Sanza ya 9
Mwamibale, 1 sanza ya 9
Atako bomoná ye te, bozali kolinga ye.—1 Pe. 1:8.
Yesu amonisaki ete amityaki na esika ya Marta mpe Maria. Ntango amonaki mawa makasi oyo bazalaki na yango mpo ndeko na bango Lazare akufaki, “Yesu alelaki, abimisi mpisoli.” (Yoa. 11:32-35) Yesu alelaki te kaka mpo abungisaki moninga na ye ya motema. Kutu, ayebaki ete akosekwisa Lazare. Yesu alelaki nde mpo amonaki mpe ayebaki mpasi mpe mawa oyo baninga na ye bazalaki na yango na mitema. Koyeba ete Yesu azalaki komitya na esika ya bato ezali mpenza kolendisa biso. Ya solo, biso tozali bato ya kokoka te lokola ye. Kasi, tolingaka ye mpo azalaki komitya na esika ya basusu. Koyeba ete sikoyo Yesu azali Mokonzi mpe azali koyangela na Bokonzi ya Nzambe ezali kolendisa biso. Etikali moke, alongola bampasi nyonso. Lokola Yesu azalaki mpe moto awa na mabele, azali mokonzi oyo abongi mpenza mpo na kosalisa bato bálongwa na bampasi nyonso oyo boyangeli ya Satana ebimisá. Ya solo, kozala na Mokonzi oyo ‘akoki koyokela biso mawa na bolɛmbu na biso’ ezali mpenza lipamboli.—Ebr. 2:17, 18; 4:15, 16. w19.03 17 par. 12-13
Mwamisato, 2 sanza ya 9
Moto moko te akoki koya epai na ngai soki Tata, oyo atindaki ngai, abendi ye te.—Yoa. 6:44.
Tokoki kosalisa bato báyeba Nzambe, kasi ezali na makambo mosusu oyo biso tokokoka kosala te. (1 Ko. 3:6, 7) Yehova nde abendaka bato. Nsukansuka, moto na moto akondima to akoboya koyoka nsango malamu na kotalela motema na ye. (Mat. 13:4-8) Kobosana te ete bato mingi bandimaki te nsango oyo Yesu azalaki kosakola, atako azalaki Moteyi oyo alekaki bateyi nyonso na mokili! Yango wana, tosengeli kolɛmba nzoto te soki bato mingi oyo tozali koluka kosalisa baboyi koyoka nsango malamu oyo tosakolaka. Tokozwa matomba mingi soki tozali komitya na esika ya basusu na mosala ya kosakola. Tokosepela lisusu mingi na mosala na biso ya kosakola. Tokoyoka esengo monene oyo eutaka na kopesa. Lisusu, tokosalisa ‘baoyo bazali na ezaleli oyo ebongi mpo na bomoi ya seko’ bázala na mokakatano te mpo na kondima nsango malamu. (Mis. 13:48) Na yango, “soki tozali mpenza na ntango oyo ebongi mpo na yango, tósalela bato nyonso oyo ezali malamu.” (Gal. 6:10) Na ndenge yango, tokozala na esengo mpo tozali kopesa Tata na biso ya likoló nkembo.—Mat. 5:16. w19.03 25 par. 18-19
Mwaminei, 3 sanza ya 9
Nakosanzola yo na katikati ya lisangá.—Nz. 22:22.
Mokonzi Davidi akomaki boye: “Yehova azali monene mpe asengeli kosanzolama mingi.” (Nz. 145:3) Davidi azalaki kolinga Yehova, mpe bolingo yango etindaki ye asanzola Nzambe “na katikati ya lisangá.” (1 Nt. 29:10-13; Nz. 40:5) Lelo oyo, lolenge moko oyo tosanzolaka Yehova ezali ya kopesa biyano na makita. Biso nyonso tosepelaka koyoka biyano ndenge na ndenge oyo epesamaka na makita. Tosepelaka ntango mwana moke apesi eyano ya mokuse, oyo euti na motema na ye. Tolendisamaka mingi ntango toyoki esengo oyo ezali kobima na mongongo ya moto oyo azali kopesa eyano mpe kolobela liteya moko oyo auti koyekola. Mpe tosepelaka na moto oyo ‘azwi mpiko’ ya kopesa eyano, atako azalaka nsɔninsɔni to abandi koyekola monɔkɔ na biso sika. (1 Tes. 2:2) Ndenge nini tokoki komonisa botɔndi mpo na milende na bango? Nsima ya makita, tokoki kopesa bango longonya mpo na biyano na bango ya kolendisa. Tokomonisa mpe botɔndi soki biso moko topesi biyano. Na ndenge yango, biso moko tokolendisama na makita, kasi tokolendisa mpe basusu.—Rom. 1:11, 12. w19.01 8 par. 1-2; 9 par. 6
Mwamitano, 4 sanza ya 9
Bózala na botɔndi.—Kol. 3:15.
Ezalaki na mibali zomi ya maba oyo bazalaki mpenza konyokwama mpe elikya ya kobika ezalaki te. Kasi mokolo moko, na mosika, bamonaki Yesu, Moteyi Monene. Bayoká nsango ete Yesu azalaki kobikisa maladi ya ndenge nyonso. Na yango, bagangaki ete: “Yesu, Molakisi, yokelá biso mawa!” Yesu abikisaki mibali yango nyonso zomi. Na ntembe te, bango nyonso bazalaki na botɔndi mpo na boboto ya Yesu. Kasi, moko na bango, asukaki kaka te na kozala na botɔndi, amonisaki yango na maloba. Mobali yango, oyo azalaki Mosamaria, amonaki ete asengeli kokumisa Nzambe “na mongongo makasi.” (Luka 17:12-19) Ndenge moko na Mosamaria wana, tolingaka kopesa matɔndi ntango basaleli biso likambo ya boboto. Yehova apesi biso ndakisa na likambo etali komonisa botɔndi. Lolenge moko oyo amonisaka botɔndi ezali ete apambolaka bato oyo basepelisaka ye. (2 Sa. 22:21; Nz. 13:6; Mat. 10:40, 41) Biblia elendisi biso ‘tókóma bamekoli ya Nzambe, lokola bana ya bolingo.’ (Ef. 5:1) Na yango, ntina ya libosoliboso oyo tosengeli komonisa botɔndi ezali ete tolingi kolanda ndakisa ya Yehova. w19.02 14 par. 1-2; 15 par. 4
Mwapɔsɔ, 5 sanza ya 9
Nakotika bosembo na ngai te!—Yobo 27:5.
Elenge mwasi moko na eteyelo aboyi na limemya nyonso kosangana na fɛti oyo eyokani te na mateya ya Biblia. Elenge mobali moko ya nsɔninsɔni azali kosakola ndako na ndako mpe abɛti na porte ya mwana moko ya kelasi na bango oyo asɛkaka Batatoli ya Yehova. Mobali moko asalaka mosala makasi mpo na koleisa libota na ye, kasi patrɔ na ye asɛngi ye asala likambo moko oyo ebongi te to oyo ebuki mobeko. Atako akoki kobungisa mosala, mobali yango ayebisi patrɔ ete akosala yango te mpe akotosa mibeko mpo Nzambe asɛngi bongo epai ya basaleli na ye. (Rom. 13:1-4; Ebr. 13:18) Ezaleli nini omoni epai ya bato wana misato? Mbala mosusu omoni bizaleli ebele, na ndakisa mpiko, mpe kolongobana. Kasi bamonisi mpe ezaleli moko ya motuya mpenza: bosembo. Bango nyonso misato batikali sembo epai ya Yehova. Mokomoko aboyi kobuka mibeko ya Nzambe. Bosembo etindi bango básala ndenge oyo basali. Na ntembe te, Yehova asepeli na bango ndenge bamonisi ezaleli yango. Biso mpe tolingaka kosepelisa Tata na biso ya likoló. w19.02 2 par. 1-2
Mwalomingo, 6 sanza ya 9
Mibeko ezali elili ya makambo malamu oyo ekoya.—Ebr. 10:1.
Mibeko ezalaki kobatela mingimingi bato oyo bazangaki libateli, na ndakisa bitike, basi oyo mibali bakufá mpe bapaya. Nzambe ayebisaki basambisi ya ekólo Yisraele boye: “Osengeli te kopɛngwisa lisambisi ya moto oyo afandi mopaya to ya mwana mobali oyo tata akufá, mpe osengeli te kokanga ndanga elamba ya mwasi oyo mobali akufá.” (Mib. 24:17) Yehova azalaki mpenza kotyela baoyo bazangaki libateli likebi mingi. Mpe azalaki kopesa etumbu na baoyo bazalaki konyokola bango. (Kob. 22:22-24) Yehova alingi ete bato oyo apesi bokonzi bálinga baoyo bazali na nse ya bokonzi na bango mpe bátyela bango likebi. Ayinaka masumu ya kosangisa nzoto mpe alingi ete bato nyonso, mingimingi baoyo bazangi libateli, bábatelama mpe bámona bosembo. (Lev. 18:6-30) Ntango tondimi mpenza ete Yehova asalelaka biso makambo na bosembo, tokolinga ye lisusu makasi. Mpe soki tozali kolinga Nzambe mpe mibeko na ye ya sembo, ekotinda biso tólinga basusu mpe tósalelaka bango makambo na bosembo. w19.02 24-25 par. 22-26
Mwayambo, 7 sanza ya 9
Tóboya ezaleli ya kotyola Nzambe mpe bamposa ya mokili.—Tito 2:12.
Tózwa ndakisa moko oyo emonisi ndenge tokoki komibatela mpo tólanda makanisi ya Satana te. Yehova ateyi biso ete ‘pite mpe mbindo ya ndenge nyonso esengeli kotángama ata kotángama te na kati na biso.’ (Ef. 5:3) Kasi, okosala nini soki baninga ya kelasi to ya mosala babandi kolobela makambo ya pite? Sinzili, elingi koloba lisosoli na yo, ekoki kokebisa yo. (Rom. 2:15) Kasi okoyokela yango? Na esika ya koyokela yango, motema ekoki kotinda yo oyoka masolo yango to otala bililingi oyo ntango mosusu bazali kolakisa. Nzokande, wana ezali ntango ya kokima likama, ya kokɔtisa lisolo mosusu to kolongwa wana. Esɛngaka mpiko mpo na kotɛmɛla mbamba oyo baninga bakoki kotya biso mpo tókanisa to tósala makambo ya mabe. Yebá ete Yehova amonaka milende oyo osalaka, mpe akopesa yo makasi mpe bwanya oyo osengeli na yango mpo na kotɛmɛla makanisi ya Satana.—2 Nt. 16:9; Yis. 40:29; Yak. 1:5. w19.01 17-18 par. 12-13
Mwamibale, 8 sanza ya 9
Natalaki misala na ngai nyonso oyo mabɔkɔ na ngai esalaki . . . , mpe talá! nyonso ezalaki mpamba . . . Eloko moko ya litomba ezalaki te na nse ya moi.—Mos. 2:11.
Salomo, oyo azalaki na bozwi mpe na nguya mingi amekaki kosala likambo moko; alobaki boye: ‘Nameka esengo mpe namona bolamu’ oyo ekobima. (Mos. 2:1-10) Na yango, Salomo atongaki bandako ya kitoko, asalaki bilanga ná bazamba ya kitoko mpenza, mpe asalaki nyonso oyo alingaki. Amiyokaki ndenge nini? Azwaki esengo? Salomo ye moko alobaki maloba oyo ezali mokapo ya lelo. Liteya nini okoki kozwa na likambo oyo ekómelaki Salomo? Yehova alingi te ete likambo ya bongo ekómela yo. Alingi oyoka ye mpe otosa ye. Mpo na kosala yango osengeli kozala na kondima, kasi okoyoka mawa ata moke te mpo na bikateli ya malamu oyo ozwi mpo na kondima na yo. Yehova akobosana ata moke te ‘bolingo oyo omoniselaki nkombo na ye.’ (Ebr. 6:10) Na yango, salá nyonso oyo esengeli mpo okóma na kondima makasi. Yango ekosala ete ozwa bikateli ya malamu na bomoi mpe okomona ete Tata na biso ya likoló alingi mpenza ozala na bomoi oyo eleki malamu.—Nz. 32:8. w18.12 22 par. 14-15
Mwamisato, 9 sanza ya 9
Nzambe azali kolakisa biso bolingo na ye na likambo oyo: ntango tozalaki naino basumuki, Kristo akufelaki biso.—Rom. 5:8.
Moto ya elimo azalaka na kondima epai ya Nzambe mpe alukaka kotalela makambo ndenge Nzambe atalelaka yango. Alandaka litambwisi ya Yehova mpe atosaka ye. (1 Ko. 2:12, 13) Davidi azali ndakisa malamu ya moto ya elimo. Ayembaki boye: “Yehova azali ndambo ya likabo oyo bapesá ngai.” (Nz. 16:5) Davidi azalaki kosepela na ‘ndambo ya likabo na ye,’ elingi koloba boyokani na ye na Nzambe, esika na ye ya kokima. (Nz. 16:1) Yango wana alobaki: “Motema na ngai ezali kosepela.” Eloko moko te epesaki Davidi esengo mingi koleka boyokani na ye na Yehova! (Nz. 16:9, 11) Bato oyo bamipesaka na bisengo to na koluka mbongo bakoki ata moke te kozala na esengo oyo Davidi azalaki na yango. (1 Tim. 6:9, 10) Soki okómi na kondima makasi epai ya Yehova mpe osaleli ye, bomoi na yo ekozala na ntina mpe na esengo mpenza. Okoki kosala nini mpo kondima na yo ekóma makasi? Osengeli kotánga Biblia, kotalatala biloko kitoko oyo Yehova akelá, mpe komanyola bizaleli na ye, na ndakisa bolingo oyo alingaka yo; kosala bongo ezali lokola kolekisa ntango elongo na Yehova.—Rom. 1:20. w18.12 25 par. 7-8
Mwaminei, 10 sanza ya 9
Libala ekumisama na kati ya bato nyonso.—Ebr. 13:4.
Paulo alobelaki kaka te likambo oyo etali libala nyonso. Azalaki nde koyebisa bakristo ete basengeli kokumisa libala, elingi koloba kozwa yango na motuya. Otalelaka libala ndenge wana, mingimingi libala na yo moko? Soki ozwaka libala na motuya, wana olandaka ndakisa malamu ya Yesu, mpo ye mpe azalaki kopesa libala lokumu. Ntango Bafarisai batunaki ye motuna na likambo etali koboma libala, Yesu alobelaki likambo oyo Nzambe alobaki mpo na libala ya liboso ete: “Mobali akotika tata na ye ná mama na ye, mpe bango mibale bakozala mosuni moko.” Yesu abakisaki ete: “Oyo Nzambe akangisi esika moko moto akabola yango te.” (Mrk. 10:2-12; Eba. 2:24) Yesu andimaki ete libala ezali ebongiseli oyo Nzambe atyá mpe esengeli koumela libela. Ntango Nzambe abalisaki Adama ná Eva, ayebisaki bango te ete bakokaki koboma libala. Kasi, mokano na ye ezalaki ete “bango mibale” báfanda elongo na libala libela na libela. w18.12 10-11 par. 2-4
Mwamitano, 11 sanza ya 9
Bóbongwana, bókómisa makanisi na bino makanisi ya sika.—Rom. 12:2.
Ntango tobandaki koyekola solo, toyekolaki ete ezali na ntina mingi kotosa mibeko ya Yehova. Kasi, wana tozali kokola na elimo, toyekolaka makambo mosusu oyo etali makanisi ya Yehova: makambo oyo alingaka, oyo alingaka te, mpe ndenge na ye ya kotalela makambo, mpe yango emonanaka na bikateli oyo tozwaka mpe na makambo oyo tosalaka. Atako koyekola kokanisa lokola Yehova epesaka esengo, kasi na bantango mosusu ezalaka mpasi mpo tozali bato ya kozanga kokoka. Na ndakisa, toyebi makanisi ya Yehova na likambo etali bizaleli ya pɛto, konduka biloko ya mokili, mosala ya kosakola, kosalela makila na ndenge ya mabe, mpe makambo mosusu. Kasi, ekoki kozala mpasi tóyeba ntina oyo atalelaka makambo yango bongo. Na yango, tokoki kosala nini mpo tókanisaka lokola Yehova na makambo mingi? Eyano ezali ete tosengeli ‘kokómisa makanisi na biso makanisi ya sika.’ Yango elimboli ete tosengeli koyekola Liloba ya Nzambe, kokanga ntina ya makanisi na ye, komanyola yango, mpe kosala makasi tóyokanisa makanisi na biso na makanisi ya Nzambe. w18.11 23-24 par. 2-4
Mwapɔsɔ, 12 sanza ya 9
Kino ntango nini nakobelela yo mpo na kosɛnga lisalisi mpo obikisa na mobulu, mpe yo okobikisa te?—Hab. 1:2.
Habakuku azalaki na bomoi na eleko moko ya mpasi mpenza. Bato ya zingazinga na ye bazalaki mabe mpe mobulu, mpe yango ezalaki kopesa ye mawa mingi. Bisika nyonso, azalaki komona Bayisraele bazali konyokola basusu mpe kosalana makambo ezangi bosembo. Habakuku azalaki komituna ete: ‘Ntango nini mabe oyo ekosila? Mpo na nini Yehova azali koumela mpo na kosukisa yango?’ Habakuku amonaki ete asuki. Na yango, abondelaki Yehova mpo asala. Mbala mosusu Habakuku akómaki kokanisa ete Yehova azalaki lisusu kotyela bato na ye likebi te, to ete akosala noki te. Yo mpe osilá kokanisa ndenge wana? Habakuku atikaki nde kotyela Yehova motema? Azalaki lisusu na kondima te na bilaka ya Nzambe? Ezali bongo te! Lokola Habakuku ayebisaki nde Yehova mitungisi mpe mikakatano na ye na esika ya koyebisa yango bato, emonisi ete azalaki kaka kotyela Yehova motema. Emonani ete Habakuku azalaki komitungisa mpe abulunganaki. Azalaki koyeba te ntina oyo Yehova azalaki kozela mpo asala mpe ntina oyo azalaki kotika ete amona mpasi ndenge wana. w18.11 14 par. 4-5
Mwalomingo, 13 sanza ya 9
Bótika komibombela biloko ya motuya na mabele.—Mat. 6:19.
Petro ná Andre bazalaki baluki-mbisi, kasi ntango Yesu abengaki bango mpo bákóma bayekoli na ye, “basundolaki minyama” na bango. (Mat. 4:18-20) Yango elimboli te ete mpo na koyekola solo, osengeli kolongwa na mosala na yo. Biblia esɛngi biso tósala mosala mpo na kokokisa bamposa ya libota na biso. (1 Tim. 5:8) Kasi, soki oyekoli solo, ndenge na yo ya kotalela biloko ya mokili esengeli kobongwana. Okoyeba makambo oyo eleki ntina na bomoi. Tózwa ndakisa ya Maria. Amityelaki mokano ya kokóma mobɛti monene ya lisano ya golf mpe kokóma na mbongo mingi. Na nsima, abandaki koyekola Biblia. Maria asepelaki na makambo oyo azalaki koyekola mpe abandaki kosalela yango na bomoi na ye. Amonaki ete ekozala mpasi atya makanisi na boyokani na ye na Yehova mpe na biloko ya mokili. (Mat. 6:24) Na yango, amonaki malamu atika mokano na ye ya koluka kokóma mobɛti monene ya lisano ya golf. Lelo, azali mobongisi-nzela mpe alobi ete “bomoi na ye etondi na esengo mpe ekómi na ntina mingi.” w18.11 5 par. 9-10
Mwayambo, 14 sanza ya 9
Oyo mosali ya mabaya, mwana ya Maria.—Mrk. 6:3.
Ntango Yesu azalaki na mbula 30, atikaki mosala ya mabaya mpe akómaki moteyi mpo ayebaki ete yango nde mosala oyo elekaki ntina. Alobaki ete kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe ezalaki moko ya bantina oyo Nzambe atindaki ye awa na mabele. (Mat. 20:28; Luka 3:23; 4:43) Yesu atyaki makanisi nyonso na kosakola nsango malamu, mpe alingaki basusu básala mpe bongo. (Mat. 9:35-38) Mbala mosusu tozali basali-mabaya te, kasi biso nyonso tozali basaleli ya Nzambe mpe tosakolaka nsango malamu. Mosala yango ezali na ntina mingi, kutu Nzambe mpe asalaka yango; tobengami “bato oyo bazali kosala elongo na Nzambe.” (1 Ko. 3:9; 2 Ko. 6:4) Tondimaka ete “liloba [ya Yehova] mobimba ezali solo.” (Nz. 119:159, 160) Yango wana tosalaka makasi mpo ‘tósembola liloba ya solo malamumalamu’ na mosala ya kosakola. (2 Tim. 2:15) Mpo na yango, tokobaka kokolisa makoki na biso ya kosalela Biblia, esaleli na biso ya libosoliboso mpo na koteya basusu solo ya Yehova, ya Yesu, mpe ya Bokonzi. w18.10 11 par. 1-2
Mwamibale, 15 sanza ya 9
[Bósalisa] baoyo bazali na bolɛmbu . . . bosengeli kobosana te maloba ya Nkolo Yesu.—Mis. 20:35.
Soki mobali azali komekola bolingo ya mokonzi na ye Yesu, ekozala mpasi te mwasi azala na “limemya makasi” epai na ye. (Ef. 5:22-25, 33) Soki mwasi amemyaka mobali na ye, yango ekotinda ye amityaka na esika ye. Ntango baboti bazali kopesana lokumu, bazali kopesa bana na bango ndakisa malamu. Baboti basengeli mpe koteya bana na bango ndenge ya kopesa basusu lokumu. Na ndakisa, bakoki koteya bana ete bápotaka mbangu te na Ndako ya Bokonzi. Ntango bakutani na bandeko mosusu mpo na kolya, baboti bakoki koyebisa bana na bango bázela naino mikóló bázwa biloko liboso. Tosengeli kopesa mwana longonya soki asali likambo moko ya malamu, mbala mosusu soki afungweli biso porte. Mwana yango akosepela mpe ekosalisa ye ayeba ete “esengo ya kopesa eleki oyo ya kozwa.” w18.09 29 par. 5-6
Mwamisato, 16 sanza ya 9
Mokambi na bino azali kaka moko, Kristo.—Mat. 23:10.
Litambwisi ya Yesu Kristo, Mokonzi na biso oyo azali koyangela, ekosalisa biso lelo mpe na mikolo ezali koya. Kanisá matomba oyo ozwi na bambongwana oyo esalemi mikolo oyo. Na losambo na kati ya libota, bokoki kolobela ndenge bambongwana oyo esalemi na makita to na mosala ya kosakola esalisi libota na bino. Soki tobosani te ete kolanda malako ya ebongiseli ya Yehova ememaka matomba ebele, ekozala mpasi te tólanda litambwisi yango mpe tokozala na esengo. Na ndakisa, tozali na esengo ndenge tozali kobatela mbongo mpo tozali kotya biloko mingi na Internet mpe tozali kobimisa lisusu mikanda mingi te na papye ndenge ezalaki liboso. Yango ezali kosalisa mpo nsango malamu ekómela bato ebele koleka. Na yango, tósalela mingi mikanda, bavideo, mpe biloko ya koyoka oyo totyaka na Internet. Na ndenge yango, tokomonisa ete lokola Kristo, tolingi kosalela mbongo ya ebongiseli ya Nzambe na bwanya. Soki tozali kolanda litambwisi ya Kristo, tokosalisa bandeko bázala na kondima makasi mpe tokolendisa bomoko. w18.10 25-26 par. 17-19
Mwaminei, 17 sanza ya 9
Lokola tolingaki bino na bolingo ya motema, tosepelaki mingi kopesa bino, kaka nsango malamu ya Nzambe te, kasi mpe milimo na biso moko.—1 Tes. 2:8.
Soki tozali na boboto mingi lokola Yehova, tokoki kopesa ndeko na biso libɔndisi oyo asɛngaki Yehova na libondeli. (2 Ko. 1:3-6) Kasi, koluka te bandeko bázala bato ya kokoka. Zalá na bokatikati. Soki ozali koluka bandeko bázala bato ya kokoka, okolɛmba nzoto. (Mos. 7:21, 22) Kobosana te ete Yehova azalaka na bokatikati na makambo oyo asɛngaka biso. Soki tolandi ndakisa na ye, tokokanga motema na mabunga ya basusu. (Ef. 4:2, 32) Na esika tókokanisa bango na bato mosusu to tómonisa bango ete oyo bazali kosala ekoki te, tósala makasi tólendisaka bango mpe tópesaka bango longonya mpo na makambo ya malamu oyo bazali kosala. Yango ekosalisa bango bázala na esengo wana bazali kosalela Yehova.—Gal. 6:4. w18.09 16 par. 16-17
Mwamitano, 18 sanza ya 9
Bilei na ngai nde kosala mokano ya moto oyo atindaki ngai mpe kosilisa mosala na ye.—Yoa. 4:34.
Mpo na Yesu, kosala mokano ya Nzambe ezalaki lokola bilei. Ndenge kaka kolya bilei oyo ebongi esepelisaka mpe etongaka nzoto, kosala mokano ya Nzambe ekómisaka kondima makasi. Kosala makambo oyo Yehova asɛngaka biso nde emonisaka ete tozali na bwanya. (Nz. 107:43) Moto ya bwanya azwaka matomba mingi. Biblia elobi: “Bisengo na yo mosusu nyonso ekoki kokokana na yango te. . . . Ezali nzete ya bomoi mpo na baoyo basimbi yango, mpe baoyo bakangi yango makasi bakobengama bato ya esengo.” (Mas. 3:13-18) Yesu ayebisaki bayekoli na ye: “Soki boyebi makambo wana, esengo na bino soki bozali kosala yango.” (Yoa. 13:17) Bayekoli balingaki kozala na esengo ntango nyonso oyo bakobi kosala makambo oyo Yesu ayebisaki bango. Na bomoi na bango mobimba, bakómaki kosalela mateya na ye mpe kolanda ndakisa na ye. w18.09 4 par. 4-5
Mwapɔsɔ, 19 sanza ya 9
Nzambe abandaki kozalisa moto na elilingi na ye.—Eba. 1:27.
Atako Adama ná Eva bazalaki bango moko na elanga ya Edene, basengelaki kokanisa mpe bato mosusu. Mpo na nini? Mpo Yehova apesaki bango mosala; ayebisaki bango bábota bana, bátondisa mabele, mpe bákómisa yango paradiso. (Eba. 1:28) Ndenge kaka Yehova alingaki ete bato nyonso bázala na esengo, Adama ná Eva mpe basengelaki kokanisa bongo mpo na bana oyo basengelaki kobota. Balingaki kosala elongo mpo na kokómisa mabele mobimba paradiso. Elingaki kosɛnga básala mosala monene wana na bomoko libota mobimba! Elingaki mpe kosɛnga ete bato ya kokoka básala na bomoko elongo na Yehova mpo na kokómisa mabele paradiso mpe kokokisa mokano na ye. Na ndenge yango balingaki kokɔta na kopema na ye. (Ebr. 4:11) Kanisá esengo oyo mosala yango elingaki kopesa bango! Yehova alingaki kopambola bango mingi mpo balingaki komipesa mobimba mpo na bolamu ya basusu. w18.08 18 par. 2; 19-20 par. 8-9
Mwalomingo, 20 sanza ya 9
Akoselaki mosaleli na yo makambo.—2 Sa. 19:27.
Okoki kosala nini soki batambwisi nsango ya lokuta mpo na yo? Likambo ya ndenge wana ekómelaki mpe Yesu ná Yoane Mobatisi. (Mat. 11:18, 19) Kasi, Yesu asalaki nini? Alekisaki te ntango na ye mpe makasi na ye nyonso na koyebisa bato ete bakoseli ye makambo. Kasi, alendisaki bato bátalela makambo malamu; bátya makanisi na misala mpe mateya na ye. Ndenge ye moko alobaki yango, “bwanya ya moto emonanaka na makambo ya boyengebene oyo asalaka.” (Mat. 11:19) Tokoki kozwa liteya ya malamu epai Yesu. Ntango mosusu bato bakoki koloba makambo ya mabe to ya lokuta mpo na biso, mpe tokoki komitungisa ete ebebisa lokumu na biso. Tokoki kosala nini mpo na yango? Soki moto alobi likambo ya lokuta mpo na biso, tósala makambo oyo ekosala ete bato bándima likambo yango te. Kutu, ndenge ndakisa ya Yesu emonisi yango, bizaleli na biso ya malamu ekoki komonisa basusu ete makambo oyo bayokaki ezali lokuta. w18.08 6 par. 11-13
Mwayambo, 21 sanza ya 9
Okobanga Yehova Nzambe na yo. Okosalela ye, mpe okokangama na ye.—Mib. 10:20.
Kaina, Salomo, mpe Bayisraele nyonso bazwaki libaku ya kobongola motema mpe kobongisa bizaleli na bango. (Mis. 3:19) Ezali polele ete Yehova asundolaka mbala moko te bato kaka mpo basali libunga. Kanisá ndenge alimbisaki Arona. Lelo oyo, Yehova akebisaka biso na bolingo mpenza mpo na kobatela biso tósala te oyo ezali mabe. Asalelaka Biblia, mikanda na biso, mpe bandeko na biso bakristo. Soki tozali kotya likebi na makebisi ya Yehova, tokomindimisa ete akomonisela biso motema mawa. Boboto monene ya Yehova ezali na ntina. (2 Ko. 6:1) Epesaka biso libaku ya ‘koboya ezaleli ya kotyola Nzambe mpe bamposa ya mokili.’ (Tito 2:11-14) Lokola tozali na mokili oyo, ekozala kaka na makambo oyo ekotya bosembo na biso epai Yehova na komekama. Zalá na ekateli ya kotikala na ngámbo ya Yehova! w18.07 21 par. 20-21
Mwamibale, 22 sanza ya 9
Yehova ayebi bato na ye.—2 Tim. 2:19.
Ndenge nini tokoki kokómisa makasi mposa na biso ya koluka ete Yehova andima biso, kasi mokili te? Ya liboso, Yehova andimaka ntango nyonso baoyo basalelaka ye na bosembo mpenza. (Ebr. 6:10; 11:6) Yehova azwaka mosaleli na ye nyonso na motuya, mpe amonaka ete koboya kondima bango, ezali mpenza “kozanga boyengebene.” Yehova “ayebi nzela ya bayengebene,” mpe ayebi ndenge ya kobikisa bango. (Nz. 1:6; 2 Pe. 2:9) Ya mibale, tosengeli kotya motema ete Yehova akoki koyeba biso na ndenge oyo tokokaki kokanisa te. Soki bato bazali kosala makambo ya malamu kaka mpo bato bákumisa bango, Yehova akopesa bango mbano te. Mpo na nini? Mpo Yesu alobaki ete soki bato bazali kokumisa bango, mbano na bango nyonso yango wana. (Mat. 6:1-5) Kasi, Yehova “atalaka uta na esika ya kobombana” bato oyo basalelaka basusu makambo ya malamu, atako bazali komona bango te. Yehova amonaka oyo basalaka mpe apambolaka bango. w18.07 9 par. 8, 10
Mwamisato, 23 sanza ya 9
Tiká kobenga bosɔtɔ biloko oyo Nzambe apɛtoli.—Mis. 10:15.
Petro akangaki ntina te ya likambo oyo mongongo yango elingaki koyebisa ye. Kaka na ntango yango, bato oyo Korneyi atindaki bakómaki. Elimo santu esalisaki Petro akende na ndako ya Korneyi elongo na mibali wana. Soki Petro atalelaki makambo “na kolanda oyo ezali komonana na libándá,” alingaki kokende na ndako ya Korneyi ata mokolo moko te. Bayuda bazalaki kokende na bandako ya bato ya bikólo mosusu te. Kasi, mpo na nini Petro andimaki kokende? Atako liboso azalaki kokanisela bato ya bikoló mosusu mabe, emonaneli oyo azwaki mpe litambwisi ya elimo santu ebongolaki makanisi na ye. Nsima ya koyoka Korneyi, Petro alobaki: “Ya solo mpenza namoni ete Nzambe aponaka bilongi te, kasi na ekólo nyonso moto oyo azali kobanga ye mpe azali kosala makambo ya boyengebene andimami na ye.” (Mis. 10:34, 35) Likambo wana ya sika esepelisaki Petro makasi, mpe na nsima esalisaki bakristo nyonso. w18.08 9 par. 3-4
Mwaminei, 24 sanza ya 9
Bóyina oyo ezali mabe.—Amo. 5:15.
Tokoki kozala mosika na biloko oyo Nzambe ayinaka. Kasi tokosala nini na makambo oyo Biblia etye mobeko ya sikisiki te? Ndenge nini tokoki koyeba makambo oyo ekosepelisa Nzambe? Soki totiki Biblia eteya lisosoli na biso, tokozwa bikateli ya malamu. Lokola Yehova alingaka biso, apesá biso mitinda oyo ekoki kotambwisa lisosoli na biso. Alobi ete: “Ngai Yehova nazali Nzambe na yo, Moto oyo azali koteya yo mpo na litomba na yo moko, Moto oyo azali kotambwisa yo na nzela oyo osengeli kotambola.” (Yis. 48:17, 18) Ntango tokanisaka na mozindo na mitinda ya Biblia mpe totikaka ete esimba motema na biso, tosembolaka mpe tobongisaka lisosoli na biso. Yango esalisaka biso tózwa bikateli ya malamu. Mitinda ezali maloba ya moboko oyo esilaka ngala te, oyo ezali na kati ya Biblia. Etambwisaka makanisi na biso mpe esalisaka biso tózwa bikateli ya malamu. Koyeba mitinda ya Yehova esalisaka biso tóyeba makanisi na ye mpe ntina oyo apesaka biso mibeko mosusu. w18.06 17 par. 5; 18 par. 8-10
Mwamitano, 25 sanza ya 9
Esengeli kofuta Kaisala mpako oyo moto nyonso afutaka to te?—Mat. 22:17.
Bato ya Erode, oyo bazalaki kosepela na politiki na ye bakanisaki ete soki Yesu alobi ete basengeli te kofuta mpako, bakofunda ye ete azali monguna ya bokonzi ya Roma. Kasi soki alobi ete basengeli kofuta mpako, bato bakotika kolanda ye. Yesu azalaki ekɛngɛ mpe akweaki te na motambo yango. Ayebaki ete bakɔngɔli-mpako mingi bazalaki kondima kanyaka, kasi ye atyaki makanisi na ye wana te. Atyaki nde makanisi na Bokonzi ya Nzambe, oyo ekosilisa mpenza mikakatano ya bato. Yesu atikelá biso ndakisa. Tosengeli te kokɔta na makambo ya politiki, ata soki tomoni lokola ete parti politiki moko ezali malamu mpe ezali kosala makambo na bosembo, kasi mosusu ezali mabe mpe ezali kosala makambo na bosembo te. Bakristo batyaka makanisi na bango na Bokonzi ya Nzambe mpe na boyengebene na yango. Na yango, tokanisaka to tolobaka mabe te mpo na makambo ya kozanga bosembo oyo bato ya politiki basalaka. (Mat. 6:33) Batatoli ya Yehova mingi balongolá makanisi mabe oyo bazalaki na yango mpo na makambo ya politiki. w18.06 6 par. 9-11
Mwapɔsɔ, 26 sanza ya 9
Bana ya Nzambe ya solo babandaki kotala bana basi ya bato, bamonaki ete bazali kitoko.—Eba. 6:2.
Longola kokanga baanzelu na motambo ya pite, ekoki kozala ete Satana alakaki bango ete bakozala na nguya likoló ya bato nyonso. Na ndenge yango, Satana alukaki mbala mosusu kopekisa ete esakweli ya Yehova oyo elobeli ‘momboto mpe mwasi’ ekokisama. (Eba. 3:15) Kasi Yehova atikelaki ye nzela te. Ayeisaki Mpela mpe ebebisaki myango nyonso ya Satana mpe bademo. Pite mpe lolendo ezali mpenza mitambo ya makasi oyo Satana asalelaka. Baanzelu oyo balandaki Satana balekisaki bambula mingi elongo na Nzambe kuna na likoló! Atako bongo, mingi na bango bakolisaki bamposa mabe mpe bamposa yango ekómaki makasi mpenza. Tosengeli ntango nyonso koyeba ete ata soki tosali bambula boni na mosala ya Yehova, bamposa mabe ekoki kozwa esika na motema na biso. (1 Ko. 10:12) Na yango, tosengeli ntango nyonso koluka koyeba makambo oyo ezali na motema na biso mpe kolongola makanisi nyonso ya pite mpe ya lolendo!—Gal. 5:26; Kol. 3:5. w18.05 25 par. 11-12
Mwalomingo, 27 sanza ya 9
Nazali na mawa monene mpe na mpasi oyo ezali kosila te na motema na ngai.—Rom. 9:2.
Ntoma Paulo alɛmbaki nzoto ndenge Bayuda baboyaki nsango ya Bokonzi. Atako bongo, atikaki kosakola te. Amonisi ndenge amiyokaki mpo na Bayuda yango ntango alobaki: “Mposa ya motema na ngai mpe lilɔmbɔ na ngai epai ya Nzambe mpo na bango ezali mpenza ete bábika. Mpo nazali kotatwela bango ete bazali na molende mpo na Nzambe; kasi nde na boyebi ya solosolo te.” (Rom. 10:1, 2) Paulo alobaki ete alingaki kosakwela Bayuda mpo na ‘mposa ya motema na ye.’ Alingaki mpenza ete Bayuda bábika. (Rom. 11:13, 14) Paulo abondelaki Yehova asalisa Moyuda mokomoko andima nsango ya Bokonzi. Paulo abakisaki boye: “Bazali na molende mpo na Nzambe.” Paulo amonaki makambo ya malamu epai na bango mpe makoki ya kosalela Yehova. Ayebaki ete Bayuda wana ya molende bakokaki kokóma bayekoli ya molende ya Kristo lokola ye. w18.05 13 par. 4; 15 par. 13-14
Mwayambo, 28 sanza ya 9
[Bólobaka] liloba nyonso oyo ezali malamu mpo na kotonga na ntango mposa ezali, mpo epesa bayoki eloko ya malonga.—Ef. 4:29.
Mokomoko na biso asengeli koyeba bamposa ya bandeko mpo na kosalisa bango. Paulo apesaki Baebre toli oyo: “Bólendisa mabɔkɔ oyo elɛmbilɛmbi mpe mabɔlɔngɔ oyo ezali na makasi te, mpe bókoba kosembola banzela ya makolo na bino, mpo eteni oyo elɛmbi elongwa te na litonga, kasi ebika nde kobika.” (Ebr. 12:12, 13) Biso nyonso, ata bilenge, tokoki kopesa basusu makasi mpe kolendisa bango na maloba na biso. Ntoma Paulo akomelaki bakristo ya Filipi ete: “Yango wana, soki na kati na bino mwa elendiseli ezali mpo bozali na bomoko na Kristo, soki mwa libɔndisi ya bolingo ezali, soki moto na moto azali komibanzabanza mpo na mosusu, soki mwa bolingo ya motema mpe mawa ezali, bótondisa ngai na esengo mpe bózala na likanisi moko, bózala na bolingo moko, bózala na bomoko na molimo, bózala na likanisi kaka moko mpenza, bósala eloko moko te na kowelana to mpo bozali komimona ete boleki bamosusu, kasi na elimo ya komikitisa bómonaka bamosusu ete baleki bino, bótyaka likebi kaka na makambo na bino moko te, kasi bótyaka mpe likebi na makambo ya bamosusu.”—Flp. 2:1-4. w18.04 22 par. 10; 23 par. 12
Mwamibale, 29 sanza ya 9
Bózala lokola bato ya bonsomi, nzokande bóbatela bonsomi na bino . . . lokola baombo ya Nzambe.—1 Pe. 2:16.
Ntina mpenza oyo Yehova asaleli Yesu mpo na kolongola biso na boombo ya lisumu mpe ya liwa ezali mpo tómipesa mobimba na mosala ya Nzambe. Lolenge eleki malamu oyo tokoki kosalela bonsomi na biso ezali ya kopesa ntango mpe makasi na biso na mosala ya Yehova. Kosala bongo ekobatela biso mpo mikano ya mokili mpe bamposa na biso moko ekóma te makambo oyo eleki ntina na bomoi na biso. (Gal. 5:16) Tózwa ndakisa ya Noa ná libota na ye. Bazalaki kofanda na mokili moko ya mobulu mpe ya mbindo. Kasi, bamipesaki te na bamposa mpe na makambo oyo bato nyonso bazalaki kosala. Bamonaki malamu bámipesa na mosala oyo Yehova apesaki bango. Batongaki masuwa, basangisaki biloko ya kolya mpo na bango moko ná banyama, mpe bazalaki kokebisa bato ete Mpela ezali koya. “Noa abandaki kosala nyonso oyo Nzambe apesaki ye mitindo. Asalaki kaka bongo.” (Eba. 6:22) Na yango, Noa ná libota na ye babikaki ntango mokili wana ebebisamaki.—Ebr. 11:7. w18.04 10 par. 8; 11 par. 11-12
Mwamisato, 30 sanza ya 9
Nakopesa yo bokonzi oyo nyonso mpe nkembo na yango, mpamba te bapesá ngai yango, mpe napesaka yango na moto oyo nalingi.—Luka 4:6.
Satana ná bademo na ye basalelaka mpe mangomba ya lokuta ná ebongiseli ya mombongo mpo na kokosa “mabele mobimba esika bato bafandi.” (Em. 12:9) Satana asalelaka mangomba ya lokuta mpo na kopalanganisa makambo oyo ezali solo te na oyo etali Yehova, mpe alukaki kutu kozipa nkombo ya Nzambe. (Yir. 23:26, 27) Yango esali ete bato mosusu ya mitema sembo bákanisa ete basambelaka Nzambe, nzokande basambelaka bademo. (1 Ko. 10:20; 2 Ko. 11:13-15) Satana asalelaka mpe bato ya mombongo mpo na kopalanganisa lokuta na mokili, na ndakisa balobaka ete mbongo mpe biloko ya mokili nde epesaka bato esengo. (Mas. 18:11) Bato oyo bandimaka likambo yango balekisaka bomoi na bango mpo na kosalela “Bomɛngo,” na esika ya kosalela Nzambe. (Mat. 6:24) Ata soki liboso bazalaki kolinga Nzambe, bolingo na bango mpo na biloko ya mokili ekómaka makasi mpenza mpe bolingo na bango mpo na Nzambe esilaka.—Mat. 13:22; 1 Yoa. 2:15, 16. w18.05 23 par. 6-7