Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • es22 nk. 88-97
  • Sanza ya 9

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Sanza ya 9
  • Tótángaka Makomami mokolo na mokolo—2022
  • Mitó ya makambo mike
  • Mwaminei, 1 sanza ya 9
  • Mwamitano, 2 sanza ya 9
  • Mwapɔsɔ, 3 sanza ya 9
  • Mwalomingo, 4 sanza ya 9
  • Mwayambo, 5 sanza ya 9
  • Mwamibale, 6 sanza ya 9
  • Mwamisato, 7 sanza ya 9
  • Mwaminei, 8 sanza ya 9
  • Mwamitano, 9 sanza ya 9
  • Mwapɔsɔ, 10 sanza ya 9
  • Mwalomingo, 11 sanza ya 9
  • Mwayambo, 12 sanza ya 9
  • Mwamibale, 13 sanza ya 9
  • Mwamisato, 14 sanza ya 9
  • Mwaminei, 15 sanza ya 9
  • Mwamitano, 16 sanza ya 9
  • Mwapɔsɔ, 17 sanza ya 9
  • Mwalomingo, 18 sanza ya 9
  • Mwayambo, 19 sanza ya 9
  • Mwamibale, 20 sanza ya 9
  • Mwamisato, 21 sanza ya 9
  • Mwaminei, 22 sanza ya 9
  • Mwamitano, 23 sanza ya 9
  • Mwapɔsɔ, 24 sanza ya 9
  • Mwalomingo, 25 sanza ya 9
  • Mwayambo, 26 sanza ya 9
  • Mwamibale, 27 sanza ya 9
  • Mwamisato, 28 sanza ya 9
  • Mwaminei, 29 sanza ya 9
  • Mwamitano, 30 sanza ya 9
Tótángaka Makomami mokolo na mokolo—2022
es22 nk. 88-97

Sanza ya 9

Mwaminei, 1 sanza ya 9

Nsima na yango nakosopela bato ya ndenge nyonso elimo na ngai.​—Yoe. 2:28.

Ntoma Petro asalelaki maloba oyo ekeseni mwa moke ntango azongelaki esakweli ya Yoele. (Mis. 2:16, 17) Na esika asalela maloba “nsima na yango,” Petro alobaki nde: “Mpe na mikolo ya nsuka.” Elingi koloba na mikolo ya nsuka ya ebongiseli ya Bayuda liboso Yerusaleme mpe tempelo na yango ebebisama, elimo ya Nzambe ekosopama na “bato ya ndenge nyonso.” Yango emonisi ete ntango mingi elekaki liboso ete eteni yango ya esakweli ya Yoele ekokisama. Ezalaki nsima ya kosopama ya elimo ya Nzambe na siɛklɛ ya liboso nde mosala ya kosakola ebandaki kokóma monene mpenza. Ntango ntoma Paulo akomaki mokanda na ye epai ya Bakolose, na mobu soki 61 T.B, alobaki ete nsango malamu esakolami “na bato ya bikólo nyonso oyo ezali na nse ya lola.” (Kol. 1:23) Yango elimboli ete mosala ya kosakola ekómaki bisika nyonso oyo basakoli bakokaki kokóma. Na lisalisi ya nguya ya elimo santu ya Yehova, mosala ya kosakola ekómi lisusu monene koleka na mikolo na biso, ekómi “tii na nsuka ya mabele!”​—Mis. 13:47.w20.04 6-7 par. 15-16

Mwamitano, 2 sanza ya 9

Ngai moko, mpe nakoluka bampate na ngai mpe nakobatela yango.​—Ezk. 34:11.

Yehova alingaka mokomoko na biso ata mpe bampate oyo babungá nzela. (Mat. 18:12-14) Nzambe alakaki ete akoluka bampate na ye oyo ebungá mpe akosalisa yango ezongisa boyokani ya malamu ná ye. Mpe amonisaki makambo oyo akosala​—makambo yango ekokani na oyo mobateli ya mpate azalaki kosala na Yisraele soki mpate moko ebungi. (Ezk. 34:12-16) Ya liboso, mobateli ya mpate azalaki koluka mpate yango, likambo oyo ezalaki kosɛnga ntango mingi mpe molende. Na nsima, ntango amoni yango, azalaki kozongisa mpate yango na etonga. Lisusu soki mpate yango ezokaki to ezalaki na nzala, na bolingo nyonso mobateli ya mpate azalaki kokanga mpota ya mpate yango, kokipe mpe koleisa yango. Bankulutu, babateli ya mpate ya “etonga ya Nzambe” basengeli kolanda matambe yango mpo na kosalisa ndeko oyo atiká lisangá. (1 Pe. 5:2, 3) Bankulutu balukaka bandeko yango, basalisaka bango bázonga na etonga, mpe na bolingo nyonso, basalisaka bango bázongisa boyokani ná Yehova. w20.06 20 par. 10

Mwapɔsɔ, 3 sanza ya 9

Bilanga . . . eteli mpo na bobuki mbuma.​—Yoa. 4:35.

Ntango Yesu alobaki ete bilanga eteli mpo na bobuki mbuma, ezalaki nde mpo akanisaki ete bato nyonso bakokóma bayekoli na ye? Te. Biblia esakolaki ete kaka bato moke nde bakondimela Yesu. (Yoa. 12:37, 38) Lisusu, Yesu azalaki na likoki ya kotánga na mitema ya bato. (Mat. 9:4) Atako bongo, atyaki likebi na ye epai ya mwa bato moke oyo bakondima, mpe asakwelaki moto nyonso na molende. Lokola biso tokoki kotánga mitema ya bato te, ebongi mpenza tótɛmɛla ezaleli ya kokanisa mabe mpo na teritware na biso to bato oyo bafandaka kuna! Kasi, monáká ete moto nyonso akoki kokóma moyekoli ya Yesu. Kobosana te makambo oyo Yesu ayebisaki bayekoli na ye. Alobaki ete elanga eteli, ekoki mpo na kobuka mbuma. Bato bakoki kobongwana mpe kokóma bayekoli ya Kristo. Yehova amonaka ete bato yango oyo bakoki kokóma bayekoli bazali “biloko kitoko.” (Hag. 2:7) Soki tozali kotalela bato ndenge Yehova ná Yesu batalelaka bango, tokoluka koyeba bindimeli na bango mpe makambo oyo basepelaka na yango. Tokomona bango lokola bapaya te, kasi nde lokola bato oyo bakoki kokóma bandeko na biso ya elimo. w20.04 13 par. 18-19

Mwalomingo, 4 sanza ya 9

Nabengi bino baninga, mpo makambo nyonso oyo nayoki epai ya Tata na ngai, nayebisi bino yango.​—Yoa. 15:15.

Biblia emonisi polele ete mpo Yehova asepela na biso, tosengeli kokóma baninga ya Yesu mpe kobatela boninga yango. Likambo moko oyo tokoki kosala mpo tókóma baninga ya Yesu ezali ya koyekola koyeba ye. Tokoki koyeba Yesu soki totángi mokanda ya Matai, Marko, Luka, mpe Yoane. Wana tozali komanyola masolo yango ya Biblia oyo elobeli bomoi ya Yesu, tokómaka kolinga Yesu mpe komemya ye mpo azalaki kosalela bato makambo na boboto. Na ndakisa, atako Yesu azalaki na bokonzi likoló ya bayekoli na ye, azalaki komona bango baombo na ye te. Kasi, ayebisaki bango makanisi na ye ya motema mpe mayoki na ye. Yesu ayokaki mpasi oyo bazalaki koyoka mpe alelaki elongo na bango. (Yoa. 11:32-36) Ata banguna na ye bandimaki ete Yesu azalaki moninga ya bato oyo bandimaki nsango na ye. (Mat. 11:19) Ntango tomekoli ndenge oyo Yesu azalaki kosalela bayekoli na ye makambo, boyokani na biso na basusu ekobonga, tokozala na esengo mingi koleka, mpe tokosepela na Kristo lisusu mingi. w20.04 22 par. 9-10

Mwayambo, 5 sanza ya 9

Mokonzi ya sudi akotomboka mpo na kobunda, akozala na limpinga moko monene mpenza ya basoda ya nguya.​—Dan. 11:25.

Na 1870, Grande-Bretagne ekómaki koyangela bitúká ebele, mpe ezalaki na limpinga ya basoda oyo elekaki na nguya na mokili mobimba. Esakweli ya Danyele ekokanisaki yango na liseke ya moke oyo epikolaki maseke mosusu misato: France, Espagne, mpe Pays-Bas. (Dan. 7:7, 8) Mpe Grande-Bretagne ekokisaki malamu mokumba ya mokonzi ya sudi na ntango ya Etumba ya Liboso ya mokili mobimba. Kaka na ntango yango, États-Unis d’Amérique ekómaki ekólo oyo eleki na nguya na makambo ya nkita mpe esalaki boyokani makasi ná Grande-Bretagne. Na boumeli ya Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, États-Unis ná Grande-Bretagne esangisaki mampinga na yango ya nguya. Na ntango yango, Grande-Bretagne ná États-Unis esalaki bokonzi ya Anglo-américain, bokonzi oyo eleki bikólo nyonso na nguya. Ndenge Danyele asakolaki yango, mokonzi yango asangisaki “limpinga moko monene mpenza ya basoda ya nguya.” Na boumeli ya mikolo ya nsuka, États-Unis ná Grande-Bretagne nde mokonzi ya sudi. w20.05 4 par. 7-8

Mwamibale, 6 sanza ya 9

Na esika oyo mai ya mikɛli ya eleko ya malili ezali kouta, ezali kozonga kuna.​—Mos. 1:7.

Lokola mabele ekabwani na moi na ntaka oyo ebongi, yango wana tozangaka mai te. Soki mabele ezalaka mwa moke pene na moi, bomoi elingaki kozala te mpo mai nyonso elingaki kokauka mpe mabele elingaki kozala mɔtɔ mpe kotikala kaka na mabanga. Soki mabele ezalaka mwa moke mosika na moi, mai elingaki kokóma libanga mpe mabele elingaki kotonda na banɛjɛ mpe na mabanga ya malili. Lokola Yehova atyá mabele na esika oyo ebongi, yango esalaka ete mai ezala ntango nyonso na mabele mpo bato ná banyama mpe biloko mosusu bázala na bomoi. Molunge ya moi ematisaka mai oyo ezali na mbu mpe na mabele likoló mpo ekóma mapata. Mbula na mbula, bakilomɛtrɛ kibe ya mai pene na 500 000 emataka na likoló. Nsima ya mikolo pene na 10, mai yango ekweaka lisusu na mabele lokola mbula to nɛjɛ. Na nsima, mai yango ezongaka lisusu na mbu to na bibale mosusu, mpe emataka lisusu na likoló. Yehova asalá bongo mpo mai ezalaka ntango nyonso na mabele. Yango emonisi ete Yehova azali na bwanya mpe na nguya ya kokamwa mpenza.​—Yobo 36:27, 28. w20.05 22 par. 6

Mwamisato, 7 sanza ya 9

Bokozwa nguya ntango elimo santu ekoya likoló na bino.​—Mis. 1:8.

Yesu alendisaki biso tókoba kosɛnga elimo santu. (Luka 11:9, 13) Na nzela ya elimo na ye, Yehova apesaka biso nguya, kutu ata “nguya oyo eleki makasi.” (2 Ko. 4:7) Na lisalisi ya elimo ya Nzambe, tokoki koyikela ata mikakatano ya ndenge nini mpiko. Elimo santu ekoki mpe kosalisa biso tókokisa mikumba na biso na mosala ya Nzambe. Ekoki mpe kokolisa makoki na biso. Ya solo, soki tolongaka na makambo nyonso oyo tosalaka na mosala ya Nzambe, ezalaka mpo na lisalisi ya elimo santu. Tokoki komonisa botɔndi mpo na likabo ya elimo santu soki tozali kobondela ete esalisa biso tóyeba makanisi mpe bamposa ya mabe oyo ezali na mitema na biso. (Nz. 139:23, 24) Soki tosali bongo, Yehova, na nzela ya elimo na ye, akoki kosalisa biso tómona makanisi mpe bamposa ya mabe. Na nsima, tosengeli kobondela Yehova mpo elimo na ye epesa biso makasi ya kobundisa mpe kolonga bamposa yango. Na ndenge yango, Yehova akomona ete tozali na ekateli makasi ya koboya kosala eloko nyonso oyo ekoki kotinda ye aboya kopesa biso elimo santu na ye.​—Ef. 4:30. w20.05 28-29 par. 10-12

Mwaminei, 8 sanza ya 9

Nayebisi bango nkombo na yo.​—Yoa. 17:26.

