Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • es23 nk. 67-77
  • Sanza ya 7

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Sanza ya 7
  • Tótángaka Makomami mokolo na mokolo—2023
  • Mitó ya makambo mike
  • Mwapɔsɔ, 1 sanza ya 7
  • Mwalomingo, 2 sanza ya 7
  • Mwayambo, 3 sanza ya 7
  • Mwamibale, 4 sanza ya 7
  • Mwamisato, 5 sanza ya 7
  • Mwaminei, 6 sanza ya 7
  • Mwamitano, 7 sanza ya 7
  • Mwapɔsɔ, 8 sanza ya 7
  • Mwalomingo, 9 sanza ya 7
  • Mwayambo, 10 sanza ya 7
  • Mwamibale, 11 sanza ya 7
  • Mwamisato, 12 sanza ya 7
  • Mwaminei, 13 sanza ya 7
  • Mwamitano, 14 sanza ya 7
  • Mwapɔsɔ, 15 sanza ya 7
  • Mwalomingo, 16 sanza ya 7
  • Mwayambo, 17 sanza ya 7
  • Mwamibale, 18 sanza ya 7
  • Mwamisato, 19 sanza ya 7
  • Mwaminei, 20 sanza ya 7
  • Mwamitano, 21 sanza ya 7
  • Mwapɔsɔ, 22 sanza ya 7
  • Mwalomingo, 23 sanza ya 7
  • Mwayambo, 24 sanza ya 7
  • Mwamibale, 25 sanza ya 7
  • Mwamisato, 26 sanza ya 7
  • Mwaminei, 27 sanza ya 7
  • Mwamitano, 28 sanza ya 7
  • Mwapɔsɔ, 29 sanza ya 7
  • Mwalomingo, 30 sanza ya 7
  • Mwayambo, 31 sanza ya 7
Tótángaka Makomami mokolo na mokolo—2023
es23 nk. 67-77

Sanza ya 7

Mwapɔsɔ, 1 sanza ya 7

Nzokande na nsima, [disiplini] ebotelaka baoyo bateyami na yango mbuma ya kimya, elingi koloba, boyengebene.​—Ebr. 12:11.

Kolongola moto na lisangá ezali ebongiseli oyo Yehova atyá. Etumbu yango ezalaka mpo na bolamu ya moto nyonso, ata mpe ya moto oyo alongolami na lisangá. Bandeko mosusu bakoki koloba ete ekateli oyo bazwaki ya kolongola moto na lisangá ezalaki ya malamu te. Kasi kobosana te ete mbala mingi bato yango balobelaka te makambo ya mabe oyo moto yango asalaki. Toyebaka mpenza te ndenge makambo nyonso elekaki. Na yango, ekozala malamu tótya motema ete bankulutu oyo bakataki likambo yango basalaki nyonso oyo bakoki mpo bálanda mitinda ya Biblia mpe básambisa “mpo na Yehova.” (2 Nt. 19:6) Soki ondimi ekateli oyo bankulutu bazwi ya kolongola ndeko na yo na lisangá, okoki mpenza kosalisa ye mpo azongela Yehova. Ndeko Elizabeth, alobi boye: “Ezalaki mpenza mpasi libota na biso eboya kosolola to kosala makambo elongo na mwana na biso ya mokóló oyo alongolamaki na lisangá. Kasi ntango azongelaki Yehova, alobaki ete ekateli oyo bazwaki ya kolongola ye na lisangá, ezalaki mpenza ya malamu. Na nsima, mwana yango alobaki ete asepelaki na mateya oyo azwaki.” w21.09 28-29 par. 11-12

Mwalomingo, 2 sanza ya 7

Amonaki mwasi moko mobola oyo mobali akufá azali kotya wana mbongo ya bibende mibale ya motuya moke mpenza.​—Luka 21:2.

Kanisá naino mwasi yango. Na ntembe te azalaki na mposa ya kopesa Yehova biloko mingi. Kasi, apesaki Yehova oyo eleki malamu na kotalela makoki na ye. Mpe Yesu ayebaki ete likabo ya mwasi yango ezalaki na motuya mingi na miso ya Yehova Tata na ye. Yango ezali mpenza liteya ya ntina mingi mpo na biso. Yehova asepelaka soki topesi ye oyo ezali malamu, elingi koloba, kosalela ye na motema mpe na molimo na biso mobimba. (Mat. 22:37; Kol. 3:23) Asepelaka soki amoni tozali kosala oyo tokoki. Yango etaleli mpe makasi na biso, ntango oyo tolekisaka mpo na kosambela ye, na ndakisa, na mosala ya kosakola mpe na makita. Ndenge nini okoki kosalela liteya oyo ozwi na lisolo ya mwasi oyo mobali akufá? Kanisá bato oyo okoki kolendisa soki oyebisi bango ete Yehova asepelaka na oyo basalaka na mosala na ye. Ekoki kozala na ndeko mwasi moko ya mobange oyo abɛlaka mpe azali na makasi mingi te ya nzoto, mpe mbala mosusu amimonaka ntina te mpo akoki lisusu te kosala mingi na mosala ya kosakola. w21.04 6-7 par. 17, 19-20

Mwayambo, 3 sanza ya 7

Esengo na moto oyo azali kokoba koyika mpiko na komekama, mpo lokola akokóma moto oyo andimami akozwa motole ya bomoi.​—Yak. 1:12.

Yehova ayebi ntango oyo eleki malamu mpo na kosukisa mokili oyo mabe. Motema molai ya Yehova epesi bato mingi libaku ya koyeba ye; mpe lelo oyo ebele mpenza ya bato bazali kosambela ye. Bango nyonso basepelaka ndenge Yehova azelaki ntango molai mpo bábotama, báyekola kolinga ye, mpe bámipesa epai na ye. Ntango Yehova akopesa mbano na bamilio ya bato oyo bakoyika mpiko tii na nsuka, ekomonana polele ete ekateli oyo azwaki ya koyika mpiko ezalaki mpenza malamu! Atako makambo nyonso ya mawa mpe ya mpasi oyo Satana abimisaka, Yehova azali kaka “Nzambe ya esengo.” (1 Tim. 1:11) Biso mpe tokoki kokoba kozala na esengo wana tozali kozela na motema molai ete Yehova asantisa nkombo na ye, alongisa lotomo na ye ya koyangela, asukisa mabe nyonso, mpe asilisa mikakatano na biso nyonso. Koyeba ete Tata na biso ya likoló ayikaka mpe mpiko, esengeli kolendisa biso mpe kotinda biso tózwa ekateli ya kokoba koyika mpiko. w21.07 13 par. 18-19

Mwamibale, 4 sanza ya 7

Eloko moko ya malonga ekoki nde kobima na Nazarete?​—Yoa. 1:46.

Bato mingi na siɛklɛ ya liboso bandimelaki Yesu te. Bazalaki kotalela ye kaka lokola mwana ya mosali-mabaya moko boye. Lisusu azalaki moto ya Nazarete, mwa engumba oyo bato mingi bazalaki kokanisa ete ezalaki na ntina mingi te. Ata Natanaele, oyo akómaki moyekoli ya Yesu, alobaki liboso: “Eloko moko ya malonga ekoki nde kobima na Nazarete?” Ekoki kozala ete azalaki kokanisa esakweli oyo ezali na Mika 5:2, oyo elobaki ete Masiya asengelaki kobotama na Beteleme, kasi na Nazarete te. Mosakoli Yisaya asakolaki ete banguna ya Yesu bakoluka te koyeba ‘makambo ya libota ya Masiya.’ (Yis. 53:8) Soki bato yango bázwaka ntango ya koyekola na likebi makambo yango nyonso, balingaki koyeba ete Yesu abotamaki na Beteleme mpe ete azalaki mokitani ya Mokonzi Davidi. (Luka 2:4-7) Na yango, Yesu abotamaki na esika oyo Mika 5:2 esakolaki. Kasi mokakatano ezalaki nini? Bato bazalaki mbala moko koloba makambo kozanga ete báluka koyeba makambo nyonso. Yango esalaki ete báboya kondimela Yesu. w21.05 2-3 par. 4-6

Mwamisato, 5 sanza ya 7

Soki moyengebene . . . apameli ngai, ekozala mafuta na motó na ngai.​—Nz. 141:5.

Biblia elobeli bandakisa malamu ya bato oyo bazwaki mapamboli mpo bayokaki toli. Tólobela ndakisa ya Yobo. Yobo azalaki kobanga Nzambe, kasi azalaki moto ya kozanga kokoka. Ntango akutanaki na mikakatano ya makasi, alobaki makambo mosusu oyo ebongaki te. Na yango, azwaki toli ya polelepolele, oyo eutaki epai ya Elihu mpe epai ya Yehova. Yobo asalaki nini? Alobaki boye: “Nalobaki, kasi nazalaki kososola te . . . Nalongoli maloba oyo nalobaki, mpe nabongoli motema na kati ya putulu ya mabele mpe na putulu ya mɔtɔ.” (Yobo 42:3-6, 12-17) Amonisaki komikitisa ndenge andimaki toli oyo Elihu apesaki ye, atako alekaki mpenza Elihu na mbula mosika. (Yobo 32:6, 7) Ndenge moko mpe, komikitisa ekosalisa biso tósalela toli oyo bapesi biso, ata ntango tomoni ete bapesaki biso yango kaka mpamba, to ntango moto oyo azali kopesa biso yango azali leki epai na biso. Lisusu, biso nyonso tosengeli kokende liboso na oyo etali kokolisa mbuma ya elimo mpe kokóma basakoli mpe bateyi malamu na mosala ya kosakola! w22.02 11 par. 8; 12 par. 12

Mwaminei, 6 sanza ya 7

Na ndenge yango bato nyonso bakoyeba ete bozali bayekoli na ngai, soki bozali na bolingo na kati na bino.​—Yoa. 13:35.

Ndeko mokomoko azali na mokumba ya kosala ete lisangá ezala esika moko ya kimya mpe ya komonisela moto nyonso bolingo mpo ata moto moko te amiyoka ete azali ye moko. Makambo oyo tosalaka mpe oyo tolobaka ekoki mpenza kolendisa basusu. Makambo nini okoki kosala mpo na kosalisa baoyo bandeko na bango ya libota bazali na kati ya solo te mpo bamiyoka ete bandeko ya lisangá balingaka bango? Luká kosala boninga na bandeko ya sika. Mpo na kosala yango, yambáká na esengo bandeko oyo bayei sika na lisangá. (Rom. 15:7) Kasi, tosengeli kosuka kaka te na kopesa bango mbote na esengo. Tolingi ete nsima ya mwa mikolo tósala boninga makasi elongo na bango. Na yango, zalá na boboto mpe monisá ete otyelaka bandeko oyo bayei sika na lisangá likebi. Kozanga ete otuna bango makambo na bango ya sekele, luká koyeba mikakatano oyo bazali kokutana na yango. Bamosusu bakoki kozala na mokakatano ya koyebisa yo ndenge oyo bazali komiyoka. Na yango, kotya bango mbamba te báyebisa yo makambo na bango, kasi na boboto nyonso tunáká bango mituna na mayele mpe yokáká bango ntango bazali kopesa biyano. Na ndakisa, okoki kotuna bango ndenge oyo bayebaki solo. w21.06 11 par. 13-14

Mwamitano, 7 sanza ya 7

Ekoyoka mongongo na ngai, ekokóma etonga kaka moko, na mobateli kaka moko.​—Yoa. 10:16.

Tozalaka na botɔndi ndenge tosalelaka Yehova elongo na bandeko na biso bakristo lokola “etonga kaka moko” na nse ya “mobateli kaka moko”! Buku Tobongisami mpo na kosala mokano ya Yehova, na lokasa 165 elobi boye: “Lokola ozali kosepela na bomoko yango ozali na mokumba ya kobatela yango.” Na yango tosengeli “kosala makasi mpo na kotalela bandeko na biso bakristo ndenge Yehova atalelaka bango.” Na miso ya Yehova, biso nyonso tozali “bana mike” mpe tozali na motuya mingi. Tosengeli mpe kotalelaka bandeko na biso ndenge wana. Yehova amonaka mpe azwaka na motuya mingi eloko nyonso oyo osalaka mpo na kosalisa mpe kotyela bango likebi. (Mat. 10:42) Tolingaka bandeko na biso bakristo. Na yango, tozali na ekateli ya “kotya te liboso ya ndeko eloko oyo ebɛtisaka libaku to eloko oyo epɛngwisaka.” (Rom. 14:13) Totalelaka bandeko na biso ete baleki biso, mpe tolingaka kolimbisa bango na motema moko. Na yango, tótika te ete basusu bábɛtisa biso libaku. Kasi, “tólanda makambo oyo etyaka kimya mpe makambo oyo elendisaka biso.”​—Rom. 14:19. w21.06 24 par. 16-17

Mwapɔsɔ, 8 sanza ya 7

Nzambe . . . azali kokolisa.​—1 Ko. 3:7.

