Sanza ya 6
Mwaminei, 1 sanza ya 6
Mwasi mobola moko oyo mobali akufá ayaki mpe atyaki mbongo ya bibende mibale ya motuya moke mpenza.—Mrk. 12:42.
Mwasi oyo mobali akufá azali na bomoi ya mpasi mpenza, mpe ekoki kozala ete azali na mbongo mingi te mpo na kosomba biloko ya mokolo na mokolo oyo asengeli na yango. Kasi akei na moko ya bakɛsi ya makabo yango mpe atye na ndenge ya nkuku mbongo mibale ya bibende ya mike mpenza, oyo mbala mosusu esali makɛlɛlɛ ntango ekɔti na kɛsi yango. Yesu ayebi motángo ya mbongo oyo mwasi yango atye na kɛsi yango. Ezali mbongo oyo ekokoka ata kosomba mokɛngɛli-mboka moko te; bandɛkɛ oyo bato bakokaki kosomba na ntalo moke mpenza mpo na kolya. Mwasi yango akamwisi Yesu mpenza. Na yango, Yesu abengi bayekoli na ye, alakisi bango mwasi yango oyo mobali akufá mpe alobi: “Mwasi mobola wana oyo mobali akufá atye mingi koleka bato nyonso.” Na nsima alobi: “Bango nyonso [mingimingi bazwi] batyaki oyo balongolaki na biloko na bango oyo eleki ebele, kasi ye na kokelela na ye atyaki nyonso oyo azalaki na yango, nyonso oyo azalaki na yango mpo na kobikela.” (Mrk. 12:43, 44) Ntango mwasi yango azalaki kotya mwa mbongo moke oyo atikalaki na yango mpo na mokolo wana, azalaki kotika bomoi na ye mobimba na mabɔkɔ ya Yehova mpo asunga ye.—Nz. 26:3. w21.04 6 par. 17-18
Mwamitano, 2 sanza ya 6
Talá! botondisi Yerusaleme na mateya na bino.—Mis. 5:28.
Yesu abatelaki makanisi malamu. Alingi ete bayekoli na ye mpe bábatela makanisi malamu na mosala ya kosakola. (Yoa. 4:35, 36) Ntango Yesu azalaki elongo na bayekoli na ye, bazalaki na molende na mosala ya kosakola. (Luka 10:1, 5-11, 17) Kasi ntango bakangaki Yesu mpe babomaki ye, bayekoli na ye babungisaki mposa wana ya kosakola mpo na mwa ntango. (Yoa. 16:32) Nsima ya lisekwa na ye, Yesu alendisaki bango bátya makanisi na bango nyonso na mosala ya kosakola. Mpe ntango amataki na likoló, basakolaki na molende mpenza, mpe yango etindaki banguna na bango báloba ndenge tomoni yango na mokapo ya mokolo ya lelo. Yesu nde akambaki mosala ya kosakola oyo bakristo ya siɛklɛ ya liboso basalaki, mpe Yehova apambolaki mosala na bango. Yango wana bato mingi bandimaki nsango na bango. Na ndakisa, na Pantekote ya mobu 33 ya ntango na biso, bato soki 3000 bazwaki batisimo. (Mis. 2:41) Mpe motángo ya bayekoli na ye ekobaki kobakisama mingi mpenza. (Mis. 6:7) Lisusu, Yesu asakolaki ete na mikolo ya nsuka, ebele ya bato mpenza bakondima nsango malamu.—Yoa. 14:12; Mis. 1:8. w21.05 14 par. 1-2
Mwapɔsɔ, 3 sanza ya 6
Esengo na moto oyo azwi ata eloko moko te ya kobɛta libaku epai na ngai.—Mat. 11:6.
Okanisaka lisusu mbala ya liboso oyo oyebaki mpenza ete ozali na kati ya solo? Okanisaki ete moto nyonso akosepela na makambo oyo okómaki kondima. Ondimisamaki ete mateya ya solo ya Biblia ekosalisa bango bázala na bomoi ya malamu lelo oyo, mpe ekopesa bango elikya kitoko mpo na mikolo ezali koya. (Nz. 119:105) Na ntembe te, na esengo mpenza, oyebisaki bandeko mpe baninga na yo nyonso mateya ya solo oyo okómaki koyekola. Kasi nini esalemaki? Mbala mosusu okamwaki ndenge bato mingi baboyaki makambo oyo oyebisaki bango. Tosengeli kokamwa te soki bato mosusu baboyi kondima mateya ya solo oyo toteyaka bango. Na mikolo ya Yesu, bato mingi baboyaki ye atako asalaki makamwisi oyo emonisaki ete Nzambe azalaki kosalisa ye. Na ndakisa, Yesu asekwisaki Lazare. Yango ezalaki likamwisi oyo ata batɛmɛli na ye bakokaki kowangana yango te. Atako bongo, bakonzi ya Bayuda bandimaki te ete Yesu azalaki Masiya. Kutu balukaki nde koboma ezala Yesu mpe Lazare!—Yoa. 11:47, 48, 53; 12:9-11. w21.05 2 par. 1-2
Mwalomingo, 4 sanza ya 6
Tótika koyanganaka na makita na biso te, . . . kasi tólendisanaka.—Ebr. 10:25.
