Makambo mazali koleka na mokili
Kotánga minzoto
Osilá kotombola miso likoló na etando etondi na minzoto na butu mpe komituna soki minzoto boni okoki komona? Eleki kala mingi te, zulunalo Sky & Telescope etunaki motuna wana ya ntina, mpe eyano ezali pɛtɛɛ te mpo na kozwa yango lokola tokoki kokanisa yango. Zulunalo emonisi ete engebene mikanda ya astronomi, batali oyo bayebani bakoki komona minzoto 2 862 na likoló na ntáká ya nɔ́rdi na esika ya molili makasi. Kasi, minzoto yango nyonso mizalaka bobele na ntango moko te likoló ya horizon; mingi mibimaka mpe milimwaka. Lisusu, minzoto mingi oyo emonanaka malamu ntango ezali semba na motó, emonanaka te soki ezali pene na horizon. Ezali bongo mpamba te na ntáká ya nsé motindo wana, kongɛnga ya monzoto esengeli kokatisa etando ya mabelé na ntáká moko monene mpo emonana na miso ya motali. Zulunalo Sky & Telescope esukisi ete mpo na motali oyo azwami na ntáká ya 40 degrés na nɔ́rdi, minzoto soko 1 809 mikoki komonana na boumeli ya mbula mobimba.
Bantina minene ya liwa kati na États-Unis
Wapi bantina minene ya liwa kati na États-Unis? Bolukiluki moko ya sika oyo ebimisamaki na zulunalo The Journal of the American Medical Association etalelaki bantina minene oyo epesaka nzela na liwa mpo na mbula moko, elingi koloba bantina oyo tobotamaka na yango te. Nsima ya botaleli mituya malamumalamu, bolukiluki esukisaki ete kati na bakufi 2 148 000 kati na États-Unis na 1990, soko 400 000 bakufaki mpo na likaya, 300 000 bakufaki mpo na mimeseno mabe ya bilei mpe ya ngalasisi; 100 000 bakufaki mpo na masanga makasi; 90 000 bakufaki mpo na bamikrobe oyo epesaka makɔnɔ; 60 000 bakufaki mpo na biloko ya ngɛngɛ lokola kobebisama ya ezingelo to ya bilei to ya mai; 35 000 bakufaki na mindóki; 30 000 na makambo ya kosangisa nzoto; 25 000 na makámá ya mituka mpe 20 000 bakufaki na bilangwiseli. Na kotalela nyonso wana, bolukiluki yango emonisi ete makambo oyo ya kobotama na yango te nde mazali kopesa nzela na liwa ya katikati ya bato na mbula moko.
Bana mpe bitumba
Engebene lapólo moko eutaki kopesama kala mingi te na ebongiseli ya Grande-Bretagne mpo na kosunga bana, na boumeli ya mbula zomi oyo euti koleka, bitumba bibimisaki makámá mingi mpo na basivíli—mingimingi bana—koleka basodá. Molobeli ya mikili misusu ya ebongiseli yango oyo atángamaki na lapólo ya Lisangá ya bopanzi nsango, alobaki ete: “Bakufi libwa kati na zomi bazali basivíli. Mbala mingi bana nde bazali bakufi—mpe ezali mpenza komonana ete bakokufa mingi koleka basodá kati na bitumba.” Lapólo ya nkasa 25 ekomaki motángo ya bana oyo babomamaki na boumeli ya bambula zomi oyo euti koleka kati na mokili mobimba, kopesáká motángo ya mawa oyo molandi. Koleka bana 1,5 milió babomamaki na bitumba kati na mokili mobimba; koleka milió 4 bakómaki bibɔsɔnɔ to batɛngumi, bakufi-miso, to bɔɔngɔ́ na bango ezalaki malamu te; koleka milió 12 babungisaki bandako na bango; milió 10 bakómaki bato bakimá-mboka; milió 5 basengisamaki na kofanda na bakáa ya bato bakimá-mboka mpe milió 1 bakabwanaki na mabota na bango. Mwana moko kati na bana 200 na mokili mobimba atungisamaki mpo na bitumba kati na bambula zomi oyo euti koleka mpe azalaki na mposa ya lisungi mpo na kosilisa mpasi na ye na mayoki.
Iode kati na mungwa
Lisangá libéngami Fonds de Nations Unies pour l’enfance ekanisi ete kozanga ya iode kati na bilei ezali kobebisa kolɔngɔ́nɔ́ malamu ya bato soko milió 600. Kati na baoyo bazwami na yango, ekanisami ete bozangi yango ekopesa nzela na bana soko 100 000 na mbula mobimba ete bábotama lokola bilema (kokóla malamu te na nzoto mpe mayele te mpo na kozanga ya thyroïde) mpe kokitisa bokóli ya nzoto mpe ya mayele ya bana mosusu milió 50. Kozanga ya iode mpe epesaka nzela na limɛ́u (goitre), koyikana ya mai na thyroïde. Ezali mpasi te mpe ntalo te mpo na kopɛngola bozangi ya iode—esengeli bobele kosalela mungwa oyo ezali na iode. Milende mizali kosalelama mpo na kobimisa mungwa ya Iode na mokili mobimba na boumeli ya mobu 1995 mpe kosilisa mikakatano oyo miuti na bozangi ya Iode kobanda sikawa kino na mobu 2000.
Libándá ya masano “lipambolami lisusu”
Zulunalo La Repubblica eyebisi ete: ekipi moko ya lisano ya ndembo na Pescara, na Italie, elukaki lisungi kala mingi te epai na episkɔ́pɔ moko ya Katolike mpo na kolongola “botutu” oyo ezalaki kotungisa bango. Lokola balɛmbi ntango molai na “botutu” oyo bakanisi ete euti mpo na libándá ya masano, mokambi ya ekipi asɛngaki lisungi ya nguya epai na bakonzi ya lingomba. Mwa ntango moke liboso, sángó moko apambolaki libándá ya masano mpe ekipi elóngaki lisano oyo lilandaki. Bakonzi ya ekipi mpe babeti ya ndembo oyo bazalaki na molulu ya “kopambola lisusu”—molulu ya mísa mosalamaki na episkɔ́pɔ ye moko bobele wana na libándá ya masano—na kokanisáká ete mbala oyo ekipi ekosala malamu koleka. Zulunalo La Repubblica elobi ete ntango libándá ya masano lifungwamaki, bapambolaki mpe yango, kasi “komwangisama ya mpaka na malasi na ntango ya bofungoli ebungisaki mpenza nguya na yango.”
Koningana ya mabelé mbala 80 000 na boumeli ya mibu 40
Zulunalo Frankfurter Allgemeine Zeitung eyebisi ete: “Esika oyo etalelaka koningana ya mabelé na Bensberg pene na Cologne esilaki koyeba koningana ya mabelé koleka mbala 80 000 bipai binso na mokili mobimba.” Yango eyebisamaki na Molakisi Ludwig Ahorner, mokambi ya esika yango, oyo esilaki kokóba kotánga koningana ya mabelé na boumeli ya mibu 40. Ndenge nini esika yango ezali na likoki ya koyeba koningana ya mabelé oyo ezali kosalema bipai mosusu na mokili? Na kosaleláká bisaleli oyo bizali na likoki ya komonisa bolɛ́ngi ya moke kati na mabelé oyo euti na mbongé ya mopɛpɛ na ntango ya mpiɔ na kobukáká bokula na Mai monene na Nɔ́rdi, soko na ntáká ya bakilomɛtɛlɛ 200. Koningana ya mabelé oyo elekaki makasi na Allemagne, oyo eyebanaki na esika yango, esalemaki na Apríli 1992. Ezalaki na 5,9 na échelle ya Richter.
Efelo monene ya banzeté
Efelo monene ya mboka Chine, oyo elóngaki bobele mwa ndambo na kobenganáká mampinga ya basodá ya Mongolie esili koleka bikeke mingi, ekoki sikawa kozwa lotómo oyo esengeli na yango. Engebene zulunalo Science News, kobanda na bambula 1950, etando monene ya banzeté elónamaki na pembenipembeni ya efelo. Efelo yango monene ya banzeté, lokola bazalaki kobénga yango, ezali na banzeté soko milió 300. Mokano na yango: kosala lokola epekiseli na mopɛpɛ ya zɛ́lo oyo ebetaka na Chine longwa na mokili mokauki ya Gobi mpe na bisika mosusu oyo bikauka. Matomba nini mamonani? Na bambula 1950, engumba Pékin ezingamaki na mipɛpɛ ya zɛ́lo kobanda 10 kino 20 na eleko nyonso ya ebandeli ya molungé, kokitisáká bomoni malamu na nsé ya kilomɛtɛlɛ moko mpo na ngonga 30 kino 90 sanza na sanza. Kasi, na bambula 1970, motángo ya mipɛpɛ ekitaki na nsé ya mitano na ebandeli ya eleko nyonso ya molungé, kokitisáká bomoni malamu yango na nsé ya ngonga zomi na sanza. Zulunalo Science News etángaki moto moko ya mayele na makambo matali mopɛpɛ oyo alobaki ete etando monene wana ya banzeté “ezali mbala mosusu moko ya manáka maleki minene ya bokitisi mbongwana ya bileko na ekeke ya 20.”
Losambo ya Satana kati na bolɔ́kɔ
Bakonzi ya bolɔ́kɔ na Colorado, États-Unis, bapesaki nzela te na mokangami moko ete asala milulu ya losambo ya Satana kati na eteni na ye ya ndako na bolɔ́kɔ. Mibeko ya mboka mipekisaki losambo ya Zábolo; lisusu, bakonzi balobaki ete makambo mosusu oyo mokangami asɛngaki mpo na kosambela—esangisaki eteni mokuse ya nzeté, yɛngɛlɛ, robe ya moindo, babuji mpe bityelo ya buji, nkeni mpe mpaka na malasi—bikokaki kosalelama lokola bibundeli. Nzokande, kala mingi te, mosambisi moko ya mboka na etúká Denver abongolaki ekateli wana na kolobáká ete mokangami azali na lotómo ya kosalela losambo na ye kati na bolɔ́kɔ. Na nsima, mosambisi asukisaki ete mobeko oyo mopekisi losambo ya Satana eyebani na mibeko ya Leta te. Engebene lapólo ya Lisangá moko ya bopanzi nsango, mosambisi akomaki na ekateli na ye ete: “Tosengeli kopesa na Zábolo oyo ezali ya Zábolo.” Mokangami yango azali kosala etumbu ya mbula zomi mpo ete ayibaki moto.
Mangomba ndenge na ndenge kati na Mai monene ya Súdi
Lapólo moko ya likita ya mangomba mpo na makambo ya Pacifique na Fidji emonisi ete bakambi ya losambo bazali komilela mpo na bokóli ya oyo babéngi NGR (Bituluku ya Mangomba ya Sika) na Pacifique ya Súdi. Mingimingi, NGR oyo elobelami ezali bongo ba Assemblées de Dieu, ba Adventistes du septième jour, ba Mormons, Batatoli ya Yehova mpe basangani ya lingomba Baha’éi. Lapólo ya Manfred Ernst emonisi ete soko 20 % ya bafandi ya bisanga wana basili kosangana na mangomba yango. Mangomba mamileli ete NGR ezali kopekisa mbongwana ya politiki mpamba te basusu kati na bango bazali kosangana te na masangá ya politiki to bazali kotɛmɛla misala na yango, basusu bakosanganaka na basɛndiká te. Zulunalo Mainichi Daily News, elobi ete: “Engebene Ernst, NGR eyebani mingi koleka mpo ete balandaka te mibeko ya kala ya mangomba minene ya boklisto.”
Bolukiluki etali kobebisa bato na mboka Argentine
Kobanda Yanuáli kino Ɔkɔtɔ́bɛ 1994, etúká bobele moko ya mboka Argentine, Córdoba, epesi lapólo ya bato 254 oyo babebisamaki. Clarín, zulunalo ya Buenos Aires, emonisi ete lapólo ya bapolisi ya etúká Córdoba “eboyi masoló oyo matali kobebisama na kosangisa nzoto.” Babebisi bazali te bobele baoyo baziki na mposa ya kosangisa nzoto oyo bazali kokɔtela bato oyo bayebi bango te na butu; engebene lapólo yango, bato 4 oyo babebisami kati na bato 10, babebisami kati na bandako na bango moko na batata na bango, na batata-babɔ́kɔli to na biboto. Mituya misusu kati na lapólo wana ya bapolisi mimonisi ete “kati na bato 254 oyo babebisamaki na mbula oyo, 36 % esalemaki na bandako ya bato yango; 23 % na kolongwa na bandako ya mabina, 13 % na balabála, 10 % na bisika oyo bizangi bafandi, 6 % na bisika ya botongi mpe 3 % na mabándá ya masano, na batwalɛti ya bisika bazelaka bísi, na biteni ya ndako ya bolɔ́kɔ mpe na kominanola kati na bísi na zámba.” Lapólo esukisi na kolobeláká ete bapolisi bakataki makambo ya bato 66,54 %.