Soki tozali koyekola na mozindo mpe kosalela batoli oyo tozwi na Liloba ya Nzambe mpe na ebongiseli na ye, malɛmbɛmalɛmbɛ tokokolisa bizaleli ya bokristo. Lisusu, tokoyeba Nzambe malamu koleka. Yesu asalelaki ndakisa moko mpo na komonisa ete nsango ya Bokonzi oyo tosakolaka, ezali lokola mwa mboto oyo ezali kokola malɛmbɛmalɛmbɛ na mitema ya bato ya sembo. Alobaki boye: “Mboto ebimi mpe ekoli, kasi [moloni] ayebi te soki esalemi ndenge nini. Mabele yango, kaka yango moko, ebandi kobota mbuma mokemoke: ya liboso lititi, na nsima motó, na nsuka nde mbuma mobimba na kati ya motó yango.” (Mrk. 4:27, 28) Yesu alingaki komonisa ete kaka ndenge molona ekolaka malɛmbɛmalɛmbɛ, ndenge moko mpe moto oyo andimi nsango ya Bokonzi akolaka na elimo malɛmbɛmalɛmbɛ. Na ndakisa, tomonaka mbongwana mingi ya malamu oyo bayekoli na biso ya Biblia basalaka wana bazali kopusana penepene na Yehova. (Ef. 4:22-24) Kasi tosengeli kobosana te ete Yehova nde asalaka ete mwa mboto wana ya moke ekola. w21.08 8-9 par. 4-5

Mwalomingo, 9 sanza ya 7

Komona na miso eleki mposa makasi ya molimo.​—Mos. 6:9.

Tokoki kozala na esengo soki tozali kozela yango na mposa makasi na ntango oyo ebongi. Moto oyo asepelaka na oyo azali na yango mpe na oyo akoki kosala na kotalela ndenge makambo ya bomoi na ye ezali, azalaka na esengo mingi. Nzokande, moto oyo alandaka bamposa na ye mpe oyo alukaka kozwa eloko oyo eleki makoki na ye, azalaka na esengo soki moke te. Yango eteyi biso nini? Mpo na kozala na esengo, tosengeli kotya likebi na biso nyonso na oyo tozali na yango, mpe na makambo oyo tokokoka kosala. Ekoki mpenza kosalema ete moto asepela na oyo azali na yango? Bato mingi bakanisaka ete ekoki kosalema te mpo tolingaka koyekola makambo ya sika. Nzokande ekoki kosalema ete tósepela na oyo tozali na yango. Na ndenge nini? Mpo na kozwa eyano, tótalela ndakisa ya batalanta oyo Yesu apesaki oyo ezali na Matai 25:14-30 mpe tótya makanisi na mateya oyo ekoki kopesa biso na likambo etali kozwa esengo mpe kosepela lisusu mingi na mapamboli oyo tozali na yango sikoyo. w21.08 21 par. 5-6

Mwayambo, 10 sanza ya 7

Nafandaka na esika oyo etombwaná mpe na esika mosantu, mpe esika moko na moto oyo atutami mpe oyo azali na elimo ya komikitisa.​—Yis. 57:15.

Yehova atyaka mpenza likebi na ‘baoyo mitema etutani mpe baoyo bazali na elimo ya komikitisa.’ Biso nyonso tokoki kolendisa bandeko na biso. Lolenge moko oyo tokoki kolendisa bango, ezali ya kotyela bango likebi. Yehova alingi ete tómonisa bandeko yango ete alingaka bango mingi. (Mas. 19:17) Tokoki mpe kosalisa bandeko na biso soki tozali na komikitisa mpe tozali komikumisa te mpo na makoki oyo tozali na yango. Tosengeli te kobendaka likebi epai na biso moko mpo yango ekoki kokolisa ezaleli ya likunya epai ya basusu. Kasi, tosengeli nde kosalela mayele mpe makoki na biso mpo na kolendisa bandeko na biso. (1 Pe. 4:10, 11) Ndenge oyo Yesu asalelaki bayekoli na ye makambo ekoki koteya biso ndenge ya kosalela basusu makambo. Azalaki moto oyo alekaki bato nyonso awa na mabele. Atako bongo, azalaki na “ezaleli ya boboto mpe na komikitisa na motema.” (Mat. 11:28-30) Ntango azalaki koteya, azalaki kosalela elobeli ya pɛtɛɛ mpe bandakisa oyo ezalaki kosimba mitema ya bato ya komikitisa.​—Luka 10:21. w21.07 23 par. 11-12

Mwamibale, 11 sanza ya 7

Tuná . . . mibange na yo, mpe bakoki koyebisa yo yango.​—Mib. 32:7.

Sololáká na bandeko oyo bakómi mibange. Ekoki kozala ete bamonaka lisusu malamu te, bakokaka lisusu kotambola mpe koloba malamu te. Kasi bazalaka kaka na mposa makasi ya kosala mingi, mpe bamisalelá “nkombo malamu” epai ya Yehova. (Mos. 7:1) Kobosana te ntina oyo Yehova azwaka bango na motuya. Kobá kopesa bango lokumu. Zalá lokola Elisha oyo atingamaki kaka kozala penepene na Eliya na mokolo ya nsuka oyo balekisaki elongo. Mbala misato mobimba, Elisha alobaki: “Nakotika yo te.” (2 Bak. 2:2, 4, 6) Tunáká mibange mituna na boboto mpo na komonisa ete otyelaka bango likebi. (Mas. 1:5; 20:5; 1 Tim. 5:1, 2) Na ndakisa, okoki kotuna bango boye: “Ntango ozalaki elenge, nini endimisaki yo ete ozwaki solo?” “Ndenge nini makambo oyo okutaná na yango na bomoi esalisi yo opusana penepene na Yehova?” “Nini esalisaka yo obatela esengo na yo na mosala ya Yehova?” (1 Tim. 6:6-8) Na nsima, yoká bango ntango bazali kobɛtela yo masolo na bango. w21.09 5-7 par. 14-15

Mwamisato, 12 sanza ya 7

Nzambe nde moto oyo, ndenge asepeli kosala, azali kosala na kati na bino mpo bino bólinga mpe bósala.​—Flp. 2:13.

