Sanza ya 7
Mwamitano, 1 sanza ya 7
Bapesi ngai bokonzi nyonso na likoló mpe na mabele.—Mat. 28:18.
Tosengeli kozala na boyokani malamu na Yesu mpo Nzambe ayanola mabondeli na biso. Mpo na yango, tosengeli kosuka kaka te na kosalela maloba “na nkombo ya Yesu” ntango tozali kobondela. Tosengeli nde kondima ndenge oyo Yehova asalelaka Yesu mpo na koyanola na mabondeli na biso. Yesu ayebisaki bantoma na ye ete: “Nyonso oyo bokosɛnga na nkombo na ngai, nakosala yango.” (Yoa. 14:13) Atako Yehova nde ayokaka mpe ayanolaka na mabondeli na biso, apesi Yesu bokonzi ya kokokisa bikateli na Ye. Na yango, liboso ayanola na mabondeli na biso, atalaka soki tosalelaka toli ya Yesu oyo apesaki biso. Na ndakisa, Yesu alobaki: “Soki bozali kolimbisa bato mabunga na bango, Tata na bino ya likoló akolimbisa mpe bino; kasi soki bozali kolimbisa bato mabunga na bango te, Tata na bino akolimbisa mpe mabunga na bino te.” (Mat. 6:14, 15) Na yango, ezali na ntina mingi tósalela basusu makambo ndenge tolingi ete Yehova ná Yesu básalela biso! w20.04 22 par. 6
Mwapɔsɔ, 2 sanza ya 7
Tozali kosakola nsango malamu epai na bino, mpo bótika makambo wana ya mpamba mpe bóya epai ya Nzambe ya bomoi.—Mis. 14:15.
Ntoma Paulo asosolaki makambo oyo bayoki na ye bazalaki kosepela na yango, na nsima ayokanisaki yango na lisolo na ye. Na ndakisa, ebele ya bato oyo bazalaki koyoka ye na Listra bayebaki kaka moke to mpe bayebaki Makomami te. Na yango, Paulo alobelaki makambo oyo bakokaki koyeba. Alobelaki bileko ya kobuka mbuma mpe likoki ya kosepela na bomoi. Asalelaki maloba mpe bandakisa oyo bayoki na ye bakokaki kokanga ntina na yango mbala moko. Salelá bososoli mpo oyeba makambo oyo bato ya teritware na bino basepelaka na yango mpe yokanisá yango na lisolo na yo. Wana ozali kopusana na ndako ya moto, ndenge nini okoki koyeba likambo oyo esepelisaka ye? Yebá kosalela miso. Ntango mosusu azali kosala bilanga, azali kotánga mokanda moko, azali kobongisa motuka, to mpe azali kosala mosala mosusu. Soki ebongi, okoki kolobela likambo oyo azali kosala ntango obandi lisolo. (Yoa. 4:7) Ata molato ya moto ekoki kosalisa yo oyeba ye mwa moke; ntango mosusu emonisi ekólo oyo auti, mosala oyo asalaka, to ekipi ya masano oyo akumisaka. w20.04 11 par. 11-12
Mwalomingo, 3 sanza ya 7
[Bóbwakela Nzambe] mitungisi na bino nyonso, mpo atyelaka bino likebi.—1 Pe. 5:7.
Bandeko mosusu oyo bazalaka na mokakatano ya komitungisa koleka ndelo bazalaka motema likolólikoló na boyokani na bango na basusu na makambo ya mokolo na mokolo. Ekoki kozala mpasi mpo na bango kozala esika ya bato ebele, kasi bakobaka koyangana na makita ya lisangá, na mayangani ya mike mpe ya minene. Bazalaka na mokakatano ya kosolola na bato oyo bayebi te, kasi basololaka na bato na mosala ya kosakola. Soki ezali bongo mpo na yo, yebá ete ozali yo moko te. Bandeko mingi bazali kobundana na mikakatano ya ndenge wana. Kobosana mpe te ete Yehova asepelaka na milende oyo osalaka na molimo na yo mobimba. Lokola ozali naino koyika mpiko, yango emonisi ete azali kopambola yo mpe kopesa yo makasi oyo osengeli na yango. (Flp. 4:6, 7) Soki ozali kosalela Yehova atako maladi ya nzoto to ya makanisi, zalá na elikya ete ozali kosepelisa ye. Mingi kati na biso tozali nzoto kolɔngɔnɔ te, kasi tozali kokoba koyika mpiko. (2 Ko. 4:16) Na lisalisi ya Yehova, biso nyonso tokopota mbangu mpo na bomoi tii na nsuka! w20.04 31 par. 20-21
Mwayambo, 4 sanza ya 7
Bizaleli na ye oyo emonanaka te ezali komonana polelepolele . . . na nzela ya biloko oyo asalá.—Rom. 1:20.
Ndenge oyo Nzambe asalá mabele, emonisaka mpenza ete azali na bwanya. (Ebr. 3:4) Mabele ezali na biloko nyonso oyo esengeli mpo moto azala na bomoi. Na molɔ́ngɔ́, mabele ezali lokola masuwa oyo ezali kotepatepa na mbu. Kasi bokeseni monene ezali kati na masuwa oyo etondi na bato mpe mabele. Na ndakisa, soki tolobi ete bato oyo bazali na kati ya masuwa moko básala mopɛpɛ na bango moko mpo na kopema, biloko na bango moko ya kolya, mai na bango moko, mpe bábwakaka te bosɔtɔ na bango na libanda ya masuwa, bato yango bakoumela ntango boni? Na ntembe te, ekoumela te mpo bákufa. Nzokande, mabele ezali na likoki ya kobatela bomoi ya ebele ya bato mpe ya banyama. Ezali na mopɛpɛ ya kitoko, bilei mpe mai oyo tosengeli na yango; mpe biloko yango esilaka te. Lisusu, atako mabele ebwakaka bosɔtɔ na yango libándá te, ezalaka ntango nyonso kitoko mpe ezali esika oyo ebongi mpo na kofanda. Mpo na nini esalemaka bongo? Mpo Yehova asalá mabele na likoki ya kobongola eloko moko ya bosɔtɔ mpo ekóma eloko moko ya malamu mpo mabele esalela yango lisusu. w20.05 20 par. 3-4
Mwamibale, 5 sanza ya 7
Bokokufa soki moke te.—Eba. 3:4.
Satana azalaki koyebisa Eva ete Yehova azali mobuki lokuta. Na ndenge yango, Satana akomaki Zabolo to moto oyo akoselaka bato makambo. Eva akosamaki mpe andimelaki Satana. (1 Tim. 2:14) Lokola Eva atyelaki Satana motema mingi koleka Yehova, azwaki ekateli moko ya mabe mpenza. Aboyaki kotosa Yehova mpe alyaki mbuma ya nzete oyo Yehova apekisaki bango. Na nsima, apesaki mpe Adama. (Eba. 3:6) Meká kokanisa makambo oyo Eva akokaki koyebisa Satana. Na ndakisa soki ayebisaka Satana boye: “Nayebi yo te, kasi nayebi Yehova Tata na ngai, nalingaka ye mpe natyelaka ye motema. Apesi ngai ná mobali na ngai nyonso oyo tozali na yango. Mpo na nini ozali koloba makambo ya bongo mpo na ye? Longwa awa!” Yehova alingaki mpenza kosepela koyoka ete mwana na ye ya mwasi azali koloba bongo! (Mas. 27:11) Kasi, Adama ná Eva bazalaki na bolingo ya sembo te epai ya Yehova. Lokola bazangaki bolingo ya ndenge wana, basantisaki nkombo ya Nzambe te. w20.06 4 par. 10-11
Mwamisato, 6 sanza ya 7
Basi oyo bazali koyebisa nsango malamu bazali limpinga moko monene.—Nz. 68:11.
Tosengeli kopesaka bandeko basi longonya mpo na nyonso oyo bazali kosala na mosala ya Yehova. Na ndakisa, kotonga mpe kobatela bandako na biso ya losambo, kopesa mabɔkɔ na bituluku ya minɔkɔ mosusu, mpe kosala lokola bavolontɛrɛ na Betele. Bandeko basi bapesaka mpe mabɔkɔ na mosala ya kosunga bandeko oyo bakutani na makama, basalisaka na kobongola mikanda na biso, mpe basalaka lokola babongisi-nzela mpe bamisionɛrɛ. Longola yango, bandeko basi oyo babalá basalisaka mibali na bango mpo bákokisa mikumba oyo bazali na yango na lisangá mpe na ebongiseli ya Yehova. Soki basi na bango basalisi bango te, bandeko mibali yango bakokoka mpenza te kozala “makabo oyo ezali bato.” (Ef. 4:8) Bankulutu ya bwanya bayebi ete bandeko basi bazali “limpinga moko monene” ya basali ya molende, mpe mbala mingi bazalaka basakoli oyo bayebi mpenza kosakola. Bankulutu bayebaka mpe ete bandeko basi ya sembo, oyo bakɔmɛli na elimo, bayebaka mpenza ndenge ya kosalisa bilenge basi oyo bakutani na mikakatano. (Tito 2:3-5) Ya solo mpenza, tosengeli komonisa botɔndi mpe bolingo mpo na bandeko basi! w20.09 23-24 par. 13-14
Mwaminei, 7 sanza ya 7
Tata na ngai oyo azali na likoló alingaka te ete moko ya bato mike oyo abeba.—Mat 18:14.
Yehova abosanaka te baoyo bazalaki kosalela ye kasi batiká mpo na mwa ntango. Abosanaka mpe te mosala oyo basalelá ye. (Ebr. 6:10) Mosakoli Yisaya asalelaki ndakisa kitoko oyo emonisi ndenge Yehova atyelaka basaleli na ye likebi. Akomaki boye: “Lokola mobateli ya mpate, akobatela etonga na ye moko. Na lobɔkɔ na ye akoyanganisa bana-mpate; mpe akomema yango na ntolo na ye.” (Yis. 40:11) Sikoyo Yehova, Mobateli ya mpate monene, ayokaka ndenge nini soki ndeko moko ya lisangá atiki kosalela ye? Yesu amonisaki ndenge oyo Yehova ayokaka ntango atunaki bayekoli na ye boye: “Bokanisi nini? Soki moto moko azali na bampate nkama moko (100) mpe moko na yango ebungi, akotika ntuku libwa na libwa (99) na bangomba mpe akokende koluka oyo ebungi, boye te? Mpe soki ekómi ete amoni yango, nazali koyebisa bino ya solo, akosepela na yango mingi koleka ntuku libwa na libwa (99) oyo ebungaki te.”—Mat. 18:12, 13. w20.06 19-20 par. 8-9
Mwamitano, 8 sanza ya 7
Soki moto azali koluka kosala mosala ya mokɛngɛli, azali na mposa ya mosala moko ya malamu mingi.—1 Tim. 3:1.
Kosalela Yehova na makoki na biso nyonso, ezalaka lokumu mpenza mpo na biso. (Nz. 27:4; 84:10) Ezali malamu soki ndeko mobali moko alingi kosala mingi na mosala ya Yehova. Kasi ntango azwi mokumba moko, asengeli kokanisa te ete azali na ntina mingi koleka basusu. (Luka 17:7-10) Mokano na ye esengeli kozala ya kosalela basusu na komikitisa nyonso. (2 Ko. 12:15) Biblia ezali na bandakisa ya bato oyo bazalaki kokanisa ete baleki basusu. Na ndakisa, Diotrefese azangaki bopɔlɔ mpe alukaki kozwa “esika ya liboso” na lisangá. (3 Yoa. 9) Na lolendo nyonso, Uziya alukaki kosala likambo moko oyo Yehova asɛngaki ye te asala. (2 Nt. 26:16-21) Lokola Abisalome azalaki na mposa ya kokóma mokonzi, azalaki komonisa lokola nde alingi bato mpo bato yango bápesa ye mabɔkɔ. (2 Sa. 15:2-6) Ndenge emonisami polele na bandakisa yango, Yehova asepelaka te na bato oyo balukaka kaka lokumu na bango moko. (Mas. 25:27) Nsukansuka, bato oyo bazalaka na lolendo mpe balukaka ete basusu bákumisa bango, bakutanaka na mikakatano.—Mas. 16:18. w20.07 4 par. 7-8
Mwapɔsɔ, 9 sanza ya 7
Moto na moto akomema mokumba na ye moko.—Gal. 6:5.
Mabota ya bandeko mosusu ekendá kofanda na ekólo mosusu mpo na kokima mikakatano to mpo na koluka mosala. Yango ekoki kosala ete bana na bango batánga kelasi na monɔkɔ ya libosoliboso oyo elobamaka na ekólo oyo bakei. Ekoki mpe kosɛnga ete baboti na bango báyekola monɔkɔ ya libosoliboso ya ekólo yango mpo bázwa mosala. Soki na ekólo oyo bakei ezali na lisangá to etuluku moko ya monɔkɔ ya mboka na bango, libota yango esengeli kokende na lisangá nini? Basengeli nde kokende na lisangá oyo esalelaka monɔkɔ ya libosoliboso oyo elobamaka na ekólo yango, to na lisangá oyo esalelaka monɔkɔ ya mboka na bango? Tata ya libota asengeli kokata soki libota na ye esengeli kokende na lisangá nini. Lokola ye moko nde asengeli kozwa ekateli, asengeli kotalela matomba ya libota na ye. Tosengeli kotosa ekateli oyo tata ya libota azwi. Ata soki azwi ekateli nini, tosengeli kondima yango, koyamba libota yango na esengo mpe komonisela yango bolingo.—Rom. 15:7. w20.08 30 par. 17-18
Mwalomingo, 10 sanza ya 7
Nzambe aponi biloko ya mokili oyo ezali na bolɛmbu.—1 Ko. 1:27.
Soki tolingi ete Yehova apesa biso nguya, tosengeli kokanisa te ete makasi ya nzoto, bakelasi oyo totángá, mimeseno ya mboka na biso, to biloko ya mosuni nde esalaka ete tózala na ntina mingi. Biloko yango te nde esalaka ete tózala na ntina na miso ya Yehova. Kutu basaleli mingi ya Nzambe bazali te ‘bato ya bwanya na ndenge ya mosuni, bato ya nguya, mpe bato ya lokumu.’ (1 Ko. 1:26) Na yango, kotika te kosalela Yehova ata soki ozangi biloko ya mokili oyo bato mingi bamonaka ete ezali na ntina. Talelá yango nde lokola libaku oyo ekoki kosalisa yo omona ndenge nguya ya Yehova ezali kosala na kati na yo. Na ndakisa, soki ozali kobanga baoyo balukaka kotinda yo otya ntembe na mateya oyo ondimaka, bondelá Yehova apesa yo mpiko ya kolobela bindimeli na yo. (Ef. 6:19, 20) To soki ozali na maladi moko ya makasi oyo eumeli, bondelá Yehova apesa yo makasi ya kosala oyo okoki na mosala na ye. Mbala nyonso oyo omoni ndenge oyo Yehova asalisi yo, kondima na yo ekokola mpe okokóma makasi. w20.07 16 par. 9
Mwayambo, 11 sanza ya 7
[Bóluka] liboso bokonzi.—Mat. 6:33.
Soki tolingi ete Bokonzi ya Nzambe ezala likambo oyo eleki ntina na bomoi na biso, tosengeli kozala lokola Abrahama oyo andimaki komipimela makambo mosusu mpo na kosepelisa Nzambe. (Mat. 6:33; Mrk. 10:28-30) Kokanisa te ete okozala na bomoi oyo ezangi mikakatano. Ata baoyo bapesá bomoi na bango mobimba mpo na kosalela Yehova, bakutanaka mpe na mikakatano. (Yak. 1:2; 1 Pe. 5:9) Lelo oyo, tozali na bantina mingi ya kotya makanisi na bomoi oyo tokozala na yango na mikolo ezali koya. Makambo oyo ezali kosalema na mokili emonisi polele ete tozali na nsuka ya mikolo ya nsuka ya mokili oyo. Moko ya mapamboli oyo ekopesa biso esengo na nse ya boyangeli ya Bokonzi ezali ya komona bandeko to baninga na biso basekwi. Na ntango yango, Yehova akopesa Abrahama mbano mpo na kondima mpe motema molai oyo amonisaki; akosekwisa ye ná bato ya libota na ye awa na mabele. Okozala wana mpo na koyamba bango? Okoki kozala wana soki ondimi komipimela makambo mosusu mpo na Bokonzi ya Nzambe ndenge Abrahama asalaki, soki okobi kobatela kondima na yo atako mikakatano, mpe soki ozeli na motema mobimba Yehova akokisa bilaka na ye.—Mika 7:7. w20.08 5-6 par. 13-14; 7 par. 17
Mwamibale, 12 sanza ya 7
Zalá sembo ata tii na liwa, mpe nakopesa yo motole ya bomoi.—Em. 2:10.
Toyebi ete ata soki banguna na biso babomi biso, Yehova akozongisa biso lisusu na bomoi. Tondimisami ete, ata soki basali nini, yango ekopekisa biso te kosalela Yehova. (Rom. 8:35-39) Yehova amonisi ete azali mpenza na bwanya na ndenge apesi biso elikya ya lisekwa! Elikya yango esalaka ete tóbanga te ata soki baoyo bapesaka Satana mabɔkɔ balobi ete bakoboma biso soki tosali te makambo oyo basɛngi biso. Lisusu, elikya yango epesaka biso mpenza mpiko. Soki baoyo bayinaka Yehova balobi ete bakoboma yo, okotyela Yehova motema ete akosekwisa yo? Ndenge nini okoki koyeba ete okotyela ye motema? Ya liboso, osengeli komituna boye: ‘Bikateli ya mikemike oyo nazwaka mokolo na mokolo, emonisaka ete natyelaka Yehova motema?’ (Luka 16:10) Ya mibale: ‘Lolenge ya bomoi na ngai, emonisaka ete natyaka motema na elaka ya Yehova oyo elobi ete akokokisa bamposa na ngai ya mosuni soki natye Bokonzi na esika ya liboso?’ (Mat. 6:31-33) Soki oyanoli ɛɛ na mituna yango, ekomonisa ete omibongisi mpo na komekama nyonso oyo okoki kokutana na yango na bomoi.—Mas. 3:5, 6. w20.08 17-18 par. 15-16
Mwamisato, 13 sanza ya 7
Salá nyonso oyo ekoki na yo mpo ozala moto oyo andimami na miso ya Nzambe, mosali oyo azali koyoka nsɔni te mpo na mosala na ye, oyo azali kosembola liloba ya solo malamumalamu.—2 Tim. 2:15.
Tosengeli kosala makasi tóyeba kosalela malamu Liloba ya Nzambe. Makita ekoki kosalisa biso tóyeba kosalela Liloba ya Nzambe malamu. Kasi, mpo tóndimisa bato mosusu ete mateya ya Biblia ezali na motuya, biso moko tosengeli kozala na momeseno ya koyekolaka Biblia mbala na mbala. Tosengeli kosalela Liloba ya Nzambe mpo na kokómisa kondima na biso makasi. Yango esuki kaka te na kotánga Biblia. Tosengeli mpe kokanisa na mozindo na makambo oyo tozali kotánga, mpe kosala bolukiluki na mikanda na biso mpo tókanga malamu ntina ya Makomami mpe tósalela yango. (1 Tim. 4:13-15) Soki tosali bongo, tokoyeba kosalela Liloba ya Nzambe mpo na koteya basusu. Yango elimboli kaka te kotángela bango bavɛrsɛ ya Biblia. Tosengeli kosalisa bayoki na biso bákanga ntina ya bavɛrsɛ yango mpe bámona ndenge oyo ekoki kosalisa bango. Na yango, soki tozali koyekola Biblia mbala na mbala, tokokóma bateyi malamu ya Liloba ya Nzambe.—2 Tim. 3:16, 17. w20.09 28 par. 12
Mwaminei, 14 sanza ya 7
Bótya likebi mpenza epai ya [Yesu] . . . , mpo bósila makasi te mpe milimo na bino elɛmba te.—Ebr. 12:3.
Mpo tókoba kotya mosala ya kosakola na esika ya liboso, tosengeli kokanisa makambo nyonso oyo Yehova azali kosala mpo na kosalisa biso. Na ndakisa, azali kopesa biso ebele ya bilei ya elimo na nzela ya mikanda oyo ebimaka na papye to na Internet, biloko ya koyoka, bavideo, mpe TV JW. Kanisá naino: Site Internet na biso ezali na minɔkɔ koleka 1000! (Mat. 24:45-47) Lolenge mosusu oyo tokoki kotya mosala ya kosakola na esika ya liboso ezali ya kolanda ndakisa ya Yesu. Atikaki ata eloko moko te elongola likebi na ye na mosala yango. (Yoa. 18:37) Yesu akweaki te ntango Satana alobaki ete akopesa ye “makonzi nyonso ya mokili ná nkembo na yango.” Akosamaki mpe te ata ntango bato mosusu balukaki kokómisa ye mokonzi. (Mat. 4:8, 9; Yoa. 6:15) Lisusu, Yesu alandaki te mposa ya kokóma na bozwi. Mpe atikaki te ete botɛmɛli makasi oyo akutanaki na yango ebangisa ye. (Luka 9:58; Yoa. 8:59) Ntango kondima na biso emekami, tokotya mosala ya kosakola na esika ya liboso soki tokanisi toli oyo ntoma Paulo apesi na mokapo ya lelo. w20.09 9-10 par. 6-7
Mwamitano, 15 sanza ya 7
Bókóma bamekoli na ngai, ndenge ngai mpe nazali momekoli ya Kristo.—1 Ko. 11:1.
Tozali mpenza na botɔndi ndenge tozali na ebele ya bandeko basi na lisangá, oyo basalaka mosala makasi! Bapesaka biyano mpe basalaka bilakiseli na makita ya lisangá, mpe babimaka na mosala ya kosakola. Basusu bapesaka mabɔkɔ na misala ya kobatela Ndako ya Bokonzi, mpe batyelaka bandeko ya lisangá likebi. Atako bongo, bakutanaka mpe na mikakatano. Bandeko basi mosusu basalisaka baboti na bango oyo bakómi mibange. Basusu bazali koyika mpiko na botɛmɛli ya bato ya libota na bango. Basusu mpe babɔkɔlaka bana bango moko mpe basalaka mosala makasi mpo na kokokisa bamposa ya bana yango. Mpo na nini tosengeli kolendisaka bandeko basi bakristo? Mpo mbala mingi, bato ya mokili bapesaka basi te lokumu oyo babongi na yango. Longola yango, Biblia esɛngaka biso tópesaka bango mabɔkɔ. Na ndakisa, ntoma Paulo alendisaki bandeko ya lisangá ya Roma ete báyamba malamu ndeko mwasi Foebe mpe ‘básalisa ye na likambo nyonso oyo akozala na mposa ya lisalisi.’ (Rom. 16:1, 2) Paulo azalaki na kati ya bato oyo bazalaki komona basi lokola bato mpamba. Kasi ntango akómaki mokristo, amekolaki Yesu mpe akómaki kopesa basi lokumu, mpe kosalela bango makambo na boboto. w20.09 20 par. 1-2
Mwapɔsɔ, 16 sanza ya 7
Bókómisa bato bayekoli . . . , bóteya bango bátosa makambo nyonso oyo napesi bino mitindo.—Mat. 28:19, 20.
Mpo na kosalisa moyekoli na biso ya Biblia akolisa mposa ya kokómisa bato bayekoli, Tokoki kotuna ye mituna lokola oyo: “Na ndenge nini mateya oyo ozali koyekola na Biblia ebongisi bomoi na yo? Okanisi ete bato mosusu mpe basengeli koyoka nsango yango? Okoki kosala nini mpo na kosalisa bango?” (Mas. 3:27; Mat. 9:37, 38) Kobosana te ete Yesu ayebisaki biso tóteya bato “bátosa makambo nyonso” oyo apesaki mitindo. Mibeko mibale oyo eleki monene: kolinga Nzambe mpe kolinga bato, ezali mpe na kati ya makambo yango. Mibeko yango nyonso mibale ezali na boyokani na mosala ya kosakola mpe ya kokómisa bato bayekoli. (Mat. 22:37-39) Soki tosalisi moyekoli na biso ya Biblia atosa mitindo yango, tokosalisa ye asakola. Na ntembe te bayekoli mosusu ya Biblia bakoki kobanga kobima na mosala ya kosakola. Kasi tokoki koyebisa bango ete, na lisalisi ya Yehova, bakoki kotika mokemoke kobanga bato.—Nz. 18:1-3; Mas. 29:25. w20.11 3 par. 6-8
Mwalomingo, 17 sanza ya 7
Tozali kotika te kobondela mpo na bino.—Kol. 1:9.
Ntango ozali kobongisa eteni oyo okoyekola na moto, bondelá Yehova mpo na moyekoli ya Biblia yango mpe makambo oyo asengeli na yango. Sɛngá Yehova asalisa yo oteya ye makambo oyo ezali na Biblia na ndenge oyo ekosimba motema na ye. Kobosana te, mokano na yo ezali ete osalisa ye akola tii azwa batisimo. Moyekoli ya Biblia mpe asengeli kosololaka na Yehova. Na ndenge nini? Ntango azali koyoka Yehova mpe koyebisa ye makambo. Akoki koyoka Nzambe soki azali kotánga Biblia mokolo na mokolo. (Yos. 1:8; Nz. 1:1-3) Akoki kosololaka na Yehova na nzela ya libondeli mokolo na mokolo. Yango wana, saláká libondeli na motema mobimba na ebandeli mpe na nsuka ya boyekoli mokomoko. Bondeláká elongo na moyekoli yango mpe mpo na ye. Lokola azali koyoka mabondeli na yo, akoyeba ndenge ya kobondela na motema mobimba mpe akobanda kobondelaka Yehova Nzambe na nkombo ya Yesu Kristo. (Mat. 6:9; Yoa. 15:16) Kanisá ndenge oyo kotánga Biblia mokolo na mokolo (koyoka Yehova) mpe kobondela (kosolola na Yehova) ekosalisa moyekoli na yo apusana penepene na Nzambe!—Yak. 4:8. w20.10 8 par. 8; 9 par. 10-11
Mwayambo, 18 sanza ya 7
Bósala makasi mpenza mpo na kobatela bomoko ya elimo na ekanganeli ya kimya oyo esangisaka.—Ef. 4:3.
Kaka ndenge ezalaki na siɛklɛ ya liboso, lelo oyo mpe ebongiseli ya Yehova ezali kosala nyonso mpo kimya ezala kati na basaleli ya Nzambe mpe makambo etambola na molɔngɔ. (Mis. 16:4, 5) Na ndakisa, ata soki okei na lisangá mosusu, to mpe na mboka mosusu mpo na kolanda boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, na ntembe te, okoyeba ndenge boyekoli ekosalema mpe lisolo nini bokoyekola. Na mbala moko, okomiyoka te ete ozali mopaya! Kaka elimo ya Nzambe nde ekoki kosala ete bomoko ya boye ezala! (Sef. 3:9) Okoki kosala nini? Omituna boye: ‘Nasalaka nyonso mpo kimya mpe bomoko ezala na kati ya lisangá? Natosaka baoyo bazali kokamba? Bandeko bakoki kotyela ngai motema, mingimingi soki nazali na mikumba na kati ya lisangá? Natosaka ngonga, nasalisaka basusu, mpe nazalaka pene ya kosalela bandeko?’ (Yak. 3:17) Soki omoni ete ezali na esika oyo okoki kobongisa, bondelá Yehova apesa yo elimo santu. Soki otiki ete elimo yango ebongisa bomoto na yo mpe etambwisa misala na yo, bandeko bakolinga yo lisusu mingi mpe bakozwa yo na motuya. w20.10 23 par. 12-13
Mwamibale, 19 sanza ya 7
Bókóma batosi ya liloba, kasi bayoki kaka te.—Yak. 1:22.
Liloba ya Nzambe ezali lokola talatala. (Yak. 1:23-25) Mingi kati na biso tomitalaka na talatala na ntɔngɔ liboso ya kobima. Na ndenge yango, tokoki komona esika oyo tosengeli kobongisa liboso bato mosusu bámona biso. Ndenge moko mpe, soki tozali kotánga Biblia mokolo na mokolo, tokomona ndenge oyo tokoki kosembola makanisi na biso. Bandeko mingi bamonaka ete kotánga mokapo ya mokolo na ntɔngɔ liboso ya kobima esalisaka mpenza. Batikaka ete makambo oyo batángi ebongisa makanisi na bango. Mpe na boumeli ya mokolo, balukaka ndenge ya kosalela toli oyo euti na Liloba ya Nzambe. Longola yango, tosengeli koyekolaka mpe komanyolaka Liloba ya Nzambe mokolo na mokolo. Yango ekoki komonana lokola likambo ya pɛtɛɛ, kasi ezali moko ya makambo oyo eleki ntina oyo tokoki kosala mpo tótikala na nzela ya nkaka oyo ekomema na bomoi. Na maloba mosusu, Liloba ya Nzambe ezali lokola masini babengi scanner, oyo esalisaka mpo na koyeba ndenge kati ya nzoto ya moto ezali. Kasi tosengeli kozala na komikitisa mpo tósalela toli ya Biblia to oyo eutaka epai ya bandeko oyo bazali kokamba. w20.11 18 par. 3; 20 par. 8
Mwamisato, 20 sanza ya 7
Masangá ekobaki mpenza kokóma makasi na kondima mpe bato bazalaki kobakisama mokolo na mokolo.—Mis. 16:5.
Atako mbala mingi bakristo ya siɛklɛ ya liboso bazalaki kokutana na minyoko, bazalaki mpe na bileko ya kimya. Ndenge nini basalelaki bileko yango ya kimya? Bakristo yango ya sembo basakolaki nsango malamu kozanga kotika. Mokanda ya Misala ya bantoma elobi ete bazalaki “kotambola na kobanga Yehova.” Bakristo yango bakobaki kosakola nsango malamu mpe yango esalaki ete ‘bákoba kokola.’ Na ntembe te, Yehova apambolaki milende oyo bamonisaki na mosala ya kosakola na bileko yango ya kimya. (Mis. 9:26-31) Bakristo ya siɛklɛ ya liboso basalelaki mabaku nyonso mpo na kopalanganisa nsango malamu. Na ndakisa, ntango ntoma Paulo amonaki ete porte moko ya monene efungwamelaki ye ntango azalaki na Efese, asalelaki libaku yango mpo na kosakola mpe kokómisa bato bayekoli na engumba yango. (1 Ko. 16:8, 9) Bayekoli basakolaki na molende “nsango malamu ya liloba ya Yehova.” (Mis. 15:30-35) Yango ebotaki mbuma nini? Mokapo ya lelo epesi eyano. w20.09 16 par. 6-8
Mwaminei, 21 sanza ya 7
Liwa eyei na nzela ya moto moko.—1 Ko. 15:21.
Ntango Adama asalaki lisumu, amemaki liwa mpo na ye moko, mpe mpo na bakitani na ye nyonso. Tii lelo tozali komona mpasi mpo na kozanga botosi na ye. Kasi lokola Nzambe asekwisaki Mwana na ye, tozwi likoki ya kozala na bomoi ya malamu na mikolo ezali koya! “Lisekwa ya bakufi eyei mpe na nzela ya moto moko,” Yesu. Ntoma Paulo abakisaki boye: “Mpo kaka ndenge bato nyonso bazali kokufa na kati ya Adama, bato nyonso mpe bakozongisama na bomoi na kati ya Kristo.” (1 Ko. 15:22) Paulo alingaki koloba nini ntango alobaki ete “bato nyonso bazali kokufa na kati ya Adama”? Azalaki kolobela bato nyonso, oyo bazwá libula ya lisumu mpe ya ezaleli ya kozanga kokoka epai ya Adama mpe mpo na yango bakokufa. (Rom. 5:12) Adama azali te na kati ya bato oyo “bakozongisama na bomoi.” Lisiko ya Kristo ekoki kozipa lisumu ya Adama te, mpo azalaki moto ya kokoka kasi aboyaki kotosa Nzambe na nko. Makambo oyo ekómelá Adama ekokómela mpe baoyo “Mwana ya moto” akosambisa bango ete bazali “bantaba,” elingi koloba, “bakokufa liwa ya seko.”—Mat. 25:31-33, 46; Ebr. 5:9. w20.12 5 par. 13-14
Mwamitano, 22 sanza ya 7
Yehova . . . amonaka moto ya komikitisa.—Nz. 138:6.
Soki tozwi te mokumba moko boye, tókanisa ndakisa ya baanzelu ya sembo. Ntango Ahaba, mokonzi mabe, azalaki koyangela, Yehova asɛngaki baanzelu bápesa makanisi mpo na kokosa ye. Baanzelu ndenge na ndenge bapesaki makanisi na bango. Kasi Nzambe aponaki anzelu moko mpe ayebisaki ye ete likanisi na ye nde ekosimba. (1 Bak. 22:19-22) Baanzelu mosusu ya sembo balɛmbaki nde nzoto, to bakanisaki ete balekisi ntango na bango kaka mpamba ndenge bapesaki makanisi na bango? Tokoki koloba bongo te. Baanzelu bazalaka mpenza na komikitisa mpe balingaka ete lokumu nyonso ezonga epai ya Yehova. (Bas. 13:16-18; Em. 19:10) Kobosana te lokumu monene oyo tozali na yango ya kozala Batatoli ya Yehova mpe ya kosakola Bokonzi na ye. Mokumba te nde ekosala ete tózala na motuya na miso ya Nzambe. Tokozala na motuya na miso ya Yehova mpe ya bandeko na biso, soki toyebi esika makoki na biso esuki mpe soki tozali na komikitisa. Yango wana, sɛngáká Yehova asalisa yo mpo oyeba esika makoki na yo esuki mpe ozala na komikitisa. Kanisá bandakisa ya malamu oyo ezali na Biblia ya bato oyo basalelaki Yehova na komikitisa mpe oyo bayebaki esika makoki na bango esukaki. Salá nyonso oyo okoki mpo na kosalela bandeko na yo na bolingo mpenza.—1 Pe. 5:5. w20.12 26 par. 16-17
Mwapɔsɔ, 23 sanza ya 7
Bózwa ekɔti ya lobiko, mpe mopanga ya elimo, elingi koloba, liloba ya Nzambe.—Ef. 6:17.
Ekɔti ya lobiko ezali elikya oyo Yehova apesaka biso; elikya oyo emonisi ete akopesa mbano na baoyo nyonso basalaka mokano na ye, mpe ata soki tokufi akosekwisa biso. (1 Tes. 5:8; 1 Tim. 4:10; Tito 1:1, 2) Elikya ya lobiko ebatelaka likoki na biso ya kokanisa. Esalisaka biso tótya makanisi na biso nyonso na bilaka ya Nzambe mpe esalisaka biso tótalela mikakatano na biso na ndenge ebongi. Tolataka ekɔti yango na ndenge totikaka makanisi na biso eyokana na oyo ya Nzambe. Na ndakisa, totyaka elikya na biso te na bomɛngo oyo ekoki kobunga lelo to lobi kasi nde epai ya Nzambe. (Nz. 26:2; 104:34; 1 Tim. 6:17) Mopanga ya elimo ezali Biblia, Liloba ya Nzambe. Mopanga yango ezali na nguya ya komonisa polele lokuta mpe ya kolongola bato na boombo ya mateya ya lokuta mpe mimeseno ya mabe. (2 Ko. 10:4, 5; 2 Tim. 3:16, 17; Ebr. 4:12) Toyekolaka kosalela mopanga yango malamumalamu ntango tosalaka boyekoli na biso moko ya Liloba ya Nzambe mpe ntango tozwaka formasyo oyo ebongiseli ya Nzambe epesaka biso.—2 Tim. 2:15. w21.03 27 par. 4; 29 par. 10-11
Mwalomingo, 24 sanza ya 7
Bamemaki ngai na esanga oyo babengi Patimosi mpo nazalaki kolobela Nzambe mpe kotatola mpo na Yesu.—Em. 1:9.
Ata ntango batyaki ntoma Yoane na bolɔkɔ mpo azalaki kosakola makambo etali Yesu, amonisaki mpenza ete azalaki kolinga bato. Na ndakisa, akomaki emoniseli oyo bapesaki ye, mpe atindaki yango na masangá mpo báyeba makambo oyo “esengeli kosalema nsima ya mwa ntango moke.” (Em. 1:1) Mpe, ekoki kozala ete nsima ya kobima na bolɔkɔ na esanga ya Patimosi nde Yoane akomaki mokanda na ye oyo elobeli bomoi mpe mosala ya Yesu. Akomaki mpe mikanda misato mpo na kolendisa mpe kopesa bandeko makasi. Okoki komekola Yoane na likambo etali komonisa elimo ya komipimela mpe komonisa ete olingaka bato na makambo oyo oponi kosala na bomoi na yo. Mokili ya Satana elingi ete osalela ntango mpe makasi na yo nyonso kaka mpo na litomba na yo moko. Na ndakisa, elingi osala nyonso mpo na konduka mbongo to koyebana na mokili. Kasi, na mokili mobimba, bakristo ebele bazali kolekisa ntango mingi na mosala ya kosakola mpe ya kosalisa bato bápusana penepene na Yehova. w21.01 10 par. 9-10
Mwayambo, 25 sanza ya 7
Yonatane akómaki kolinga ye lokola molimo na ye moko.—1 Sa. 18:1.
Yonatane akokaki mpe koyokela Davidi zuwa. Lokola Yonatane azalaki mwana ya Saulo, akokaki koloba ete azali na lotomo ya kokóma mokonzi nsima ya tata na ye. (1 Sa. 20:31) Kasi Yonatane azalaki na komikitisa, mpe azalaki sembo epai ya Yehova. Na yango, andimaki na motema moko ndenge Yehova aponaki Davidi azala mokonzi nsima ya Saulo. Azalaki mpe sembo epai ya Davidi atako yango ezalaki kosala ete Saulo asilika makasi. (1 Sa. 20:32-34) Lokola Yonatane azalaki kolinga Davidi na bolingo ya motema, yango wana ayokelaki ye zuwa te. Yonatane azalaki mobali ya mpiko oyo abundaki bitumba mingi, mpe ayebaki malamu kosalela litimbo mpe mbanzi. Bato bazalaki koloba ete ye ná tata na ye Saulo “bazalaki na mbangu koleka bampongo” mpe na “makasi koleka bankɔsi.” (2 Sa. 1:22, 23) Na yango, Yonatane akokaki komikumisa mpo na makambo minene oyo asalaki. Nzokande, Yonatane alukaki te koleka Davidi mpe azalaki koyoka zuwa te. Kasi, azalaki nde kosepela na Davidi mpo na mpiko oyo azalaki na yango mpe ndenge oyo azalaki kotyela Yehova motema. Kutu, ezalaki nsima ya koboma Goliate nde Yonatane akómaki kolinga Davidi mingi mpenza. w21.01 21 par. 6; 22 par. 8-9
Mwamibale, 26 sanza ya 7
Mokonzi ya mwasi ezali mobali.—1 Ko. 11:3.
Bakristo nyonso bazali na nse ya litambwisi ya Yesu Kristo oyo azali mokonzi ya kokoka. Kasi, ntango mwasi mokristo abali, akómaka na nse ya bokonzi ya mobali na ye oyo azali moto ya kozanga kokoka. Yango ezalaka ntango nyonso pɛtɛɛ te. Na yango, liboso andima kobalana na mobali moko, ndeko mwasi asengeli komituna boye: ‘Nini endimisi ngai ete akozala mokonzi malamu ya libota? Atyaka makambo ya elimo na esika ya liboso na bomoi na ye? Soki ezali bongo te, nini endimisi ngai ete nsima ya kobalana na ye akozala moto oyo akosalisa ngai mpo nabatela boyokani ya malamu ná Yehova?’ Lisusu, ndeko mwasi asengeli mpe komituna boye: Bizaleli nini nazali na yango oyo ekosalisa na libala na biso? Nazalaka motema molai mpe nakabaka? Nazali na boyokani ya malamu elongo na Yehova?’ (Mos. 4:9, 12) Soki mwasi azwi bikateli ya malamu liboso abala, yango ekoki kosala ete libala na bango elonga mpe azala na esengo. Bandeko basi bakristo mingi bazali bandakisa malamu na likambo etali komikitisa liboso ya mibali na bango. Babongi mpenza kozwa longonya! w21.02 8 par. 1-2
Mwamisato, 27 sanza ya 7
Leká na Masedonia kosalisa biso.—Mis. 16:9.
Na bambula oyo euti koleka, basakoli mingi bamityelaki mokano ya koyekola monɔkɔ mosusu mpo bákoka lisusu kosala mingi na mosala ya Yehova mpe kosala na masangá epai mposa ya basakoli ezali mingi. Yango ezali ekateli oyo bandeko yango bazwá bango moko mpo básala lisusu mingi na mosala ya Yehova. Atako ekoki kosɛnga bambula mingi mpo báyeba koloba monɔkɔ yango ya sika malamu, basalisaka lisangá oyo bakei na makambo mingi. Bizaleli malamu na bango mpe makambo oyo bayebi elendisaka lisangá. Tozwaka na motuya bandeko yango oyo bamipimelaka makambo mingi! Bankulutu basengeli te kokata ete ndeko mobali moko akoki te kokóma mosaleli na misala to mpe nkulutu kaka mpo alobaka malamu te monɔkɔ oyo lisangá esalelaka. Mpo na koyeba soki ndeko mobali moko akoki kokóma nkulutu to mosaleli na misala, bankulutu basengeli kotalela makambo oyo Biblia esɛngi mpo ndeko azwa mikumba, kasi te soki alobaka malamu to te monɔkɔ oyo lisangá esalelaka.—1 Tim. 3:1-10, 12, 13; Tito 1:5-9. w20.08 30 par. 15-16
Mwaminei, 28 sanza ya 7
Bómona yango esengo mpenza, bandeko na ngai, ntango bozali kokutana na komekama ndenge na ndenge.—Yak. 1:2.
Bato bakoki kokanisa ete bakozala na esengo kaka soki bazali nzoto kolɔngɔnɔ, bazali na mbongo mingi, mpe soki bazali na boyokani malamu elongo na bato ya libota na bango. Kasi, esengo oyo Yakobo alobeli ezali moko ya bizaleli ya mbuma ya elimo ya Nzambe, mpe tokoki kozala na esengo yango ata soki tokokutani na likambo nini na bomoi na biso. (Gal. 5:22) Mokristo akoki kosepela to mpe kozala na esengo ya solosolo soki ayebi ete azali kosepelisa Yehova mpe kolanda ndakisa ya Yesu. (Luka 6:22, 23; Kol. 1:10, 11) Esengo na biso ezali lokola lolemo ya mɔtɔ oyo ezali kopela na kati ya vɛrɛ ya mwinda ya petrole. Kaka ndenge vɛrɛ ya mwinda ebatelaka mɔtɔ yango mpo ekufa te, esengo na biso mpe epelaka na kati ya mitema na biso mpe ebatelami malamu. Ekufaka te ata soki tozali kobɛla to tozali na mbongo mingi te. Esilaka mpe te ata soki bato bazali kotyola biso, to ntango bato ya libota na biso bazali kotɛmɛla biso. Kutu, esengo na biso ebakisamaka ata soki bato baluki kosilisa yango. Minyoko oyo tokutanaka na yango mpo na kondima na biso, emonisaka ete tozali bayekoli ya solo ya Kristo. (Mat. 10:22; 24:9; Yoa. 15:20) Yango wana Yakobo akomaki maloba oyo ezali mokapo ya lelo. w21.02 28 par. 6
Mwamitano, 29 sanza ya 7
Liloba ya malamu esepelisaka [motema].—Mas. 12:25.
Ntango omoni vɛrsɛ moko oyo emonisi ntina ya kofanda nyɛɛ mpe ya kotyela Yehova motema, kangá yango na motó. Mpo na kosala bongo, osengeli kotángaka yango na mongongo makasi, kokoma yango mpe kotángaka yango mbala na mbala. Yehova ayebisaki Yosua atángaka buku ya Mobeko mbala na mbala na mongongo ya nse mpo asala makambo na bwanya. Yango esalisaki ye abanga te, kasi azala nde na mpiko ntango azalaki kokamba basaleli ya Nzambe. (Yos. 1:8, 9) Bavɛrsɛ mingi ya Biblia ekoki kosalisa yo ozala na kimya ya makanisi mpe ya motema ntango okutani na makambo oyo ekokaki konyokola yo to kobangisa yo. (Nz. 27:1-3; Mas. 3:25, 26) Na makita na biso, tozwaka matomba na masolo oyo bandeko basalaka, na biyano oyo bapesaka, mpe na masolo ya kolendisa oyo tosololaka na bango. (Ebr. 10:24, 25) Na lisangá, tokoki mpe kolendisama mpenza soki toyebisi bandeko oyo totyelaka motema makambo oyo ezali kotungisa biso. w21.01 6 par. 15-16
Mwapɔsɔ, 30 sanza ya 7
Zalá ndakisa epai ya bato ya sembo.—1 Tim. 4:12.
Ntango ozwaki batisimo, omonisaki ete ozalaki na kondima makasi mpe ete otyelaka Yehova motema. Mpe Yehova asepelaki koyamba yo na kati ya libota na ye. Na yango, osengeli kokoba kotyela Yehova motema. Ekoki komonana pɛtɛɛ kotyela Yehova motema ntango tolingi kozwa bikateli mosusu ya ntina mingi na bomoi. Bongo na bantango mosusu? Ezali na ntina mingi ete otyelaka Yehova motema ntango olingi kozwa bikateli ezala na makambo etali kominanola, mosala ya mosuni oyo olingi kosala, mpe mikano oyo osengeli komityela na bomoi. Kotyela bwanya na yo moko motema te. Kasi, luká nde mitinda ya Biblia oyo eyokani na makambo oyo olingi kosala, mpe salá na boyokani na mitinda yango. (Mas. 3:5, 6) Soki osali bongo, okosepelisa motema ya Yehova, mpe bandeko ya lisangá bakobanda kopesa yo limemya. Na ntembe te, lokola biso nyonso, yo mpe ozali moto ya kozanga kokoka, mpe na bantango mosusu okosala mabunga. Kasi yango esengeli te kopekisa yo osala nyonso oyo okoki na mosala ya Yehova. w21.03 6 par. 14-15
Mwalomingo, 31 sanza ya 7
Nabikaki na monɔkɔ ya nkɔsi.—2 Tim. 4:17.
Bato ya libota na yo bazali kotɛmɛla yo mpo ozali kosalela Yehova? To mpe ozali kofanda na ekólo oyo batyá mwa bipekiseli na mosala na biso to mpe bapekisi yango mpenza? Soki ezali bongo, okoki kozwa makasi soki otángi 2 Timote 1:12-16 mpe 4:6-11, 17-22. Ntoma Paulo akomaki mikapo yango ntango azalaki na bolɔkɔ. Liboso otánga mikapo yango, yebisá Yehova mikakatano na yo mpe ndenge oyo ozali komiyoka mpo na yango. Yebisá ye mpenza ndenge makambo ezali. Na nsima, sɛngá ye asalisa yo mpo omona mitinda oyo ezali na masolo ya makambo oyo ekómelaki ntoma Paulo, oyo okoki kosalela mpo na kolonga mikakatano na yo. Yehova ayebisaki Paulo ete lokola akómi mokristo, akokutana na minyoko. (Mis. 21:11-13) Ndenge nini Yehova asalisaki Paulo? Ayanolaki na mabondeli na ye mpe na nsima apesaki ye nguya. Bayebisaki Paulo ete akozwa mbano oyo mpo na yango asalaki mosala makasi. Yehova asalelaki mpe baninga ya sembo ya Paulo mpo na kopesa ye lisalisi oyo ebongi. w21.03 17-18 par. 14-15, 19