Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g05 8/1 nk. 4-11
  • Ndenge ya kokolisa mposa ya koyekola

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndenge ya kokolisa mposa ya koyekola
  • Lamuká!—2005
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Bolingo epesaka bana mposa ya koyekola
  • Bolingo ezali na boboto mpe eyebaka esika makoki ya moto esuki
  • Kotalela makambo na liso ya elimo etindaka moto azala na bokatikati
  • Teyá bana bálinga kotánga mikanda
  • Teyá na esengo!
  • Tóyeba ete bato nyonso bayekolaka ndenge moko te
  • Koyekola eponi mbula te
  • Salisá bana na yo bálinga kotánga mpe koyekola
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • Lolenge ya kozala na libota oyo ezali makasi na elimo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Bóteya bana na bino bálinga yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Baboti—Bósalisa bana na bino bálinga Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2022
Makambo mosusu
Lamuká!—2005
g05 8/1 nk. 4-11

Ndenge ya kokolisa mposa ya koyekola

“Lakisa mwana bizaleli ya malamu; boye tii tango akokóma mobange akotika yango té.”​—⁠BATOLI (MASESE) 22:​6, BIBLE NA LINGALA YA LELO OYO.

OSILÁ komeka kolalisa mwana na ntango oyo likambo moko ya kitoko ezali kosalema? Ata soki alɛmbi to azali kolela to mpe azali na nkanda, akosala nyonso alala te mpo alanda likambo yango. John Holt, oyo akomaka babuku, akomi ete: “Mposa na ye ya koyeba makambo ya mokili mpe ya kokóma na mayele ya kosala makambo, ezali makasi lokola mposa na ye ya kolya, ya kopema to ya kolala. Na bantango mosusu, mposa yango ekoki kozala kutu makasi koleka.”

Ezalaka mpasi mpo bana bábatela mposa wana ya koyekola na bomoi na bango mobimba, bakisa mpe bambula oyo bakolekisa na kelasi. Atako ezali na lolenge moko boye te oyo soki moto asaleli yango akobatela mposa makasi ya koyekola, nzokande ezali na mayele ndenge na ndenge oyo baboti, balakisi mpe bana bakoki kosalela, oyo esili kobimisa matomba mingi. Kasi, na kati ya mayele yango nyonso, bolingo nde ezali na ntina mingi.

Bolingo epesaka bana mposa ya koyekola

Bana bazalaka na mposa baboti na bango bálingaka bango. Yango esalaka ete bana bábanga eloko te, básepelaka kosolola, bátunaka mituna mpe báyekolaka. Bolingo etindaka baboti básololaka na bana na bango mpe bálandelaka kelasi na bango. Buku Mposa ya koyekola​—⁠Salisá bana bálinga mpe básepela koyekola (na Lingelesi) elobi ete balapolo ezali komonisa ete “bato ya liboso oyo bapesaka mwana mposa ya koyekola ezali baboti.” Baboti bakobakisa lisusu mposa ya mwana ya koyekola soki bazali kosalana na bomoko na balakisi. Buku yango elobi ete: “Eloko moko te ekoki kopesa mwana mposa makasi ya koyekola koleka boyokani kati na moboti mpe molakisi.”

Baboti bakolisaka mpe makoki ya bana na bango mpo na koyekola. Buku Na kati ya bɔɔngɔ (na Lingelesi) elobeli ankɛtɛ moko oyo eumelaki mingi, oyo basalaki na mabota 43; elobi ete bato oyo basalaki ankɛtɛ yango “bamonaki ete bana oyo baboti na bango bazalaki kosolola na bango mingi [tii ntango bakokisaki mbula misato] bazalaki na mayele mingi koleka bana oyo baboti na bango bazalaki kosolola na bango mingi te.” Buku yango ebakisi ete, “baboti oyo basololaka mingi na bana na bango, ezali baoyo bakumisaka bango ntango basali likambo ya malamu, bayanolaka na mituna na bango, balakisaka bango nzela oyo basengeli kolanda, na esika ya kotyela bango mibeko, mpe basalelaka maloba ndenge na ndenge na masolo ekeseni.” Soki ozali moboti, osololaka mingi na bana na yo mpe bolobelaka makambo ya ntina?