Ntango osalaka nyonso oyo okoki mpo na kotosa etinda ya Yesu ya kosakola mpe ya kokómisa bato bayekoli, omonisaka ete olingaka Nzambe. (1 Yoa. 5:3) Bolingo na yo mpo na Yehova etindaka yo osakola ndako na ndako. Kanisá naino: Ezalaki pɛtɛɛ mpo otosa etinda yango? Mbala mosusu ezalaki pɛtɛɛ te. Mokolo ya liboso oyo osakolaki ndako na ndako, ozalaki kobanga? Na ntembe te ozalaki kobanga! Kasi oyebaki ete yango nde mosala oyo Yesu asɛngi yo osala, mpe otosaki etinda na ye. Mpe wana ntango ezalaki koleka, ezalaki lisusu mpasi te mpo osakolaka. Sikoyo tokoloba nini mpo na likambo etali koyekola Biblia na moto? Yango ebangisaka yo? Ntango mosusu. Kasi, soki obondeli Yehova asalisa yo olongola kobanga, mpe obanda koyekola Biblia na moto moko, Yehova akoki kosalisa yo okómisa bato bayekoli. w21.07 3-5 par. 7

Mwaminei, 13 sanza ya 7

Bázwa elembo na lobɔkɔ na bango ya mobali to na elongi na bango.​—Em. 13:16.

Na ntango ya kala, bazalaki kotya baombo elembo mpo na komonisa soki bazali ya nani. Ndenge moko mpe lelo oyo, bato bakolinga ete moto nyonso amonisa polele soki azali kopesa nani mabɔkɔ. Bakolinga ete moto nyonso amonisa na makanisi mpe na misala na ye ete apesaka baguvɛrnema ya mokili oyo mabɔkɔ. Tokondima kozwa elembo yango ya elilingi mpe kopesa baguvɛrnema ya mokili oyo mabɔkɔ? Baoyo baboyaka kozwa elembo yango bakokutana na mikakatano mpe bomoi na bango ekozala na likama. Mokanda ya Emoniseli elobi boye: “Moto akokoka kosomba te to kotɛka te longola kaka moto oyo azali na elembo yango.” (Em. 13:17) Kasi, basaleli ya Nzambe bayebi oyo Nzambe akosala mpo na baoyo bazali na elembo oyo Emoniseli 14:9, 10 elobeli. Na esika bázwa elembo yango, bakokoma nde na lobɔkɔ na bango ete “Moto ya Yehova.” (Yis. 44:5) Sikoyo nde ntango ya komindimisa ete bosembo na biso epai ya Yehova ezali makasi. Soki tosali bongo, Yehova akosepela mpe akoloba ete tozali bato na ye! w21.09 18 par. 15-16

Mwamitano, 14 sanza ya 7

Ebende epelisaka ebende. Ndenge moko mpe moto angɛngisaka elongi ya moto mosusu.​—Mas. 27:17.

Mpo na kokokisa mosala na biso, tokozwa matomba soki tondimi lisalisi ya bato mosusu. Ntoma Paulo alakisaki Timote mayele ya kosakola mpe ya koteya mpe alendisaki ye asalela mayele yango mpo na kosalisa basusu. (1 Ko. 4:17) Ndenge moko na Timote, tokoki koyekola makambo mingi epai ya bandeko oyo baumeli mingi na lisangá. Lisusu, tosengeli kobondela Yehova asalisa yo. Sɛngá Yehova asalisa yo mbala nyonso oyo obimi na mosala ya kosakola. Soki Yehova asalisi biso na nzela ya elimo santu na ye te, moko te kati na biso akokoka kosala makambo oyo azali kosala. (Nz. 127:1; Luka 11:13) Ntango ozali kobondela Yehova asalisa yo, lobáká makambo ya sikisiki. Na ndakisa, sɛngá ye asalisa yo mpo okutana na bato oyo bakosepela koyoka makambo etali ye. Osengeli mpe kozwa ntango ya kosala boyekoli na yo moko. Liloba ya Nzambe elobi: “Bómindimisa bino moko mokano ya Nzambe oyo ezali malamu mpe ekoki kondimama mpe ezali ya kokoka.” (Rom. 12:2) Soki tomindimisi ete makambo oyo toyebi mpo na Nzambe ezali solo, tokokóma na mpiko mingi ntango tozali koloba na mosala ya kosakola. w21.05 17-18 par. 14-16

Mwapɔsɔ, 15 sanza ya 7

Mosala na bino ya makasi ezali mpamba te na kati ya Nkolo.​—1 Ko. 15:58.

Okosala nini soki osali mpenza milende mpe obondeli mingi mpo na moyekoli na yo ya Biblia, kasi azali kokola te na elimo mpe esengeli kokata boyekoli? To okosala nini soki oyekolá naino te Biblia na moto tii azwa batisimo? Osengeli nde komipesa foti, mpe mbala mosusu kokanisa ete Yehova azali kopambola mosala na yo ya kosakola te? Tótala ndenge oyo Yehova atalelaka mosala na biso. Yehova atyaka likebi na milende mpe na ezaleli na biso ya koyika mpiko. Asepelaka na biso soki tozali kosakola na molende mpo tolingaka ye, ata soki bato bazali kosepela koyoka biso to te. Paulo akomaki boye: “Nzambe azangi boyengebene te mpo abosana mosala na bino mpe bolingo oyo bomoniselaki nkombo na ye, na ndenge bosalelaki basantu mpe bozali kokoba kosalela bango.” (Ebr. 6:10) Yehova abosanaka te milende oyo tosalaka mpe bolingo na biso, ata soki milende yango ezali kobota mbuma te. Na yango, okoki kosalela makambo oyo ntoma Paulo alobaki na mokapo ya lelo. w21.10 25 par. 4-6

Mwalomingo, 16 sanza ya 7

Nyonso oyo Tata azali kopesa ngai ekoya epai na ngai, mpe moto oyo azali koya epai na ngai nakobengana ye ata moke te.​—Yoa. 6:37.

