Sanza ya 8
Mwayambo, 1 sanza ya 8
Soki botiki ngai, bokoki kosala eloko moko te.—Yoa. 15:5.
Kaka baoyo bazali baninga ya penepene ya Yesu nde bakozwa matomba ya mbeka na ye ya lisiko. Yesu alobaki ete azali ‘kokaba molimo [bomoi] na ye mpo na baninga na ye.’ (Yoa. 15:13) Bato ya sembo oyo bazalaki na bomoi liboso Yesu aya awa na mabele basengeli koyekola makambo na ye mpe kolinga ye. Bato yango bakosekwa; kasi ekosɛnga ete ata basaleli wana ya sembo ya Yehova bákóma baninga ya Yesu mpo bázwa bomoi ya seko. (Yoa. 17:3; Mis. 24:15; Ebr. 11:8-12, 24-26, 31) Tozalaka na esengo ya kosala elongo na Yesu na mosala ya kosakola mpe koteya nsango malamu ya Bokonzi. Ntango Yesu azalaki awa na mabele, azalaki moteyi. Mpe banda azongá na likoló, Yesu, oyo azali mokonzi ya lisangá, akobi kotambwisa mosala yango ya kosakola mpe ya koteya. Amonaka mpe asepelaka na milende oyo osalaka mpo na kosalisa ebele ya bato báyekola koyeba ye ná Tata na ye. Kutu, tokoki kosala mosala yango malamu kaka na lisalisi ya Yehova mpe ya Yesu.—Yoa. 15:4. w20.04 22 par. 7-8
Mwamibale, 2 sanza ya 8
Bakonzi yango mibale . . . bakokoba koloba lokuta na mesa moko.—Dan. 11:27.
Na ebandeli, titre “mokonzi ya nɔrdi” mpe “mokonzi ya sudi” ezalaki kosalelama mpo na kolobela bakonzi ya nguya oyo bazalaki koyangela na nɔrdi mpe na sudi ya ekólo Yisraele ya kala. (Dan. 10:14) Tii na Pantekote ya mobu 33 T.B., bato ya ekólo Yisraele bazalaki bato ya Nzambe. Kasi, kobanda na ntango wana, Yehova amonisaki polele ete bayekoli ya sembo ya Yesu nde bazalaki bato na ye. Na yango, eteni monene ya esakweli ya Danyele mokapo 11 etali ekólo Yisraele te, kasi bayekoli ya Kristo. (Mis. 2:1-4; Rom. 9:6-8; Gal. 6:15, 16) Mpe na boumeli ya bambula, baguvɛrnema ndenge na ndenge ekómaki mokonzi ya nɔrdi mpe mokonzi ya sudi. Atako bongo, ezali na makambo ebele oyo ebongwanaki te. Ya liboso, bakonzi yango banyokolaki basaleli ya Nzambe na ndenge ya polele. Ya mibale, ndenge oyo banyokolaki basaleli ya Nzambe emonisaki ete bazalaki koyina Nzambe ya solo, Yehova. Mpe ya misato, bakonzi yango mibale bazalaki kobunda bango na bango mpo na kolakisa nani aleki mosusu na nguya. w20.05 3 par. 3-4
Mwamisato, 3 sanza ya 8
Nakozala oyo nakozala.—Kob. 3:14.
Yehova akómaka nyonso oyo esengeli mpo na kosala makambo oyo ekokokisa mokano na ye. Yehova akoki mpe kokómisa basaleli na ye ya kozanga kokoka nyonso oyo esengeli mpo na kosalela ye mpe kokokisa mokano na ye. (Yis. 64:8) Na ndenge yango, Yehova asalaka ete mokano na ye ekokisama. Eloko moko te ekoki kopekisa Yehova akokisa mokano na ye. (Yis. 46:10, 11) Tokoki kokolisa botɔndi mpo na Tata na biso ya likoló soki tozali komanyola na makambo oyo asalaka mpe na oyo apesaka biso likoki ya kosala. Na ndakisa, ntango tozali komanyola na biloko ya kokamwa oyo Nzambe asalá, yango ekamwisaka biso mpenza. (Nz. 8:3, 4) Mpe ntango tozali komanyola na ndenge oyo Yehova akómisaka biso oyo esengeli mpo na kosala mokano na ye, tokómaka na limemya makasi mpo na ye. Tosengeli kozala na limemya mozindo mpo na nkombo ya Nzambe, Yehova! Nkombo yango esangisi bomoto ya Tata na biso, makambo nyonso oyo asalaka mpe oyo akosala.—Nz. 89:7, 8. w20.06 9-10 par. 6-7
Mwaminei, 4 sanza ya 8
Nzambe . . . apesaka bato nyonso bomoi mpe mpema.—Mis. 17:24, 25.
Mopɛpɛ ya malamu (Oxygène) ezali na ntina mingi mpo na bomoi ya bato mpe banyama. Bato ya mayele balobi ete na mbula moko, bato mpe banyama basalelaka bamiliare ya kilo ya mopɛpɛ ya malamu, mpe babimisaka mopɛpɛ ya mabe (dioxyde de carbone). Atako bongo, mopɛpɛ yango ya malamu esilaka te mpe mopɛpɛ ya mabe etondaka te na etando na biso. Mpo na nini? Mpo Yehova asalá banzete ndenge na ndenge oyo ebendaka mopɛpɛ ya mabe mpe ebimisaka mopɛpɛ ya malamu. Makambo oyo esalemaka mpo tózwa mopɛpɛ ya malamu endimisi biso maloba ya mokapo ya lelo. Nini ekoki kosalisa biso tómonisa botɔndi mpo na planɛti na biso oyo esalamá na ndenge moko ya kokamwa, mpe mpo na biloko nyonso oyo ezali na kati? (Nz. 115:16) Mpo na komonisa botɔndi na biso, tosengeli kokanisa na mozindo na makambo oyo Yehova asalá. Yango ekotinda biso tópesa ye matɔndi mokolo na mokolo mpo na biloko malamu oyo apesá biso. Lisusu, tokomonisa ete tozali na botɔndi mpo na mabele soki tozali kosala nyonso mpo esika oyo tofandi ezala ntango nyonso pɛto. w20.05 22 par. 5, 7
Mwamitano, 5 sanza ya 8
Nakosantisa nkombo na ngai monene, oyo bazalaki kokómisa eloko mpamba na kati ya bikólo.—Ezk. 36:23.
Yehova asalelaki bwanya, amonisi motema molai mpe bosembo mpo na kosilisa likambo yango. Amonisi mpe nguya na ye oyo eleki nyonso, na ndenge mingi. Likambo eleki ntina, amonisaka bolingo na makambo nyonso oyo asalaka. (1 Yoa. 4:8) Yehova azali kokoba kosala nyonso mpo na kosantisa nkombo na ye. Satana azali kokoba kosambwisa nkombo ya Nzambe. Atindaka bato bátya ntembe na nguya, bosembo, bwanya mpe bolingo ya Nzambe. Na ndakisa, Satana azali koluka kondimisa bato ete Yehova azali Mozalisi te. Mpe mpo na baoyo bandimaka ete Nzambe azali, Satana azali kotinda bango bámona ete mibeko ya Nzambe ezali makasi mpe epekisaka bato makambo mosusu. Azali kutu koteya bato ete Yehova azali motema mabe mpe ete azikisaka bato na lifelo ya mɔtɔ. Ntango bato bandimaka lokuta ya ndenge wana, ezalaka mpasi te báboya kotosa mibeko ya sembo ya Yehova. Liboso ete Yehova aboma ye, akoluka kotinda yo opesa Yehova mokɔngɔ. Akolonga mpenza? w20.06 5 par. 13-15
Mwapɔsɔ, 6 sanza ya 8
Epai Mogrɛki azali te Moyuda mpe te, kokatama ngenga ezali te kozanga kokatama ngenga mpe te, mopaya azali te, Mosikitia te, moombo te, moto ya bonsomi te, kasi Kristo azali makambo nyonso mpe na kati ya nyonso.—Kol. 3:11.
Na masangá mingi ezali na bandeko oyo bazali kosala makasi báyekola monɔkɔ moko ya sika. Ekoki kozala mpasi mpo bábimisa polele makambo oyo bazali kokanisa. Nzokande, soki tolandi te kaka lolenge oyo bazali koloba monɔkɔ ya sika, kasi totye nde makanisi na bizaleli na bango ya malamu, tokomona bolingo oyo bazalaka na yango mpo na Yehova mpe mposa na bango ya kosalela ye. Yango ekosala ete tómonisela bango lisusu limemya mingi mpe tózwa bango na motuya. Tokoloba na bango te ete “Nazali na mposa na yo te” kaka mpo balobaka monɔkɔ na biso malamu te. (1 Ko. 12:21) Yehova apesá biso lokumu monene ya kozala na esika na kati ya lisangá na ye. Tózala mwasi to mobali, monzemba to moto oyo abalá, elenge to mokóló, ezala tolobaka monɔkɔ moko malamu to te, biso nyonso tozali na motuya na miso ya Yehova mpe na miso ya bandeko na biso. (Rom. 12:4, 5; Kol. 3:10) Tiká ete tósepela ntango nyonso na esika oyo tozali na yango na kati ya lisangá ya Yehova mpe tókoba komonisela bandeko na biso bolingo mpe limemya. w20.08 31 par. 20-22
Mwalomingo, 7 sanza ya 8
Bato mosusu basanganaki elongo na ye mpe bakómaki bandimi.—Mis. 17:34.
Ntoma Paulo asundolaki bato ya Atene te, atako engumba na bango etondaki na losambo ya bikeko, makambo ya pite, mpe filozofi ya bapakano. Lisusu, atikaki te ete mafinga na bango elɛmbisa ye nzoto. Paulo ye moko akómaki mokristo, nzokande liboso azalaki “kofinga mpe konyokola mpe [azalaki] moto ya lofundo.” (1 Tim. 1:13) Ndenge kaka Yesu amonaki ete Paulo akokaki kokóma moyekoli na ye, Paulo mpe amonaki ete bato ya Atene bakokaki kokóma bayekoli ya Yesu. Amikosaki te na likambo yango. (Mis. 9:13-15) Na siɛklɛ ya liboso, bato ya ndenge na ndenge bakómaki bayekoli ya Yesu. Ntango Paulo akomelaki bakristo ya Korinti, oyo ezalaki engumba moko ya Grɛsi, alobaki ete bato mosusu ya lisangá yango bazalaki kala babomi-bato to bazalaki na etamboli ya mbindo mingi. Mpe na nsima abakisaki ete: “Bamosusu na kati na bino bazalaki ndenge wana. Kasi bosukwami pɛɛ.” (1 Ko. 6:9-11) Soki ezalaki yo, olingaki komona ete bato yango bakokaki kobongwana mpe kokóma bayekoli ya Yesu? w20.04 12 par. 15-16
Mwayambo, 8 sanza ya 8
Ekoki! . . . Longolá molimo na ngai.—1 Bak. 19:4.
Bankulutu basengeli te kokanisa mabe mpo na bandeko oyo bakómi komituna soki matomba nini bakozwa ndenge bazali kosalela Yehova. Na esika ya kokanisela bango mabe, bankulutu basengeli nde koluka koyeba mpo na nini ndeko alobi to asali likambo boye to boye. Na nsima, bankulutu bakosalela Biblia mpo na kolendisa bandeko yango. Mosakoli Eliya akimaki Mokonzi-mwasi Yezabele. (1 Bak. 19:1-3) Akanisaki ete mosala na ye ezalaki na ntina te mpe asɛngaki ete akufa. (1 Bak. 19:10) Na esika apesa Eliya foti, Yehova asalisaki ye ayeba ete azalaki ye moko te, ete akokaki kotya motema na nguya ya Nzambe, mpe ete azalaki na makambo mosusu mingi ya kosala. Na boboto nyonso, Yehova ayokaki mitungisi ya Eliya mpe apesaki ye mikumba ya sika. (1 Bak. 19:11-16, 18) Yango eteyi biso nini? Biso nyonso, mingimingi bankulutu, tosengeli kosalela bampate ya Yehova makambo na boboto. Ata soki moto moko alobi ete azali na nkanda, to alobi ete Yehova akoki kolimbisa ye te, bankulutu basengeli koyoka ye ntango azali koyebisa bango ndenge oyo azali komiyoka. Na nsima, bakoki kosalisa mpate yango oyo ebungá amona ete Yehova alingaka ye mingi. w20.06 22 par. 13-14
Mwamibale, 9 sanza ya 8
Moninga ya solosolo alingaka ntango nyonso.—Mas. 17:17.
Yehova alingi ete tólekisaka ntango elongo na baninga mpe bandeko na biso ya libota. (Nz. 133:1) Yesu azalaki na baninga ya malamu. (Yoa. 15:15) Biblia elobeli matomba ya kozala na baninga ya malamu. (Mas. 18:24) Mpe elobi ete ezali malamu te komitangola na bamosusu. (Mas. 18:1) Bato mingi bakanisaka ete, bakozwa baninga mingi mpe bakomiyoka bango moko te soki bazali kosalela basite internet ya kosolola na baninga. Kasi, tosengeli kozala ekɛngɛ ntango tozali kosalela basite internet yango. Bolukiluki emonisi ete bato oyo balekisaka ntango mingi na basite Internet ya kosolola na baninga, bakoki mpenza komiyoka bango moko mpe konyokwama na makanisi. Mpo na nini? Moko ya bantina ezali ete, mbala mingi na basite internet yango, bato batyaka bafɔtɔ oyo emonisaka bantango ya kitoko oyo balekisi na bomoi na bango, baninga na bango mpe bisika ya kitoko oyo bakendá. Soki moto atali bafɔtɔ ya ndenge wana, mpe akokanisi bomoi na ye ná ya moto oyo atye yango, moto oyo azali kotala akoki komona ete bomoi na ye ezali na ntina te. w20.07 5-6 par. 12-13
Mwamisato, 10 sanza ya 8
Bantoma ná bankulutu bayanganaki mpo na kotalela likambo yango.—Mis. 15:6.
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/10/1988 elobaki: “Bankulutu basengeli koyeba ete, na lisalisi ya elimo santu, Kristo akoki kosalela ata nkulutu nini abimisa makanisi mpo na kozwa ekateli ya malamu. (Mis. 15:7-15) Elimo santu ekoki kosalisa bankulutu nyonso na kati ya lisangá kasi kaka nkulutu moko te.” Nkulutu oyo amemyaka baninga na ye, alukaka kaka te ete ye nde aloba moto ya liboso na ntango ya makita ya bankulutu. Alukaka te ete basusu báyokaka kaka ye, mpe bándimaka kaka makanisi na ye. Kasi, apesaka nde makanisi na ye na komikitisa nyonso. Ayokaka na likebi ntango bankulutu mosusu bazali kopesa makanisi na bango. Oyo eleki ntina, apesaka makanisi oyo esimbami na mitinda ya Biblia, mpe alandaka malako ya “moombo ya sembo mpe ya mayele.” (Mat. 24:45-47) Soki bankulutu bazali komoniselana bolingo mpe limemya ntango bazali kolobela likambo moko, elimo santu ya Nzambe ekozala elongo na bango mpe ekosalisa bango bázwa bikateli ya malamu.—Yak. 3:17, 18. w20.08 27 par. 5-6
Mwaminei, 11 sanza ya 8
Saláká malamu mpo na kolonga mabe.—Rom. 12:21.
Banguna ya ntoma Paulo bazalaki makasi mingi koleka ye. Mbala mingi babɛtaki ye mpe batyaki ye na bolɔkɔ. Lisusu, basalelaki ye makambo ya mabe. Kutu, ata bato mosusu na kati ya lisangá bazalaki kotɛmɛla ye. (2 Ko. 12:11; Flp. 3:18) Kasi Paulo alongaki bato nyonso oyo bazalaki kobundisa ye. Na ndenge nini? Akobaki kosakola atako bazalaki kotɛmɛla ye. Atikalaki sembo epai ya bandeko na ye ata ntango basalaki makambo oyo esepelisaki ye te. Oyo eleki ntina, atikalaki sembo epai ya Nzambe tii na nsuka ya bomoi na ye. (2 Tim. 4:8) Asalaki nyonso wana na makasi na ye te, kasi nde mpo atyelaki Yehova motema. Bato bafingaka yo mpe banyokolaka yo? Mokano na yo ezali ya kosalisa bato báyekola makambo etali Yehova na nzela ya Biblia. Mpo okokisa mokano yango, osengeli kosalelaka Biblia mpo oyanola na mituna oyo bato batunaka. Lisusu, osengeli kozala na limemya mpe na boboto epai ya bato oyo bazali kosalela yo makambo ya mabe, mpe kosalela bato nyonso makambo ya malamu, ata mpe banguna na yo.—Mat. 5:44; 1 Pe. 3:15-17. w20.07 17-18 par. 14-15
Mwamitano, 12 sanza ya 8
Komikitisa na yo nde ezali kokómisa ngai moto monene.—2 Sa. 22:36.
Tokoki mpenza koloba ete Yehova azali na komikitisa? Ɛɛ, ndenge kaka maloba ya Davidi oyo ezali na likoló awa emonisi yango. (Nz. 18:35) Ntango Davidi akomaki maloba oyo, ekoki kozala ete azalaki kokanisa mokolo oyo mosakoli Samwele ayaki epai na bango mpo na kotya mokonzi oyo akoyangela Yisraele mafuta. Na kati ya bana mibali mwambe ya Yese, Davidi azalaki leki na bango nyonso. Atako bongo, ye nde moto oyo Yehova aponaki mpo na koyangela na esika ya Mokonzi Saulo. (1 Sa. 16:1, 10-13) Na ntembe te, Davidi azalaki na mayoki lokola oyo ya mokomi ya nzembo moko oyo alobaki mpo na Yehova ete: “Azali komikitisa mpo na kotala likoló mpe mabele, azali kolongola moto oyo azangá na putulu mpenza. Alongolaka mobola . . . mpo na kofandisa ye esika moko na bankumu.” (Nz. 113:6-8) Yehova amonisaka komikitisa na ndenge asalelaka basambeli na ye ya kozanga kokoka makambo. Andimaka kaka te losambo oyo topesaka ye, kasi azwaka biso mpe lokola baninga na ye. (Nz. 25:14) Mpo tókóma baninga na ye, Yehova azwaki bibongiseli ya kopesa Mwana na ye lokola mbeka mpo na masumu na biso. Yehova azali mpenza na motema mawa mpe na ngɔlu! w20.08 8 par. 1-3
Mwapɔsɔ, 13 sanza ya 8
[Yehova] alingi moto ata moko te abomama kasi alingi nde bato nyonso bábongola motema.—2 Pe. 3:9.
Yehova atyá mokolo mpe ngonga oyo akosukisa mokili oyo mabe. (Mat. 24:36) Akosala yango te liboso ete ngonga yango ekoka. Azali na mposa makasi ya kosekwisa bato oyo bakufá, kasi azali komonisa motema molai. (Yobo 14:14, 15) Azali kozela ngonga oyo atyá ekoka mpo azongisa lisusu bango na bomoi. (Yoa. 5:28) Tozali na bantina mingi ya komonisa botɔndi mpo na motema molai ya Yehova. Kanisá naino: Motema molai ya Yehova esali ete bato ebele, ata mpe biso, tózwa ntango ya ‘kobongola motema.’ Yehova alingi ete bato ebele bázwa likoki ya kozala na bomoi ya seko. Na yango, tiká ete tómonisa botɔndi mpo na motema molai na ye! Ndenge nini tokoki kosala yango? Tosengeli kosala nyonso oyo tokoki mpo na koluka ‘baoyo bazali na ezaleli oyo ebongi mpo na bomoi ya seko’ mpe kosalisa bango bálinga Yehova mpe básalela ye. (Mis. 13:48) Yango ekosala ete bázwa mpe matomba mpo na motema molai ya Yehova lokola biso. w20.08 18 par. 17
Mwalomingo, 14 sanza ya 8
Salá ete nayeba banzela na yo, Ee Yehova; teyá ngai banzela na yo.—Nz. 25:4.
Makambo oyo moyekoli ya Biblia ayekolaka esengeli kosuka kaka te na bɔɔngɔ na ye kasi esengeli nde kokɔta na motema na ye. Mpo na nini? Motema na biso, oyo esangisi bamposa, mayoki mpe makanisi na biso, etindaka biso tózwa bikateli. Yesu ayebaki mpenza kosalela mayele ya koteya oyo ezalaki kosimba mitema ya bato. Kasi bato bazalaki mpe kolanda ye mpo azalaki kosimba mitema na bango. (Luka 24:15, 27, 32) Moyekoli na yo asengeli komona ete Yehova azali mpenza Moto ya solo, mpe akoki kokóma na boyokani malamu na ye. Asengeli mpe komona ete Yehova akoki kokóma Tata na ye, Nzambe na ye, mpe Moninga na ye. (Nz. 25:5) Ntango bozali koyekola, salisá ye amona bizaleli malamu oyo Nzambe azalaka na yango. (Kob. 34:5, 6; 1 Pe. 5:6, 7) Ata soki bozali kolobela lisolo nini, bendáká likebi na ye na bomoto ya Yehova. Salisá moyekoli asepela na bizaleli malamu ya Yehova, na ndakisa bolingo, boboto, mpe motema mawa na ye. Yesu alobaki ete “kolinga Yehova Nzambe na yo,” nde “mobeko oyo eleki monene mpe ya liboso.” (Mat. 22:37, 38) Salisá moyekoli na yo akóma kolinga Nzambe mingi na motema na ye. w20.10 10 par. 12
Mwayambo, 15 sanza ya 8
Yesu azalaki kolinga Marta ná ndeko na ye ya mwasi ná Lazare.—Yoa. 11:5.
Yesu azalaki kopesa basi nyonso lokumu. (Yoa. 4:27) Nzokande, Yesu azalaki kopesa basi oyo bazalaki kosala mokano ya Tata na ye lokumu mingi koleka. Kutu, azalaki kobenga bango bandeko na ye ya basi mpe atángaki bango esika moko na mibali oyo azalaki komona ete bazali libota na ye ya elimo. (Mat. 12:50) Yesu azalaki mpe moninga ya solosolo mpo na bango. Tólobela boninga oyo asalaki na Maria mpe Marta, oyo mbala mosusu bazalaki mpe minzemba. (Luka 10:38-42) Ezala na maloba to na misala na ye, Yesu azalaki kosala ete bámiyoka malamu. Na ndakisa, Maria abangaki te kofanda na makolo ya Yesu mpo na koyoka mateya na ye. Marta mpe abangaki te koyebisa Yesu ete azalaki komitungisa ndenge Maria azalaki kosalisa ye te mpo na kolamba. Na libaku yango, Yesu asalisaki basi yango mibale na elimo. Lisusu, Yesu amonisaki ete azalaki kotyela bandeko basi yango ná Lazare ndeko na bango ya mobali likebi na ndenge akendaki kotala bango na mabaku mosusu. (Yoa. 12:1-3) Tokoki kokamwa te ndenge Maria ná Marta bayebaki ete Yesu akokaki kosalisa bango ntango Lazare abɛlaki makasi.—Yoa. 11:3. w20.09 20 par. 3; 21 par. 6
Mwamibale, 16 sanza ya 8
Bazalaki kokanisa ete bokonzi ya Nzambe ekomonana kaka na ntango wana.—Luka 19:11.
Bayekoli ya Yesu bazalaki kolikya ete Bokonzi “ekomonana kaka na ntango wana” mpe ekolongola bango na boyangeli mabe ya Baroma. Biso mpe tozelaka na mposa makasi mokolo oyo Bokonzi ya Nzambe ekolongola makambo nyonso ya mabe mpe ekotya mokili ya sika oyo ekotonda na bato ya boyengebene. (2 Pe. 3:13) Kasi, tosengeli kozala na motema molai mpe kozela ntango oyo Yehova atyá ekoka. Yehova atikelaki Noa ntango oyo ebongi mpo na kotonga masuwa mpe ya kozala “mosakoli ya boyengebene.” (2 Pe. 2:5; 1 Pe. 3:20) Yehova ayokaki na likebi ntango Abrahama azalaki kotuna ye motuna moko nsima ya mosusu mpo na ekateli oyo azwaki ya koboma bato mabe ya engumba Sodoma ná Gomora. (Eba. 18:20-33) Na boumeli ya bambula mingi, Yehova amoniselaki mpenza ekólo Yisraele oyo ezalaki sembo te motema molai. (Neh. 9:30, 31) Lelo oyo mpe, tomonaka motema molai ya Yehova na ndenge atiki ntango mpo baoyo nyonso balingi kokóma baninga na ye “bábongola motema.” (2 Pe. 3:9; Yoa. 6:44; 1 Tim. 2:3, 4) Ndakisa ya Yehova esalisi biso tómonisaka motema molai wana tozali kokoba kosakola mpe koteya. w20.09 10 par. 8-9
Mwamisato, 17 sanza ya 8
Lisekwa ekozala.—Mis. 24:15.
Ntango Yehova akosekwisa bato, bakozonga na makanisi mpe bomoto oyo bazalaki na yango liboso bákufa. Yango emonisi nini? Emonisi ete Yehova alingaka yo mingi mpenza, yango wana amonaka mpe abosanaka te makambo nyonso oyo okanisaka, mayoki na yo, makambo oyo olobaka, mpe oyo osalaka. Na yango, soki esɛngi ete asekwisa yo, ekozala mpasi te mpo azongisa yo ndenge ozalaki liboso ete okufa. Mokonzi Davidi ayebaki ete Yehova ayebi mokomoko na biso malamu mpenza. (Nz. 139:1-4) Koyeba ete Yehova ayebi yo malamumalamu etindaka yo omiyoka ndenge nini? Koyeba ete Yehova ayebi biso malamu mpe kokanisa na mozindo na likambo yango, esalaka ete tómitungisa te. Mpo na nini? Kobosana te ete Yehova atyelaka biso mpenza likebi. Azwaka mokomoko na biso na motuya mingi. Ayebi malamu makambo oyo tokutaná na yango na bomoi, oyo esalá ete tózala ndenge tozali lelo. Likambo yango ekitisaka mpenza biso motema! Tosengeli komiyokaka soki moke te ete tozali biso moko. Yehova azalaka ntango nyonso elongo na biso mpe alingaka kosalisa biso.—2 Nt. 16:9. w20.08 17 par. 13-14
Mwaminei, 18 sanza ya 8
Nakosala ete ozala na mayele ya kososola mpe nakoteya yo nzela oyo osengeli kokende.—Nz. 32:8.
Yehova alingaka mpenza koteya basaleli na ye. Alingi tóyeba ye, tólinga ye, mpe tózala na bomoi ya seko lokola bana na ye ya bolingo. Nyonso oyo ekoki kosalema ata moke te soki ateyi biso te. (Yoa. 17:3) Yehova asalelaki lisangá ya bokristo ya siɛklɛ ya liboso mpo na koteya basaleli na ye. (Kol. 1:9, 10) Elimo santu, elingi koloba “mosungi” oyo Yesu alakaki, esalisaki mpe bango mingi mpenza. (Yoa. 14:16) Elimo yango epesaki bayekoli mayele mingi mpenza mpo bákanga ntina ya Liloba ya Nzambe, mpe ezongisaki na makanisi na bango makambo mingi oyo Yesu alobaki mpe asalaki, mpe na nsima, bakomaki yango na Baevanzile. Boyebi yango ekómisaki makasi kondima ya bakristo ya siɛklɛ ya liboso, mpe ekolisaki bolingo na bango mpo na Nzambe, mpo na Mwana na ye, mpe mpo na bandeko na bango bakristo. Na mikolo na biso, Yehova asakolaki ete “na eleko ya nsuka ya mikolo,” bato ya bikólo nyonso bakosopana na “ngomba” na ye, elingi koloba bakosangana na basambeli na ye ya solo, mpo báteya bango banzela na ye. (Yis. 2:2, 3) Tozali komona ndenge esakweli yango ezali kokokisama. w20.10 24 par. 14-15
Mwamitano, 19 sanza ya 8
Moto ya mayele nde moto oyo akómaka na makoki ya koyeba kotambwisa makambo.—Mas. 1:5.
Nini ekoki kotinda moto aboya toli oyo moninga moko ya motema apesi ye? Ezali lolendo. Bato ya lolendo balingaka koyoka ‘makambo oyo matoi na bango elingaka koyoka. Matoi na bango eboyaka koyoka solo.’ (2 Tim. 4:3, 4) Bakanisaka ete basengeli na toli te mpo bazali na bwanya mingi mpe na ntina mingi koleka bato mosusu. Nzokande ntoma Paulo akomaki ete: “Soki moto akanisi ete azali moto ya ntina ntango azali moto mpamba, azali kokosa makanisi na ye moko.” (Gal. 6:3) Mokonzi Salomo alimbolaki likambo yango malamu mpenza. Akomaki boye: “Mwana oyo akelelá kasi azali na bwanya aleki mokonzi oyo azali mobange kasi zoba, oyo azali lisusu komona ntina ya makebisi te.” (Mos. 4:13) Kanisá ndenge ntoma Petro asalaki ntango ntoma Paulo asembolaki ye na miso ya bato. (Gal. 2:11-14) Soki Petro atyaka makanisi nyonso na lolenge mpe na esika oyo Paulo asembolaki ye, akokaki kosilikela ntoma Paulo. Kasi ntoma Petro azalaki na bwanya. Andimaki toli mpe abombelaki ntoma Paulo nkanda na motema te. Kutu na nsima, akomaki ete ntoma Paulo azali ‘ndeko ya bolingo.’—2 Pe. 3:15. w20.11 21 par. 9, 11-12
Mwapɔsɔ, 20 sanza ya 8
Bókómisa bato bayekoli . . . , bóteya bango.—Mat. 28:19, 20.
Nini ekosalisa mpenza bayekoli ya Biblia bákola na elimo? Soki bazali koyangana na makita. Makambo oyo bakoyoka na makita ekosalisa bango báyeba makambo mingi, ekokómisa kondima na bango makasi, mpe ekosalisa bango bálinga lisusu Nzambe mingi. (Mis. 15:30-32) Lisusu, mosakoli akoki koyebisa moyekoli yango ya Biblia ete kolinga Yehova mingi nde etindaki ye atosa mibeko ya Nzambe. (2 Ko. 7:1; Flp. 4:13) Mpe ntango bayekoli ya Biblia bazali koyeba basakoli ndenge na ndenge oyo bazali kosalela Yehova na bosembo, bandakisa na bango ekoki koteya bayekoli bámona ndenge oyo bakoki kotosa etinda ya Kristo ya kolinga Nzambe mpe bato. (Yoa. 13:35; 1 Tim. 4:12) Bakomona ete basakoli bazali kokutana na mikakatano lokola oyo bango mpe bakutanaka na yango mpe bakomona ete bango mpe bakoki kosala mbongwana oyo esengeli mpo bákóma moyekoli ya Kristo. (Mib. 30:11) Mosakoli mokomoko na lisangá akoki kopesa mabɔkɔ na ndenge mingi mpo na kosalisa moyekoli ya Biblia akola na elimo.—Mat. 5:16. w20.11 5 par. 10-12
Mwalomingo, 21 sanza ya 8
Nabundaki na banyama mabe na Efese.—1 Ko. 15:32.
Ekoki kozala ete ntoma Paulo abundaki na banyama ya solo mpenza na esika ya masano na Efese. (2 Ko. 1:8; 4:10; 11:23) To mpe ekoki kozala ete azalaki kolobela botɛmɛli ya Bayuda ná bato mosusu oyo bazalaki lokola “banyama mabe ya zamba.” (Mis. 19:26-34; 1 Ko. 16:9) Ezala abundaki na banyama ya solo to ya elilingi, ntoma Paulo akutanaki na makambo mingi ya mabe, kasi atako bongo, akobaki kondima ete akozala na bomoi ya malamu na mikolo ezali koya. (1 Ko. 15:30, 31; 2 Ko. 4:16-18) Tozali kobika na eleko moko ya mabe mpenza. Bandeko na biso mosusu bazali kokutana na makambo mingi ya mabe. Basusu bazali kofanda na bisika ya bitumba mpe bazali na libateli moko te. Na bamboka mosusu, basaleli ya Yehova bazali na bonsomi ya kosakola te mpe bazali kosalela Yehova atako bakoki kokanga bango, kotya bango na bolɔkɔ, to mpe koboma bango. Atako bongo, bandeko yango nyonso bazali kaka kokoba kosambela Yehova; bazali bandakisa malamu mpenza mpo na biso. Babangaka te mpo bayebi ete, ata soki babungisi bomoi na bango sikoyo, Yehova abombeli bango eloko oyo eleki malamu na mikolo ezali koya. w20.12 9 par. 3-4
Mwayambo, 22 sanza ya 8
Tozali bato oyo bazali kosala elongo na Nzambe. Bino bozali elanga ya Nzambe oyo ezali kolonama, ndako ya Nzambe.—1 Ko. 3:9.
Esilá kokómela yo olɛmba nzoto na bantango mosusu mpo bato ya teritware na yo bazali kosepela na nsango malamu te to mpo ozali kokuta bango na bandako te? Soki okutani na makambo ya ndenge wana, okoki kosala nini mpo obatela esengo na yo to mpo obakisa yango? Ezali mpe na ntina otalela mosala ya kosakola na ndenge ya malamu. Yango elimboli nini? Kobosana te ete ntina ya libosoliboso oyo tosakolaka ezali mpo na koyebisa bato nkombo ya Nzambe mpe Bokonzi na ye. Yesu alobaki polele ete kaka bato moke nde bakolanda ye. (Mat. 7:13, 14) Ntango tozali na mosala ya kosakola, tosalaka elongo na Yehova, Yesu, mpe baanzelu. (Mat. 28:19, 20; Em. 14:6, 7) Yehova azali koluka bato oyo bazali na mposa ya kosalela ye. (Yoa. 6:44) Na yango, soki moto aboyi koyoka biso lelo, ntango mosusu akoki koyoka biso na mbala ya nsima. Ndeko moko na nkombo Déborah alobi boye: “Kolɛmba nzoto ekoki kozala ebundeli moko ya makasi oyo Satana azali kosalela.” Kasi Yehova Nzambe azali na nguya mingi koleka Satana ná bibundeli na ye nyonso. w20.12 26 par. 18-19; 27 par. 21
Mwamibale, 23 sanza ya 8
Tókoba kolingana, mpo bolingo euti na Nzambe.—1 Yoa. 4:7.
Bandeko mingi ya sembo basalaka mosala ya mosuni mokolo mobimba mpo na kozwa eloko ya kobikela mpe kokokisa bamposa ya mabota na bango. Atako bongo, bakristo yango ya sembo bapesaka ebongiseli ya Nzambe mabɔkɔ na kotalela makoki na bango. Na ndakisa, bamosusu bazali kosalisa bandeko oyo bazwi makama, bamosusu bazali kopesa mabɔkɔ na misala ya kotonga bandako ya losambo, mpe moto nyonso azali na libaku ya kopesa makabo mpo na mosala ya kosakola na mokili mobimba. Basalaka makambo nyonso wana mpo balingaka Nzambe mpe bato. Pɔsɔ na pɔsɔ, tomonisaka ete tolingaka bandeko na biso na ndenge toyanganaka, tosalaka masolo, mpe topesaka biyano na makita ya lisangá. Ata soki tolɛmbi ndenge nini, tozangaka makita te. Mpe ata soki tokoki kobanga, topesaka biyano kaka. Lisusu, atako biso moko mpe tozalaka na mikakatano, tolendisaka basusu liboso mpe nsima ya makita. (Ebr. 10:24, 25) Tozali mpenza na botɔndi mpo na mosala makasi oyo bandeko na biso bazali kosala! w21.01 10 par. 11
Mwamisato, 24 sanza ya 8
Tólukaka te komimonisa ete toleki bamosusu.—Gal. 5:26.
Bato ya lolendo balingaka ete basusu bákumisa bango, yango wana ezalaka mpasi mpo bapesa basusu longonya. Mbala mingi balukaka komikokanisa na basusu mpe basalaka nyonso mpo kaka báleka bato mosusu. Na esika ya kopesa basusu formasyo mpe mikumba, mbala mingi moto ya lolendo akanisaka ete ye nde asengeli kosala likambo moko boye, mpo akanisaka ete basusu bakosala yango malamu te. Mpe mbala mingi, moto ya lolendo amimonaka ete azali na ntina mingi mpe ayokelaka basusu zuwa. Soki tomoni ete tozalaka na lolendo, tosengeli mpenza kobondela Yehova asalisa biso ‘tókómisa makanisi na biso makanisi ya sika’ mpo ezaleli yango ya mabe ezwa misisa te na mitema na biso. (Rom. 12:2) Tosengeli mpenza kozala na botɔndi mpo na ndakisa ya Yehova! (Nz. 18:35) Komikitisa ya Yehova emonanaka na ndenge asalelaka basaleli na ye makambo mpe tosengeli komekola ye. Lisusu, tosengeli komekola baoyo basalelaki Yehova na komikitisa. Tiká ete tópesaka ntango nyonso Yehova lokumu mpe nkembo oyo abongi na yango.—Em. 4:11. w20.08 13 par. 19-20
Mwaminei, 25 sanza ya 8
Baoyo bazali kobala bakozwa bolɔzi na kati ya mosuni na bango.—1 Ko. 7:28.
Libala ezali likabo ya kokoka oyo eutá na Nzambe. Kasi, tozali bato ya kozanga kokoka. (1 Yoa. 1:8) Yango nde ntina oyo Liloba ya Nzambe ekebisi babalani ete bakokutana na mikakatano, mpe ebengi yango “bolɔzi na kati ya mosuni na bango.” Yehova alingi ete mibali bakristo bákokisaka bamposa ya elimo mpe ya mosuni ya bato ya libota na bango. Alingi mpe ete mibali bálingaka bato ya libota na bango. (1 Tim. 5:8) Nzokande, atako bandeko basi bazalaka na makambo mingi ya kosala, basengeli kozwaka ntango ya kotánga mpe ya komanyola Liloba ya Nzambe mokolo na mokolo, mpe ya kobondela Yehova na motema mobimba. Yango ekoki kozala pɛtɛɛ te. Basi bazalaka na makambo mingi ya kosala, kasi ezali na ntina ete bázwaka ntango ya kosala makambo yango. Mpo na nini? Mpo Yehova alingi ete mokomoko na biso akolisa mpe abatela boyokani ya malamu elongo na ye. (Mis. 17:27) Toboyi te, ekoki kosɛnga ete mwasi asala makasi mpo amikitisa liboso ya mobali na ye oyo azali moto ya kozanga kokoka. Kasi, soki ayebi ntina oyo Biblia esɛngi ye amikitisaka liboso ya mobali na ye, ekozala mpasi te mpo asala yango. w21.02 9 par. 3, 6-7
Mwamitano, 26 sanza ya 8
Kondima na bino oyo emekami ezali kobota ezaleli ya koyika mpiko.—Yak. 1:3.
Tokoki kokokanisa minyoko na mɔtɔ oyo basalelaka mpo na konyangwisa ebende. Soki ebende yango ezwi mɔtɔ makasi, na nsima ekómi malili, ebende yango ekómaka lisusu makasi koleka. Ndenge moko mpe, ntango tozali koyika mpiko na minyoko, kondima na biso ekómaka lisusu makasi. Yango wana Yakobo akomaki ete: “Tiká ezaleli ya koyika mpiko esala mosala na yango mobimba mpo bózala bato oyo bakoki na makambo nyonso mpe babongi na makambo nyonso.” (Yak. 1:4) Ntango minyoko ekómisi kondima na biso lisusu makasi, yango ekoki kosalisa biso tóyika mpiko na esengo. Na mokanda oyo Yakobo akomaki, alobeli mpe makambo mosusu oyo ekoki kotinda biso tóbungisa esengo na biso. Mokakatano moko ezali ya koyeba te oyo tosengeli kosala. Ntango tokutani na mikakatano, tozalaka na mposa ete Yehova asalisa biso mpo tózwa bikateli oyo ekosepelisa ye, oyo ekozala mpo na litomba ya bandeko na biso bakristo, mpe oyo ekosalisa biso tóbatela bosembo na biso. (Yir. 10:23) Tozalaka na mposa ya bwanya mpo na koyeba oyo tosengeli kosala, mpe oyo tosengeli koloba na baoyo bazali kotɛmɛla biso. Soki tozali koyeba te oyo tosengeli kosala, yango ekoki kolɛmbisa biso nzoto, mpe tokoki mbala moko kobungisa esengo na biso. w21.02 28 par. 7-9
Mwapɔsɔ, 27 sanza ya 8
Bólinganaka makasi na motema moko.—1 Pe. 1:22.
Yehova azali mpenza ndakisa na likambo yango. Alingaka biso mingi mpenza. Na yango, soki tozali sembo epai na ye, akotika soki moke te kolinga biso. (Rom. 8:38, 39) Liloba ya Grɛki oyo ebongolami na “makasi” ezali kopesa likanisi ya moto moko oyo azali kosala nyonso oyo akoki mpo na komonisa bolingo. Na bantango mosusu, ezalaka pɛtɛɛ te komonisela bandeko na biso bakristo bolingo. Soki ndeko moko azokisi biso, tosengeli ‘kokanga motema moto na moto na makambo ya mosusu na bolingo, tósala makasi mpenza mpo na kobatela bomoko ya elimo na ekanganeli ya kimya oyo esangisaka.’ (Ef. 4:1-3) Tokobanda komona kaka mabunga ya bandeko te. Tokosala nyonso oyo tokoki mpo tótalelaka bandeko ndenge Yehova atalelaka bango. (1 Sa. 16:7; Nz. 130:3) Ezalaka ntango nyonso pɛtɛɛ te komonisela bandeko na biso bolingo ya bondeko, mingimingi soki toyebi mabunga na bango. Emonani ete bakristo mosusu ya siɛklɛ ya liboso mpe bakutanaki na mokakatano yango, ndenge ezalaki mpo na Evodi ná Sɛntishe. Ntoma Paulo alendisaki bango “bázala likanisi moko na kati ya Nkolo.”—Flp. 4:2, 3. w21.01 22-23 par. 10-11
Mwalomingo, 28 sanza ya 8
Nakomeli bino, bilenge, mpamba te bozali makasi mpe liloba ya Nzambe ezali na kati na bino mpe bolongi moto mabe.—1 Yoa. 2:14.
Bandeko oyo bakómi mibange basepelaka mingi na bino bilenge mpo bosalelaka Yehova elongo “na bomoko.” (Sef. 3:9) Basepelaka mingi na milende oyo bosalaka mpo na kokokisa na esengo mpenza mikumba oyo bapesá bino. Bozali mpenza na motuya na miso na bango. Bandeko mibali oyo bozali naino bilenge, bóbosana te ete Yehova alingaka bino mpe atyelaka bino motema. Asakolaki ete na mikolo ya nsuka, ekozala na limpinga moko ya bilenge, oyo bakomipesa na bolingo na bango moko. (Nz. 110:1-3) Ayebi ete bolingaka ye, mpe ete bolingaka kosala nyonso oyo bokoki mpo na kosalela ye. Na yango, zalá na motema molai epai ya bato mosusu mpe epai na yo moko. Soki osali mabunga, ndimá formasyo mpe disiplini oyo bakopesa yo, mpe talelá yango lokola euti epai ya Yehova. (Ebr. 12:6) Saláká nyonso oyo okoki mpo na kokokisa mokumba nyonso oyo bapesi yo. Mpe oyo eleki ntina, na makambo nyonso oyo ozali kosala, sepelisá motema ya Tata na yo ya likoló.—Mas. 27:11. w21.03 7 par. 17-18
Mwayambo, 29 sanza ya 8
Omonisi ete olɛmbi nzoto na mokolo ya mpasi? Nguya na yo ekozala moke.—Mas. 24:10.
Ezali na makambo mingi oyo ekoki kolɛmbisa biso nzoto: mosusu emonanaka kasi mosusu emonanaka te. Na kati ya makambo yango tokoki kotánga ezaleli na biso ya kozanga kokoka, bolɛmbu na biso, mpe maladi. Tokoki mpe kolɛmba nzoto mpo bapesi biso te mokumba moko oyo tosepelaka na yango na mosala ya Yehova, to mpo tozali kosakola na esika oyo bato bazali kondima nsango malamu te. Ezalaka mpasi te tómitalela na ndenge ya mabe mpe tóyoka mpasi koleka ndelo mpo na mabunga na biso. Yango ekoki kotinda biso tókanisa ete, mpo na mabunga oyo tosalaka, Yehova akondima te tókɔta na Paradiso. Makanisi ya ndenge wana ekoki kozala mabe mpenza. Biblia emonisi polele ete, longola kaka Yesu Kristo, bato nyonso ‘basalaka masumu.’ (Rom. 3:23) Kasi Yehova, Nkolo Biblia, atyaka miso kaka na mabunga na biso te, mpe azelaka te ete tósala makambo lokola bato ya kokoka. Kasi azali nde Tata ya bolingo oyo alingaka kosalisa biso. Azali mpe na motema molai. Amonaka milende oyo tosalaka mpo na kobundisa bolɛmbu na biso mpe mpo na kolonga makanisi mabe oyo tozalaka na yango mpo na biso moko. Lisusu, azali pene ya kosalisa biso.—Rom. 7:18, 19. w20.12 22 par. 1-3
Mwamibale, 30 sanza ya 8
Bandeko, mpo na kosukisa, bókoba kosepela, kosembolama.—2 Ko. 13:11.
Biso nyonso tozali kosala mobembo. Mokano na biso ezali ya kofanda na mokili ya sika, epai Yehova akoyangela na bolingo mpenza. Mokolo na mokolo, tosalaka nyonso mpo tólanda nzela oyo ezali komema na bomoi. Kasi ndenge Yesu alobaki yango, nzela yango ezali nkaka mpe na bantango mosusu kolanda yango ezalaka pɛtɛɛ te. (Mat. 7:13, 14) Lokola tozali bato ya kozanga kokoka, ezalaka mpasi te mpo tóbunga nzela yango. (Gal. 6:1) Soki tolingi kotikala na nzela ya nkaka oyo ezali komema na bomoi, tosengeli kondima kosembola makanisi na biso, mpe makambo oyo tosalaka. Ntoma Paulo alendisi biso tókoba “kosembolama.” Ezalaka pɛtɛɛ te tótalela malamumalamu makanisi mpe mayoki na biso. Mpo na nini? Mpo motema na biso ezali na bokosi, mpe ekoki kozala mpasi mpo tóyeba likambo oyo yango ekoki kotinda biso tósala. (Yir. 17:9) Ezalaka mpasi te mpo tómikosa na “makanisi ya lokuta.” (Yak. 1:22) Yango wana, tosengeli kosalela Liloba ya Nzambe mpo tómitalela malamumalamu mpe tóyeba “makanisi mpe mikano ya motema” na biso.—Ebr. 4:12, 13. w20.11 18 par. 1-3
Mwamisato, 31 sanza ya 8
Mpo na kopesana lokumu, bózala bato ya liboso.—Rom. 12:10.
Soki tozali na komikitisa mpe na bopɔlɔ, na ntembe te tokozala na esengo. Mpo na nini? Mpo soki toyebi esika makoki na biso esuki, tokozala na botɔndi mpe na esengo mpo na lisalisi nyonso oyo basusu bapesi biso. Na ndakisa, kanisá ntango Yesu abikisaki bato ya maba zomi. Kaka moko nde azongaki mpo na kopesa Yesu matɔndi ndenge abikisaki ye na maladi wana ya mabe. Lokola moto yango azalaki na komikitisa mpe bopɔlɔ ayebaki ete akokaki te komibikisa ye moko kozanga lisalisi ya Yesu. Yango wana, amonisaki botɔndi mpo na lisalisi oyo azwaki mpe akumisaki Nzambe. (Luka 17:11-19) Bato ya komikitisa mpe ya bopɔlɔ bazalaka na boyokani ya malamu ná basusu mpe ezalaka mpasi te mpo bázwa baninga ya malamu. Mpo na nini? Mpo bayebaka ete basusu mpe bazalaka na bizaleli ya malamu mpe batyelaka bango motema. Bato ya komikitisa mpe ya bopɔlɔ basepelaka ntango basusu bakokisi malamu mokumba nyonso oyo bapesaki bango, mpe baumelaka te mpo na kopesa bango longonya mpe kokumisa bango. w20.08 12 par. 17-18