Salá nyonso oyo okoki mpo na koyanganaka na makita. Makambo oyo okoyoka ekolendisa yo mpe yango ekosalisa yo oyeba bandeko malamu. Salá boninga na bandeko ya lisangá oyo okoki koyekola epai na bango. Bakoki kozala bato ya mbula to mimeseno ekeseni na oyo ya yo. Biblia eyebisi biso ete “bwanya ezalaka nde epai ya mibange.” (Yobo 12:12) Mibange mpe bakoki koyekola makambo epai ya bandeko oyo bazali bilenge. Yonatane azalaki mokóló ya Davidi ya mosika, kasi yango epekisaki bango te bákóma baninga ya motema. (1 Sa. 18:1) Davidi ná Yonatane basalisanaki mpo na kosalela Yehova atako bakutanaki na mikakatano ya makasi. (1 Sa. 23:16-18) Irina, ndeko mwasi moko oyo azali Motatoli ya Yehova kaka ye moko na libota na bango, alobi boye: “Bandeko na biso bakristo bakoki mpenza kokóma lokola baboti na biso to bandeko na biso ya libota. Yehova akoki kosalela bango mpo na kokokisa bamposa na biso.” Baninga na yo bazalaka na mposa ya kolendisa mpe ya kosalisa yo, kasi balingaka oyebisa bango ndenge oyo bakoki kosala yango. w21.06 10-11 par. 9-11
Mwayambo, 5 sanza ya 6
Tata na ngai ya likoló akosala bino mpe bongo soki mokomoko na bino azali kolimbisa ndeko na ye na motema mobimba te.—Mat. 18:35.
Yesu apesaki ndakisa ya mokonzi moko ná moombo na ye. Mokonzi ayebisaki moombo yango afuta te nyongo ya mbongo ebele oyo azalaki na likoki ya kofuta soki moke te. Na nsima, moombo yango atingamaki ete moninga na ye moombo afuta nyongo na ye ya mbongo moke mpenza. Na nsuka, mokonzi akɔtisaki na bolɔkɔ moombo yango oyo aboyaki kolimbisa moninga. Makambo oyo moombo yango asalaki epesaki kaka ye moko mpasi te kasi mpe basusu. Ya liboso, aboyaki koyokela moninga na ye moombo mawa, na ndenge asɛngaki bábwaka ye na “bolɔkɔ tii ntango akofuta nyongo oyo azalaki na yango.” Ya mibale, makambo oyo asalaki epesaki baombo mosusu oyo bazalaki kotala mpasi mpenza. Ntango “baninga na ye baombo bamonaki makambo oyo esalemaki, bayokaki mawa mingi mpenza.” (Mat. 18:30, 31) Ndenge moko mpe, makambo oyo tosalaka ekoki kopesa bato mosusu esengo to mawa. Soki moto asali likambo moko oyo epesi biso mpasi kasi toboyi kolimbisa ye, nini ekoki kosalema? Ya liboso, tokopesa ye mpasi na ndenge toboyi kolimbisa ye, kotyela ye likebi mpe komonisela ye bolingo. Ya mibale, tokopesa bandeko mosusu ya lisangá mpasi ntango bakoyeba ete biso ná ndeko yango tozali koyokana te. w21.06 22 par. 11-12
Mwamibale, 6 sanza ya 6
[Akobebisa] baoyo bazali kobebisa mabele.—Em. 11:18.
Nzambe akelaki bato mpo bámekolaka ye, kasi Satana alukaka kotinda bango básala makambo ya mabe. Ntango Yehova “amonaki ete mabe ya moto ezalaki mingi” na mikolo ya Noa, “ayokaki mawa mpo asalaki bato na mabele, mpe ayokaki mpasi na motema na ye.” (Eba. 6:5, 6, 11) Makambo ebongi kobanda ntango wana? Te! Satana asepelaka mingi ndenge makambo ya pite epalangani mingi na mokili, na ndakisa, kosangisa nzoto kati na mibali na mibali mpe basi na basi! (Ef. 4:18, 19) Satana asepelaka mingi ntango bato oyo basambelaka Yehova basali lisumu ya monene. Na nse ya boyangeli ya Satana, moto asuki kaka te na ‘koyangela moto mpo na komonisa ye mpasi,’ kasi azali mpe kobebisa mabele mpe kosilisa banyama oyo Yehova apesaki ye mokumba ya kobatela yango. (Mos. 8:9; Eba. 1:28) Yango ebimisi nini? Bato mosusu ya mayele balobi ete na bambula oyo ezali koya, makambo oyo bato bazali kosala ekoki kolimwisa milio moko ya mitindo mosusu ya bikelamu na mabele. w21.07 12 par. 13-14
Mwamisato, 7 sanza ya 6
[Yehova] akolimbisa mpenza.—Yis. 55:7.
Basaleli mosusu ya Nzambe bamipesaka foti koleka ndelo mpo na mabunga oyo basalá kala. Bakobaka kokanisa ete Yehova alimbisá bango te ata soki babongolá mpenza motema mpe batiká makambo yango ya mabe. Soki yo mpe omiyokaka bongo, koyeba ete Yehova asepelaka komonisa bolingo na ye ya sembo epai ya basaleli na ye ekosalisa yo osalela Yehova na esengo mpe na lisosoli ya pɛto. Ezali bongo mpo “makila ya Yesu Mwana na ye ezali kopɛtola biso na lisumu nyonso.” (1 Yoa. 1:7) Soki olɛmbi nzoto mpo na mabunga oyo osalaka, kobosana te ete Yehova asepelaka mpenza kolimbisa mosumuki oyo abongoli mpenza motema. Mokomi ya Nzembo Davidi amonisaki boyokani oyo ezali kati na bolingo ya sembo ya Nzambe mpe ndenge oyo alimbisaka biso. Alobaki boye: “Se ndenge likoló etombwaná koleka mabele, motema boboto na ye epai ya baoyo bazali kobanga ye eleki monene. Se ndenge epai moi ebimaka ezali mosika mingi na epai moi elalaka, ndenge yango nde atye mosika na biso ebele ya misala na biso ya kobuka mibeko.”—Nz. 103:11, 12. w21.11 5-6 par. 12-13
Mwaminei, 8 sanza ya 6
Bana na ye batɛlɛmi mpe batángi ye moto ya esengo; nkolo na ye azali kotɛlɛma, mpe azali kokumisa ye.—Mas. 31:28.
Mobali mokristo asengeli kopesaka mwasi na ye lokumu. (1 Pe. 3:7) Kopesa moto lokumu elimboli kotyela ye mpenza likebi mpe kopesa ye limemya. Na ndakisa, mobali akopesa mwasi na ye lokumu soki azali kosalela ye makambo na limemya. Asengeli te kosɛnga ye asala makambo oyo akokoka te. Mpe asengeli te kokokanisa ye na basi mosusu. Mwasi akomiyoka ndenge nini soki mobali na ye azali kokokanisa ye na basi mosusu? Mobali ya ndeko mwasi Rosa oyo azali Motatoli te akokanisaka ye mbala mingi na basi mosusu. Maloba na ye ya kozanga boboto esalaka ete ndeko Rosa amiyoka mabe, mpe etindaka ye amituna soki balingaka ye mpenza. Alobi boye: “Nazalaka ntango nyonso na mposa moto moko ayebisaka ngai ete Yehova azwaka ngai na motuya.” Nzokande, mobali mokristo apesaka mwasi na ye lokumu. Ayebaka ete kosala bongo ekosalisa ye azala na boyokani ya malamu ná mwasi na ye mpe ná Yehova. Mobali oyo akumisaka mwasi na ye, alobaka malamu mpo na ye liboso ya bato nyonso, ayebisaka ye ete alingaka ye, mpe ete azali na motuya mingi. w21.07 22 par. 7-8
Mwamitano, 9 sanza ya 6
Nakomonisa ete nazali kozela.—Mika 7:7.
Olɛmbaka nzoto ntango ozali kozela moninga moko ayela yo eloko moko oyo ozali mpenza na mposa na yango? Kasi soki bayebisi yo bantina oyo esali ete moninga yango akóma te na ntango oyo boyokanaki, okomonisa motema molai mpe okondima kozela, bongo te? Ndakisa moko oyo emonisi ntina ya kozala motema molai ezali na Masese 21:5. Elobi: “Myango ya moto ya etingya ememaka mpenza na litomba, kasi moto nyonso oyo asalaka makambo mbangumbangu akokelela mpenza kokelela.” Vɛrsɛ oyo eteyi biso nini? Moto ya bwanya azalaka ekɛngɛ ntango azali kosala makambo mpe amonisaka motema molai. Yango ebotaka mbuma malamu. Masese 4:18 elobi ete: “Nzela ya bayengebene ezali lokola pole oyo ezali kongɛnga, oyo ezali kongɛnga se kongɛnga kino moi ekokóma makasi.” Maloba yango esalelamaka mpo na komonisa ndenge oyo Yehova amonisaka mokano na ye malɛmbɛmalɛmbɛ epai ya basaleli na ye. Kasi, vɛrsɛ yango ekoki kosalelama mpo na kolobela bokoli ya elimo oyo mokristo asalaka na bomoi na ye. Esɛngaka ntango mpo moto akóma na boyokani ya malamu ná Yehova. w21.08 8-9 par. 1, 3-4
Mwapɔsɔ, 10 sanza ya 6
Ngai oyo! Tindá ngai!—Yis. 6:8.
Tozali na mingi ya kosala na mosala ya Yehova lokola nsuka ya mokili oyo ekómi pene. (Mat. 24:14; Luka 10:2; 1 Pe. 5:2) Biso nyonso tolingaka kosala mingi na mosala ya Yehova na kotalela makoki na biso. Bandeko mingi babakisi molende na bango na mosala ya kosakola. Bamosusu bazali na mposa ya kosala lokola babongisi-nzela. Bamosusu mpe bazali na mposa ya kosala na Betele to mpe na mosala ya botongi ya bandako mpo na mosala ya Bokonzi. Mpe bandeko mibali mingi bazali kokokisa masɛngami mpo na kokóma basaleli na misala to mpe bankulutu. (1 Tim. 3:1, 8) Yehova asepelaka mingi ntango amonaka elimo wana ya komipesa epai ya basaleli na ye! (Nz. 110:3) Kasi ezali boni soki olɛmbi nzoto mpo okokisi naino te mokano moko boye ya elimo oyo omityelaki? Soki ezali bongo, yebisá Yehova na libondeli ndenge oyo ozali komiyoka. (Nz. 37:5-7) Okoki mpe kosɛnga na bandeko oyo bakɔmeli na elimo báyebisa yo oyo okoki kosala mpo okolisa makoki na yo na mosala ya Nzambe, mpe na nsima, salá makasi osalela toli oyo bapesi yo. Soki osali bongo, okoki kokokisa mokano oyo omityelaki. w21.08 20 par. 1; 21 par. 4
Mwalomingo, 11 sanza ya 6
Yehova . . . akotika te bato na ye ya sembo.—Nz. 37:28.
Kanisá mpe mosakoli-mwasi Ana; mwasi oyo mobali akufá. Akómaki na mbula 84, kasi “azalaki kozanga te na tempelo.” Yehova apambolaki ye mpo azalaki kokende mbala na mbala na tempelo mpe apesaki ye libaku ya komona Yesu ntango azalaki naino mwana. (Luka 2:36-38) Na mikolo na biso, mibange mingi ya sembo bazali ndakisa malamu mpo na bilenge. Soki tozwi ntango ya kopusana penepene na bango, kotuna bango mwa mituna mpe koyoka bango ntango bazali koyebisa biso makambo ya malamu oyo bakutaná na yango na mosala ya Yehova, tokozwa mpenza matomba. Bandeko na biso oyo bakómi mibange bazali na motuya mingi na miso ya Yehova mpe ebongiseli na ye. Bamoná ndenge oyo Yehova apambolaka ebongiseli na ye na balolenge mingi. Bamoná mpe ndenge oyo apambolaka bango. Bazwá mateya mingi ya ntina na mabunga oyo basalá. Na yango, taleláká bango lokola “liziba ya bwanya,” mpe yekolá epai na bango. (Mas. 18:4) Soki osali makasi oyeba bango malamu, kondima na yo ekokóma makasi. w21.09 3 par. 4; 4 par. 7-8; 5 par. 11, 13
Mwayambo, 12 sanza ya 6
Oyo ya moke akokóma nkóto moko (1 000), mpe oyo azali mpamba akokóma ekólo ya nguya.—Yis. 60:22.
Yango esali ete basaleli ya Yehova bákoka kosalela makoki yango, oyo Yisaya abengaki “miliki ya bikólo.” (Yis. 60:5, 16) Na lisalisi ya bandeko basi mpe mibali yango ya makoki ndenge na ndenge, tozali kosakola na mikili 240, mpe tozali kobimisa mikanda na minɔkɔ koleka 1 000. Na ntango oyo ya nsuka, mosala ya koningisa bikólo ezali kotinda bato na makasi bázwa ekateli ya kopesa Bokonzi ya Nzambe mabɔkɔ to ya kotya motema na baguvɛrnema ya mokili oyo. Yango ezali liponi oyo moto nyonso asengeli kosala. Atako basaleli ya Yehova batosaka mibeko ya bikólo oyo bazali kofanda, bakɔtaka soki moke te na makambo ya politiki ya mokili oyo. (Rom. 13:1-7) Bayebaka ete kaka Bokonzi ya Nzambe nde ekosilisa mikakatano ya bato. Bokonzi yango ezali ya mokili oyo te.—Yoa. 18:36, 37. w21.09 17-18 par. 13-14
Mwamibale, 13 sanza ya 6
Bósopa motema na bino liboso na ye.—Nz. 62:8.
Ntango moto moko oyo olingaka mingi atiki kosalela Yehova, ezali na ntina mingi ete okoba kobatela kondima na yo mpe oyo ya bato ya libota na bino. Ndenge nini okoki kosala yango? Tángáká Liloba ya Nzambe, manyoláká, mpe yanganáká na makita mpo na kopusana penepene na Yehova. Joanna, oyo tata mpe ndeko na ye ya mwasi batikaki solo, alobi boye: “Nayokaka mpenza kimya ya motema ntango natángaka masolo ya Biblia oyo elobeli Abigaile, Estere, Yobo, Yozefe, mpe Yesu. Bandakisa na bango elendisaka ngai mpe esalisaka ngai nazala na makanisi ya malamu oyo ekitisaka mpasi na ngai.” Ntango okutani na mikakatano, kotika te kobondela Yehova. Sɛngá Tata na biso ya bolingo asalisa yo otalela likambo yango ndenge ye atalelaka yango mpe apesa yo ‘mayele ya kososola mpe ateya yo nzela oyo osengeli kokende.’ (Nz. 32:6-8) Ya solo, ekoki kozala mpasi oyebisa Yehova ndenge oyo ozali mpenza komiyoka. Kasi Yehova ayebi mpenza mpasi oyo ozali koyoka na motema. Asɛngi yo oyebisa ye makambo nyonso oyo ezali na motema na yo.—Kob. 34:6; Nz. 62:7. w21.09 27-28 par. 9-10
Mwamisato, 14 sanza ya 6
Oyo azali Mwana na ngai ya bolingo, oyo nandimi; bóyoka ye.—Mat. 17:5.
Nsima ya pantekote ya mobu 32 ya ntango na biso, ntoma Petro, Yakobo, mpe Yoane bamonaki emonaneli moko ya kokamwa. Ntango bazalaki likoló ya ngomba moko molai, mbala mosusu na Ngomba Heremone, Yesu abongwanaki liboso na bango. “Elongi na ye engɛngaki lokola moi, mpe bilamba na ye ya likoló ekómaki kongɛnga lokola pole.” (Mat. 17:1-4) Bantoma bayokaki mongongo ya Nzambe ezali koloba: “Oyo azali Mwana na ngai ya bolingo, oyo nandimi; bóyoka ye.” Bantoma yango misato bamonisaki na bomoi na bango ete bazalaki koyoka Yesu. Biso mpe tosengeli kolanda ndakisa na bango. Tozalaka na botɔndi ndenge Yehova apesaka biso litambwisi ya malamu na nzela ya Yesu Kristo, “mokonzi ya lisangá.” (Ef. 5:23) Lokola ntoma Petro, Yakobo, mpe Yoane, tózwa ekateli ya ‘koyoka’ Yesu. Soki tosali bongo, tokozwa mapamboli mingi sikoyo, mpe na mikolo ezali koya esengo ya seko. w21.12 22 par. 1; 27 par. 19
Mwaminei, 15 sanza ya 6
Nasengeli kosembola yo na ndenge oyo ekoki.—Yir. 30:11.
Mokristo moko na lisangá ya Korinti azalaki kosala pite ná mwasi ya tata na ye. Ntoma Paulo asɛngaki bango bálongola ye na lisangá. Bizaleli ya mbindo ya moto yango ezalaki kobebisa bandeko mosusu ya lisangá, oyo bamosusu kati na bango bazalaki kotalela yango te lokola lisumu ya monene. (1 Ko. 5:1, 2, 13) Nsima ya mwa ntango, Paulo ayokaki ete mosumuki yango abongolaki mpenza motema! Paulo ayebisaki bankulutu boye: “Bosengeli nde kolimbisa ye na boboto mpe kobɔndisa ye.” Paulo amonisaki ntina oyo bankulutu basengelaki kosala bongo. Ayebisaki bango boye: “Noki ezala na ndenge nini moto yango azinda na mawa na ye oyo eleki ndelo.” Paulo ayokaki mawa mpo na moto yango oyo abongolaki motema. Alingaki te ete moto yango amitungisa koleka ndelo mpe alɛmba nzoto mpo na makambo oyo asalaki, mpe atika kosɛnga bolimbisi. (2 Ko. 2:5-8, 11) Ndenge moko na Yehova, bankulutu basepelaka komonisa motema mawa. Bapesaka mosumuki disiplini ya makasi soki esengeli, kasi soki likoki ezali bamonisaka motema mawa ntango bamoni ete ezali mpenza na bantina ya kosala bongo. Soki bankulutu bapesi mosumuki disiplini te, yango ekomonisa te ete bazali na motema mawa, kasi bazali nde kokanga miso na mabe. w21.10 11-12 par. 12-15
Mwamitano, 16 sanza ya 6
Osengeli te kozongisela bana ya bato na yo mabe to kokangela bango nkanda.—Lev. 19:18.
Tótalela ndakisa moko. Mpasi oyo toyokaka soki basali biso likambo moko ya mabe ezali lokola mpota oyo moto azoki. Bampota mosusu ezalaka ya mike kasi misusu ezalaka ya minene. Na ndakisa, ntango tozali kokata ndunda, tokoki kozoka mwa moke na mosapi. Yango ekoki mpenza kosala mpasi, kasi nsima ya mokolo moko to mibale, mbala mosusu tokoki kutu kobosana esika oyo tozokaki. Ndenge moko mpe, makambo mosusu ya mabe oyo basalelaka biso ezalaka ya mike. Na ndakisa, moninga moko akoki koloba to kosala likambo moko oyo epesi biso mpasi, kasi tokoki kolimbisa ye na pɛtɛɛ nyonso. Nzokande, soki mpota yango ezali monene, ekoki kosɛnga ete monganga atonga yango to akanga yango mwa elamba. Kasi soki tokobi kosimbasimba mpota yango, biso moko tokomisala mabe koleka. Likambo ya mawa, bato mosusu basalaka likambo ya ndenge wana soki ndeko moko asali likambo oyo epesi bango mpenza mpasi na motema. Bakoki kokoba kokanisa ndenge oyo moto moko azokisaki bango mpe mpasi oyo bayokaki mpo na likambo yango. Kasi baoyo babombaka nkanda na motema, bamisalaka mabe. Kotosa toli oyo ezali na mokapo ya lelo ezali mpenza na ntina! w21.12 12 par. 15
Mwapɔsɔ, 17 sanza ya 6
Mpo na nini ozali kosambisa ndeko na yo?—Rom. 14:10.
Kanisá ete nkulutu moko azali komitungisa mpo na molato ya ndeko moko to ndenge na ye ya kosala monzɛlɛ. Nkulutu yango akoki komituna boye: ‘Biblia epesi ngai ntina ya koloba na likambo yango?’ Lokola nkulutu yango akolinga te kopesa makanisi na ye moko, akoki kotuna makanisi epai ya nkulutu mosusu to ya mosakoli oyo akɔmɛli na elimo. Bakoki kotalela elongo toli oyo ntoma Paulo apesaki mpo na molato mpe kosala monzɛlɛ. (1 Tim. 2:9, 10) Na ndenge ya mokuse, ntoma Paulo amonisaki ete mokristo asengeli kozala na molato ya malamu, alekisaka ndelo te, mpe amonisa ete azali na makanisi ya malamu. Kasi Paulo atángaki te bilamba oyo mokristo asengeli kolata to kolata te. Ayebaki ete bandeko basi mpe bandeko mibali bazali na lotomo ya kopona bilamba bango moko, kasi na boyokani na oyo Biblia elobi. Na yango, bankulutu basengeli kotala soki molato ya moto yango elekisi ndelo mpe soki emonisi ete azali na makanisi ya malamu te. Ekozala malamu tóyeba ete bakristo mibale oyo bakɔmɛli bakoki kozwa bikateli oyo ekeseni, kasi nyonso mibale ezali ya malamu. Tosengeli te kotyela bandeko mibeko na biso moko na oyo etali mabe ná malamu. w22.02 16 par. 9-10
Mwalomingo, 18 sanza ya 6
Bómoniselanaka motema boboto mpe motema mawa.—Zek. 7:9.
Ezali mpenza na ntina tómoniselanaka bolingo ya sembo. Mpo na nini? Tótalela ndenge masese ya Biblia oyo elandi eyanoli na motuna yango: “Motema boboto [to bolingo ya sembo] mpe bosolo etika yo te. . . . Bongo ondimama mpe ozala na mayele mingi ya kososola na miso ya Nzambe mpe ya moto ya mabele.” “Moto ya motema boboto asalelaka molimo na ye moko makambo oyo epesaka mbano.” “Ye oyo azali kolanda boyengebene mpe motema boboto [to bolingo ya sembo] akozwa bomoi.” (Mas. 3:3, 4; 11:17; 21:21) Masese yango emonisi bantina misato oyo mpo na yango tosengeli komonisa motema boboto to bolingo ya sembo. Ya liboso, komonisa bolingo ya sembo esalaka ete tózala na motuya na miso ya Nzambe. Ya mibale, komonisa bolingo ya sembo epesaka biso moko matomba. Na ndakisa, esalaka ete boninga na biso ná basusu eumela. Ya misato, komonisa bolingo ya sembo ekosalisa biso tózwa mapamboli na mikolo ezali koya, ata mpe bomoi ya seko. Ya solo, ezali mpenza na ntina tótosa maloba oyo ya Yehova ete: “Bómoniselanaka motema boboto [to bolingo ya sembo] mpe motema mawa.”—Zek. 7:9. w21.11 8 par. 1-2
Mwayambo, 19 sanza ya 6
Bakiselá biso kondima.—Luka 17:5.
Soki mikakatano oyo ozali kokutana na yango sikoyo, to mpe oyo okutaná na yango kala elɛmbisi kondima yo, kolɛmba nzoto te. Talelá yango lokola libaku oyo ozali na yango mpo na kokómisa lisusu kondima na yo makasi. Bondeláká Yehova na motema mobimba, mingimingi ntango okutani na mokakatano moko monene. Kobosana te ete Yehova akoki kosalisa biso na nzela ya bandeko na biso ya libota to mpe baninga. Soki otiki Yehova asalisa yo oyika mpiko na mikakatano oyo ozali kokutana na yango sikoyo, okokóma lisusu na kondima makasi ete akosalisa yo oyika mpiko na mikakatano nyonso oyo okoki kokutana na yango na mikolo ezali koya. Yesu asalisaki bayekoli na ye bámona esika oyo bazangaki kondima. Kasi ayebaki ete, na lisalisi ya Yehova, bakolonga mikakatano oyo bakokutana na yango na mikolo ezali koya. (Yoa. 14:1; 16:33) Ayebaki ete kondima makasi ekosalisa ebele mpenza ya bato bábika na bolɔzi monene oyo ezali koya. (Em. 7:9, 14) Okozala na kati ya bato oyo bakobika soki osaleli mabaku nyonso oyo ozali na yango sikoyo mpo na kokómisa lisusu kondima na yo makasi!—Ebr. 10:39. w21.11 25 par. 18-19
Mwamibale, 20 sanza ya 6
Anzelu ya Yehova atɛlɛmaka penepene na baoyo babangaka ye.—Nz. 34:7.
Lelo oyo tozelaka te ete Nzambe abatela biso na ndenge ya likamwisi. Kasi toyebi ete baoyo nyonso batyelaka Yehova motema bakozwa bomoi ya seko ata soki bakufi lelo. Mosika te, elikya oyo tozalaka na yango ete Yehova azali na likoki ya kobatela biso ekotyama na komekama. Ntango Goge ya Magoge, etuluku ya bikólo oyo esangani, ekobundisa basaleli ya Nzambe, ekomonana lokola nde bomoi na biso ezali na likama. Na ntango yango, ekosɛnga tózala na kondima ete Yehova akoki kobikisa biso mpe akosala yango. Na miso ya bato ya bikólo, tokomonana kaka boye, lokola mpate oyo ezangi moto ya kobatela yango. (Ezk. 38:10-12) Tokozala na bibundeli te, mpe tokozala bato oyo bayebi kobunda te. Bakokanisa ete ekozala pɛtɛɛ kolonga biso. Bakomona te eloko oyo biso tomonaka na miso ya kondima: bayebi te ete baanzelu ya Yehova bazalaka zingazinga ya basaleli ya Nzambe, bamibongisá mpo na kobundela biso. Ndenge nini bato ya bikólo bakoki komona bango? Bazalaka na kondima epai ya Nzambe te. Bakokamwa mpenza ntango mampinga ya likoló ekobundela biso!—Em. 19:11, 14, 15. w22.01 6 par. 12-13
Mwamisato, 21 sanza ya 6
Bólinga lisangá mobimba ya bandeko.—1 Pe. 2:17.
Yehova alingaka basaleli na ye nyonso, ezala basalelaka ye banda bambula mingi to bazali bato ya sika na solo. Bandeko na biso nyonso bazali na ntina mingi na miso ya Yehova, yango wana basengeli mpe kozala na ntina na miso na biso. Tosengeli kosala oyo tokoki mpo na kobatela mpe kokokisa bamposa na bango. Soki toyebi ete toyokisaki ndeko moko mpasi, tosengeli kokangela yango miso te mpe kokanisa ete asengeli kaka kolimbisa mpe kobosana likambo yango. Mpo na nini likambo moko oyo tosali ekoki koyokisa bandeko mosusu mpasi? Na kotalela ndenge oyo babɔkwamá, bandeko mosusu bakanisaka ete bazali na ntina te. Basusu mpe bazali bato ya sika na solo mpe bayebi naino te ete basengeli kolimbisaka basusu soki basali likambo moko oyo epesi bango mpasi na motema. Ezala ndenge nini, tosengeli kosala oyo tokoki mpo na kozongisa kimya. Longola yango, ndeko oyo abɛtaka mabaku ntango nyonso mpo na mabunga ya basusu asengeli koyeba ete yango ezali bolɛmbu oyo asengeli kosala makasi abundisa. Soki asali bongo, yango ekosalisa ye azala na esengo, mpe abatela boyokani ya malamu elongo na basusu. w21.06 21 par. 7
Mwaminei, 22 sanza ya 6
Yehova azali pene na baoyo nyonso bazali kobelela ye, na baoyo nyonso babelelaka ye na bosolo.—Nz. 145:18.
Yesu amityaka na esika na yo. Ntango totungisami, toyokaka esengo ntango moninga oyo azali komitya na esika biso alendisi biso, mingimingi soki ye mpe akutaná na mikakatano lokola oyo ya biso. Yesu azali moninga ya ndenge wana. Ayebi ndenge oyo moto amiyokaka soki azali na bolɛmbu mpe soki azali na mposa ya lisalisi. Ayebi bolɛmbu na biso mpe akosala nyonso mpo tózwa lisungi “ntango tozali na mposa ya lisalisi.” (Ebr. 4:15, 16) Kaka ndenge Yesu andimaki lisalisi ya anzelu na elanga ya Getesemane, biso mpe tosengeli kondima lisalisi oyo Yehova azali kopesa biso, ezala na nzela ya mokanda moko ya moombo ya sembo, ya video, ya diskur, to na nzela ya nkulutu to moninga moko oyo akɔmɛli na elimo, oyo ayei kolendisa biso. (Luka 22:39-44) Yehova akopesa yo “kimya ya Nzambe” mpe makasi. Ntango tozali kobondela, tokozwa “kimya ya Nzambe oyo eleki makanisi nyonso.”—Flp. 4:6, 7. w22.01 18-19 par. 17-19
Mwamitano, 23 sanza ya 6
Bazalaki kopesa . . . mitindo oyo bantoma bakamataki.—Mis. 16:4.
Yehova asalaka ntango nyonso makambo ya malamu. Kasi, tokoki kozala na mokakatano ya kotya motema na bamonisi na ye awa na mabele, bato oyo bazali kotambwisa lisangá na ye. Ntango mosusu tomitunaka soki baoyo bazali na mwa bokonzi na ebongiseli ya Yehova basalaka mpenza na kolanda litambwisi ya Yehova to oyo ya bango moko. Mpo na koloba solo, tokoki koloba te ete totyelaka Yehova motema, soki totyelaka bamonisi na ye awa na mabele motema te, nzokande ye moko atyelaka bango motema. Lelo oyo, Yehova atambwisaka eteni ya ebongiseli na ye awa na mabele na nzela ya “moombo ya sembo mpe ya mayele.” (Mat. 24:45) Ndenge moko na lisangani ya mikóló-bakambi ya siɛklɛ ya liboso, moombo ya sembo atambwisaka basaleli ya Yehova na mokili mobimba mpe apesaka bankulutu malako. Na ngala na bango, bankulutu basalelaka malako yango na masangá. Tokomonisa ete totyelaka lolenge oyo Yehova asalaka makambo motema soki tozali kotosa malako oyo tozwi na ebongiseli na ye mpe epai ya bankulutu. w22.02 4 par. 7-8
Mwapɔsɔ, 24 sanza ya 6
Tótika te kosala oyo ezali malamu.—Gal. 6:9.
Ezali esengo mpe lokumu kozala Motatoli ya Yehova! Tosepelaka soki tosalisi moto moko oyo azali “na ezaleli oyo ebongi mpo na bomoi ya seko” akóma mosaleli na ye. (Mis. 13:48) Tomiyokaka lokola Yesu ntango bayekoli na ye bayebisaki ye makambo ya malamu oyo bakutanaki na yango na mosala ya kosakola. Biblia elobi: “Atondaki na esengo mpe na elimo santu.” (Luka 10:1, 17, 21) Ntoma Paulo ayebisaki Timote boye: “Omibatela mpe okeba na mateya na yo ntango nyonso.” Abakisaki boye: “Mpo soki osali bongo okomibikisa mpe okobikisa bato oyo bazali koyoka yo.” (1 Tim. 4:16) Na yango, mosala na biso ya kosakola ebikisaka bomoi ya bato. Tokebaka mpenza mpo tozali bana-mboka ya Bokonzi ya Nzambe. Tolingaka ntango nyonso kosala makambo na ndenge oyo ekopesa Yehova lokumu mpe na ndenge oyo eyokani na nsango malamu oyo tosakolaka. (Flp. 1:27) Tomonisaka ete tozali ‘kokeba na mateya na biso’ na ndenge tomibongisaka malamu mpo na mosala ya kosakola mpe tosɛngaka lisalisi ya Yehova liboso tósakwela basusu. w21.10 24 par. 1-2
Mwalomingo, 25 sanza ya 6
Bólata bomoto ya sika.—Kol. 3:10.
“Bomoto ya sika” ezali lolenge ya kokanisa mpe ya kosala makambo oyo eyokani na bomoto ya Yehova. Moto oyo alati bomoto ya sika amonisaka mbuma ya elimo ya Nzambe; atikaka elimo santu etambwisa makanisi na ye, mayoki na ye, mpe misala na ye. Na ndakisa, alingaka Yehova mpe basaleli na Ye. (Mat. 22:36-39) Moto ya ndenge wana abatelaka esengo na ye ata ntango azali na mikakatano. (Yak. 1:2-4) Azali moto oyo atyaka kimya. (Mat. 5:9) Azalaka na motema molai mpe na boboto na boyokani na ye na basusu. (Kol. 3:13) Alingaka makambo ya malamu mpe asalaka yango. (Luka 6:35) Amonisaka na misala na ye ete azali na kondima makasi epai ya Tata na ye ya likoló. (Yak. 2:18) Atombokaka te ntango bapesi ye nkanda mpe amipekisaka ntango amekami. (1 Ko. 9:25, 27; Tito 3:2) Mpo na kolata bomoto ya sika, tosengeli kokolisa bizaleli nyonso oyo ezali na Bagalatia 5:22, 23 mpe na mikapo mosusu ya Biblia. w22.03 8-9 par. 3-4
Mwayambo, 26 sanza ya 6
Bókóma bamekoli na ngai.—1 Ko. 11:1.
Mpo na komekola Ntoma Paulo, bankulutu basengeli kosuka kaka te na kosakola ndako na ndako, kasi basengeli kozala pene mpe kondima kopesa litatoli na mabaku nyonso. (Ef. 6:14,15.) Ndenge moko na Paulo, bankulutu bakoki kosalela ntango oyo bazali na mosala ya kosakola mpo na kopesa bandeko mosusu, ata basaleli na misala, formasyo. (1 Pe. 5:1, 2) Kasi bankulutu basengeli kotika ata moke te ete mikumba oyo bakokisaka ezangisa bango ntango ya kobima na mosala ya kosakola. (Mat. 28:19, 20) Mpo bázala ntango nyonso na bokatikati, na bantango mosusu ekosɛnga ete báboya mikumba mosusu. Nsima ya kokanisa malamumalamu mpe kobondela, bakoki komona ete soki bandimi mokumba moko boye, bakokoka te kosala makambo oyo eleki ntina. Tokoki kotánga kosala losambo na kati ya libota, komipesa na mosala ya kosakola, to kosakola ná bana mpo na kopesa bango formasyo. Atako bongo basengeli kondima ete Yehova amonaka mposa na bango ya kozala na bokatikati na makambo nyonso. w22.03 27 par. 4, 7; 28 par. 8
Mwamibale, 27 sanza ya 6
Bóbanga te baoyo bakoki koboma nzoto kasi bakoki koboma molimo te.—Mat. 10:28.
Ozali koyeba lisusu ndenge ozalaki kobanga mwa moke mpo na kokóma Motatoli ya Yehova? Mbala mosusu ozalaki kokanisa ete okokoka te kosakola. To mpe mbala mosusu ozalaki kobanga ete baninga to bandeko na yo ya libota bátɛmɛla yo. Soki ezali bongo, osengeli komitya na esika ya moyekoli na yo ntango azali komiyoka mpe bongo. Yesu ayebaki ete bato mosusu bakoki kobanga. Kasi alendisaki bayekoli na ye bátika te ete kobanga epekisa bango kosalela Yehova. (Mat. 10:16, 17, 27) Malɛmbɛmalɛmbɛ, lakisá moyekoli na yo ya Biblia ndenge ya koyebisa basusu makambo oyo azali koyekola. Ekoki kozala ete bayekoli ya Yesu babangaki ntango atindaki bango bákende kosakola. Kasi Yesu asalisaki bango na ndenge ayebisaki bango esika mpe nsango oyo basengelaki kosakola. (Mat. 10:5-7) Ndenge nini okoki komekola Yesu? Salisá moyekoli na yo ayeba esika oyo akoki kosakola. Na ndakisa, tuná ye soki ayebi moto moko oyo akoki kozwa matomba soki ayekoli liteya moko boye ya Biblia. Na nsima, salisá ye abongisa ndenge oyo akoki kolobela liteya yango na ndenge ya pɛtɛɛ. w21.06 6-7 par. 15-16
Mwamisato, 28 sanza ya 6
Nakoningisa bikólo nyonso, mpe biloko kitoko ya bikólo nyonso ekokɔta mpenza na ndako oyo.—Hag. 2:7.
Moto moko oyo abikaki na koningana ya mabele oyo esalemaki na ekólo Népal na 2015, alobi boye: “Kaka nsima ya mwa miniti moke, babutiki mpe bandako milai ekómaki kokwea. Bato nyonso bakómaki kobanga. Mingi na bango balobaki ete esalaki kaka miniti soki mibale. Kasi mpo na ngai, namonaki ete eumelaki mpenza.” Kasi sikoyo, koningana ya ndenge mosusu ezali kosalema na bikólo nyonso ya mokili. Mosakoli Hagai akomaki boye: “Talá oyo Yehova ya mampinga alobi: ‘Na mbala moko lisusu—etikali mwa ntango moke—mpe nakoningisa likoló, ná mabele.’” (Hag. 2:6) Koningana oyo Hagai asakolaki, ezali te koningana ya mabele oyo ebimisaka kaka makama, kasi ezali nde koningana oyo ebimisaka makambo ya malamu. Yehova ye moko alobi na biso: “Nakoningisa bikólo nyonso, mpe biloko kitoko ya bikólo nyonso ekokɔta mpenza na ndako oyo, mpe nakotondisa yango na nkembo.” w21.09 14 par. 1-3
Mwaminei, 29 sanza ya 6
Bino bozali bato oyo bokangami na ngai makasi na komekama na ngai.—Luka 22:28.
Soki olingi kokóma moninga ya moto moko, osengeli kozwaka ntango ya kosolola na ye mbala na mbala mpe ya koyebisa ye ndenge oyo ozali komiyoka. Ezali mpe bongo na oyo etali boninga na biso ná Yehova. Soki tozali koyebisa ye ndenge tozali komiyoka, elingi koloba koyebisa ye makanisi mpe mitungisi na biso na libondeli, tokomonisa ete totyelaka ye motema mpe toyebi ete alingaka biso. (Nz. 94:17-19; 1 Yoa. 5:14, 16) Salá boninga elongo na baoyo basalelaka Yehova. Bazali likabo oyo Yehova apesá biso. (Yak. 1:17) Tata na biso ya likoló amonisi ete atyelaka biso likebi ndenge apesá biso bandeko ya lisangá oyo balingaka biso “ntango nyonso.” (Mas. 17:17) Na mokanda oyo akomelaki bakristo ya Kolose, ntoma Paulo atángaki nkombo ya bandeko mosusu oyo basalisaki ye mpe abengaki bango ‘lisalisi oyo ezali kopesa ye makasi.’ (Kol. 4:10, 11) Ata Kristo Yesu azalaki mpe na mposa ya lisalisi ya basusu mpe amonisaki botɔndi mpo na lisalisi oyo baninga na ye bapesaki ye, ezala baanzelu to bato. (Luka 22:43) Ntango toyebisi moninga moko oyo akɔmɛli na elimo makambo oyo ezali kotungisa biso, yango emonisi te ete tozali na kondima moke. Kutu, yango ekoki nde kobatela biso. w21.04 24-25 par. 14-16
Mwamitano, 30 sanza ya 6
[Bolingo] ekangaka motema na makambo nyonso, endimaka makambo nyonso, elikyaka makambo nyonso, mpe eyikaka mpiko na makambo nyonso.—1 Ko. 13:7.
Osengeli kosala nini soki ndeko moko asali likambo oyo epesi yo mpasi mpenza? Salá nyonso oyo okoki mpo na kobatela kimya. Yebisá Yehova ndenge ozali mpenza komiyoka. Sɛngá ye apambola ndeko yango mpe asalisa yo omona bizaleli ya malamu ya ndeko yango oyo esalaka ete Yehova alinga ye. (Luka 6:28) Soki ozali kokoka te kobosana makambo oyo ndeko yango asalaki, kanisá lolenge malamu ya kosolola na ye likambo yango. Ezali ntango nyonso malamu okanisa ete ndeko yango asalaki likambo yango na nko te. (Mat. 5:23, 24) Ntango ozali kosolola na ye, ndimá ete azalaki na makanisi ya mabe te. Kasi osengeli kosala nini soki azali koboya ete bózongisa kimya? ‘Kobá kokanga motema na likambo yango.’ Kobá komonisela ye motema molai. (Kol. 3:13) Oyo eleki ntina, kobombela ye nkanda na motema te mpo yango ekoki kobebisa boninga na yo ná Yehova. Kotika te eloko moko ebɛtisa yo libaku. Soki osali bongo, okomonisa ete olingaka Yehova koleka eloko mosusu nyonso.—Nz. 119:165. w21.06 24 par. 15