Boboto mpe bolingo ya Yesu emonanaki na ndenge azalaki kosalela bayekoli na ye makambo. Ayebaki ete bazalaki na makoki ndenge moko te mpe makambo ya bomoi na bango ekesanaki. Na yango, bango nyonso te nde bakokaki kokokisa mikumba ndenge moko to kozwa matomba ndenge moko na mosala ya kosakola. Kasi asepelaki ndenge mokomoko na bango azalaki kosala oyo akoki. Yesu amonisaki yango na ndakisa oyo apesaki ya batalanta. Na ndakisa yango, nkolo apesaki moombo mokomoko mosala “na kotalela makoki na ye.” Na baombo mibale ya malamu, moko azwaki koleka mosusu. Kasi nkolo apesaki bango nyonso mibale longonya na maloba oyo: “Longonya, moombo malamu mpe ya sembo!” (Mat. 25:14-23) Boboto mpe bolingo ya Yesu emonanaka na ndenge asalelaka biso makambo. Ayebi ete biso nyonso tozalaka na makoki ndenge moko te, mpe makambo ya bomoi na biso ekeseni, mpe asepelaka ntango tosalaka oyo tokoki. Tosengeli kosalelaka basusu makambo ndenge Yesu azalaki kosala. w21.07 23-24 par. 12-14

Mwayambo, 17 sanza ya 7

Nasengeli te kosembolela nkolo na ngai lobɔkɔ na ngai.​—1 Sa. 24:10.

Mokonzi Davidi azalaki komonisa motema mawa ntango nyonso te. Na ndakisa ntango Nabale, oyo azalaki makambo makasimakasi, alobaki na ye kozanga limemya mpe aboyaki kopesa ye ná mibali oyo bazalaki elongo na ye bilei, Davidi asilikaki makasi mpe akanaki koboma Nabale ná bato nyonso ya ndako na ye. Kasi Abigaile, mwasi ya Nabale, oyo azalaki na boboto mpe na motema molai, apesaki Davidi bilei nokinoki. Yango esalaki ete Davidi aboma Nabale te ná bato ya ndako na ye. (1 Sa. 25:9-22, 32-35) Ntango Davidi asilikaki makasi, azwaki ekateli ya koboma Nabale ná mibali nyonso oyo bazalaki elongo na ye. Mpe na nsima, Davidi alobaki ete mobali oyo ayibaki mpate ya moninga, na ndakisa oyo Natane apesaki, asengelaki kobomama. Mpo na likambo oyo ya mibale, tokoki komituna boye: Mpo na nini Davidi, moto oyo azalaki na boboto, akokaki kozwa ekateli ya makasi boye mpo na moto oyo ayibaki mpate ya moninga? Tótalela naino makambo oyo Davidi azalaki kokutana na yango na ntango wana. Na ntango wana, lisosoli ya Davidi ezalaki kotungisa ye. Mbala mingi, soki moto azali kosalela basusu makambo na boboto te, yango emonisaka ete azali lisusu na boyokani ya malamu te ná Yehova. w21.10 12 par. 17-18; 13 par. 20

Mwamibale, 18 sanza ya 7

Bosengeli kozala basantu, mpamba te ngai nazali mosantu.​—1 Pe. 1:16.

Maloba ya mokapo ya lelo emonisi ete tokoki komekola Yehova, ndakisa eleki malamu na likambo etali bosantu. Tosengeli kozala basantu na etamboli na biso mobimba. Lokola tozali bato ya kozanga kokoka, kosala bongo ekoki komonana mpasi mingi. Kutu ntoma Petro asalaki mabunga mingi; kasi ndakisa na ye emonisi ete tokoki kokóma basantu. Bato mingi bakanisaka ete moto oyo azali mosantu ezali moto oyo asɛkaka te, oyo alataka bilamba ya bato ya mangomba mpe oyo azalaka kimyakimya. Kasi ezali bongo te. Biblia elobi ete Yehova azali mosantu, mpe azali “Nzambe ya esengo.” (1 Tim. 1:11) Baoyo basambelaka ye babengami bato ya “esengo.” (Nz. 144:15) Yesu apamelaki bato oyo bazalaki kolata bilamba oyo ezalaki kokesenisa bango na bato mosusu mpe oyo bazalaki kosala makambo ya malamu kaka mpo basusu bámona bango. (Mat. 6:1; Mrk. 12:38) Makambo oyo toyekoli na Biblia esalisi biso, bakristo ya solo, tóyeba soki kozala mosantu elakisi mpenza nini. Toyebi ete Nzambe na biso oyo atondi na bolingo akopesa biso soki moke te mobeko oyo tokokoka te kotosa. w21.12 2-3 par. 1, 3

Mwamisato, 19 sanza ya 7

Osengeli kolinga Yehova Nzambe na yo na motema na yo mobimba.​—Mrk. 12:30.

Na makabo nyonso oyo Nzambe apesá biso, likoki ya kosambela ye ezali moko ya makabo oyo eleki monene. Tomonisaka Yehova ete tolingaka ye soki ‘tozali kotosa mibeko na ye.’ (1 Yoa. 5:3) Moko ya mibeko oyo Yesu alobaki tótosa mpo na komonisa ete tolingaka Tata na ye, ezali ya kokómisa bato bayekoli mpe kobatisa bango. (Mat. 28:19) Apesá biso mpe mobeko ete tólinganaka. (Yoa. 13:35) Yehova akosala ete baoyo batosaka mibeko na ye bákɔta na libota ya basambeli na ye ya mokili mobimba. (Nz. 15:1, 2) Moniselá basusu bolingo. Bolingo ezali ezaleli ya Yehova oyo eleki monene. (1 Yoa. 4:8) Yehova amonisaki ete alingaka biso liboso kutu tóyeba ye. (1 Yoa. 4:9, 10) Tomekolaka ye ntango tomoniselaka basusu bolingo. (Ef. 5:1) Lolenge moko oyo eleki malamu ya komonisela basusu bolingo ezali ya kosalisa bango báyekola makambo etali Yehova wana ntango ezali naino. (Mat. 9:36-38) Ntango tosalaka bongo, topesaka bango libaku ya kokɔta na libota ya Nzambe. w21.08 5-6 par. 13-14

Mwaminei, 20 sanza ya 7

Ata moto moko te azali na bolingo koleka oyo.​—Yoa. 15:13.

Kolinga makasi oyo Yesu alingaka Yehova etindaki ye amipimela makambo mosusu mpo na Tata na ye mpe mpo na biso. (Yoa. 14:31) Yesu amonisaki ete alingaka bato mingi na lolenge ya bomoi oyo aponaki kozala na yango awa na mabele. Mokolo na mokolo, azalaki komonisa bolingo mpe motema mawa, ata ntango bato mosusu bazalaki kotɛmɛla ye. Lolenge ya libosoliboso oyo amonisaki ete alingaki bato ezalaki ndenge ateyaki bango makambo etali Bokonzi ya Nzambe. (Luka 4:43, 44) Yesu amonisaki mpe bolingo oyo ezangi moimi mpo na Nzambe mpe mpo na bato na ndenge andimaki konyokwama mpe kokufa liwa ya mpasi na mabɔkɔ ya basumuki. Na ndenge yango, afungolelaki biso nyonso nzela ya kozwa bomoi ya seko. Tomipesaki na Yehova, Tata na biso ya likoló, mpe tozwaki batisimo mpo tolingaka ye. Na yango, ndenge moko na Yesu, tomonisaka ete tolingaka Yehova na nzela ya makambo oyo tosalelaka basusu. Ntoma Yoane akomaki: “Moto oyo azali kolinga ndeko na ye te, oyo ye amoni, akoki kolinga Nzambe te, oyo ye amoni te.”​—1 Yoa. 4:20. w22.03 10 par. 8-9

Mwamitano, 21 sanza ya 7

Bókeba mpenza ete ndenge na bino ya kotambola ezala te lokola bato bazangá bwanya kasi lokola bato ya bwanya, bómisombela ntango oyo ebongi.​—Ef. 5:15, 16.

Tosepelaka kolekisa ntango elongo na Yehova, kasi tozali na mokakatano moko. Tozalaka na makambo mingi ya kosala, yango wana ekoki kozala mpasi tózwa ntango mpo na makambo ya elimo. Mosala ya mosuni, mikumba ya libota, mpe makambo mosusu ekoki kozwa biso ntango mingi mpe kosala ete tózwa ntango te mpo na kobondela, koyekola mpe komanyola. Ezali na makambo mosusu oyo ekoki kolyela biso ntango kozanga ete tóyeba yango. Soki tokebi te, tokoki kotika makambo mosusu oyo ezali mpenza mabe te elyela biso ntango oyo tokokaki kosalela mpo na kopusana lisusu penepene na Yehova. Tólobela naino likambo ya kominanola. Biso nyonso tomiyokaka malamu soki tominanoli mwa moke. Kasi ata kominanola ya malamu ekoki kolya biso ntango ya kosala makambo ya elimo. Tosengeli kotya kominanola na esika na yango.​—Mas. 25:27; 1 Tim. 4:8. w22.01 26-27 par. 2-3

Mwapɔsɔ, 22 sanza ya 7

Mopaya oyo azali kofanda mopaya epai na bino akokóma na miso na bino lokola mwana-mboka na kati na bino; mpe osengeli kolinga ye lokola yo moko.​—Lev. 19:34.

Ntango Yehova asɛngaki Bayisraele bálinga bazalani na bango, asɛngaki te ete básala yango kaka epai ya bato oyo bazali loposo moko to ekólo moko na bango. Asɛngaki ete bálingaka mpe bapaya oyo bafandi na kati na bango. Yango nde maloba oyo ezali na Balevi 19:33, 34. Basengelaki kosalela mopaya makambo “lokola mwana-mboka,” mpe Bayisraele basengelaki “kolinga ye” lokola bamilingaka bango moko. Na ndakisa, Bayisraele basengelaki kotika nzela ete baoyo bafandi bapaya mpe babola bálɔkɔtaka biloko oyo ezalaki kotikala na bilanga. (Lev. 19:9, 10) Bakristo basengeli mpe kotosa etinda oyo esɛngi kolinga baoyo bafandi bapaya. (Luka 10:30-37) Na ndenge nini? Lelo oyo, ezali na bato mingi oyo batiká bamboka na bango mpe ntango mosusu bafandaka penepene na esika oyo tozali. Ezali na ntina ete tósalelaka bango makambo na lokumu mpe na limemya. w21.12 12-13 par. 16

Mwalomingo, 23 sanza ya 7

Baoyo balukaka Yehova, bakozanga eloko ya malamu te.​—Nz. 34:10.

Soki tozali mpenza kolanda litambwisi ya Yehova sikoyo, ekosalisa biso mpe tómindimisa makasi ete azali na likoki ya kobikisa biso na mikolo ezali koya. Esɛngaka kozala na kondima mpe kotyela Yehova motema mpo na kosɛnga mokonzi na biso ya mosala apesa biso konje mpo tókende na liyangani ya monene to ya moke, to kosɛnga ye abongola programɛ na biso ya mosala mpo tókoka koyangana na makita nyonso mpe tókoka kosakola lisusu mingi. Kanisá ete mokonzi ya mosala aboyi makambo nyonso oyo tosɛngi ye mpe alongoli biso na mosala. Tokozala na kondima ete Yehova akotika biso te to akosundola biso te, mpe ete akokokisa ntango nyonso bamposa na biso ya mosuni? (Ebr. 13:5) Bandeko mingi oyo bazali na mosala ya ntango nyonso bakoki kobɛta masolo oyo emonisi ndenge oyo Yehova asalisaki bango ntango bazalaki mpenza na mposa na ye. Yehova azali sembo. Lokola Yehova azali na ngámbo na biso, tozali na ntina te ya kobanga makambo oyo ekosalema na mikolo ezali koya. Soki totye Bokonzi na ye na esika ya liboso na bomoi na biso. w22.01 7 par. 16-17

Mwayambo, 24 sanza ya 7

Bozali kosambisa mpo na moto te, kasi nde mpo na Yehova.​—2 Nt. 19:6.

