Sanza ya 5
Mwalomingo, 1 sanza ya 5
Azalaki kaka komikitisa liboso na bango.—Luka 2:51.
Ntango Yesu azalaki mwana moke, azalaki kotosa baboti na ye. Ata mokolo moko te aboyaki kotosa baboti na ye, mpe akanisaki te ete ayebaki makambo mingi koleka bango. Na ntembe te, lokola Yesu azalaki mwana ya liboso, azalaki kozwa mokumba na ye na lisɛki te. Emonani ete, ayekolaki mosala ya mabaya epai ya Yozefe, tata-mobɔkɔli na ye, mpo akoka kosalisa libota. Ekoki kozala ete baboti ya Yesu bayebisaki ye ete abotamaki na ndenge ya likamwisi, mpe mbala mosusu bayebisaki ye makambo oyo baanzelu mpe basaleli mosusu ya Yehova balobaki mpo na ye. (Luka 2:8-19, 25-38) Yesu asukaki kaka te na makambo oyo bayebisaki ye, kasi ye moko mpe ayekolaki Makomami. Ndenge nini toyebi ete Yesu azalaki moyekoli malamu ya Liloba ya Nzambe? Mpo ntango azalaki naino elenge, bateyi na Yerusaleme bazalaki “se kokamwa na mayele na ye mpe na biyano na ye.” (Luka 2:46, 47) Mpe ntango Yesu akómaki na mbula 12, amonisaki polele ete Tata na ye nde Yehova.—Luka 2:42, 43, 49. w20.10 29-30 par. 13-14
Mwayambo, 2 sanza ya 5
Kristo . . . alamukaki uta na bakufi.—1 Ko. 15:12.
Kondima ete Yesu asekwaki nde esimbi mpenza elikya na biso bakristo. Ntango ntoma Paulo abandaki kokoma makambo etali lisekwa, atángáki makambo misato. Makambo yango ezali: (1) “Kristo akufaki mpo na masumu na biso.” (2) ‘Bakundaki ye.’ (3) “Alamukaki na mokolo ya misato na kotalela Makomami.” (1 Ko. 15:3, 4) Liwa ya Yesu, kokundama, mpe lisekwa na ye elimboli nini mpo na biso? Mosakoli Yisaya asakolaki ete Masiya ‘akolongolama na mokili ya bato ya bomoi’ mpe bakopesa ye lilita “esika moko na bato mabe.” Kasi likambo mosusu esengelaki kosalema. Yisaya abakisaki ete Masiya akomema “lisumu ya bato ebele.” Makambo yango nyonso ekokisamaki ntango Yesu apesaki bomoi na ye lisiko. (Yis. 53:8, 9, 12; Mat. 20:28; Rom. 5:8) Na yango, liwa ya Yesu, kokundama, mpe lisekwa na ye epesi biso elikya makasi mpenza ya kolongwa na boombo ya lisumu mpe ya liwa. Epesi mpe biso elikya ya kokutana lisusu na bandeko mpe baninga na biso oyo bakufá. w20.12 2-3 par. 4-6; 5 par. 11
Mwamibale, 3 sanza ya 5
Koleka bato nyonso, ngai nasengeli mpenza kotyela mpe nzoto motema. Soki ezali na moto mosusu oyo akanisi ete asengeli kotyela nzoto motema, ngai nde nasengeli kosala yango koleka.—Flp. 3:4.
Ntoma Paulo azalaki kosakola na basinagoga ya Bayuda. Na ndakisa, na sinagoga ya Tesaloniki, “na boumeli ya sabata misato azalaki kosalela Makomami mpo na kosolola na [Bayuda].” (Mis. 17:1, 2) Na ntembe te, Paulo azalaki komiyoka malamu na sinagoga mpo azalaki Moyuda. (Mis. 26:4, 5) Lokola ayebaki makambo mingi ya Bayuda, akokaki kosakwela bango kozanga kobanga. (Flp. 3:5) Ntango Paulo akimaki banguna na Tesaloniki mpe na nsima na Beroya, akómaki na Atene. Kuna mpe, “na sinagoga, abandaki kosolola na Bayuda mpe na bato mosusu oyo bazalaki kosambela Nzambe.” (Mis. 17:17) Kasi, ntango Paulo azalaki kosakola na zando, bayoki na ye ezalaki sikoyo bato ya ndenge mosusu. Kati na bango, ezalaki na bato ya Filozofi mpe bato ya bikólo mosusu oyo bamonaki ete nsango oyo Paulo amemaki ezalaki “liteya ya sika.” Balobaki na ye: “Ozali kokɔtisa makambo mosusu oyo toyoká naino te na matoi na biso.”—Mis. 17:18-20. w20.04 9 par. 5-6
Mwamisato, 4 sanza ya 5
Ntango nalingi kosala oyo ezali malamu, oyo ezali mabe nde ezali epai na ngai.—Rom. 7:21.
Soki ozali kobunda na momeseno moko ya mabe kokanisa te ete ozali na ntina te. Kobosana te ete moto moko te na kati na biso akoki kondimama na miso ya Yehova na makasi na ye moko. Biso nyonso tosengeli na boboto monene ya Nzambe oyo apesá biso na nzela ya lisiko. (Ef. 1:7; 1 Yoa. 4:10) Mpe bandeko na biso bakristo balendisaka biso! Ntango tozali koloba, bakoki koyoka biso na likebi mpe kolendisa biso. (Mas. 12:25; 1 Tes. 5:14) Joy, ndeko mwasi moko na Nigeria, oyo abundanaki na ezaleli ya kolɛmba nzoto alobi boye: “Bisika nyonso nakendaka, nakutanaka na bandeko. Ndenge oyo bandeko na ngai bakristo balendisaka ngai, emonisi ete Yehova ayanolaka na mabondeli na ngai. Kutu ndakisa na bango esalisi ngai nayeba ndenge ya kolendisa baoyo balɛmbi nzoto.” Kasi, tosengeli kobosana te ete, bandeko bakoki koyeba ntango nyonso te soki tozali na mposa ya bilendiseli. Yango wana, tosengeli koluka ndeko moko oyo akɔmeli na elimo, mpe koyebisa ye ete tozali na mposa ya lisalisi. w20.12 23-24 par. 7-8
Mwaminei, 5 sanza ya 5
Nabengi bino baninga.—Yoa. 15:15.
