Batelá matoi na yo!
“Na mokili mobimba, bato koleka milio 120 bayokaka lisusu malamu te.”—Organisation mondiale de la santé.
LIKOKI ya koyoka ezali likabo oyo tosengeli mpenza kobatela yango. Nzokande, ntango bambula na biso ezali kopusana, matoi na biso mpe ezali mokemoke kotika koyoka malamu. Emonani lokola ete makɛlɛlɛ mingi mpe ya ndenge na ndenge oyo ezali kosalema lelo oyo, eyei lisusu kobakisa mbeba yango. Moto moko ya siansi oyo aumeli mingi na mosala na Institut central des sourds oyo ezali na engumba Saint Louis, na etúká ya Missouri na États-Unis, alobaki ete: “Bato ya Amerika 75 likoló na mokama oyo bakufaka matoi, ezali kaka te mpo bazali kokóma mibange, kasi ezali mpe mpo na ndenge oyo basalelaki matoi na bango na boumeli ya bomoi na bango.”
Kozala esika oyo makɛlɛlɛ ezali makasi, ata kaka mwa ntango moke, ekoki kobebisa biloko mosusu na kati ya litoi, oyo ekokaka makɛlɛlɛ makasi te. Margaret Cheesman, ye azali monganga ya matoi, zolo mpe mongongo, alimbolaki ete kokufa matoi eutaka mbala mingi na “koyoka mbala na mbala makɛlɛlɛ makasi na esika ya mosala, kolekisaka ntango na bisika ya makɛlɛlɛ makasi mpe kominanola na bisika ya makɛlɛlɛ makasi.” Okoki kosala nini mpo obatela matoi na yo? Mpo na kozwa eyano, ekozala malamu oyeba naino ndenge matoi na yo esalaka.
Makɛlɛlɛ oyo toyokaka
Bisika oyo tozali kofanda ebandi kokóma mpenza bisika ya makɛlɛlɛ. Mokolo na mokolo, makɛlɛlɛ ya ndenge na ndenge ezali kozipa bato matoi: makɛlɛlɛ ya bavuatire, ya babisi, ya mituka oyo ezali kotambola na babalabala mpe makɛlɛlɛ ya bamasini na bisika ya mosala.
Ntango mosusu, biso moko mpe tobakisaka lisusu mokakatano yango ntango tomatisaka volimi ya radio to televizyo na biso. Bato mingi bakómi lelo oyo koyoka miziki na kotyáká nsinga ya mwa radio ya moke (écouteurs) to radio-kasɛti na matoi. Marshall Chasin, moko ya bato oyo basalaki lopitalo ya baalanga-nzembo na Canada, alobaki ete baankɛtɛ oyo esalemaki na Canada mpe na États-Unis emonisi ete soki bilenge mingi bazali koyoka lisusu malamu te, ezali mpo bamatisaka volimi ya mwa baradio oyo batyaka nsinga na matoi makasi mpenza.
Kasi, ntango nini tokoki koloba ete makɛlɛlɛ eleki makasi? Makɛlɛlɛ ekesanaka na makambo misato: boumeli na yango, mbala boni ezali koyokana mpe koyokana makasi. Makɛlɛlɛ eumelaka na kotalela ntango oyo moto alekisi na koyoka yango. Mbala boni ezali kobima to komata, bamekaka yango na oyo babengi hertz to cycles par seconde. Makɛlɛlɛ oyo ezali malamu mpo na matoi na biso ezalaka kobanda 20 tii na 20 000 hertz.
Mpo na koyeba soki makɛlɛlɛ ezali makasi ndenge nini, bamekaka yango na décibel (dB). Makɛlɛlɛ oyo bato basalaka ntango bazali kosolola kozanga ete báganga, esukaka na décibel pene na 60. Bato oyo bayekolaka ndenge litoi esalaka balobaka ete soki ozali koumela mingi koyoka makɛlɛlɛ ya makasi oyo eleki décibel 85, okoki kobebisa matoi na yo. Soki ozali koyoka makɛlɛlɛ ya makasi mbala na mbala, ozali mpe kokóma na likama ya kobebisa matoi na yo. Zulunalo moko (Newsweek) epesaki lapolo ete: “Matoi na yo ekoki koyoka makɛlɛlɛ ya masini oyo batɔbɔlaka na yango mabaya (100 dB) na boumeli ya ngonga mibale, ekosala eloko te. Kasi ekoki koyoka makɛlɛlɛ oyo ezalaka na ndako ya masano ya video (110 dB) kaka miniti 30. Soki kaka makɛlɛlɛ emati na décibel 10, ekongala lisusu koleka mpe ekobakisama mbala zomi.” Ntango bamekaki likambo yango, bamonaki ete makɛlɛlɛ ebandaka kosala mpasi na matoi soki ekómi na décibel pene na 120. Kasi, ezali likambo ya kokamwa komona ete baradio kasɛti mosusu ya ndako ekoki kosala makɛlɛlɛ makasi mpenza, koleka kutu décibel 140! Talá etanda oyo ezali awa na nse.
Mpo na kosalisa yo oyeba mpo na nini makɛlɛlɛ makasi ekoki kobebisa matoi na yo, tótalela naino nini esalemaka ntango lolaka ekómaka na matoi na yo.
Ndenge oyo matoi na biso esalaka
Litoi ndenge tomonaka yango na libándá (pavillon), ezali na mosala ya kozwa lolaka mpe komema yango na lidusu na yango, epai lolaka yango ekómaka noki na eteni oyo babengi tympan. Kuna, mbonge ya lolaka yango eningisaka tympan, oyo mpe eningisaka mwa mikuwa misato ya mike oyo ezalaka na nsuka ya nzela ya litoi. Na nsima, koningana wana ekoleka tii na kati mpenza ya litoi, oyo ezali lokola mwa saki moke, esalemi na mikuwa mpe etondi na mai. Awa, mai yango nde elekisaka koningana wana na kati ya cochlée, eteni mosusu ya kati ya litoi, oyo ezali lokola mbɛmbɛ mpe ezali na baselile ya litoi. Na nsima mai oyo ezali na kati ya cochlée ekonyɔmitisa mitó ya baselile ya litoi mpo yango etinda bilembo oyo ekoyebisa misisa ya bɔɔngɔ likambo. Bongo, bilembo yango ekotindama na bɔɔngɔ mpe, bɔɔngɔ ekotánga nsango yango mpe ekobongola yango na lolaka.
Eteni ya bɔɔngɔ oyo babengi système limbique nde esalisaka bɔɔngɔ eyeba lolaka nini esengeli kotyela yango likebi to te. Na ndakisa, mama akoki mpenza kotya likebi te na makɛlɛlɛ ya mwana na ye oyo azali kosakana; kasi soki ayoki mwana agangi makasi, mama akolandela makɛlɛlɛ oyo mwana asali. Koyoka na matoi nyonso mibale epesaka biso likoki ya koyeba kokesenisa mingongo, lolaka mpe makɛlɛlɛ; esalisaka biso na makambo ebele. Yango nde epesaka biso likoki ya koyeba epai wapi lolaka ezali kouta. Nzokande, soki ezali makɛlɛlɛ ya bato bazali kosolola, bɔɔngɔ ekoki kolanda kaka lisolo elongo na moto moko na mbala moko. Yango wana, buku moko (The Senses) elobi ete “ntango moto azali kosolola na telefone, ezalaka mpasi asimba makambo oyo moto mosusu azali koloba pene na ye.”
Ndenge oyo makɛlɛlɛ ebebisaka matoi na biso
Mpo tómona ndenge oyo makɛlɛlɛ ya makasi ekoki kobebisa matoi na biso, tózwa ndakisa moko. Lapolo moko oyo etali komibatela na esika ya mosala, emonisi ete mposo ya kati ya litoi oyo esalisaka biso na koyoka ekokani na blé oyo ezali na elanga, mpe makɛlɛlɛ oyo ekɔtaka na litoi ekokani na mopɛpɛ. Mwa mopɛpɛ ya moke, oyo ezali lokola makɛlɛlɛ moke, ekoki koningisa mitó ya blé kaka moke, kasi ekosala blé eloko te. Nzokande, mopɛpɛ ya makasi ekoki kolalisa mpenza blé mpe kopanza yango. Mopɛpɛ ya makasi, ata mpe mwa mopɛpɛ ya moke, soki eumeli ntango molai, ekoki kobukabuka blé, mpe koboma yango libela.
Ezali mpe ndenge moko ntango makɛlɛlɛ ekómaka na baselile ya kati ya litoi, oyo ezalaka mike mpenza mpe pɛtɛpɛtɛ. Makɛlɛlɛ makasi kasi ya ntango mokuse ekoki kozokisa biteni mosusu na kati ya litoi mpe kotika mapipi oyo ekosala ete moto ayokaka lisusu malamu te mpo na libela. Longola yango, koumela mingi na esika ya makɛlɛlɛ oyo eleki makasi ekoki kobebisa baselile ya litoi mpo na libela. Soki baselile yango ebebi, ekobotama lisusu te. Yango nde esalaka mbala mosusu ete moto akóma koyoka lokola nungunungu to ngɛngɛlɛ to konguluma na kati ya matoi to na motó.
Batelá matoi na yo mpo ebeba te
Ata soki matoi ya moto ekoki kobeba mpo abotamá na maladi ya matoi to mpo na likama, tokoki koyeba kobatela matoi na biso, enama ya ntina mingi, soki tolingi yango ebeba te. Ezali malamu koyeba liboso makama ya lolenge nini ekoki kobebisa matoi na yo. Ndenge monganga moko ya matoi alobaki yango, “kozela ete likama ekwea mpo oluka ndenge ya kolonga yango ezali lokola kopakola nkisi ya ngungi wana ngungi esili koswa yo mpe kopesa yo malaria.”
Mbala mingi, mokakatano eutaka mpenza te na oyo toyokaka, kasi na ndenge tosalaka mpo na koyoka. Na ndakisa, soki olati écouteur, ekoki kozala malamu okitisa mpenza volimi mpo ozala na likoki ya koyoka makambo oyo ezali koleka zingazinga na yo. Soki volimi ya radio ya vuatire to ya ndako ezali kosala ete bato oyo bazali kosolola báyoka lisusu malamu te makambo oyo bazali koloba, yango ekoki mpenza komonisa ete makɛlɛlɛ wana eleki makasi mpe ekoki kobebisa matoi na yo. Bato oyo bayebi malamu ndenge litoi esalaka bakebisi ete koumela ngonga mibale to misato na esika ya makɛlɛlɛ makasi (décibel 90) ekoki kobebisa matoi na yo. Ntango ozali na esika ya makɛlɛlɛ makasi, osengeli kolata biloko oyo ebatelaka matoi.
Baboti basengeli kobosana te ete matoi ya bana ezalaka pɛtɛpɛtɛ koleka oyo ya mikóló. Bóbosana te ete biloko mosusu oyo bana basakanaka na yango ekoki kosala makɛlɛlɛ makasi. Eloko lokola kitsakatsaka ekoki kosala makɛlɛlɛ makasi koleka (décibel 110)!
Matoi na biso esalami na biloko ya mikemike oyo ezali ya pɛtɛpɛtɛ, kasi ya kokamwa mpenza. Yango nde esalisaka biso tóyoka lolaka ndenge na ndenge mpe ya kitoko na esika tofandi. Ya solo, tosengeli mpenza kobatela likabo wana ya motuya mingi.
[Etanda na lokasa 22]
Bokasi ya makɛlɛlɛ oyo toyokaka mbala mingi
• Kopema—décibel 10
• Masolo na mongongo ya nse mpenza—décibel 20
• Masolo—décibel 60
• Makɛlɛlɛ ntango mituka etondi na balabala—décibel 80
• Makɛlɛlɛ ya masini ya konika biloko ya kolya—décibel 90
• Makɛlɛlɛ ya engbunduka—décibel 100
• Makɛlɛlɛ ya masini ya kokata nzete—décibel 110
• Makɛlɛlɛ ya mpɛpɔ ya monene—décibel 120
• Lokito ya mondoki—décibel 140
[Etanda na lokasa 23]
Ntango mosusu matoi na yo ebandi kobeba
• Soki olingaka kaka komatisa volimi ya radio to ya televizyo, ntango bamosusu bamonaka ete volimi yango eleki makasi
• Soki otunaka kaka bato bázongela makambo oyo bauti koloba
• Soki mbala na mbala, mpo oyoka malamu, esɛngaka kaka okanga elongi, opusa litoi pene to otɛngisa motó
• Soki ozalaka na mokakatano ya koyoka ntango ozali na likita ya bato ebele to ntango bato bazali kosala mwa makɛlɛlɛ, lokola na fɛti to na zando
• Soki mbala na mbala, otunaka kaka bamosusu báyebisa yo makambo oyo bino nyonso bolandaki
[Etanda na lokasa 22]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
Pavillon
Mwa mikuwa misato na kati mpenza ya litoi
Tympan
Mosisa ya litoi
Cochlée