Bolingo ezali na boboto mpe eyebaka esika makoki ya moto esuki

Bana nyonso bazalaka na mayele mpe na makoki ndenge moko te. Yango wana, baboti basengeli te kolinga kaka bana oyo bazali na mayele mpe na makoki mingi koleka basusu. Nzokande, ndenge buku Koyeba kokanisa mpe koyekola (na Lingelesi) emonisi yango, lokola lelo oyo bapesaka moto valɛrɛ mingimingi na kotalela mayele na ye, yango ekoki kotinda bana “bákanisa ete kozwa bapwɛ mingi na kelasi ekopesa bango valɛrɛ mingi.” Makanisi yango “ebakisaka kobanga na bango ete bakolonga te na kelasi”; ekoki mpe kotinda bango na komitungisa kaka mpamba ntango nyonso mpe kobanga mingi. Na Inde, mitungisi ya kelasi mpe kozanga lisalisi ya libota, ezali ntina ya libosoliboso oyo esalaki ete motango ya bilenge oyo bamibomaki na boumeli ya mbula 25 oyo euti koleka emata mbala misato koleka.

Koloba na mwana ete azali “zoba,” ekoki mpe konyokola ye na makanisi. Kofinga ye ndenge wana ekolɛmbisa ye na esika ete epesa ye mposa ya koyekola. Nzokande, moboti ya bolingo asengeli ntango nyonso kozala na boboto, kobatela ntango nyonso mposa oyo mwana azalaka na yango ya koyekola​—⁠na kotalela makoki na ye, kozanga koyokisa ye nsɔni. (1 Bakolinti 13:⁠4) Soki mwana azali na mokakatano ya koyekola, baboti ya bolingo bakoluka kosalisa ye kozanga komonisa ye ete azali zoba to azangá ntina. Ya solo, yango ekoki kosɛnga kozala na motema molai mpe kosalela mayele, kasi esengeli mpenza kosala bongo mpo na kozwa matomba. Ndenge nini moto akoki kokolisa bolingo ya ndenge wana? Likambo ya libosoliboso ezali ya kotalela makambo na liso ya elimo.

Kotalela makambo na liso ya elimo etindaka moto azala na bokatikati

Kotalela makambo na liso ya elimo ezali na ntina mingi na makambo ebele. Ya liboso, ekosalisa biso tótya kelasi na esika na yango, tómona yango ete ezali na ntina kasi eleki makambo nyonso na ntina te. Na ndakisa, matematiki ekoki kosalisa moto asala makambo mingi, kasi ekoki kokomisa moto na bizaleli ya malamu te.

Biblia elendisaka biso mpe tózala na bokatikati na oyo etali ntango oyo tozali kolekisa mpo na kotánga kelasi. Elobi boye: “Ezali na nsuka na kosala mikanda te, koyekola mingi ekolɛmbisa nzoto.” (Mosakoli 12:​12) Toboyi te, esengeli bana báyekola kotánga mpe kokóma malamu, kasi basengeli te kolekisa ntango na bango nyonso kaka mpo na kotánga kelasi. Basengeli mpe kozala na ntango mpo na kosala makambo mosusu ya ntina, mingimingi makambo ya elimo, oyo ekobongisa bomoto na bango.

Likambo mosusu oyo emonisaka ete moto azali kotalela makambo na liso ya elimo, ezali bopɔlɔ. (Mika 6:⁠8) Bato ya bopɔlɔ bandimaka esika makoki na bango esuki, mpe bakweaka te na motambo ya kozala na mposa makasi ya lokumu mpe kowelana makasi oyo emonanaka na biteyelo mingi. Zulunalo India Today elobi ete bizaleli mibale wana ya mabe “ekoki komemela moto ebele ya mitungisi.” Ekozala malamu ete biso nyonso, bilenge mpe mikóló, tólanda toli ya Makomami oyo euti na Nzambe ete: “Tiká tókóma te na ezaleli ya komitya liboso, kobimisáká kowelana na kati na biso, koyokelanáká likunya.” “Kasi tiká moto na moto ameka mosala na ye moko ndenge ezali, mpe na yango akozwa ntina ya komikumisa na oyo etali ye moko mpenza, kasi na komikokanisáká na moto mosusu te.”​—⁠Bagalatia 5:​26; 6:⁠4.

Ndenge nini baboti bakoki kosalela toli wana mpo na kelasi ya bana na bango? Ndenge moko ya kosala yango ezali ya kolendisa mwana mokomoko amityela mikano mpe amikokanisa na moto mosusu te. Na ndakisa, soki mwana na yo auti kosala ekzamɛ ya matematiki to ya litangela (dictée), sɛngá ye akokanisa bapwɛ oyo azwi na oyo azwaki mbala eleki. Na nsima, pesá ye longonya to lendisá ye na ndenge esengeli. Na ndenge wana, okosalisa ye amityela mikano oyo akoki kokokisa, ayeba soki azali kokóma na mayele to te, mpe asala makasi na bisika oyo azali kokoka te, kasi amikokanisa na bana mosusu te.

Kasi lelo oyo, bilenge mosusu ya mayele basalaka lisusu milende te na kelasi mpo babangaka noki bakotyola bango. Bilenge mosusu bakómi na likanisi ete: “Kozala mwana ya mayele na kelasi ezali ‘na ntina’ te.” Kotalela makambo na liso ya elimo ekoki kosalisa bango? Ɛɛ, ekoki kosalisa! Tótala oyo Bakolose 3:23 elobi: “Misala nyonso oyo bosalaka, bósalaka yango na motema moko lokola nde bozali kosalela Nkolo kasi bato té.” (Bible na lingala ya lelo oyo) Ezali nde na ntina mosusu ya monene oyo mpo na yango tosengeli kosala milende, soki ezali te mpo na kosepelisa Nzambe? Soki moto azali na likanisi malamu ndenge wana, yango ekopesa ye makasi ya koboya kolanda makambo mabe ya baninga.

Teyá bana bálinga kotánga mikanda

Koyeba kotánga mpe kokoma ezali likambo ya liboso mpo na koyekola malamu​—⁠ezala na kelasi to na makambo ya elimo. Baboti bakoki kokolisa mposa ya kotánga mikanda epai ya bana na bango soki bazali kotángela bango mikanda banda ntango bazali naino mike mpenza. Daphne, oyo asalaka mosala ya koluka bafoti na babuku liboso ya konyata yango na imprimerie, asepelaka ndenge baboti na ye bazalaki kotángela ye mbala na mbala ntango azalaki mwana moke. Alobi boye: “Bakolisaki epai na ngai mposa ya kotánga mikanda. Yango esalaki ete nayeba kotánga liboso kutu nakɔta kelasi. Baboti na ngai bateyaki mpe ngai ndenge ya kolukaluka na mikanda mpo na kozwa biyano na mituna na ngai. Formasyo wana esalisá ngai mingi na bomoi, mpe ezali kosalisa ngai tii lelo.”

Lisusu, mokomi Holt, oyo tolobelaki liboso, akebisi ete kotángela bana “ezali mosala ya mokolo moko te.” Abakisi boye: “Soki kotánga ezali kosepelisa moboti te, mwana mpe te, ekopesa litomba moko te, ekobimisa nde mikakatano. . . . Ata bana oyo basepelaka bátángelaka bango na mongongo makasi . . . balingaka yango te soki baboti basepelaka kotánga te.” Yango wana, Holt apesi baboti toli ete báponaka babuku oyo bango moko basepelaka na yango, mpe bábosana te ete bana basepelaka bátángelaka bango buku moko mbala na mbala! Baboti mingi na mokili mobimba basepelaka kotángela bana na bango ya mike babuku oyo mibale: Yekolá epai ya Moteyi Monene mpe Mokanda mpo na Masolo ya Biblia, oyo ebimisami na Batatoli ya Yehova. Babuku yango, oyo ebimisami mpenza mpo na bana, ezali na bililingi ya kitoko, ezali kotinda mwana akanisa, mpe ezali koteya ye mitinda ya Nzambe.

Timote, moklisto moko ya ekeke ya liboso, azwaki libaku ya kozala na mama mpe nkɔkɔ oyo bamipesaki na koteya ye, mingi mpenza makambo ya elimo. (2 Timote 1:⁠5; 3:​15) Timote akómaki mobali ya solosolo mpe ya kotyela motema​—⁠bizaleli oyo kelasi ya mokili yango moko ekoki te kopesa moto. (Bafilipi 2:​19, 20; 1 Timote 4:⁠12-15) Lelo oyo, masangá ya Batatoli ya Yehova na mokili mobimba ezali mpe na “Ba-Timote”​—⁠bilenge basi mpe mibali​—⁠oyo baboti ya bolingo mpe ya elimo bazali kobɔkɔla bango malamu.

Teyá na esengo!

Buku Mposa ya koyekola (na Lingelesi) elobi ete mpo na molakisi oyo alingi kolona mposa ya koyekola epai ya basusu, “sɛkɛlɛ ezali na liloba moko kaka​—⁠esengo. Molakisi oyo azali na esengo, ntango kaka akɔti na kelasi amonisaka bana-kelasi ete ye moko azali kosepela na makambo oyo azali koteya, mpe esɛngo yango emonanaka mpenza na mateya na ye.”

Kasi emonanaka ete, moboti nyonso te to molakisi nyonso te nde ateyaka na esengo. Yango wana, bayekoli ya mayele balukaka komipesa bango moko, batalelaka koyekola ete ezali mokumba na bango moko. Kutu, ndenge buku oyo touti kolobela emonisi yango, “moto moko te akozala nsima ya bana na biso bomoi na bango mobimba mpo na kosalisa bango báyekolaka, básalaka mosala malamu, bákanisaka, mpe básalaka milende mpo na kokóma na mayele mingi.”

Yango emonisi lisusu ntina ya libota epai mwana ayekolaka bizaleli malamu, koleka na kelasi. Baboti, bosepelaka koyekola? Ndako na bino ezali esika malamu mpo na koyekola, esika oyo bizaleli ya elimo ezwaka esika ya liboso? (Baefese 6:⁠4) Bóbosana te ete ndakisa na bino mpe mateya na bino ekotikala na mitó ya bana na bino ata nsima ya kosilisa kelasi mpe ntango bakotika ndako na bino​—⁠Talá etanda na lokasa 7, “Mabota oyo eteyaka bana malamu.”

Tóyeba ete bato nyonso bayekolaka ndenge moko te

Ezali na bato mibale te oyo bakanisaka ndenge moko; moto na moto azali na ndenge na ye ya koyekola. Lolenge ya koyekola oyo ebongi na moto moko ekoki ntango mosusu kobonga te na moto mosusu. Yango wana, Profesɛrɛ Mel Levine, na buku na ye (A Mind at a Time), alobi ete: “Kotalela bana nyonso ndenge moko ezali sembo te. Bana nyonso bazalaka na bamposa ndenge moko te ya koyekola; esengeli kokokisa mposa ya mwana mokomoko.”

Na ndakisa, mpo na bato mosusu bililingi to mayemi esalisaka bango bákanga ntina ya likambo mpe bábosana yango te. Basusu basepelaka bátánga yango kotánga to báyoka yango koyoka​—⁠to mpe nyonso mibale mbala moko. Levine alobi ete: “Lolenge eleki malamu ya kobosana likambo te ezali ya kobongola yango, kolobela yango ndenge mosusu. Soki omonaki yango na miso, meká kolimbola yango na maloba; soki ozali koyoka yango, salá elilingi to yemá yango.” Koyekola ndenge wana ebimisaka matomba mingi mpe esepelisaka.

Na ntembe te, osengeli komekameka mpe kotala mpo na koyeba lolenge ya koyekola oyo ekobonga na yo. Hans, oyo azali mosakoli ya ntango nyonso, ayekolaki Biblia na George, mobali moko ya mokóló, oyo atángaki kelasi mpenza te. George azalaki na mokakatano ya kokanga ntina ya makambo oyo azalaki koyekola mpe ya koyeba yango lisusu. Na yango, Hans amekaki koyema makambo yango na papye mpo na kolimbola yango malamu. Hans alobi boye: “Yango ebongolaki makambo mpo na George. Kutu, abandaki kokanga ntina ya makambo yango mpe akamwaki ye moko ndenge azalaki lisusu kobosana yango te! Ntango nayebaki ndenge bɔɔngɔ na ye ezali kosala, namonaki ete azalaki na mayele mingi koleka ndenge nazalaki kokanisela ye liboso. Eumelaki te, ye moko akómaki kondima ete azali koyeba makambo yango, mpe akómaki komibongisa malamu mpo na boyekoli koleka ndenge azalaki kosala liboso.”

Koyekola eponi mbula te

Buku Na kati ya bɔɔngɔ (na Lingelesi) elobi ete “makambo oyo bɔɔngɔ na biso ekoki kosala etalelaka ndenge tosalelaka yango. Bɔɔngɔ elingaka básalela yango mingi; soki te ekobungisa makoki na yango mosusu, ezalaka na mposa makasi ya koyekola makambo ya sika.” Buku yango elobi lisusu boye: “Kaka ndenge ngalasisi esalisaka moto oyo akómi na mbula ntuku nsambo to ntuku mwambe azala nzoto makasi, ndenge moko mpe, baankɛtɛ emonisi ete ata bɔɔngɔ ya moto oyo azali konuna ezalaka ntango nyonso makasi soki azali kosalela yango mingi. Banda kala, bato bakanisaka ete ntango moto abandi konuna, bɔɔngɔ na ye mpe ekobanda kobosana makambo mokemoke mpe ndenge ya kopekisa likambo yango ezali te. Nzokande, ntango bayekolaki likambo yango na mikolo oyo euti koleka, bamonaki ete bato bango moko nde bamikaniselaka bongo, mpe yango esalemaka bongo soki moto yango azalaki te kosalela bɔɔngɔ na ye mingi. Lisusu, ezali solo te ete baselile ya bɔɔngɔ ekufaka mingi na mbala moko mokolo na mokolo wana moto azali kokóma mobange, ndenge bato bazalaki kokanisa yango.” Soki bɔɔngɔ ya moto ezali kokanisa lisusu malamu te, mbala mingi ezalaka nde mpo na maladi, na ndakisa maladi ya motema.

Ezali solo ete ntango moto akómi mobange, mayele na ye ekitaka, kasi esilaka nyonso te. Bato ya mayele balobi ete bɔɔngɔ oyo basalelaka yango mingi elɛmbaka noki te​—⁠mingi mpenza soki moto yango asalaka ngalasisi. Buku Koyekola na bobange​—⁠Likambo ya sika na mokili oyo ezali konuna (na Lingelesi) elobi boye: “Soki moto azali na momesano ya kosala makambo oyo ezali kotinda ye ayekola, akokóma mpe na makoki mingi ya koyekola. Bato oyo batikaka te koyekola, bango nde bayekolaka malamu.”

Likambo yango emonanaki na Australie, na ankɛtɛ moko oyo basalaki na boumeli ya mbula 20 epai ya mikóló oyo bazalaki na mbula kobanda 60 tii 98. Bɔɔngɔ ya mingi kati na bango ezalaki kolɛmba kaka moke (1 %) nsima ya mbula mokomoko. Nzokande, lapolo yango elobi ete, “mpo na bato mosusu, ata mpe baoyo bazalaki na mbula koleka ntuku libwa, bɔɔngɔ na bango elɛmbaki te. Mingi kati na bango ezalaki baoyo bayekolaki likambo moko boye na mozindo, na ndakisa koyekola monɔkɔ mosusu to ebɛteli moko ya miziki.”

George, oyo tolobelaki, azalaki na mbula koleka 70 ntango abandaki koyekola Liloba ya Nzambe. Ndenge moko, Virginia, oyo azali lelo na mbula koleka 80 mpe mobali na ye Robert, oyo akufá, babandaki mpe koyekola Biblia na bobange. Virginia alobi boye: “Atako Robert azalaki komona mpenza te, na Ndako ya Bokonzi, azalaki kosala masolo ya mikuse oyo euti na Biblia, oyo akangaki na motó. Ngai moko mpe, liboso nazalaki kosepela kotánga mikanda te, kasi sikoyo nalingaka kotánga. Kutu, lelo na ntɔngɔ, natángaki zulunalo Lamuká! na mobimba na yango.”

George, Robert, mpe Virginia bazali bobele ndakisa misato ya bato ebele oyo bayekoli ntango bakómi mibange mpe bamonisi ete mibange bakoki koyekola, mpe bazali kosalela mayele na bango na ndenge ya malamu. Nsima ya koyekola likambo yango, bamoni ete kolekisa mbula 70 to 80 na koyekola ezali mpo na bɔɔngɔ lokola litangá ya mai na kati ya katini​—⁠ezali eloko te na kotalela makoki oyo bɔɔngɔ ezali na yango. Mpo na nini bɔɔngɔ ezali na makoki ya koyekola mingi bongo? Tosɛngi yo otánga lisolo elandi.

[Etanda/Elilingi na lokasa 4, 5]

Internet mpe televizyo—Ezali malamu to mabe?

Buku moko (A Mind at a Time) elobi ete “Internet ezali mbɛli ya mino mibale.” Koyekola ndenge ya kolukaluka makambo na Internet ekoki kozala na ntina mingi, kasi buku yango elimboli ete bayekoli mosusu basukaka kaka na “kosala kopi ya makambo oyo bamoni na Internet kozanga kokanga ntina na yango to koyeba ndenge ya kofandisa yango na motó. Yango wana, kosala bongo ekoki kokóma lolenge ya sika ya koyekola na gɔigɔi, to mpe lolenge ya kokóma na momeseno ya kozwa makambo oyo moto mosusu akomi.”

Bato ya mayele balobi ete soki moto azali kolekisa ntango mingi na kotala televizyo, yango ekoki kosala ete makoki na ye ya koyoka mpe ya kosilisa mikakatano ekóla malɛmbɛmalɛmbɛ, ekoki kolɛmbisa makoki ya kokanisa, mpe etongaka bomoto te. Buku Mposa ya koyekola (na Lingelisi) elobi ete “ndenge bakomaka na pakɛ ya likaya ete komɛla yango ezali likama mpo na nzoto, esengeli mpe bákomaka na televizyo ete kotala yango mingi ezali likama.”

Buku mosusu elobi ete eloko oyo bana basengeli na yango koleka ezali nde “komona mpe kobimisa maloba (kotánga mpe kosolola), bámona ete balingi bango mpe bazali kosepela na bango.”

[Etanda/Bililingi na lokasa 7]

Mabota oyo eteyaka bana malamu

Mimeseno mpe makambo oyo elandi ekoki kosalisa libota na bino ekóma esika malamu ya koyekola:

◼ Koyebisa bana mbala na mbala, na bolingo nyonso, makambo oyo basengeli kosala; bótyela bango mibeko, kasi ya makasimakasi te.

◼ Komonisa bana ete basengeli kosala mosala makasi mpo bálonga

◼ Kozala ntango nyonso na mosala ya kosala, kasi kokanga mabɔkɔ te

◼ Kozala na ntango mingi ya koyekola na bana na ndako pɔsɔ na pɔsɔ, mpe kosala makambo mosusu lokola devuare ya kelasi, kotánga mikanda ntango basepeli, kozwa mopɛpɛ, kolobela mikano ya libota, koyekola misala ya ndako mpe kosala yango

◼ Komona libota lokola esika ya kosalisana mpe ya kosilisa mikakatano

◼ Komonisa polele mibeko ya libota na bino, mpe kosala ete bátosaka yango

◼ Kosolola mbala na mbala na balakisi

◼ Komonisa ntina ya kokola na elimo

[Elilingi]

Baboti, boteyaka bana na bino básepela na kotánga?

[Eutelo ya bafɔtɔ]

Euti na buku Mposa ya koyekola​—⁠Salisá bana bálinga koyekola (na Lingelesi).

[Etanda/Bililingi na lokasa 8, 9]

Ndenge ya koyekola malamu mpe na esengo nyonso

Sepelá na makambo ozali koyekola Soki omipesi na likambo moko, ekozala pɛtɛɛ mpo oyekola yango. Buku moko (Motivated Minds​—⁠Raising Children to Love Learning) elobi boye: “Baankɛti emonisi mpenza polele ete ntango bana bazali koyekola mpo balingi koyekola, bayekolaka na mozindo, bakangaka malamu ntina, mpe babosanaka yango noki te. Bazalaka mpe na molende, basalaka makambo ya sika, mpe babangaka te makambo oyo ezali ­makasi.”

Yokanisá yango na makambo ya bomoi Richard Weaver, mokomi mpe molakisi, akomi boye: “Ntango makambo oyo ozali koyekola na kelasi eyokani na makambo mosusu ya bomoi oyo oyebi, ezali lokola nde kura epɛlisi ampulɛ; yango ekosala ete okanga mpenza ntina ya makambo ­yango.”

Luká kokanga ntina Ntango moto azali koluka kokanga ntina ya likambo moko, azali kokolisa makoki na ye ya kokanisa mpe mayele na ye. Kokanga makambo na motó ezali mabe te, kasi kokanga ntina ya ­likambo nde eleki malamu. Masese 4:​7, 8 elobi ete: ‘Ekozwa yo biloko nyonso, zwá mpe bososoli. Kumisá yango mpe ekotombola yo.’

Tyá makanisi esika moko Buku Teyá mwana na yo kotya makanisi esika moko (na Lingelesi) elimboli ete: “Kotya makanisi esika moko, yango nde esimbi koyekola malamu.” “[Ezali] na ntina mingi, yango wana balobaka ete liboso ya kozwa mayele esɛngaka kotya makanisi esika moko, kutu balobaka mpe ete kozala mayele elimboli koyeba kotya makanisi esika moko.” Kotya makanisi esika moko bayekolaka yango koyekola. Mpo na kolonga, bandá naino kolekisa mwa ntango kaka moke na koyekola, na nsima okoki kobanda kolekisa mwa ntango ­mingi.

Zongelá na maloba na yo moko Buku moko (A Mind at a Time), ya Dɔktɛrɛ Mel Levine elobi ete: “Bana-kelasi ya mayele ezali mingimingi baoyo bayebi ­kozongela makambo na maloba na bango moko.” Kozongela likambo na maloba na yo moko esalaka ete likambo yango ekóma mokuse, ekabolama ndambondambo, mpe ekozala mpasi te omikundola yango. Bato oyo bayebi kozwa banɔti basalelaka mayele wana; bakomaka te makambo nyonso oyo bazali koyoka.

Yokanisá na oyo oyebi Na buku Buku ya bɔɔngɔ (na Lingelesi), Peter Russell amonisi ete makambo oyo tokangaka na motó eyaka kobakisama na oyo toyebaki liboso. Na maloba mosusu, ntango ozali koyokanisa makambo ya sika na oyo oyebaki, okobosana yango te. Soki ozali na momeseno ya koyokanisa makambo oyo oyekoli ná oyo oyebaki liboso, okokanga yango malamu mpenza.

Moná na makanisi Likambo oyo moto amoni na miso, abosanaka yango noki te. Yango wana, soki likoki ezali, meká komona likambo oyo ozali koyekola na makanisi. Bato oyo bayekolaka ndenge bɔɔngɔ ebombaka makambo basalelaka mayele wana, mbala mingi balukaka bandakisa ya kolekisa ndelo to ya kosɛkisa oyo bato bakoki komona na makanisi mpo esalisa bango bábosana te.

Zongelá Nsima ya ngonga 24, tokoki kobosana makambo mingi (80 %) oyo toyekoli. Soki tozongeli likambo moko oyo touti koyekola, mpe tozongeli yango lisusu nsima ya mokɔlɔ moko, ya pɔsɔ moko, ya sanza moko, ata mpe nsima ya sanza motoba, tokomikundola makambo mingi ata pene na makambo yango nyonso (100 %).

[Bililingi na lokasa 8]

Baboti mpe balakisi basengeli kosala na bomoko mpo na kosalisa bana báyekolaka

[Bililingi na lokasa 10]

Koyekola eponi mbula te

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto