Sanza ya 10
Mwapɔsɔ, 1 sanza ya 10
“Nani ayebi makanisi ya Yehova, mpo alakisa ye?” Kasi biso tozali na makanisi ya Kristo.—1 Ko. 2:16.
Soki toyekoli koyeba Yesu, tokomekola ndenge na ye ya kokanisa mpe ya kosala makambo. Mpe soki toyebi mpe tomekoli ndenge ya Yesu ya kokanisa, boninga na biso na ye ekozala makasi. Ndenge nini tokoki komekola Yesu? Tózwa kaka ndakisa moko. Yesu azalaki kokanisa mingimingi ndenge ya kosalisa basusu na esika aluka ndenge ya komisepelisa. (Mat. 20:28; Rom. 15:1-3) Lokola azalaki kokanisa ndenge wana, azalaki komipimela makambo mpo na bolamu ya basusu mpe azalaki kolimbisa. Azalaki kosilika noki te mpo na makambo oyo basusu bazalaki koloba mpo na ye. (Yoa. 1:46, 47) Mpe azalaki kotika te ete mabunga oyo bato basalá kala ebongola mpo na libela ndenge na ye ya kotalela bango. (1 Tim. 1:12-14) Yesu alobaki: “Na ndenge yango bato nyonso bakoyeba ete bozali bayekoli na ngai, soki bozali na bolingo na kati na bino.” (Yoa. 13:35) Ezali malamu omituna boye: “Nalandaka ndakisa ya Yesu mpe nasalaka nyonso oyo nakoki mpo nabatela kimya elongo na bandeko ya lisangá?” w20.04 24 par. 11
Mwalomingo, 2 sanza ya 10
Bakosantisa nkombo na ngai.—Yis. 29:23.
Atako tozali na mokili oyo bato mingi bazali kosambwisa mpe kofingisa nkombo ya Nzambe, okoki kosantisa nkombo na ye mpe koyebisa basusu ete Yehova azali mosantu, azali sembo, azali malamu, mpe azali bolingo. Okoki kopesa mabɔkɔ na boyangeli na ye. Okoki kosalisa bato báyeba ete kaka boyangeli ya Yehova nde ezali mpenza ya boyengebene, mpe kaka yango nde ekotya kimya mpe ekomema esengo ya solosolo mpo na bikelamu nyonso. (Nz. 37:9, 37; 146:5, 6, 10) Ntango toteyaka bato solo ya Biblia, mbala mingi tobendaka likebi na bango na boyangeli ya Nzambe. Toteyaka bango ete Yehova azali na lotomo ya koyangela molɔ́ngɔ́ mobimba, mpe yango ezali mpenza solo. Kasi ntango esɛngi tóteya bango mibeko ya Nzambe, mokano na biso ya liboso ezalaka ya kosalisa bango bálinga Yehova, Tata na biso, mpe bátikala sembo epai na ye. Tomonisaka bango polele bizaleli ya kokamwa ya Yehova mpe bomoto na ye. (Yis. 63:7) Soki tosaleli mayele wana ya koteya, tokosalisa basusu bálinga Yehova mpe bátosa ye mpo balingi kotikala sembo epai na ye. w20.06 6 par. 16; 7 par. 19
Mwayambo, 3 sanza ya 10
Nani asalá monɔkɔ . . . ? Ezali ngai Yehova te?—Kob. 4:11.
Bɔɔngɔ ya moto esalemá na ndenge moko ya kokamwa mpenza. Ntango ozalaki naino na libumu ya mama, bɔɔngɔ na yo ezalaki kosalema na kolanda malako ya sikisiki. Mpe nsima ya miniti mokomoko, bankotó ya baselile ya bɔɔngɔ ezalaki kosalema. Bato ya mayele balobi ete mokóló akoki kozala na baselile ya bɔɔngɔ oyo babengi neurone pene na miliare 100. Baselile yango nyonso nde esalá bɔɔngɔ ya moto, oyo ezalaka na kilogramɛ moko na ndambo. Moko ya makoki ya kokamwa oyo bɔɔngɔ ezalaka na yango ezali likoki na biso ya koloba. Mpo tóloba ata liloba moko, bɔɔngɔ epesaka mitindo na misuni koleka 100; misuni ya lolemo, ya mongongo, ya mbɛbu, ya mbanga, mpe ya ntolo. Mpo bato bákanga ntina ya makambo oyo tozali koloba, misuni yango esengeli koningana na ndenge oyo ebongi mpe na boumeli ya ntango oyo esengeli. Na 2019, bolukiluki moko emonisaki ete babebe oyo babotami sika bakoki koyeba mwa maloba ya monɔkɔ moko boye mpe kosala na boyokani na maloba yango. Boyekoli yango endimisi lisusu likanisi oyo bato ya mayele mingi bazalaka na yango ete tobotamaka na likoki ya koyeba mpe koyekola minɔkɔ. Ya solo, likoki na biso ya koloba ezali mpenza likabo oyo euti epai ya Nzambe. w20.05 22-23 par. 8-9
Mwamibale, 4 sanza ya 10
Azalaki kozela engumba oyo ezali na miboko ya solosolo, engumba oyo Nzambe ye moko atongi mpe asali.—Ebr. 11:10.
Abrahama andimaki kotika bomoi ya malamu oyo azalaki na yango na engumba Ure. Mpo na nini? Mpo azalaki kozela “engumba oyo ezali na miboko ya solosolo.” (Ebr. 11:8-10, 16) Engumba oyo Abrahama azalaki kozela ezali Bokonzi ya Nzambe. Bokonzi yango esalemi na Yesu Kristo mpe bakristo 144 000 oyo batyami mafuta na elimo. Paulo alobaki ete Bokonzi yango ezali “engumba ya Nzambe ya bomoi, Yerusaleme ya likoló.” (Ebr. 12:22; Em. 5:8-10; 14:1) Yesu ateyaki bayekoli na ye bábondelaka mpo na Bokonzi yango, básɛngaka ete Bokonzi yango eya mpo mokano ya Nzambe esalema na mabele ndenge ezali kosalema na likoló. (Mat. 6:10) Abrahama ayebaki makambo nyonso ya mikemike oyo etali ndenge Bokonzi yango ekobongisama? Te. Na boumeli ya basiɛklɛ mingi, makambo yango ezalaki “sekele mosantu.” (Ef. 1:8-10; Kol. 1:26, 27) Kasi Abrahama ayebaki ete bakitani na ye mosusu bakokóma bakonzi. Yehova nde alakaki Abrahama likambo yango.—Eba. 17:1, 2, 6. w20.08 2-3 par. 2-4
Mwamisato, 5 sanza ya 10
Bókoba kotambola na bomoko elongo na [Nkolo], kopika misisa mpe kotongama na kati na ye mpe kotɛlɛma ngwi na kondima.—Kol. 2:6, 7.
Tosengeli koboya mateya ya bapɛngwi. Banda ntango lisangá ya bokristo ebandá, Zabolo asalelaka bakosi mingi mpo na kolona ntembe na mitema ya basaleli ya sembo ya Nzambe. Na yango, tosengeli koyeba kokesenisa makambo ya solo ná oyo ya lokuta. Na nzela ya Internet, banguna na biso bakoki kopanza makambo ya lokuta mpo na kolɛmbisa kondima na biso epai ya Yehova, mpe bolingo mpo na bandeko na biso. Na yango, kondima te makanisi yango ya lokuta oyo euti epai ya Satana! (1 Yoa. 4:1, 6; Em. 12:9) Mpo na kolonga komekama ya Satana, tosengeli kokómisa makasi kondima na biso epai ya Yesu, mpe na mokumba oyo azali na yango na kati ya mokano ya Nzambe. Tosengeli mpe kotya motema epai ya “moombo ya sembo mpe ya mayele” oyo Yehova azali kosalela mpo na kotambwisa ebongiseli na ye lelo oyo. (Mat. 24:45-47) Tokokómisa kondima na biso makasi soki tozali koyekola Liloba ya Nzambe mbala na mbala. Soki tosali bongo, kondima na biso ekozala lokola nzete oyo misisa na yango epikami makasi na kati ya mabele. Ntoma Paulo mpe alobaki likambo ya bongo ntango akomaki maloba ya mokapo ya lelo. w20.07 23-24 par. 11-12
Mwaminei, 6 sanza ya 10
Moto amonaka oyo emonanaka na miso, kasi Yehova amonaka ndenge motema ezali.—1 Sa. 16:7.
Lokola tozali bato ya kozanga kokoka, mbala mingi tolukaka kosambisa basusu na kotalela kaka ndenge oyo bazali komonana na libándá. (Yoa. 7:24) Nzokande, na kotalela kaka oyo miso na biso ezali komona, tokoyeba te makambo nyonso ya moto. Na ndakisa, ata monganga ya mayele mingi mpe oyo aumeli na mosala yango akoki koyeba maladi nyonso ya moto te soki asuki kaka na kotala ye. Asengeli koyoka na likebi mpo ayeba ndenge maladi yango ebandaki, kotalela mayoki ya moto yango mpe bilembo oyo azali komonisa. Monganga akoki kutu kosɛnga moto yango asala ekzamɛ ya scanner mpo na kotala kati ya nzoto na ye. Soki te, monganga akokanisela moto maladi oyo azali na yango te. Ndenge moko mpe, tokoyeba bandeko na biso malamu te soki tosuki kaka na kotala ndenge oyo tozali komona bango na libandá. Tosengeli koluka koyeba bizaleli na bango oyo ebombana, bomoto na bango ya kati. Ezali solo ete tokoki te kotánga na mitema ya basusu. Kasi tokoki kosala makasi mpo tómekola Yehova. Ayokaka basambeli na ye. Atalelaka bomoi na bango ya kala mpe makambo oyo bazali kokutana na yango. Mpe amoniselaka bango motema mawa. w20.04 14-15 par. 1-3
Mwamitano, 7 sanza ya 10
Kanisá nde na ndenge oyo ezali komonisa ete ozali na makanisi malamu.—Rom. 12:3.
Tosengeli kolona ezaleli ya komikitisa mpo bato ya lolendo bazalaka na “makanisi malamu” te. Bato ya lolendo bawelanaka mpe bamonisaka ete baleki basusu. Mbala mingi, makanisi mpe misala na bango epesaka bango moko mpasi mpe enyokolaka basusu. Soki bakebi te, bakoki kobanda kolanda makanisi ya lolendo ya mokili oyo mpe Satana akoki kozipa makanisi na bango. (2 Ko. 4:4; 11:3) Moto ya komikitisa azalaka na makanisi malamu. Amitalelaka na ndenge ebongi mpe ayebaka ete bamosusu baleki ye. (Flp. 2:3) Lisusu, ayebaka ete “Nzambe atɛmɛlaka bato ya lolendo, kasi amoniselaka bato ya komikitisa boboto monene.” (1 Pe. 5:5) Baoyo bazali na makanisi malamu bakolinga te kokóma banguna ya Yehova. Mpo tókoba kozala na komikitisa, tosengeli kosalela toli ya Biblia oyo elobi ete: “Bólongola bomoto ya kala elongo na misala na yango, mpe bólata bomoto ya sika.” Tosengeli koyekola ndakisa ya Yesu mpe kosala oyo tokoki mpo tólanda matambe na ye malamumalamu.—Kol. 3:9, 10; 1 Pe. 2:21. w20.07 7 par. 16-17
Mwapɔsɔ, 8 sanza ya 10
Nzoto ezalaka moko, kasi na binama mingi.—1 Ko. 12:12.
Kozala na kati ya lisangá ya Yehova ezali lokumu monene! Tozali na Paradiso ya elimo oyo etondi na bato ya kimya mpe ya esengo. Oyebaka esika na yo na kati ya lisangá? Ntoma Paulo akokanisaki lisangá na nzoto ya moto. Akokanisaki mpe ndeko mokomoko ya lisangá na biteni ya nzoto. (Rom. 12:4-8; 1 Ko. 12:12-27; Ef. 4:16) Liteya moko oyo tokoki kozwa na ndakisa oyo ntoma Paulo asalelaki ezali ete mokomoko na biso azali na esika ya ntina mingi na kati ya libota ya Yehova. Paulo abandaki ndakisa na ye na maloba oyo: “Se ndenge tozali na binama mingi na nzoto kaka moko, kasi binama nyonso ezali na mosala kaka moko te, ndenge moko mpe biso, atako tozali mingi, tozali nzoto kaka moko na bomoko na Kristo, kasi tozali binama, oyo mokomoko na yango ezali ndeko ya mosusu.” (Rom. 12:4, 5) Paulo alingaki mpenza koloba nini? Biso nyonso tozali na mokumba ndenge moko te na kati ya lisangá, kasi mokomoko na biso azali na motuya. w20.08 20 par. 1-2; 21 par. 4
Mwalomingo, 9 sanza ya 10
Yehova alobaki na ye ete: “Na nzela nini?”—1 Bak. 22:21.
Baboti, ndenge nini bokoki kolanda ndakisa ya komikitisa ya Yehova? Soki esengeli, bótunaka bana na bino makanisi mpo na ndenge oyo mosala moko esengeli kosalema. Mpe soki bapesi makanisi ya malamu, bósalela yango soki esengeli. Yehova mpe atiká ndakisa na likambo etali komonisa motema molai, ata ntango basaleli na ye batunaki ye mituna na mpo na bikateli oyo azwaki. Yehova ayokaki Abrahama ntango amitungisaki mpo na ekateli oyo azwaki ya kobebisa engumba Sodoma ná Gomora. (Eba. 18:22-33) Ozali koyeba lisusu ndenge oyo Yehova asalelaki Sara, mwasi ya Abrahama makambo? Ntango Sara asɛkaki mpo na elaka oyo Yehova apesaki ye ete akozwa zemi na bobange, Yehova asilikaki te. (Eba. 18:10-14) Kutu, amoniselaki nde Sara limemya. Mateya nini bino baboti mpe bankulutu bokoki kozwa na ndakisa ya Yehova? Osalaka nini soki mwana na yo to ndeko moko ya lisangá aboyi kondima ekateli oyo ozwi? Olukaka mbala moko komonisa bango ete bazali na libunga? To olukaka nde koyeba ntina oyo bapesi makanisi na bango? Masangá mpe mabota ezwaka matomba mingi, soki baoyo bazali na mwa bokonzi bazali komekola Yehova. w20.08 10 par. 7-9
Mwayambo, 10 sanza ya 10
Nguya na ngai ezali kokóma ya kokoka na kati ya bolɛmbu.—2 Ko. 12:9.
Ntango tobandaki koyekola solo, mbala mosusu tozalaki kosepela basusu básalisa biso mpo tóyeba makambo mingi. (1 Ko. 3:1, 2) Bongo lelo oyo? Soki tosalelaka Yehova banda bambula mingi, mpe toyebi makambo mingi, tokoki kozala na mokakatano ya kondima lisalisi ya basusu mingimingi soki moto oyo azali kopesa biso lisalisi yango aumeli mingi te na lisangá lokola biso. Nzokande mbala mingi, Yehova asalelaka bandeko ya lisangá mpo na kopesa biso makasi. (Rom. 1:11, 12) Na yango, soki tolingi kozwa makasi oyo eutaka epai ya Yehova, tosengeli kondima lisalisi ya basusu. Komikitisa mpe kotyela Yehova motema nde esalaka ete moto alonga, kasi te mpo na esika oyo autá, makasi oyo azali na yango, bakelasi oyo atángá, to bozwi oyo azali na yango. Tiká ete biso nyonso tókende liboso mpe (1) tótyelaka Yehova motema, (2) tóyekolaka bandakisa ya bato oyo Biblia elobeli, mpe (3) tóndimaka lisalisi ya bandeko na biso ya lisangá. Soki tosali bongo, Yehova akopesa biso nguya, ata soki tozali komonana bato ya bolɛmbu! w20.07 14 par. 2; 19 par. 18-19
Mwamibale, 11 sanza ya 10
[Bómonisa] molende ya ndenge wana . . . mpo bókóma gɔigɔi te, kasi bamekoli ya baoyo bazali kozwa libula ya bilaka na nzela ya kondima mpe motema molai.—Ebr. 6:11, 12.
Ekoki kozala mpasi tómonisa motema molai ntango tozali kopesa litatoli epai ya bandeko na biso ya libota oyo bazali Batatoli te. Toli oyo ezali na Mosakoli 3:1, 7 ekoki kosalisa biso. Elobi: “Ezali na ntango . . . ya kofanda nyɛɛ mpe ntango ya koloba.” Etamboli na biso ya malamu ekoki kosala ete bandeko na biso ya libota básepela koyoka nsango na biso. Atako bongo, tosengeli ntango nyonso koluka mabaku ya koyebisa bango makambo etali Yehova. (1 Pe. 3:1, 2) Ntango tozali kosakola mpe koteya na molende, tosengeli komonisela bato nyonso motema molai, ata mpe bandeko na biso ya libota. Tokoki kokóma na motema molai soki toyekoli bandakisa ya basaleli ya Yehova ya sembo ya ntango ya kala mpe ya mikolo na biso. Na ndakisa, atako Habakuku azalaki na mposa ete makambo mabe oyo ezalaki kosalema na mikolo na ye esila, amonisaki motema molai mpe alobaki ete: “Nakotɛlɛma na esika na ngai ya kokɛngɛla.” (Hab. 2:1) Ntoma Paulo azalaki na mposa makasi ya ‘kosilisa’ mosala na ye. Atako bongo, azalaki na motema molai mpe akobaki “kopesa litatoli malamumalamu mpo na nsango malamu.”—Mis. 20:24. w20.09 11-12 par. 12-14
Mwamisato, 12 sanza ya 10
[Yesu] azwaki makanisi te ya kobɔtɔla bokonzi, elingi koloba, ete akokana na Nzambe.—Flp. 2:6.
Atako Yesu azali moto ya mibale oyo aleki na nguya na molɔ́ngɔ́ mobimba, akanisaka te koleka ndenge azali. Soki tozali na komikitisa, yango ekomonisa ete tozali bakristo ya solo. (Luka 9:48; Yoa. 13:35) Osengeli kosala nini soki emonani ete ezali na likambo moko na lisangá mpe ozali komona ete bankulutu bazali kolandela yango malamu te? Na esika ya koimaima, okomonisa komikitisa soki opesi bandeko oyo bazali kokamba lisangá mabɔkɔ. (Ebr. 13:17) Mpo na kosala yango, osengeli komituna boye: ‘Likambo oyo nazali komona, ezali mpenza monene mpe ebongi kosembolama? Likambo yango esengeli kosembolama kaka sikoyo? Ngai nde nazali na mokumba ya kosembola yango? Na bosembo nyonso, nazali mpenza koluka lisangá ezala na bomoko, to nazali nde koluka komimona ete naleki basusu?’ Mpo na Yehova, komikitisa mpe bomoko ezali na ntina mingi koleka makoki mpe mayele oyo moto akoki kozala na yango. Na yango, salá nyonso oyo okoki mpo na kosalela Yehova na komikitisa. Soki osali bongo, okobatela bomoko na lisangá.—Ef. 4:2, 3. w20.07 4-5 par. 9-11
Mwaminei, 13 sanza ya 10
Yesu alobaki na bango ete: “Bóbanga te! Bókende, bópesa bandeko na ngai nsango.”—Mat. 28:10.
Yesu asepelaki na lisalisi oyo azwaki epai ya basi ya sembo, oyo “bazalaki kopesa biloko na bango” mpo na kosalisa ye. (Luka 8:1-3) Ateyaki bango mateya ya ntina mingi oyo etali mokano ya Nzambe. Na ndakisa, ayebisaki bango ete akokufa mpe na nsima akosekwa. (Luka 24:5-8) Kaka ndenge asalaki mpo na bantoma, abongisaki mpe basi yango mpo na mikakatano oyo basengelaki kokutana na yango. (Mrk. 9:30-32; 10:32-34) Mpe atako bantoma bakimaki ntango bakangaki Yesu, basi mosusu oyo bazalaki kosalisa ye bazalaki pembeni na ye ntango azalaki kokufa likoló ya nzete ya mpasi. (Mat. 26:56; Mrk. 15:40, 41) Basi oyo bazalaki kobanga Nzambe nde bazalaki bato ya liboso oyo bapesaki nsango ete Yesu asekwi. Asɛngaki basi yango bákende koyebisa bantoma na ye ete asekwi. (Mat. 28:5, 9, 10) Mpe ekoki kozala ete basi mosusu bazalaki wana ntango elimo santu ekitelaki bayekoli na Pantekote ya mobu 33 T.B. mpe bango nyonso bazwaki mpe na ndenge ya likamwisi likoki ya koloba na minɔkɔ mosusu mpe ya koyebisa basusu “makambo minene ya Nzambe.”—Mis. 1:14; 2:2-4, 11. w20.09 23 par. 11-12
Mwamitano, 14 sanza ya 10
Omibatela mpe okeba na mateya na yo ntango nyonso.—1 Tim. 4:16.
Mosala ya kokómisa bato bayekoli ezali mosala ya kobikisa bomoi ya bato! Ndenge nini toyebi yango? Ntango Yesu apesaki mitindo oyo ezali na Matai 28:19, 20, alobaki boye: “Bókende, . . . bókómisa bato bayekoli . . . , bóbatisa bango.” Kozwa batisimo ezali na ntina nini? Ezali lisɛngami mpo na kozwa bomoi ya seko. Moto oyo alingi kozwa batisimo asengeli kondima ete akoki kozwa bomoi ya seko kaka mpo Yesu akufelaki biso mpe asekwisamaki. Yango wana, ntoma Petro ayebisaki bandeko na ye bakristo ete: ‘Batisimo ezali sikoyo kobikisa bino . . . na nzela ya lisekwa ya Yesu Kristo.’ (1 Pe. 3:21) Na yango, ntango moyekoli ya sika azwi batisimo, akoki kozala na elikya ya kozwa bomoi ya seko. Mpo na kokómisa bato bayekoli, tosengeli kokolisa “mayele ya koteya.” (2 Tim. 4:1, 2) Mpo na nini? Mpo Yesu apesaki biso mitindo ete: “Bókende, . . . bókómisa bato bayekoli . . . , bóteya bango.” Ntoma Paulo alobaki ete ‘tókangama’ na mosala yango, ‘mpo soki tosali bongo tokomibikisa, mpe tokobikisa bato oyo bazali koyoka biso.’ w20.10 14 par. 1-2
Mwapɔsɔ, 15 sanza ya 10
Banda sikoyo okobanda kokanga bato na bomoi.—Luka 5:10.
Moyekoli Petro ayekolaki mpe kolinga mosala ya koluka bato. Na lisalisi ya Yehova, Petro ayebaki mosala yango malamu. (Mis. 2:14, 41) Ntina ya libosoliboso oyo etindaka biso tósakola ezali mpo tolingaka Yehova. Bolingo mpo na Yehova ekoki kosalisa biso tóyebisa basusu makambo etali ye ata soki tokoki komiyoka lokola tobongi te mpo na kosala mosala yango. Ntango Yesu asɛngaki Petro akóma moluki-bato, ayebisaki ye: “Tiká kobanga.” (Luka 5:8-11) Petro abangaki te makambo oyo ekokaki kosalema soki akómi moyekoli ya Yesu. Kasi akamwaki ndenge Yesu asalisaki bango bákanga mbisi ebele. Petro ayebaki ete Yesu asalaki likamwisi mpe amonaki ete abongi te kosala elongo na Yesu. Lokola Petro, yo mpe okoki kobanga soki okanisi makambo nyonso oyo ekosɛnga ete osala mpo na kokóma moyekoli ya Kristo. Soki ezali bongo, kómisá makasi bolingo na yo mpo na Yehova, mpo na Yesu, mpe mpo na mozalani na yo. Yango ekopesa yo mposa ya kondima libyangi ya Yesu ya kokóma moluki-bato.—Mat. 22:37, 39; Yoa. 14:15. w20.09 3 par. 4-5
Mwalomingo, 16 sanza ya 10
Yango wana, bókende mpe bókómisa bato bayekoli . . . , bóteya bango.—Mat. 28:19, 20.
Na esengo nyonso, topesaka ntango, makasi, mpe mbongo na biso mpo na koluka baoyo nyonso bazali na “ezaleli oyo ebongi mpo na bomoi ya seko.” (Mis. 13:48) Ntango tozali kosala bongo, tozali kolanda ndakisa ya Yesu. Alobaki ete: “Bilei na ngai nde kosala mokano ya moto oyo atindaki ngai mpe kosilisa mosala na ye.” (Yoa. 4:34; 17:4) Yango mpe ezali mposa na biso. Tozali na mposa ya kosilisa mosala oyo Yesu apesá biso. (Yoa. 20:21) Mpe tolingi ete bato mosusu, ata mpe bandeko na biso oyo batiká kosakola, biso nyonso tókoba na mosala yango. (Mat. 24:13) Kotosa etinda oyo Yesu apesaki biso ezali pɛtɛɛ te. Kasi, tosalaka mosala yango biso moko te. Yesu apesaki elaka ete akozala elongo na biso. Ntango tozali kokómisa bato bayekoli, tozali “kosala elongo na Nzambe” mpe “esika moko na Kristo.” (1 Ko. 3:9; 2 Ko. 2:17) Na yango, tokoki kosilisa mosala yango. Ezali mpenza lokumu mpe esengo kosala mosala yango mpe kosalisa bato mosusu básala mpe bongo!—Flp. 4:13. w20.11 7 par. 19-20
Mwayambo, 17 sanza ya 10
Yesu akobaki kokola na bwanya mpe na nzoto mpe bato ná Nzambe bazalaki kondima ye.—Luka 2:52.
Mbala mingi, bikateli oyo baboti bazwaka ebongisaka to ebebisaka bomoi ya bana na bango mpo na ntango molai. Soki baboti bazwi bikateli ya mabe, ekoki kobimisela bana na bango mikakatano. Kasi soki bazwi bikateli ya malamu, ekosalisa bana na bango bázala na bomoi ya malamu mpe ya esengo. Nzokande, bana bango moko mpe basengeli kozwa bikateli ya malamu. Ekateli oyo eleki malamu oyo moto nyonso asengeli kozwa, ezali ya kosalela Yehova, Tata na biso ya likoló, oyo atondi na bolingo. (Nz. 73:28) Baboti ya Yesu bazalaki na ekateli ya kosalisa bana na bango básalela Yehova. Makambo oyo baboti yango basalaki emonisaki ete kosalela Yehova nde ezalaki likambo eleki ntina na bomoi na bango. (Luka 2:40, 41, 52) Yesu mpe azwaki bikateli ya malamu oyo esalisaki ye akokisa mokumba oyo Yehova apesaki ye. (Mat. 4:1-10) Ntango Yesu akolaki, azalaki na boboto, na bosembo mpe na mpiko; bizaleli oyo moboti nyonso oyo abangaka Nzambe asepelaka komona epai ya mwana na ye. w20.10 26 par. 1-2
Mwamibale, 18 sanza ya 10
Miso na yo esengeli kozala alima liboso na yo.—Mas. 4:25.
Kanisá bandakisa misato oyo elandi. Ndeko mwasi moko ya mobange azali kokanisa bantango ya kitoko oyo alekisá ntango azalaki elenge. Atako sikoyo bomoi na ye etondi na mikakatano, azali kosala nyonso oyo akoki mpo na Yehova. (1 Ko. 15:58) Mokolo na mokolo, akanisaka ndenge akozala na mokili ya sika oyo Nzambe alaki elongo na bandeko mpe baninga na ye. Ndeko mwasi mosusu azali kokanisa ndenge oyo ndeko moko ya lisangá apesaki ye nkanda. Kasi azwi ekateli ya kobosana likambo yango. (Kol. 3:13) Ndeko mobali moko azali kokanisa mabunga oyo asalá kala, kasi atye makanisi na ye nyonso na makambo oyo akoki kosala sikoyo mpo na kotikala sembo epai ya Yehova. (Nz. 51:10) Bandeko misato oyo bakokani na likambo nini? Bango nyonso bazali kokanisa makambo oyo ekómelá bango, kasi bakanisaka yango ntango nyonso te. Kasi batye miso na bango na mokili ya sika. Mpo na nini ezali na ntina? Kaka ndenge moto akoki kotambola alima te soki azali kotala ntango nyonso nsima, biso mpe tokoki te kokende liboso na mosala ya Yehova soki tozali ntango nyonso kokanisa makambo oyo ekómelá biso to oyo tosalá kala.—Luka 9:62. w20.11 24 par. 1-3
Mwamisato, 19 sanza ya 10
Abandaki kotyola ye.—1 Sa. 17:42.
Na miso ya elombe Goliate, Davidi azalaki komonana lokola moto ya bolɛmbu. Kutu, Goliate azalaki engambe, azalaki na bibundeli ya minene, mpe ayebaki kobunda malamu. Kasi Davidi amonanaki lokola moto ya bolɛmbu mpo azalaki kaka elenge mobali moko oyo ayebaki kobunda te. Kasi Davidi atyelaki Yehova motema mpe Yehova apesaki ye makasi ya kolonga Goliate. (1 Sa. 17:41-45, 50) Davidi azalaki mpe na mokakatano mosusu oyo ekokaki kosala ete amonana lokola moto ya bolɛmbu. Davidi asalelaki Saulo, moto oyo Yehova atyaki mpo azala mokonzi ya Yisraele, na bosembo nyonso. Na ebandeli, mokonzi Saulo azalaki komemya Davidi. Kasi na nsima, lolendo esalaki ete akóma koyokela Davidi zuwa. Saulo asalelaki Davidi makambo ya mabe, kutu alingaki koboma ye. (1 Sa. 18:6-9, 29; 19:9-11) Atako mokonzi Saulo asalelaki ye makambo na kozanga bosembo, Davidi akobaki kaka komonisela ye limemya mpo azalaki mokonzi oyo Yehova atyaki mafuta. (1 Sa. 24:6) Davidi atyelaki Yehova motema mpo apesa ye makasi oyo asengelaki na yango mpo ayika mpiko na mokakatano wana.—Nz. 18:1, maloba oyo ezali na likoló. w20.07 17 par. 11-13
Mwaminei, 20 sanza ya 10
Na ntango ya nsuka, mokonzi ya sudi akotindikana na ye [mokonzi ya nɔrdi].—Dan. 11:40.
Makambo mingi oyo etali esakweli ya mokonzi ya nɔrdi mpe mokonzi ya sudi esilá kokokisama. Na yango, tokoki kotya motema ete makambo oyo etikali mpe ekokokisama. Mpo na kokanga ntina ya esakweli ya Danyele 11, tosengeli kobosana te ete elobeli kaka bakonzi ná baguvɛrnema oyo enyokolaki basaleli ya Nzambe na ndenge ya polele. Atako basaleli ya Nzambe bazali mpenza moke na kotalela motángo ya bato oyo bazali na mokili, mbala mingi baguvɛrnema ya minene enyokolaka bango. Mpo na nini? Mpo Satana ná ebongiseli na ye mobimba, bazalaka na mokano moko ya monene: Kosilisa baoyo basalelaka Yehova mpe Yesu. (Eba. 3:15; Em. 11:7; 12:17) Lisusu, esakweli ya Danyele esengeli koyokana mpe na bisakweli mosusu ya Biblia. Kutu, tokoki kokanga ntina ya esakweli ya Danyele kaka soki tokokanisi yango ná mikanda mosusu ya Biblia. w20.05 2 par. 1-2
Mwamitano, 21 sanza ya 10
Bakufi bakolamuka mpenza ndenge nini? Ɛɛ, bakoya na nzoto ya ndenge nini?—1 Ko. 15:35.
Lelo oyo, bato mingi bazali na makanisi ekeseni mpo na oyo ekómelaka moto nsima ya liwa. Kasi Biblia eteyaka nini? Ntango moto akufi, nzoto na ye epɔlaka. Kasi, moto oyo asalá molɔ́ngɔ́ mobimba azali na likoki ya kosekwisa moto yango mpe kopesa ye nzoto oyo ebongi. (Eba. 1:1; 2:7) Ntoma Paulo asaleli ndakisa moko mpo na komonisa ete, Nzambe asengeli te kozongisa kaka nzoto oyo ekufaki. Apesaki ndakisa ya “mbuma,” to “mboto” ya milona. Soki oloni yango ebandaka naino kobima mpe na nsima ekómaka molona ya sika. Molona yango ya sika ekesanaka mpenza na mboto oyo elonamaki. Ntoma Paulo asalelaki ndakisa yango mpo na komonisa ete Mozalisi na biso akoki kopesa ‘nzoto oyo alingi’ epai ya moto oyo asekwi. Ntoma Paulo alobaki lisusu ete “nzoto ya likoló ezali, nzoto ya mabele mpe ezali.” Alingaki mpenza koloba nini? Na mabele tozali na nzoto ya mosuni, kasi na likoló ezali nde nzoto ya elimo, na ndakisa, nzoto oyo baanzelu bazalaka na yango.—1 Ko. 15:36-41. w20.12 9-10 par. 7-9
Mwapɔsɔ, 22 sanza ya 10
Kino ntango nini molimo na ngai ekobunda, motema na ngai ekozala na mawa mokolo mobimba?—Nz. 13:2.
Biso nyonso tolingaka kozala na bomoi ya kimya. Moto moko te alingaka kozala na mitungisi. Nzokande, na bantango mosusu, tokoki kokutana na mitungisi ya makasi, mpe kotuna motuna oyo Mokonzi Davidi atunaki na mokapo ya lelo. Ekoki kozala mpasi tópekisa makambo mosusu oyo etungisaka biso. Na ndakisa, tokoki te kopekisa bato bámatisa ntalo ya biloko ya kolya, ya bilamba, mpe ya bandako mbula na mbula. Tokoki mpe te koyeba mbala boni baninga na biso ya mosala to ya kelasi bakomeka biso mpo tósala likambo moko ya mabe, na ndakisa pite to ekobo. Lisusu, tokoki te kopekisa bato básala makambo ya mobulu na esika oyo tofandi. Tokutanaka na mikakatano yango mpo bato oyo tofandi na bango batalelaka mitinda ya Biblia te liboso ya kozwa bikateli na bango. Lisusu, Satana, nzambe ya mokili oyo, ayebi ete bato mosusu bakotika kosalela Yehova mpo na “motungisi ya makambo ya ntango oyo.” (Mat. 13:22; 1 Yoa. 5:19) Yango wana, tokoki kokamwa te ndenge mokili etondi mpenza na makambo oyo etungisaka bato! w21.01 2 par. 1, 3
Mwalomingo, 23 sanza ya 10
Moto nyonso oyo azali koyina ndeko na ye azali mobomi, mpe boyebi ete mobomi moko te azali na bomoi ya seko na kati na ye.—1 Yoa. 3:15.
Ntoma Yoane apesi mpe biso toli ete tóyinaka bandeko na biso te. Soki toboyi kotosa toli yango, tokopesa Satana nzela mpo akonza biso. (1 Yoa. 2:11) Yango nde likambo oyo ekómelaki bakristo mosusu na nsuka ya siɛklɛ ya liboso ya ntango na biso. Na ntango wana, Satana azalaki kosala nyonso oyo akoki mpo akɔtisa koyinana mpe bokabwani kati na basaleli ya Nzambe. Ntango Yoane azalaki kokoma mikanda na ye, mibali oyo bazalaki na makanisi lokola oyo ya Satana, bakɔtaki na kati ya lisangá. Na ndakisa, Diotrefese azalaki kokɔtisa bokabwani makasi na lisangá moko. (3 Yoa. 9, 10) Azalaki komemya ata moke te bankulutu oyo lisangani ya mikóló-bakambi ezalaki kotinda. Alukaki kutu kolongola na lisangá bandeko oyo bazalaki koyamba malamu bato oyo ye azalaki kolinga te. Azalaki mpenza na lofundo! Lelo oyo, Satana azali kosala nyonso oyo akoki mpo na kokabola basaleli ya Nzambe. Tosengeli soki moke te koyina bandeko na biso mpe kotika kosalisa bango. w21.01 11 par. 14
Mwayambo, 24 sanza ya 10
Ntango bakosilisa litatoli na bango, nyama ya mabe . . . akobunda na bango etumba mpe akolonga bango mpe akoboma bango.—Em. 11:7.
Na Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, guvɛrnema ya Allemagne mpe ya Grande-Bretagne enyokolaki basaleli ya Nzambe mpo baboyaki kokɔta na etumba. Mpe guvɛrnema ya États-Unis etyaki na bolɔkɔ bandeko mibali oyo bazalaki kokamba mosala ya kosakola. Monyoko yango ekokisaki esakweli oyo ezali na Emoniseli 11:7-10. Na nsima, na bambula ya 1930, mpe mingimingi na boumeli ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, mokonzi ya nɔrdi abundisaki basaleli ya Nzambe kozanga mawa. Hitler ná bato na ye bapekisaki mosala ya basaleli ya Nzambe. Mokonzi ya nɔrdi abomaki basaleli ya Yehova soki 1 500 mpe atindaki ebele mosusu na kaa ya bakangami. Mokonzi ya nɔrdi apekisaki mosala ya kosakola mpe na ndenge yango, ‘akómisaki esika mosantu eloko mpamba’ mpe ‘alongolaki mbeka ya ntango nyonso.’ (Dan. 11:30b, 31a) Kutu, mokonzi na yango Hitler alapaki ndai ete akoboma basaleli nyonso ya Nzambe na Allemagne. w20.05 6 par. 12-13
Mwamibale, 25 sanza ya 10
Na bolingo ya bondeko bólinganaka na motema. Mpo na kopesana lokumu, bózala bato ya liboso.—Rom. 12:10.
Soki tozali komonisa bolingo ya bondeko, tokoluka te tósalaka makambo mpo na koleka basusu na lisangá. Kobosana te ete Yonatane ayokelaki Davidi zuwa te, mpe alukaki te kokóma mokonzi na esika ya Davidi. (1 Sa. 20:42) Biso nyonso tokoki kolanda ndakisa ya Yonatane. Tosengeli te koyokelaka bandeko zuwa mpo na makoki oyo bazali na yango; ‘kasi na elimo ya komikitisa tómonaka bamosusu ete baleki biso.’ (Flp. 2:3) Kobosana likambo oyo te: ndeko nyonso akoki kosala mwa eloko oyo ekoki kosalisa lisangá. Soki tozali ntango nyonso na ezaleli ya komikitisa, tokomona bizaleli na bango ya malamu, mpe tokozwa matomba mpo na bosembo na bango. (1 Ko. 12:21-25) Soki tozali komonisela bandeko na biso bolingo ya bondeko, tokosalisa bango mpo básalela Yehova na esengo mpe na bomoko. Tokomonisa ete tozali mpenza bayekoli ya Yesu, mpe yango ekobenda bato ya mitema sembo epai ya Yehova. Likambo eleki ntina, tokokumisa Yehova, “Tata ya motema mawa mingi mpe Nzambe ya kobɔndisama nyonso.”—2 Ko. 1:3. w21.01 24 par. 14; 25 par. 16
Mwamisato, 26 sanza ya 10
Lokola bozali bato ya mokili te . . . yango wana mokili ezali koyina bino.—Yoa. 15:19.
Lelo oyo, bato mosusu bamemyaka biso Batatoli ya Yehova te, mpe batyolaka biso mpo bakanisaka ete tozangá mayele mpe tozali bato ya bolɛmbu. Mpo na nini? Mpo tolandaka te bizaleli ya bato oyo tofandi na bango. Tosalaka nyonso mpo tózala na komikitisa mpe na botosi. Kasi mokili esepelaka nde na bato ya lolendo, ya lofundo, mpe na botomboki. Lisusu, tokɔtaka te na makambo ya politiki mpe topesaka te mabɔkɔ na mosala ya soda ata na ekólo nini. Lokola tokeseni na bato ya mokili, yango wana bakanisaka ete tozali na nse ya basusu. (Rom. 12:2) Ata soki bato ya mokili bakanisaka ete tozali bato ya bolɛmbu, Yehova asalelaka biso mpo na kokokisa makambo ya minene. Azali kokokisa mosala ya kosakola na ndenge oyo esalemá naino te na mabele. Lelo oyo, basaleli na ye bazali kobimisa bazulunalo oyo ebongolami mingi mpe ekabolami mingi koleka mikanda mosusu nyonso na mokili mpe basalelaka Biblia mpo na kosalisa bamilio ya bato bákóma na bomoi ya malamu. Lokumu nyonso esengeli kozonga epai ya Yehova. w20.07 15 par. 5-6
Mwaminei, 27 sanza ya 10
Kaka ndenge Tata apesi ngai mitindo, nazali kosala kaka bongo.—Yoa. 14:31.
Yesu amikitisaka liboso ya Yehova. Kasi ezali te mpo azangi mayele to makoki. Ndenge oyo azalaki koteya na pɛtɛɛ nyonso mpe na polele emonisi ete azalaki na mayele mingi. (Yoa. 7:45, 46) Yehova ayebaki ete Yesu azalaki na makoki, yango wana apesaki ye nzela ya kosala elongo na ye mpo na kokela biloko nyonso oyo ezali na likoló mpe awa na mabele. (Mas. 8:30; Ebr. 2:1-4) Mpe nsima ya lisekwa na ye, Yehova apesaki ye “bokonzi nyonso na likoló mpe na mabele.” (Mat. 28:18) Atako Yesu azali na makoki mingi, asɛngaka kaka Yehova atambwisa ye. Mpo na nini? Mpo alingaka Tata na ye. Mibali basengeli koyeba ete soki Yehova asɛngaka ete mwasi amikitisaka liboso ya mobali na ye, ezali te mpo amonaka ete mibali baleki basi. Yehova ye moko amonisi yango na ndenge aponi basi mpe mibali bákende koyangela na likoló elongo na Yesu. (Gal. 3:26-29) Yehova amonisi ete atyelaka Mwana na ye motema na ndenge apesi ye bokonzi. Ndenge moko mpe, mobali ya bwanya apesaka mwasi na ye mwa bokonzi. w21.02 11 par. 13-14
Mwamitano, 28 sanza ya 10
Tolobaka ete bato oyo bayiki mpiko bazali bato ya esengo.—Yak. 5:11.