Ntango tozali kosantisa nkombo ya Nzambe, tomekolaka ndakisa ya Yesu Kristo. Yesu ayebisaki bato nkombo ya Tata na ye kaka te na ndenge azalaki kosalela nkombo yango, kasi mpe na ndenge azalaki koteya bato makambo oyo Yehova alingaka mpenza. Na ndakisa, akweisaki makanisi ya Bafarisai oyo mbala mingi bazalaki kotinda bato bámona ete Yehova azali motema mabe, makambo makasimakasi, tokoki kopusana penepene na ye te, mpe azangá mawa. Kasi, Yesu asalisaki bato bámona ete Tata na ye azalaka makambo makasimakasi te, azali na motema molai, azali bolingo, mpe alimbisaka. Asalisaki mpe bato báyeba Yehova na ndenge amekolaki bizaleli ya Tata na ye na bomoi na ye ya mokolo na mokolo. (Yoa. 14:9) Lokola Yesu, tokoki koyebisa bato makambo etali Yehova, mpe koteya bango báyeba ete azali Nzambe ya bolingo mpe ya boboto. Soki tosali bongo, tokokweisa lokuta oyo balobaka mpo na Yehova. Tokosantisa nkombo ya Nzambe, na ndenge tokosalisa bato bátalela yango ete ezali mosantu. Na nzela ya maloba mpe misala na biso, tozali kosalisa bato báyeba ndenge Yehova azalaka. Tokosantisa mpe nkombo yango soki tozali kosalisa basusu bálongola makanisi ya mabe mpo na oyo etali Nzambe. w20.06 6 par. 17-18

Mwamitano, 9 sanza ya 9

Tólukaka te komimonisa ete toleki bamosusu, kobimisa kowelana na kati na biso, koyokelana likunya.​—Gal. 5:26.

Tokoki kosalela basite internet yango mpo na kosolola na bandeko ya libota mpe baninga. Kasi bato mosusu batyaka bakomantɛrɛ, bafɔtɔ mpe bavideo na basite internet yango mpo basusu bákumisa bango. Ezali lokola nde bato yango balobaka ete: “Bótala ndenge nazali.” Basusu kutu basalelaka maloba ya nsɔni, ntango bazali kolobela bafɔtɔ na bango moko to mpe oyo ya bato mosusu. Yango mpe emonisaka ete bazangi komikitisa mpe ezaleli ya komitya na esika ya basusu; bizaleli oyo bakristo basengeli kolona. (1 Pe. 3:8) Soki osalelaka basite internet ya kosolola na baninga, omituna boye: ‘Bakomantɛrɛ, bafɔtɔ mpe bavideo oyo natyaka emonisaka ete nazali moto ya lolendo? Nakoki kotinda basusu báyoka zuwa?’ Bakristo basengeli te koluka ete bato mosusu bákumisa bango. Balandaka toli ya Biblia oyo ezali na mokapo ya lelo. Soki tozali na komikitisa tokokóma te lokola bato ya mokili, oyo bazalaka na lolendo mpe oyo balingaka basusu bákanisa ete bazali na ntina mingi.​—1 Yoa. 2:16. w20.07 6 par. 14-15

Mwapɔsɔ, 10 sanza ya 9

Liboso nazalaki kofinga mpe konyokola mpe nazalaki moto ya lofundo. Nzokande, bayokelaki ngai mawa, mpo nazalaki na boyebi te.​—1 Tim. 1:13.

Liboso ntoma Paulo akóma moyekoli ya Kristo, azalaki elenge mobali oyo azalaki kofinga mpe konyokola bayekoli ya Yesu. (Mis. 7:58) Yesu ye moko apekisaki Paulo, oyo na ntango wana ayebanaki na nkombo Saulo, atika konyokola lisangá ya bokristo. Yesu alobaki na Paulo uta na likoló mpe akómisaki ye mokufi-miso. Mpo amona lisusu, Paulo asengelaki koluka lisalisi epai ya bato oyo azalaki konyokola liboso. Na komikitisa nyonso, Paulo andimaki lisalisi epai ya moyekoli moko na nkombo Ananiasi oyo afungolaki ye miso. (Mis. 9:3-9, 17, 18) Na nsima, Paulo akómaki ndeko moko oyo ayebanaki mingi na lisangá ya bokristo, kasi abosanaki te liteya oyo azwaki epai ya Yesu na nzela ya Damasi. Paulo akobaki kozala na komikitisa mpe andimaki lisalisi ya bandeko ya lisangá. Ayebaki ete bazalaki ‘lisalisi oyo ezalaki kopesa ye makasi.’​—Kol. 4:10, 11. w20.07 18-19 par. 16-17

Mwalomingo, 11 sanza ya 9

Tata na bino andimi kopesa bino bokonzi.​—Luka 12:32.

Atako Yehova azali Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso, andimaka mpe kopesa basusu mwa bokonzi. Na ndakisa, atyá Yesu azala Mokonzi ya Bokonzi na ye, mpe akopesa mwa bokonzi mosusu na bato 144 000 oyo bakoyangela elongo na Yesu. Ya solo, Yehova apesaki Yesu formasyo mpo azala Mokonzi mpe Nganga-nzambe Monene. (Ebr. 5:8, 9) Apesi mpe formasyo na baoyo bakoyangela elongo na Yesu, kasi alukaka te kolandela makambo nyonso ya mikemike oyo bazali kosala mpo na kokokisa mokumba yango. Kutu, atyelaka bango nde motema ete bakosala mokano na ye. (Em. 5:10) Soki Tata na biso ya likoló, oyo azalaka na mposa te ete moto mosusu asalisa ye, apesaka basusu mikumba, bongo biso, tosengeli mpe kosala bongo te? Na ndakisa, ozali tata ya libota to nkulutu na kati ya lisangá? Landá ndakisa ya Yehova mpe pesáká basusu mikumba. Kolandelaka te makambo nyonso ya mikemike oyo bazali kosala mpo na kokokisa mikumba yango. Soki omekoli Yehova, mosala ekosalema mpe okopesa basusu formasyo, mpe okosalisa basusu bámimona ete bazali na ntina.​—Yis. 41:10. w20.08 9 par. 5-6

Mwayambo, 12 sanza ya 9

Mwana ya moto ayaki mpo na koluka mpe kobikisa bato oyo babungaki.​—Luka 19:10.

Yehova alingi ete tómiyoka ndenge nini mpo na mpate na ye oyo ebungá? Tokoki kozwa liteya na ndakisa ya Yesu. Ayebaki ete mpate mokomoko ezali na motuya na miso ya Yehova, na yango asalaki nyonso mpo na kosalisa “bampate ya ndako ya Yisraele oyo babungá” bazongela Yehova. (Mat. 15:24) Lokola mobateli ya mpate ya malamu, Yesu asalaki oyo ekoki mpo ata mpate moko ya Yehova ebunga te. (Yoa. 6:39) Ntoma Paulo alendisaki bankulutu ya lisangá ya Efese bálanda ndakisa na ye. Akomaki boye: “Bosengeli kosalisa baoyo bazali bato ya bolɛmbu, mpe bosengeli kobosana te maloba ya Nkolo Yesu, ntango ye moko alobaki ete: ‘Esengo ya kopesa eleki oyo ya kozwa.’” (Mis. 20:17, 35) Bavɛrsɛ yango emonisi ete bankulutu bazali na mokumba monene ya kobatela basaleli ya Yehova. Salvador, nkulutu moko na Espagne alobi boye: “Ntango nakanisaka ndenge oyo Yehova atyelaka bampate na ye oyo ebungá likebi, yango etindaka ngai nasala oyo nakoki mpo na kosalisa bango. Nayebi ete Yehova asɛngi ngai nabatela bango.” w20.06 23 par. 15-16

Mwamibale, 13 sanza ya 9

Makambo ya kala eleki.​—Em. 21:4.

Liboso tókóma bato ya kokoka, Yehova akozela tii na nsuka ya Boyangeli ya Mbula Nkóto. Kino ntango yango ekoka, Yehova akokoba kolimbisa masumu na biso. Na yango lokola Yehova, tosengeli kotyaka likebi mingi na bizaleli malamu ya basusu mpe komoniselaka bango motema molai. Yesu ná baanzelu batɔndaki na esengo ntango Yehova akelaki mabele. Sikoyo kanisá esengo oyo bakozala na yango ntango bakomona mabele etondi na bato ya kokoka oyo balingaka mpe basalelaka Yehova. Kanisá esengo oyo bato oyo bakokende na likoló bakoyoka ntango bakomona ndenge mosala na bango ememeli bato bolamu. (Em. 4:4, 9-11; 5:9, 10) Kanisá mpe ntango tokobimisa mai ya miso mpo na esengo kasi mpo na mawa te! Kanisá ntango maladi, mawa, mpe liwa ekozala lisusu te mpo na libela. Liboso ntango yango ekoka, zwá ekateli ya komekola Tata na biso ya bolingo, ya bwanya, mpe oyo amonisaka motema molai. Soki osali bongo, okobatela esengo na yo ata soki okutani na mokakatano nini. (Yak. 1:2-4) Tosengeli mpenza komonisa botɔndi mpo na elaka ya Yehova oyo ete: “Lisekwa ekozala!”​—Mis. 24:15. w20.08 19 par. 18-19

Mwamisato, 14 sanza ya 9

Nsango malamu oyo ya bokonzi ekosakolama na mabele mobimba esika bato bafandi.​—Mat. 24:14.

Biblia ezali likabo moko ya bolingo oyo Nzambe apesá biso. Na lisalisi ya elimo santu, Tata na biso ya likoló atindaki bato bákoma Biblia mpo alingaka biso mingi mpenza. Na nzela ya Biblia, Yehova apesaka biso biyano na mituna eleki ntina oyo tokoki komituna. Na ndakisa: Toutá wapi? Mpo na nini tozalaka na bomoi? Mpe makambo nini ekosalema na mikolo oyo ezali koya? Lokola Yehova alingi ete bana na ye nyonso bázwa biyano na mituna wana, yango wana, na boumeli ya basiɛklɛ ebele atindaki bato bábongola Biblia na minɔkɔ ebele. Lelo oyo, Biblia mobimba to ndambo na yango ebongolami na minɔkɔ koleka 3 000! Biblia ezali buku oyo ebongolami mpe ekabolami mingi koleka babuku mosusu nyonso na mokili mobimba. Tokomonisa ete tozali na botɔndi mpo na Biblia soki tozali kotánga yango mokolo na mokolo, kokanisa na mozindo na makambo oyo yango eteyaka, mpe kosala nyonso mpo na kosalela makambo oyo toyekoli. Longola yango, tokomonisela Nzambe botɔndi na biso soki tozali kosala nyonso oyo tokoki mpo na koyebisa bato ebele makambo oyo Biblia eteyaka.​—Nz. 1:1-3; Mat. 28:19, 20. w20.05 24-25 par. 15-16

Mwaminei, 15 sanza ya 9

Liloba ya Yehova ekómeli ngai likambo ya kosambwa mpe ya kotyolama mokolo mobimba.​—Yir. 20:8.

Mosakoli Yirimia azalaki kosakola na teritware moko ya mpasi mingi. Na ntango moko boye, alɛmbaki mpenza nzoto mpe alingaki kutu kotika kosakola. Kasi atikaki te. Mpo na nini? “Liloba ya Yehova” ezalaki lokola mɔtɔ na kati ya nzoto ya Yirimia, mpe akokaki kobomba yango te! (Yir. 20:9) Biso mpe tokoyoka ndenge wana soki totondisi makanisi mpe motema na biso na Liloba ya Nzambe. Yango nde ntina mosusu oyo tosengeli koyekolaka Liloba ya Nzambe mokolo na mokolo mpe komanyola yango. Yango ekosala ete esengo na biso ekoba kobakisama mpe mosala na biso ya kosakola ebota mbuma. (Yir. 15:16) Na yango, soki olɛmbi nzoto, bondelá Yehova na motema moko mpo asunga yo. Akosalisa yo olonga mabunga, bolɛmbu na yo, to ntango ozali kobɛla. Akosalisa yo mpo otalelaka na ndenge ya malamu mikumba oyo ozali na yango na mosala na ye. Mpe akosalisa yo otalelaka mosala na yo ya kosakola na ndenge ya malamu. Lisusu, bondelá Tata na yo ya likoló mpe yebisá ye mpenza ndenge ozali komiyoka. Na lisalisi na ye, okolonga etumba oyo ozali kobunda ná ezaleli ya kolɛmba nzoto. w20.12 27 par. 20-21

Mwamitano, 16 sanza ya 9

Bondelá . . . basi oyo bazali mikóló lokola bamama, bilenge basi lokola bandeko basi na makanisi ya pɛto mpenza.​—1 Tim. 5:1, 2.

Mpo na bandeko basi mosusu, makita nde ezalaka libaku ya libosoliboso oyo esalisaka bango bázala elongo na bandeko ya lisangá. Na yango, tosengeli kosalela libaku yango mpo na kotombela bango boyei malamu, kosolola na bango, mpe komonisa bango ete totyelaka bango likebi. Lokola Yesu, tokoki mpe kolekisa ntango elongo na bandeko basi. (Luka 10:38-42) Na ndakisa, tokoki kobengisa bango na ndako mpo na kolya mwa eloko, to mpo na kominanola elongo. Soki tosali bongo, tosengeli kosala makasi tóbɛta kaka masolo ya kolendisa. (Rom. 1:11, 12) Bankulutu basengeli kozala na makanisi lokola oyo ya Yesu. Ayebaki ete kozala monzemba ekoki kozala mpasi mpo na basusu, kasi amonisaki polele ete esengo ya solosolo eutaka te na kobala to na kobota bana. (Luka 11:27, 28) Kasi moto azalaka na esengo ya solosolo soki atye mosala ya Yehova na esika ya liboso na bomoi na ye. (Mat. 19:12) Mingimingi bankulutu basengeli kozwaka bandeko basi bakristo lokola bamama mpe lokola bandeko na bango ya basi. Bankulutu basengeli kozwaka ntango liboso to nsima ya makita mpo na kosolola na bandeko basi. w20.09 21-22 par. 7-9

Mwapɔsɔ, 17 sanza ya 9

Moloni-bilanga akobaka kozela mbuma ya malamu . . . Bino mpe bózala na motema molai.​—Yak. 5:7, 8.

Na Yisraele, moloni-bilanga azalaki kolona mboto kaka soki mbula ya liboso ya eleko ya otɔnɛ euti kobɛta mpe kobuka mbuma yango soki mbula ya nsuka ya eleko ya prɛnta ebɛti. (Mrk. 4:28) Tokomonisa bwanya soki tomekoli motema molai ya moloni-bilanga yango. Kasi, yango ezalaka ntango nyonso pɛtɛɛ te. Lokola tozali bato ya kozanga kokoka, tolingaka komona mbala moko mbuma ya misala na biso. Kasi, soki tolingi ete milona na biso ekola malamu mpe ebota mbuma, tosengeli ntango nyonso kotyela yango likebi. Tosengeli kobalola mabele, kolona, kolongolaka matiti mabe, mpe komwangiselaka milona yango mai. Soki tolingi kokómisa bato bayekoli, tosengeli mpe kosala milende mingi. Esɛngaka ntango mpo na kosalisa bayekoli ya Biblia bátika kokanisela basusu mabe, mpe bátyelaka bato likebi. Motema molai ekosalisa biso tólɛmba nzoto te ntango bato mosusu baboyi koyoka biso. Tosengeli mpe komonisa motema molai ata ntango bato mosusu basepeli koyoka biso mpe bandimi koyekola. Tokoki te kotinda moyekoli ya Biblia na makasi ete akóma na kondima makasi. Na bantango mosusu, ata bayekoli ya Yesu bazalaki na mokakatano ya kokanga ntina ya makambo oyo azalaki koteya. (Yoa. 14:9) Tóbosana te ete tokoki kolona mpe komwangisa mai, kasi Nzambe nde akolisaka.​—1 Ko. 3:6. w20.09 11 par. 10-11

Mwalomingo, 18 sanza ya 9

Nakokumisa Yehova na motema na ngai mobimba na etuluku ya baninga ya motema ​—bato ya makambo alima ​—mpe na liyangani.​—Nz. 111:1.

Biso nyonso tolingaka ete bayekoli na biso ya Biblia bákola mpe bázwa batisimo. Moko ya makambo ya ntina oyo tokoki kosala mpo na kosalisa bango ezali ya kolendisa bango báyanganaka na makita ya lisangá. Mbala mingi bayekoli oyo baumelaka te mpo na koyangana na makita bakolaka mbangu na elimo. Bateyi mosusu bayebisaka bayekoli na bango ete bakoyeba ndambo ya makambo na boyekoli na bango ya Biblia, kasi ndambo mosusu bakoyeba yango na makita ya lisangá. Tángá Baebre 10:24, 25 elongo na moyekoli na yo, mpe monisá ye bolamu oyo akozwa soki abandi koyangana na makita. Na esengo mpenza, yebisá ye likambo moko oyo oyekolaki na likita oyo eleki. Ntango akomona ete olingaka makita mingi, yango ekopesa mpe ye mposa ya koyangana na makita. Makambo oyo akomona na likita ya liboso oyo akoyangana, ekoleka mosika makambo oyo amoná mpe ayoká na mangomba mosusu. (1 Ko. 14:24, 25) Akokutana na bato oyo bazali ndakisa malamu oyo ye akoki komekola mpe oyo bakosalisa ye akola tii azwa batisimo. w20.10 10-11 par. 14-15

Mwayambo, 19 sanza ya 9

Nani azali molakisi lokola [Nzambe]?​—Yobo 36:22.

Elimo ya Nzambe ekosalisa yo mpo osalela makambo oyo ozali kotánga mpe koyekola na Liloba ya Nzambe. Bondelá lokola mokomi moko ya nzembo oyo alobaki: “Ee Yehova, lakisá ngai nzela na yo. Nakotambola na solo na yo. Pesá ngai motema moko mpo nabanga nkombo na yo.” (Nz. 86:11) Na yango, kobá kotánga mpe koyekola Biblia mpe mikanda oyo ebongiseli ya Yehova ezali kobimisela biso. Na ntembe te, mokano na yo ezali kaka te ya kozwa boyebi. Osengeli kokɔtisa mateya ya solo na motema na yo mpe kosalela yango na bomoi na yo. Elimo ya Yehova ekosalisa yo osala yango. Osengeli mpe kolendisaka bandeko ya lisangá. (Ebr. 10:24, 25) Mpo na nini? Mpo bazali bandeko na yo ya elimo. Bondelá Yehova apesa yo elimo na ye mpo esalisa yo opesaka biyano ya malamu na makita, mpe osalaka masolo malamu mpenza. Na ndenge yango, okomonisa Yehova ná Mwana na ye ete olingaka “bampate” na bango mpe ozwaka yango na motuya mingi. (Yoa. 21:15-17) Mosika te, kaka ebongiseli oyo etambwisami na elimo ya Nzambe nde ekotikala na mabele. w20.10 24-25 par. 15-17

Mwamibale, 20 sanza ya 9

Bango nyonso basundolaki ye mpe bakimaki.​—Mrk. 14:50.

Yesu asalaki nini na ntango wana oyo bantoma na ye balɛmbaki nzoto? Mwa moke nsima ya lisekwa na ye, Yesu ayebisaki bayekoli na ye mosusu ete: “Bóbanga te! Bókende, bópesa bandeko na ngai nsango [ete nasekwi].” (Mat. 28:10a) Yesu asundolaki bantoma na ye te. Atako basundolaki ye, akobaki kaka kobenga bango “bandeko na ngai.” Ndenge moko na Yehova, Yesu azalaki na motema mawa mpe azalaki kolimbisa. (2 Bak. 13:23) Ndenge moko mpe, tomitungisaka mingi mpo na baoyo batiká kosakola. Bazali bandeko na biso, mpe tolingaka bango! Tobosanaka te mosala makasi oyo bandeko yango basalá na bolingo mpenza. Bamosusu basalá yango na boumeli ya bambula ebele. (Ebr. 6:10) Tokanisaka bango mingi mpenza! (Luka 15:4-7) Na yango, tokoki kolendisa bandeko oyo batiká kosakola báyanganaka na makita ya lisangá. Mpe soki ndeko moko oyo atiká kosakola ayei na makita, tosengeli koyamba ye na esengo mpenza. w20.11 6 par. 14-17

Mwamisato, 21 sanza ya 9

Bókende mosika te koleka makambo oyo ekomamá.​—1 Ko. 4:6.

Yakobo ná Yoane mpe mama na bango basɛngaki Yesu asala likambo moko oyo azalaki na lotomo ya kosala te. Kozanga ete akakatana, Yesu ayebisaki bango ete kaka Tata na ye ya likoló nde akoki kokata soki nani akofanda na lobɔkɔ na ye ya mwasi mpe na lobɔkɔ na ye ya mobali na Bokonzi. (Mat. 20:20-23) Yesu amonisaki ete ayebaki esika makoki na ye esuki. Azalaki na bopɔlɔ. Ata mokolo moko te asalá likambo oyo Yehova apesaki ye lotomo ya kosala te. (Yoa. 12:49) Ndenge nini tokoki kolanda ndakisa ya Yesu? Tokomekola ndakisa ya Yesu na likambo etali komonisa bopɔlɔ soki tosaleli toli ya Biblia oyo ezali na mokapo ya lelo. Ntango basɛngi biso toli na likambo moko boye, tosengeli te kotinda bato na makasi bándima kaka makanisi na biso to koloba likambo moko kozanga kokanisa malamumalamu. Kasi, tosengeli nde kobenda likebi ya bato na toli ya Biblia mpe na mikanda na biso. Na ndenge yango, tokomonisa ete toyebi esika makoki na biso esuki mpe tokozongisa lokumu na “boyengebene ya mibeko” ya Mozwi-ya-Nguya-Nyonso.​—Em. 15: 3, 4. w20.08 11-12 par. 14-15

Mwaminei, 22 sanza ya 9

Kokóma moyengebene koleka ndelo te, to komimonisa na bwanya koleka ndelo te. Mpo na nini okomibebisa?​—Mos. 7:16.

Soki omoni ete osengeli kopesa moninga moko toli, makambo nini osengeli kobosana te? Liboso osolola na moninga na yo, omituna boye, ‘Namimonisaka ete nazali “moyengebene koleka ndelo”?’ Moto oyo azalaka moyengebene koleka ndelo, asambisaka bato na kolanda makanisi na ye moko, kasi te na kolanda mitinda ya Yehova, mpe mbala mingi ayokelaka bato mawa te. Nsima ya komitalela yo moko, soki omoni ete osengeli kaka kosolola na moninga na yo, yebisá ye likambo yango polele, mpe tuná ye mituna oyo ekosalisa ye amona libunga oyo asalaki. Omindimisa ete makambo nyonso oyo okoloba euti na Biblia, mpe kobosana te ete, moninga na yo akozongisa monɔkɔ nde epai ya Yehova kasi epai na yo te. (Rom. 14:10) Salelá bwanya oyo ezali na Liloba ya Nzambe, mpe ntango ozali kopesa moto toli, mekolá motema mawa ya Yesu. (Mas. 3:5; Mat. 12:20) Mpo na nini? Mpo Yehova akosalela biso makambo kaka ndenge biso mpe tosalelaka basusu.​—Yak. 2:13. w20.11 21 par. 13

Mwamitano, 23 sanza ya 9

Bótika kosambisa na kolanda oyo ezali komonana na libándá, kasi bósambisa na kosambisa ya sembo.​—Yoa. 7:24.

Okosepela ete bato básambisa yo na kolanda loposo na yo, elongi na yo, to mpe bonene ya nzoto na yo? Na ntembe te, okosepela bongo te. Na yango, koyeba ete Yehova asambisaka biso te na kotalela ndenge oyo tozali komonana na miso ya bato ezali mpenza likambo ya kolendisa! Na ndakisa, ntango mosakoli Samwele atalaki bana ya Yese, amonaki te eloko oyo Yehova azalaki komona. Yehova alobaki na Samwele ete moko ya bana ya Yese akokóma mokonzi ya Yisraele. Kasi mwana nini? Ntango Samwele amonaki Eliabe, mwana ya Yese ya liboso, alobaki boye: “Ya solo, moto ya Yehova oyo atyami mafuta ye oyo liboso na ye.” Eliabe azalaki engambe. “Kasi Yehova alobaki na Samwele ete: ‘Kotala elongi na ye te mpe bolai na ye te, mpo ngai naboyi ye.’” Liteya ezali nini? Yehova abakisaki boye: “Moto amonaka oyo emonanaka na miso; kasi Yehova, amonaka ndenge motema ezali.” (1 Sa. 16:1, 6, 7) Ezali malamu tómekola ndenge oyo Yehova asalelaka basaleli na ye makambo. w20.04 14 par. 1; 15 par. 3

Mwapɔsɔ, 24 sanza ya 9

Bótombola miso na bino mpe bótala bilanga, ndenge eteli mpo na bobuki mbuma.​—Yoa. 4:35.

Na mobembo moko oyo Yesu asalaki, amonaki bilanga, mbala mosusu bilanga ya ɔrje oyo ezalaki naino mikemike. (Yoa. 4:3-6) Esengelaki sanza soki minei eleka liboso milona yango etela mpe bábuka yango. Kasi, Yesu alobaki likambo moko oyo na ntembe te ekamwisaki bato; alobaki: “Bótombola miso na bino mpe bótala bilanga, ndenge eteli mpo na bobuki mbuma.” (Yoa. 4:35, 36) Alingaki koloba nini? Emonani ete Yesu azalaki kolobela kobuka mbuma ya elilingi, elingi koloba koyanganisa bato. Tótalela makambo oyo eutaki kosalema. Mbala mingi Bayuda bazalaki kokima kosolola na bato ya Samaria, kasi Yesu ateyaki mwasi Mosamaria moko, mpe mwasi yango andimelaki ye! Kutu, ntango Yesu azalaki koloba ete bilanga “eteli mpo na bobuki mbuma,” ebele ya bato ya Samaria oyo bayokaki nsango ya Yesu epai ya mwasi wana bazalaki koya mpo Yesu ateya bango makambo mingi. (Yoa. 4:9, 39-42) Moto moko oyo alimbolaka maloba ya Biblia alobi boye mpo na lisolo yango: “Ndenge bato bazalaki koya elulu . . . emonisaki ete bazalaki mpenza lokola mbuma oyo bakoki kobuka mpo eteli.” w20.04 8 par. 1-2

Mwalomingo, 25 sanza ya 9

Tótyelanaka likebi mpo tólendisana mpo tózala na bolingo mpe tósala misala ya malamu.​—Ebr. 10:24.

Makita esalisaka biso tózala bato oyo bayebi kosakola mpe koteya malamu. Na ndakisa, toyekolaka kosalela Bisaleli na biso mpo na koteya na ndenge ya malamu mpenza. Na yango, bongisáká makita malamu. Ntango makita ezali kosalema, yokáká na likebi. Nsima ya makita, salelá formasyo oyo ozwaki. Soki osali bongo, okokóma “soda ya solosolo ya Kristo Yesu.” (2 Tim. 2:3) Tozwaka mpe lisalisi mosusu epai ya ebele ya baanzelu ya nguya. Meká kokanisa likambo oyo kaka anzelu moko akoki kosala! (Yis. 37:36) Sikoyo, kanisá oyo limpinga ya baanzelu ya nguya bakoki kosala. Ata moto to demo moko te akoki kolonga limpinga monene ya baanzelu ya nguya ya Yehova. Yehova aleki na nguya. Na yango, soki azali elongo na biso, tokozala ntango nyonso na makasi koleka banguna na biso ata soki bazali ebele ndenge nini. (Bas. 6:16) Yango ezali mpenza likambo ya solo! Kobosana likambo yango te, mingimingi ntango moninga moko ya mosala, ya kelasi, to mpe ndeko moko ya libota oyo azali Motatoli te alobi to asali yo likambo moko oyo ekoki kolɛmbisa yo nzoto. Kobosana te ete ozali kobunda yo moko te. Lokola olandaka malako ya Yehova, yebá ete akosalisa yo. w21.03 29 par. 13-14

Mwayambo, 26 sanza ya 9

Soki bakufi bakolamuka te, “tólya mpe tómɛla, mpo lobi tokokufa.”​—1 Ko. 15:32.

Ntango mosusu ntoma Paulo atángaki maloba ya Yisaya 22:13, oyo emonisaki makanisi ya Bayisraele. Na esika ya kopusana penepene na Nzambe, bazalaki nde kolanda bisengo ya bomoi. Bayisraele yango bazalaki kokanisa boye: “Tosengeli kosepela lelo mpo liwa eponi ntango te.” Bato mingi bakanisaka mpe bongo lelo oyo. Lokola toyebi polele ete Yehova akosekwisa bakufi, yango esengeli kotinda biso tóponaka malamu baninga na biso. Bandeko ya Korinti basengelaki kokeba ete bázala te baninga ya bato oyo bazalaki kondima lisekwa te. Yango ezali liteya mpo na biso lelo: Soki tozali baninga ya motema ya bato oyo balingá bisengo ya ntango oyo, tokosuka mabe. Kosala boninga na bato ya ndenge wana, mpe kolekisa ntango elongo na bango, ekoki kobebisa makanisi mpe bizaleli na biso. Kutu, baninga ya ndenge wana bakoki kotinda biso tósala makambo oyo Nzambe ayinaka. Yango wana, ntoma Paulo apesaki likebisi oyo na nguya mpenza: “Bólamuka, bózongela makanisi ya malamu na ndenge oyo eyokani na boyengebene mpe bósalaka lisumu te.”​—1 Ko. 15:33, 34. w20.12 9 par. 3, 5-6

Mwamibale, 27 sanza ya 9

Mokonzi ya mobali nyonso ezali Kristo; mpe mokonzi ya mwasi ezali mobali; mpe mokonzi ya Kristo ezali Nzambe.​—1 Ko. 11:3.

Vɛrsɛ yango ezali komonisa ndenge oyo Yehova abongisá libota na ye, ezala na likoló to mpe awa na mabele. Yehova azali na bokonzi oyo eleki nyonso. Na kotalela ndenge oyo abongisá makambo, apesá bato mosusu mwa bokonzi. Kasi bato yango bakozongisa monɔkɔ epai na ye na kotalela ndenge oyo basalelaka bokonzi yango. (Rom. 14:10; Ef. 3:14, 15) Yehova atyá Yesu mokonzi ya lisangá. Kasi Yesu akozongisa monɔkɔ epai ya Yehova mpo na ndenge oyo asalelaka biso makambo. (1 Ko. 15:27) Yehova apesá mpe mobali bokonzi likoló ya mwasi mpe bana na ye. Ndenge nini mobali akoki koyekola kozala mokonzi malamu ya libota? Asengeli liboso koyeba makambo oyo Yehova asɛngaka ye. Asengeli mpe koyeba ntina oyo Yehova apesá bato mosusu bokonzi likoló ya bamosusu, mpe ndenge oyo akoki kolanda ndakisa oyo Yehova ná Yesu batiká. Mpo na nini ezali na ntina mobali ayeba makambo yango? Mpo Yehova apesá batata ya mabota mwa bokonzi mpe alingi ete básalelaka yango na ndenge ya malamu.​—Luka 12:48b. w21.02 2 par. 1-3

Mwamisato, 28 sanza ya 9

Ngai Yehova nazali Nzambe na yo, Moto oyo azali koteya yo mpo na litomba na yo moko.​—Yis. 48:17.

Tosengeli kobosanaka makambo mosusu kaka ndenge Yehova asalaka. Na ndakisa, atako Yehova azali bɔɔngɔ oyo ekoki kobosana ata likambo moko te, andimaka kolimbisa mpe kobosana masumu na biso soki tobongoli mpenza motema. (Nz. 25:7; 130:3, 4) Alingi tósala mpe bongo soki bato mosusu basɛngi biso bolimbisi mpo na mabunga oyo basaleli biso. (Mat. 6:14; Luka 17:3, 4) Tokomonisa botɔndi mpo na bɔɔngɔ na biso, oyo ezali likabo ya kokamwa, soki tozali kosalela yango mpo na kokumisa Nzambe oyo apesá biso yango. Bato mosusu basalelaka bɔɔngɔ na bango na ndenge ya mabe; basalelaka yango mpo na komityela mibeko na oyo etali malamu ná mabe. Kasi lokola Yehova akelá biso, ebongi mpenza tóndimisama ete mibeko na ye ezali malamu koleka mosusu nyonso oyo tokoki komityela biso moko. (Rom. 12:1, 2) Ntango totosaka mibeko na ye, tozalaka na bomoi ya kimya. (Yis. 48:18) Mpe tomonaka mpenza ntina oyo tozali na bomoi: Kopesa Mozalisi mpe Tata na biso lokumu mpe esengo.​—Mas. 27:11. w20.05 23-24 par. 13-14

Mwaminei, 29 sanza ya 9

Bólinganaka na motema.​—Rom. 12:10.

Lelo oyo, ndenge nini tokoki komonisela bandeko na biso bolingo ya bondeko? Soki toyebi bandeko na biso bakristo malamu, ekozala mpasi te tómitya na esika na bango mpe tómonisela bango bolingo ya bondeko. Tokoki kokóma baninga na bango ata soki tokeseni bambula, to toutá bamboka ekeseni. Kobosana te, Yonatane alekaki Davidi na mbula soki 30, kasi yango epekisaki bango te bákóma baninga ya motema. Na lisangá na bino, ezali na ndeko moko oyo bokeseni bambula, oyo akoki kokóma moninga na yo? Soki osali bongo, okomonisa ete ozali ‘kolinga lisangá mobimba ya bandeko.’ (1 Pe. 2:17) Kozala na bolingo ya bondeko elakisi nde ete tosengeli kozala moninga ya motema ya moto nyonso na lisangá? Te, ekoki kosalema bongo te. Ezali mabe te kokangama makasi na basusu mpo basepelaka na makambo oyo biso mpe tosepelaka na yango. Yesu azalaki kobenga bantoma na ye nyonso “baninga,” kasi alingaki nde Yoane mingi koleka. (Yoa. 13:23; 15:15; 20:2) Atako bongo, Yesu asalelaki Yoane te makambo koleka bango nyonso.​—Mrk. 10:35-40. w21.01 23 par. 12-13

Mwamitano, 30 sanza ya 9

Bomonani ete bomipesá na kobanga banzambe koleka bato mosusu nyonso.​—Mis. 17:22.

Mpo na kosakwela bikólo mosusu na Atene, ntoma Paulo asalelaki te kaka mayele oyo asalelaki epai ya Bayuda na sinagoga. Atalaki na likebi zingazinga na ye mpe atyaki likebi na mimeseno na bango ya losambo. (Mis. 17:23) Na nsima, Paulo alukaki likambo moko ya losambo ya bato yango oyo akokaki koyokanisa na solo ya Makomami. Na yango, Paulo andimaki kosalela mayele mosusu mpo na kosakola. Ayebisaki bato ya Atene ete nsango oyo amemaki eutaki “epai ya Nzambe oyo ayebani te,” oyo bazalaki koluka kosambela. Atako bato ya bikólo mosusu bamesanaki na Makomami te, Paulo asundolaki bango te. Kasi, amonaki nde ete bazalaki lokola mbuma oyo bakoki kobuka mpo eteli, mpe abongolaki ndenge na ye ya koyebisa bango nsango malamu. Ndenge moko na Paulo, yebá kosalela miso. Lukáká komona makambo oyo ekoki kosalisa yo oyeba bindimeli ya bato ya teritware na bino. Okoki kotala biloko oyo moto abambi na ndako na ye to na motuka na ye. Talá soki nkombo na ye, molato na ye, ndenge oyo abongisi nsuki, to ata elobeli na ye ezali komonisa soki azali moto ya lingomba nini. w20.04 9-10 par. 7-8

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto