Sanza ya 6
Mwayambo, 1 sanza ya 6
Nyonso oyo bokosɛnga Tata na nkombo na ngai, akopesa bino yango.—Yoa. 15:16.
Na ntembe te, elaka wana ya Yesu elendisaki bantoma! Bantoma bayebaki mpenza te ete etikalaki moke Yesu akufa. Kasi liwa na ye elingaki komonisa te ete bakozanga mosungi. Yehova azalaki pene ya koyanola na mabondeli na bango mpe kosalisa bango na mosala ya kosakola. Asalaki mpe kaka bongo. Mwa moke nsima ya liwa ya Yesu, bantoma babondelaki Yehova apesa bango mpiko, mpe ayanolaki na mabondeli na bango. (Mis. 4:29, 31) Ezali mpe bongo lelo oyo. Totikalaka baninga ya Yesu ntango tozali kokoba kosakola. Mpe tokoki komindimisa ete Yehova azali pene ya koyanola na mabondeli na biso wana tozali kosɛnga ye lisalisi ntango tozali na mokakatano mpo na kosakola. (Flp. 4:13) Tozali na esengo ndenge Yehova ayanolaka na mabondeli na biso mpe tozali baninga ya Yesu. Makabo wana nyonso oyo eutaka epai ya Yehova esalisaka biso tókoba kobota mbuma.—Yak. 1:17. w18.05 21 par. 17-18
Mwamibale, 2 sanza ya 6
Tólendisanaka, mpe tósalaka bongo mingi koleka awa tozali komona mokolo yango ezali kobɛlɛma.—Ebr. 10:24, 25.
Mbula mitano ekokaki te, bakristo oyo bazalaki kofanda na Yerusaleme bamonaki ete ‘mokolo ya Yehova’ mpo na kopesa Yerusaleme etumbu ekómaki pene mpe bamonaki ete basengeli kokima engumba yango ndenge Yesu ayebisaki bango básala. (Luka 21:20-22; Mis. 2:19, 20) Mokolo yango eyaki na mobu 70 T.B. ntango Baroma babebisaki Yerusaleme. Lelo oyo mpe, ‘mokolo ya Yehova oyo ezali monene mpe nsɔmɔ mingi’ ekómi pene. (Yoe. 2:11) Mosakoli Sefania alobaki: “Mokolo monene ya Yehova ekómi pene. Ekómi pene, mpe ezali koya mbangu mpenza.” (Sef. 1:14) Maloba yango etali mpe mikolo na biso. Yango wana, tosengeli ‘kotyelana likebi mpo tólendisana mpo tózala na bolingo mpe tósala misala ya malamu.’ (Ebr. 10:24) Na yango, tosengeli koyekola kotyela bandeko likebi mingi koleka mpo tólendisa bango na ntango oyo esengeli. w18.04 20 par. 1-2
Mwamisato, 3 sanza ya 6
Zalá na mpiko mpe zalá na makasi. Kolɛnga te mpe kozala na nsɔmɔ te, mpo Yehova Nzambe na yo azali na yo epai nyonso okokende.—Yos. 1:9.
Na ntembe te, maloba wana ya Yehova elendisaki mpenza Yosua liboso akɔtisa basaleli na Ye na Mokili ya Ndaka! Yehova asukaki kaka te na kolendisa moto mokomoko, alendisaki mpe basaleli na ye nyonso na mbala moko. Na ndakisa, Yehova ayebaki ete Bayuda bakozala na mposa ya libɔndisi na boombo na bango na Babilone, mpe ayebisaki esakweli moko mpo na kolendisa bango; alobaki: “Kobanga te, mpo nazali na yo. Kotala epai na epai te, mpo nazali Nzambe na yo. Nakopesa yo makasi. Nakosalisa yo mpenza. Nakosimba yo mpenza na lobɔkɔ na ngai ya mobali ya boyengebene.” (Yis. 41:10) Na nsima, Yehova alendisaki bakristo ya liboso, alendisaka mpe biso lelo. (2 Ko. 1:3, 4) Yehova alendisaki mpe Mwana na ye. Nsima ya kozwa batisimo, Yesu ayokaki mongongo moko euti na likoló, elobi: “Oyo azali Mwana na ngai ya bolingo, oyo nandimi.” (Mat. 3:17) Na ntembe te, maloba yango epesaki Yesu makasi ya kosala mosala oyo Tata na ye apesaki ye awa na mabele. w18.04 16 par. 3-5
Mwaminei, 4 sanza ya 6
Nzete ya koyeba malamu ná mabe osengeli kolya yango te.—Eba. 2:17.
Ntango batángaka mitindo oyo Yehova apesaki Adama, bato mosusu bakoki komona ete Adama azalaki na bonsomi te ya kosala oyo alingaki. Kasi, bayebaka te ete kozala na bonsomi ya kopona to ya kozwa bikateli ekeseni na kozala na lotomo ya kokata nini ezali malamu mpe nini ezali mabe. Adama ná Eva bazalaki na bonsomi ya kopona soki bakotosa Nzambe to te. Kasi kaka Yehova nde azali na lotomo ya kokata nini ezali malamu mpe nini ezali mabe, mpe “nzete ya koyeba malamu ná mabe” ezalaki komonisa Adama ná Eva likambo yango. (Eba. 2:9) Ntango Yehova apesaki Adama ná Eva mitindo ete bálya mbuma ya nzete wana te, ateyaki bango ete mpo bázala na bonsomi ya solosolo basengelaki kotosa ye. Likambo ya mawa, Adama ná Eva baponaki kotosa Yehova te. Ekateli oyo Adama ná Eva bazwaki ebakiselaki bango bonsomi, ndenge Satana alobaki? Soki moke te. Lokola balukaki kokata bango moko soki nini ezali malamu mpe nini ezali mabe, babungisaki bonsomi ya solosolo oyo Yehova apesaki bango. w18.04 5-6 par. 9-12
Mwamitano, 5 sanza ya 6
Ntango nyonso oyo bazalaki na mpasi, ye mpe azalaki koyoka mpasi.—Yis. 63:9.
Yehova asukaka kaka te na koyokela basaleli na ye oyo bazali konyokwama mawa. Asalisaka mpe bango. Na ndakisa, ntango Bayisraele bazalaki na boombo na Ezipito, Yehova ayebaki mpasi na bango mpe yango etindaki ye asikola bango. Yehova alobaki na Moize boye: “Ya solo mpenza, namoni mpasi ya bato na ngai . . . mpe nayoki kolela na bango . . . ; mpo nayebi malamu bampasi oyo bazali komona. Mpe nazali kokita mpo na kobikisa bango na lobɔkɔ ya Baezipito.” (Kob. 3:7, 8) Yehova ayokelaki basaleli na ye mawa, yango wana abimisaki bango na boombo. Bambula mingi na nsima, na Mokili ya Ndaka, banguna babundisaki Bayisraele. Yehova asalaki nini? “Yehova azalaki koyoka mawa na komilelalela na bango mpo na banyokoli na bango mpe mpo na baoyo bazalaki kotindikatindika bango.” Lisusu, mawa oyo Yehova ayokelaki basaleli na ye etindaki ye asalisa bango. Atindaki basambisi mpo bábikisa Bayisraele na mabɔkɔ ya banguna.—Bas. 2:16, 18. w19.03 15 par. 4-5
Mwapɔsɔ, 6 sanza ya 6
Mwasi akoki nde kobosana mwana na ye oyo ye azali komɛlisa mabɛlɛ mpo ayokela mwana ya libumu na ye mawa te? Ata basi wana bakoki kobosana, kasi ngai nakobosana yo te.—Yis. 49:15.
Mibeko mibale ya liboso na kati ya Mibeko Zomi esɛngaki ete Bayisraele básambela kaka Yehova mpe epekisaki bango losambo ya bikeko. (Kob. 20:3-6) Mibeko yango ezalaki mpo na litomba ya Yehova te. Kasi, ezalaki mpo na litomba ya basaleli na ye. Ntango bazalaki kosambela banzambe ya lokuta ya bikólo mosusu, bazalaki konyokwama. Kasi, Yehova apambolaki basaleli na ye ntango batikalaki sembo epai na ye mpe bazalaki kosalelana makambo na bosembo. (1 Bak. 10:4-9) Tokoki te kopesa Yehova foti soki baoyo balobi ete basalelaka ye bazali kotosa mibeko na ye te mpe bazali konyokola basaleli na ye. Yehova alingaka biso mpe amonaka ntango tozali konyokwama mpo na kozanga bosembo. Ayebaka mpasi na biso malamu koleka ndenge oyo mama akoki koyeba mpasi ya mwana na ye. Atako mbala mosusu akosala eloko te mpo na biso sikoyo, na ntango oyo ebongi akosambisa basali mabe oyo baboyi kobongola motema mpo na ndenge banyokolaki basusu. w19.02 22 par. 13-15
Mwalomingo, 7 sanza ya 6
Ezala mokano na ngai te, kasi oyo ya yo esalema.—Luka 22:42.
Mwa bapɔsɔ liboso ya Ekaniseli, makita na biso elobelaka mbala mingi ndakisa ya Yesu mpe komikitisa oyo amonisaki na ndenge apesaki bomoi na ye lisiko. Yango etindaka biso tómekola komikitisa na ye mpe tósala mokano ya Yehova, ata ntango ezali mpasi. Tokanisaka mpiko oyo Yesu amonisaki mwa mikolo moke liboso ete akufa. Ayebaki malamu ete mosika te, banguna na ye bakoyokisa ye nsɔni, bakobɛta ye, mpe bakoboma ye. (Mat. 20:17-19) Atako bongo, andimaki kokufa. Ntango ngonga ekokaki, alobaki na bayekoli na ye ya sembo, oyo bazalaki elongo na ye na Getesemane ete: “Bótɛlɛma, tókende. Talá! Motɛki na ngai akómi pene.” (Mat. 26:36, 46) Mpe ntango bato oyo bazalaki na bibundeli bayaki mpo na kokanga ye, apusanaki epai na bango, amimonisaki, mpe asɛngaki basoda bátika bayekoli na ye bákende. (Yoa. 18:3-8) Yesu amonisaki mpenza mpiko! Lelo oyo, bakristo oyo batyami mafuta na elimo mpe bampate mosusu basalaka makasi ya komekola Yesu na oyo etali komonisa mpiko. w19.01 27-28 par. 7-8
Mwayambo, 8 sanza ya 6
Bóluka komikitisa.—Sef. 2:3.
Ndenge kaka moto oyo asalaka mayemi asangisaka langi ndenge na ndenge ya kitoko mpo na kosala liyemi, biso mpe tosengeli kosangisa mwa bizaleli ya kitoko mpo tózala bato ya komikitisa. Kati na bizaleli yango, tokoki kotánga botosi, motema pɛtɛɛ to boboto, mpe mpiko. Kaka bato ya komikitisa nde batosaka makambo oyo Nzambe asɛngi. Na ndakisa, Nzambe asɛngi biso tózala na boboto, motema pɛtɛɛ. (Mat. 5:5; Gal. 5:23) Ntango tosalaka makambo oyo Nzambe asɛngi, Satana ayokaka nkanda. Na yango, ata soki tozali na komikitisa mpe na boboto, bato mingi ya mokili ya Satana bayinaka biso. (Yoa. 15:18, 19) Yango wana, tozali na mposa ya mpiko mpo na kotɛmɛla Satana. Moto oyo azali na komikitisa te azalaka na lolendo, azalaka na nkanda makasimakasi, mpe atosaka Yehova te. Satana azalaka bongo. Yango wana ayinaka mpenza bato ya komikitisa! Bizaleli na bango ya malamu emonisaka polele ete azali mabe mpenza. Mpe likambo ya mabe koleka mpo na Satana, bamonisaka ete azali mobuki-lokuta. Mpo na nini? Mpo ata soki alobi nini to asali nini, akoki te kopekisa bato ya komikitisa básalela Yehova!—Yobo 2:3-5. w19.02 8-9 par. 3-5
Mwamibale, 9 sanza ya 6
Kotala epai na epai te, mpo nazali Nzambe na yo.—Yis. 41:10.
Yehova ayebaki ete bafandi ya Babilone bakokóma kobanga. Mampinga ya nguya ya Bamede ná Baperse ekobundisa Babilone. Yehova akosalela mampinga yango mpo na kolongola bato na ye na boombo na Babilone. (Yis. 41:2-4) Ntango bato ya Babilone mpe bato ya bikólo mosusu bayebaki ete banguna na bango bazalaki kopusana, basalaki makasi bábatela mpiko na bango mpe bazalaki kolobana ete: “Zalá makasi.” Babakisaki mpe banzambe ya bikeko ebele, na elikya ete ekobatela bango. (Yis. 41:5-7) Kasi, Yehova akitisaki mitema ya Bayuda oyo bazalaki bakangami na Babilone na maloba oyo: “Ee Yisraele, [na kokesana na bato mosusu] ozali mosaleli na ngai . . . Kotala epai na epai te, mpo nazali Nzambe na yo.” (Yis. 41:8-10) Yehova alobaki ete: “Nazali Nzambe na yo.” Na maloba wana, azalaki koyebisa basaleli na ye ya sembo ete abosanaki bango te mpe ete bazalaki kaka bato na ye. Ayebisaki bango: “Ngai moko nakosala . . . mpo . . . nakumba bino . . . mpe nabikisa bino.” Na ntembe te, maloba yango ya kobɔndisa epesaki Bayuda makasi.—Yis. 46:3, 4. w19.01 4 par. 8
Mwamisato, 10 sanza ya 6
Mongongo moko eutaki na likoló ete: “Yo ozali Mwana na ngai ya bolingo; nandimi yo.”—Mrk. 1:11.
Mokapo ya Marko 1:9-11 elobeli mbala ya liboso na bambala misato oyo Yehova alobaki uta na likoló. Yehova alobaki ete: “Yo ozali mwana na ngai ya bolingo; nandimi yo.” Ntango Yesu ayokaki mongongo ya Tata na ye ezali koloba ete alingaka ye mpe atyelaka ye motema, yango esimbaki mpenza motema na ye! Maloba ya Yehova emonisaki makambo misato mpo na Yesu: Ya liboso, Yesu azali Mwana na ye. Ya mibale, Yehova alingaka Mwana na ye. Ya misato, Yehova andimi Mwana na ye. Na maloba “Yo ozali mwana na ngai,” Yehova amonisaki ete Yesu, Mwana na ye ya bolingo, akómaki na boyokani ya ndenge mosusu na ye. Ntango Yesu azalaki na likoló, azalaki mwana ya Nzambe ya elimo. Nzokande, ntango azwaki batisimo, atyamaki mafuta na elimo santu. Na ntango wana, Nzambe amonisaki ete Mwana na ye Yesu atyamaki mafuta na elimo mpe akómaki na elikya ya kozonga na likoló mpo na kokóma Mokonzi oyo Ye moko aponi mpe nganga-nzambe monene. (Luka 1:31-33; Ebr. 1:8, 9; 2:17) Yango wana, na batisimo ya Yesu, ezalaki na ntina ete Tata na ye aloba: “Yo ozali Mwana na ngai.”—Luka 3:22. w19.03 8 par. 3-4
Mwamibale, 11 sanza ya 6
Bwanya ezali te . . . wana ezali kotɛmɛla Yehova.—Mas. 21:30.
Satana nde moto ya liboso oyo apesaki bato toli ya mabe. Ayebisaki Eva ete ye ná Adama bakozala na esengo koleka soki bango moko batambwisi bomoi na bango. (Eba. 3:1-6) Kasi, Satana azalaki koluka nde matomba na ye moko! Alingaki ete Adama ná Eva, mpe bakitani na bango, bátosa mpe básambela ye, kasi Yehova te. Yehova nde apesaki bango eloko nyonso oyo bazalaki na yango. Asalaki bango mwasi ná mobali, atyaki bango na elanga moko kitoko, mpe apesaki bango nzoto ya kokoka, oyo ekokaki koumela seko. Likambo ya mawa, Adama ná Eva batosaki Nzambe te. Na yango, bakataki boyokani na Moto oyo apesaki bango bomoi. Ebimisaki mbuma ya mabe mpenza. Ndenge moko na fololo oyo bakati na nzete, mokemoke Adama ná Eva banunaki mpe bakufaki. Bakitani na bango mpe banyokwamaki, ata mpe biso nyonso lelo. (Rom. 5:12) Bato mingi lelo batosaka Nzambe te mpe batambwisaka bomoi na bango ndenge balingi. (Ef. 2:1-3) Mbuma oyo yango ebimisi emonisi bosolo ya maloba ya mokapo ya lelo. w18.12 20 par. 3-4
Mwamitano, 12 sanza ya 6
Tozali [koloba], na maloba oyo eteyami na bwanya ya bato te, kasi na oyo eteyami na elimo, wana tozali kosangisa makambo ya elimo ná maloba ya elimo.—1 Ko. 2:13.
Ntoma Paulo azalaki mayele, atángaki mingi, mpe ayebaki koloba minɔkɔ mibale to koleka. (Mis. 5:34; 21:37, 39; 22:2, 3) Kasi, abwakaki bwanya ya mokili mpe alandaki makanisi ya Liloba ya Nzambe mpo na kozwa bikateli. (Mis. 17:2; 1 Ko. 2:6, 7) Na yango, Paulo asalisaki bato ebele báyeba Nzambe mpe atyaki miso na mbano oyo ekoumela seko. (2 Tim. 4:8) Ezali polele ete makanisi ya Nzambe eleki mosika makanisi ya mokili. Soki tolandi makanisi ya Nzambe, tokozala na bomoi ya malamu mpe ya esengo mpenza. Kasi, Yehova atindaka biso na makasi te tólanda makanisi na ye. “Moombo ya sembo mpe ya mayele,” ata mpe bankulutu, bazali bakonzi ya makanisi na biso te. (Mat. 24:45; 2 Ko. 1:24) Mokomoko na biso azali na mokumba ya kobongisa makanisi na ye mpo eyokana na makanisi ya Yehova. w18.11 20-21 par. 12-13
Mwapɔsɔ, 13 sanza ya 6
Mawa ná kokimela ekokima mpenza.—Yis. 35:10.
Na nzela ya Yisaya, Nzambe asakolaki ete ntango Bayisraele bakozonga na mokili na bango, mokili ekozala na kimya. Moto moko te akobanga ete nyama to bato ya mobulu básala ye mabe. Bilenge mpe mikóló bakozala na likama te. (Yis. 11:6-9; 35:5-10; 51:3) Yisaya asakolaki mpe ete mabele mobimba, kaka ekólo Yisraele te, “ekotonda na boyebi ya Yehova ndenge mai etondi na mbu.” Yisaya asakolaki lisusu ete ntango Bayisraele bakozonga na mokili na bango, nyama to bato bakosala bango mabe te. Alobaki ete mabele ekobimisa bilei ebele mpo mai ekozala beboo, kaka ndenge ezalaki na elanga ya Edene. (Eba. 2:10-14; Yir. 31:12) Kokokisama ya esakweli yango esukaki kaka na ntango ya Bayisraele wana? Tóbosana te ete esakweli yango elobaki mpe ete bakufi-miso, bibɔsɔnɔ mpe bato oyo bakufá matoi bakobika. Kasi, eloko te emonisi ete makambo yango esalemaki epai ya Bayisraele oyo bautaki na Babilone. Na yango, Nzambe alingaki nde komonisa ete akosilisa maladi ya ndenge nyonso na mikolo oyo ezali koya. w18.12 5 par. 11-12
Mwalomingo, 14 sanza ya 6
[Bókoba] kotambola na kati ya solo.—3 Yoa. 3.
Tozali na elikya ya kotambola na kati ya solo libela na libela. Nini ekosalisa biso tókangama makasi na ekateli ya kokoba kotambola na kati ya solo? Kobá koyekola Biblia mpe komanyola na mozindo makambo oyo ozali koyekola. Zalá na programɛ ya malamu mpo na kosala yango mbala na mbala. Soki ozali koyekola mingi, okolinga solo mingi mpe okozala na ekateli ya kotɛka yango ata mokolo moko te. Longola ‘kosomba solo,’ Masese 23:23 elobi na biso ete tósomba mpe “bwanya ná disiplini ná mayele.” Koyeba solo ya Biblia ekoki te. Tosengeli kosalela yango na bomoi na biso. Mayele ekosalisa biso tómona ndenge makambo oyo tozali koyekola eyokani na makambo oyo toyebaki liboso. Bwanya ekotinda biso tósalela boyebi yango. Na bantango mosusu, solo epesaka biso disiplini, esalisaka biso tómona bisika oyo tosengeli kobongisa. Tosengeli kondima nokinoki disiplini yango, mpo Biblia elobi ete ezali na motuya koleka palata.—Mas. 8:10. w18.11 9 par. 3; 11 par. 13-14
Mwayambo, 15 sanza ya 6
Sombá solo mpe kotɛka yango te.—Mas. 23:23.
Eloko nini eleki motuya na bomoi na yo? Mpo na biso Batatoli ya Yehova, eloko oyo eleki motuya ezali boyokani na biso na Nzambe. Tolingaka eloko moko te ezwa esika na yango. Eloko mosusu ya motuya mpo na biso ezali solo ya Biblia, mpo yango nde esalisi biso tókóma baninga ya Yehova. (Kol. 1:9, 10) Yehova azali Molakisi na biso monene mpe ateyi biso makambo ebele na Liloba na ye, Biblia. Alakisi biso ntina ya nkombo na ye mpe ayebisi biso bizaleli na ye ya kokamwa. Alobi ete alingaka biso mingi, yango wana akabaki bomoi ya Mwana na ye Yesu mpo na biso. Yehova ateyi biso mpe makambo etali Bokonzi ya Masiya. Apesi biso mpe elikya ya kofanda na Paradiso awa na mabele. Ateyaka biso lolenge ya bomoi oyo tosengeli kozala na yango. Tozwaka mateya yango na motuya mpo esalisaka biso tózala na boyokani malamu na Mozalisi na biso mpe esalaka ete bomoi na biso ezala na ntina. w18.11 3 par. 1-2
Mwamibale, 16 sanza ya 6
Bólobanaka lokuta te.—Kol. 3:9.
Bato mabe bakoki kokosa basusu, kasi bakoki kokosa Yehova te. Biblia elobi ete “biloko nyonso ezali bolumbu mpe ezali komonana polele na miso” na ye. (Ebr. 4:13) Na ndakisa, Ananiasi ná Safira balukaki kobuba bantoma. Balingaki kobenda likebi ya bandeko ya lisangá; na yango, bayebisaki bantoma ete bapesaki mbongo nyonso oyo batɛkaki elanga. Kasi Yehova ayebaki ete bakosaki; na yango apesaki bango etumbu. (Mis. 5:1-10) Ndenge nini Yehova atalelaka bato oyo bakosaka? Bato nyonso oyo balobaka lokuta mpo na konyokola basusu mpe baboyi kobongola motema bakosuka kaka lokola Satana, “na kati ya laki ya mɔtɔ,” elingi koloba, bakobebisama libela na libela. (Em. 20:10; 21:8; Nz. 5:6) Toyebi ete Yehova “azali moto te mpo abuka lokuta” mpe ekoki kosalema te ete akosa. (Mit. 23:19; Ebr. 6:18) “Yehova ayinaka . . . lolemo ya lokuta.” (Mas. 6:16, 17) Mpo asepela na biso, tosengeli kolobaka solo. w18.10 8 par. 10-13
Mwamisato, 17 sanza ya 6
Okanisaka malamu mpenza makambo yango.—1 Tim. 4:15.
Okosala nini soki patrɔ na bino asɛngi yo opesa mbongo mpo na fɛti moko oyo ezali na boyokani na lingomba ya lokuta? Na esika ozela tii likambo ya ndenge wana esalema, ekozala malamu okanisa banda sikoyo ndenge oyo Yehova atalelaka makambo ya ndenge wana. Na ndenge yango, soki likambo ya bongo ebimi, ekozala mpasi te osala to oloba likambo oyo ebongi. Komanyola libela makanisi ya Yehova ekoki mpe kosalisa biso tótikala sembo na ntango oyo esengeli kozwa lisalisi ya monganga na lombangu. Ya solo, tozalaka na ekateli ya koboya bátya biso makila to moko ya biloko minei oyo ezalaka na kati ya makila. (Mis. 15:28, 29) Ntango nini eleki malamu kozwa ekateli yango? Ezali nde ntango tozali na lopitalo, mbala mosusu na nse ya mpasi, ntango bazali kotya biso mbamba tózwa ekateli nokinoki? Te. Sikoyo nde ntango ya kosala bolukiluki, ya kotondisa mokanda oyo esengeli, na ndakisa karte ya Pas de sang, mpo na koyebisa mposa na yo mpe kosolola na monganga oyo akosalisa yo. w18.11 24 par. 5; 26 par. 15-16
Mwaminei, 18 sanza ya 6
Moto oyo azali koyokela ngai, akofanda na kimya.—Mas. 1:33.
Yehova azali mobateli ya mpate oyo alingaka mpe abatelaka etonga na ye; alɛngɛlaka basaleli na ye mpe abatelaka bango liboso ya banguna. Lokola nsuka ya ebongiseli oyo ekómi pene, koyeba likambo yango ezali kokitisa biso motema mpe kobɔndisa biso. Yehova akokoba kotyela basaleli na ye likebi na bolɔzi monene oyo ekoya mosika te. (Em. 7:9, 10) Na yango, bázala bilenge to mikóló, bato ya nzoto kolɔngɔnɔ to bibɔsɔnɔ, basaleli ya Nzambe bakobanga te mpe bakoyoka nsɔmɔ te na ntango ya bolɔzi monene. Kutu, bakozala na mpiko! Bakokanisa maloba oyo ya Yesu ete: “Bótɛlɛma alima mpe bótombola mitó na bino, mpo kosikolama na bino ekómi pene.” (Luka 21:28) Bakozala na elikya ete Yehova akobatela bango, ata ntango Goge, elingi koloba etuluku ya bikólo ya nguya, ekobundisa bango. (Ezk. 38:2, 14-16) Mpo na nini bakozala na elikya yango? Mpo bayebi ete Yehova abongwani te. Akomonisa lisusu ete azali Mobikisi oyo alingaka basaleli na ye mpe atyelaka bango likebi.—Yis. 26:20. w18.09 26 par. 15-16
Mwamitano, 19 sanza ya 6
Ozali na motuya na miso na ngai, . . . mpe ngai nalingi yo.—Yis. 43:4.
Na ntembe te Bayisraele balendisamaki mingi ntango Yehova alobaki na bango maloba oyo ezali likoló. Yebá ete yo mpe ozali na motuya na miso ya Yehova mpe alingaka yo. Biblia epesi elaka oyo: “Lokola azali Moto ya nguya, akobikisa. Akosepela na yo mpe akozala na esengo.” (Sef. 3:16, 17) Yehova alaki ete akopesa basaleli na ye makasi mpe akobɔndisa bango ata soki bakutani na mokakatano nini. Alobi na bango boye: “Bokomemama na loketo, bakomema bino na mabɔlɔngɔ mpe bakokitisa bino motema. Nakokoba kobɔndisa bino lokola moto oyo mama na ye azali se kobɔndisa.” (Yis. 66:12, 13) Mwana amiyokaka ete abatelami ntango mama na ye amemi ye to azali kosakanisa ye! Ndenge moko mpe, Yehova alingaka yo mpe alingi oyoka ete obatelami. Kotya ntembe ata moke te ete ozali na motuya mingi na miso na ye.—Yir. 31:3. w18.09 13 par. 6-7
Mwapɔsɔ, 20 sanza ya 6
Nani akomipesa na bolingo mpo na kotondisa lobɔkɔ na ye lelo na likabo mpo na Yehova?—1 Nt. 29:5.
Na Yisraele ya kala, na bantango mosusu ezalaki kosɛnga bato bápesa mabɔkɔ na misala ndenge na ndenge. (Kob. 36:2; Neh. 11:2) Lelo oyo, yo mpe okoki kozwa mabaku ya kopesa ntango, biloko ya mosuni, mpe mayele na yo mpo na kosalisa bandeko. Soki osali bongo, okozala na esengo mingi mpe okozwa mapamboli ebele. Mbala mingi, bato oyo bapesaka mabɔkɔ na mosala ya kotonga bazwaka baninga ya sika. Ndeko mwasi moko na nkombo Margie asali mosala ya kotonga Bandako ya Bokonzi mbula 18. Na boumeli ya bambula, azalaki kotyela bilenge basi likebi mingi mpe azalaki kolakisa bango mosala. Alobi ete yango epesaka bandeko libaku ya kolendisana. (Rom. 1:12) Kutu, ntango akutanaki na mikakatano na bomoi na ye, baninga oyo azwi na mosala ya kotonga nde balendisaki ye. Osilá kopesa mabɔkɔ na mosala ya kotonga ndako moko ya losambo? w18.08 25 par. 9; 26 par. 11
Mwalomingo, 21 sanza ya 6
Moto atyola bolenge na yo te. Nzokande, zalá ndakisa epai ya bato ya sembo na maloba, na etamboli, na bolingo, na kondima, na bizaleli ya pɛto.—1 Tim. 4:12.
Ntango Paulo akomaki maloba yango, mbala mosusu Timote azalaki na mbula soki 30. Kasi Paulo apesaki ye mikumba minene. Liteya ezali nini? Tosengeli te kosambisa bandeko mibali oyo bazali bilenge na kolanda mbula na bango. Ekozala malamu tóbosana te ete ata Nkolo na biso Yesu azalaki kaka na mbula 33 ntango asilisaki mosala na ye nyonso awa na mabele. Na mimeseno ya bamboka mosusu, bato bamemyaka bilenge mibali te. Na yango, bankulutu mosusu bakoki kokakatana mpo na kopona bilenge mibali bákóma bankulutu to basaleli na misala, ata soki bakokisi masɛngami. Kasi, Biblia epesi te mbula oyo ndeko mobali asengeli kokokisa liboso atyama mosaleli na misala to nkulutu.—1 Tim. 3:1-10, 12, 13; Tito 1:5-9. w18.08 11-12 par. 15-16
Mwayambo, 22 sanza ya 6
Boyá . . . “boyebi” ya lokuta.—1 Tim. 6:20.
Mpo na kozwa bikateli ya malamu, tosengeli koyeba bosolo ya likambo. Na yango, tosengeli kopona malamu makambo ya kotánga. (Flp. 4:8, 9) Tosengeli te kolekisa ntango na biso na kotánga makambo na basite Internet oyo toyebi motó ná makolo te, to kotánga bamesaje oyo ezali kaka nungunungu. Tosengeli mingimingi kokeba na basite Internet oyo bapɛngwi basalelaka mpo na komonisa makanisi na bango. Balukaka kolɛmbisa kondima ya basaleli ya Nzambe mpe kobebisa mateya ya solo. Makambo oyo ezali solo te etindaka moto azwa bikateli ya mabe. Kokanisa ata mokolo moko te ete makambo yango ekosala yo eloko te. Na ntango ya Moize, mibali 12 bakendaki konɔnga Mokili ya Ndaka. Ntango bazongaki, mibali 10 bamemaki nsango ya mabe. (Mit. 13:25-33) Lokola balekisaki ndelo na maloba na bango, Bayisraele babangaki mpe balɛmbaki nzoto. (Mit. 14:1-4, 6-10) Na esika báluka koyeba bosolo ya likambo mpe bátyela Yehova motema, bato basalaki bozoba ya kondima likambo ya lokuta! w18.08 4 par. 4-5
Mwamibale, 23 sanza ya 6
Bómikosa te. Baninga mabe babebisaka bizaleli ya malamu.—1 Ko. 15:33.
Bato mingi bazalaka na bizaleli mosusu ya malamu. Mpe baoyo basambelaka Yehova te mbala mosusu basalaka kaka makambo ya mabe te. Ntango mosusu oyebi mpe bato ya ndenge wana. Yango elingi nde koloba ete bazali baninga malamu? Bakoki kosala nini na boninga na yo na Yehova? Basalisaka yo okóma moninga ya Yehova? Makambo nini ezali mpenza na ntina na miso na bango? Balobelaka makambo nini? Masolo na bango ezalaka kaka ya molato ya mikolo oyo, mbongo, baaparɛyi, kominanola, mpe makambo mosusu ya ndenge wana? Mbala mingi balobaka mabe mpo na basusu? Basepelaka koloba masɛki ya nsɔni? Yesu alobaki ete: “Monɔkɔ elobaka nde makambo oyo etondi na motema.” (Mat. 12:34) Soki omoni ete bato oyo bolekisaka ntango elongo bazali kobebisa boninga na yo na Yehova, salá ete olekisaka ntango mingi te na bango, mpe soki esengeli, katá boninga ya ndenge wana.—Mas. 13:20. w18.07 19 par. 11
Mwamisato, 24 sanza ya 6
Moize azalaki na komikitisa mingi koleka bato nyonso.—Mit. 12:3.
Ntango Moize azalaki na mbula 80, Yehova apesaki ye mokumba akende kolongola ekólo Yisraele na boombo na Ezipito. (Kob. 3:10) Mbala ebele, Moize alukaki kokima mokumba yango. Kasi Yehova amoniselaki ye motema molai mpe apesaki ye kutu nguya ya kosala makamwisi. (Kobima 4:2-9, 21) Akokaki kosalela nguya na ye mpo na kobangisa Moize mpo atosa ye mbala moko. Kasi, asalaki bongo te; amonisaki motema molai mpe boboto, mpe ayebisaki mosaleli na ye ya bopɔlɔ mpe ya komikitisa makambo oyo ekitisaki ye motema. Kosala bongo ebotaki mbuma ya malamu? Ɛɛ! Moize akómaki mokambi monene ya ekólo ya Nzambe. Asalaki makasi azala na boboto mpe apesa basusu lokumu, kaka ndenge Yehova asalaki epai na ye. Soki ozali na mwa bokonzi, okomekola Yehova soki ozali kopesa lokumu na bato oyo bazali na nse ya bokonzi na yo, komonisela bango boboto mpe motema molai. (Kol. 3:19-21; 1 Pe. 5:1-3) Soki omekoli Yehova mpe Yesu Kristo, oyo azali Moize Monene, basusu bakobanga te koya kosolola na yo, mpe okolendisa bango.—Mat. 11:28, 29. w18.09 24-25 par. 7-10
Mwaminei, 25 sanza ya 6
Ezali mpenza malamu mpe ezali mpenza esengo ete bandeko báfanda na bomoko!—Nz. 133:1.
Tokoki kokitisa bandeko na biso motema soki tozali na esengo mpe na boboto. Yango ekosala ete lisangá ezala lisusu na bomoko. Okoki kosala makasi oyeba bandeko ya lisangá malamu koleka? (2 Ko. 6:11-13) Pole na biso ekoki kongɛnga ata soki tofandaka wapi. Soki ozali komonisa boboto esika ofandaka, bato bakosepela koyekola makambo etali Yehova. Okoki komituna boye: ‘Bato ya kartye na ngai bakanisaka nini mpo na ngai? Ndako na ngai ebongisami malamu mpe ezali pɛto? Bato basepelaka kotala yango? Nazalaka pene ya kosalisa basusu?’ Ntango osololaka na bandeko mosusu, meká kotuna bango ndenge oyo boboto na bango mpe etamboli na bango ya malamu esalisaka bandeko ya libota, baninga ya kartye, ya mosala, to ya kelasi.—Ef. 5:9. w18.06 24 par. 13-14
Mwamitano, 26 sanza ya 6
Ngonga ezali koya wana moto nyonso oyo akoboma bino akokanisa ete asaleli Nzambe mosala mosantu.—Yoa. 16:2.
Bato oyo babomaki moyekoli Stefano bazalaki kokanisa bongo. (Mis. 6:8, 12; 7:54-60) Na boumeli ya bambula, emonani ete bato oyo balobaka ete basambelaka basalaka makambo mabe, na ndakisa koboma, mpe balobaka ete basali yango mpo na Nzambe. Nzokande, ezali makambo oyo Nzambe apekisi. (Kob. 20:13) Ya solo, lisosoli na bango ekosaka bango! Ndenge nini tokoki komindimisa ete lisosoli na biso esalaka malamu? Mibeko mpe mitinda oyo ezali na Biblia ezali “na litomba mpo na koteya, kopamela, kosembola makambo, mpo na kopesa disiplini na boyengebene.” (2 Tim. 3:16) Soki tozali koyekola Biblia mbala na mbala, komanyola mpe kosalela yango na bomoi na biso, yango ekosala ete lisosoli na biso eteyama malamu mpe etambwisa biso na ndenge ebongi. w18.06 16-17 par. 3-4
Mwapɔsɔ, 27 sanza ya 6
Bózwa . . . mopanga ya elimo, elingi koloba, liloba ya Nzambe.—Ef. 6:17.
Basoda ya Roma bazalaki kosalela mopanga oyo ezalaki soki na molai ya 50 santimɛtrɛ. Basoda yango bayebaki malamu kosalela mopanga na bango mpo bazalaki kosalela yango mokolo na mokolo. Ntoma Paulo alobaki ete Liloba ya Nzambe ezali lokola mopanga. Yehova apesá biso yango. Kasi tosengeli koyekola kosalela yango malamu mpo na kolobela bindimeli na biso to kobongisa makanisi na biso. (2 Ko. 10:4, 5; 2 Tim. 2:15) Tosengeli te kobanga Satana ná bademo. Ezali solo ete bazali na nguya, kasi Yehova aleki bango na nguya mosika mpenza. Mpe bakozala mpo na libela te. Bakokangama, bakozala lisusu na likoki ya kosala moto moko mabe te na boumeli ya Mbula nkóto ya boyangeli ya Kristo, mpe na nsima bakobomama. (Em. 20:1-3, 7-10) Toyebi monguna na biso, mayele na ye, mpe mikano na ye. Tokoki kotɛmɛla ye na lisalisi ya Yehova! w18.05 30 par. 15; 31 par. 19-21
Mwalomingo, 28 sanza ya 6
Nyoka alobaki na mwasi ete: “Bokokufa soki moke te.—Eba. 3:4.
Adama ayebaki ete nyoka akoki koloba te. Na yango, nsima ya koyeba ete nyoka asololaki na Eva, mbala mosusu amonaki ete ekelamu moko ya elimo nde asalelaki nyoka mpo na kosolola na Eva. (Eba. 3:1-6) Adama ná Eva bayebaki ekelamu yango te. Kasi Adama andimelaki moto oyo ayebaki te mpe atombokelaki Tata na ye ya likoló, Nzambe ya bolingo. (1 Tim. 2:14) Mbala moko, Yehova abandaki komonisa polele makambo mingi etali monguna wana mabe mpe alakaki ete nsukansuka akobomama. Kasi Yehova amonisaki mpe ete kaka na ntango yango, ekelamu wana oyo alobaki na nzela ya nyoka akotɛmɛla baoyo balingaka Nzambe. (Eba. 3:15) Yehova ayebisá biso te nkombo ya anzelu oyo atombokelaki ye. Mpo na komonisa ndimbola ya nkombo ya monguna yango Nzambe amonaki malamu kozela mbula 2 500 kobanda botomboki esalemaki na Edene.—Yobo 1:6. w18.05 22 par. 1-2
Mwayambo, 29 sanza ya 6
Ezali bato oyo . . . baboti mbuma wana bazali koyika mpiko.—Luka 8:15.
Ekómelá yo mpe olɛmba nzoto mpo bato na teritware na yo bazali koboya koyoka nsango ya Bokonzi? Soki ezali bongo, okoyeba mpenza ndenge oyo ntoma Paulo azalaki komiyoka. Asakolaki na boumeli ya mbula soki 30, mpe asalisaki ebele ya bato bakóma bakristo. (Mis. 14:21; 2 Ko. 3:2, 3) Atako bongo, akokaki te kosalisa Bayuda mingi bakóma bakristo ya solo. Kutu, mingi na bango baboyaki koyoka ye, mpe basusu banyokolaki ye. (Mis. 14:19; 17:1, 4, 5, 13) Likambo yango etindaki ye amiyoka ndenge nini? Alobaki: “Nazali na mawa monene mpe na mpasi oyo ezali kosila te na motema na ngai.” (Rom. 9:1-3) Mpo na nini amiyokaki bongo? Mpo azalaki kolinga mosala ya kosakola mpe bato. Ntoma Paulo azalaki mpenza kotyela Bayuda likebi mpe ayokaki mawa ndenge baboyaki motema mawa ya Nzambe. Ndenge moko na Paulo, biso mpe tosakolaka mpo totyelaka bato likebi mpe tolingi kosalisa bango.—Mat. 22:39; 1 Ko. 11:1. w18.05 13 par. 4-5
Mwamibale, 30 sanza ya 6
Motungisi na kati ya motema ya moto yango nde etindaka motema na ye egumbama, kasi liloba ya malamu esepelisaka yango.—Mas. 12:25.
Ntoma Paulo amonisaki polele ete ata baoyo bazali na mokumba ya kolendisa basusu bazalaka mpe na mposa basusu bálendisa bango. Akomelaki bakristo ya Roma ete: “Nazali na mposa makasi ya komona bino, mpo nakabela bino mwa likabo ya elimo mpo bókóma makasi; to, kutu nde, mpo tólendisana, moto na moto alendisama na kondima ya mosusu, ya bino elendisa ngai mpe ya ngai elendisa bino.” (Rom. 1:11, 12) Na yango, na bantango mosusu, ata ntoma Paulo azalaki na mposa basusu bálendisa ye. (Rom. 15:30-32) Lelo, tokoki kolendisa bandeko oyo bazali na mosala ya ntango nyonso. Banani mosusu tosengeli kolendisa? Bandeko basi mpe bandeko mibali oyo baponi kotikala minzemba mpo balingi kotosa Yehova mpe kobala “na kati ya Nkolo kaka.” (1 Ko. 7:39) Tosengeli mpe kolendisa bakristo oyo bazali koyika mpiko na minyoko to na maladi.—2 Tes. 1:3-5. w18.04 21 par. 3-5