Liloba ya Nzambe ezali lokola talatala. Esalisaka biso tómona bisika oyo tosengeli kobongisa mpe ndenge oyo tokoki kosala yango. (Yak. 1:23-25) Na ndakisa, nsima ya koyekola Liloba ya Nzambe, tokoki komona ete tosengeli kosala makasi tósilikaka nokinoki te. Na lisalisi ya Yehova, toyekoli ndenge ya kozala na boboto ntango bato basilikisi biso to mpe ntango tokutani na makambo oyo epesi biso nkanda. Yango esalisaka biso tókanisa malamumalamu mpe tózwa bikateli ya bwanya. (Yak. 3:13) Koyeba Biblia malamu ezali mpenza na ntina mingi mpo na biso! Na bantango mosusu, tozwaka mayele kaka nsima ya kosala libunga. Lolenge malamu ya kokóma na bwanya ezali ya kozwa mateya na makambo malamu mpe na makambo mabe oyo basusu basalaki. Yango nde ntina oyo Yakobo alendisi biso tótalela ndakisa ya Abrahama, Rahaba, Yobo mpe Eliya oyo Biblia elobeli. (Yak. 2:21-26; 5:10, 11, 17, 18) Basaleli wana ya sembo ya Yehova bayikaki mpiko na makambo oyo ekokaki kosilisa esengo na bango. Bandakisa na bango ya koyika mpiko emonisi ete, na lisalisi ya Yehova, biso mpe tokoki kosala bongo. w21.02 29-30 par. 12-13
Mwapɔsɔ, 29 sanza ya 10
Myango epikamaka makasi na toli, mpe salá etumba na yo na likoki ya koyeba kotambwisa makambo.—Mas. 20:18.
Ntango boyekoli ezali kosalema, ndeko oyo ayekolaka na moto yango Biblia nde azali na mokumba ya kosalisa ye akanga ntina ya Liloba ya Nzambe. Soki ndeko moko asɛngi yo okende elongo na ye mpo na koyekola na moto yango, mokumba na yo ezali ya kopesa ye mabɔkɔ. (Mos. 4:9, 10) Kasi, makambo nini mpenza okoki kosala mpo boyekoli yango esalema malamu? Bongisá boyekoli liboso. Ya liboso, sɛngá ndeko oyo ayekolaka na moto yango Biblia ayebisa yo mwa makambo etali moto yango. Makambo nini oyebi mpo na moyekoli yango? Bokoyekola lisolo nini? Makambo nini olingi moto yango akanga ntina na boyekoli yango? Ezali na likambo moko oyo nasengeli koloba to te na ntango ya boyekoli? Ndenge nini nakoki kolendisa moyekoli yango mpo akola? Ezali solo ete ndeko oyo ayekolaka na ye akoyebisa yo te makambo ya sekele oyo etali moyekoli yango. Kasi, makambo oyo akoyebisa yo ekoki kosalisa yo mingi. Joy, ndeko moko oyo azali misionɛrɛ, alobi boye: “Masolo yango esalisaka ndeko oyo akei elongo na ngai akóma na mposa ya kosalisa moyekoli mpe ayeba oyo akoki koloba na ntango ya boyekoli.” w21.03 9 par. 5-6
Mwalomingo, 30 sanza ya 10
Soki mokili eyini bino, boyebi ete eyinaki ngai liboso ya koyina bino.—Yoa. 15:18.
Na bantango mosusu, bato bayinaka biso mpo totosaka mibeko ya Nzambe. Ndenge oyo Yehova atalelaka makambo ya malamu mpe ya mabe, ekeseni mpenza na ndenge oyo bato ya mokili batalelaka yango. Na ndakisa, bato mingi bakanisaka ete ezali mabe te komipesa na makambo ya mbindo mpe ya pite na ndenge ya mabe mpenza lokola oyo bato ya Sodoma ná Gomora bazalaki kosala; Nzambe abomaki bato yango mpo na bizaleli wana! (Yuda 7) Lokola totosaka mibeko ya Nzambe na oyo etali makambo yango, bato mingi batyolaka biso, mpe bamonaka ete tozalaka makambo makasi. (1 Pe. 4:3, 4) Nini ekoki kosalisa biso tóyika mpiko ntango bato bazali koyina mpe kotyola biso? Tosengeli kozala na kondima makasi ete Yehova akosalisa biso. Lokola nguba, kondima na biso ekoki “koboma mɔtɔ ya mbanzi nyonso oyo ezali kopela ya moto mabe.” (Ef. 6:16) Kasi tosengeli kosuka kaka te na kozala na kondima. Tosengeli mpe komonisa bolingo. Mpo na nini? Mpo bolingo “esilikaka te.” Ekangaka motema mpe eyikaka mpiko na makambo nyonso. (1 Ko. 13:4-7, 13) Kolinga Yehova, kolinga bandeko na biso bakristo, ata mpe kolinga banguna na biso ekosalisa biso tóyika mpiko ata soki bato bazali koyina biso. w21.03 20-21 par. 3-4
Mwayambo, 31 sanza ya 10
Elimo na yo esilika nokinoki te, mpo nkanda efandaka nde na ntolo ya bazoba.—Mos. 7:9.
Na bantango mosusu, tomonisaka ete tolingaka bandeko na biso na ndenge toboyaka kosala makambo mosusu. Na ndakisa, tosilikaka mpambampamba te mpo na makambo oyo balobaka. Kanisá likambo moko oyo esalemaki pene na nsuka ya bomoi ya Yesu awa na mabele. Ayebisaki bayekoli na ye ete mpo bázwa bomoi ya seko, basengelaki kolya mosuni na ye mpe komɛla makila na ye. (Yoa. 6:53-57) Bayekoli mingi ya Yesu basepelaki te na maloba wana, yango wana batikaki kolanda ye. Kasi baninga ya motema ya Yesu bakimaki ye te. Bakangaki ntina ya maloba ya Yesu te, mpe ekoki kozala ete ekamwisaki bango. Atako bongo, basilikaki te mpe bakanisaki te ete makambo oyo Yesu alobaki ezalaki mabe. Batyelaki ye nde motema mpo bayebaki ete makambo oyo alobaki ezalaki mpenza solo. (Yoa. 6:60, 66-69) Ezali mpenza na ntina ete tósilikaka mpambampamba te mpo na makambo oyo baninga balobi! Kasi, tópesaka bango nde libaku ya kolimbwela biso makambo oyo balingi mpenza koloba.—Mas. 18:13. w21.01 11 par. 13