Koyoka makebisi esalisaki bango
MOKOLO ya misato, mwa 24 Augusto 2005, molunge ezalaki makasi na engumba Nouvelle-Orléans, na etúká ya Louisiane, na États-Unis. Alan ná libota na ye bakendaki kolekisa mwa mikolo na engumba Beaumont, na etúká ya Texas, na ntaka ya kilomɛtrɛ koleka 300 na wɛsti ya Nouvelle-Orléans. Bamemaki bilamba mpo na mikolo mitano. Alan alobi boye: “Toyokaki ata te nsango ya ekumbaki Katrina, oyo ezalaki koya na ɛsti ya Florida. Kasi, na mokolo ya mitano na butu, emonanaki polele ete mopɛpɛ moko ya makasi mpenza ekobɛta na Nouvelle-Orléans.”
Na mokolo ya lomingo mwa 28 Augusto, emonanaki ete Katrina ekozala mopɛpɛ moko ya nsɔmɔ. Mokonzi moko ya Nouvelle-Orléans asɛngaki na bato nyonso bálongwa na engumba yango. Na yango, ebele ya mituka ebandaki kokende na nɔrdi mpe na wɛsti, mpe babalabala ya minene ekómaki nkaka. Bankoto ya bato oyo bazalaki na mituka te balukaki bisika ya komibomba to bakendaki na libándá moko ya masano ya monene babengi Superdome. Bamosusu bamonaki malamu báfanda kaka na bandako na bango tii ntango mopɛpɛ ekosila.
‘Na mbala ya nsima, nakozala moto ya liboso!’
Joe, Motatoli ya Yehova moko, azalaki moko ya bato oyo batikalaki na bandako na bango. Akanisaki ete ata soki atikali na ndako na ye, mopɛpɛ yango ekosala ye eloko te. Azalaki koloba ete, na mipɛpɛ ya liboso mpe bakonzi bazalaki koloba kaka bongo, kasi esalaki eloko te. Alobi boye: “Nakanisaki ete soki natikali, mopɛpɛ yango ekosala ngai eloko te. Kasi, mosika te namonaki ete nasalaki bozoba. Mopɛpɛ ná mbula eyaki na nguya moko ya koloba te. Na mbala moko, mopɛpɛ ememaki manzanza ya ndako na ngai. Na nsima, mai ebandaki kotonda na ndenge moko ya nsɔmɔ; kaka nsima ya ngonga misato, emataki tii na mɛtrɛ misato! Lokola ezalaki komata nokinoki, namataki na etaze. Nabangaki makasi mpamba te mopɛpɛ ezalaki kobɛta makasi mpe namonaki lokola bifelo elingi kokwea. Plafɔ ezalaki kokwea. Nabandaki sikoyo koluka ndenge ya kokima.
“Nazwaki likanisi ya komibwaka na mai. Kasi, mbonge ezalaki makasi. Mopɛpɛ ezalaki komema mbonge makasi na babalabala ya pembenipembeni. Nayebaki ete soki namibwaki na mai, nakoki kozinda.”
Nsukansuka, masuwa moko eyaki kozwa Joe mpe ekendaki kotika ye na gbagba moko. Bibembe mpe nyei ezalaki kotepatepa na mai bipai nyonso. Alalaki butu moko na kati ya motuka. Na nsima, bamemaki ye na elikoptɛrɛ mpe lisusu na bisi tii na ndako monene ya makita ya engumba Nouvelle-Orléans. Alobi boye: “Kuna, bayambaki ngai na boboto mpenza. Na boumeli ya mwa ntango, nayebaki lisusu eloko te. Nazalaki komituna, ‘Nakozwa molangi mosusu ya mai wapi?’ ”
Ntango Joe azalaki kokanisa, amonaki ete mpasi wana ekómelaki ye kaka mpo na bozoba na ye moko. Alobaki boye: “Nazwi mayele. Na mbala ya nsima, soki nayoki kaka bakonzi balobi tókima, ngai nakozala moto ya liboso ya kokima!”
Aboyaki koyoka, kasi na nsima akimaki likoló ya nzete
Na bingumba Biloxi ná Gulfport, na etúká ya Mississippi, bandako mingi ebebaki mpe bato bakufaki. Zulunalo moko (The New York Times) elobi na ebimeli na yango ya 31 Augusto 2005 ete Vincent Creel, mokonzi moko ya engumba Biloxi alobaki boye: “Bato mingi baboyaki kokima mpamba te ntango ekumbaki Camille esalemaki [na 1969], esalaki bango to bandako na bango eloko te.” Emonanaki ete ekumbaki Camille elekaki ekumbaki Katrina na makasi, kasi ndenge Creel alobaki yango, Katrina ‘ememaki mai na nguya moko makasi lokola tsunami.’
Moto mosusu ya Biloxi oyo aboyaki kokima ezalaki Inell, oyo aumeli mingi na engumba yango. Alobi boye: “Mbula na mbula, mipɛpɛ ya makasi ebɛtaka awa, kasi esalaka biso eloko te. Yango wana ekumbaki Katrina ezalaki mpenza kobangisa ngai te.” Inell asangisaki na ndako na ye mama-bokilo na ye ya mbula 88, mwana na ye ya mobali mpe ya mwasi ná mobali na ye, bakisá mpe mbwa mibale ná nyau misato, mpe bazwaki ekateli ya kotikala kaka na ndako na bango, oyo etongamaki malamu mpenza. Mopɛpɛ ebandaki na Biloxi mwa 29 Augusto, na ngonga ya zomi ya ntɔngɔ. Inell alobi boye: “Namonaki mai ezali kokɔta na eteni moko ya ndako oyo ezali na nsuka mpenza. Na nsima, ekómaki kokɔta na bipai nyonso. Tomonaki malamu tómata na plafɔ. Kasi mai ezalaki kaka komata. Tosengelaki kobima na plafɔ mpo mai ekuta biso kuna te. Tobandaki komituna, ‘Tokokende wapi?’
“Mwana na ngai ya mobali atɔbɔlaki lidusu moko, tobimaki wana mpe tobandaki konyanya. Tosimbaki nsɔngɛ ya manzanza ya ndako. Biso misato tokendaki na lobɔkɔ ya mobali, kasi mwana na ngai ya mwasi akendaki na lobɔkɔ ya mwasi. Namonaki nzete moko ya monene penepene na biso. Ngai ná mwana na ngai ya mobali ná mama-bokilo tobɛtaki mai tii na nzete yango mpe tomataki na bitape na yango. Na nsima, nayokaki mwana na ngai ya mwasi azali koganga, “Mama! Mama!” Mobali na ye, oyo abimaki moto ya nsuka na plafɔ, akendeki kobikisa ye. Bango mibale babɛtaki mai tii na masuwa moko oyo batɛlɛmisaki na balabala, kasi nsinga na yango ekatanaki mpe ezalaki kotepatepa penepene na ndako na biso. Babengaki ngai nalanda bango na kati ya masuwa. Naboyaki komitya lisusu na likama ya komibwaka na kati mai wana. Namonaki malamu natikala kaka likoló ya nzete.
“Kuna na likoló ya nzete, nazalaki komona ndenge mai ezalaki koleka na balabala mpe na pembenipembeni ya ndako. Nabandaki komituna soki nakosuka ndenge nini, mpe namimonaki mpenza zoba ndenge naboyaki koyokela bakonzi.
“Na nsima, mai ebandaki kokita, mpe nsukansuka biso nyonso tokómaki na kati ya masuwa. Motuka moko ya babomi mɔtɔ eyaki mpe ememaki biso na lopitalo. Totɔndaki mpenza Nzambe ndenge tobikaki!”
Ndenge Batatoli bamibongisaki mpo na kokima
Ekumbaki Katrina ebɛtaki na Golfe ya Mexique mobimba, banda na ɛsti ya etúká ya Louisiane tii na etúká ya Alabama, epai bankoto ya bandako ebebisamaki. Kasi, wana ezalaki te mopɛpɛ ya makasi ya liboso oyo ebɛtaki na eteni wana ya États-Unis. Yango wana, Batatoli ya Yehova bazwá bibongiseli mpo na lolenge ya kokima soki esengeli. Mbula na mbula, mingimingi na sanza ya motoba, liboso mipɛpɛ makasi ebanda, masangá 21 ya Batatoli ya Yehova na Nouvelle-Orléans batalelaka lisusu bibongiseli yango. Na yango, Batatoli mingi ya Nouvelle-Orléans bayebaka nini basengeli kosala soki esɛngi ete bákima. Ndenge nini basalelaki bibongiseli yango mpo na ekumbaki Katrina?
Ntango kaka bakonzi ya engumba basɛngaki bato bákima, bankulutu ya lisangá mokomoko balendisaki bandeko bákima. Bandeko mingi bakimaki elongo na bandeko to baninga na bango. Bibongiseli ezwamaki mpo na kosunga mibange ná bibɔsɔnɔ. John, oyo azalaki na komite moko ya lisungi ya Batatoli, alobaki boye: “Nazali mpenza kondima ete tobikisaki bato ebele ndenge tosalelaki ebongiseli yango.” Na ndenge yango, Batatoli mingi babimaki na engumba yango liboso mopɛpɛ ebanda. Mpo na kosunga bandeko na bisika yango, biro ya filiale ya Batatoli ya Yehova na États-Unis ebongisaki komite moko ya lisungi.
Bakei koluka Batatoli na Astrodome
Bazalaki kopesa bato soki 16 000, oyo bautaki mingimingi na Louisiane, bilei, mai mpe bisika ya kolala na libándá ya masano Astrodome, na engumba Houston, na etúká ya Texas. Komite ya lisungi ya Batatoli na engumba yango bayokaki ete Batatoli bazali mpe na kati ya ebele ya bato wana. Kasi, ndenge nini bakokaki koyeba bango?
Na ntɔngɔntɔngɔ ya mokolo ya mitano, mwa 2 Sɛtɛmbɛ, etuluku moko ya bankulutu bayaki na Astrodome mpo na koluka bandeko na bango oyo bazalaki wana. Bakamwaki komona bankoto ya mibali, basi, bilenge mpe bana batondi na kati ya ebakata ya libándá wana. Libándá yango etondaki na bambeto mpe bato, oyo bazalaki kozela nani akoya kosilisa mikakatano na bango. Bato ya maladi batandamaki milɔngɔ mpe minganga bazalaki kokimakima mbangu mpo na komema baoyo bazalaki na maladi makasi na kati ya mituka ya bato ya maladi (ambulance).
Samuel, moko ya bankulutu oyo bakendaki koluka Batatoli, alobaki boye: “Namonaki lokola nde nazali na kati ya kaa ya bato bakimi bitumba.” Ndenge nini bakokaki koyeba Batatoli na kati ya ebele ya bato wana? Bankulutu yango babandaki naino kotambolatambola na basikalie nyonso ya libándá yango na bitanda ya minene na mabɔkɔ, oyo bakomaki na likoló na yango mpo na kosɛnga Batatoli bámiyebisa. Basalaki bongo ngonga misato mobimba, kasi bamonaki ata Motatoli moko te. Yango wana bamonaki ete basengeli kosalela mayele mosusu. Basɛngaki bato ya Croix-Rouge báyebisa na nzela ya bamikro ete: “Tosɛngi na Batatoli nyonso báleka na ekɔteli ya ɛsti na nse.”
Nsukansuka, Batatoli babandaki koya mino nyonso libándá. Samuel alobi boye: “Bazalaki kolela na esengo. Bazalaki koyamba biso mpe kokangama na biso. Bazalaki kobanga kotika biso noki bábungisa biso na kati ya ebele ya bato wana. Na mokolo ya mitano mpe ya pɔsɔ, bazwaki Batatoli 24 mpe bamemaki bango na esika oyo babongisaki mpo na Batatoli.”
Mingi kati na bango batikalaki mabɔkɔ mpamba, longolá kaka bilamba ya salite oyo balataki na nzoto. Ndeko mwasi moko azalaki na mwa kartɔ na ye, oyo ezalaki na bonene ya kartɔ ya sapato. Ezalaki na mwa mikanda ya ntina mingi; kaka biloko wana nde ebebaki te.
Na Astrodome, bato mingi bayebaki ete bankulutu oyo bakendaki kuna bazalaki Batatoli ya Yehova mpe bayaki kosɛnga bango Babiblia mpe mikanda mosusu. Basɛngaki Babiblia koleka 220. Batatoli bakabolelaki mpe bato yango Lamuká! ya 22 Yuli 2005 oyo ezipeli na yango ezalaki na motó ya likambo, “Catastrophes naturelles : de pire en pire ?”
Bato mosusu bazongi na bisika na bango
Moko ya bato oyo babikaki na mopɛpɛ yango ezali mopanzi-nsango moko ya monene, oyo azali mpe mokambi na televizyo moko ya Nouvelle-Orléans. Na mosala na ye ya mopanzi-nsango, amonaki makama mingi ya ndenge wana liboso. Kasi, yoká ndenge alobaki ntango azongaki na ndako na ye na engumba Jefferson, na etúká ya Louisiane mpo na kozwa mwa biloko na ye mosusu: “Nabulunganaki mpenza. Biloko nyonso ebebaki. Na televizyo, tomonaki ndenge mai ebukaki bifelo oyo batyelá yango mpe ebandaki kokɔta na kati ya mboka. Kasi, mipɛpɛ ya nsɔmɔnsɔmɔ mpe esalaki mabe moko ya kosakana te. Ndako na biso ebebaki mobimba mpenza. Biloko nyonso egugi mpe epɔli. Bisika nyonso ekómaki nsolo mabe. Nsɔmɔ! Nsɔmɔ! Atako bongo, tozali na bomoi.”
Nsukansuka, Alan oyo tolobelaki na ebandeli ya lisolo oyo, azongaki na ndako na ye na Metairie, kartye moko na wɛsti ya Nouvelle-Orléans. Mopɛpɛ esasaki mpenza kosasa. Alobi boye: “Okokoka kotala mbala mibale te, ezalaki mpenza mpasi. Ezalaki lokola nde babwakaki bɔmbi na engumba. Koyoka yango na bansango to kotala yango na televizyo ezali ndenge mosusu. Kasi, tambolá yo moko na makolo to na motuka na kartye na yo mpo omona ndenge bandako mpe biloko nyonso ebebi; nsɔmɔ! Okondima te!
“Na ndakisa, nsolo lokola ebembe etondi na bisika nyonso. Bamagazini mingi ebebaki nyɛɛ to ezindaki na mai. Bapolisi ná basoda bazalaki na bisika nyonso. Ezalaki lokola nde etumba ekɔti na mboka.”
Lisungi oyo epesamaki
Bakonzi ya engumba, ya etúká mpe ya guvɛrnema bazwaki bibongiseli mpo na kosunga bato oyo likama yango ekómelaki bango. Nkombo ya ebongiseli ya guvɛrnema ezalaki FEMA (Federal Emergency Management Agency). Bibongiseli mosusu mpe ezalaki kosala nyonso mpo na kosunga bankoto ya bato oyo bazwaki likama. Mituka eyaki na ebele ya bilei, bilamba mpe mai na bisika oyo mopɛpɛ yango elekaki. FEMA ebandaki mbala moko kokabolela bato yango mbongo mpo na kosalisa bango bákoka kobikela na mwa mikolo to bapɔsɔ ya liboso. Kasi, Batatoli ya Yehova bazalaki kosala nini na ntango wana?
Mosala ya koluka mpe kobongisa bandako oyo ebebaki
Ntango kaka mopɛpɛ ebandaki, Batatoli babongisaki baekipi ya bandeko oyo basengelaki koluka na bisika oyo mopɛpɛ elekaki bandako ya Batatoli mpe Bandako ya Bokonzi oyo ebebaki to ebukanaki. Ndenge nini bakokaki kokokisa mokumba monene wana? Lisangani ya Mikóló-Bakambi ya Batatoli ya Yehova, na Brooklyn, na etúká ya New York, bapesaki biro ya filiale ya États-Unis ndingisa ya kobongisa bakomite ya lisungi. Na yango, babengaki bakomite ya Botongi ya bitúká mingi ya États-Unis eya kobanda mosala ya kotonga.a Mosala nini basali?
Na mokolo ya 17 Febwali 2006, ekipi ya engumba Long Beach, na etúká ya Mississippi, bayebisaki ete na eteni oyo bango bazwaki, basilisaki kobongisa bandako 531 na kati ya bandako 632 ya Batatoli oyo ebebaki. Kaka bandako 101 nde esilaki naino te. Batatoli basalisaki mpe bato mosusu oyo bazali Batatoli te. Manzanza ya Bandako ya Bokonzi 17 elongwaki nyonso, mpe na katikati ya sanza ya Febwali, basilisaki kobongisa 16. Ezali boni mpo na komite ya engumba Baton Rouge, na etúká ya Louisiane?
Bango bazalaki kosala na etúká ya Louisiane, oyo ekumbaki Katrina ebebisaki makasi koleka bisika mosusu nyonso. Na bandako 2 700 ya Batatoli oyo ebebaki kuna, basilisaki kobongisa 1 119 na katikati ya sanza ya Febwali; elingi koloba mosala ezalaki naino mingi. Kuna mpe, basalisaki baninga ya kartye mpe bandeko ya Batatoli, oyo bazalaki mpe na bosɛnga. Bandako ya Bokonzi 50 ebebaki makasi. Na sanza ya Febwali, basilisaki kobongisa 25. Na etúká ya Texas, ekipi ya engumba Houston esengelaki kobongisa bandako 871 oyo ebebaki na ekumbaki Rita, na sanza ya Sɛtɛmbɛ. Na mokolo ya 20 Febwali, basilisaki kobongisa 830.
Mateya oyo tozwi na Katrina
Bankoto ya bato oyo Katrina ebɛtaki bango bazwá liteya moko ya ntina mingi: esengeli koyokaka makebisi. Na ntembe te, mingi kati na bango balobaki lokola Joe, oyo tolobelaki liboso: “Na mbala ya nsima, soki nayoki kaka bakonzi balobi tókima, ngai nakozala moto ya liboso ya kokima!”
Batatoli ya Yehova bazali kokoba kosalisa bato oyo mopɛpɛ ebebisaki biloko na bango na Golfe ya Mexique. (Bagalatia 6:10) Kasi, mosala ya libosoliboso ya Batatoli ya Yehova, oyo bazali kosala na mikili 235, ezali te kaka ya kosunga bato na biloko ya mosuni. Ezali nde ya kokebisa bato na likama moko ya monene koleka oyo ya mopɛpɛ mabe. Biblia esakoli ete mosika te Nzambe akosukisa mokili oyo ya mabe, akopɛtola mabelé mpe akokómisa yango ndenge alingaki ezala na ebandeli. Soki olingi koyeba oyo Biblia elobi mpo na eleko yango ya kosambisa, sololá na Batatoli ya Yehova na esika ofandi to tindá mokanda na adrɛsi moko oyo ebongi na yo na lokasa 5 ya zulunalo oyo.—Malako 13:10; 2 Timote 3:1-5; Emoniseli 14:6, 7; 16:14-16.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Bakomite ya Botongi esalemi na baekipi ya Batatoli ya Yehova oyo bayebi mpenza mosala ya kotonga, oyo bamipesi na bolingo na bango moko mpo na kotonga mpe kobongisa Bandako ya Bokonzi. Tozali na baekipi ya ndenge wana soki 100 na États-Unis mpe mingi lisusu koleka na mokili mobimba.
[Elilingi na lokasa 22]
Fɔtɔ ya ekumbaki Katrina oyo bakangaki na satelite
[Eutelo ya elilingi]
NOAA
[Elilingi na lokasa 23]
Ndenge Nouvelle-Orléans ezindaki
[Eutelo ya bafɔtɔ]
AP Photo/David J. Phillip
[Bililingi na lokasa 23]
Ekumbaki Katrina ebebisaki bandako mpe ebomaki ebele ya bato
[Eutelo ya bafɔtɔ]
AP Photo/Ben Sklar
[Elilingi na lokasa 24]
Libándá ya masano Astrodome ya engumba Houston, na etúká ya Texas eyambaki bato soki 16 000 oyo bakimaki Katrina
[Bililingi na lokasa 25]
Bankulutu bakendaki koluka Batatoli na kati ya bato oyo bakimaki na Astrodome
[Elilingi na lokasa 26]
Bandeko ya bolingo malamu bazali kobongisa ndako moko oyo manzanza na yango nyonso elongwaki
[Bililingi na lokasa 26]
Batatoli basepelaki mingi ndenge bandeko babongiselaki bango bandako na bango
[Bililingi na lokasa 26]
Bandeko ya bolingo malamu bapesaki biloko ya kolya
[Bililingi na lokasa 27]
Alan