Sanza ya 6
Mwamisato, 1 sanza ya 6
Tosepelaki mingi kopesa bino, kaka nsango malamu ya Nzambe te, kasi mpe milimo na biso moko.—1 Tes. 2:8.
Bateyi basengeli komonisa ete bazali kolinga mpe kotyela bayekoli na bango ya Biblia likebi. Taleláká bango lokola bato oyo bakokóma bandeko na yo ya elimo na mikolo ezali koya. Ezali pɛtɛɛ te ete bátika baninga na bango ya mokili mpe básala mbongwana nyonso oyo esengeli mpo na kosalela Yehova. Bandeko oyo bayebi koteya malamu balakisaka bayekoli na bango epai ya bandeko mosusu ya lisangá, oyo bakoki mpe kosalisa bango bápusana penepene na Yehova. Bayekoli ya Biblia bakoki kosepela kozala esika moko na bandeko oyo bakoki kosalisa bango bálonga mikakatano mosusu mpe bákola na elimo. Tolingi moyekoli mokomoko ayoka ete azali moto ya lisangá na biso, mpe akɔti na kati ya libota ya Nzambe. Tolingi ete akɔta na libota ya bandeko na biso ya mokili mobimba oyo bamoniselanaka mpenza bolingo. Na ndenge yango, ekozala mpasi te akata boninga ná bato oyo bakoki kosalisa ye te mpo alinga Yehova. (Mas. 13:20) Soki baninga na ye ya kala baboyi ye, akoyeba ete akoki kozwa baninga ya malamu na kati ya ebongiseli ya Yehova.—Mrk. 10:29, 30; 1 Pe. 4:4. w20.10 17 par. 10-11
Mwaminei, 2 sanza ya 6
Bapesi ngai bokonzi nyonso na likoló mpe na mabele.—Mat. 28:18.
Tosengeli kokóma baninga ya Yesu mpo tózala mpe na boyokani malamu na Yehova. Mpo na nini ezali bongo? Tólobela kaka ntina mibale. Ya liboso, Yesu ayebisaki bayekoli na ye: “Tata ye moko alingaka bino mingi, mpo bino bolingi ngai mingi.” (Yoa. 16:27) Alobaki mpe: “Moto moko te azali koya epai ya Tata soki na nzela na ngai te.” (Yoa. 14:6) Soki toluki kokóma baninga ya Yehova nzokande tozali baninga ya Yesu te, ezali lokola tolingi kokɔta na ndako moko kozanga ete tóleka na porte. Yesu asalelaki ndakisa ya ndenge wana mpe amibengaki “porte ya bampate.” (Yoa. 10:7) Ntina ya mibale ezali ete Yesu amonisaki na ndenge ya kokoka bizaleli ya Tata na ye. Alobaki na bayekoli na ye: “Moto oyo amoni ngai amoni mpe Tata.” (Yoa. 14:9) Na yango, lolenge moko malamu ya koyekola koyeba Yehova ezali ya koyekola bomoi ya Yesu. Ntango tozali koyekola bomoi ya Yesu, tokokóma mpe kolinga ye mingi. Mpe ntango boninga na biso ná Yesu ezali kokola, tokolinga Tata na ye mingi. w20.04 21-22 par. 5-6
Mwamitano, 3 sanza ya 6
Nazali kosepela na bolɛmbu, . . . mpo ntango nazali na bolɛmbu, na ntango wana nde nazali mpenza na nguya.—2 Ko. 12:10.
Okɔtá ndako mpo na maladi to ofandá na kiti ya bibɔsɔnɔ? Mabɔlɔngɔ esalaka yo mpasi to miso ezali komona lisusu malamu te? Soki bongo, okoki kaka kopota mbangu mpo na bomoi nzela moko na baoyo bazali bilenge mpe na nzoto kolɔngɔnɔ? Ɛɛ! Bandeko mingi ya mibange mpe ya bibɔsɔnɔ bazali kopota mbangu na nzela ya bomoi. Basalaka yango na makasi na bango moko te. Kasi, bazwaka makasi epai ya Yehova na ndenge balandaka makita na nzela ya telefone to batalaka makita oyo etyami na Internet. Lisusu, basalaka mosala ya kokómisa bato bayekoli na ndenge basakwelaka minganga, mafulume, mpe bandeko na bango ya libota. Kotika te ete kolɛmba nzoto mpe kozanga makasi na nzoto etinda yo okanisa ete ozali na bolɛmbu mpe ete okoki kopota mbangu te na nzela ya bomoi. Yehova alingaka yo mpo na kondima na yo mpe ayebi ndenge oyiki mpiko bambula ebele. Ayebi ete ozali na mposa ya lisalisi na ye mingi koleka sikoyo, mpe akosundola yo te. (Nz. 9:10) Kutu, akopusana lisusu mingi penepene na yo. w20.04 29 par. 16-17
Mwapɔsɔ, 4 sanza ya 6
Nazali kosala makambo nyonso mpo na nsango malamu, mpo nasakola yango elongo na bamosusu.—1 Ko. 9:23.
Makambo nini okoki kosolola na moto oyo alobi ete azali na lingomba na ye? Meká koyeba bindimeli na ye oyo yo mpe ondimaka. Mbala mosusu asambelaka Nzambe kaka moko, andimaka ete Yesu azali Mobikisi ya bato, to andimaka ete tozali na eleko moko ya mabe oyo ekosuka mosika te. Na kotalela makambo oyo bino mibale bondimaka, yebisá ye nsango ya Biblia na ndenge oyo ekosepelisa ye. Kobosana te ete bato mosusu bandimaka te nyonso oyo lingomba na bango eteyaka. Na yango, ata nsima ya koyeba lingomba ya moto, luká koyeba soki ye moko andimaka mpenza nini. Ndeko mobali moko ya misionɛrɛ amoni ete bato mosusu balobaka ete bandimaka liteya ya Bosato, kasi ekoki kozala ete bandimaka mpenza te ete Tata, Mwana, mpe elimo santu bazali Nzambe moko. Ndeko yango alobi boye: “Koyeba ete mbala mosusu moto andimaka te makambo nyonso oyo lingomba na ye eteyaka, esalisaka mpo na kozwa likambo oyo ekoyokanisa biso.” Na yango, saláká makasi oyeba mpenza makambo oyo bato bandimaka. Na ndenge yango, lokola ntoma Paulo, okoki ‘kokóma makambo nyonso epai ya bato ya ndenge nyonso.’—1 Ko. 9:19-22. w20.04 10 par. 9-10
Mwalomingo, 5 sanza ya 6
Na ntango yango bato ya ekólo na yo bakobika, moto nyonso oyo bakomona ete akomami na buku.—Dan. 12:1.
Danyele mpe Yoane balobi ete Yehova ná Yesu bakobikisa basaleli na bango na ntango ya bolɔzi monene. Na yango, tokoki kozala motema ya kokita ata soki likambo nini ekosalema. Danyele alobi ete nkombo ya baoyo bakobika “ekomami na buku.” Tokoki kosala nini mpo nkombo na biso ekomama na buku yango? Tosengeli komonisa polele ete tozali na kondima epai ya Yesu, Mwana-Mpate ya Nzambe. (Yoa. 1:29) Tosengeli kozwa batisimo mpo na komonisa ete tomipesi na Nzambe. (1 Pe. 3:21) Mpe tosengeli kosalisa basusu báyeba Yehova mpo na komonisa ete tozali kopesa Bokonzi ya Nzambe mabɔkɔ. Sikoyo nde ntango ya kokómisa makasi elikya na biso epai ya Yehova mpe kotyela ebongiseli na ye motema. Ezali mpe ntango ya kopesa Bokonzi ya Nzambe mabɔkɔ. Soki tosali bongo, tokobikisama ntango Bokonzi ya Nzambe ekoboma mokonzi ya nɔrdi mpe mokonzi ya sudi. w20.05 16 par. 18-19
Mwayambo, 6 sanza ya 6
Ee Yehova, nkombo na yo ezali mpo na seko.—Nz. 135:13.
Adama ná Eva bayebaki ete nkombo ya Nzambe ezali Yehova mpe bayebaki makambo mosusu ya ntina oyo etali ye. Na ndakisa, bayebaki ete azali mozalisi na bango, apesaki bango bomoi, esika kitoko mpo na kofanda, mpe apesaki mokomoko na bango molongani ya kokoka. (Eba. 1:26-28; 2:18) Kasi, bakobaki nde kokanisa makambo nyonso ya malamu oyo Yehova asalaki mpo na bango? Bakobaki komonisa bolingo mpe botɔndi na bango epai ya Yehova? Biyano na mituna yango emonanaki polele ntango monguna ya Nzambe amekaki bango. Satana asalelaki nyoka mpo na kosolola na Eva mpe atunaki ye boye: “Ezali mpenza solo ete Nzambe alobaki na bino ete bosengeli te kolya mbuma ya nzete nyonso ya elanga?” (Eba. 2:16, 17; 3:1) Motuna oyo Satana atunaki, ezalaki na makambo ya lokuta mpo na Nzambe. Nzambe alobaki na bango ete bakokaki kolya mbuma ya nzete nyonso ya elanga longola kaka moko. (Eba. 2:9) Motuna yango etindaki Adama ná Eva bámona lokola Yehova azali mokabi te. Kasi Eva akokaki komituna boye: ‘Nzambe azali nde kopekisa ngai nazwa eloko moko ya malamu?’ w20.06 3-4 par. 8-9
Mwamibale, 7 sanza ya 6
Bókoba kokanga motema moto na moto na makambo ya mosusu mpe kolimbisana na motema moko.—Kol. 3:13.
Basaleli mosusu ya Yehova bakómá na nkanda mpo na makambo oyo bandeko mosusu ya lisangá basalelaki bango. Ntoma Paulo ayebaki ete na bantango mosusu, tokoki ‘kozala na likambo’ na ndeko moko. Ekoki kozala ete basalelaki biso makambo na kozanga bosembo. Soki tokebi te, tokoki kokangela ndeko na biso nkanda na motema. Nkanda ekoki kotinda ndeko moko aboya kozala elongo na basaleli ya Yehova. Ndeko Pablo oyo afandaka na Amerika ya sudi, bafundaki ye ete azali na etamboli ya mbindo mpe mpo na yango, abungisaki mokumba na ye na lisangá. Asalaki nini? Pablo alobi boye: “Nayokaki nkanda mpe mokemoke natikaki lisangá.” Lisumu oyo moto asalá kala, ekoki mpe kotungisa lisosoli na ye mpe kotinda ye amona ete Nzambe alingaka ye te. Ata soki abongolá motema mpe balimbisá ye, akoki komona ete abongi lisusu te kozala mosaleli ya Yehova. Ndeko moko na nkombo Francisco amiyokaki mpe bongo mpe atikaki kosakola mpe koyangana na makita. w20.06 19 par. 6-7
Mwamisato, 8 sanza ya 6
Moto ya ekɛngɛ nde moto oyo amoni likama mpe amibombi.—Mas. 22:3.
Tosengeli koyekola koyeba makambo oyo ekoki komemela biso likama mpe kokima yango. (Ebr. 5:14) Na ndakisa, tosengeli kopona masano mpe kominanola na biso na mayele. Mbala mingi, bafilme mpe baemisyo ya televizyo elakisaka makambo ya kosangisa nzoto. Bizaleli yango esepelisaka Nzambe te mpe ememelaka bato mpasi. Yango wana, toboyaka kominanola ya ndenge wana mpo ekoki kolɛmbisa mokemoke bolingo na biso mpo na Nzambe. (Ef. 5:5, 6) Tosengeli mpe kozala na bososoli mpo tómona ete bansango ya lokuta oyo bapɛngwi bapanzaka ezali mpenza likama, mpo bakoki kotinda biso tótika kotyela bandeko na biso mpe ebongiseli ya Yehova motema. (1 Tim. 4:1, 7; 2 Tim. 2:16) Bansango ya ndenge wana ekoki kolɛmbisa kondima na biso. Tosengeli koboya kondima yango. Mpo na nini? Mpo bansango yango eutaka epai ya “bato babebá makanisi mpe bazali na solo te.” Mokano na bango ezalaka ya kobimisa “ntembe mpe kowelana na maloba.” (1 Tim. 6:4, 5) Balukaka kotinda biso tóndima lokuta na bango mpe tótika kotyela bandeko na biso motema. w20.09 29 par. 13, 15
Mwaminei, 9 sanza ya 6
[Koluka] litomba na [yo] moko te, kasi oyo ya moto mosusu.—1 Ko. 10:24.
Mwasi ná mobali basengeli komoniselana bolingo mpe limemya. (Ef. 5:33) Biblia eteyaka ete tosengeli kopesaka basusu na esika ya kozwaka. (Mis. 20:35) Ezaleli nini ekosalisa mwasi ná mobali bámoniselana bolingo mpe limemya? Komikitisa. Komikitisa esalisi babalani mingi bázala na esengo na mabala na bango. Na ndakisa, mobali moko na nkombo Steven alobi boye: “Soki mwasi ná mobali bazali kosala na bomoko, yango ekosalisa bango mingimingi ntango mikakatano ebimi. Na esika okanisaka ‘nini ezali malamu mpo na ngai?’ osengeli nde kokanisaka ‘nini ezali malamu mpo na biso?’” Mwasi na ye Stephanie akanisaka mpe bongo. Alobi boye: “Moto moko te asepelaka kozala ntango nyonso na moto oyo aswanisaka ye. Soki matata ebimi, tolukaka koyeba nini ebimisi likambo yango. Na nsima tobondelaka, tosalaka bolukiluki mpe tosololaka mpo na koyeba ndenge ya kosilisa yango. Tolukaka nde kosilisa likambo, kasi te kobundisa moninga.” Mwasi ná mobali bazalaka mpenza na esengo, soki mokomoko azali kokanisa te ete azali na ntina mingi koleka mosusu. w20.07 3-4 par. 5-6
Mwamitano, 10 sanza ya 6
Nazalaki kokende liboso mpenza na kati ya lingomba ya Bayuda koleka bato mingi ya mbula na ngai na ekólo na ngai.—Gal. 1:14.
Tosengeli te kotya motema na makasi to mpe na makoki na biso moko ntango tozali kosalela Yehova. Ntoma Paulo atángaki na iniversite yango mpe ateyamaki epai ya Gamaliele, Moyuda moko oyo bato bazalaki komemya mingi na ntango wana. (Mis. 5:34; 22:3) Mpe na ntango moko boye, Bayuda bazalaki komemya Paulo mingi. (Mis. 26:4) Atako bongo, Paulo amityelaki motema te. Paulo asepelaki kotika biloko oyo esalaki ete bato ya mokili bámona ete azali na ntina mingi. (Flp. 3:8) Paulo akutanaki na mikakatano mingi ndenge akómaki moyekoli ya Kristo. Bato ya ekólo na ye moko bayinaki ye. (Mis. 23:12-14) Baroma, bato ya ekólo na ye moko, babɛtaki ye mpe batyaki ye na bolɔkɔ. (Mis. 16:19-24, 37) Lisusu, Paulo ayebaki ete azalaki moto ya kozanga kokoka mpe ete ezalaki mpasi mpo asala likambo ya malamu. (Rom. 7:21-25) Kasi, atikaki te kolanda Kristo mpo na mikakatano oyo akutanaki na yango to mpe mpo na mabunga oyo asalá. Kutu azalaki nde “kosepela na bolɛmbu.” Mpo na nini? Mpo azalaki komona ndenge Nzambe azalaki kosalisa ye na ntango oyo azalaki na bolɛmbu.—2 Ko. 4:7; 12:10. w20.07 16 par. 7-8
Mwapɔsɔ, 11 sanza ya 6
Moto oyo azali kondimela ngai . . . akosala misala ya minene koleka oyo.—Yoa. 14:12.
Lelo oyo, tosengeli kotyela mosala ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi likebi mingi. Yesu asakolaki ete bayekoli na ye bakokoba kosakola nsango malamu nsima ya liwa na ye mpe bakosala mosala yango mingi koleka ye. Nsima ya lisekwa na ye, Yesu asalaki likamwisi oyo esalisaki bayekoli na ye bákanga mbisi ebele. Asalelaki libaku yango mpo na komonisa bayekoli na ye ete mosala ya koluka bato ezalaki na ntina mingi koleka mosala mosusu nyonso. (Yoa. 21:15-17) Liboso amata na likoló, Yesu ayebisaki bayekoli na ye ete mosala ya kosakola oyo ye abandisaki ekosuka kaka na Yisraele te kasi ekosalema mpe tii na bamboka ya mosika mpenza. (Mis. 1:6-8) Bambula mingi na nsima, Yesu asalisaki ntoma Yoane na nzela ya emonaneli amona makambo oyo ekosalema “na mokolo ya Nkolo.” Kati na yango, Yoane amonaki likambo moko ya kokamwa mpenza: Anzelu moko azalaki na “nsango malamu ya seko” ya kosakwela “bikólo nyonso mpe mabota nyonso mpe minɔkɔ nyonso mpe mikili nyonso.” (Em. 1:10; 14:6) Ezali polele ete mokano ya Yehova lelo oyo ezali ete tópesa mabɔkɔ na mosala yango ya kosakola tii ntango akoloba ete esili. w20.09 9 par. 5
Mwalomingo, 12 sanza ya 6
Na kondima Abrahama, ntango amekamaki, tokoki koloba ete akabaki Yisaka mbeka.—Ebr. 11:17.
Libota ya Abrahama ezalaki mpe na mikakatano mosusu ya minene. Mwasi na ye Sara azalaki kobota te. Na boumeli ya bambula mingi, likambo yango ezalaki kopesa libota na bango mpasi. Nsukansuka, Sara apesaki Abrahama mosaleli na ye Agare, mpo abotela bango bana. Kasi ntango Agare akómaki na zemi ya Yishimaele, akómaki kotyola Sara. Likambo yango ekómaki mpasi mpe Sara abenganaki Agare na ndako. (Eba. 16:1-6) Nsukansuka, Sara akómaki na zemi mpe abotelaki Abrahama mwana mobali na nkombo Yisaka. Abrahama alingaki bana yango nyonso mibale, ezala Yishimaele mpe Yisaka. Kasi lokola Yishimaele azalaki konyokola Yisaka, Yehova ayebisaki Abrahama abengana Yishimaele mpe Agare. (Eba. 21:9-14) Nsima ya mwa ntango, Yehova ayebisaki Abrahama apesa Yisaka mbeka. (Eba. 22:1, 2; Ebr. 11:17-19) Na mbala nyonso wana mibale, Abrahama asengelaki kotya motema ete nsukansuka, Yehova akokokisa makambo oyo alobaki mpo na bana yango. w20.08 4 par. 9-10
Mwayambo, 13 sanza ya 6
Bosengeli kolata bomoto ya sika oyo ezalisamaki na boyokani na mokano ya Nzambe na boyengebene mpe bosembo ya solo.—Ef. 4:24.
Kanisá esengo bato oyo bakosekwa bakozala na yango ntango bakosala mbongwana na bomoi na bango mpo na kotosa mitinda ya sembo ya Yehova. Baoyo bakosala mbongwana yango, bakozala na bomoi libela na libela na Paradiso awa na mabele. Kasi Yehova akotika te ete baoyo bakoboya kosala mbongwana bákoba kozala na bomoi na Paradiso mpe bábebisa kimya oyo ekozala kuna. (Yis. 65:20; Yoa. 5:28, 29) Ntango Bokonzi ekoyangela mabele, basaleli nyonso ya Nzambe bakomona bosolo ya maloba oyo ezali na Masese 10:22, oyo elobi ete: “Lipamboli ya Yehova—yango nde ekómisaka moto mozwi, mpe abakisaka mpasi ata moko te na yango.” Na lisalisi ya elimo ya Yehova, basaleli ya Nzambe bakokóma bazwi na elimo, elingi koloba bakokóma lokola Kristo, mpe mokemoke bakokóma bato ya kokoka. (Yoa. 13:15-17; Ef. 4:23) Mpe mokolo na mokolo, nzoto na bango ekokóma lisusu makasi. Ekozala mpenza bomoi moko ya esengo!—Yobo 33:25. w20.08 17 par. 11-12
Mwamibale, 14 sanza ya 6
[Omityela] mokano ya . . . kokɔta na makambo ya bato te.—1 Tes. 4:11.
Tosengeli kobosana te ete ezali na makambo mingi oyo esali ete bandeko mosusu bátikala minzemba. Na ndakisa, basusu bamityelá mokano ya kotikala minzemba. Basusu mpe bazalaka na mposa ya kobala, kasi bazwi naino te sapato ya lokolo na bango. Ekoki mpe kozala ete bakristo mosusu babungisá balongani na bango na liwa. Ata soki batikali minzemba mpo na ntina nini, ebongi mpenza ete bandeko ya lisangá bátunaka bango ntina oyo babali naino te? Ebongi mpenza bálukela bango molongani? Soki asɛngi lisalisi te, okanisi ete akoyoka ndenge nini soki tolobi na ye ete tokolukela ye molongani? (1 Tim. 5:13) Bandeko oyo bazali minzemba, bakozala na botɔndi soki tozali kozwa bango na motuya mpo na bizaleli na bango ya malamu. Na esika tóyokelaka bango mawa mpo bazali minzemba, tosengeli nde kozwaka na motuya bosembo na bango. Soki tosali bongo, bakomiyoka te lokola tozali koloba na bango ete: “Nazali na mposa na yo te.” (1 Ko. 12:21) Kasi, bakomona nde ete tomemyaka bango mpe tozwaka na motuya esika oyo bazali na yango na kati ya lisangá. w20.08 29 par. 10, 14
Mwamisato, 15 sanza ya 6
[Kristo] abimelaki bandeko koleka nkama mitano (500) na mbala moko.—1 Ko. 15:6.
Na nsima, Yesu abimelaki ntoma Paulo ye moko. (1 Ko. 15:8) Paulo, oyo na ntango wana azalaki kobengama Saulo, azalaki kokende na Damasi ntango ayokaki mongongo ya Yesu. Amonaki emonaneli ya nkembo ya Yesu kuna na likoló. (Mis. 9:3-5) Likambo oyo ekómelaki Paulo ezalaki moko ya makambo oyo emonisi ete Yesu asekwaki mpenza. (Mis. 26:12-15) Mpo na bato mosusu, litatoli ya Paulo ezali na ntina mingi mpe esengeli kondimama, mpo na ntango moko boye, anyokolaki bakristo. Na nsima, akómaki kondima mpenza ete Yesu asekwaki, mpe asalaki makasi mpenza mpo andimisa mpe bato mosusu likambo yango. Ayikelaki makambo mingi mpiko. Na ndakisa, babɛtaki ye, akɔtaki bolɔkɔ, mpe azindaki na masuwa ntango azalaki kosakola ete Yesu akufaki kasi azali lisusu na bomoi. (1 Ko. 15:9-11; 2 Ko. 11:23-27) Paulo azalaki kondima mpenza ete Yesu akufaki mpe na nsima asekwaki, yango wana andimaki ata kokufa mpo na kosakola likambo yango. Litatoli ya bakristo ya siɛklɛ ya liboso oyo bandimaki mpenza ete Yesu akufaki mpe na nsima asekwaki, esengeli mpenza kosalisa yo ondima ete Yesu asekwaki, boye te? Mpe yango esengeli kokómisa kondima na yo makasi ete na mikolo ezali koya, bato oyo bakufá bakosekwa. w20.12 3 par. 8-10
Mwaminei, 16 sanza ya 6
Soki boluki [Yehova], akotika bómona ye, kasi soki botiki ye, akotika bino.—2 Nt. 15:2.
Tosengeli komituna boye: ‘Nayanganaka pɔsɔ na pɔsɔ na makita ya lisangá?’ Na makita, tozwaka makasi mpo tókoba kosalela Yehova mpe tozwaka bilendiseli epai ya bandeko na biso. (Mat. 11:28) Tokoki mpe komituna boye: ‘Nazalaka na programɛ na ngai ya koyekola Biblia mbala na mbala?’ Soki ofandaka elongo na bato ya libota na yo, bozalaka na mokolo oyo bosalaka losambo na kati ya libota pɔsɔ na pɔsɔ? Soki ofandaka yo moko, otyá mpe ntango ya koyekola yo moko, lokola nde ozali na kati ya libota? Lisusu, omipesaka na mosala ya kosakola mpe ya kokómisa bato bayekoli na kotalela makoki na yo? Mpo na nini tosengeli komituna mituna yango? Biblia elobi ete Yehova atalaka makanisi mpe makambo oyo ezali na mitema na biso. Yango wana, biso mpe tosengeli kosala bongo. (1 Nt. 28:9) Soki tomoni ete ebongi tóbongola mikano to makanisi na biso, tosengeli kosɛnga Yehova asalisa biso mpo tósala bambongwana yango. Sikoyo nde ntango ya komibongisa mpo na komekama oyo tokokutana na yango. w20.09 19 par. 19-20
Mwamitano, 17 sanza ya 6
Moto nyonso na kati na bino oyo aboyi kopesa biloko na ye nyonso mokɔngɔ akoki kozala moyekoli na ngai te.—Luka 14:33.
Yesu apesaki ndakisa moko mpo na komonisa oyo moto asengeli kosala mpo na kokóma moyekoli na ye. Alobelaki moto oyo alingi kotonga ndako ya molai mpe mokonzi oyo alingi kokende etumba. Yesu alobaki ete motongi ndako asengeli ‘kofanda liboso mpo na koyeba mosolo boni ekosɛnga’ mpo na kosilisa ndako yango, mpe mokonzi asengeli ‘kofanda liboso mpo na kosala likita’ mpo na komona soki basoda na ye bazali na likoki ya kosala makambo oyo bazali na mposa ya kosala. (Luka 14:27-32) Na yango, Yesu ayebaki ete moto oyo alingi kokóma moyekoli na ye asengeli komitalela malamumalamu mpo na koyeba oyo asengeli kosala mpo na kolanda ye. Yango wana, tosengeli kolendisa bayekoli ya Biblia ete tóyekolaka na bango pɔsɔ na pɔsɔ. Lokola ozali moteyi, osengeli komibongisaka malamu liboso ya kokende koyekola na moto. Kanisá moyekoli na yo ya Biblia. Manyolá ndenge okoki koteya ye makambo yango na ndenge ya pɛtɛɛ mpe ya polele mpo akanga ntina na yango malamu mpe asalela yango.—Neh. 8:8; Mas. 15:28a. w20.10 7 par. 5; 8 par. 7
Mwapɔsɔ, 18 sanza ya 6
Yango wana, bókende mpe bókómisa bato bayekoli . . . , bóteya bango bátosa makambo nyonso oyo napesi bino mitindo.—Mat. 28:19, 20.
Malako ya Yesu ezali polele. Tosengeli koteya bato makambo oyo apesaki mitindo. Nzokande, tosengeli te kobosana likambo moko ya ntina mpenza. Yesu alobaki te ete: ‘Bóteya bango makambo nyonso oyo napesi bino mitindo.’ Kasi alobaki nde: Bóteya bango “bátosa makambo nyonso oyo napesi bino mitindo.” Mpo na kotosa malako ya sikisiki oyo Yesu apesaki, tosengeli kaka te koteya moyekoli ya Biblia makambo oyo asengeli kosala, kasi tosengeli mpe kolakisa ye ndenge ya kosala yango. (Mis. 8:31) Ntango toyekolaka Biblia na bato, toteyaka bango makambo oyo Nzambe asɛngaka biso. Kasi tosengeli kosuka kaka wana te. Tosengeli koteya bayekoli na biso ya Biblia básalelaka makambo oyo bazali koyekola na bomoi na bango ya mokolo na mokolo. (Yoa. 14:15; 1 Yoa. 2:3) Ndakisa na biso ekoki kosalisa bayekoli básalela mateya ya ebandeli ya Biblia na kelasi, na mosala, to mpe ntango bazali kozwa mwa mopɛpɛ. Ntango tozali elongo na bayekoli na biso ya Biblia, tokoki kobondela Yehova mpe kosɛnga ye akamba bango na elimo santu na ye.—Yoa. 16:13. w20.11 2-3 par. 3-5
Mwalomingo, 19 sanza ya 6
“Na limpinga ya basoda te, na nguya mpe te, kasi nde na elimo na ngai,” Yehova ya mampinga alobi bongo.—Zek. 4:6.
Bayekoli ya Yesu bakutanaki na mikakatano. Na ndakisa, barulo ya Makomami ezalaki mingi te. Bazalaki te na mikanda oyo elimbolaka Biblia ndenge tozali na yango lelo. Mpe bayekoli basengelaki kosakwela bato oyo bazalaki koloba minɔkɔ ndenge na ndenge. Atako bakutanaki na mikakatano nyonso wana, bayekoli yango ya molende basalaki mosala moko ya kokamwa mpenza. Na boumeli ya mbula soki 30 mpamba, basakolaki nsango malamu epai ya “bato ya bikólo nyonso oyo ezali na nse ya lola.” (Kol. 1:6, 23) Na mikolo na biso, Yehova azali kokoba kotambwisa basaleli na ye mpe kopesa bango makasi. Azali kotambwisa biso mingimingi na nzela ya Biblia, Liloba na ye oyo ekomamaki na litambwisi ya elimo santu. Na Liloba na ye, totángaka makambo etali mosala oyo Yesu asalaki mpe ndenge oyo apesaki bayekoli na ye mitindo ete bákoba mosala oyo ye abandisaki. (Mat. 28:19, 20) Yehova aponaka bilongi te; asakolaki ete nsango malamu ekosakolama na “bikólo nyonso mpe mabota nyonso mpe minɔkɔ nyonso mpe mikili nyonso.” (Em. 14:6, 7) Alingi ete moto nyonso ayoka nsango ya Bokonzi. w20.10 21 par. 6-8
Mwayambo, 20 sanza ya 6
Okobikisa bato ya komikitisa; kasi miso na yo etɛmɛli bato ya lolendo mpo okitisa bango.—2 Sa. 22:28.
Mokonzi Davidi alingaki “mobeko ya Yehova.” (Nz. 1:1-3) Davidi ayebaki ete Yehova abikisaka bato ya komikitisa kasi atɛmɛlaka bato ya lolendo. Yango wana, Davidi atikaki ete mobeko ya Nzambe esembola makanisi na ye. Akomaki boye: “Nakopambola Yehova moto apesi ngai toli. Ya solo mpenza, na butu bangɛi na ngai esemboli ngai.” (Nz. 16:7) Soki tozali na komikitisa, tokotika Liloba ya Nzambe esembola makanisi ya mabe oyo tozali na yango liboso etinda biso tósala makambo ya mabe. Liloba ya Nzambe ekozala lokola mongongo oyo ezali koyebisa biso ete: “Nzela yango oyo. Bótambola na yango.” Ekokebisa biso soki tobandi kosala likambo moko ya mabe. (Yis. 30:21) Soki tozali koyoka Yehova, tokozwa mapamboli mingi. (Yis. 48:17) Na ndakisa, tokoboya kosala makambo oyo ekoyokisa biso nsɔni mpe oyo ekosɛnga básembola biso. Mpe tokopusana penepene na Yehova mpo toyebi ete asalelaka biso makambo ndenge tata ya bolingo asalaka.—Ebr. 12:7. w20.11 20 par. 6-7
Mwamibale, 21 sanza ya 6
Ntango bayokaki likambo ya lisekwa ya bakufi, bamosusu babandaki kotyola.—Mis. 17:32.
Ekoki kozala ete bato mosusu ya Korinti bakómaki mpe na makanisi ya ndenge wana. (1 Ko. 15:12) Ekoki mpe kozala ete bamosusu bazalaki kozwa liteya ya lisekwa na ndenge ya elilingi. Bazalaki kokanisa ete soki moto azali mosumuki ezali lokola “akufi,” mpe soki akómi mokristo ezali lokola azongi na “bomoi.” Ata soki ezalaki mpo na ntina nini, koboya kondima liteya ya lisekwa emonisaki ete kondima na bango ezalaki mpamba. Soki Nzambe asekwisaka Yesu te, lisiko mpe elingaki kofutama te, mpe masumu ya bato elingaki kolimbisama te. Yango wana, bato oyo bandimaka lisekwa te bazali ata na elikya moko te ya solosolo. (1 Ko. 15:13-19; Ebr. 9:12, 14) Ntoma Paulo ye moko ayebaki malamu ete “Kristo alamukaki uta na bakufi.” Lisekwa ya Yesu eleki lisekwa ya bato nyonso oyo basekwaki liboso na ye, mpo bato yango bakufaki lisusu. Paulo alobaki ete Yesu azalaki “mbuma ya liboso ya baoyo balali na kati ya liwa.” Azalaki moto ya liboso oyo asekwaki mpe akómaki ekelamu ya elimo, mpe na nsima amataki na likoló.—1 Ko. 15:20; Mis. 26:23; 1 Pe. 3:18, 22. w20.12 5 par. 11-12
Mwamisato, 22 sanza ya 6
Bazalaki kopesa baoyo bazalaki kuna mitindo oyo bantoma ná bankulutu . . . bakamataki mpo bátosa yango.—Mis. 16:4.
Na siɛklɛ ya liboso, lisangani ya mikóló-bakambi ezalaki kosala na bomoko mpo kimya ezala mpe makambo etambola na molɔngɔ na kati ya basaleli ya Nzambe. (Mis. 2:42) Na ndakisa, ntango likambo ya kokatama ngenga ebimaki soki na mobu 49 ya ntango na biso, lisangani ya mikóló-bakambi, na litambwisi ya elimo santu, etalelaki likambo yango. Soki lisangá etikalaka kaka na bokabwani mpo na likambo yango, mbɛlɛ mosala ya kosakola ekokaki lisusu kosalema malamu te. Atako bantoma ná bankulutu bazalaki Bayuda, batikaki te ete bonkɔkɔ ya Bayuda etambwisa bango mpe balandaki te makanisi ya baoyo bazalaki koteya liteya yango makasi. Kasi, balukaki nde litambwisi ya Liloba ya Nzambe mpe ya elimo santu. (Mis. 15:1, 2, 5-20, 28) Yango ebotaki mbuma nini? Yehova apambolaki ekateli na bango, kimya mpe bomoko ekobaki kozala na kati ya lisangá, mpe mosala ya kosakola ekobaki kokende liboso. (Mis. 15:30, 31; 16:5) Na mikolo na biso, ebongiseli ya Yehova ezali kosalisa biso mpo tóbatela kimya mpe makambo etambola na molɔngɔ. w20.10 22-23 par. 11-12
Mwaminei, 23 sanza ya 6
Mwana na ngai Salomo, [azali] moto oyo Nzambe aponi.—1 Nt. 29:1.
Ezali na makambo mingi oyo ekoki kosala ete tózwa te mokumba moko oyo tolingaka mingi, na ndakisa, bobange, maladi to makambo mosusu ya bomoi. Soki ezali bongo mpo na biso, tokoki kozwa liteya na ndakisa ya Mokonzi Davidi. Mokonzi Davidi azalaki na mposa makasi ya kotongela Nzambe tempelo. Kasi ntango ayebaki ete baponaki nde moto mosusu mpo na kosala mosala yango, Davidi apesaki moto yango mabɔkɔ mpo akokisa mokumba oyo Nzambe apesaki ye. Kutu Davidi apesaki wolo ná palata ebele mpenza mpo na mosala yango. Oyo nde ndakisa malamu mpenza oyo tosengeli kolanda! (2 Sa. 7:12, 13; 1 Nt. 29:3-5) Hugues, ndeko mobali moko oyo afandaka na France, atikaki mokumba na ye ya nkulutu mpo akómaki kobɛla mpe azalaki lisusu kokoka te kosala ata misala mikemike ya ndako. Akomi boye: “Na ebandeli, nazalaki komona ete nazali na ntina te mpe nalɛmbaki mpenza nzoto. Kasi na nsima, namonaki ete ezali na ntina natika kozala mawamawa mpo na makambo oyo nakokoka kosala lisusu te. Yango esalaki ete nazala na esengo mpo na makambo oyo nakoki kosala na mosala ya Yehova. Ndenge kaka Gideone ná mibali nkama misato oyo bazalaki elongo na ye batikaki te kobunda atako balɛmbaki, ngai mpe nazwi ekateli ya kotika te!”—Bas. 8:4. w20.12 25 par. 14-15
Mwamitano, 24 sanza ya 6
Tókoba kolingana.—1 Yoa. 4:7.
Soki osangisi mokanda oyo Matai, Marko mpe Luka bakomaki mpo na bomoi ya Yesu mpe okokanisi yango na oyo Yoane akomaki, okomona ete mokanda ya Yoane nde esaleli liloba “bolingo” mpe “alingaki” mbala mingi koleka mikanda na bango nyonso. Mokanda na ye ezali koteya biso ete bolingo nde esengeli kotambwisa makambo nyonso oyo bakristo basalaka. (1 Yoa. 4:10, 11) Kasi esɛngaki ntango mingi mpenza liboso Yoane akanga ntina ya likambo yango. Ntango Yoane azalaki elenge, azalaki ntango nyonso te komonisa bolingo. Na ndakisa, mokolo moko, Yesu ná bayekoli na ye bazalaki koleka na Samaria mpo na kokende na Yerusaleme. Bato ya mwa mboka moko ya Samaria baboyaki koyamba bango. Yoane asɛngaki Yesu apesa bango nzela bábenga mɔtɔ euta na likoló mpe ekitela bato nyonso ya mwa mboka yango mpe eboma bango! (Luka 9:52-56) Mokolo mosusu, Yoane ná ndeko na ye Yakobo nde batindaki mama na bango asɛnga Yesu apesa bango bisika ya lokumu elongo na Yesu na Bokonzi ya Nzambe. Ntango bantoma mosusu bayebaki likambo yango, basilikaki! (Mat. 20:20, 21, 24) Kasi, atako Yoane asalaki mabunga nyonso wana, Yesu azalaki kolinga ye kaka.—Yoa. 21:7. w21.01 8-9 par. 3-4
Mwapɔsɔ, 25 sanza ya 6
Kristo . . . amisepelisaki te.—Rom. 15:3.
Yehova azwaka bikateli mpo na bolamu ya bato mosusu. Na ndakisa, akelaki bomoi mpo na litomba ya ye moko te, kasi mpo alingaki ete biso mpe tósepela na yango. Moto moko te akokaki kotinda ye na makasi apesa mwana na ye mpo na kozipa masumu na biso. Ye moko nde andimaki kopesa mbeka yango mpo na bolamu na biso. Yesu mpe azwaki bikateli mpo na matomba ya bato mosusu. Na ndakisa mokolo moko, na esika apema mpo alɛmbaki makasi, andimaki koteya ebele ya bato. (Mrk. 6:31-34) Tata ya libota ya malamu ayebaka ete moko ya makambo oyo eleki mpasi ezali ya kozwa bikateli mpo na bato ya libota na ye, mpe azwaka mokumba yango na lisɛki te. Aboyaka kozwa bikateli oyo ezangá motó ná makolo. Azwaka mpe te bikateli kaka na kotalela ndenge azali komiyoka. Kasi atikaka ete Yehova ateya ye ndenge ya kozwa bikateli ya malamu. (Mas. 2:6, 7) Kosala bongo ekosalisa ye akanisa matomba ya bato mosusu, kasi oyo ya ye moko te. (Flp. 2:4) Soki tata ya libota asali makasi alanda ndakisa ya Yehova mpe ya Yesu, akozala tata ya libota moko ya malamu. w21.02 7 par. 19-21
Mwalomingo, 26 sanza ya 6
Asa asalaki makambo oyo ezali malamu mpe sembo na miso ya Yehova Nzambe na ye.—2 Nt. 14:2.
Ntango Mokonzi Asa azalaki elenge, azalaki na komikitisa mpe na mpiko. Na ndakisa, ntango akómaki mokonzi na esika ya tata na ye Abiya, Asa asalaki mosala makasi mpo na kosilisa losambo ya bikeko na ekólo mobimba. Lisusu, Asa “alobaki na Yuda báluka Yehova Nzambe ya bankɔkɔ na bango mpe bátosa mobeko mpe mitindo” ya Yehova. (2 Nt. 14:1-7) Mpe ntango Zera moto ya Etiopi ná basoda milio moko bayaki mpo na kobundisa Yuda, Asa asɛngaki Yehova asalisa ye na maloba oyo: “Ee Yehova, ezala bato bazali mingi, ezala bazali na makasi te, yo osalisaka kaka. Salisá biso, ee Yehova, Nzambe na biso, mpo totyeli yo motema.” Maloba yango ya kitoko, emonisi ndenge Asa azalaki na kondima makasi ete Yehova akobikisa ye ná bato na ye. Asa atyelaki Tata na ye ya likoló motema, mpe “Yehova alongaki bato ya Etiopi.” (2 Nt. 14:8-12) Na ntembe te, kobundisa limpinga ya basoda milio moko ezalaki mokakatano monene mpenza. Kasi lokola Asa alongaki bango. w21.03 5 par. 12-13
Mwayambo, 27 sanza ya 6
Bólinganaka na motema.—Rom. 12:10.
Biblia ezali na masolo ya bato ya kozanga kokoka oyo balinganaki mpenza na bolingo ya bondeko. Tótalela ndakisa ya Yonatane ná Davidi. Biblia elobi ete: “Molimo ya Yonatane ekanganaki na molimo ya Davidi, mpe Yonatane akómaki kolinga ye lokola molimo na ye moko.” (1 Sa. 18:1) Yehova aponaki Davidi akóma mokonzi nsima ya Saulo. Na nsima, Saulo akómaki koyina Davidi mpe alukaki koboma ye. Kasi, Yonatane, Mwana ya Saulo, apesaki tata na ye mabɔkɔ te ntango azalaki koluka koboma Davidi. Yonatane ná Davidi bapesanaki elaka ete bakotikala baninga mpe bakosalisana ntango nyonso. (1 Sa. 20:42) Ezali mpenza likambo ya kokamwa ndenge Yonatane ná Davidi bazalaki baninga ya motema, nzokande ezali na makambo mingi oyo ekokaki kopekisa bango bázala baninga. Na ndakisa, Yonatane alekaki Davidi na mbula soki 30. Yonatane akokaki koloba ete akoki te kozala moninga ya mwana moke boye oyo ayebaki makambo mingi te lokola ye. Kasi, Yonatane akanisaki bongo te; azalaki mpenza komemya Davidi. w21.01 21-22 par. 6-7
Mwamibale, 28 sanza ya 6
Bómona yango esengo mpenza, bandeko na ngai, ntango bozali kokutana na mikakatano ndenge na ndenge.—Yak. 1:2.
Yesu alakaki bayekoli na ye ete bakozala na esengo ya solosolo. Ayebisaki mpe baoyo balingaka ye ete bakokutana na mikakatano. (Mat. 10:22, 23; Luka 6:20-23) Kozala bayekoli ya Kristo epesaka biso esengo. Kasi, toyokaka ndenge nini soki bato ya libota na biso bazali koluka kopekisa biso kosalela Yehova, soki baguvɛrnema ezali konyokola biso, to mpe soki baninga na biso ya mosala to mpe ya kelasi bazali koluka kotinda biso tósala likambo moko oyo ezali mabe? Na ntembe te, tokoki kobanga soki tokanisi makambo yango nyonso. Mpo na bato mingi, minyoko ezali te likambo oyo ekoki kopesa moto esengo. Nzokande Liloba ya Nzambe esɛngi biso tótalelaka minyoko ndenge wana te. Na ndakisa, Yakobo akomaki ete tosengeli te komitungisa koleka ndelo ntango tokutani na mikakatano. Tosengeli nde komona yango lokola likambo ya esengo. (Yak. 1:2, 12) Mpe Yesu alobaki ete tosengeli kosepela ata ntango bazali konyokola biso. (Mat. 5:11) Na litambwisi ya elimo ya Yehova, Yakobo akomelaki bakristo yango mokanda mpe apesaki bango batoli oyo esengelaki kosalisa bango bákoba kobatela esengo na bango atako bazalaki kokutana na minyoko. w21.02 26 par. 1-2; 27 par. 5
Mwamisato, 29 sanza ya 6
[Boyá] bilobaloba ya mpamba oyo ebebisaka makambo oyo ezali mosantu.—1 Tim. 6:20.
Na mikolo ya Timote, bakristo mosusu bazwaki na motuya te libaku oyo bazalaki na yango ya kozala bato oyo bazali kosala elongo na Nzambe. Kati na bango tokoki kotánga Demasi, Figele, Hermogene, Himene, Alezandre, mpe Filete. (1 Tim. 1:19, 20; 2 Tim. 1:15; 2:16-18; 4:10) Emonani ete liboso, mibali yango nyonso bazalaki makasi na elimo, kasi na nsima bazalaki lisusu kozwa na motuya te biloko oyo Yehova apesaki bango. Ndenge nini Satana alukaka kotinda biso tósundola biloko ya motuya oyo Yehova abombá epai na biso? Tótalela ndambo ya mayele mabe oyo Satana asalelaka. Mpo na kotinda biso tókanisa mpe tósala makambo oyo ekotinda biso mokemoke tótika kolinga mpe kotosa mibeko ya Yehova, Satana asalelaka televizyo, bafilme, Internet, babuku, mpe bansango oyo ebimaka na bazulunalo. Asalelaka mpe minyoko to baninga mpo bábangisa biso mpo tótika kosakola. Alukaka mpe kotinda biso tólanda “‘boyebi’ ya lokuta” ya bapɛngwi mpo tótika solo. Soki tozali ekɛngɛ te, tokoki kobanda kotika solo mokemoke.—1 Tim. 6:21. w20.09 27 par. 6-8
Mwaminei, 30 sanza ya 6
Yehova akoyoka mpenza lilɔmbɔ na ngai mpo na koluka kondimama; Yehova ye moko akondima libondeli na ngai.—Nz. 6:9.
Moninga to ndeko moko ya libota asalaki yo likambo moko oyo epesaki yo mpasi na motema? Soki ezali bongo, okoki kozwa mateya soki oyekoli lisolo ya Abisalome, mwana ya mokonzi Davidi. (2 Sa. 15:5-14, 31; 18:6-14) Sikoyo lokola lisolo yango ezali na makanisi na yo, yebisá Yehova ndenge oyo ozali komiyoka mpo na makambo ya mabe oyo basalelaki yo. (Nz. 6:6-9) Na nsima, meká komona na makanisi ndenge oyo Davidi amiyokaki mpo na makambo nyonso oyo ekómelaki ye. Davidi azalaki kolinga Abisalome mpe kotyela Ahitofele motema. Kasi bango nyonso mibale basalaki makambo oyo epesaki ye mpasi na motema. Bapesaki ye mpasi mpenza, mpe balukaki ata koboma ye. Davidi akokaki kokanisa ete baninga na ye mosusu mpe basanganaki na Abisalome, mpe akokaki kotika kotyela bango motema. Akokaki kokanisa kaka makambo na ye moko mpe koluka kokima ekólo kaka ye moko. To mpe akokaki mpenza kolɛmba nzoto. Kasi abondelaki Yehova mpo asalisa ye. Asɛngaki mpe baninga na ye básalisa ye. Mpe asalaki mbala moko makambo oyo asengelaki kosala. Akobaki kotyela Yehova mpe baninga na ye mosusu motema. w21.03 15 par. 7-8; 17 par. 10-11