi yango na matiti mpe basalelaka nyei ya ngɔmbɛ lokola mabele mpo na kozipa yango. Bandako yango ezalaka lokola likei ya nsoso mpe mwa molai. Batongaka yango moko pembeni na mosusu mpe ezingaka lompango oyo ebombaka esika bangɔmbɛ elalaka. Zingazinga ya bandako yango batyaka bitape ya nzete oyo ezali nzubenzube mpo na komibatela mpe kobatela bangɔmbɛ na bango na banyama mabe lokola ekange (hyène), nkoi mpe nkosi.

Bomoi ya Bamasai etalelaka nde bokɔlɔngɔnɔ mpe makasi ya bangɔmbɛ na bango liboso na maladi. Bamɛlaka miliki ya bangɔmbɛ, mpe basalelaka nyei na yango mpo na kosala bandako na bango. Bamasai babomaka ngɔmbɛ na bango mpenza mingi te mpo na kolya; babɔkɔlaka nde mwa bantaba mpe bampate mpo na kolya. Kasi, soki babomi ngɔmbɛ moko, babwakaka eloko te. Basalelaka maseke na yango lokola milangi to bakɔpɔ; bakómisaka binsobu (sabots) mpe mikuwa na yango lokola biloko ya kokɛmbisa ndako; babongisaka mposo na yango mpo na kosala na yango sapato, bilamba, milangiti mpe bansinga.

Makambo mingi ekesenisi bango na bato mosusu

Bamasai bazalaka mpenza nzoto mike, milai mpe kitoko. Bilamba na bango ezalaka na balangi ya kitoko. Balataka bilamba na bango ya langi ya motane mpe ya bulɛɛ makasi, bakangaka yango makasi te na nzoto, mpe emonanaka pɛpɛlɛ. Mingimingi basi balataka na nkingo milɔngɔ mingi ya mayaka oyo ekómaka lokola lipapu ya libaya; balataka mpe matambala ya langilangi. Ntango mosusu balataka bikɔmɔ minene ya kwivrɛ na mabɔkɔ mpe na makolo. Mbala mingi, mibali na basi bakómisaka matoi na bango milai na biloko ya matoi mpe mayaka ya kilokilo oyo balataka. Banikaka mabele moko ya motane mpe basangisaka yango na mafuta ya ngɔmbɛ mpo na komipakola na nzoto.

Na mpokwa moko, natalaki etuluku moko ya Bamasai oyo bayanganaki mpo na kobina wana mɔtɔ ezali kongɛngisa bango. Ndenge batɛlɛmaki basalaki lokola libungutulu, mpe bazalaki koningisa nzoto na mabina. Ntango mabina ekómaki makasi, ebele ya milɔngɔ ya mayaka oyo ezalaki na nkingo ya bilenge basi ezalaki kotombwana mpe kokita na mapeka na bango na kolanda ndenge mabina ezalaki kokende. Na nsima, Bamasai oyo babundaka bazalaki kokɔta, moto na moto na ngala na ye, na katikati ya babini; bazalaki kopumbwapumbwa likoló mpenza. Bakoki kobina bongo tii na butu makasi, kino bango nyonso bakolɛmba mpenza.

Ndenge Bamasai batalelaka libota

Na ntango ya moi makasi, nafandaki esika moko na etuluku moko ya basi Bamasai na nse ya nzete ya akasia; nazalaki kotala ndenge bazali kosɔna mayaka likoló ya mposo ya nyama oyo basili kobongisa malamu. Lokola bazalaki kosɛka mpe kosolola bango na bango, bazalaki kotya likebi mpenza te na makɛlɛlɛ ya bandɛkɛ oyo bazalaki kotonga bazumbu na bango na matiti ya kokauka likoló na nzete oyo basi wana bafandaki na nse na yango. Na ntango ya moi, basi bakendeke kotoka mai, mpe kobuka nkoni; babongisaka mpe bandako na bango mpe babatelaka bana na bango ya mike.

Ntango moi ebandi kokita, baoyo babatelaka ngɔmbɛ babandi kozonga elongo na bangɔmbɛ na bango. Bangɔmbɛ bazali kozonga na mboka malɛmbɛmalɛmbɛ, makolo na bango ezali kotombola mputulu ya mabele motane oyo ezali kongɛngisama na moi ya motane oyo ezali kolala. Ntango basi bamoni mputulu wana oyo ezali komata na mosika, mbala moko batiki mosala oyo bazali kosala mpo na koyamba bangɔmbɛ oyo bazali koya.

Soki kaka bango nyonso basili kokɔta na esika na bango ya kolala, mibali babandi kolekaleka kati na bangɔmbɛ, kosimbasimba maseke ya bangɔmbɛ mibali mpe kotalatala kitoko na yango. Mwa mwana moke ya mobali ayei kofina libɛlɛ ya ngɔmbɛ ya mwasi mpe amɛli miliki ya mɔtɔ oyo ebimi, kasi mbala moko mama na ye agangeli ye. Bilenge basi, oyo bazali kokɔta mpe kobima kati na ebele ya bangɔmbɛ, bazali kofinafina mabɛlɛ ya bangɔmbɛ na mayele mpenza mpe bazali kotondisa bikutu na bango na miliki tii na minɔkɔ na yango.

Na butu biso nyonso tofandi na mɔtɔ oyo ezali kosilisa mpiɔ ya mopɛpɛ. Longola nsolo ya milinga mpe oyo ya nyama oyo bazali kotumba na nkoni, tozali mpe koyoka nsolo makasi ya bangɔmbɛ oyo ezali mosika te na biso. Mobali moko mobange afandi wana mpe azali kobɛta lisolo ya makambo ya kala ya Bamasai mpe ya makambo minene ya kala oyo babundi ya Bamasai basalaki. Akati mwa moke kaka mpo nkosi moko engulumi mosika; na nsima, kozanga komitungisa, akobi koyebisa lisapo na ye oyo ezali mpenza kosepelisa bato oyo bazali koyoka ye. Nsukansuka, mokomoko na bango akei kolala na ndako na ye ya mabele. Longola kaka kopema ya bangɔmbɛ oyo bazali kolala, makɛlɛlɛ mosusu ezali te na butu; molili ekɔti mpenza kati na esobe wana oyo ezali mosika na bingumba.

Bana ya Bamasai

Soki kaka ntɔngɔ etani, misala ebandi na mboka. Bana mike oyo balati kaka mikaba ya mayaka na loketo mpe minyɔlɔlɔ ya mayaka na nkingo, bazali kosakana na libándá na malili wana ya ntɔngɔ. Bamasai bamonaka ete kosɛka ya bana ebɔndisaka bango mpenza; balingaka bana na bango mingi, mpe batyelaka bango elikya mpo na bomoi na bango na mikolo ekoya mpe bana basalisaka bango na makambo mingi.

Kobɔkɔla bana ezali likambo ya moto nyonso; mokóló nyonso ya mboka akoki kosembola mpe kopesa mwana ya motó makasi etumbu. Bateyaka bana kozala na botosi epai na mikóló, mpe bana baumelaka te na koyeba ndenge makambo elekaka na mabota ya Bamasai. Ntango bazali naino mike bana bazalaka mpenza na mikumba te, kasi ntango bakoli balakisaka bilenge basi ndenge ya kosala misala ya ndako mpe oyo ya mibali balakisaka bango ndenge ya kobɔkɔla mpe kobatela bangɔmbɛ. Baboti bayebisaka bana na bango bankisi ya bonkɔkɔ oyo bango bayebi mpe balakisaka bango milulu mpe bonkɔkɔ oyo etali likambo mokomoko ya bomoi ya Bamasai.

Ntango mwana akómi mokóló

Wana bazali kokola, bilenge bakoyekola mimeseno mpe milulu oyo ekolongola bango na molɔngɔ ya bana mpe ekokɔtisa bango na oyo ya mikóló. Kati na milulu oyo bayekolaka ezali na oyo etali bokɔnɔ, oyo etali likambo ya kolakela moto mabe, milulu ya libala mpe ya liwa. Bamasai bakanisaka ete soki basali milulu yango te bakolakelama mabe.

Baboti bakoki kobongisa libala ya mwana na bango ya mwasi ntango azali naino moke mpenza. Bakolaka kobalisa ye na mobali oyo azali na bangɔmbɛ mingi na boye ete akoki kopesa bango biloko oyo tata na ye asɛngi mpo na libala. Mbala mingi, babalisaka mwana ya mwasi na mobali moko oyo aleki ye mosika na mbula mpe mwana yango akokende kofanda epai ya mobali yango oyo azali mpe na basi mosusu.

Ntango bilenge mibali ya Bamasai bazali kokola, basalaka boninga ya makasi na bilenge mibali mosusu ya mbula na bango. Boninga wana elongo na bato ya mbula na bango eumelaka ntango mosusu bomoi na bango mobimba. Bango nyonso bakolekisa esika moko bomwana mpe bakokóma babundi. Na ntango wana, bakolakisa bango makambo oyo: kobatela ndako mpe mabele ya libota na bango, kobongisa maziba ya mai mpo na mboka na bango, mpe kobatela bangɔmbɛ na bango na banyama mabe mpe na miyibi. Bamasai bayebani mingi lokola bilombe mpe mibali ya mpiko, mpe bisika nyonso bakendeke bazalaka kaka na makonga na bango oyo bapelisi makasi.

Soki babundi bakokisi mbula penepene na 30, bakokóma mpenza mikóló. Na esengo mpenza mpe na molulu moko ya kafukafu, bakokɔtisa bango na molɔngɔ ya mikóló ya mboka; kobanda wana nde bakoki sikoyo kobala. Lokola bakómi mikóló, bato oyo bapesamaka limemya mingi na mboka, bakomipesa sikoyo na koluka mwasi ya kobala mpe koluka kokóma na bangɔmbɛ mingi, mpe bato bakobanda kokenda epai na bango mpo na koluka toli; bakozala mpe na mokumba ya kosilisa matata kati na bamosusu.

Elikya nini ezali mpo na Bamasai na mikolo mizali koya?

Lelo oyo, bomoi mpe mimeseno ya Bamasai oyo ekeseni mpenza na oyo ya bato mosusu ezali kolimwa nokinoki. Na bisika mosusu, Bamasai bakoki lisusu kotambolatambola te na bangɔmbɛ na bango ndenge balingi mpo na koluka bisika ya sika oyo ezali na matiti. Bakonzi ya Leta bazali kokómisa bisika wana ya minene oyo kala ezalaká bisika na bango ya kofanda bisika ya kobatela banyama mpe banzete, to mpe kopesa yango na bato ya bingumba mpe bamboka mosusu oyo bazali kokóma se ebele mpo bátonga bandako to mpe básala mosala ya bilanga. Lokola mbula ezali mpenza kobɛta te na mboka na bango mpe mpo na mikakatano ya nkita, Bamasai mingi bakómi kotɛkisa bangɔmbɛ na bango oyo balingaka mingi mpo na kozwa eloko ya kobikela. Wana bazali kokende na bingumba minene, bazali kokutana na mikakatano ndenge moko na bato mosusu nyonso.

Lelo oyo Batatoli ya Yehova bazali kokende kosakola epai ya Bamasai oyo bafandi na Afrika ya Ɛsti. Mwa buku Sepela na bomoi ya seko na Mabele! ebimi koleka 6 000 na lokota ya Bamasai. Na nzela yango, Bamasai bazali kozwa lisalisi mpo bámona malamu bokeseni kati na biyambayamba ya mpamba mpe solo ya Biblia. Ezali solo likambo ya esengo na komona ete Mozalisi na biso, Yehova Nzambe, apesi bato wana ya ekólo moko kitoko oyo bakeseni mpenza na bato mosusu, libaku ya kotángama kati na “bikólo nyonso mpe na mabota nyonso mpe na bato ya mikili nyonso mpe na minɔkɔ nyonso” oyo bakobika ntango ebongiseli ya biloko mabe oyo ekobomama.​—Emoniseli 7:9, NW.

[Elilingi na lokasa 25]

Ndako, na ndenge ya bonkɔkɔ ya Bamasai

[Elilingi na lokasa 26]

Bamasai bayangani mpo na kobina

[Bililingi na lokasa 26]

Bamasai mibale oyo bazali Batatoli

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto