Sanza ya 8
Mwapɔsɔ, 1 sanza ya 8
Nzambe azali kolakisa biso bolingo na ye na likambo oyo: ntango tozalaki naino basumuki, Kristo akufelaki biso.—Rom. 5:8.
Na makita, bakundwelaka biso mbala na mbala likambo oyo Yehova ná Yesu basalá mpo na biso. Botɔndi etindaka biso tósala makasi ya komekola Yesu na bomoi na biso ya mokolo na mokolo. (2 Ko. 5:14, 15) Lisusu, motema na biso etindaka biso tósanzola Yehova mpo apesaki biso lisiko. Kopesa biyano oyo euti na motema ntango tozali na makita ezali lolenge moko ya kosanzola ye. Tokomonisa ete tolingaka mpenza Yehova mpe Mwana na ye soki tozali kondima komipimela makambo mosusu mpo na bango. Mbala mingi, tomipimelaka makambo ndenge na ndenge mpo na koyangana na makita. Masangá mingi esalaka likita ya kati ya pɔsɔ na mpokwa ya mokolo ya mosala, ntango mingi kati na biso tozalaka ya kolɛmba. Mpe likita mosusu esalemaka na nsuka ya pɔsɔ ntango bato mosusu bazali kopema. Yehova amonaka ndenge toyanganaka na makita ata ntango oyo tolɛmbi? Ɛɛ, amonaka yango! Kutu, soki tozali kosala milende mingi, Yehova mpe asepelaka mingi mpo yango emonisaka ete tolingaka ye.—Mrk. 12:41-44. w19.01 29 par. 12-13
Mwalomingo, 2 sanza ya 8
Ntango Nkolo amonaki ye, ayokelaki ye mawa.—Luka 7:13.
Yesu ye moko akutanaki na mikakatano mosusu oyo bato bakutanaka na yango. Na ndakisa, emonani ete Yesu akolaki na libota ya babola. Ntango azalaki kosala elongo na tata-mobɔkɔli na ye Yozefe, Yesu ayekolaki kosala misala ya makasi. (Mat. 13:55; Mrk. 6:3) Lisusu, emonani lokola ete Yozefe akufaki liboso Yesu asilisa mosala na ye awa na mabele. Na yango, ekoki kozala ete Yesu ayokaki mpasi ya kobungisa moto na liwa. Longola yango, Yesu ayebaki mpasi ya kozala na libota oyo bato nyonso basambelaka Yehova te. (Yoa. 7:5) Makambo wana nyonso mpe makambo mosusu esalisaki Yesu ayeba mikakatano ya bato mpe ayeba komitya na esika na bango. Ezalaki komonana polele ete Yesu azalaki komitya na esika ya basusu ntango azalaki kosala makamwisi. Yesu azalaki te kosala makamwisi kaka mpo esengelaki asala yango. “Mawa” mpo na bato oyo bazalaki konyokwama nde ezalaki kotinda ye asala yango. (Mat. 20:29-34; Mrk. 1:40-42) Yesu amityaki na esika ya bato mpe alingaki kosalisa bango.—Mrk. 7:32-35; Luka 7:12-15. w19.03 16 par. 10-11
Mwayambo, 3 sanza ya 8
Bókoba kokanga motema moto na moto na makambo ya mosusu.—Kol. 3:13.
Kanisá ndenge Yesu atungisamaki na butu ya nsuka ya bomoi na ye awa na mabele. Akolonga kotikala sembo tii na liwa? Soki atikali sembo te, moto moko te akozala na elikya ya bomoi. (Rom. 5:18, 19) Likambo oyo eleki ntina, akokaki kobebisa to kobatela lokumu ya Tata na ye. (Yobo 2:4) Na nsima, ntango azalaki kolya mpo na mbala ya nsuka elongo na bantoma na ye, masolo na bango ebalukaki na “ntembe makasi” mpo na koyeba “nani na kati na bango amonani ete aleki bango nyonso.” Likambo ya kokamwa, Yesu asilikaki te; abatelaki kimya na ye. Na boboto nyonso, kasi na mpiko, Yesu amonisaki lisusu makanisi oyo basengelaki kozala na yango. Na nsima, apesaki bango longonya ndenge batikalaki sembo epai na ye. (Luka 22:24-28; Yoa. 13:1-5, 12-15) Tokoki komekola Yesu mpe kotikala kimya ata na ntango oyo totungisami soki tobosani te ete biso nyonso tolobaka mpe tosalaka makambo oyo ekoki kopesa basusu nkanda. (Mas. 12:18; Yak. 3:2, 5) Mpe tósala makasi mpo tópesaka basusu longonya mpo na bizaleli na bango ya malamu.—Ef. 4:29. w19.02 11-12 par. 16-17
Mwamibale, 4 sanza ya 8
Yehova . . . atɛlɛmisi kiti na ye ya bokonzi ngwi mpo na lisambisi.—Nz. 9:7.
Mibeko ya Moize elobaki makambo oyo esalaki ete ezala mpasi kokosela moto makambo ete asali mabe. Moto oyo afundami azalaki na lotomo ya koyeba moto oyo afundi ye. (Mib. 19:16-19; 25:1) Lisusu, liboso bákata ete asali mpenza likambo, bato mibale to koleka basengelaki kopesa bilembeteli. (Mib. 17:6; 19:15) Bongo soki Moyisraele asali mabe, kasi kaka moto moko nde amonaki ye? Akokaki te kokanisa ete bakopesa ye etumbu te mpo na mabe yango. Yehova amonaki likambo oyo asalaki. Ya solo, Yehova apesi biso ndakisa ya kokoka; asalaka ata likambo moko te ya kozanga bosembo. Apesaka mbano na baoyo batosaka mibeko na ye na bosembo nyonso, kasi apesaka etumbu na baoyo basalelaka bokonzi na bango na ndenge ya mabe. (2 Sa. 22:21-23; Ezk. 9:9, 10) Bato mosusu bakoki kosala mabe mpe ekoki komonana ete bazwi etumbu te, kasi na ntango oyo ebongi, Yehova akobimisa bango mpo básambisama. (Mas. 28:13) Mpe soki babongoli motema te, eumelaka te mpo bámona ete “kokwea na mabɔkɔ ya Nzambe ya bomoi ezali likambo ya nsɔmɔ.”—Ebr. 10:30, 31. w19.02 23-24 par. 20-21
Mwamisato, 5 sanza ya 8
Mosakoli moko abimá naino te na Yisraele lokola Moize, oyo Yehova ayebaki ye mpenza boye na elongi.—Mib. 34:10.
Na ntembe te Moize atalaki epai ya Yehova mpo na koluka litambwisi. Biblia elobi ete “atikalaki ngwi lokola nde azalaki komona Moto oyo amonanaka te.” (Ebr. 11:24-27) Pene ya sanza mibale nsima ya kobima na Ezipito, mpe liboso ya kokɔta na Mokili ya Ndaka, likambo moko ya mpasi esalemaki. Bana ya Yisraele babandaki komilelalela mpo mai ezalaki te. Bakómaki koimaima mpo na Moize, lokola makambo ekómaki ndongo, “Moize abelelaki Yehova ete ‘nakosala nini na bato oyo? Etikali moke bábamba ngai mabanga!’” (Kob. 17:4) Yehova apesaki Moize malako ya polele. Ayebisaki ye azwa nzete mpe abɛta na libanga na Horebe. Biblia elobi: “Moize asalaki bongo na miso ya mikóló ya Yisraele.” Na nsima mai ebandaki kobima mpe Bayisraele bazwaki mai ebele mpe batikaki koimaima.—Kobima 17:5, 6. w18.07 13 par. 4-5
Mwaminei, 6 sanza ya 8
Bolingo etongaka.—1 Ko. 8:1.
Yehova apesaka mpe biso makasi na bolingo nyonso na nzela ya lisangá. Soki tolingaka Nzambe, tokolinga mpe bandeko ya lisangá. Tokosala nyonso oyo tokoki mpo na kosalisa bango bámona ete bazali na motuya mpe ete Yehova alingaka bango. (1 Yoa. 4:19-21) Ntoma Paulo akomaki: “Bókoba kobɔndisana mpe kolendisana, ndenge kutu bozali kosala yango.” (1 Tes. 5:11) Ezali kaka mokumba ya bankulutu te. Mokomoko na biso akoki komekola Yehova ná Yesu mpe kobɔndisa bandeko. (Rom. 15:1, 2) Ekoki kosɛnga bandeko mosusu oyo banyokwamaka na makanisi báluka lisalisi ya monganga. (Luka 5:31) Bankulutu mpe bandeko mosusu bayebi malamu ete ata soki bazali minganga te, bakoki mpenza kosalisa mpe kobɔndisa bandeko yango. Bakoki kolanda toli oyo: “Bólobaka na ndenge ya kobɔndisa epai ya milimo oyo enyokwami na makanisi, bósalisa bato ya bolɛmbu, mpe bózala na motema molai epai ya bato nyonso.”—1 Tes. 5:14. w18.09 14 par. 10-11
Mwamitano, 7 sanza ya 8
Kotala epai na epai te, mpo nazali Nzambe na yo.—Yis 41:10.
Tokotyela Yehova motema mingi koleka soki toyekoli koyeba ye malamu. Lolenge kaka moko oyo tokoki koyeba Nzambe malamu ezali ya kotánga Biblia na likebi mpe komanyola makambo oyo tozali kotánga. Biblia elobeli masolo oyo emonisi ndenge Yehova abatelaki basaleli na ye na ntango ya kala. Yango endimisaka biso ete Yehova akosala mpe bongo mpo na biso lelo oyo. Na ndakisa, Yisaya asaleli maloba kitoko ya elilingi mpo na komonisa ndenge oyo Yehova abatelaka biso. Akokanisi Yehova na mobateli ya mpate, mpe basaleli na ye na bana-mpate. Yisaya alobi boye mpo na Yehova: “Na lobɔkɔ na ye akoyanganisa bana-mpate; mpe akomema yango na ntolo na ye.” (Yis. 40:11) Ntango toyokaka ete mabɔkɔ ya nguya ya Yehova ezingi biso, tomonaka ete tobatelami mpe tomitungisaka te. Mpo na kosalisa yo ozala kimya ata ntango okutani na mikakatano, manyolá maloba ya kokitisa motema oyo ezali mokapo ya lelo. Ekopesa yo makasi ntango okokutana na mikakatano oyo ezali koya. w19.01 7 par. 17-18
Mwapɔsɔ, 8 sanza ya 8
Ee Nzambe na ngai, nasepeli kosala mokano na yo.—Nz. 40:8.
Omityelá mikano ya elimo oyo olingi kokokisa? Mbala mosusu omityeli mokano ya kotánga Biblia mokolo na mokolo mpe ya kopesa biyano to kosala badevuare ya malamu na makita. Mbala mosusu mpe ozali kosala makasi osalelaka Biblia malamu mingi koleka na mosala ya kosakola. Omiyokaka ndenge nini ntango omoni ete ozali kokola malamu na elimo to ntango basusu bapesi yo longonya mpo na yango? Na ntembe te osepelaka mingi! Osengeli mpenza koyoka esengo mpo ozali kosala mokano ya Yehova, ndenge Yesu asalaki. (Mas. 27:11) Soki omipesi na mosala ya Yehova, ozali kosala mosala oyo ekopesa yo esengo mpe ekobongisa bomoi na yo. Ntoma Paulo akomaki: “Bópikama makasi, bóninganaka te, bózala ntango nyonso na mingi ya kosala na mosala ya Nkolo, mpo boyebi ete mosala na bino ya makasi ezali mpamba te na kati ya Nkolo.” (1 Ko. 15:58) Kasi, bato oyo bamityelaka mikano na mokili oyo, na ndakisa komipesa na koluka mbongo to lokumu, bazalaka mpenza na esengo te. Ata soki bazwi eloko oyo balukaki, mbala mingi bamonaka kaka ete eloko moko ezali kozanga.—Luka 9:25. w18.12 22 par. 12-13
Mwalomingo, 9 sanza ya 8
Bayengebene bakozwa mabele.—Nz. 37:29.
Davidi azalaki kolobela ntango oyo bato nyonso awa na mabele bakotosa mitinda ya sembo ya Nzambe. (2 Pe. 3:13) Esakweli oyo ezali na Yisaya 65:22 elobi boye: “Mikolo ya bato na ngai ekozala lokola mikolo ya nzete.” Yango emonisi ete na mokili ya sika basaleli ya Yehova bakotikala na bomoi bambula na bambula. Emoniseli 21:1-4 emonisi ete Nzambe akopambola bato; moko ya mapamboli yango ezali ete “liwa ekozala lisusu te.” Adama ná Eva babungisaki libaku ya kofanda libela na libela na Paradiso, kasi atako bongo mabele ekozala lisusu paradiso. Ndenge Nzambe alakaki yango, akopambola bato awa na mabele. Davidi alobaki ete bato ya komikitisa mpe bayengebene bakozwa mabele mpe bakofanda wana libela na libela. (Nz. 37:11) Mpe bisakweli oyo ezali na mokanda ya Yisaya epesi biso elikya ete tokozala na bomoi na paradiso kitoko na mabele. (Yis. 11:6-9; 35:5-10; 65:21-23) Ekozala ntango nini? Ntango elaka oyo Yesu apesaki mosali-mabe ekokokisama. (Luka 23:43) Okoki kozala na Paradiso yango. w18.12 7 par. 22-23
Mwayambo, 10 sanza ya 8
Koleka biloko mosusu nyonso oyo esengeli kobatelama, batelá motema na yo.—Mas. 4:23.
Tokoki kokima makanisi nyonso ya mokili? Te, mpo tokoki kolongwa na mokili te. (1 Ko. 5:9, 10) Ata na mosala ya kosakola, tokokutana na bato oyo bazali na makanisi ya mabe mpe ya libunga. Kasi, ata soki toyoki makanisi ya mabe, tosengeli te kokoba kokanisa yango to kondima yango. Ndenge moko na Yesu, tosengeli kobwaka mbala moko makanisi oyo ekosepelisa Satana. Mpe tokomibatela soki toboyi kotika makanisi ya mokili ekɔtela biso mpambampamba. Na ndakisa, tosengeli kopona baninga na biso malamu. Biblia ekebisi biso ete soki tokómi baninga ya motema na bato oyo basambelaka Yehova te, tokobanda kokanisa lokola bango. (Mas. 13:20; 1 Ko. 15:12, 32, 33) Lisusu, ntango tozali koboya kominanola oyo ezali kolendisa liteya ya evolisyo, mobulu, to pite, tozali kobatela makanisi na biso na makambo oyo “ezali kotɛmɛla boyebi ya Nzambe.”—2 Ko. 10:5. w18.11 21 par. 16-17
Mwamibale, 11 sanza ya 8
Nakotambola na solo na yo.—Nz. 86:11.
Ndenge nini tokoki kokangama na ekateli na biso ya kokoba kotambola na kati ya solo? Tosengeli koteyaka solo ya Biblia ntango nyonso oyo tozwi libaku. Biblia ezali lokola mopanga. Kaka ndenge soda ya mpiko azalaki kokanga mopanga na ye makasi, biso mpe tosengeli kokangama makasi na Liloba ya Nzambe. (Ef. 6:17) Biso nyonso tokoki kokolisa mayele na biso ya koteya mpo na “kosembola liloba ya solo malamumalamu.” (2 Tim. 2:15) Ntango tozali kosalela Biblia mpo na koteya basusu, tokoyeba solo malamu koleka mpe tokolinga yango mingi mpenza. Yango ekosala ete tókangama makasi na ekateli na biso ya kokoba kotambola na kati ya solo. Solo ezali likabo ya motuya oyo Yehova apesi biso. Esalisi biso tózala na boyokani makasi na Tata na biso ya likoló. Yehova ateyi biso makambo ebele, kasi yango ezali kaka ebandeli! Apesi biso elaka ete akokoba koteya biso libela na libela. Na yango, zwá solo na motuya lokola liyaka moko ya kitoko. Kobá ‘kosomba solo mpe kotɛka yango te.’—Mas. 23:23. w18.11 8 par. 2; 12 par. 15-17
Mwamisato, 12 sanza ya 8
Noa [azalaki] mosakoli ya boyengebene.—2 Pe. 2:5.
Liboso ya Mpela, na ntembe te nsango oyo Noa asakolaki ezalaki mpe na likebisi mpo na mokolo ya kobebisama. Yesu alobaki: “Ndenge bazalaki na mikolo oyo ezalaki liboso ya mpela: bazalaki kolya mpe komɛla, mibali bazalaki kobala mpe basi bazalaki kobalisama, tii mokolo oyo Noa akɔtaki na masuwa; mpe batyaki likebi te tii mpela eyaki mpe ekɔmbɔlaki bango nyonso, kozala ya Mwana ya moto ekozala mpe bongo.” (Mat. 24:38, 39) Atako bato mingi bazalaki koyoka Noa te, akobaki kosakola na bosembo nsango ya likebisi oyo Yehova ayebisaki ye. Lelo oyo, tosakolaka nsango ya Bokonzi epai ya bato mpo na kopesa bango libaku ya koyeba oyo Nzambe akosala mpo na bato na mikolo ezali koya. Lokola Yehova, tolingi ete bato bátyela nsango yango likebi mpe ‘bátikala mpenza na bomoi.’ (Ezk. 18:23) Ntango tosakolaka ndako na ndako mpe na bisika ya bato nyonso, tokebisaka ebele ya bato ete Bokonzi ya Nzambe ekobebisa mokili oyo mabe.—Ezk. 3:18, 19; Dan. 2:44; Em. 14:6, 7. w18.05 19 par. 8-9
Mwaminei, 13 sanza ya 8
Ye oyo afulaka bosembo akoyebisa makambo ya boyengebene.—Mas. 12:17.
Okosala nini soki na mboka na bino mosala na biso epekisamá mpe bakonzi bakangi yo mpe batuni yo mituna oyo etali bandeko? Osengeli koyebisa bango makambo nyonso oyo oyebi? Yesu asalaki nini ntango guvɛrnɛrɛ ya Roma atunaki ye mituna? Na kolanda etinda ya Biblia oyo elobi ete ezali na “ntango ya kofanda nyɛɛ mpe ntango ya koloba,” na bantango mosusu Yesu alobaki eloko te! (Mos. 3:1, 7; Mat. 27:11-14) Soki tokutani na likambo ya ndenge wana, tosengeli kozala ekɛngɛ mpe na mayele mpo tótya bandeko na likama te. (Mas. 10:19; 11:12) Okosala nini soki ndeko moko na lisangá asali lisumu ya monene mpe yo oyebi likambo yango? ‘Yebisa makambo ya boyengebene.’ Ozali na mokumba ya koloba solo epai ya bankulutu, kobalola mpe makambo te. Bankulutu bazali na lotomo ya koyeba makambo ya solo mpo bátala ndenge oyo bakoki kosalisa moto yango abongisa boyokani na ye na Yehova.—Yak. 5:14, 15. w18.10 10 par. 17-18
Mwamitano, 14 sanza ya 8
Bókoba kobɔndisana mpe kolendisana, ndenge kutu bozali kosala yango.—1 Tes. 5:11.
Ndenge nini tokoki kolendisana na bolingo? Osengeli kozala moyoki malamu. (Yak. 1:19) Koyoka ndeko na likebi ekomonisa ete olingaka ye. Tuná ye mituna ya malamu oyo ekosalisa yo oyeba ndenge oyo azali komiyoka. Elongi na yo esengeli komonisa ye ete ozali komitya na esika na ye. Ntango azali koloba, zalá na motema molai, tiká ye aloba mpe kokata ye te. Soki ozali moyoki ya malamu, okoki koyeba mpenza ndenge oyo azali komiyoka mpe ekosalisa ye atyela yo motema. Yango ekosala ete andima koyoka makambo oyo okoloba mpo na kolendisa ye. Soki ozali mpenza kotyela basusu likebi, okoki mpenza kobɔndisa bango. w18.09 14 par. 10; 15 par. 13
Mwapɔsɔ, 15 sanza ya 8
Sombá solo.—Mas. 23:23.
Moto nyonso asengeli kopesa ntango mpo na kosomba solo. Esɛngaka ntango mpo na koyoka nsango ya Bokonzi, kotánga Biblia mpe mikanda ya moombo ya sembo, koyekola Biblia na Batatoli ya Yehova, kobongisa makita, mpe koyanganaka na makita yango. Mpo na kosala nyonso wana, tosengeli kosalela ntango oyo tokokaki kolekisa na makambo oyo ezali na ntina mingi te. (Ef. 5:15, 16) Ezwaka ntango boni mpo na koyekola mateya ya ebandeli ya Biblia? Etali moto na moto. Koyekola bwanya ya Yehova, ndenge na ye ya kosala makambo mpe misala na ye ezali na nsuka te. (Rom. 11:33) Nimero ya liboso ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ekokanisaki mateya ya solo na “mwa fololo ya moke,” mpe elobaki boye: ‘Kosuka kaka na kobuka fololo moko te ya solo. Soki fololo moko ekokaki, mosusu elingaki kozala te. Kobá kobuka mosusu, kobá koluka fololo mingi.’ Ata ntango tokozwa bomoi ya seko, ekozala kaka na makambo ebele ya koyekola mpo na Yehova. Lelo oyo, ezali na ntina ete tósalela ntango na biso na bwanya mpo na kosomba solo. w18.11 4 par. 7
Mwalomingo, 16 sanza ya 8
Mibali, bókoba kolinga basi na bino.—Ef. 5:25.
Biblia elendisi mibali báfanda na basi na bango “na boyebi,” elingi koloba bápesaka bango lokumu mpe bázala na bososoli. (1 Pe. 3:7) Na ndakisa, mobali oyo azalaka na bososoli ayebi ete atako mobali akeseni na mwasi na makambo mingi, amonaka te ete azali na ntina mingi koleka mwasi. (Eba. 2:18) Na yango, amityaka na esika ya mwasi na ye mpe asalelaka ye makambo na lokumu mpe limemya. Mobali oyo amityaka na esika ya mwasi na ye akoki ata mokolo moko te kolulana na mwasi mosusu to kosepela na ye na makanisi ya mabe. (Yobo 31:1) Asalelaka te basite ya kosolola na baninga mpo na kolulana na mwasi mosusu, mpe atalaka basite ya mbindo te. Azalaka sembo epai ya mwasi na ye na makambo nyonso kaka te mpo alingaka ye, kasi mpe mpo alingaka Yehova mpe ayinaka oyo ezali mabe.—Nz. 19:14; 97:10. w18.09 29 par. 3-4
Mwayambo, 17 sanza ya 8
Moto oyo azali kosala lokola moto oyo azali mpenza moke na kati na bino nyonso ye nde moto oyo aleki monene.—Luka 9:48.
Mpo na nini ezalaka mpasi kosalela makambo oyo toyekolaka na Liloba ya Nzambe? Ntina moko ezali ete esɛngaka komikitisa mpo na kosala oyo ezali malamu, mpe ezali mpasi mpenza kozala na komikitisa lelo oyo. Na ‘mikolo oyo ya nsuka,’ tofandi na bato oyo bazali “bato oyo bamilingaka, bato balingá mbongo, bato ya lofundo, bato ya lolendo,” mpe bato oyo “bazangi komipekisa.” (2 Tim. 3:1-3) Lokola tozali basaleli ya Nzambe, toyebi ete bizaleli wana ezali mabe. Kasi ekoki kokóma ete tólula baoyo balukaka liboso matomba na bango moko mpo emonanaka lokola balongaka mpe bazalaka na esengo. (Nz. 37:1; 73:3) Moto mosusu akoki kutu komituna boye: ‘Ebongi mpenza nasala milende ya kotya matomba ya basusu na esika ya liboso? Soki namonisi komikitisa, bato bakokoba komemya ngai?’ Soki totiki moimi oyo ezali na mokili ekɔtela biso, yango ekoki kobebisa boyokani na biso na bandeko mpe ekozala mpasi mpo basusu bámona ete tozali bakristo. Kasi soki toyekoli bandakisa ya basaleli ya Nzambe ya komikitisa mpe tomekoli bango, tokozwa mpenza matomba. w18.09 3 par. 1
Mwamibale, 18 sanza ya 8
Esengo ya kopesa eleki oyo ya kozwa.—Mis. 20:35.
Liboso Yehova abanda kokela, azalaki kaka ye moko. Na nsima asepelaki kopesa likabo ya bomoi na baanzelu na likoló mpe bato awa na mabele. Yehova, “Nzambe ya esengo,” asepelaka kopesa basusu biloko ya malamu. (1 Tim. 1:11; Yak. 1:17) Lokola alingi ete biso mpe tózala na esengo, ateyaka biso kokaba. (Rom. 1:20) Nzambe asalaki moto na elilingi na ye. (Eba. 1:27) Elingi koloba ete ntango akelaki biso, Yehova apesaki biso bizaleli oyo azalaka na yango. Na yango, mpo tózala mpenza na esengo, tosengeli kolanda ndakisa na ye. Tosengeli kotyela basusu likebi mpe kokaba na esengo biloko oyo tozali na yango. (Flp. 2:3, 4; Yak. 1:5) Mpo na nini? Mpo Yehova akelá biso bongo. Atako tozali bato ya kozanga kokoka, tokoki komekola Yehova na oyo etali kokaba. Lokola Yehova alingi tómekola ye, asepelaka ntango tokabaka.—Ef. 5:1. w18.08 18 par. 1-2; 19 par. 4
Mwamisato, 19 sanza ya 8
Bampate na ngai eyokaka mongongo na ngai.—Yoa. 10:27.
Bayekoli ya Yesu bamonisaka ete bayokaka mongongo na ye ntango bayokaka maloba na ye mpe batosaka yango. Batikaka te ete “mitungisi ya bomoi” elongola likebi na bango na makambo oyo eleki ntina. (Luka 21:34) Bamonaka nde ete kotosa mitindo ya Yesu ezali likambo ya ntina mingi na bomoi na bango, ata soki bakutani na mikakatano ya makasi. Ata na mikakatano, bandeko na biso bazali kotikala sembo epai ya Yehova. Lolenge mosusu oyo tokoki komonisa ete tozali koyoka Yesu ezali ya kotosa mpe kosala na bomoko na bandeko oyo ye aponi mpo na kokamba biso. (Ebr. 13:7, 17) Na bambula euti koleka, ebongiseli ya Yehova ebongoli makambo mingi, na ndakisa ndenge ya kosalela bisaleli ya sika mpe mayele ya sika na mosala na biso ya kosakola, ndenge ya kosala likita ya katikati ya pɔsɔ, ndenge ya kotonga Bandako ya Bokonzi, kobongisa yango lisusu, mpe kobatela yango. Tozali na botɔndi mingi mpo na litambwisi wana oyo emonisi bolingo mpe bwanya! Tokoki kozala na kondima ete Yehova akopambola milende oyo tozali kosala mpo na kolanda malako oyo ebongiseli na ye ezali kopesa biso na ntango oyo ebongi. w19.03 10-11 par. 11-12
Mwaminei, 20 sanza ya 8
[Tómemama lisusu te] epai na epai na mopɛpɛ nyonso ya mateya na nzela ya bokosi ya bato.—Ef. 4:14.
Lisolo oyo ezali na lokuta na kati ekoki kobungisa biso nzela. Tótalela likambo oyo ekómelaki Bayisraele oyo bazalaki kofanda na wɛsti ya Ebale Yordani na eleko ya Yosua. (Yos. 22:9-34) Bayokaki ete Bayisraele oyo bazalaki kofanda na ɛsti, elingi koloba libota ya Rubene, ya Gade, mpe ndambo ya libota ya Manase, batongaki etumbelo moko monene. Likambo wana ezalaki solo, kasi makambo mosusu ezangaki. Na kolanda makambo oyo bayokaki, Bayisraele ya ngámbo ya wɛsti bakanisaki ete bandeko na bango ya ɛsti batombokeli Yehova; na yango basanganaki mpo na kokende kobundisa bango. (Yos. 22:9-12) Kasi, liboso bákende, batindaki mwa mibali bákende koluka koyeba bosolo ya likambo. Bayokaki nini? Batongaki etumbelo mpo na kopesa banzambe ya lokuta mbeka te. Batongaki yango mpo ezala ekaniseli oyo ekosalisa moto nyonso ayeba ete bazalaki kosambela Yehova. Na ntembe te, Bayisraele basepelaki ndenge bakendaki kobundisa bandeko na bango te, kasi bazwaki ntango ya koluka koyeba makambo nyonso. w18.08 5 par. 9-10
Mwamitano, 21 sanza ya 8
Moto oyo akanisi ete atɛlɛmi akeba ete akwea te.—1 Ko. 10:12.
Ndenge Paulo amonisaki yango, ata bato oyo basambelaka Yehova bakoki kosala makambo oyo ezali mabe. Bakoki kokanisa ete Yehova azali kokoba kondima bango. Kasi, ezali te mpo moto alingi kozala moninga ya Yehova to alobi ete azali sembo epai ya Yehova nde emonisi ete Yehova akondima ye kaka. (1 Ko. 10:1-5) Bayisraele bakanisaki ete Moize akoumela te na ngomba Sinai, lokola aumelaki babandaki komitungisa. Soki nsuka ya ebongiseli oyo eyei te ndenge oyo tozali kokanisa, biso mpe tokoki kokóma komitungisa. Tokoki mbala mosusu kokanisa ete makambo kitoko oyo Yehova alaki biso ekokokisama mpenza te, mpe tokoki kotya makanisi nyonso na bamposa na biso ya mosuni na esika ya kosala mokano ya Nzambe. Soki tokebi te, tokoki kokóma mosika na Yehova mpe kobanda kosala makambo oyo tokanisaki kosala ata mokolo moko te. w18.07 21 par. 17-18
Mwapɔsɔ, 22 sanza ya 8
Likambo oyo mpe, oyo olobi, nakosala yango, mpo ondimami na miso na ngai mpe nayebi yo na nkombo.—Kob. 33:17.
Yehova ayebi mokomoko na biso. Kasi tokosala nini mpo tókóma baninga na ye? Tosengeli kolinga ye mpe kopesa ye bomoi na biso. (1 Ko. 8:3) Tosengeli kobatela boyokani malamu oyo tozali na yango na Tata na biso ya likoló. Ndenge moko na bakristo ya Galatia, biso mpe tosengeli koboya kozala baombo ya “makambo mikemike ya mpamba mpe oyo ezangá ntina.” (Gal. 4:9) Bakristo ya Galatia bakolaki na elimo mpe Nzambe ayebaki bango. Kasi, Paulo alobaki ete kaka bandeko yango bazalaki “lisusu kozongela” makambo ezangá ntina. Ezalaki lokola Paulo atunaki bango ete: ‘Mpo na nini bozongeli kosalela kaka makambo ya mpambampamba mpe oyo ezangá ntina?’ w18.07 8 par. 5-6
Mwalomingo, 23 sanza ya 8
Moto ya bwanya akoyoka mpe akozwa lisusu mateya mingi.—Mas. 1:5.
Tosengeli te kozela naino tókutana na makambo ya mpasi oyo eyaka na kobuka mibeko ya Nzambe bongo na nsima tózwa mateya. Tokoki kozwa mateya na mabunga ya bato mosusu oyo Biblia elobeli. Tozwaka mateya oyo eleki malamu epai ya Nzambe. Na ndakisa, tókanisa mpasi oyo Davidi ayokaki ndenge abukaki mibeko ya Yehova nsima ya kosangisa nzoto na Bate-sheba. (2 Sa. 12:7-14) Ntango totángaka masolo yango, tokoki komituna boye: ‘Ndenge nini Davidi akokaki kokima mpasi ya makambo oyo asalaki? Nalingaki kosala nini soki nazalaki na esika na ye? Nalingaki kosala pite lokola Davidi to kokima lokola Yozefe?’ (Eba. 39:11-15) Soki tokanisi malamu na makama oyo lisumu ekoki kobimisa, tokozala na ekateli makasi ya ‘koyina oyo ezali mabe.’—Amo. 5:15. w18.06 17 par. 5, 7
Mwayambo, 24 sanza ya 8
Bózongisela Kaisala biloko ya Kaisala, kasi Nzambe biloko ya Nzambe.—Mat. 22:21.
Ntango bato bamonaka makambo ya kozanga bosembo zingazinga na bango, mbala mingi bamikɔtisaka makasi na makambo ya politiki. Na mikolo ya Yesu, kofuta mpako ezalaki kosala ete bato ebele bákɔta na makambo ya politiki. Bazalaki kofuta mpako mpo na makambo mingi, na ndakisa mpo na biloko ya moto, mabele mpe bandako. Lisusu bakɔngɔli-mpako bazalaki kondima kanyaka, yango ezalaki kokómisa makambo mabe koleka. Ntango mosusu bazalaki kofuta bakonzi ya guvɛrnema mpo na kozwa esika mpe bazalaki kosalela bokonzi na bango mpo na kozwa mbongo mingi. Zakai, mokonzi ya bakɔngɔli-mpako na Yeriko, akómaki mozwi mpo azalaki kofutisa bato mpako mingi. (Luka 19:2, 8) Banguna balukaki kokanga Yesu na motambo na likambo etali kofuta “mpako oyo moto nyonso afutaka,” ya denari moko oyo bakonzi ya Roma batyelaki bato. (Mat. 22:16-18) Bayuda basepelaki na mpako yango ata moke te mpo ezalaki kokundwela bango ete guvɛrnema ya Roma nde ezalaki kokonza bango. w18.06 5-6 par. 8-10
Mwamibale, 25 sanza ya 8
Nyonso oyo moto azali kolona, yango nde akobuka.—Gal. 6:7.
Kopona ngámbo ya Satana ebimisaka ntango nyonso mikakatano. Ememaka bolamu ya solosolo te! (Yobo 21:7-17; Gal. 6:8) Mpo na nini ezali malamu tóyeba ete Satana nde azali koyangela mokili? Mpo yango ekosalisa biso tózala na makanisi ebongi mpo na baguvɛrnema mpe ekotinda biso tókoba kosakola nsango malamu. Toyebi ete Yehova alingi ete tótosaka baguvɛrnema. (1 Pe. 2:17) Alingi ete tótosaka mibeko oyo batye soki ebuki mitinda na ye te. (Rom. 13:1-4) Lisusu, toyebi ete tosengeli kokɔta te na makambo ya politiki mpe kopesa mabɔkɔ te na ebongiseli moko ya politiki to mokonzi moko. (Yoa. 17:15, 16; 18:36) Lokola toyebi ete Satana azali koluka kozipa nkombo ya Yehova mpe kobebisa lokumu na ye, tosalaka nyonso oyo tokoki mpo na koteya bato solo etali Nzambe. Ezali mpenza lokumu monene kobengama na nkombo na ye mpe kosalela yango. Kolinga Nzambe ezali na motuya mingi koleka bolingo ya mbongo to ya biloko.—Yis. 43:10; 1 Tim. 6:6-10. w18.05 24 par. 8-9
Mwamisato, 26 sanza ya 8
Mwasi akabwana na mobali na ye te.—1 Ko. 7:10.
Mwasi ná mobali bakoki kokabwana soki mikakatano ebimi na libala na bango? Biblia elobeli te bantina oyo mwasi ná mobali bakoki kokabwana. Paulo akomaki boye: “Mwasi oyo azali na mobali oyo azali mondimi te, nzokande mobali yango andimi kofanda na ye, mwasi yango atika mobali na ye te.” (1 Ko. 7:12, 13) Ezali mpe bongo mpo na biso lelo. Kasi, na bantango mosusu ekómaka ete “mobali oyo azali mondimi te” amonisa na misala na ye ete “andimi kofanda na” mwasi na ye te. Na ndakisa, soki abɛtaka mwasi na ndenge ya nko, tii mwasi akómi komona ete nzoto na ye to bomoi na ye ezali na likama. Mbala mosusu aboyaka kokokisa bamposa na ye ya mosuni mpe ya libota, to azali kopesa ye nzela ata moke te asalela Yehova. Na ntango wana, ndeko mwasi ye moko akoki kozwa ekateli ete basengeli kokabwana, mpo ata soki na monɔkɔ mobali azali koloba makambo mosusu, misala na ye emonisi ete ‘andimi te kofanda na ye.’ Kasi, bakristo mosusu oyo bakutanaka na makambo wana bazwi ekateli ya kofanda kaka na molongani na bango. Bazali koyika mpiko mpe kosala makasi mpo na kobongisa libala na bango. w18.12 13 par. 14, 16; 14 par. 17
Mwaminei, 27 sanza ya 8
Ezali bato oyo . . . baboti mbuma wana bazali koyika mpiko.—Luka 8:15.
Na ndakisa ya moloni oyo ezali na Luka 8:5-8, 11-15, Yesu amonisaki ete mboto ezali “liloba ya Nzambe,” to nsango ya Bokonzi ya Nzambe. Mabele ezali motema ya moto. Mboto oyo ekweaki na mabele ya malamu, ezwaki misisa, ebotaki mbuma mpe ekómaki nzete. Na nsima, nzete “ebotaki mbuma mbala nkama moko.” Ntango bayebisaki biso nsango ya Bokonzi ya Nzambe mpo na mbala ya liboso, tondimaki nsango yango. Mboto yango ezwaki misisa tii ebotaki mbuma. Kaka ndenge blé ebotaki te blé mosusu ya sika, kasi nde mboto, biso mpe tobotaka te bayekoli ya sika kasi nde mboto ya sika. Esalemaka ndenge nini? Ntango nyonso oyo toyebisaka basusu nsango ya Bokonzi ya Nzambe, ezali lokola tozali kobwaka mboto oyo elonamaki na motema na biso mpe tozali kokómisa yango ebele. (Luka 6:45; 8:1) Na yango, ntango tozali kokoba koyebisa bato nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe, ‘tobotaka mbuma wana tozali koyika mpiko.’ w18.05 14 par. 10-11
Mwamitano, 28 sanza ya 8
Bato nyonso oyo ngai nalingaka mingi napamelaka bango mpe napesaka bango disiplini.—Em. 3:19.
Ntoma Paulo andimaki ‘kopesa biloko na ye nyonso mpe komipesa mobimba’ mpo na bandeko. Misala na ye emonisaki ete andimaki kosala oyo akoki mpo na bango. (2 Ko. 12:15) Ndenge moko mpe, bankulutu basengeli kolendisa mpe kobɔndisa basusu kaka na maloba te, kasi mpe na misala mpo na komonisa ete batyelaka bango mpenza likebi. (1 Ko. 14:3) Mpo na kolendisa bandeko, ekoki kosɛnga bankulutu bápesa toli. Na ntango yango mpe, bandakisa oyo ezali na Biblia ekoki kosalisa bango bápesa toli na ndenge oyo ekolendisa. Yesu atiká ndakisa ya malamu mpenza na oyo etali kopesa toli ntango atindelaki masangá ya Azia Moke bansango nsima ya lisekwa na ye. Apesaki lisangá ya Efese, ya Pergame, mpe ya Tyatire mwa batoli ya makasi. Kasi, liboso apesa toli yango, apesaki bango longonya mpo na makambo nyonso ya malamu oyo bazalaki kosala. (Em. 2:1-5, 12, 13, 18, 19) Ekozala malamu bankulutu bámekola Kristo ntango bazali kopesa toli. w18.04 22 par. 8-9
Mwapɔsɔ, 29 sanza ya 8
Batata, . . . bókoba kobɔkɔla [bana na bino] na disiplini mpe na makebisi ya Yehova.—Ef. 6:4.
Baboti, na ntembe te, bosalaka nyonso oyo bokoki mpo na kobatela bana bázwa bamaladi te. Bobatelaka ndako na bino pɛto, mpe bobwakaka eloko nyonso oyo ekoki kopesa bino to bana na bino maladi. Ndenge moko mpe, bosengeli kobatela bana na bino na bafilme, baprogramɛ ya televizyo, masano ya video, mpe basite ya Internet oyo ekoki kosala ete makanisi ya Satana ebebisa bango. Yehova apesi bino mokumba ya kobatela bana na bino na elimo. (Mas. 1:8) Yango wana, kobangaka te kotyela bato ya ndako na yo mibeko oyo eyokani na mitinda ya Biblia. Yebisá bana na yo ya mike makambo oyo bakoki kotala mpe oyo bakoki kotala te, mpe salisá bango bákanga ntina ya bikateli na yo. (Mat. 5:37) Ntango bana na yo bazali kokola, salisá bango báyeba kokesenisa nini ezali malamu mpe nini ezali mabe, na kolanda mitinda ya Yehova. (Ebr. 5:14) Mpe kobosana te ete bana na yo bakoyekola makambo mingi koleka na makambo oyo osalaka.—Mib. 6:6, 7; Rom. 2:21. w19.01 16 par. 8
Mwalomingo, 30 sanza ya 8
Mibange ná bana. Básanzola nkombo ya Yehova.—Nz. 148:12, 13.
Ata soki ozali elenge, okoki kosala ete moto nyonso na lisangá amona ete azali na ntina. Lolenge moko ya kosala yango ezali ya kosala boninga na bandeko oyo bakómi mikóló. Tuná bango makambo oyo esalisi bango básalela Yehova na boumeli ya bambula ebele. Okoki koyekola makambo mingi epai na bango. Yango ekoki mpe kolendisa bino nyonso! Moto nyonso akoki koyamba bato ya sika oyo bayaka na makita na biso. Soki baponi yo otambwisaka likita ya mosala ya kosakola, okoki kosalisa bandeko oyo bakómi mikóló mpo bákoba kosakola. Esengeli koyeba soki bandeko yango bazali na teritware oyo ebongi. Ntango mosusu, bokoki kobongisa ete básakola elongo na bilenge mpo básalisa bango. Bokoki mpe komitya na esika ya bandeko oyo bazali kobɛla mpe baoyo bazali na likoki ya kosala makambo mingi te. Ya solo, soki bozali komitya na esika ya basusu mpe komonisa bososoli, yango ekosalisa bilenge, mikóló, bandeko oyo baumeli mpe basakoli ya sika, básakola nsango malamu na molende.—Lev. 19:32. w18.06 23 par. 10-12
Mwayambo, 31 sanza ya 8
[Bósalela] bonsomi na bino mpo na kozipa makambo mabe te, kasi lokola baombo ya Nzambe.—1 Pe. 2:16.
Tosengeli kobosana ata mokolo moko te ete Yehova alongoli biso na boombo ya lisumu mpe ya liwa. Na nzela ya lisiko, tokoki kosalela Nzambe na biso na lisosoli ya pɛto, mpe yango epesaka esengo ya solosolo. (Nz. 40:8) Longola kozala na botɔndi epai ya Yehova, tosengeli mpe kokeba ete tósalela te bonsomi na biso na ndenge ya mabe. Na ndakisa, ntoma Petro akebisaki biso ete tosengeli te kosalela bonsomi na biso mpo na komipesa na makambo ya mabe. Yango ezali kokundwela biso likambo oyo ekómelaki Bayisraele na esobe. Lelo oyo, likebisi yango etali mpe biso, mbala mosusu mingi koleka. Satana ná mokili na ye bazali kolakisa biso biloko kitoko ya kolata, ya kolya, ya komɛla mpe ya kominanola. Mbala mingi, bato oyo bayebi kosala bapiblisite basalelaka mibali ná basi ya kitoko mpo na kotinda biso tómona ete tosengeli kosomba biloko oyo tozali mpenza na bosɛnga na yango te. Ezali mpasi te mokili ekosa biso mpo tósalela bonsomi na biso na ndenge ya mabe. w18.04 10 par. 7-8