Mbala mingi, mpo na kokóma moninga ya moto, esɛngaka kolekisa ntango mingi na ye. Ntango bozali kosolola mpe kobɛtɛlana masolo ya makambo oyo bokutaná na yango, boninga ekolaka. Kasi, na oyo etali kokóma moninga ya penepene na Yesu, tozali na mwa mikakatano. Moko na yango ezali ete tomoná Yesu te. Bakristo mingi ya siɛklɛ ya liboso bazalaki mpe na mokakatano yango. Nzokande, ntoma Petro alobaki boye: “Atako bomoná ye te, bozali kolinga ye. Atako bozali komona ye te sikoyo, bozali kondimela ye.” (1 Pe. 1:8) Na yango, tokoki kokóma baninga ya penepene ya Yesu ata soki tokutaná na ye te. Lisusu, tozali na likoki te ya koloba na Yesu. Ntango tosalaka libondeli, tolobaka mbala moko na Yehova. Ya solo, tobondelaka na nkombo ya Yesu, kasi tosololaka na ye te. Kutu, Yesu ye moko alingi te tóbondelaka ye. Mpo na nini? Mpo libondeli ezali losambo, mpe tosengeli kosambela kaka Yehova. (Mat. 4:10) Atako bongo, tokoki komonisa ete tolingaka Yesu. w20.04 20 par. 1-3
Mwamitano, 6 sanza ya 5
[Nzambe] akotɛlɛmisa bino ngwi, akokómisa bino makasi.—1 Pe. 5:10.
Bapoti-mbangu na masano ya Bagrɛki basengelaki koyika mpiko na mikakatano, na ndakisa kolɛmba mpe nzoto mpasi. Kasi, bazalaki kotya motema kaka na formasyo oyo bazalaki kozwa mpe na makasi na bango. Tozali lokola bapoti-mbangu wana mpo tozwaka formasyo oyo eteyaka biso ndenge ya kopota mbangu mpo na bomoi. Kasi, toleki bapoti-mbangu wana na makambo mosusu. Tokoki kozwa makasi epai ya Yehova, oyo azali na nguya oyo ezangi nsuka. Soki totyeli Yehova motema, alaki ete akosuka kaka te na kopesa biso formasyo to kobongisa biso, kasi akokómisa biso mpe makasi! Ntoma Paulo akutanaki na mikakatano ebele. Bato bafingaki ye mpe bazalaki kotɛmɛla ye, na bantango mosusu azalaki na bolɛmbu, mpe asengelaki kobundana na mokakatano oyo abengaki “nzubɛ moko na kati ya mosuni.” (2 Ko. 12:7) Kasi, na esika atika ete mikakatano yango ezongisa ye nsima, amonaki ete ezali libaku ya kotyela Yehova motema. (2 Ko. 12:9, 10) Lokola Paulo atalelaki makambo ndenge wana, Yehova asalisaki ye na mikakatano na ye nyonso. w20.04 29 par. 13-14
Mwapɔsɔ, 7 sanza ya 5
Moto moko te akoki koya epai na ngai soki Tata . . . abendi ye te.—Yoa. 6:44.
“Kosala elongo” na Yehova, Yesu, mpe baanzelu, ezali mpe moko ya makabo ya motuya oyo emonanaka te. (2 Ko. 6:1) Tosalaka elongo na bango ntango nyonso oyo topesaka mabɔkɔ na mosala ya kokómisa bato bayekoli. Ntoma Paulo alobaki mpo na ye moko mpe mpo na bato oyo basakolaka ete “tozali bato oyo bazali kosala elongo na Nzambe.” (1 Ko. 3:9) Ntango tosakolaka, tosalaka mpe elongo na Yesu. Na ndenge nini? Ntango Yesu asilisaki kopesa bayekoli na ye etinda ya ‘kokende mpe ya kokómisa bato bayekoli na bikólo nyonso,’ abakisaki boye: “Nazali elongo na bino.” (Mat. 28:19, 20) Baanzelu mpe basalisaka biso? Ɛɛ, kutu tozali mpenza na botɔndi ndenge baanzelu batambwisaka biso ntango tozali koyebisa ‘nsango malamu ya seko epai ya bato oyo bafandi na mabele’! (Em. 14:6) Lisalisi oyo tozwaka epai ya Yehova, Yesu, mpe baanzelu esalisaka biso tókokisa makambo nini? Ntango tozali kolona mboto ya nsango ya Bokonzi, mboto mosusu ekweaka na mitema ya malamu mpe ekolaka. (Mat. 13:18, 23) Nani asalaka ete mboto yango ekola mpe ebota mbuma? Yesu alimboli yango na maloba ya mokapo ya lelo. w20.05 30 par. 14-15
Mwalomingo, 8 sanza ya 5
Bótika kolanda makambo ya ntango oyo.—Rom. 12:2.
Mabala mingi lelo oyo ezali kokufa. Ata bato ya mabota oyo bafandaka esika moko bálingana mpenza te. Moto moko oyo apesaka mabota toli alobi boye: “Tata, mama, mpe bana basololaka lisusu te, moto na moto akóma kaka kolekisa ntango mingi liboso ya ordinatɛrɛ, tablɛti, telefone, to mpe na kobɛta masano ya video. Atako bato ya mabota yango bafandaka ndako moko, bayebanaka mpenza malamu te.” Tolingi te ete tózanga bolingo lokola bato mingi ya mokili oyo. Kutu, tosengeli komonisa bolingo ya bondeko kaka te epai ya bandeko na biso ya libota, kasi mpe epai ya bandeko na biso bakristo. (Rom. 12:10) Bolingo ya bondeko ezali nini? Ezali boyokani ya makasi oyo ezalaka kati na bandeko ya libota moko. Yango nde bolingo oyo tosengeli komonisela bandeko na biso bakristo. Soki tozali komonisela bandeko na biso bolingo ya bondeko, yango ekosala ete biso nyonso tókoba kosambela Yehova na bomoko mpe na esengo.—Mika 2:12. w21.01 20 par. 1-2
Mwayambo, 9 sanza ya 5
Pesá ngai motema moko mpo nabanga nkombo na yo.—Nz. 86:11.
Ekipi oyo basani na yango bazali na bomoko, elongaka koleka ekipi oyo basani na yango bazali na bomoko te. Mpo motema na yo ezala lokola ekipi wana oyo elongaka, makanisi na yo, bamposa na yo, mpe mayoki na yo esengeli kozala mobimba epai ya Yehova. Kobosana te ete Satana akoluka kokabola motema na yo. Alingi ete makanisi na yo, bamposa na yo, mpe mayoki na yo eboya kotosa mibeko ya Yehova. Kasi motema na yo esengeli kozala mobimba mpo na kosalela Yehova. (Mat. 22:36-38) Kotika nzela soki moke te ete Satana akabola motema na yo! Lokola Davidi, okoki kobondela boye: “Pesá ngai motema moko mpo nabanga nkombo na yo.” Salá nyonso oyo okoki mpo na kosala na boyokani na libondeli yango. Mokolo na mokolo, salá ete bikateli na yo, ezala ya minene to ya mike, emonisa ete ozali kozwa nkombo mosantu ya Nzambe, Yehova, na limemya mpenza. Soki osali bongo, okomonisa mpenza ete ozali Motatoli ya Yehova, oyo asalaka na boyokani na nkombo yango. (Mas. 27:11) Mpe biso nyonso tokozala na likoki ya koloba lokola mosakoli Mika ete: “Tokotambola na nkombo ya Yehova Nzambe na biso mpo na ntango oyo etyami ndelo te, ɛɛ seko na seko.”—Mika 4:5. w20.06 13 par. 17-18
Mwamibale, 10 sanza ya 5
Akobima mpenza na nkanda makasi mpo na kosilisa nyɛɛ mpe kobebisa bato ebele.—Dan. 11:44.
Ntango mokonzi ya nɔrdi ná baguvernɛma mosusu ekobundisa basaleli ya Nzambe, yango ekopesa Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso nkanda makasi, mpe ekosala ete etumba ya Armagedone ebanda. (Em. 16:14, 16) Na ntango yango, mokonzi ya nɔrdi elongo na etuluku ya bikólo mosusu oyo ekosangana, bakobebisama, mpe bakozala na “mosungi te.” (Dan. 11:45) Vɛrsɛ oyo elandi na lisolo ya Danyele, elobeli makambo mingi oyo emonisi ndenge mokonzi ya nɔrdi mpe baguvɛrnema oyo epesaka ye mabɔkɔ bakobebisama, mpe ndenge oyo tokobikisama. (Dan. 12:1) Vɛrsɛ yango elimboli mpenza nini? Mikaele ezali nkombo mosusu ya Kristo Yesu, mokonzi na biso oyo azali koyangela. ‘Atɛlɛmi mpo na bolamu’ ya bato ya Nzambe kobanda 1914 ntango akómaki mokonzi ya Bokonzi ya Nzambe na likoló. Mosika te, “akotɛlɛma” to akoboma banguna na ye na etumba ya Armagedone. Etumba yango nde ekozala likambo ya nsuka ya eleko oyo Danyele abengi “ntango moko ya mpasi mpenza” na lisolo ya bato.—Em. 6:2; 7:14. w20.05 15-16 par. 15-17
Mwamisato, 11 sanza ya 5
Bakitaki na Yozefe na Ezipito.—Eba. 39:1.
Ntango Yozefe azalaki moombo mpe na nsima ntango akɔtaki bolɔkɔ, akokaki kosala eloko moko te mpo na kobongola makambo ya bomoi na ye. Nini esalisaki ye azala kaka na makanisi ya malamu? Na esika atya makanisi na ye nyonso na makambo oyo akokaki kosala lisusu te, azalaki nde kosala na molende mosala nyonso oyo bapesaki ye. Yozefe azalaki ntango nyonso koluka ndenge ya kosepelisa Yehova. Yango wana, Yehova apambolaki eloko nyonso oyo Yozefe azalaki kosala. (Eba. 39:21-23) Lisolo ya Yozefe ezali kokundwela biso ete, mokili oyo ezali mabe mpenza mpe bato bakosalela biso makambo ya kozanga bosembo. Ata mpe bandeko na biso bakristo bakoki kosalela biso makambo oyo ekoki kozokisa biso. Kasi soki tozali komona ete Yehova azali Libanga mpe Ekimelo na biso, tokolɛmba nzoto te mpe tokotika kosalela ye te. (Nz. 62:6, 7; 1 Pe. 5:10) Kobosana mpe te ete, ntango mosusu Yozefe azalaki na mbula soki 17 ntango Yehova alɔtisaki ye bandɔtɔ wana. Yango emonisi polele ete, Yehova atyelaka basaleli na ye oyo bazali bilenge motema. Lelo oyo, bilenge mingi bazali lokola Yozefe. Bango mpe bazalaka na kondima makasi epai ya Yehova. Bakɔtisá bamosusu kati na bango na bolɔkɔ kaka mpo baboyaki kobebisa bosembo na bango epai ya Nzambe.—Nz. 110:3. w20.12 16 par. 3; 17 par. 5, 7
Mwaminei, 12 sanza ya 5
Babengaki bantoma, babɛtaki bango fimbo, mpe bapesaki bango mitindo ete bátika koloba na nkombo ya Yesu.—Mis. 5:40.
Ntoma Petro mpe Yoane bamonaki ete ezali lokumu konyokwama mpo bazalaki kolanda Yesu mpe koyebisa basusu makambo etali ye. (Mis. 4:18-21; 5:27-29, 41,42) Bayekoli bazalaki na ntina te ya koyoka nsɔni. Atako na ntango wana bato bazalaki komemya bakristo te, bakristo yango basalaki makambo mingi mpo na kosalisa bato mosusu. Na ndakisa, mikanda ya Biblia oyo bakristo yango mosusu bakomaki, ezali kokoba kosalisa mpe kopesa bamilio ya bato elikya. Mpe Bokonzi oyo bakristo yango basakolaki, ezali sikoyo koyangela na likoló mpe mosika te ekoyangela mabele mobimba. (Mat. 24:14) Kasi lelo oyo, guvɛrnema ya kala ya Roma oyo ezalaki na nguya mpe oyo enyokolaki bakristo, ezalaka lisusu te; kasi bakristo yango ya sembo bazali sikoyo bakonzi kuna na likoló. Nzokande, banguna na bango bakufá; mpe ata soki banguna yango basekwi, bakristo yango ya sembo ya siɛklɛ ya liboso oyo bango banyokolaki nde bakoyangela banguna yango.—Em. 5:10. w20.07 15 par. 4
Mwamitano, 13 sanza ya 5
[Abrahama] azalaki kozela engumba oyo ezali na miboko ya solosolo, engumba oyo Nzambe ye moko atongi mpe asali.—Ebr. 11:10.
Abrahama azalaki na kondima makasi ya ndenge wana na bilaka ya Nzambe; ezalaki lokola nde azalaki komona Masiya, to Moto oyo atyami mafuta, oyo akokóma Mokonzi ya Bokonzi ya Nzambe. Mpo na ntina yango nde, Yesu ayebisaki Bayuda ya mikolo na ye ete: “Abrahama tata na bino asepelaki mingi na elikya ya komona mokolo na ngai, mpe amonaki yango mpe asepelaki.” (Yoa. 8:56) Na ntembe te, Abrahama ayebaki ete bakitani na ye mosusu bakozala bakonzi na Bokonzi oyo Nzambe akotya, mpe azalaki kozela ete Yehova akokisa elaka yango. Ndenge nini Abrahama amonisaki ete azalaki kozela engumba, to Bokonzi, oyo Nzambe abongisaki? Ya liboso, Abrahama akómaki mwana-mboka ya bokonzi ata moko te awa na mabele. Azalaki kotambolatambola mpe aponaki ata esika moko te mpo afanda wana libela, mpe apesaki ata mokonzi moko te mabɔkɔ. Lisusu, Abrahama amekaki ata moke te kosala bokonzi na ye moko. Kasi akobaki kotosa Yehova mpe azelaki ete Yehova akokisa elaka na ye. Na ndenge yango, Abrahama amonisaki kondima makasi epai ya Yehova. w20.08 3 par. 4-5
Mwapɔsɔ, 14 sanza ya 5
Mpo moto oyo akufi afuti nyongo ya lisumu na ye.—Rom. 6:7.
Yehova alaki ete na boyangeli ya Kristo, moto moko te akoloba: “Nazali na maladi.” (Yis. 33:24) Na yango, baoyo bakosekwa bakozala nzoto kolɔngɔnɔ. Kasi bakokóma bato ya kokoka mbala moko te. Soki te, bandeko ya libota mpe baninga na bango bakoyeba bango te. Emonani ete moto nyonso akokóma na nzoto ya kokoka mokemoke na boumeli ya Boyangeli ya Mbula Nkóto ya Kristo. Kaka na nsuka ya Boyangeli ya Mbula Nkóto nde Yesu akozongisa Bokonzi epai ya Tata na ye. Na nsima, Bokonzi ekokokisa likambo nyonso oyo Yehova alingaki, ata mpe kokómisa bato na nzoto ya kokoka. (1 Ko. 15:24-28; Em. 20:1-3) Kanisá esengo oyo okoyoka ntango okokutana lisusu ná bato oyo olingaka. Esengo oyo okoyoka na ntango yango, ekotinda yo osɛka to olela? Esengo makasi oyo okoyoka ekotinda yo oyembela Yehova mpo na kokumisa ye? Ntembe ezali te ete likabo kitoko ya lisekwa, ekotinda biso tólinga lisusu mingi Tata na biso oyo atyelaka biso likebi, mpe Mwana na ye ya bolingo. w20.08 16-17 par. 9-10
Mwalomingo, 15 sanza ya 5
Moto na moto azali na likabo na ye moko oyo euti na Nzambe, mosusu boye, mosusu boye.—1 Ko. 7:7.
Paulo alendisaki bakristo bátala soki bakoki kosalela Yehova lokola minzemba. (1 Ko. 7:8, 9) Paulo azalaki te kotalela bakristo oyo bazali minzemba lokola nde bazangá ntina. Kutu, aponaki elenge Timote oyo azalaki monzemba mpo akokisa mikumba minene na mosala ya Yehova. (Flp. 2:19-22) Ezali polele ete, ekozala mabe kokanisa ete ndeko mobali moko akokisi masɛngami to te kaka mpo azali monzemba to mpo abalá. (1 Ko. 7:32-35, 38) Ata mokolo moko te Yesu to Paulo bateyaki ete bakristo basengeli kobala to kotikala minzemba. Kasi, tokoki koloba nini mpo na likambo etali kotikala monzemba mpe kobala? Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/10/2012 epesaki eyano ya malamu na motuna yango. Elobaki ete ‘Na ntembe te, kobala to kotikala monzemba ezali makabo ya Yehova. . . . Yehova atalelaka bonzemba te lokola likambo ya nsɔni to mawa.’ Na yango, tosengeli komemya bandeko mibali mpe bandeko basi ya lisangá oyo bazali minzemba. w20.08 28 par. 8-9
Mwayambo, 16 sanza ya 5
Mpo na mokolo yango mpe ngonga yango moto moko ayebi te . . . kaka Tata nde ayebi.—Mat. 24:36.
Na bikolo mosusu, bato basepelaka mingi ntango bayoki nsango malamu. Ezalaka lokola nde bazalaki kozela yango banda kala! Kasi na bikólo mosusu, bato basepelaka mpenza te na makambo ya Nzambe to ya Biblia. Bongo na esika ofandi, ndenge nini bato batalelaka nsango malamu? Ezala bayokaka to te, Yehova alingi ete tókoba kosakola nsango malamu tii ntango ye moko akoloba ete esili. Mosala ya kosakola ekosuka na ntango oyo Yehova atyá; na nsima “nsuka ekoya.” (Mat. 24:14) Yesu asakolaki ndenge bato bakozala mpe makambo oyo ekomonisa ete tozali na mikolo ya nsuka. Ayebaki ete yango ekoki kolongola likebi ya bayekoli na ye na mosala ya kosakola. Ayebisaki bango, “bósɛnzɛlaka.” (Mat. 24:42) Na mikolo ya Noa, ezalaki na makambo mingi oyo ezalaki kolongola likebi ya bato na likebisi oyo Noa azalaki kopesa. Yango mpe ekoki kokómela biso lelo oyo. (Mat. 24:37-39; 2 Pe. 2:5) Na yango, tosengeli kokoba kotya makanisi na biso nyonso na mosala oyo Yehova apesá biso. w20.09 8 par. 1-2, 4
Mwamibale, 17 sanza ya 5
Baoyo nyonso bazali na mposa ya kozala na bomoi na ezaleli ya kokangama na Nzambe na boyokani na Kristo Yesu bango mpe bakonyokwama.—2 Tim. 3:12.
Satana azali na “nkanda makasi,” mpe tokomikosa mpenza soki tokanisi ete tokokoka kokima nkanda na ye na ndenge moko boye. (Em. 12:12) Mosika te, bosembo na biso nyonso ekomekama. Etikali moke, ekozala na “bolɔzi moko monene oyo esalemá naino te banda mokili ebandá tii sikoyo.” (Mat. 24:21) Na ntango yango, bato ya libota na biso bakoki kobalukela biso mpe mosala na biso ekoki kopekisama. (Mat. 10:35, 36) Na ndakisa ya Mokonzi Asa, tosengeli kotya motema ete Yehova akosalisa mpe akobatela biso. (2 Nt. 14:11) Yehova azali kobongisa biso sikoyo na elimo, mpo kondima na biso ezala makasi. Azali kotambwisa “moombo ya sembo mpe ya mayele” mpo na kopesa biso “bilei . . . na ntango oyo ebongi” mpo esalisa biso tózala ntango nyonso makasi na elimo. (Mat. 24:45) Kasi, tosengeli kosala oyo tokoki mpo kondima na biso ezala makasi epai ya Yehova.—Ebr. 10:38, 39. w20.09 18 par. 16-18
Mwamisato, 18 sanza ya 5
Motema ya mokonzi ezali lokola mikɛli ya mai na lobɔkɔ ya Yehova. Abalusaka yango esika nyonso asepeli kobalusa.—Mas. 21:1.
Yehova akoki kosalela elimo santu na ye ya nguya mpo na kotinda bato oyo bazali na bokonzi básala oyo ye alingi soki likambo moko eyokani na mokano na ye. Bato bakoki kotimola nzela ya kolekisa mai ya mokɛli epai oyo bango balingi. Ndenge moko mpe, Yehova akoki kosalela elimo na ye mpo na kotinda bakonzi básala makambo oyo ekokokisa mokano na ye. Soki asali bongo, bakonzi bazwaka bikateli mpo na bolamu ya basaleli ya Nzambe. (Talá mpe Ezera 7:21, 25, 26.) Tokoki kosala nini? Tokoki kobondela “mpo na bakonzi mpe baoyo nyonso bazali na bibonga minene” ntango basengeli kozwa bikateli oyo etali mosala na biso ya kosakola mpe koyangana na makita. (1 Tim. 2:1, 2; Neh. 1:11) Kaka ndenge bakristo ya siɛklɛ ya liboso basalaki, biso mpe tobondelaka Nzambe mingi mpo na bandeko na biso oyo bazali na bolɔkɔ.—Mis. 12:5; Ebr. 13:3. w20.11 15 par. 13-14
Mwaminei, 19 sanza ya 5
Bókómisa bato bayekoli na bikólo nyonso, bóbatisa bango.—Mat. 28:19.
Bongo soki yo nde moto oyekolaki na moyekoli yango ya sika Biblia, okosepela mpenza komona ye azali kozwa batisimo! (1 Tes. 2:19, 20) Bayekoli ya sika oyo bauti kozwa batisimo, bazali “mikanda” ya malamu kaka mpo na bato oyo bayekolaki na bango te, kasi mpe mpo na lisangá mobimba. (2 Ko. 3:1-3) Ezali likambo ya esengo komona ete, na mbula minei oyo euti koleka, tozalaki koyekola Biblia na bato soki milio 10 sanza na sanza na mokili mobimba. Mpe kaka na eleko yango, bato koleka 280 000 bazalaki kozwa batisimo mbula na mbula mpo na kokóma Batatoli ya Yehova mpe bayekoli ya Yesu Kristo. Ndenge nini tokoki kosalisa mingi na bango mpo bázwa batisimo? Lokola Yehova azali naino kopesa bato libaku ya kokóma bayekoli ya Kristo, tosengeli kosala nyonso oyo tokoki mpo na kosalisa bango bákola tii bázwa batisimo noki mpenza. Tozali lisusu na ntango ya kolekisa te!—1 Ko. 7:29a; 1 Pe. 4:7. w20.10 6 par. 1-2
Mwamitano, 20 sanza ya 5
Nzambe atɛmɛlaka bato ya lolendo, kasi amoniselaka bato ya komikitisa boboto monene.—Yak. 4:6.
Mokonzi Saulo atosaki Yehova te. Mpe ntango mosakoli Samwele ayebisaki ye ete asali mabe, Saulo aboyaki kondima libunga na ye. Kutu, alukaki nde komilongisa mpe komonisa ete libunga yango ezalaki monene te, mpe alobaki ete bato nde batindaki ye na makasi asala bongo. (1 Sa. 15:13-24) Liboso, Mokonzi Saulo asalaki mpe likambo moko ya ndenge wana. (1 Sa. 13:10-14) Likambo ya mawa, atikaki motema na ye ekóma na lolendo. Aboyaki kosembola makanisi na ye, yango wana Yehova apamelaki ye mpe aboyaki ye. Tolingaka te kozala lokola Saulo, yango wana tosengeli komituna boye: ‘Soki natángi toli moko na Liloba ya Nzambe, nalukaka komilongisa mpo nasalela yango te? Nakanisaka ete makambo oyo nazali kosala ezali mpenza mabe te? Napesaka bato mosusu foti mpo na mabunga oyo nasali?’ Soki toyanoli ɛɛ na mituna yango, tosengeli kosembola makanisi na biso. Soki te, motema na biso ekoki kokóma na lolendo, mpe Yehova akoboya biso; tokozala lisusu baninga na ye te. w20.11 20 par. 4-5
Mwapɔsɔ, 21 sanza ya 5
Kanisá Mozalisi na yo Monene na mikolo ya bolenge na yo, liboso mikolo ya mpasi eya, to bambula eya ntango okoloba ete: “Nasepeli na yango ata moke te.”—Mos. 12:1.
Elenge, poná moto oyo okosalela. Osengeli komindimisa soki Yehova azali nani, mokano na ye ezali nini, mpe ndenge nini okoki kosala mokano na ye na bomoi na yo. (Rom. 12:2) Soki osali bongo, okozala na likoki ya kozwa ekateli oyo eleki ntina na bomoi na yo: kosalela Yehova. (Yos. 24:15) Soki ozali kotánga mpe koyekola Biblia mbala na mbala, okolinga Yehova lisusu mingi koleka, mpe kondima na yo epai na ye ekokóma makasi mpenza. Poná kotya mokano ya Yehova na esika ya liboso na bomoi na yo. Mokili ya Satana ezali kokosa bato ete, soki basaleli makoki na bango mpo na bolamu na bango moko, bakozala na esengo. Kasi toyebi ete, baoyo bamipesaka na konduka biloko ya mokili, bamitɔbɔlaka na “ebele ya bampasi.” (1 Tim. 6:9, 10) Nzokande, soki otosi Yehova mpe oponi kotya mokano na ye na esika ya liboso na bomoi na yo, okolonga na banzela na yo nyonso mpe “okosala makambo na bwanya.”—Yos. 1:8. w20.10 30-31 par. 17-18
Mwalomingo, 22 sanza ya 5
Nasengeli . . . kosakola nsango malamu ya bokonzi ya Nzambe . . . , mpamba te natindamaki mpo na yango.—Luka 4:43.
Na siɛklɛ ya liboso, nsango oyo Yesu asakolaki epesaki moto nyonso elikya. Apesaki bayekoli na ye mitindo ete bákoba mosala oyo abandaki. Ayebisaki bango bápesa litatoli “tii na esika eleki mpenza mosika na mabele.” (Mis. 1:8) Na ntembe te, bakokaki kosala mosala yango na makasi na bango moko te. Basengelaki na elimo santu, elingi koloba, “mosungi” oyo Yesu alakaki bango. (Yoa. 14:26; Zek. 4:6) Bayekoli ya Yesu bazwaki elimo santu na mokolo ya pantekote ya mobu 33 ya ntango na biso. Na lisalisi ya elimo yango, babandaki mbala moko kosakola, mpe nsima ya mwa ntango moke, ebele mpenza ya bato bandimaki nsango malamu. (Mis. 2:41; 4:4) Ntango botɛmɛli ebimaki, bayekoli babangaki te kasi basɛngaki nde Nzambe asalisa bango. Babondelaki boye: “Pesá baombo na yo likoki ya kokoba koloba liloba na yo na mpiko mpenza.” Na nsima, batondaki na elimo santu mpe bakobaki “koloba liloba ya Nzambe na mpiko mpenza.”—Mis. 4:18-20, 29, 31. w20.10 21 par. 4-5
Mwayambo, 23 sanza ya 5
Kristo akufaki mpo na masumu na biso na kotalela Makomami; mpe . . . alamukaki.—1 Ko. 15:3, 4.
Mpo na nini tosengeli mpenza kondima ete Yehova asekwisaki Yesu? Ezalaki na bato ebele oyo bamonaki Yesu nsima ya lisekwa na ye mpe balobelaki likambo yango. (1 Ko. 15:5-7) Motatoli ya liboso na kati ya bato oyo ntoma Paulo atángi ezali ntoma Petro (Kefa). Bayekoli mpe balobaki ete ntoma Petro amonaki Yesu nsima ya lisekwa na ye. (Luka 24:33, 34) Lisusu, Paulo alobaki ete “bantoma zomi na mibale” bamonaki mpe Yesu nsima ya lisekwa na ye. Na nsima, Kristo “abimelaki bandeko koleka nkama mitano (500) na mbala moko,” ntango mosusu, ezalaki na likita ya esengo mpenza oyo esalemaki na Galile oyo Matai 28:16-20 elobeli. Yesu ‘abimelaki mpe Yakobo,’ oyo mbala mosusu azalaki ndeko ya Yesu, oyo liboso, azalaki kondima te ete Yesu azali Masiya. (Yoa. 7:5) Ntango Yakobo amonaki Yesu nsima ya lisekwa na ye, andimaki mpenza. Likambo ya esengo, ntango Paulo akomaki mokanda oyo na mobu soki 55 ya ntango na biso, bato mingi oyo bamonaki Yesu nsima ya lisekwa na ye bazalaki naino na bomoi. Na yango, moto nyonso oyo akokaki kotya ntembe ete Yesu asekwaki te, akokaki kotuna bato yango, oyo bamonaki likambo yango na miso. w20.12 3 par. 5, 7-8
Mwamibale, 24 sanza ya 5
Yehova ye moko akosunga ye na mbeto ya maladi.—Nz. 41:3.
Ntango tozali koyoka nzoto malamu te, mingimingi soki tozali kobɛla maladi moko oyo eumeli, ekoki kozala mpasi mpo tózala na makanisi malamu. Yango wana tosengeli kobondela Yehova asalisa biso. Atako sikoyo abikisaka biso te na ndenge ya likamwisi, kasi abɔndisaka biso mpe akoki kopesa biso makasi oyo tosengeli na yango mpo tóyika mpiko. (Nz. 94:19) Na ndakisa, akoki kotinda bandeko báya kosalisa biso na misala ya ndako. Akoki mpe kotinda bandeko bábondela elongo na biso. To akoki kosalisa biso tokanisa lisusu makanisi ya kobɔndisa oyo ezali na Liloba na ye, na ndakisa, elikya kitoko ya kozala na bomoi ya kokoka na mokili ya sika, epai maladi mpe bampasi nyonso ekozala lisusu te. (Rom. 15:4) Mbala mosusu tozali kosakola te ndenge oyo balingaka. Na boumeli ya mbula 37, bakɔtisaki ndeko mwasi moko na nkombo Laurel na masini moko mpo ekoka kosalisa ye mpo apemaka! Azalaki mpe na maladi ya kansɛr, mpe basalaki ye mapaso ya minene ndenge na ndenge. Kasi makambo nyonso wana ya mpasi epekisaki ye te asakola. Azalaki kopesa litatoli epai ya minganga mpe bato oyo bazalaki koya kotala ye, mpe asalisaki bato koleka 17 báyeba mateya ya solo oyo ezali na Biblia! w20.12 24 par. 9; 25 par. 12
Mwamisato, 25 sanza ya 5
Yehova azali pene na ngai; nakobanga te. Moto ya mabele akoki kosala ngai nini?—Nz. 118:6.
Ntoma Paulo asengelaki na lisalisi. Na mobu soki 56 ya ntango na biso, ebele ya bato babendaki ye na libanda ya tempelo na Yerusaleme mpe balukaki koboma ye. Na mokolo oyo elandaki, bamemaki ye liboso ya Sanedrina, mpe banguna na ye balingaki kokata ye bitenibiteni. (Mis. 21:30-32; 22:30; 23:6-10) Na ntango yango, ntoma Paulo akokaki komituna: ‘Mikakatano oyo ekoumela tii ntango nini?’ Ndenge nini Yesu asalisaki Paulo? Na butu wana nsima ya kokanga Paulo, “Nkolo” Yesu atɛlɛmaki pene na ye mpe alobaki na ye ete: “Zalá na mpiko! Mpo lokola opesi litatoli malamumalamu na Yerusaleme mpo na makambo oyo etali ngai, ndenge moko mpe osengeli kopesa litatoli na Roma.” (Mis. 23:11) Maloba yango elendisaki mpenza Paulo! Yesu apesaki ntoma Paulo longonya mpo na litatoli oyo apesaki na Yerusaleme. Mpe apesaki ntoma Paulo elaka ete akokóma na Roma malamu, mpe kuna akopesa litatoli malamumalamu. Na ntembe te, nsima ya kozwa elaka wana, ntoma Paulo amiyokaki lokola mwana moke oyo abatelami malamu mpenza na mabɔkɔ ya tata na ye. w20.11 12 par. 1, 3; 13 par. 4
Mwaminei, 26 sanza ya 5
Elikya oyo tozali na yango . . . , ezali makasi mpe ngwi.—Ebr. 6:19.
Elikya ya Bokonzi oyo tozalaka na yango ezali “lokola longo mpo na molimo” na biso, mpo yango esalisaka biso tóningana te atako tozali kokutana na mikakatano mpe na mitungisi ya ndenge na ndenge. Kanisá bomoi ya malamu oyo Yehova alaki biso na mikolo ezali koya, oyo ekozala na mitungisi te. (Yis. 65:17) Meká komimona na mokili ya sika ya kimya, epai makambo oyo etungisaka biso ekozala lisusu te. (Mika 4:4) Elikya na yo ekokóma lisusu makasi soki ozali koyebisa bato mosusu makambo etali mokili ya sika. Salá nyonso oyo okoki na mosala ya kosakola mpe ya kokómisa bato bayekoli. Soki osali bongo, okoki kozala na “elikya makasi tii na nsuka.” (Ebr. 6:11) Lokola mokili oyo ezali kokóma na nsuka na yango, tokokutana na makambo mingi oyo ekotungisa biso. Tokolonga mikakatano yango mpe tófanda nyɛɛ, na makasi na biso moko te, kasi nde mpo totyeli Yehova motema. Tiká ete tómonisa na nzela ya misala na biso ete tozali kondima elaka ya Yehova oyo elobi ete: ‘Nguya na bino ekomonana mpenza soki bofandi nyɛɛ mpe botyeli ngai motema.’—Yis. 30:15. w21.01 7 par. 17-18
Mwamitano, 27 sanza ya 5
Yehova azali na bolingo mingi ya motema.—Yak. 5:11.
Yakobo 5:11 emonisi ete bolingo ya motema ya Yehova eyokani mpe na motema mawa, ezaleli na ye mosusu oyo esalaka ete tópusana penepene na ye. (Kob. 34:6) Lolenge moko oyo Yehova amonisaka ezaleli na ye ya motema mawa ezali na ndenge alimbisaka masumu na biso. (Nz. 51:1) Kasi na Biblia, motema mawa esuki kaka te na kolimbisa moto oyo asaleli biso likambo moko ya mabe. Ezali mpe mpasi makasi oyo toyokaka na motema ntango tomoni moto moko azali konyokwama; mpe yango etindaka biso tósalisa ye. Yehova alobi ete mposa makasi oyo azalaka na yango ya kosalisa biso eleki mosika mayoki oyo mama azalaka na yango mpo na mwana na ye. (Yis. 49:15) Ntango tozali konyokwama, motema mawa ya Yehova etindaka ye asalisa biso. (Nz. 37:39; 1 Ko. 10:13) Tokoki komonisela bandeko na biso ezaleli ya motema mawa soki tozali kolimbisa bango ntango basaleli biso mabe mpe soki toboyi kokangela bango nkanda na motema. (Ef. 4:32) Kasi, lolenge mosusu ya malamu ya komonisela bandeko na biso motema mawa ezali ya kosalisa bango ntango bazali kokutana na mikakatano. Na ndenge yango tomekolaka Yehova, oyo amonisaka bolingo ya motema mingi koleka moto mosusu nyonso.—Ef. 5:1. w21.01 21 par. 5
Mwapɔsɔ, 28 sanza ya 5
Kristo . . . [atikelaki] bino ndakisa mpo bólanda matambe na ye malamumalamu.—1 Pe. 2:21.
Tata ya libota asengeli kokeba na likambo moko: asengeli te kolekisaka ntango mingi na mosala ya mosuni, mpo yango ekopekisa ye akokisa bamposa ya elimo ya bato ya libota na ye mpe ekozala mpasi amonisela bango bolingo mpe ateya bango. Yehova ateyaka mpe apesaka biso disiplini mpo na matomba na biso. (Ebr. 12:7-9) Ndenge moko ná tata na ye, na bolingo nyonso, Yesu ateyaka baoyo bazali na nse ya bokonzi na ye. (Yoa. 15:14, 15) Apesaka toli ya makasi, kasi asalaka yango na boboto. (Mat. 20:24-28) Ayebi ete tozali bato ya kozanga kokoka mpe mbala mingi tosalaka mabunga. (Mat. 26:41) Tata ya libota oyo amekolaka Yehova mpe Yesu, ayebaka ete mwasi mpe bana na ye bazali bato ya kozanga kokoka. Ayokelaka mwasi mpe bana na ye “nkanda makasi te.” (Kol. 3:19) Kasi asalelaka nde toli oyo ezali na Bagalatia 6:1, mpe asalaka makasi asembola bango na “elimo ya boboto” mpo ayebi ete ye mpe azali moto ya kozanga kokoka. Lokola Yesu, ayebaka ete lolenge eleki malamu ya koteya bango ezali ya kozala ndakisa malamu. w21.02 6-7 par. 16-18
Mwalomingo, 29 sanza ya 5
Eloko nyonso oyo ezali na mpema—esanzola Yah.—Nz. 150:6.
Na nzela ya lisiko, Yehova asombá bomoi ya ndeko mokomoko oyo azali na lisangá, mpe ya moto nyonso oyo andimelaka Yesu. (Mrk. 10:45; Mis. 20:28; 1 Ko. 15:21, 22) Na yango, ebongi ete apona Yesu azala mokonzi ya lisangá mpo apesaki bomoi na ye lisiko. Lokola Yesu nde azali mokonzi na biso, azali na lotomo ya kotya mibeko oyo bato, mabota mpe lisangá mobimba esengeli kotosa. (Gal. 6:2) Kasi, Yesu asukaka te kaka na kotya mibeko. Alingaka mpe atyelaka mokomoko na biso likebi. (Ef. 5:29) Bandeko basi bamonisaka ete bamemyaka Kristo na ndenge batosaka malako ya mibali oyo Kristo atyá mpo na kobatela bango. Bandeko mibali bamonisaka ete batosaka ebongiseli ya bokonzi na ndenge bamemyaka mpe bapesaka bandeko basi lokumu. Ntango bato nyonso na kati ya lisangá, bazali kotosa ebongiseli ya bokonzi oyo Yehova atyá, lisangá ezalaka na kimya. Mpe oyo eleki nyonso, topesaka Yehova, Tata na biso ya bolingo, lokumu. w21.02 18-19 par. 14-17
Mwayambo, 30 sanza ya 5
Davidi atunaki Yehova.—1 Sa. 30:8.
Na boumeli ya ntango oyo Davidi ná bato na ye bazalaki na mokili ya Bafilistia mpo na kokima Mokonzi Saulo, mokolo moko bakendaki na bitumba mpe batikaki mabota na bango. Na nsima na bango, banguna bayaki mpe bakɔtaki na makasi na bandako na bango, mpe bamemaki bato ya mabota na bango bakangami. Davidi akokaki kokanisa ete lokola ayebaki kobunda malamu, akokaki kosalela mayele oyo ebongi mpo na kobikisa bato yango oyo bakendaki bakangami. Na esika asala bongo, asɛngaki nde Yehova alakisa ye likambo oyo asɛngelaki kosala. Davidi atunaki Yehova boye: “Nalanda etuluku oyo ya bapunzi?” Yehova ayebisaki ye akende mpe akolonga. (1 Sa. 30:7-10) Likambo yango ekoki koteya biso nini? Sɛngáká toli liboso ya kozwa bikateli. Tunáká makanisi ya baboti na yo. Okoki mpe kozwa toli ya malamu soki osololi na bankulutu oyo bayebi makambo mingi. Lokola Yehova atyelaka mibali yango motema, yo mpe okoki kosala bongo. Yehova atalelaka bango lokola “makabo” mpo na lisangá. (Ef. 4:8) Okozwa matomba mingi soki omekoli kondima na bango mpe soki oyoki makanisi ya bwanya oyo bakopesa yo. w21.03 4-5 par. 10-11
Mwamibale, 31 sanza ya 5
[Eloko moko te] ekokoka . . . kokabola biso na bolingo ya Nzambe.—Rom. 8:38, 39.
Yesu alobaki ete soki tosaleli te makambo oyo tozali koyekola, tozali lokola moto oyo atongi ndako likoló ya zɛlo. Moto yango asali mosala makasi kasi alekisi ntango na ye kaka mpamba. Mpo na nini? Mpo soki mopɛpɛ makasi ebɛti mpe mpela eyei, ndako yango ekokwea. (Mat. 7:24-27) Ndenge moko mpe, soki tosaleli te makambo oyo toyekoli, ekozala mosala ya mpunda. Soki kaka tokutani na mikakatano mpe minyoko, kondima na biso ekolɛmba. Nzokande, soki toyekoli mpe tosaleli makambo oyo tozali koyekola, tokozwa bikateli ya malamu, tokozala na kimya, mpe kondima na biso ekokóma lisusu makasi. (Yis. 48:17, 18) Mpo tókikala sembo epai ya Yehova ntango tokutani na mikakatano, tosengeli kokoba kobondela ye mpe koyekola Liloba na ye mbala na mbala. Mpe tosengeli kobosanaka te ete moko ya makambo eleki ntina oyo tokoki kosala ezali ya kopesa Yehova nkembo. Tosengeli koyeba ete Yehova akosundola biso ata moke te, mpe ezali ata na eloko moko te oyo ekoki kotinda ye atika kolinga biso.—Ebr. 13:5, 6. w21.03 15 par. 6; 18 par. 20