Biblia moko na elobeli ya polele mpe ya pɛtɛɛ
“SOKI ondimaka ete Biblia ezali liloba ya Nzambe epai ya bato, elakisi ete Nzambe asololaka na biso. . . . Soki lingomba na yo ezali kosala mosala na bomoi na yo mobimba, elingi koloba elobeli ya Biblia ezali mpenza ya polele mpe ya pɛtɛɛ.” Oyo ezali maloba nganga-mayele Alan Duthie akomaki na buku na ye Bible Translations: And How to Choose Between Them.
Bato oyo balingaka Liloba ya Nzambe bazali kondima maloba wana na motema na bango mobimba. Bandimaka solosolo ete “Makomami nyonso epemami na Nzambe mpe ezali na litomba mpo na koteya, kopamela, kosembola makambo, mpo na kopesa disipilini na kati ya boyengebene.” (2 Timote 3:16) Biblia ezali te buku ya mpambampamba oyo etondi na mateya ya mangomba, mateya oyo esilá ngala. Yango ezali “na bomoi mpe ezali na nguya,” ezali kopesa mayele ya solosolo mpo na kosilisa mikakatano ya bomoi ya mokolo na mokolo. (Baebele 4:12) Nzokande, mpo ete bato oyo bazali kotánga buku yango ya makambo ya bosantu bákanga ntina na yango mpe básalela yango, esengeli ekomama na elobeli moko ya polele mpe ya pɛtɛɛ. Kutu, oyo babengaka Testama ya Sika ekomamaki te na Grɛki ya makasimakasi oyo bato ya filozofi lokola Platon bazalaki kosalela, kasi ekomamaki nde na Grɛki oyo babengi Koine, oyo bato mpamba bazalaki koloba, Grɛki ya polele mpe ya pɛtɛɛ. Ɛɛ, Biblia ekomamaki na ndenge oyo ata bato oyo batángá mingi te bakokaki kotánga mpe kokanga ntina na yango.
Mpo na yango, na bambula oyo euti koleka, babiblia mingi ya sika esili kobima na minɔkɔ ndenge na ndenge. Yango eboti mbuma mpenza na makambo mingi. Sikoyo bato mingi bakoki kozwa Makomami yango kozanga nkaka. Atako bongo, ezali mawa mingi komona ete mwa babiblia mingi ya sika ezali mpenza kobongola makambo ndenge esengeli te mpe maloba ya ndenge moko ebongolami ndenge moko te na bisika nyonso. Na ndakisa, babiblia mosusu ezali kokɔtisa molili na mateya ya polelepolele ya Biblia na oyo etali ezalela ya bakufi, ndimbola ya solosolo ya molimo ya moto, mpe nkombo ya Nzambe ya solo.
Na yango, bato oyo balingaka Liloba ya Nzambe bazali na esengo mingi ndenge Libongoli ya Mokili ya Sika ya Makomami ya Grɛki ya boklisto ebimi na Lingala. Batatoli ya Yehova bayebisaki kobima ya Biblia yango ya mikolo oyo na liyangani ya etúká ya mobu 2002. Kozanga ete elanda bindimeli ya mangomba, Biblia oyo ebongoli maloba ndenge esengeli mpenza mpe esali ete bato bákoka koyeba malamu makambo ya Biblia oyo kala bazalaki kokanga ntina na yango te mpo bayebaki te minɔkɔ ya kala. Nzokande, mbala mosusu okomituna motuna oyo: nani moto asali libongoli ya kitoko boye?
Babongoli oyo bakumisaki Nzambe
Atako Libongoli ya Mokili ya Sika ya Makomami ya Grɛki ya boklisto ekoki kozala sika mpo na bato oyo balobaka Lingala, tóyeba ete yango ebimá banda mobu 1950 na Lingelesi. Na ntango wana yango ebimisamaki na Watch Tower Bible and Tract Society—Société oyo eyebani banda kala na mokili mobimba mpo na mosala ya kobimisa Biblia. Lokola bato bamesani kobenga biteni mibale ya Biblia ete testama ya “Kala” mpe testama ya “Sika”—esengelaki kolongola kobanga mpo na kopesa nkombo ya libongoli oyo ya sika—nkombo oyo ekeseni mpenza. Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Sɛtɛmbɛ 1950 (na Lingelesi), elobaki boye: “Bato oyo bazali na kati ya komite ya kobongola Biblia bamonaki malamu . . . ete bankombo na bango eyebana te, mpe bazali na mposa kutu te ete nkombo na bango elobelama, ezala ntango bazali na bomoi to nsima ya liwa na bango. Libongoli oyo esalemi nde mpo na kokumisa nkombo ya Nzambe ya solo, oyo azali na bomoi.”
Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika ya Makomami Mosantu ebimaki na mobimba na 1961. Mpe atako nkombo ya bato oyo babongolaki yango eyebani te tii lelo oyo, ntembe ezali te ete bazalaki na mikano moko ya malamu mpe bamipesaki mobimba. Maloba ya ebandeli oyo ezali na libongoli ya 1984 emonisaki ete: “Kobongola Makomami Mosantu elimboli kotya na monɔkɔ mosusu makanisi mpe maloba ya Yehova Nzambe . . . Babongoli ya buku oyo, baoyo babangaka mpe balingaka Nzambe, Mobandi ya Makomami Mosantu, bazali komiyoka ete bazali na mokumba monene liboso na Ye na kobongola makanisi mpe maloba na ye mpenza.”
Atako bazalaki na makanisi malamu, bato yango ya komite ya kobongola bazalaki mpenza na makoki ya kosala mosala oyo? Banganga-mayele mosusu, oyo basepelaki te, balobi ete kozanga koyeba nkombo ya babongoli mpe bakelasi nini ya inivɛrsite batángá, libongoli na bango esengeli koboyama mpo esalemi na bato oyo bayebi mosala yango mpenza te. Kasi banganga-mayele nyonso bazali na likanisi wana te. Alan S. Duthie akomi ete: “Soki toyebi banani bazali babongoli to babimisi ya Biblia moko boye, yango ekosalisa biso nde na kokata soki libongoli ezali malamu to mabe? Mpenzampenza te. Esengeli nde kotalela makambo oyo ezali na kati ya libongoli moko na moko.”a
Ebele ya batángi bazali mpe kosala bongo. Lelo oyo, Libongoli ya Mokili ya Sika esili kobimisama na motángo ya milio koleka 108 mpe esili konyatama na mobimba to na ndambo na minɔkɔ 44 na mokili mobimba. Eloko nini ebele ya batángi na yango basili komona?
Libongoli oyo ezali kosantisa nkombo ya Nzambe
Na Matai 6:9, Yesu ateyaki bayekoli na ye bábondelaka boye: “Tata na biso na likoló, tiká nkombo na yo esantisama.” Nzokande, na babiblia mingi, Nzambe azalaka na nkombo te, babengaka ye kaka “Nzambe” to “Nkolo.” Kasi, na ebandeli ezalaki bongo te. Na Makomami ya Liebele ya ebandeli, Nzambe ayebani polelepolele na nkombo na ye moko “Yehova” pene na mbala 7 000. (Exode 3:15; Nzembo 83:18) Na bambula oyo elandaki nsima, bobangi ya biyambayamba esalaki ete Bayuda bátika kosalela nkombo ya Nzambe. Nsima ya liwa ya bantoma ya Yesu, likanisi wana ya biyambayamba ekɔtaki mpe na lisangá ya boklisto. (Kokanisá na Misala 20:29, 30; 1 Timote 4:1.) Bato oyo basalaki bakopi ya Makomami ya Grɛki babandaki kolongola nkombo mpenza ya Nzambe, Yehova, na esika na yango, bakómaki kotya maloba ya Grɛki Kurios mpe Théos, oyo elakisi “Nkolo” mpe “Nzambe.”
Likambo ya esengo, Libongoli ya Mokili ya Sika ezongisi na molende mpenza nkombo Yehova na Makomami ya Grɛki ya boklisto (“Testama ya Sika”), nkombo yango ezali komonana mbala 237. Kozongisama ya nkombo wana esalamaki nsima ya koyekola likambo yango malamumalamu, ezalaki te mpo babongoli basepelaki kozongisa yango. Na ndakisa, Luka 4:18 etángi maloba ya Yisaya 61:1. Na makomi ya Liebele ya kala, nkombo Yehova ezalaki komonana na vɛrsɛ wana ya Yisaya.b Yango wana, na kati ya Libongoli ya Mokili ya Sika, Luka 4:18 ebongolami mpenza na ndenge oyo ebongi ete: “Elimo ya Yehova ezali likoló na ngai, mpamba te apakoli ngai mpo na kosakola nsango malamu epai ya babola.”
Ndenge wana ya kobongola ezali mpe kosalisa batángi bákesenisa Yehova Nzambe na Mwana na ye mobotami-se-moko, Yesu Klisto. Na ndakisa, babiblia mingi ebongolaka Matai 22:44 boye: “Nkolo alobaki na Nkolo na ngai.” Kasi nani azali koloba na nani? Vɛrsɛ wana ezali nde kozongela maloba ya Nzembo 110:1, oyo, na makomi ya Liebele ya kala, ezali na nkombo ya Nzambe. Yango wana, Libongoli ya Mokili ya Sika ebongoli vɛrsɛ yango boye: “Yehova alobaki na Nkolo na ngai ete: ‘Fandá na lobɔkɔ na ngai ya mobali tii nakotya banguna na yo na nse ya makolo na ngai.’ ” Mpo na koyeba bokeseni oyo Makomami ezali kosala kati na Yehova Nzambe mpe Mwana na ye ezali kosɛnga te bandimbola ya mindɔndɔmindɔndɔ. (Malako 13:32; Yoane 8:17, 18; 14:28) Yango ezali na ntina mingi mpo na lobiko ya moto. Misala 2:21 elobi ete: “Moto nyonso oyo akobelela nkombo ya Yehova akobika.”
Bosikisiki mpe elobeli ya polele
Ezali na makambo mosusu ya ntina mingi na Libongoli ya Mokili ya Sika. Makomi ya Westcott mpe Hort, oyo ekomamaki na Grɛki moko ya kitoko mingi, nde eponamaki mpo na kozala moboko ya libongoli oyo. Bongo likebi mpenza etyamaki na lolenge ya kobongola maloba ya Grɛki ya kala na bosikisiki mpe, ntango likoki emonanaki, bazalaki kobongola yango na kolanda liloba mokomoko na elobeli moko ya pɛtɛɛ mpe ya mikolo oyo. Kobongola ndenge wana esukaki kaka te kobatela elɛngi mpe lolenge ya makomi ya kala ya Biblia, kasi epesaki mpe bato nzela ete bákanga mpenza ntina ya makomi yango.
Na ndakisa, tózwa mokapo ya Baloma 13:1, epai ntoma Paulo asɛngaki baklisto ete “bátosaka bakonzi oyo bazali liboso,” to bayangeli ya mokili. Babiblia mingi ezali koloba ete bayangeli yango “Nzambe moto apesi [bango] bokonzi” to “Nzambe moto atiaki bango.” (Boyokani ya Sika; Biblia: Liloba ya Nzambe) Bakonzi mosusu basalelaki maloba wana mpo na komonisa ete bazali na lotomo ya konyokola bato na bokonzi na bango mpo Nzambe moto atyaki bango wana. Kasi Libongoli ya Mokili ya Sika, lokola elandaka maloba ndenge ezalaki na ebandeli mpe bosikisiki na yango, ezali kobongola vɛrsɛ wana boye, “bakonzi oyo bazali batyami na bibonga na bango oyo elandaná na nzela ya Nzambe.”c Na ndenge wana, moto akoki kososola ete atako Nzambe aponaka mpenza bakonzi ya mokili te, atikeli bango nzela ete bázala na bibonga na bango oyo elandaná—kasi ntango nyonso bazali na nse na ye.
Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika esali mpe makasi mpo na kobimisa bandimbola oyo ebombami na nse ya baverbe ya Grɛki. Na minɔkɔ mingi oyo elobamaka lelo oyo, bato basalelaka baverbe mpo na komonisa ntango nini likambo esalemaki—elingi koloba soki likambo yango eleká, to ezali kosalema sikawa, to mpe ekosalema na nsima. Na Grɛki mpe, baverbe emonisaka soki likambo oyo elobelami ezali ya ndenge nini—emonisaka soki likambo yango ezali ya mwa ntango moke kaka, to ekómi na nsuka, to ezali kokoba se kokoba. Tótalela maloba ya Yesu oyo ezali na Matai 6:33. Na Grɛki, verbe oyo elakisi “koluka” epesaka likanisi ya likambo oyo ezali kokoba se kokoba. Moto akokanga mpenza ntina ya maloba wana ya Yesu soki yango ebongolami: “Boye, bókoba koluka liboso bokonzi mpe boyengebene na ye, mpe biloko nyonso wana mosusu ekobakisamela bino.” Ndenge moko mpe, Matai 7:7 ebongolami boye: “Bókoba kosɛnga, mpe bakopesa bino yango; bókoba koluka, mpe bokomona; bókoba kobɛta kɔkɔkɔ, mpe bakofungolela bino.”—Talá mpe Baloma 1:32; 6:2; Bagalatia 5:15.
Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika ezali kosala makasi na kobongola maloba minene kaka ndenge moko bipai nyonso. Na ndakisa, liloba ya Grɛki psukhê, ebongolami na “molimo” bipai nyonso yango ezali komonana. Na kobongoláká yango ndenge wana, batángi bakoki nokinoki kososola ete, na bokeseni na mateya ya wusuwusu ya mangomba, molimo ezali te eloko oyo ekufaka te. Molimo ekoki kobomama, kokufa.—Matai 2:20; Malako 3:4, Luka 6:9; 17:33.
Kosala ete Liloba ya Nzambe ezala bipai nyonso na mokili
Kobimisama ya Makomami ya Grɛki ya boklisto na Lingala ezali kaka ebandeli. Bibongiseli ekamatami mpo na kobongola Biblia na mobimba na ntango oyo ekoki. Kasi batángi ya Lingala bakoki nde kondima ete libongoli ya monɔkɔ na bango ekozala na bosikisiki mpenza mpe ekobongola maloba ndenge moko bipai nyonso, lokola Biblia ya Lingelesi esalaki yango?
Ɛɛ, ekozala mpenza bongo. Ezali bongo mpo mosala ya kobongola etambwisami mpenzampenza na Société Watch Tower. Na ndenge ya mayele, ekateli ezwamaki ete mpo Biblia ebongolama na monɔkɔ mosusu ekozala malamu ebongolama na ekipi ya bandeko. Na yango baekipi mingi ya kobongola Biblia esili kosalema na bisika mingi na mokili mobimba. Departema moko, oyo babengi Service pour la traduction (Departema ya Kobongola Mikanda) etyamaki na Biro monene ya Société Watch Tower, na Brooklyn, na etúká ya New York, na États-Unis, mpo na kokokisa bamposa ya baekipi yango, koyanola na mituna ndenge na ndenge, mpe kosala ete mabongoli ndenge na ndenge ya Libongoli ya Mokili ya Sika ezala na makanisi motindo moko na minɔkɔ ndenge na ndenge. Société Watch Tower ebimisi mpe esaleli moko ya ntina mingi, elingi koloba, tekiniki moko oyo batii na kati ya baordinatɛrɛ mpo na kosalisa babongoli ya Biblia. Atako bongo, komikosa te: mosala ya kobongola ekosalema kaka na bato. Baordinatɛrɛ eyeisi nde pɛpɛlɛ mosala ya kokokisa mokano ya ntina mingi oyo baekipi ya Biblia basengeli kolanda, elingi koloba kobongola Libongoli ya Mokili ya Sika na bosikisiki mpe kobongola maloba ndenge moko bipai nyonso lokola libongoli ya Lingelesi esalaki yango. Lisusu, tekiniki yango oyo batii na kati ya baordinatɛrɛ ezali komonisa ndenge oyo liloba mokomoko ya Liebele mpe ya Grɛki ebongolami na Lingelesi—yango ezali mpenza kosalisa babongoli mpo na koyeba kopona maloba ya monɔkɔ na bango oyo ekokani na oyo ya Lingelesi.
Matomba oyo ezali kozwama na nzela ya bibongiseli nyonso wana emonisi ete ezali bibongiseli moko malamu. Tosɛngi na yo ete otalela mpenza na likebi Libongoli ya Mokili ya Sika ya Makomami ya Grɛki ya boklisto. Okoki kozwa yango epai ya babimisi ya zulunalo oyo. Okosepela mpe na ebele ya makambo kitoko oyo ezali kati na yango, na ndakisa: elobeli na yango ya polele, oyo okoki kotánga kozanga mpasi; likoló ya nkasa na yango, bakomá mwa makambo oyo ekosalisa yo omona nokinoki bavɛrsɛ oyo oyebi makanisi na yango; bakarti na yango oyo ezali kolakisa makambo ebele; mpe makambo kitoko oyo ezali kati na apɛndisi na yango. Likambo ya ntina koleka yango oyo: okoki kotánga Biblia wana na kotyáká motema ete maloba ya Nzambe ebongolami mpenza na bosikisiki mpe na elobeli ya polele mpe ya pɛtɛɛ.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Likambo mpenza ya kobenda likebi, ezipeli ya Biblia New American Standard Bible oyo ezali na Mitindami, oyo ebimaki na 1971, elobaki mpe ndenge moko ete: “Totángi nkombo ya nganga-mayele moko te mpo bato bálobaka ezali moto boye to bátángaka ye, mpo tondimi ete Liloba ya Nzambe yango moko ezali na motuya na yango.”
b Ezali solo ete libongoli ya Septante ya monɔkɔ ya Grɛki esalelamaki mpo na kobongola bavɛrsɛ ya Makomami ya Liebele oyo elobelami na oyo babengaka ete Testama ya Sika. Lokola nkombo ya Nzambe ezali te kati ya bakopi ya Septante oyo ebimaki na nsima, ebele ya banganga-mayele balobaka ete nkombo wana esengeli mpe kolongolama na Makomami ya Grɛki ya boklisto. Nzokande, nkombo Yehova—na ekomeli na yango na Liebele ya kala—ezali kati na bakopi ya kalakala mpenza ya Septante. Yango ezali elembeteli monene oyo endimisi ete nkombo Yehova esengeli kozongisama na Makomami ya Grɛki.
c Talá buku A Manual Greek Lexicon of the New Testament, ya G. Abbott-Smith, mpe buku A Greek-English Lexicon ya Liddell mpe Scott. Engebene babuku wana mpe mikanda mosusu oyo ebongi kotyelama motema, liloba wana ya Grɛki elakisi mpenzampenza “kotya na molɔngɔ, kotya na esika na yango.”
[Elilingi na lokasa 15]
Bakomi ya Biblia lokola ntoma Paulo bakomaki na elobeli ya polele mpe ya pɛtɛɛ
[Caption on page 15]
Libongoli ya mokili ya sika ya makomami ya Grɛki ya boklisto
[Caption on page 16]
Makambo oyo etali Libongoli ya Mokili ya Sika: Na ndingisa ya Director and University Librarian, The John Rylands University of Manchester
[Caption on page 16]
Likebi mpenza etyamaki na lolenge ya kobongola maloba ya Grɛki ya kala na bosikisiki mpe, ntango likoki emonanaki, bazalaki kobongola yango na kolanda liloba mokomoko na elobeli moko ya pɛtɛɛ mpe ya mikolo oyo
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 16]
Mokanda oyo ezali pɛtɛɛ mpo na kotánga epesaka esengo ntango ozali kotánga yango
[Karte na lokasa 17]
Makambo oyo bakomá likoló ya nkasa na yango ezali kosalisa moto amona nokinoki bavɛrsɛ oyo ayebi makanisi na yango
[Karte na lokasa 17]
Bakarti na yango ya makambo ndenge na ndenge ezali kosalisa batángi báyeba malamumalamu bisika oyo elobelami na Biblia
[Caption on page 18]
Elobeli ya polele ya “Libongoli ya Mokili ya Sika” ezali na ntina mingi mpo na mosala oyo baministre baklisto basalaka