Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • es23 nk. 47-57
  • Sanza ya 5

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Sanza ya 5
  • Tótángaka Makomami mokolo na mokolo—2023
  • Mitó ya makambo mike
  • Mwayambo, 1 sanza ya 5
  • Mwamibale, 2 sanza ya 5
  • Mwamisato, 3 sanza ya 5
  • Mwaminei, 4 sanza ya 5
  • Mwamitano, 5 sanza ya 5
  • Mwapɔsɔ, 6 sanza ya 5
  • Mwalomingo, 7 sanza ya 5
  • Mwayambo, 8 sanza ya 5
  • Mwamibale, 9 sanza ya 5
  • Mwamisato, 10 sanza ya 5
  • Mwaminei, 11 sanza ya 5
  • Mwamitano, 12 sanza ya 5
  • Mwapɔsɔ, 13 sanza ya 5
  • Mwalomingo, 14 sanza ya 5
  • Mwayambo, 15 sanza ya 5
  • Mwamibale, 16 sanza ya 5
  • Mwamisato, 17 sanza ya 5
  • Mwaminei, 18 sanza ya 5
  • Mwamitano, 19 sanza ya 5
  • Mwapɔsɔ, 20 sanza ya 5
  • Mwalomingo, 21 sanza ya 5
  • Mwayambo, 22 sanza ya 5
  • Mwamibale, 23 sanza ya 5
  • Mwamisato, 24 sanza ya 5
  • Mwaminei, 25 sanza ya 5
  • Mwamitano, 26 sanza ya 5
  • Mwapɔsɔ, 27 sanza ya 5
  • Mwalomingo, 28 sanza ya 5
  • Mwayambo, 29 sanza ya 5
  • Mwamibale, 30 sanza ya 5
  • Mwamisato, 31 sanza ya 5
Tótángaka Makomami mokolo na mokolo—2023
es23 nk. 47-57

Sanza ya 5

Mwayambo, 1 sanza ya 5

Bótya likebi mpenza epai ya moto oyo ayiki mpiko.​—Ebr. 12:3.

Mpo na kosalisa biso tóyeba Mwana na ye malamu, Yehova akomisá na Liloba na ye Baevanzile minei oyo elobeli bomoi mpe mosala ya Yesu. Baevanzile yango eyebisi biso makambo oyo Yesu alobaki, oyo asalaki, mpe emonisi ndenge oyo azalaki komiyoka. Mikanda yango esalisaka biso tótya likebi mpenza na ndakisa ya Yesu. Kutu, mikanda yango ezali na matambe oyo Yesu atikelá biso mpo tólanda. Na yango, soki tozali koyekola Baevanzile yango malamumalamu, tokoyeba lisusu Yesu malamu koleka. Yango ekosalisa biso tólanda matambe na ye malamumalamu. Mpo tózwa matomba mingi na Baevanzile yango minei, tosengeli kosuka kaka te na kotánga yango. Tosengeli mpe kozwaka ntango mpo na koyekola yango na likebi, mpe kokanisa na mozindo na makambo oyo tozali kotánga. (Talá mpe Yosua 1:8.) Salá lokola ozalaki wana ntango makambo yango ezalaki kosalema. Meká komona na makanisi, koyoka, mpe komitya na esika ya bato oyo lisolo yango elobeli. Salá mwa bolukiluki na mikanda oyo ebongiseli ya Yehova ebimisá. w21.04 4-5 par. 11-13

Mwamibale, 2 sanza ya 5

Tozali nde kosakola Kristo abakami na nzete, likambo oyo ezali kobɛtisa Bayuda libaku.​—1 Ko. 1:23.

Bambula mingi liboso Yesu aya awa na mabele, Yehova asakolaki na Liloba na ye ete Masiya akotɛkama na shekele ya palata 30. (Zek. 11:12, 13) Asakolaki mpe ete moninga na ye moko ya motema nde akotɛka ye. (Nz. 41:9) Lisusu, mosakoli Zekaria akomaki boye: “Bɛtá mobateli ya mpate, mpe bampate ya etonga epanzana.” (Zek. 13:7) Na esika ete makambo yango ebɛtisa bato ya mitema sembo libaku, komona ndenge bisakweli yango ekokisamaki epai ya Yesu, esengelaki nde kokómisa kondima na bango makasi. Yango mpe esalemaka lelo oyo? Ɛɛ. Na mikolo na biso, Batatoli ya Yehova mosusu oyo bayebani mingi batiki solo, bakómi bapɛngwi, mpe balukaka kobungisa basusu nzela. Bapanzaka bansango ya lokuta mpo na Batatoli ya Yehova ezala na bazulunalo, na televizyo, na radio, to mpe na Internet. Kasi bato ya mitema sembo batikaka te ete makambo yango ekosa bango. Kutu, bayebaka ete Biblia esakolaki ete makambo ya ndenge wana ekosalema.​—Mat. 24:24; 2 Pe. 2:18-22. w21.05 11 par. 12; 12-13 par. 18-19

Mwamisato, 3 sanza ya 5

Nzela ya bayengebene ezali lokola pole oyo ezali kongɛnga, oyo ezali kongɛnga se kongɛnga kino moi ekokóma makasi.​—Mas. 4:18.

Biblia emonisi polele ete mpo na kokóma na boyebi ya sikisiki ya solo esɛngaka mwa ntango. (Kol. 1:9, 10) Yehova amonisaka solo malɛmbɛmalɛmbɛ, mpe tosengeli komonisa motema molai tii ntango pole ya solo ekongɛnga makasi. Soki bandeko oyo bakambaka biso bamoni ete ezali na liteya moko oyo tosengeli kosembola, bakakatanaka te mpo na kosala bambongwana oyo esengeli. Lelo oyo mangomba mingi ebongolaka mateya na yango mpo na kosepelisa bandimi na yango to mpo eyebana mingi na mokili. Kasi biso Batatoli ya Yehova tosalaka bambongwana mpo tolingaka kozala penepene na Nzambe mpe kosambela ye ndenge Yesu asalaki yango. (Yak. 4:4) Tosalaka bambongwana te mpo makanisi ya bato ya mokili oyo ebongwani, kasi mpo tokangi malamu ntina ya mateya ya Biblia. Tolingaka solo!​—1 Tes. 2:3, 4. w21.10 22 par. 12

Mwaminei, 4 sanza ya 5

Ntango bozali kobwakela ye mitungisi na bino nyonso, mpo atyelaka bino likebi.​—1 Pe. 5:7.

Okosala nini soki ozali komiyoka ete ozali yo moko? Kanisá ndenge oyo Yehova azali kosalisa yo. (Nz. 55:22) Yango ekosalisa yo omona ete ozali yo moko te. Kanisá mpe ndenge oyo Yehova azali kosalisa bandeko na biso mosusu oyo bazali komiyoka ete bazali bango moko. (1 Pe. 5:9,10) Hiroshi, ndeko mobali moko oyo na boumeli ya bambula mingi azalaki Motatoli ya Yehova kaka ye moko na libota na bango, alobi boye: “Koyeba ete biso nyonso tozali kosala oyo tokoki mpo na kosalela Yehova, ekoki kolendisa baoyo bandeko ya libota na bango bazali na solo te.” Lisusu zaláká na mimeseno malamu ya makambo ya elimo. Osengeli koyebisaka Yehova ndenge ozali mpenza komiyoka. Ezali na ntina kotánga Liloba ya Nzambe mbala na mbala, mpe kokanisa na mozindo na masolo ya sikisiki oyo emonisi ndenge oyo Yehova alingaka yo. Bandeko mosusu bakangaka na motó bavɛrsɛ mosusu ya Biblia oyo elendisaka mpenza, na ndakisa Nzembo 27:10 mpe Yisaya 41:10. Basusu mpe bamonaka ete kolanda botángi ya mikanda ya boyekoli esalisaka bango bámiyoka bango moko te ntango bazali kobongisa makita to ntango bazali kotánga Biblia. w21.06 9-10 par. 5-8

Mwamitano, 5 sanza ya 5

Okobanga te likambo ya nsɔmɔ mpe ya pwasa.​—Mas. 3:25.

Ozali na mawa mpo moto moko oyo olingaka akufi? Soki ezali bongo, tángáká masolo ya Biblia oyo elobeli bato oyo basekwaki; yango ekokómisa kondima na yo makasi na elikya ya lisekwa. Ozali na mawa makasi mpo ndeko na yo ya libota alongolami na lisangá? Yekoláká mpo omindimisa lisusu ete Nzambe apesaka disiplini na lolenge oyo eleki malamu. Ata soki okutani na likambo nini, salelá libaku yango mpo na kokómisa lisusu kondima na yo makasi. Sopelá Yehova makambo nyonso oyo ezali na motema na yo. Zaláká ntango nyonso pene na bandeko ya lisangá. (Mas. 18:1) Saláká makambo oyo ekosalisa yo oyika mpiko, ata soki ozali naino kolela mpo na mikakatano yango. (Nz. 126:5, 6) Kobá koyangana na makita, kobima mosala ya kosakola mpe kotángaka Biblia. Mpe tyá makanisi na yo nyonso na mapamboli kitoko oyo Yehova abombeli yo na mikolo ezali koya. Wana ozali komona ndenge Yehova azali kosalisa yo, kondima na yo ekokóma lisusu makasi koleka. w21.11 23 par. 11; 25 par. 17

Mwapɔsɔ, 6 sanza ya 5

Ndenge moko mpe Tata na ngai oyo azali na likoló alingaka te ete moko ya bato mike oyo abeba.​—Mat. 18:14.

Na lolenge nini mosusu bayekoli ya Yesu bazali lokola “bana mike”? Banani nde mokili emonaka ete bazali na ntina mingi? Ezali bato ya mbongo, bato ya lokumu, mpe bato oyo bazalaka na nguya. Nzokande, bato bamonaka bayekoli ya Yesu lokola bazali na ntina te. Bazalaka lokola “bana mike.” (1 Ko. 1:26-29) Kasi, Yehova atalelaka bango ndenge wana te. Mpo na nini Yesu alobelaki “bana mike oyo”? Mpo bayekoli na ye batunaki ye: “Nani mpenza aleki bato mosusu nyonso na Bokonzi ya likoló?” (Mat. 18:1) Na ntango wana, Bayuda mingi bazalaki kolinga ete bato mosusu bátalela bango ete bazali na ntina mingi. Moto moko ya mayele alobi boye: “Na ntango wana kozwa lokumu mpe kozala moto oyo ayebani mingi ezalaki likambo elekaki ntina na bomoi ya bato.” Yesu ayebaki malamu ete bayekoli na ye basengelaki kosala makasi mpo na kolongola na mitema na bango elimo ya kowelana oyo epikamaki makasi na mimeseno ya Bayuda. w21.06 20 par. 2; 21 par. 6, 8; 22 par. 9

Mwalomingo, 7 sanza ya 5

Mafuta mpe mpaka ya malasi nde esepelisaka motema, ndenge mpe elɛngi ya kozala na moninga esepelisaka motema mpo na toli na ye oyo epesami na molimo na ye mobimba.​—Mas. 27:9.

Ntoma Paulo atikelá bankulutu ndakisa ya malamu. Na ndakisa, ntango esengelaki kopesa bandeko ya Tesaloniki toli, ntoma Paulo akakatanaki te mpo na kopesa yango. Kasi na mikanda oyo akomelaki bango, apesaki bango liboso longonya mpo na mosala na bango ya sembo, mosala makasi na bango ya bolingo, mpe ezaleli na bango ya koyika mpiko. Lisusu, atalelaki makambo ya bomoi na bango mpe ayebisaki bango na boboto nyonso ete ayebi mikakatano na bango mpe ndenge bazalaki koyika mpiko na minyoko. (1 Tes. 1:3; 2 Tes. 1:4) Kutu, ayebisaki bango ete bazalaki ndakisa mpo na bakristo mosusu. (1 Tes. 1:8, 9) Na ntembe te, bazalaki mpenza na esengo ndenge ntoma Paulo apesaki bango longonya! Nyonso wana emonisaki ete ntoma Paulo alingaki bandeko yango mingi mpenza. Yango wana toli oyo apesaki na mikanda na ye mibale epai ya Batesaloniki esimbaki mpenza mitema na bango.​—1 Tes. 4:1, 3-5, 11; 2 Tes. 3:11, 12. w22.02 15 par. 6

Mwayambo, 8 sanza ya 5

Akopangwisa mpisoli nyonso na miso na bango, mpe liwa ekozala lisusu te.​—Em. 21:4.

Satana asalelaka bakonzi ya mangomba ya lokuta mpo na koteya bato ete Yehova azali motema mabe mpe abimiselaka bato mpasi. Bakonzi ya mangomba mosusu balobaka kutu ete soki bana mike bakufi, Nzambe nde azwaka bango mpo azalaka na mposa ya baanzelu mosusu mingi kuna na likoló. Yango efingisaka mpenza nkombo ya Nzambe! Kasi toyebi ete Yehova azali Tata ya bolingo. Ntango tozali kobɛla maladi moko makasi to moto moko oyo tolingaka akufi, tolobaka soki moke te ete ezali foti ya Nzambe. Kutu tozalaka nde na kondima ete na mikolo ezali koya, akolongola maladi mpe akosekwisa bato oyo bakufá. Toyebisaka moto nyonso oyo asepeli koyoka biso ete Yehova azali Nzambe ya bolingo. Yango esalaka ete Yehova apesa eyano ya malamu epai na moto oyo atumolaka ye. (Mas. 27:11) Yehova azali Nzambe ya motema mawa. Esalaka ye mpasi mingi ntango ayokaka biso tozali kolela mpo na minyoko, botɛmɛli, maladi to mpe mabunga na biso. (Nz. 22:23, 24) Yehova ayebi mpasi na biso. Azalaka na mposa makasi ya kosilisa yango, mpe akosala yango.​—Talá mpe Kobima 3:7, 8; Yisaya 63:9. w21.07 9-10 par. 9-10

Mwamibale, 9 sanza ya 5

Olatisaki ye motole ya nkembo mpe ya lokumu.​—Nz. 8:5.

Mosika te, bato ya botosi bakozwa lokumu oyo eleki monene, elingi koloba, kolinga mpe kosambela Yehova mpo na libela! Yesu akobongisa makambo nyonso ya mpasi oyo ekómelá mokili mpo Adama ná Eva baponaki kotika libota ya Nzambe. Yehova akosekwisa bamilio ya bato, mpe akopesa bango libaku ya kozala na bomoi ya seko na mabele oyo ekobongwana paradiso, mpe bakozala na nzoto ya kokoka. (Luka 23:42, 43) Ntango bato oyo basalelaka Yehova bakokóma na nzoto ya kokoka, bakozwa ‘nkembo mpe lokumu’ oyo Davidi alobelaki. Soki ozali na etuluku ya “ebele mpenza ya bato,” ozali na elikya moko kitoko. (Em. 7:9) Nzambe alingaka yo mpe alingi ete ozala na kati ya libota na ye. Na yango, salá nyonso oyo okoki mpo na kosepelisa ye. Mokolo na mokolo, bateláká bilaka ya Nzambe na motema mpe na makanisi na yo. Sepelá na libaku oyo ozali na yango ya kosambela Tata na biso ya likoló, mpe zwáká na motuya libaku oyo ozali na yango ya kokumisa ye mpo na seko! w21.08 7 par. 18-19

Mwamisato, 10 sanza ya 5

Tokobuka mbuma soki tolɛmbi te.​—Gal. 6:9.

Mosakoli Yirimia mpe asakolaki na boumeli ya bambula mingi atako bato boboyaki koyoka ye mpe batɛmɛlaki ye. Alɛmbaki mpenza nzoto mpo na ‘kosambwa mpe kotyola’ oyo ezalaki kouta epai ya batɛmɛli na ye mpe akanisaki ata kosundola mokumba na ye. (Yir. 20:8, 9) Kasi Yirimia atikaki te! Nini esalisaki ye alonga makanisi mabe oyo azalaki na yango mpe abatela esengo na mosala na ye? Atyaki makanisi na ye nyonso na makambo mibale ya ntina mingi. Ya liboso, nsango ya Nzambe oyo Yirimia azalaki komemela bato esengelaki kopesa bango “bomoi malamu na mikolo ezali koya mpe elikya.” (Yir. 29:11) Ya mibale, Yirimia azalaki komema nkombo ya Nzambe. (Yir. 15:16) Biso mpe tosakwelaka bato nsango ya elikya na mokili oyo mabe, mpe tomemi nkombo ya Nzambe, Yehova. Soki totye makanisi na biso nyonso na makambo wana, tokobatela esengo na biso ata soki bato bandimi koyoka biso to te. Na yango, kolɛmba nzoto te soki bokoli ya bayekoli na yo ezwi ntango mingi koleka ndenge ozalaki kokanisa. Kokómisa bato bayekoli mpe esɛngaka komonisa motema molai.​—Yak. 5:7, 8. w21.10 27 par. 12-13

Mwaminei, 11 sanza ya 5

Tólongola mpe kilo nyonso ná lisumu oyo ezali kokanga biso kozanga mpasi.​—Ebr. 12:1.

Ata soki tosalelaka Yehova banda bambula mingi to te, tosengeli kokoba kokómisa kondima na biso makasi epai na ye mpe kobatela yango. Mpo na nini? Mpo soki tokebi te, kondima na biso ekoki kolɛmba. Kobosana te ete kondima esimbami na bilembeteli ya makambo oyo emonanaka te. Ezalaka mpasi te tóbosana eloko oyo tokoki komona te. Yango wana, ntoma Paulo abengaki kozanga kondima “lisumu oyo ezali kokanga biso kozanga mpasi.” Kasi ndenge nini tokoki kokima motambo yango? (2 Tes. 1:3) Ya liboso, sɛngá Yehova elimo santu na ye mpe saláká yango mbala na mbala. Mpo na nini? Mpo kondima ezali moko ya bizaleli ya mbuma ya elimo. (Gal. 5:22, 23) Tokoki te kokómisa kondima na biso makasi epai ya Mozalisi mpe kobatela yango kozanga lisalisi ya elimo santu na ye. Soki tokobi kosɛnga Yehova elimo na ye, akopesa biso yango. (Luka 11:13) Tokoki kutu kobondela: “Bakiselá biso kondima.” (Luka 17:5) Ya mibale, Yekoláká Liloba ya Nzambe mbala na mbala.​—Nz. 1:2, 3. w21.08 18-19 par. 16-18

Mwamitano, 12 sanza ya 5

Nsuki mpɛmbɛ ezalaka motole ya kitoko.​—Mas. 16:31.

Bandeko oyo bakómi mibange bakoki kosalisa ebongiseli ya Yehova na makambo mingi. Ata soki bazali lisusu na makasi oyo bazalaki na yango liboso te, bayebi makambo mingi oyo bayekolá na boumeli ya bambula. Yehova akoki kokoba kosalela bango na balolenge mingi. Na ndakisa, Biblia elobeli bato ya sembo oyo bakobaki kosalela Yehova tii na bobange na bango. Na ndakisa, Moize azalaki na mbula soki 80 ntango akómaki mosakoli ya Yehova mpe momonisi ya ekólo Yisraele. Yehova akobaki kosalela Danyele lokola molobeli na ye ata ntango akómaki na mbula mwa moke koleka 90. Mpe ekoki kozala ete ntoma Yoane akómaki na mbula mwa moke koleka 90 ntango azwaki emonaneli ya kokoma mokanda ya Emoniseli. Biblia elobeli makambo mingi te mpo na Simeone, mobali moko oyo azalaki “moyengebene mpe abangaka Nzambe.” Kasi Yehova ayebaki ye malamu mpe apesaki ye libaku ya komona Yesu ntango azalaki naino mwana. Apesaki ye mpe libaku ya kosakola mpo na mwana yango mpe mama na ye, Maria.​—Luka 2:22, 25-35. w21.09 3-4 par. 5-7

Mwapɔsɔ, 13 sanza ya 5

Ee Yehova, motema na ngai ezalaki na lolendo te, . . . natambolaki mpe na makambo mineneminene te.​—Nz. 131:1.

Baboti basengeli kokeba ete bákokanisaka te mwana moko na mosusu, to mpe básɛngaka ete mwana moko asala likambo moko oyo akokoka kosala te. Soki baboti bazali kosala bongo, yango ekoki kolɛmbisa mwana na bango. (Ef. 6:4) Ndeko mwasi moko na nkombo Sachiko alobi boye: “Mama na ngai azalaki kolinga ete nazwaka bapwɛ nyonso na ekzamɛ; likambo oyo nakokaki kosala te. Atako nasilisá kelasi eleki bambula mingi, na bantango mosusu nakobaka komituna soki Yehova asepelaka na ngai ata soki nazali kosala oyo ekoki na mosala na ye.” Mokonzi Davidi alobaki ete ‘atambolaki te na makambo mineneminene,’ na maloba mosusu alukaki te kosala makambo oyo elekaki makoki na ye. Komikitisa mpe bopɔlɔ oyo azalaki na yango esalisaki ye azala “kimya.” (Nz. 131:2) Liteya nini baboti bakoki kozwa na maloba wana ya Davidi? Mpo baboti bázala na komikitisa, basengeli te koluka kosala makambo oyo bakokoka te; basengeli mpe te kosɛnga mwana na bango asala bongo. Baboti bakoki kosalisa mwana na bango amiyoka ete azali na ntina, soki bayebi makasi mpe bolɛmbu na ye mpe basalisi ye amityela mikano oyo akoki kokokisa. w21.07 21-22 par. 5-6

Mwalomingo, 14 sanza ya 5

Moto na moto akomema mokumba na ye moko.​—Gal. 6:5.

Tosengeli kobosana te ete Yehova apesá mokomoko na biso bonsomi ya kopona. Yango elimboli ete tokoki kopona soki tokotosa ye to te. Bana mosusu bazalaki na baboti ya malamu te, kasi, baponá kosalela Yehova mpe kotikala sembo epai na ye. Nzokande bana mosusu oyo baboti na bango basalaki nyonso mpo na koteya bango solo ya Biblia, batikaki solo ntango bakómaki mikóló. Yango emonisi ete mokomoko na biso asengeli kopona soki akosalela Yehova to te. (Yos. 24:15) Yango wana, bino baboti oyo bozali na mawa mpo bana na bino batiki kosalela Yehova, bómipesaka foti te mpo na likambo yango! Na bantango mosusu, moboti akoki kopona kotika Yehova mpe kosundola ata libota na ye. (Nz. 27:10) Yango ekoki kozala mpasi mpo na bana oyo bazalaki kozwa moboti na bango lokola ndakisa. Bino bilenge oyo baboti na bino balongolami na lisangá, bóbosana te ete Yehova ayebi mpenza mpasi oyo bozali koyoka. Alingaka bino mpe asepelaka na bosembo na bino. Bóbosana mpe te ete soki baboti na bino balongolamá na lisangá, ezali foti na bino te. w21.09 27 par. 5-7

Mwayambo, 15 sanza ya 5

Yehova apesaka disiplini na moto oyo ye alingaka.​—Ebr. 12:6.

Tokoki kobanda kokokanisa mokristo oyo alongolami na lisangá na mpate moko ya mabe oyo akoki kobebisa etonga. Mokristo yango azali kobɛla na elimo. (Yak. 5:14) Kaka ndenge moto oyo azali na maladi moko boye akoki kopesa yango bato mosusu, moto oyo abebisi boyokani na ye ná Yehova akoki kolendisa basusu mpe básala bongo. Yango wana, ezali na ntina ete na bantango mosusu moto oyo asali lisumu alongolama na lisangá. Disiplini yango emonisaka bolingo oyo Yehova azalaka na yango mpo na bandeko ya lisangá oyo bazali sembo, mpe yango ekoki kosalisa mosumuki amona ete makambo oyo asalaki ezali mabe mpenza mpe kotinda ye abongola motema. Ata soki alongolami na lisangá, moto yango akoki kokoba koyangana na makita, epai akoki komileisa na elimo mpe kokómisa lisusu kondima na ye makasi. Akoki mpe kozwa mikanda mpo na boyekoli na ye moko mpe kotala baprogramɛ ya TV JW. Soki bankulutu bamoni ete azali kosala bambongwana, bakoki mbala na mbala kopesa ye toli mpe kosalisa ye azongela lisusu boyokani ya malamu elongo na Yehova mpo akoka kozongisama na lisangá. w21.10 10-11 par. 9, 11

Mwamibale, 16 sanza ya 5

Ezali te bato nyonso oyo balobaka na ngai: ‘Nkolo, Nkolo,’ nde bakokɔta na bokonzi ya likoló.​—Mat. 7:21.

Lelo, tolandaka mpe makambo oyo bakristo ya siɛklɛ ya liboso bazalaki kosala na losambo na bango. Na ndakisa, lisangá na biso ebongisami na kolanda ndenge ezalaki na siɛklɛ ya liboso. Tozali na bakɛngɛli-batamboli, bankulutu, mpe basaleli na misala. (Flp. 1:1; Tito 1:5) Ndenge moko na bakristo ya siɛklɛ ya liboso, biso mpe tolandaka mibeko ya Yehova na likambo etali kosangisa nzoto mpe libala, lolenge ya kotalela makila, mpe kolongola na lisangá mosumuki oyo aboyi kobongola motema mpo na kobatela bopɛto ya lisangá. (Mis. 15:28, 29; 1 Ko. 5:11-13; 6:9, 10; Ebr. 13:4) Biblia eyebisi biso polele ete ezali na “kondima kaka moko” oyo esepelisaka Nzambe. (Ef. 4:4-6) Ezali mpenza lokumu monene kozala mosaleli ya Yehova mpe koyeba solo na ntina etali Yehova mpe mikano na ye! Tiká tókoba komindimisa ete tozali mpenza na kati ya solo. w21.10 23 par. 15-17

Mwamisato, 17 sanza ya 5

Bótɛlɛma, bóningana te mpe bómona lobiko ya Yehova mpo na bolamu na bino.​—2 Nt. 20:17.

Mokonzi Yehoshafate akutanaki na mokakatano moko monene. Limpinga moko monene ya bana ya Amona, ya Moabe, mpe ya mibali oyo bazalaki kofanda na etúká ya bangomba ya Seire, bayaki mpo na kobundisa ye, bato ya libota na ye, mpe bato ya ekólo na ye. (2 Nt. 20:1, 2) Yehoshafate asalaki nini? Asɛngaki Yehova asalisa ye mpe apesa ye makasi. Libondeli ya komikitisa oyo Yehoshafate asalaki, oyo ezali na 2 Ntango 20:5-12, emonisi ete azalaki mpenza kotyela Yehova motema. Yehova asololaki na Yehoshafate na nzela ya Molevi moko na nkombo Yahaziele, maloba ya mokapo ya lelo. Lokola atyelaki Nzambe na ye motema mobimba, Yehoshafate asalaki kaka ndenge bayebisaki ye. Ntango ye ná bato na ye bakendaki mpo na kokutana na banguna yango, atyaki te basoda oyo bayebi kobunda malamu na molɔngɔ ya liboso, kasi atyaki nde bayembi oyo bayebaki na bango kobunda te. Yehova akokisaki elaka na ye epai ya Yehoshafate; mpe Yehova asalaki ete banguna yango bábomana.​—2 Nt. 20:18-23. w21.11 15-16 par. 6-7

Mwaminei, 18 sanza ya 5

Ezali mpo na misala ya motema boboto ya Yehova nde tosili te, mpamba te ebele ya misala na ye ya motema mawa ekosuka te.​—Bil. 3:22.

Ntango tozali kokutana na mikakatano, Yehova akosalisa biso mpo tókoba kobatela bosembo na biso epai na ye. (2 Ko. 4:7-9) Toyebi ete Yehova akokoba komonisela biso bolingo na ye ya sembo mpo Biblia eyebisi biso ete “liso ya Yehova ezali kotala baoyo babangaka ye, baoyo bazelaka motema boboto [to bolingo ya sembo] na ye.” (Nz. 33:18-22) Liboso tóbanda kosalela Yehova, azalaki komonisela biso bolingo oyo amoniselaka bato nyonso, kasi lokola tokómi basambeli na ye, amoniselaka biso mpe bolingo ya sembo. Bolingo yango etindaka Yehova abatela biso. Akozala ntango nyonso penepene na biso mpe akokokisa makambo oyo alaki biso. Alingi ete tózala baninga na ye mpo na seko! (Nz. 46:1, 2, 7) Na yango, ata soki tokutani na mikakatano nini, Yehova akopesa biso makasi oyo tosengeli na yango mpo tóbatela bosembo na biso. w21.11 7 par. 17-18

Mwamitano, 19 sanza ya 5

Bókoba kokanga motema moto na moto na makambo ya mosusu mpe kolimbisana na motema moko.​—Kol. 3:13.

Mingi na biso toyebi bato oyo bakangelá baninga na bango ya misala nkanda, baninga na bango ya kelasi, to mpe bandeko na bango ya libota, ata mpe na boumeli ya bambula! Kobosana te ete bandeko ya Yozefe bakangelaki ye nkanda makasi, mpe nsukansuka yango etindaki bango básala ye mabe. (Eba. 37:2-8, 25-28) Kasi Yozefe akangelaki bango nkanda te! Ntango akómaki moto ya lokumu na Ezipito, azalaki na likoki ya kosala bandeko na ye mabe, kasi ayokelaki bango mawa. Yozefe abombelaki bango nkanda na motema te. Asalaki nde na boyokani na toli oyo ekomamaki na nsima na Balevi 19:18. (Eba. 50:19-21) Bakristo oyo balingi kosepelisa Nzambe basengeli komekola Yozefe oyo alimbisaki bandeko na ye na esika ya kozongisela bango mabe. Yesu ateyaki biso tólimbisaka baoyo basaleli biso makambo ya mabe. (Mat. 6:9, 12) Ndenge moko mpe, ntoma Paulo apesaki bakristo toli oyo: “Bandeko ya bolingo, moto oyo asali bino mabe, bózongisela ye mabe te.”​—Rom. 12:19. w21.12 11-12 par. 13-14

Mwapɔsɔ, 20 sanza ya 5

Akokokisa mposa ya baoyo bazali kobanga ye; akoyoka kolela na bango mpo na kosɛnga lisalisi, mpe akobikisa bango.​—Nz. 145:19.

Na butu ya mokolo ya 14 Nisana ya mobu 33 ya ntango na biso, Yesu akendaki na elanga ya Getesemane. Kuna, asopelaki Yehova motema na ye na libondeli. (Luka 22:39-44) Ezalaki na ntango wana ya mpasi nde Yesu “alɔmbaki . . . na koganga makasi mpe na mpisoli.” (Ebr. 5:7) Makambo nini Yesu asɛngaki na libondeli na ye na butu wana ya nsuka liboso akufa? Asɛngaki Yehova apesa ye makasi ya kotikala sembo mpe ya kosala mokano na Ye. Yehova ayokaki mpasi oyo Mwana na ye azalaki na yango ntango azalaki kobondela mpe atindaki anzelu moko mpo apesa ye makasi. Yesu ayebaki mpe mokumba monene oyo azalaki na yango: kotikala sembo mpo na kolongisa nkombo ya Tata na ye. Yehova ayokaki mabondeli ya Yesu oyo eutaki mpenza na motema. Mpo na nini? Mpo mposa ya libosoliboso ya Yesu ezalaki ya kotikala sembo epai ya Tata na ye mpe ya kolongisa nkombo na Ye. Soki biso mpe tosali bongo ,Yehova, akoyanola na mabondeli na biso soki tosɛngi ete asalisa biso.​—Nz. 145:18. w22.01 17-18 par. 15-17

Mwalomingo, 21 sanza ya 5

Yango wana, bókende mpe bókómisa bato bayekoli na bikólo nyonso, bóbatisa bango . . . , bóteya bango.​—Mat. 28:19, 20.

Lelo oyo, bato mingi baboyaka biso mpo toboyaka kokɔta na makambo ya politiki. Balingaka ete tópona mokonzi moko na ntango ya maponami. Nzokande soki toponi moto moko boye ayangela biso, yango ekomonisa ete tozali koboya Yehova. (1 Sa. 8:4-7) Bato mosusu bakanisaka ete tosengeli kotonga biteyelo ná balopitalo mpe kosalisa bato oyo bazali kokelela. Lokola totyaka makanisi na biso nyonso na mosala ya kosakola na esika ya koluka kosilisa mikakatano ya mokili oyo, yango esalaka ete bato báboya biso. Oyo tosengeli kosala mpo tóbungisa kondima na biso te. (Mat. 7:21-23) Mokano na biso ya libosoliboso esengeli kozala ya kosala mosala oyo Yesu apesaki biso. Tosengeli komipesa soki moke te na makambo ya politiki to mpe koluka kosilisa mikakatano ya mokili oyo. Tolingaka bato mpe totyelaka mikakatano na bango likebi, kasi toyebi ete lolenge eleki malamu ya kosalisa bazalani na biso ezali ya koteya bango makambo etali Bokonzi ya Nzambe mpe kosalisa bango bákóma baninga ya Yehova. w21.05 7 par. 19-20

Mwayambo, 22 sanza ya 5

Mikolo ya nsuka ekozala ntango moko ya mpasi mpenza mpe ya mikakatano.​—2 Tim. 3:1.

Atako bakonzi mingi balobaka ete basalelaka Nzambe, balingaka te kotika bokonzi na bango. Ndenge kaka bakonzi basalaki yango na mikolo ya Yesu, lelo oyo mpe bakonzi batɛmɛlaka Moto oyo Yehova atyá mafuta mpe bayekoli na ye ya sembo. (Mis. 4:25-28) Yehova asali nini? Nzembo 2:10-12 eyanoli boye: “Mpe sikoyo, Ee bakonzi, bózala na mayele ya kososola; bóndima básembola bino, Ee basambisi ya mabele. Bósalela Yehova na kobanga mpe bózala na esengo na kolɛnga. Bópwɛpwa mwana, mpo Ye asilika te noki bókufa mpe bólongwa na nzela, mpo nkanda na ye epelaka noki. Esengo na baoyo nyonso bazali kokima epai na ye.” Yehova azali na boboto mpe atikeli banguna na ye ntango mpo bázwa ekateli oyo ebongi. Bakoki kobongola makanisi na bango mpe kondima kosalela Yehova. Kasi ntango etikali lisusu mingi te. (Yis. 61:2) Ezali mpenza na ntina ete bato báyeba solo nokinoki mpe bápona kosalela Yehova. w21.09 15-16 par. 8-9

Mwamibale, 23 sanza ya 5

Soki tozali na bilei mpe na eloko ya kozipa nzoto, tósepela na biloko yango.​—1 Tim. 6:8.

Paulo alingaki nde koloba ete tosengeli kosepela na biloko ya mosuni oyo tozali na yango. (Flp. 4:12) Eloko na biso oyo eleki motuya ezali nde boyokani na biso elongo na Nzambe, kasi te biloko ya mosuni oyo tozali na yango. (Hab. 3:17, 18) Talá oyo Moize ayebisaki Bayisraele nsima ya kolekisa mbula 40 na esobe: “Yehova Nzambe na yo apamboli yo na misala nyonso ya lobɔkɔ na yo. . . . Mbula ntuku minei (40) oyo, Yehova Nzambe na yo azalaki elongo na yo. Ozangaki eloko te.” (Mib. 2:7) Na boumeli ya mbula 40 yango, Yehova aleisaki Bayisraele mana. Bilamba na bango ekufaki te, nzokande ezalaki kaka bilamba oyo babimaki na yango na Ezipito. (Mib. 8:3, 4) Yehova akosepela soki toyekoli kosepela, ata na biloko moke oyo azali kopesa biso, soki tozali kotalela yango lokola lipamboli mpe kopesa ye matɔndi mpo na yango. w22.01 5-6 par. 10-11

Mwamisato, 24 sanza ya 5

Tyelá Yehova motema na yo mobimba mpe kondimela mayele na yo moko te.​—Mas. 3:5.

Mibali, bozali na mokumba ya kokokisa bamposa ya bato ya mabota na bino, yango wana bosalaka mosala makasi mpo na kobatela mpe kosalisa bango. Ntango bokutani na mikakatano, bokoki kokanisa ete bokosilisa yango na makasi na bino moko. Kasi bóboya ezaleli ya komityela motema mobimba. Bóbondelaka nde Yehova ntango bozali bino moko. Lisusu, bóbondelaka na motema mobimba elongo na basi na bino. Bólukaka litambwisi ya Yehova na nzela ya koyekola Biblia, mikanda mpe bavideo oyo ebongiseli na ye ebimisaka. Bósalelaka mateya oyo bozwi. Bato mosusu bakoki kosepela te na bikateli oyo bozwi oyo esimbami na Liloba ya Nzambe. Bakoki mpe koyebisa bino ete mbongo mpe biloko ya mokili ekobatela mpenza mabota na bino. Kasi bóbosana te ndakisa ya Mokonzi Yehoshafate. (2 Nt. 20:1-30) Atyelaki Yehova motema mpe amonisaki yango na misala na ye. Lokola Yehova asundolaki Yehoshafate te, bóyeba ete akosundola mpe bino te.​—Nz. 37:28; Ebr. 13:5. w21.11 15-16 par. 6, 8

Mwaminei, 25 sanza ya 5

Nzambe . . . epai na ye kozanga bosembo ezali te.​—Mib. 32:4.

Nzambe asalá biso na elilingi na ye, yango wana tolingaka ete básalela basusu makambo na bosembo. (Eba. 1:26) Kasi, lokola tozali bato ya kozanga kokoka, tokoki kozala na makanisi ya libunga, ata ntango tokanisi ete toyebi makambo nyonso. Na ndakisa, kanisá lisusu ndenge Yona asepelaki te na ekateli oyo Yehova azwaki ya komonisela bato ya Ninive motema mawa. (Yona 3:10–4:1) Nzokande, yango ebimisaki mbuma ya malamu. Bato ya Ninive koleka 120 000 babongolaki motema mpe babikaki! Na nsuka, eyebanaki ete Yona nde asengelaki kosembolama, kasi Yehova te. Yehova asɛngisami te kolimbwela bato ntina oyo azwi ekateli boye to boye. Ezali solo ete Yehova azalaki kopesa basaleli na ye na ntango ya kala nzela bábimisa mayoki na bango mpo na bikateli oyo azwaki to oyo alingaki kozwa. (Eba. 18:25; Yona 4:2, 3) Mpe na bantango mosusu, alimbolaki bikateli na ye. (Yona 4:10, 11) Atako bongo, Yehova azali na mposa te ya kozwa ndingisa na biso, ezala liboso asala likambo moko to na nsima.​—Yis. 40:13, 14; 55:9. w22.02 3-4 par. 5-6

Mwamitano, 26 sanza ya 5

Moto oyo aleki na kati na bino akóma lokola leki ya nsuka mpenza, mpe moto oyo azali kosala lokola mokonzi azala lokola mosali.​—Luka 22:26.

Tomitambwisaka lokola bana mike soki tozali kotalela basusu ete “baleki biso.” (Flp. 2:3) Soki tozali na makanisi ya ndenge wana, na ntembe te tokobɛtisa basusu libaku te. Bandeko na biso nyonso balekaka biso na likambo moko to mosusu. Ezalaka mpasi te koyeba yango soki tozali kotya likebi mingimingi na bizaleli na bango ya malamu. Tosengeli kobosana te toli oyo ntoma Paulo apesaki bakristo ya Korinti. Alobaki boye: “Nani akesenisi yo na mosusu? Ɛɛ, eloko nini ozali na yango oyo bapesaki yo kopesa te? Nzokande, soki mpenza bapesaki yo yango kopesa, mpo na nini ozali komikumisa lokola nde bapesaki yo yango kopesa te?” (1 Ko. 4:7) Tosengeli kokeba ete tóbendaka te likebi epai na biso moko to mpe tókanisaka ete toleki basusu. Na ndakisa, soki ndeko mobali moko asalaka badiskur malamu na lisangá to ndeko mwasi moko ayebi mpenza ndenge ya kobanda koyekola na bato Biblia, basengeli ntango nyonso kozongisa lokumu epai ya Yehova mpo na makoki oyo bazali na yango. w21.06 22 par. 9-10

Mwapɔsɔ, 27 sanza ya 5

Loná mboto na yo . . . mpe kopemisa lobɔkɔ na yo te.​—Mos. 11:6.

Ekómi lisusu mpasi mpo basakoli mingi bákuta bato na bandako na bango. Basakoli mingi bafandaka na bisika oyo ezali na bandako ya milaimilai oyo ebatelami malamu mpe ezalaka mpasi kokɔta kuna. Bato oyo bakɛngɛlaka bandako yango bapekisaka moto nyonso akɔta, longola kaka soki moto moko oyo afandaka kuna abengisaki ye. Basakoli mosusu bakutaka kaka bato moke na bandako yango to bazali na bisika oyo kaka bato moke nde bafandaka. Ekoki kosɛnga ete basakoli bátambola bakilomɛtrɛ ebele mpo na kokutana kaka na moto moko, oyo mbala mosusu mpe bakoki kokuta ye na ndako te! Soki tokutani na mikakatano ya ndenge wana, tosengeli kolɛmba te. Luká kokutana na bato na bangonga ekeseni. Tokokutana na bato mingi soki tosakoli na bangonga oyo bazalaka na bandako na bango. Mpo ata ndenge nini, moto nyonso azongaka kaka epai na ye na ngonga moko boye! Bandeko mingi bamonaka malamu básakola nsima ya midi to na mpokwa mpo bakutanaka na bato mingi. Longola yango, bankolo-ndako bakoki kondima kosolola na bato na bantango yango. w21.05 15 par. 5, 7

Mwalomingo, 28 sanza ya 5

Bazali kokoba kosambela ngai kaka mpamba, mpo mateya oyo bazali koteya ezali nde mibeko ya bato.​—Mrk. 7:7.

Yango mpe esalemaka lelo oyo? Ɛɛ. Bato mingi basilikaka ndenge Batatoli ya Yehova basanganaka elongo na bango te na milulu oyo eyokani te na Makomami, na ndakisa fɛti ya mbotama mpe Noele. Basusu basilikaka ndenge Batatoli ya Yehova baboyaka kosala milulu ya ekólo, mpe ndenge balandaka te mimeseno ya kokunda ebembe oyo eyokani te na Liloba ya Nzambe. Baoyo babɛtaka libaku mpo Batatoli ya Yehova basalaka milulu wana te, bakoki kokanisa ete Nzambe andimaka mpenza ndenge oyo bazali kosambela ye. Nzokande bakoki kosepelisa ye te soki bazali kolanda mimeseno ya mokili na esika ya kolanda mateya ya polele oyo ezali na Biblia. (Mrk. 7:7-9) Oyo tosengeli kosala mpo tóbungisa kondima na biso te. Tosengeli kolinga makasi mpenza mibeko mpe mitinda ya Yehova. (Nz. 119:97, 113, 163-165) Soki tolingaka mpenza Yehova, tokoboya mimeseno nyonso oyo esepelisaka ye te. Tokotika nzela te ete eloko moko ekóma na ntina mingi koleka bolingo na biso mpo na Yehova. w21.05 6 par. 15-16

Mwayambo, 29 sanza ya 5

Batelá makanisi na yo na makambo nyonso, ndimá komona mpasi, salá mosala ya mopalanganisi ya nsango malamu.​—2 Tim. 4:5.

Ndenge nini tokoki kosalela toli ya ntoma Paulo? Tosengeli koyekolaka mbala na mbala, kobondelaka ntango nyonso, mpe kozala na mingi ya kosala na mosala oyo Yehova apesá biso. (2 Tim. 4:4) Soki tozali na kondima, tokobanga te ntango toyoki bansango ya lokuta mpo na Batatoli ya Yehova. (Yis. 28:16) Bolingo na biso mpo na Yehova, mpo na Liloba na ye, mpe mpo na bandeko na biso esalisaka biso tótika te ete baoyo batiká solo bábɛtisa biso libaku. Na siɛklɛ ya liboso, bato mingi babɛtaki libaku mpe baboyaki Yesu. Kasi mingi mpe bandimelaki ye. Na kati na bango tokoki kotánga Moyuda moko oyo azalaki kosala na Sanedrina, ata mpe “ebele ya banganga-nzambe.” (Mis. 6:7; Mat. 27:57-60; Mrk. 15:43) Ndenge moko mpe, bamilio ya bato lelo oyo bazwi ekateli ya kolanda Yesu. Mpo na nini? Mpo bayebi mateya ya solo oyo ezali na Biblia, mpe balingaka yango. Liloba ya Nzambe elobi: “Baoyo bazali kolinga mobeko na yo bazali na kimya mingi, mpe eloko ya kobɛtisa bango libaku ezali te.”​—Nz. 119:165. w21.05 13 par. 20-21

Mwamibale, 30 sanza ya 5

Nguya na ngai ezali kokóma ya kokoka na kati ya bolɛmbu.​—2 Ko. 12:9.

Ntoma Paulo ayebaki ete makambo nyonso oyo asalaki na mosala ya Yehova ezalaki na makasi na ye moko te, kasi nde oyo ya Nzambe. Na nzela ya elimo santu na ye, Yehova apesaki Paulo nguya mpo akokisa malamumalamu mosala na ye atako akutanaki na minyoko, batyaki ye na bolɔkɔ, mpe mikakatano mosusu. Timote, oyo azalaki moninga ya mosala ya Paulo, asengelaki mpe kotyela nguya ya Nzambe motema mpo akokisa mosala na ye. Ntango Paulo asalaki mibembo na ye ya milai ya mosala ya misionɛrɛ, akendaki elongo na Timote. Lisusu, Paulo atindaki ye na mibembo mosusu mpo akende kotala masangá mpe kolendisa yango. (1 Ko. 4:17) Timote akokaki komona ete abongi te. Ntango mosusu mpo na yango nde Paulo ayebisaki ye: “Moto atyola bolenge na yo te.” (1 Tim. 4:12) Lisusu, na ntango yango, Timote azalaki na nzubɛ na ye moko na mosuni, elingi koloba, ‘bamaladi oyo azalaki kobɛlabɛla.’ (1 Tim. 5:23) Kasi Timote ayebaki ete nguya ya elimo santu ya Yehova ekopesa ye makasi oyo asengelaki na yango mpo asakola nsango malamu mpe asalela bandeko na ye.​—2 Tim. 1:7. w21.05 21-22 par. 6-7

Mwamisato, 31 sanza ya 5

Tyá motema na yo na bitonga na yo.​—Mas. 27:23.

Na ntembe te, likanisi oyo ezali na Yakobo 1:19 etaleli mpenza baoyo bapesaka toli. Yakobo akomaki boye: “Moto nyonso asengeli koyokaka noki, kowelaka koloba te, koyokaka nkanda noki te.” Nkulutu akoki kokanisa ete ayebi makambo nyonso, kasi ezali mpenza bongo? Masese 18:13 elobi: “Ntango moto azali koyanola na likambo liboso ya koyoka yango, wana ezali bozoba mpo na ye mpe kosambwa.” Eleki malamu kotuna ndeko yango ye moko ayebisa biso makambo oyo azali na yango. Yango esɛngi koyoka liboso ya koloba. Nkulutu asengeli komituna mituna lokola: “Makambo ezali kotambola ndenge nini na bomoi na yo?” “Ndenge nini nakoki kosalisa yo?” Soki bankulutu bazali kozwa ntango mpo na koyeba likambo malamu, na ntembe te bakobanda kosalisa mpe kolendisa bandeko. Kopesa toli ya malamu esuki kaka te na kotánga mwa mikapo ya Biblia to mpe kopesa likanisi moko to mibale. Bandeko na biso basengeli komona mpenza ete tozali kotyela bango likebi, tozali komitya na esika na bango, mpe tolingi kosalisa bango. w22.02 17 par. 14-15

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto