Sanza ya 7
Mwamisato, 1 sanza ya 7
Bókoba kososola soki mokano ya Yehova ezali nini.—Ef. 5:17.
Tozali kobika na “ntango moko ya mpasi mpenza” oyo etondi na “mikakatano.” (2 Tim. 3:1) Mpe bomoi ekokóma lisusu mpasi koleka liboso Yehova abebisa mokili oyo mabe mpe atya kimya ya solosolo awa na mabele. Na yango, tosengeli komituna boye: ‘Natalaka epai ya nani mpo na koluka lisalisi mpe litambwisi?’ Mokomi moko ya Biblia alimbolaki ntina oyo tosengeli mpenza kotala epai ya Yehova ntango tozali na mposa ya lisalisi. (Nz. 123:1-4) Alobaki ete ntango totalaka epai ya Yehova, ezali lokola mosaleli oyo azali kotala epai ya nkolo na ye. Na ndenge nini? Mosaleli atyaka motema ete nkolo na ye akopesa ye bilei mpe akobatela ye. Kasi asengeli mpe kotala nkolo na ye ntango nyonso mpo na koyeba likambo oyo nkolo na ye alingi ete asala, mpe na nsima asengeli kosala yango. Ndenge moko mpe, tosengeli koyekola Liloba ya Nzambe mokolo na mokolo mpe malamumalamu mpo na koyeba likambo oyo Yehova alingi tósala, mpe na nsima tosengeli kosala yango. Na yango, tokoki komindimisa ete Yehova akosalisa biso ntango tozali na mposa ya lisalisi. w18.07 12 par. 1-2
Mwaminei, 2 sanza ya 7
Soki Mwana apesi bino bonsomi, bokokóma mpenza na bonsomi.—Yoa. 8:36.
Yesu azalaki kolobela kolongwa na boombo ya lisumu, boombo oyo eleki mabe mpenza. (Yoa. 8:34) Na ndenge nini tozali baombo ya lisumu? Lisumu etindaka biso tósala makambo ya mabe. Ekoki mpe kopekisa biso tósala makambo oyo toyebi ete ezali malamu to makambo oyo eyokani na makoki na biso. Yango ebimisaka mitungisi, mpasi, monyoko mpe nsukansuka ememaka na liwa. (Rom. 6:23) Tokozala na bonsomi ya solosolo oyo Adama ná Eva babungisaki kaka ntango lisumu ekolongwa. Maloba ya Yesu oyo ete “soki botikali na kati ya liloba na ngai” emonisi ete mpo Yesu apesa biso bonsomi tosengeli kosala mwa makambo. (Yoa. 8:31) Makambo nini? Lokola tomipesá na Nzambe, tosengeli komiboya mpe kosala makambo nyonso oyo Yesu asɛngi bayekoli na ye. (Mat. 16:24) Kaka ndenge Yesu alakaki yango, tokokóma mpenza na bonsomi na mikolo ezali koya ntango tokozwa mapamboli nyonso ya mbeka ya lisiko. w18.04 7 par. 14-16
Mwamitano, 3 sanza ya 7
Kaka yo moko nde oyebi malamu motema ya bana ya bato.—2 Nt. 6:30.
Yehova atyaka likebi na ndenge oyo basaleli na ye bamiyokaka, ata soki ntango mosusu bazali na makanisi oyo ebongi te. Tózwa ndakisa ya mosakoli Yona. Nzambe atindaki ye akende kosakola nsango ya lisambisi epai ya bato ya Ninive. Kasi ntango bato yango babongolaki motema, Nzambe alimbisaki bango. Nzokande, Yona asepelaki te na ekateli oyo Yehova azwaki. “Asilikaki makasi” mpo nsango oyo asakolaki ete Ninive ekobebisama ekokisamaki te. Kasi, Yehova amoniselaki Yona motema molai mpe asalisaki ye abongola makanisi na ye. (Yona 3:10–4:11) Nsukansuka, Yona abongolaki makanisi na ye. Kutu, Yehova asalelaki ye akoma lisolo yango mpo esalisa mpe biso. (Rom. 15:4) Ndenge oyo Yehova asalelaka basaleli na ye makambo emonisi ete amityaka na esika na bango. Ayebaka mpasi mpe minyoko oyo mokomoko na biso akutanaka na yango. Ayebaka makanisi ya mitema na biso, ndenge oyo tozali mpenza komiyoka, mpe ayebi esika makoki na biso esuki. Mpe ‘akotika te ete tómekama koleka oyo tokoki kokangela motema.’ (1 Ko. 10:13) Koyeba bongo ezali mpenza kokitisa biso motema! w19.03 16 par. 6-7
Mwapɔsɔ, 4 sanza ya 7
Biloko nyonso ezali bolumbu mpe ezali komonana polele na miso ya moto oyo tokozongisa monɔkɔ epai na ye.—Ebr. 4:13.
Na nse ya Mibeko ya Moize, mikóló oyo batyamaki bazalaki na mokumba ya kotalela kaka makambo ya losambo te, kasi mpe matata oyo ebimi kati na bato mpe makambo oyo ebuki mibeko. Tótala mwa bandakisa. Soki Moyisraele abomi moto, bazalaki koboma ye mbala moko te. Mikóló ya engumba basengelaki kotalela likambo yango malamumalamu liboso báloba soki ebongi kokatela ye etumbu ya liwa. (Mib. 19:2-7, 11-13) Mikóló ya engumba bazalaki mpe kosambisa mwa makambo etali bomoi ya mokolo na mokolo, ezala kowelana oyo ebimi mpo na bozwi ya moto to matata ya mwasi ná mobali. (Kob. 21:35; Mib. 22:13-19) Ntango mikóló ya engumba bazalaki kokata makambo na bosembo mpe Bayisraele bazalaki kotosa Mibeko, moto nyonso azalaki kozwa matomba, mpe ekólo ezalaki kokumisa Yehova. (Lev. 20:7, 8; Yis. 48:17, 18) Yango emonisi ete likambo nyonso ya bomoi na biso ezali na ntina epai ya Yehova. Alingi ete tósalelaka basusu makambo na bosembo mpe na bolingo. Atyaka likebi na makambo oyo tolobaka mpe oyo tosalaka, ata na bandako na biso. w19.02 23 par. 16-18
Mwalomingo, 5 sanza ya 7
Atikaki bámonisa ye mpasi; kasi afungolaki monɔkɔ te.—Yis. 53:7.
Ntango tozali kotungisama, ezalaka mpasi tómonisa komikitisa. Tokoki koloba na basusu maloba oyo ezangi boboto mpe kokatela bango mangala. Soki ozali kotungisama, kanisá ndakisa ya Yesu. Na basanza na ye ya nsuka awa na mabele, Yesu atungisamaki makasi. Ayebaki ete akobomama mpe akonyokwama makasi mpenza. (Yoa. 3:14, 15; Gal. 3:13) Mwa basanza liboso akufa, alobaki ete azali koyoka mpasi mpenza. (Luka 12:50) Mpe mwa mikolo liboso ya liwa na ye, alobaki ete: “Molimo na ngai etungisami.” Tokoki komona ete azalaki na komikitisa mpe na botosi epai ya Nzambe ndenge ayebisaki ye mitungisi na ye polele na nzela ya libondeli. (Yoa. 12:27, 28) Ntango ngonga ekokaki, na mpiko nyonso Yesu amitikaki na mabɔkɔ ya banguna ya Nzambe, mpe babomaki ye na ndenge ya mpasi mpe ya nsɔni mpenza. Atako atungisamaki mpe anyokwamaki mpenza, Yesu amonisaki komikitisa mpe asalaki mokano ya Nzambe. Tokoki mpenza koloba ete Yesu azali ndakisa eleki monene na oyo etali komonisa komikitisa na ntango ya mitungisi!—Yis. 53:10. w19.02 11 par. 14-15
Mwayambo, 6 sanza ya 7
Tótyelanaka likebi mpo tólendisana mpo tózala na bolingo mpe tósala misala ya malamu.—Ebr. 10:24.
Ekoki kosɛnga mpiko mpo tóyangana na makita nyonso, mingimingi ntango tozali kokutana na makambo ya mpasi. Bandeko na biso mosusu bayanganaka na makita atako bazali na mawa makasi, balɛmbi nzoto, to bazali na maladi. Basusu mpe bamonisaka mpiko na ndenge bakendaka makita atako bazali kokutana na botɛmɛli makasi oyo euti na libota to epai ya bakonzi ya Leta. Kanisá naino ndenge ndakisa na biso esalisaka bandeko na biso oyo bazali na babolɔkɔ mpo na kondima na bango. (Ebr. 13:3) Ntango bayokaka ete tozali kokoba kosalela Yehova atako tozali na komekama, yango epesaka bango makasi ya kobatela kondima, mpiko mpe bosembo na bango. Ntango Paulo azalaki na bolɔkɔ na Roma, azalaki kosepela mbala nyonso oyo azalaki koyoka ete bandeko bazalaki kosalela Nzambe na bosembo. (Flp. 1:3-5, 12-14) Nsima ya kobima na bolɔkɔ to mwa moke liboso, akomaki mokanda na ye epai ya Baebre. Na mokanda yango, asɛngaki bakristo yango ya sembo bátika koyangana na makita te.—Ebr. 10:25. w19.01 28 par. 9
Mwamibale, 7 sanza ya 7
Mokili mobimba ezali kolala na nguya ya moto mabe.—1 Yoa. 5:19.
Satana alingaka tókóma lokola ye, motomboki oyo akipaka mitinda ya Yehova te mpe alukaka kaka matomba na ye moko. Asali ete bato oyo ye asilá kobebisa bázala zingazinga na biso mpe atyaka elikya ete ‘bakobebisa’ makanisi na biso mpe ndenge na biso ya kosala makambo. (1 Ko. 15:33) Satana alukaka mpe kobebisa motema na biso na ndenge asalaka ete tótyela bwanya ya bato motema na esika ya makanisi ya Yehova. (Kol. 2:8) Na ndakisa, Satana apanzaka likanisi oyo: kokóma mozwi nde likambo oyo eleki ntina na bomoi. Baoyo balandaka likanisi yango bakoki kokóma na bozwi, to te. Bázwa bozwi to te, bazali na likama. Mpo na nini? Mpo bakoki komipesa mingi na koluka mbongo tii bakotya lisusu likebi te na kolɔngɔnɔ ya nzoto na bango, na boyokani na bato ya libota na bango, ata mpe na boninga na bango na Nzambe, nyonso wana kaka mpo bákokisa mokano na bango. (1 Tim. 6:10) Tosengeli kozala na botɔndi ndenge Tata na biso ya likoló asalisaka biso tótalelaka mbongo na ndenge oyo ebongi.—Mos. 7:12; Luka 12:15. w19.01 15 par. 6; 17 par. 9
Mwamisato, 8 sanza ya 7
Longonya, moombo malamu mpe ya sembo! Ozali sembo na mwa makambo moke. Nakotya yo obatela biloko mingi. Kɔtá na esengo ya nkolo na yo.—Mat. 25:21.
Ata liboso Yehova atinda Yesu na mabele mpo atika ndakisa ya kokoka na oyo etali kolendisa, basaleli ya Yehova bayebaki ete basengeli kolendisa basusu. Tózwa ndakisa ya Hizikiya. Ntango bato ya Asiri bazalaki koya kobundisa Yerusaleme, Hizikiya ayanganisaki bakonzi ya basoda ná bato mpo na kolendisa bango, mpe “bato balendisamaki na maloba” na ye. (2 Nt. 32:6-8) Yobo mpe azali ndakisa na oyo etali kolendisa. Atako ye moko azalaki na mposa ya libɔndisi, ateyaki basusu ndenge ya kolendisa baninga. Yobo ayebisaki “babɔndisi mabe” misato oyo bayaki epai na ye ete soki ye nde akendaki mpo na kobɔndisa bango, ‘alingaki kolendisa bango na maloba ya monɔkɔ na ye, mpe libɔndisi ya mbɛbu na ye elingaki kokitisa mpasi na bango.’ (Yobo 16:1-5) Nsukansuka, Elihu ná Yehova balendisaki Yobo.—Yobo 33:24, 25; 36:1, 11; 42:7, 10. w18.04 16 par. 6; 17 par. 8-9
Mwaminei, 9 sanza ya 7
Nakopesa yo makasi. Nakosalisa yo mpenza.—Yis. 41:10.
Yisaya asilaki komonisa ndenge oyo Yehova akopesa basaleli na ye makasi; alobaki: “Yehova ye moko akoya mpenza lokola moto ya makasi, mpe lobɔkɔ na ye ekoyangela mpo na ye.” (Yis. 40:10) Mbala mingi, Biblia esalelaka liloba “lobɔkɔ” na ndenge ya elilingi mpo na kolobela nguya. Na yango, maloba “lobɔkɔ na ye ekoyangela” ezali kokundwela biso ete Yehova azali Mokonzi ya nguya. Asalelaki makasi na ye mpo na kosalisa mpe kokɔtela basaleli na ye na ntango ya kala, mpe azali kokoba kosalela yango mpo na kolendisa mpe kobatela baoyo batyelaka ye motema lelo oyo. (Mib. 1:30, 31; Yis. 43:10) Mingimingi ntango banguna banyokolaka biso, Yehova akokisaka elaka na ye oyo: “Nakopesa yo makasi.” Na bisika mosusu lelo oyo, banguna na biso bazali kosala nyonso mpo na kopekisa biso mosala ya kosakola to kokanga mpenza misala na biso. Atako bongo, tomitungisaka koleka ndelo te mpo na makambo ya ndenge wana. Yehova apesi biso ndanga oyo ebakiselaka biso makasi mpe kondima. Alaki biso ete: “Ebundeli nyonso oyo ekosalema mpo na kobunda na yo ekolonga te.”—Yis. 54:17. w19.01 5-6 par. 12-13
Mwamitano, 10 sanza ya 7
Esengo na baoyo bayebi bobola na bango ya elimo.—Mat. 5:3.
Nyama ezalaka na mposa ya koyeba makambo ya Nzambe te, kasi, biso bato tozalaka na mposa ya koyeba Mozalisi na biso. (Mat. 4:4) Soki ozali koyoka Nzambe, okozwa bososoli, bwanya mpe esengo. Nzambe apesi biso Biblia mpe apesaka biso ebele ya bilei ya elimo na nzela ya “moombo ya sembo mpe ya mayele” mpo kondima na biso ekóma makasi. (Mat. 24:45) Tosepelaka mpenza na ebele ya bilei yango! (Yis. 65:13, 14) Bilei ya elimo ekoki kosalisa yo okóma na bwanya mpe likoki ya kokanisa malamu; yango ekoki kobatela yo na makambo mingi. (Mas. 2:10-14) Na ndakisa, bizaleli yango ekosalisa yo oyeba mateya ya lokuta, lokola oyo elobaka ete Mozalisi azalaka te, to ete mbongo mpe biloko ya mokili nde ekopesa yo esengo. Ekosalisa yo mpe okima bamposa mpe makambo oyo ekosala yo mabe. Na yango, salá nyonso oyo okoki mpo okóma na bwanya mpe likoki ya kokanisa malamu. w18.12 20 par. 6-7
Mwapɔsɔ, 11 sanza ya 7
Mikolo ya bato na ngai ekozala lokola mikolo ya nzete.—Yis. 65:22.
Na kotalela esakweli yango, mikolo na biso “ekozala lokola mikolo ya nzete.” Nzete mosusu eumelaka bankóto ya bambula. Mpo bato báumela bongo, ekosɛnga bázala nzoto kolɔngɔnɔ mpenza. Mpe soki bafandi na esika ya kimya mpe ya kitoko ndenge Yisaya asakolaki, yango ekozala paradiso! Esakweli wana ekokokisama! Bilaka yango emonisi mpenza ete paradiso ekozala na mikolo oyo ezali koya: Mabele mobimba ekotonda na bato oyo Nzambe apamboli. Moto moko te akobanga ete nyama to bato ya mobulu básala ye mabe. Bakufi-miso, bato oyo matoi ekufá mpe bibɔsɔnɔ bakobika. Bato bakotonga bandako na bango moko mpe bakolya biloko oyo baloni. Bakoumela na bomoi ntango molai koleka nzete. Ya solo, Biblia elobeli makambo oyo emonisi ete paradiso ekozala. Kasi, bato mosusu bakoki koloba ete bisakweli yango emonisi mpenza te ete paradiso ekozala awa na mabele. Mpo na nini ondimaka mpenza ete paradiso ekozala awa na mabele? Yesu, moto oyo alekaki bato nyonso tii lelo, apesaki biso ntina moko monene.—Luka 23:43. w18.12 5 par. 13-15
Mwalomingo, 12 sanza ya 7
Bóbongwana, bókómisa makanisi na bino makanisi ya sika.—Rom. 12:2.
Makanisi na biso ekobongwana mingimingi na kolanda makambo oyo toponi kokanisa. Soki tozali komanyola makanisi ya Yehova, tokomindimisa ete makanisi na ye ezalaka ntango nyonso malamu. Yango ekopesa biso mposa ya kotalela makambo ndenge ye atalelaka yango. Kasi, mpo makanisi na biso eyokana na makanisi ya Yehova, tosengeli ‘kotika kolanda makambo ya ntango oyo.’ Yango elimboli ete tosengeli kotika kotala, kotánga, mpe koyoka eloko nyonso oyo eyokani te na makanisi ya Nzambe. Mpo na kosalisa biso tómona ntina na yango, tózwa ndakisa ya biloko ya kolya. Moto oyo alingi kobatela kolɔngɔnɔ ya nzoto na ye akoki kozwa ekateli ya kolya kaka biloko ya malamu. Kasi, milende nyonso wana ekozala na ntina te soki azali mpe kolya mbala na mbala biloko oyo epɔlá! Ndenge moko mpe, milende nyonso oyo tozali kosala mpo na koyeba makanisi ya Yehova ekozala na ntina mpenza te soki tozali mpe kotika makanisi ya mokili ekɔta na bɔɔngɔ na biso. w18.11 21 par. 14-15
Mwayambo, 13 sanza ya 7
Bótɛlɛma ngwi wana loketo na bino ekangami na solo lokola mokaba.—Ef. 6:14.
Tosengeli kozala na ekateli ya kosalela mateya ya Biblia na bomoi na biso ya mokolo na mokolo. Biblia ekokanisi solo na mokaba ya soda. Na ntango ya kala, mokaba ya soda ezalaki kosalisa ye mpe kobatela loketo na ye na etumba. Kasi, asengelaki kokanga yango makasi. Soki akangi yango malamu te, ekosalisa mpenza te. Ndenge nini solo ebatelaka biso lokola mokaba? Soki tokangami na solo ya Biblia ntango nyonso, ekosalisa biso tókanisaka malamu mpe tózwa bikateli ya malamu. Soki tokutani na mokakatano to komekama, solo ya Biblia ekosalisa biso tózala na ekateli ya kosala oyo ezali malamu. Kaka ndenge soda abosanaka te kotya mokaba na ye ntango akei etumba, biso mpe tosengeli kolata solo lokola mokaba. Tosengeli kosalela solo ya Biblia na likambo nyonso ya bomoi na biso. w18.11 12 par. 15
Mwamibale, 14 sanza ya 7
Sombá solo mpe kotɛka yango te.—Mas. 23:23.
Esɛngaka kosala milende mpo na koyekola solo ya Biblia. Tosengeli kondima kotika makambo nyonso mpo na kozwa yango. Mpe nsima ya ‘kosomba solo,’ elingi koloba koyekola yango, tosengeli kosala nyonso ete ‘tótɛka’ yango te, elingi koloba tótika yango te. Koloba ete eloko ezali ofele yango elimboli te ete ezali na motuya te. Liloba ya Ebre oyo ebongolami na ‘kosomba’ na Masese 23:23 ekoki mpe kolimbola “kozwa.” Maloba yango nyonso mibale epesaka likanisi ya kosala milende to kotika eloko moko mpo na kozwa eloko oyo tomoni ete ezali na motuya. Mpo tómona ndenge oyo tokoki kosomba solo, tózwa ndakisa ya mai na ebale. Lokola mai ezali ofele, ekokóma na ndako na biso na ndenge ya likamwisi? Te, tosengeli kokende na ebale kotɔka yango mpe komema yango na ndako. Na yango, ata soki tokopesa mbongo te, tosengeli kosala milende mpo na kozwa yango. Ndenge moko mpe, topesaka mbongo te mpo na koyekola solo, kasi tosengeli kosala milende mpe kotika makambo mosusu mpo na kozwa yango. w18.11 4 par. 4-5
Mwamisato, 15 sanza ya 7
Elongi na ye engɛngaki lokola moi, mpe bilamba na ye ya likoló ekómaki kongɛnga.—Mat. 17:2.
Yesu abengisaki Petro, Yakobo, ná Yoane mpo bákende elongo na ye na ngomba moko ya molai. Ntango bazalaki kuna, bamonaki emonaneli moko ya kokamwa. Elongi ya Yesu engɛngaki mpe bilamba na ye ekómaki kongɛnga. Bato mibale, oyo moko azalaki komonisa Moize mpe mosusu Eliya, babimaki pembeni ya Yesu mpe babandaki kosolola na ye mpo na liwa mpe lisekwa na ye. (Luka 9:29-32) Na nsima, lipata moko monene ezipaki bango, mpe bayokaki mongongo moko eutaki na lipata yango: mongongo ya Nzambe! Emonaneli yango elakisaki nkembo mpe nguya oyo Yesu akozala na yango ntango akozala Mokonzi ya Bokonzi ya Nzambe. Na ntembe te, Yesu Kristo alendisamaki mpe azwaki makasi mpo ayika mpiko na minyoko mpe liwa ya mpasi oyo ezalaki kozela ye. Lisusu, emonaneli yango ekómisaki kondima ya bayekoli makasi mpe elendisaki bango bátikala sembo na komekama oyo basengelaki kokutana na yango na mosala monene oyo ezalaki kozela bango na bambula oyo ekolanda. Mbula soki 30 na nsima, ntoma Petro alobelaki ndenge oyo Yesu abongwanaki; yango emonisi ete abosanaki emonaneli yango ata moke te.—2 Pe. 1:16-18. w19.03 10 par. 7-8
Mwaminei, 16 sanza ya 7
Tozali kopesa ndakisa malamu ete tozali basaleli ya Nzambe, . . . na maloba ya solo.—2 Ko. 6:4, 7.
Wapi moko ya makambo oyo ekesenisaka bakristo ya solo na bato ya mangomba ya lokuta? Tokeseni mpo biso ‘tolobanaka solo.’ (Zek. 8:16, 17) Tokoloba solo epai ya bapaya, epai ya bato oyo tosalaka na bango, epai ya baninga mpe bato ya libota. Soki ozali elenge, mbala mosusu olingaka baninga na yo bándima yo. Mposa yango etinda yo te okóma na bomoi ya liso na nse ya lokasa. Ntango ozali elongo na bandeko ya libota mpe ya lisangá, omonisaka ete ozali na bizaleli ya pɛto; kasi okómaka moto ya ndenge mosusu mpenza ntango okɔti na basite ya kosolola na baninga, to ntango ozali elongo na bato oyo basambelaka Yehova te. Kosala bongo ezali kokosa baboti, bandeko mpe Yehova. (Nz. 26:4, 5) Kasi Yehova ayebaka soki moto akumisaka ye na mbɛbu, kasi na kobombana asalaka makambo oyo Nzambe ayinaka. (Mrk. 7:6) Eleki mpenza malamu kosala oyo Masese elobi: “Motema na yo elula basumuki te, kasi bangáká Yehova mokolo mobimba.”—Mas. 23:17. w18.10 9 par. 14-15
Mwamitano, 17 sanza ya 7
Nzambe azali bolingo, mpe moto oyo azali kotikala na kati ya bolingo azali kotikala na bomoko elongo na Nzambe mpe Nzambe azali na bomoko elongo na ye.—1 Yoa. 4:16.
Basaleli ya Yehova na mokili mobimba bazali libota mpe balinganaka mpenza. (1 Yoa. 4:21) Ntango mosusu bamipimelaka mpenza mpo na bandeko na bango, kasi mbala mingi bamonisaka bolingo na bango na makambo ebele ya mikemike, na ndakisa koloba na ndeko likambo ya boboto to kosalela ye bolamu. Ntango tozali kopesa bandeko lokumu mpe komonisela bango boboto, tozali komekola Tata na biso ya likoló. (Ef. 5:1) Yesu amekolaki Tata na ye na ndenge ya kokoka. Azalaki ntango nyonso kosalela basusu makambo na boboto. Alobaki: “Bóya epai na ngai, bino nyonso oyo bozali komona mpasi na mosala mpe na kokumba mikumba, mpe ngai nakopemisa bino . . . , mpo ngai nazali na ezaleli ya boboto mpe na komikitisa na motema.” (Matai 11:28, 29) Soki tomekoli Yesu mpe tozali “kotya likebi na moto oyo azangá,” tokosepelisa Yehova mpe biso moko tokozala na esengo. (Nz. 41:1) Na yango, tólinganaka, tókoba kopesa lokumu na bandeko ya libota, ya lisangá, mpe na bato oyo tokutanaka na bango na mosala ya kosakola. w18.09 28 par. 1-2
Mwapɔsɔ, 18 sanza ya 7
Tozali bato oyo bazali kosala elongo na Nzambe.—1 Ko. 3:9.
Tokoki mpe kosala elongo na Yehova ntango tozali kosalisa bandeko oyo bazwi likama. Na ndakisa, okoki kopesa likabo ya mbongo. (Yoa. 13:34, 35; Mis. 11:27-30) Tokoki mpe kosalisa na kopɛtola to kobongisa bandako oyo ebebaki na likama. Gabriela, ndeko mwasi moko ya Pologne oyo ndako na ye ebebaki makasi nsima ya mpela, asepelaki mingi ntango bandeko ya masangá ya pembeni bayaki kosunga ye. Alobi boye: “Nalingaka te kolobela biloko oyo nabungisá, mpo ezali kaka biloko ya mosuni. Nalingaka nde kolobela oyo nazwi. Likambo yango endimisi ngai lisusu makasi ete kozala na kati ya lisangá ya bokristo ezali libaku oyo eleki malamu, epesaka esengo mpe nsai.” Bato mingi oyo bazwi lisalisi nsima ya likama balobaka ete bayokaka ndenge wana. Baoyo basalaka elongo na Yehova mpo na kosalisa bandeko yango bayokaka mpe esengo mingi.—Mis. 20:35; 2 Ko. 9:6, 7. w18.08 26 par. 12
Mwalomingo, 19 sanza ya 7
Batelá motema na yo.—Mas. 4:23.
Mpo tólonga kobatela motema na biso, tosengeli kozala na likoki ya koyeba makama mpe kosala na lombangu mpo na komibatela. Liloba oyo ebongolami na “kobatela” ezali kokundwela biso mosala oyo sinzili azalaki kosala. Na mikolo ya Mokonzi Salomo, basinzili bazalaki kotɛlɛma na bifelo ya engumba mpe bazalaki kobelela soki bamoni ete likama ezali koya. Ndakisa yango ezali kosalisa biso tóyeba makambo oyo tosengeli kosala mpo Satana abebisa makanisi na biso te. Na ntango ya kala, basinzili bazalaki kosala na bomoko na bakɛngɛli ya baporte. (2 Sa. 18:24-26) Bango nyonso bazalaki kosalisa na kobatela engumba na ndenge bazalaki komindimisa ete baporte ekangami soki monguna azali kopusana. (Neh. 7:1-3) Lisosoli oyo eteyami na Biblia ekoki kosala lokola sinzili mpo na kokebisa biso ntango Satana alingi kobebisa motema na biso, elingi koloba makanisi na biso, mayoki na biso, ndenge na biso ya kotalela makambo, to bamposa na biso. Soki lisosoli na biso ekebisi biso, tosengeli koyoka yango mpe kosala nyonso mpo na kokima likama. w19.01 17 par. 10-11
Mwayambo, 20 sanza ya 7
Bázala basaleli, soki bafundami ata na likambo moko te.—1 Tim. 3:10.
Bankulutu basengeli te kosambisa bilenge mibali na kolanda makanisi na bango moko to mimeseno ya mboka; basengeli kolanda Liloba ya Nzambe. (2 Tim. 3:16, 17) Soki bankulutu bazali kolanda mimeseno ya mboka, bakoki kozelisa kaka mpamba bilenge oyo bakokisi masɛngami. Na mboka moko, ndeko moko oyo azalaki mosaleli na misala azalaki kokokisa malamu mikumba oyo bazalaki kopesa ye, mpe bankulutu bamonaki ete akokisi masɛngami ya Biblia mpo na kokóma nkulutu. Kasi, bankulutu mosusu ya mikóló balobaki ete azali komonana elenge mingi mpo azala nkulutu; na yango, baponaki ye te. Likambo ya mawa, ndeko mobali yango atyamaki nkulutu te, kaka mpo balandaki ndenge oyo azalaki komonana. Emonani ete makanisi yango ezali na bisika mingi na mokili. Ezali na ntina mingi tólanda Biblia na esika ya kolanda makanisi na biso. Soki tosali bongo, tokotosa Yesu mpe tokotika kosambisa basusu na kolanda oyo ezali komonana na libándá.—Yoa. 7:24. w18.08 12 par. 16-17
Mwamibale, 21 sanza ya 7
Ntango moto azali koyanola na likambo liboso ya koyoka yango, wana ezali bozoba mpo na ye mpe kosambwa.—Mas. 18:13.
Ezali na likambo mosusu oyo emonisi ete kotindela bato bamesaje na nzela ya Internet to na telefone kozanga kokanisa ezali likama. Na mikili mosusu, batyá mwa bipekiseli na mosala na biso to bapekisá yango mpenza. Banguna na biso na mikili yango bakoki kopanza nsango ya lokuta na nko mpo na kobangisa biso to kosala ete tókóma kokaniselana mabe. Tótalela likambo oyo esalemaki na ekólo moko ya Union soviétique. Bapolisi ya KGB bapanzaki nsango ete bandeko mosusu oyo bazalaki na mikumba minene bawanganaki lisangá. Likambo ya mawa, bandeko mingi bandimaki nsango yango ya lokuta mpe batikaki ebongiseli ya Yehova. Na nsima, mingi na bango bazongaki, kasi basusu bazongá te. Nsango ya lokuta ebebisaki kondima na bango. (1 Tim. 1:19) Ndenge nini tokoki koboya likambo ya ndenge wana esalema? Boyá kopanza bansango ya lokuta to oyo eyebani te soki ezali solo. Kozala bindimandima te. Lukáká nde koyeba bosolo ya makambo. w18.08 4 par. 8
Mwamisato, 22 sanza ya 7
Ya solo nazali koyebisa yo lelo: Okozala na ngai na Paradiso.—Luka 23:43.
Na bamaniskri ya kalakala ya Grɛki oyo ezali lelo, bilembo ya bopemi ezali na bisika nyonso te. Na yango, motuna yango oyo: Yesu alobaki mpenza nini epai ya mosali-mabe? Alobaki: “Nazali koyebisa yo, lelo okozala na ngai na Paradiso”? To, “Nazali koyebisa yo lelo, okozala na ngai na Paradiso”? Kobosana te makambo oyo Yesu ayebisaki bayekoli na ye mpo na liwa na ye. Alobaki: “Mwana ya moto . . . akozala na kati ya mabele mikolo misato butu moi.” (Mat. 12:40; 16:21; 17:22, 23; Mrk. 10:34; Mis. 10:39, 40) Na yango, Yesu akendaki na Paradiso te mokolo oyo ye ná mosali-mabe wana bakufaki. Biblia elobi ete Yesu asalaki mikolo misato “na kati ya Nkunda,” na nsima Nzambe asekwisaki ye. (Mis. 2:31, 32) Mosali-mabe yango ayebaki ata moke te ete Yesu asalaki kondimana na bantoma na ye ya sembo mpo báyangela na ye na likoló. (Luka 22:29) Lisusu, mosali-mabe wana azwaki ata batisimo te. (Yoa. 3:3-6, 12) Na yango, ntango Yesu apesaki ye elaka, na ntembe te azalaki kolobela paradiso na mabele, na mikolo oyo ezali koya. w18.12 6 par. 17-18, 20-21
Mwaminei, 23 sanza ya 7
Salelá biso Nzambe oyo akotambola liboso na biso, mpamba te Moize yango . . . toyebi mpenza te nini ekómeli ye.—Kob. 32:1.
Eumelaki te, Bayisraele babandaki kosambela mwana-ngɔmbɛ! Atako batosaki mibeko ya Yehova te, batyaki na makanisi ete bazalaki kaka na ngámbo na ye. Kutu Arona abengaki losambo ya mwana-ngɔmbɛ yango “fɛti mpo na Yehova”! Yehova asalaki nini? Ayebisaki Moize ete bato “babebisi makambo” mpe ‘balongwe nzela oyo apesaki bango mitindo.’ Yehova ayokaki nkanda makasi kutu akanisaki ata koboma ekólo mobimba. (Kob. 32:5-10) Kasi, Yehova azwaki ekateli ya koboma ekólo yango te. (Kob. 32:14) Atako Arona asalaki mwana-ngɔmbɛ ya wolo, abongolaki motema mpe elongo na bana ya Levi mosusu, aponaki ngámbo ya Yehova. Bankóto ya bato oyo basambelaki mwana-ngɔmbɛ bakufaki. Kasi baoyo bazalaki na ngámbo ya Yehova bakufaki te, mpe Nzambe alobaki ete akopambola bango.—Kob. 32:26-29. w18.07 20 par. 13-16
Mwamitano, 24 sanza ya 7
Bókeba na bakomeli oyo . . . balingaka bambote na bazando . . . mpe bisika ya lokumu mingi na ntango ya bilei ya mpokwa.—Luka 20:46.
Koyebana nini eleki malamu? Ezali te koyebana oyo bato mingi balukaka na nzela ya bakelasi ya milai, kosala mombongo oyo efutaka malamu, to mpe koluka kokóma moto monene na lisano moko oyo eyebani mingi na mokili. Ntoma Paulo amonisaki koyebana oyo eleki malamu, ntango alobaki ete: “Sikoyo lokola boyebi Nzambe, to mpe sikoyo lokola Nzambe ayebi bino, ndenge nini bozali lisusu kozongela makambo mikemike ya mpamba mpe oyo ezangá ntina mpe bolingi lisusu kozala baombo na yango?” (Gal. 4:9) Ezali mpenza libaku malamu ndenge ‘Nzambe ayebi biso’ mpo azali Moyangeli ya molɔ́ngɔ́ mobimba! Yehova ayebi biso malamu, alingaka biso mpe alingi ete tózala na boyokani malamu na ye. Akelá biso mpo tózala baninga na ye.—Mos. 12:13, 14. w18.07 8 par. 3-4
Mwapɔsɔ, 25 sanza ya 7
Makundoli na yo ezali lobanzo na ngai.—Nz. 119:99.
Soki tolingi ete mibeko ya Nzambe esalisa biso, tosengeli kolinga mpe kotosa yango. (Amo. 5:15) Kasi tokosala yango ndenge nini? Tosengeli kotalela makambo ndenge oyo Yehova atalelaka yango. Tózwa ndakisa: Kanisá ete ozali kolala malamu te, mpe monganga asɛngi yo obongola ndenge na yo ya kolya, asɛngi yo osalaka ngalasisi, mpe obongola makambo mosusu na bomoi na yo. Nsima ya kolanda toli yango, omoni ete okómi kolala malamu! Na ntembe te, okosepela lisusu na monganga yango ndenge asalisi yo. Ndenge moko mpe, Mozalisi na biso apesá biso mibeko mpo ebatela biso na mbuma mabe ya lisumu mpe mpo tózala na bomoi ya malamu. Na ndakisa, Biblia epekisi biso kokosa, kobuba, koyiba, kosala pite, kosala mobulu to kozala na boyokani na bademo. (Mas. 6:16-19; Em. 21:8) Ntango tomonaka matomba tozwaka soki totosi Yehova, bolingo na biso mpo na ye mpe mibeko na ye ekómaka lisusu makasi. w18.06 17 par. 5-6
Mwalomingo, 26 sanza ya 7
Yo ozali mokonzi ya Bayuda?—Yoa. 18:33.
Mbala mosusu Pilate abangaki ete Yesu akotinda bato bátombokela Baroma. Kasi Yesu ayanolaki ye ete: “Bokonzi na ngai ezali ya mokili oyo te.” (Yoa. 18:36) Yesu aboyaki kokɔta na makambo ya politiki mpo Bokonzi na ye ekozala na likoló. Alobaki ete mosala na ye awa mabele ezalaki ya ‘kopesa litatoli na ntina na solo.’ (Yoa. 18:37) Na ndakisa ya Yesu, soki tokangi ntina ya mokumba na biso, tokoboya kopesa mabɔkɔ na parti politiki nyonso, tokosala yango te ata na nse ya motema na biso. Kasi ezalaka ntango nyonso pɛtɛɛ te. Mokɛngɛli ya zongazonga moko alobi ete: “Esika nafandaka bato bazali kolekisa ndelo na likambo yango. Balingaka ekólo na bango makasi koleka mpe mingi na bango bakanisaka ete bakozala malamu kaka soki moto ya ekólo na bango nde akómi mokonzi. Likambo ya esengo, bandeko babateli bomoko na ndenge batye makanisi na mosala ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi. Bayebi ete Nzambe nde akosilisa kozanga bosembo mpe mikakatano mosusu oyo tozali kokutana na yango.” w18.06 4-5 par. 6-7
Mwayambo, 27 sanza ya 7
Bótɛmɛla Zabolo, mpe akokima bino.—Yak. 4:7.
Kaka mikanda misato ya Makomami ya Ebre na ndakisa 1 Ntango, Yobo mpe Zekaria elobeli Satana, nkombo oyo elimboli “Motɛmɛli.” Mpo na nini Makomami emonisaki makambo mingi te etali monguna yango liboso Masiya aya? Na Makomami ya Ebre Yehova akomisá makambo mingi te etali Satana mpe makambo oyo asalaka. Kutu, mokano ya Makomami ya Ebre ezalaki ya kosalisa bato báyeba Masiya mpe bámekola ye. (Luka 24:44; Gal. 3:24) Ntango Masiya ayaki, Yehova asalelaki ye mpe bayekoli na ye mpo na komonisa makambo mingi etali Satana mpe baanzelu oyo balandaki ye. Yango ebongi mpenza, mpo Yehova akosalela Yesu ná bakristo oyo batyami mafuta na elimo mpo na koboma Satana mpe baoyo balandaka ye. (Rom. 16:20; Em. 17:14; 20:10) Kobosana te ete nguya ya Zabolo ezali na ndelo. Yehova, Yesu, mpe baanzelu ya sembo babatelaka biso. Na lisalisi na bango, tokoki kotɛmɛla monguna na biso. w18.05 22-23 par. 2-4
Mwamibale, 28 sanza ya 7
Etape nyonso oyo ezali na ngai, oyo ebotaka mbuma te, alongolaka yango.—Yoa. 15:2.
Tokozala basaleli ya Yehova kaka soki tozali kobota mbuma. (Mat. 13:23; 21:43) Na yango, na ndakisa oyo ezali na Yoane 15:1-5, kobota mbuma elimboli te kokómisa bato bayekoli. (Mat. 28:19) Soki ezalaki bongo, tokoloba ete basaleli ya sembo ya Yehova oyo bakómisá naino moto te moyekoli ya Yesu bazali lokola bitape oyo ebotaka mbuma te. Kasi yango ekoki kozala solo te! Mpo na nini? Mpo tokoki te kotindika bato na makasi bákóma bayekoli. Yehova alingaka biso mingi. Akoki te kotinda biso tósala likambo oyo tokokoka ata moke te. Asɛngaka biso kaka makambo oyo tokokoka kosala. (Mib. 30:11-14) Na yango, kobota mbuma elimboli nini? Na ntembe te ezali likambo oyo moto nyonso akoki kosala. Mosala nini Yehova apesá basaleli na ye nyonso? Mosala ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe.—Mat. 24:14. w18.05 14 par. 8-9
Mwamisato, 29 sanza ya 7
Bouti na tata na bino Zabolo, . . . moto ya lokuta mpe tata ya lokuta.—Yoa. 8:44.
Lelo oyo, bakonzi ya mangomba bazali ebele. Babengaka bango bapastɛrɛ, basango, mpe bongo na bongo. Ndenge moko na Bafarisai, bateyaka solo ya Liloba ya Nzambe te, kasi ‘baponi kondima lokuta na esika ya kondima solo ya Nzambe.’ (Rom. 1:18, 25) Bateyaka mateya ya lokuta lokola lifelo, molimo ekufaka te, moto akoki kobotama mbala na mbala, Nzambe andimaka bato oyo basangisaka nzoto mibali-mibali to basi-basi, mpe libala ya mibali-mibali to basi-basi. Bato ya politiki mpe balobaka lokuta. Mosika te, bakoloba lokuta mosusu ya monene ete batye “kimya, likambo ya kobanga ezali te” na mokili. Kasi, “na ntango yango libebi ya mbalakaka ekoyela bango na mbala moko.” Na yango, tóndima te bakonzi yango ya politiki ntango bakoloba ete makambo ezali kobonga. Biso ‘toyebi malamu ete mokolo ya Yehova ekoya mpenza lokola moyibi na butu.’—1 Tes. 5:1-4. w18.10 7-8 par. 6-8
Mwaminei, 30 sanza ya 7
Bosengeli kosalisa baoyo bazali bato ya bolɛmbu, mpe bosengeli kobosana te maloba ya Nkolo Yesu, ntango ye moko alobaki ete: “Esengo ya kopesa eleki oyo ya kozwa.”—Mis. 20:35.
Tozali na ntango moko ya mpasi mpenza mpe ezali mpasi te tókóma mawamawa to tólɛmba nzoto. Mpo na kolendisa biso, Yesu Kristo asalelaka “bankumu,” elingi koloba bankulutu oyo batyami mafuta na elimo mpe oyo bazali na kati ya bampate mosusu. Bankulutu yango bazali te “bakonzi” ya kondima na biso kasi nde “baninga ya mosala” mpo na esengo na biso. Balingaka kosalisa biso tózala na esengo mpe tótikala sembo. (Yis. 32:1, 2; 2 Ko. 1:24) Bankulutu bakoki komekola ntoma Paulo, oyo azalaki ntango nyonso kosala makasi alendisa bandeko na ye. Akomelaki bakristo ya Tesaloniki oyo bazalaki na minyoko ete: “Lokola tolingaki bino na bolingo ya motema, tosepelaki mingi kopesa bino, kaka nsango malamu ya Nzambe te, kasi mpe milimo na biso moko, mpo bokómaki bandeko na biso ya bolingo.” (1 Tes. 2:8) Yango emonisi ete kolendisa kaka na maloba mbala mosusu esimbaka te, mpo na yango Paulo ayebisaki bankulutu ya Baefese maloba ya vɛrsɛ ya mokapo ya lelo. w18.04 21-22 par. 6-8
Mwamitano, 31 sanza ya 7
Yehova azali Elimo; mpe esika elimo ya Yehova ezali, bonsomi ezali wana.—2 Ko. 3:17.
Mpo tózwa bonsomi yango, tosengeli ‘kobongwana epai ya Yehova,’ elingi koloba kozala na boyokani malamu na ye. (2 Ko. 3:16) Bayisraele na esobe bazalaki kotalela makambo na liso ya bomoto. Ezalaki lokola nde batyaki litambala oyo ezipaki makanisi mpe mitema na bango. Bazwaki bonsomi ndenge babimaki na Ezipito, kasi balingaki kosalela yango kaka mpo na kokokisa bamposa na bango ya mosuni. (Ebr. 3:8-10) Bonsomi oyo elimo ya Yehova epesaka eleki mosika bonsomi oyo baombo bazwaka. Elimo yango epesaka bonsomi oyo bato bakoki kopesa ata moke te. Elimo ya Yehova ekoki kolongola biso na boombo ya lisumu mpe ya liwa, mpe na boombo ya losambo ya lokuta mpe mimeseno na yango. (Rom. 6:23; 8:2) Ezali bonsomi ya kokamwa mpenza! Ata moto oyo azali moombo to na bolɔkɔ akoki kozala na bonsomi yango.—Eba. 39:20-23. w18.04 9 par. 3-5