Makambo mazali koleka na mokili
Etumbu ya bolɔkɔ ya libela
Zulunalo moko (New Scientist) elobi ete: “Banzoi ya Afrika babimisi mayele moko ya kokamwa mpo na kosukisa banguna na bango, mpe mayele yango ezali mpenza malamu mpo na bango. Bakangaka banguna yango na kati ya bolɔkɔ oyo batongi na kati ya ndako na bango. Na lisalisi ya mayele yango ya kotya banguna na bolɔkɔ, banguna bakoki kokima te mpe banzoi bakoki kozwa ntango ya kokima soki esengeli bákima.” Bato ya mayele “bayekolaki ndenge oyo banzoi ya Afrika ya Sudi bamibatelaka liboso ya nyamankɛkɛ oyo babengaka Aethina tumida, oyo monene na yango ekoki kozala lokola oyo ya nzoi moko kabolá yango na mibale.” Peter Neumann, moko ya bato oyo bayekolaki likambo yango, alobi ete nyamankɛkɛ yango “ezali lokola char ya basoda.” Yango wana, lolenge kaka moko oyo banzoi bakoki kosalela mpo na komibatela liboso na nyamankɛkɛ yango ezali kokanga yango na bolɔkɔ. Neumann alimboli ete: “Ntango banzoi mosusu bazali kotonga bolɔkɔ, bamosusu bazali kokɛngɛla banyamankɛkɛ yango mpo bákima te.” Banzoi batongaka bolɔkɔ yango na mai babengi résine, oyo bakendeke kozwa na banzete mosusu, mpe mosala ya kotonga bolɔkɔ ezwaka ata mikolo minei. Banzoi ya Mpoto na oyo ya Amerika ya Nɔrdi bayebi mayele wana te. Yango wana, soki nyamankɛkɛ yango, oyo bakɔtisaki na États-Unis kozanga kokana eleki sikoyo mbula soki mitano, ekɔti na kati ya ndako moko ya banzoi wana, “ekobebisa ndako yango kaka.”
Nyama oyo emonisaka ete mopɛpɛ mpe mabele ebebi
Steve Hopkin ayekolaka banyama, ye alobi ete mpambo ebongi mpenza mpo na komonisa soki mopɛpɛ mpe mabele ebebi. Mwa nyama yango, oyo ezali ebele mpe esɛngaka mbongo mingi te mpo na kosalela yango, esalaka mosala malamu koleka bamasini ya mindɔndɔmindɔndɔ oyo bato basali. Mpo na koyeba soki mai ezali malamu to ebebi, basalelaka mbembe moko ya mai. Bato bazali kosalela masini oyo babengi valvomètre, oyo ezali monene lokola katini mpe oyo batii na kati mbembe mwambe yango ya mai oyo ezali na bomoi; masini yango esalisi mingi mpenza mpo na koyeba soki mai ya Ebale Rhin mpe ya Ebale Danube ezali kobeba. Kees Kramer, moto oyo asalaki masini yango, alobi ete: “Soki eloko moko oyo ebebisaka mai ekómi mingi na mbalakaka, mbembe emonisaka yango.” Na ebele ya biloko oyo ebebisaka mai, soki kaka moko na yango eleki ebele na kati ya mai, mbembe ekokɔta na ndako na yango; mbala moko valvomètre ekomonisa yango. Zulunalo El País ya Espagne elobi ete bolamu mpenza ya masini yango ezali ete ezali kosalisa mpo na koyeba mabe oyo kobeba ya mai ekoki kobimisela bikelamu ya bomoi.
Basoda ya bana
Ebongiseli moko ya bapanzi-nsango (Associated Press) eyebisi ete: “Na mokili mobimba bana koleka 300000—bamosusu bazali na mbula nsambo mpamba—bazali basoda mpe bazali kobunda bitumba na mikili 41.” Mingi kati na bango bazali na mbula 15 tii 18. “Ebongiseli babengi ‘Association Les enfants soldats’ elobi ete, na bitumba, batyaka bana na molɔngɔ ya liboso; lisusu, basalelaka bango mpo na koluka koyeba bisika bakundá bamine, basalelaka bango mpe lokola banɔngi, bamemisaka bango bibundeli mpe basalelaka bango lokola bandumba.” Mbala mingi bamɛlisaka bango bangi mpo na kolongola bango kobanga. Na Sierra Leone, soda moko ya batomboki oyo azali na mbula 14 alobaki ete baoyo baboyaka komɛla bangi babomaka bango. Elenge moko ya Afrika ya Nɔrdi oyo abundaki na 1999 ntango azalaki na mbula 15 alobaki ete: “Na etumba, batyaki basoda nyonso ya mbula 15 mpe 16 na molɔngɔ ya liboso, wana basoda mosusu bazalaki kozonga nsima. Nazalaki elongo na bilenge mosusu 40. Nabundaki mokolo mobimba. Ntango namonaki ete baninga misato mpamba nde batikalaki na bomoi, nakimaki mbangu.” Lapolo ya ebongiseli yango elobi ete baguvɛrnɛma ezali kozwa bana na mosala ya soda mpo na “bizaleli oyo bana bazalaka na yango—esɛngaka mbongo mingi te mpo na bango, esɛngaka makambo mingi te mpo na kozwa basusu na esika na bango, mpe baumelaka te mpo na koyeba ndenge ya koboma kozanga kobanga mpe batosaka kozanga kokanisa.”
Biblia ebongolami na minɔkɔ mingi koleka
Ebongiseli moko ya Angleterre (Société biblique de Grande-Bretagne) elobi ete: “Biblia mobimba to mikanda na yango mosusu ezali sikoyo komonana na minɔkɔ 2 261; elingi koloba ete soki tokokanisi motángo yango na oyo tozalaki na yango eleki sikoyo sanza 12, tokomona ete minɔkɔ 28 ebakisami. [Biblia] mobimba ezali sikoyo komonana na minɔkɔ 383, elingi koloba minɔkɔ 13 ebakisami na kotalela motángo oyo tozalaki na yango na mbula oyo euti koleka.” Makomami ya Liebele, oyo babengaka mpe Boyokani ya kala, na Makomami ya Grɛki, oyo babengaka Boyokani ya sika, nyonso mibale ezali sikoyo komonana na minɔkɔ 987.
Élement chimique ya sika ezali na kilo mingi
Zulunalo moko (Süddeutsche Zeitung) ya Allemagne elobi ete bato ya mayele na chimie bazwi “élément chimique mosusu ya sika, nkombo na yango hassium; yango ezali ebende moko ya kilo mpenza.” Bato ya mayele oyo basalaka na Laboratoire de recherches sur les ions lourds ya engumba Darmstadt, na Allemagne, basangisaki mpo na mbala ya liboso baatome ya hassium na oxygène, mpe yango epesaki composé mosusu ya sika na chimie. Hassium, oyo euti na nkombo ya etúká ya Hesse na Allemagne, emonanaka na mokili te. Ba physicien atomiste nde basalaki yango mpo na mbala ya liboso na 1984. Hassium mpe composé na yango ya sika ezali radioactif mpe ebongwanaka mpambampamba mpe eumelaka te; yango wana sikoyo ezali naino na ntina te.
Makama ya kozongisa makila
Zulunalo moko (Sydney Morning Herald) ya Australie elobi ete: “Moto moko kati na bato misato oyo bazalaki kozongisa bango makila esɛngaki mpenza te bázongisa ye makila na kotalela malako ya [etúká ya Nouvelle-Galles du Sud] na oyo etali makambo ya bokolɔngɔnɔ ya nzoto. Malako yango elobi ete basengeli kozongisa moto ya maladi makila kaka soki makila na ye (taux ya hémoglobine) ekiti mpenza na nsambo to na nse ya nsambo.” Doktɛrɛ Ross Wilson, oyo ayekolaki na mozindo likambo ya kosalela makila alimbolaki ete “kozongisa moto ya maladi makila mpambampamba ekoki kosala ete motema na ye ekangama mpe akufa na mbalakaka.” Boyekoli moko oyo monganga yango asalaki esili koleka mbula motoba emonisi ete “mbula na mbula, bato soki 18000 [ya Australie] bazalaki kokufa mpo na mikakatano oyo euti na lolenge basalisaki bango na minganga.” Doktɛrɛ Wilson asɛngi na minganga bamikundolaka malako oyo etali likambo ya kozongisa moto makila mbala nyonso oyo basɛngi ete bázongisa moto makila; asɛngi mpe na bato ya maladi báluka koyeba malako yango mpo na kotuna minganga na bango mituna.
Etumbu makasi mpo na baoyo bazali kopalanganisa bililingi ya bana bolumbu na Internet
Ebongiseli moko ya bapanzi-nsango (Associated Press) elobi ete: “Tribinale monene ya Allemagne eyebisi . . . ete kopalanganisa bililingi ya bana bolumbu na nzela ya Internet ekeseni te na kopalanganisa yango na nzela ya mikanda; mpe moto nyonso oyo akosala yango akozwa etumbu ya kokangama na bolɔkɔ bambula ebele oyo ekoki kokóma kino na mbula 15.” Lisolo yango elimbolaki ete “ekateli oyo tribinale monene (Cour fédérale de justice) ezwi ekozala lokola mobeko ya sika mpo na Allemagne, mpamba te liboso mobeko moko te ezalaki kopesa etumbu na bato oyo bazalaki kopalanganisa bililingi ya bana bolumbu na Internet.” Tribinale yango eboyaki ekateli oyo tribinale ya etúká moko ezwaki; oyo emonisaki ete kopalanganisa bililingi ya bana bolumbu na Internet ezali mpenza mbeba monene te na makambo ya kosangisa nzoto soki tokokanisi yango na kopalanganisa bililingi yango na mikanda.
Bangi ebebisaka motema
Zulunalo moko (Globe and Mail) ya Canada esali lapolo moko likoló ya boyekoli moko oyo euti kosalema; elobi ete: “Bato ya mbula kobanda 40 kino 60 oyo bamɛlaka bangi bazali na likama mbala mitano koleka bato mosusu, ya kokangama motema ngonga moko nsima ya komɛla yango. Ntango moto azali komɛla bangi, motema ekómaka kobɛta mbangumbangu—mbala mingi ekómaka kobɛta mbala mibale koleka—mpe yango esalaka ete tansyo na ye emata to ekita . . . Bangi ekoki mpe kosala ete motema ya moto ekangama soki makila ekangami na kati ya mosisa moko mpe makila ezali koleka te tii na motema.” Doktɛrɛ Harold Kalant ya Iniversite ya Toronto alobaki ete: “Mpo na mikóló, soki motema na bango ekómi kosala mingi koleka ndenge esalaka, yango ezali likama oyo ekoki kosala ete motema na bango ekangama.” Lapolo yango ebakisi ete bangi oyo babengi kokaine ezali lisusu mabe koleka, mpamba te yango esalaka ete moto oyo amɛlaka yango azala na likama mbala 25 ya kokangama motema ngonga moko nsima ya komɛla yango.
Tokopesa yango nkombo nini?
Lokola bato ya mayele bazali kobimisa ebele ya nzete ya sika, ekómi mpasi mpo na kozwa bankombo ya sika ya kopesa na nzete yango. Zulunalo moko (The Wall Street Journal) elobi ete: “Libota ya fololo babengi lis d’un jour ezali na mitindo soki 100000 oyo mokomoko na yango basili kopesa yango nkombo, fololo rose ezali mpe na mitindo soki 100000; lisusu fololo babengi dahlia ezali na mitindo koleka 14000. Bankombo nyonso mpe mabakema (adjectifs) nyonso oyo eyokanaka malamu na matoi, na ndakisa kitoko, motane, esengo, ndɔtɔ, nkembo, mokonzi-mwasi, kobima ya moi, kolala ya moi. . . , ya malasi . . . epesamaki; mosusu kutu basangisaki yango mibale to koleka mpo ebimisa nkombo moko mpe bankombo nyonso esili kokomama na babuku. Lelo oyo, bato oyo bapesaka nzete nkombo basengeli kotinda makanisi mosika mpo na kozwa bankombo mosusu ya sika.” Na ndakisa, zulunalo oyo totángaki elobi ete “na mikolo oyo, soki okei kosomba fololo, okoki kosomba bafololo oyo ezali na bankombo lokola iris Taco suprême, rose Macho, hosta Abba Dabba Do, lis d’un jour Cri primitif to dahlia Kung-fu.” Soki ofuti mbongo mingi, okoki kutu kopesa fololo moko nkombo na yo. Kompanyi moko na etúká ya Californie ekoki kopesa yo nzela opesa fololo rose moko nkombo soki ofuti dolare 10 000 mpe soki nkombo yango ezali kitoko. Kompanyi mosusu esɛngaka dolare 75 000 kasi ebakisaka mwa makambo mosusu, na ndakisa kofutela moto oyo apesi mbongo wana makambo nyonso oyo akozala na mposa na yango mpo alekisa wikende moko na engumba Los Angeles.