Nini ekoki kosala ete ezala mpasi tótyela bankulutu motema? Tómeka kokanisa ete moto oyo alongolami na lisangá azali moninga na biso ya motema. Tokoki kokanisa ete mbala mosusu bankulutu batalelaki makambo nyonso te, to komituna soki bakati mpenza likambo yango ndenge oyo Yehova alingaki kokata yango. Nini ekoki kosalisa biso tóbatela makanisi ya malamu mpo na ekateli oyo ezwami? Tosengeli kobosana te ete kolongola moto na lisangá ezali ebongiseli oyo Yehova atyá, mpe ezalaka mpo na bolamu ya lisangá mpe ya moto oyo asalaki lisumu. Soki mosumuki oyo abongolaki motema te atikali kaka na lisangá, akoki komema mpe bandeko mosusu na lisumu. (Gal. 5:9) Ekoki mpe kosala ete amona te bonene ya lisumu na ye, mpe mbala mosusu akomona mpenza te ntina ya kosembola makanisi mpe misala na ye mpo Yehova andima ye lisusu. (Mos. 8:11) Tokoki kotya motema ete ntango bankulutu bazali kotala soki mosumuki moko asengeli kolongolama na lisangá to te, bazwaka makambo na lisɛki te. w22.02 5-6 par. 13-14

Mwamibale, 25 sanza ya 7

Akobuka te mongendu oyo efinamá, mpe akoboma te nsinga ya lini oyo ezali kopela mokemoke.​—Mat. 12:20.

Kozala na motema molai mpe na boboto ezali na ntina mingimingi ntango moto azali kotɛmɛla toli ya Biblia oyo bapesi ye. Nkulutu asengeli kokeba ete asilika te soki toli oyo apesi endimami mbala moko te to soki basaleli yango te. Yango wana na mabondeli na ye moko, nkulutu akoki kosɛnga Yehova apambola moto oyo azali na mposa ya toli, asalisa ye ayeba ntina ya toli yango mpe asalela yango. Ekoki kosɛnga ntango eleka mpo moto oyo bapesi toli akanisa makambo oyo bayebisi ye. Soki nkulutu azali na motema molai mpe na boboto, moto oyo azali kozwa toli akolanda te ndenge oyo toli yango epesami, kasi akotya likebi na makambo oyo bayebisi ye. Nzokande, toli na biso esengeli ntango nyonso kouta na Liloba ya Nzambe. Tolingi toli na biso ezala ya malamu, kasi ezala mpe oyo ‘ekosepelisa motema.’​—Mas. 27:9. w22.02 18 par. 17; 19 par. 19

Mwamisato, 26 sanza ya 7

Eloko ya kozelisazelisa ebɛlisaka motema.​—Mas. 13:12.

Ntango tobondeli Yehova apesa biso makasi ya koyika mpiko na mokakatano moko to asalisa biso tólonga bolɛmbu moko, tokoki komona ete eyano na libondeli na biso ezali koumela koleka ndenge oyo tokanisaki. Mpo na nini Yehova ayanolaka mbala moko te na mabondeli nyonso oyo tosalaka? Amonaka ete mabondeli na biso ezali elembo oyo emonisaka ete tozali na kondima epai na ye. (Ebr. 11:6) Asepelaka mpe komona milende oyo tosalaka mpo na kosepelisa ye mpe ndenge tosalaka makambo na boyokani na mabondeli na biso. (1 Yoa. 3:22) Na yango, ntango tosɛngi Yehova asalisa biso tótika ezaleli moko ya mabe, ekoki kosɛnga ete tómonisa motema molai mpe tósala oyo tokoki mpo na kosala mbongwana. Yesu amonisaki ete tokoki te kozwa mbala moko biyano na mabondeli mosusu oyo tosalaka. Alobaki boye: “Bókoba kosɛnga, mpe bakopesa bino; bókoba koluka, mpe bokomona; bókoba kobɛta kɔkɔkɔ, mpe bakofungolela bino. Mpo moto nyonso oyo asɛngaka azwaka, mpe moto nyonso oyo alukaka amonaka, mpe moto nyonso oyo azali kobɛta kɔkɔkɔ bakofungolela ye.”​—Mat. 7:7, 8. w21.08 8 par. 1; 10 par. 9-10

Mwaminei, 27 sanza ya 7

Nalingaka mobeko na yo mingi mpenza! Ezali lobanzo na ngai mokolo mobimba.​—Nz. 119:97.

Mpo kondima na yo epai ya Mozalisi ekóma makasi, osengeli kokoba koyekola Liloba ya Nzambe. (Yos. 1:8) Luká koyeba ndenge oyo bisakweli na yango ekokisamá mpe boyokani oyo ezali kati na makambo oyo bato ndenge na ndenge bakomaki na Biblia. Kosala bongo ekokómisa kondima na yo makasi ete Mozalisi ya bolingo mpe ya bwanya asalaki biso. Mpe ekosalisa yo ondima mpenza ete Biblia ekomamaki na litambwisi ya elimo santu na ye. (2 Tim. 3:14; 2 Pe. 1:21) Ntango ozali koyekola Liloba ya Nzambe, talá ndenge toli na yango ekoki kosalisa yo. Na ndakisa, banda kala Biblia elobá ete bolingo ya mbongo ezali mosisa ya makambo nyonso ya mabe mpe ebimisaka “ebele ya bampasi.” (1 Tim. 6:9, 10; Mas. 28:20; Mat. 6:24) Na yango, likebisi oyo Biblia epesi biso ya koboya kolinga mbongo mingi ezali mpenza toli ya malamu! Ezali na batoli mosusu ya Biblia oyo esalisá yo? Soki tokanisi na batoli nyonso ya malamu oyo ezali na Biblia, tokomona ete Mozalisi na biso ayebi oyo eleki malamu mpo na biso mpe tokoluka ntango nyonso toli epai na ye. (Yak. 1:5) Mpe yango ekosala ete tózala mpenza na bomoi ya esengo.​—Yis. 48:17, 18. w21.08 17-18 par. 12-13

Mwamitano, 28 sanza ya 7

Mpo Nzambe azangi boyengebene te mpo abosana mosala na bino mpe bolingo oyo bomoniselaki nkombo na ye.​—Ebr. 6:10.

Soki ozali kokóma mobange, yebá ete Yehova abosani te oyo osalá mpo na ye. Mbala mosusu ozalaki kosakola na molende. Oyikaki mpiko na mikakatano, ata mpe oyo epesaki yo mawa makasi. Otosaki mpe olongisaki mitinda ya sembo ya Yehova. Okokisaki na bosembo mikumba ya ntina mingi na ebongiseli na ye, mpe opesaki basusu formasyo. Osalaka makasi olanda mbongwana oyo ezali kosalema na ebongiseli ya Yehova. Osalisaki mpe olendisaki bandeko mosusu oyo bazali na mosala ya ntango nyonso. Yehova Nzambe alingaka yo mingi ndenge ozali sembo epai na ye. Alaki ete “akotika te bato na ye ya sembo”! (Nz. 37:28) Apesi yo elaka oyo: ‘Kino okokóma na nsuki mpɛmbɛ, akokoba komema yo.’ (Yis. 46:4) Na yango, kokanisa te ete lokola ozali kokóma mobange, ozali lisusu na ntina te na ebongiseli ya Yehova. Ozali na motuya mingi! w21.09 3 par. 4

Mwapɔsɔ, 29 sanza ya 7

Yehova ayokeli baoyo bazali kobanga ye mawa.​—Nz. 103:13.

Yehova amonisaka motema mawa mpo azali na bwanya oyo ezangá nsuka. Biblia elobi boye: “Bwanya oyo euti na likoló . .  . etondi na motema mawa mpe na mbuma ya malamu.” (Yak. 3:17) Ndenge moko na moboti ya bolingo, Yehova ayebaka ete motema mawa na ye ezalaka mpo na bolamu ya bana na ye. (Yis. 49:15) Motema mawa ya Nzambe epesaka biso elikya atako tozali bato ya kozanga kokoka. Na yango, lokola Yehova azali na bwanya oyo ezangá nsuka, alukaka ntango nyonso komonisa motema mawa soki amoni ete ezali na bantina ya kosala bongo. Kasi Yehova ayebaka mpe ntango nini asengeli te komonisa motema mawa. Bwanya na ye etindaka ye amonisa motema mawa te soki ayebi ete kosala bongo ekolendisa mosumuki akoba kosala mabe. Kanisá ete ndeko moko akómi kosala masumu na nko mpenza. Tosengeli kosala nini? Na litambwisi ya elimo ya Nzambe Paulo akomaki boye: “Bótika kosangana” na moto ya ndenge wana. (1 Ko. 5:11) Basumuki oyo baboyaka kobongola motema, balongolamaka na lisangá. Yango ezali na ntina mpo na kobatela bandeko ya lisangá oyo bazali sembo mpe komekola bosantu ya Yehova. w21.10 9-10 par. 7-8

Mwalomingo, 30 sanza ya 7

Nzambe alingaka moto oyo apesaka na esengo.​—2 Ko. 9:7.

Kopesa makabo mpo mosala ya Bokonzi ekende liboso ezali na kati ya losambo oyo topesaka Yehova. Bayisraele basengelaki te komonana liboso ya Yehova mabɔkɔ mpamba. (Mib. 16:16) Bayisraele basengelaki komema likabo na kotalela oyo bazali na yango. Na ndenge yango bazalaki komonisa botɔndi mpo na bibongiseli nyonso oyo Yehova azalaki kozwa mpo bázala malamu na elimo. Ndenge nini tokoki komonisa bolingo mpe botɔndi na biso epai ya Yehova mpo na makambo nyonso oyo asalelaka biso mpo tózala makasi na elimo? Lolenge moko ya kosala yango ezali ya kotya makabo mpo na kokokisa bamposa ya lisangá na biso mpe mpo na mosala ya kosakola na mokili mobimba, na kotalela makoki na biso. Ntoma Paulo alobelaki likambo yango boye: “Soki libosoliboso mposa makasi ezali, ekondimama mingi mpenza na kotalela oyo moto azali na yango, kasi te na kotalela oyo moto azali na yango te.” (2 Ko. 8:4, 12) Yehova asepelaka na makabo nyonso oyo totyaka, ata soki ezali mingi te.​—Mrk. 12:42-44. w22.03 24 par. 13

Mwayambo, 31 sanza ya 7

Bólobaka na ndenge ya kobɔndisa epai ya milimo oyo enyokwami na makanisi, bósalisa bato ya bolɛmbu, bózala na motema molai epai ya bato nyonso.​—1 Tes. 5:14.

Bankulutu bakoki te kolongola makambo nyonso ya mpasi oyo basaleli ya Yehova bazali kokutana na yango. Atako bongo, Yehova alingi ete bankulutu básala nyonso oyo bakoki mpo na kolendisa mpe kobatela bampate na ye. Lokola bankulutu bazalaka na makambo ebele ya kosala, ndenge nini bakoki kozwa ntango mpo na kopesa bandeko lisalisi oyo basengeli na yango?Landá ndakisa ya Paulo. Paulo azalaki koluka mabaku ya kopesa bandeko longonya mpe kolendisa bango. Ezali malamu bankulutu bálanda ndakisa na ye, mpe básalelaka bandeko makambo na bolingo mpe na boboto. (1 Tes. 2:7) Paulo azalaki koyebisa bandeko ete alingaka bango, Yehova mpe alingaka bango. (2 Ko. 2:4; Ef. 2:4, 5) Paulo azalaki kozwa bandeko ya lisangá lokola baninga, mpe azalaki kolekisa ntango elongo na bango. Amonisaki ete azalaki kotyela bango motema na ndenge azalaki koyebisa bango makambo oyo etungisaka ye mpe mabunga na ye. (2 Ko. 7:5; 1 Tim. 1:15) Kasi Paulo atyaki makanisi na ye nyonso na mikakatano na ye te. Azalaki nde kolinga kosalisa bandeko. w22.03 28 par. 9-10

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto