Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • es23 nk. 77-87
  • Sanza ya 8

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Sanza ya 8
  • Tótángaka Makomami mokolo na mokolo—2023
  • Mitó ya makambo mike
  • Mwamibale, 1 sanza ya 8
  • Mwamisato, 2 sanza ya 8
  • Mwaminei, 3 sanza ya 8
  • Mwamitano, 4 sanza ya 8
  • Mwapɔsɔ, 5 sanza ya 8
  • Mwalomingo, 6 sanza ya 8
  • Mwayambo, 7 sanza ya 8
  • Mwamibale, 8 sanza ya 8
  • Mwamisato, 9 sanza ya 8
  • Mwaminei, 10 sanza ya 8
  • Mwamitano, 11 sanza ya 8
  • Mwapɔsɔ, 12 sanza ya 8
  • Mwalomingo, 13 sanza ya 8
  • Mwayambo, 14 sanza ya 8
  • Mwamibale, 15 sanza ya 8
  • Mwamisato, 16 sanza ya 8
  • Mwaminei, 17 sanza ya 8
  • Mwamitano, 18 sanza ya 8
  • Mwapɔsɔ, 19 sanza ya 8
  • Mwalomingo, 20 sanza ya 8
  • Mwayambo, 21 sanza ya 8
  • Mwamibale, 22 sanza ya 8
  • Mwamisato, 23 sanza ya 8
  • Mwaminei, 24 sanza ya 8
  • Mwamitano, 25 sanza ya 8
  • Mwapɔsɔ, 26 sanza ya 8
  • Mwalomingo, 27 sanza ya 8
  • Mwayambo, 28 sanza ya 8
  • Mwamibale, 29 sanza ya 8
  • Mwamisato, 30 sanza ya 8
  • Mwaminei, 31 sanza ya 8
Tótángaka Makomami mokolo na mokolo—2023
es23 nk. 77-87

Sanza ya 8

Mwamibale, 1 sanza ya 8

Tata, limbisá bango.​—Luka 23:34.

Ekoki kozala ete Yesu azalaki kolobela basoda ya Roma oyo babɛtaki ye bansɛtɛ na mabɔkɔ mpe na makolo. Yesu atikaki te ete makambo ya kozanga bosembo oyo akutanaki na yango ekómisa ye nkandankanda mpe etinda ye aboya kolimbisa bato oyo banyokolaki ye. (1 Pe. 2:23) Ndenge moko na Yesu, tosengeli kondima kolimbisaka basusu. (Kol. 3:13) Bato mosusu, ata mpe bandeko na biso ya libota bakoki kotɛmɛla biso mpo bazali kokanga ntina te ya mateya oyo tondimaka, mpe lolenge na biso ya bomoi. Bakoki koyebisa bato mosusu makambo ya lokuta mpo na biso, koyokisa biso nsɔni na miso ya bato, kobebisa mikanda na biso, ata mpe koluka kobɛta biso. Na esika tóbombela bango nkanda na motema, tokoki kosɛnga Yehova afungola miso ya bato oyo batɛmɛlaka biso mpo mokolo mosusu bákoka koyeba solo. (Mat. 5:44, 45) Na bantango mosusu, ekoki kozala mpasi tólimbisa bango, mingimingi soki basalelaki biso makambo ya mabe mpenza. Kasi soki tobombeli bango nkanda na motema mpe toboyi kolimbisa bango, biso moko tokomisala mabe. (Nz. 37:8) Soki tolimbisi, totikaka te ete makambo mabe oyo basalelaki biso ekómisa biso nkandankanda.​—Ef. 4:31, 32. w21.4 8-9 par. 3-4

Mwamisato, 2 sanza ya 8

Mbala boni . . . bayokisaki ye motema mpasi.​—Nz. 78:40.

Moto moko oyo olingaka alongolami na lisangá? Yango ekoki kopesa yo mpasi mpenza! Kanisá ndenge oyo Yehova ayokaki motema mpasi ntango baanzelu mosusu batikaki kosalela ye! (Yuda 6) Kanisá mpe ndenge oyo azalaki koyoka motema mpasi ntango Bayisraele, bato oyo azalaki kolinga mingi, bazalaki kotombokela ye mbala na mbala. (Nz. 78:41) Yebá ete Tata na biso ya likoló ayokaka mpe mpasi ntango moto oyo olingaka mingi atiki kosalela ye. Ayebi mpasi oyo ozali koyoka. Lokola azali na motema mawa, akolendisa mpe akosalisa yo. Soki mwana moko atiki kosalela Yehova, mbala mingi baboti na ye bamitunaka oyo bakokaki kosala mpo na kosalisa ye atikala na kati ya solo. Ndeko mobali moko alobi boye: “Namipesaki foti. Nazalaki kutu kolɔta bandɔtɔ ya mabe mpo na likambo yango.” Ndeko mwasi moko oyo akutanaki mpe na likambo ya bongo, azalaki kokanisa boye ntango nyonso: “Mbala mosusu nakokisaki malamu te mokumba na ngai ya kozala moboti malamu. Nazalaki kokanisa ete nalongaki te koteya mwana na ngai solo.” w21.09 26-27 par. 1-2, 4

Mwaminei, 3 sanza ya 8

Basosolaki ete bazalaki bato batángá kelasi mingi te mpe bato mpamba.​—Mis. 4:13.

Basusu mpe bakanisaka ete lokola Batatoli ya Yehova batángá na biteyelo ya teoloji te, bakoki te koteya bato makambo ya Biblia. Kasi basengeli koluka koyeba makambo. Yango nde Luka, mokomi moko ya Evanzile, asalaki. Asalaki makasi alandela “makambo nyonso malamumalamu uta ebandeli.” Alingaki ete baoyo bakotánga mokanda na ye ‘báyeba mpenzampenza bosolo ya makambo’ oyo bayokaki mpo na Yesu. (Luka 1:1-4) Bayuda oyo bazalaki na Beroya ya kala bazalaki lokola Luka. Ntango bayokaki mpo na mbala ya liboso nsango malamu oyo etali Yesu, bakokanisaki makambo oyo bateyaki bango ná Makomami ya Ebre mpo na koluka koyeba soki ezalaki solo. (Mis. 17:11) Ndenge moko mpe lelo oyo, bato basengeli koluka koyeba malamumalamu ndenge makambo ezali. Basengeli kokokanisa makambo oyo Batatoli ya Yehova bateyá bango ná oyo Makomami elobi. Basengeli mpe koyekola makambo oyo Batatoli ya Yehova bazali kosala na mikolo na biso. Soki baluki koyeba makambo malamumalamu, bakotika te ezaleli ya kokanisela basusu mabe to mpe makambo oyo bato balobaka ezipa bango miso. w21.05 3-4 par. 7-8

Mwamitano, 4 sanza ya 8

Bófungwama.​—2 Ko. 6:13.

Ezalaka na bantango oyo bandeko ya lisangá bakosepela mingi soki balekisi ntango elongo na biso? Baoyo bafandaka elongo na bandeko na bango ya libota oyo bazali Batatoli te bakoki kozala na mokakatano, na ndakisa, ntango bandeko yango bazali kosala bafɛti ya mangomba to ya ekólo. Basusu mpe bakoki kozala na mawa makasi soki dati moko boye ekoki; na ndakisa dati oyo moto oyo bazalaki kolinga mingi akufaki. Soki tobengisi bandeko oyo bazali kokutana na makambo ya ndenge wana mpo tólekisa ntango elongo, tokomonisa ete tozali “komitungisa mpenza” mpo na bango. (Flp. 2:20) Ezali na bantina mingi oyo ekoki kosala ete na bantango mosusu ndeko moko amiyoka ete azali ye moko. Atako bongo, tosengeli kobosana te ete Yehova ayebi mpenza ndenge bazali komiyoka. Mbala mingi asalelaka bandeko na biso bakristo mpo na kopesa biso oyo tosengeli na yango. (Mat. 12:48-50) Biso mpe tokomonisa Yehova ete tozalaka na botɔndi mpo na lisalisi oyo lisangá epesaka biso, soki tozali kosala oyo tokoki mpo na kosalisa bandeko na biso. Ata soki na bantango mosusu tokoki komiyoka ndenge nini, tozali biso moko te mpo Yehova azali ntango nyonso elongo na biso. w21.06 13 par. 18-20

Mwapɔsɔ, 5 sanza ya 8

Bózalaka na etamboli malamu na kati ya bikólo, mpo, na likambo oyo bazali kolobela bino mabe lokola nde bazali koloba na basali-mabe, bápesa Nzambe nkembo na mokolo oyo akoya kotala mpo bamoni na miso na bango misala na bino ya malamu.​—1 Pe. 2:12.

Yesu abatelaki makanisi malamu mpe akobaki kosakola atako bato mosusu baboyaki mateya na ye. Mpo na nini? Ayebaki ete bato mingi basengelaki koyeba solo, mpe alingaki kopesa mingi na bango libaku ya kondima nsango ya Bokonzi. Lisusu, ayebaki ete bato mosusu oyo baboyaki koyoka mateya na ye na ebandeli, nsukansuka bakondima koyoka yango. Tótalela makambo oyo esalemaki epai ya bandeko na ye ya libota. Na boumeli ya mbula misato na ndambo ya mosala na ye awa na mabele, ata ndeko na ye moko te ya libota akómaki moyekoli na ye. (Yoa. 7:5) Kasi nsima ya lisekwa na ye bakómaki bakristo. (Mis. 1:14) Toyebi te soki nsukansuka nani nde akondima mateya ya solo ya Biblia oyo toteyaka. Mpo na bato mosusu, esɛngaka mwa ntango mpo bándima mateya na biso. Ata baoyo balingaka koyoka biso te bamonaka etamboli mpe makanisi ya malamu oyo tozalaka na yango, mpe nsukansuka, bakoki kobanda ‘kopesa Nzambe nkembo.’ w21.05 18-19 par. 17-18

Mwalomingo, 6 sanza ya 8

Ntango bozali kokende, bósakola mpe bóloba ete: “Bokonzi ya likoló ekómi pene.”​—Mat. 10:7.

Ntango Yesu azalaki awa na mabele, apesaki bayekoli na ye mitindo mibale. Ayebisaki bango básakola nsango malamu ya Bokonzi, mpe alakisaki bango ndenge ya kosala yango. (Luka 8:1) Na ndakisa, Yesu ayebisaki bayekoli na ye oyo basengelaki kosala soki bato bandimi to baboyi koyoka nsango ya Bokonzi. (Luka 9:2-5) Alobaki mpe ete bayekoli na ye bakosakwela bato mingi mpe bakopesa “litatoli na bikólo nyonso.” (Mat. 24:14; Mis. 1:8) Lisusu, ayebisaki bango báteya bato nyonso oyo basengelaki kokóma bayekoli na ye bátosa makambo nyonso oyo apesaki bango mitindo. Yesu alobaki ete mosala yango ya ntina mingi esengelaki kokoba tii na mikolo na biso, “tii na bosukisi ya makambo ya ntango oyo.” (Mat. 28:18-20) Mpe na emoniseli oyo alakisaki Yoane, Yesu amonisaki polele ete bayekoli na ye nyonso basengeli kosalisa bato mosusu báyekola makambo etali Yehova.​—Em. 22:17. w21.07 2-3 par. 3-4

Mwayambo, 7 sanza ya 8

Tólukaka te komimonisa ete toleki bamosusu, kobimisa kowelana na kati na biso, koyokelana likunya.​—Gal. 5:26.

Lelo oyo na mokili, bato mingi bazali na ezaleli ya kowelana. Na ndakisa, bato mosusu ya mombongo basalaka makambo oyo epesaka basusu mpasi kaka mpo báleka baninga. Bato mosusu oyo babɛtaka masano, balukaka ata kozokisa baninga na nko kaka mpo bálonga. Bana-kelasi mosusu bakoki koyiba biyano na ekzamɛ kaka mpo bándima bango bákɔta na iniversite moko ya lokumu mingi. Biso bakristo toyebi ete kosala makambo ya ndenge wana ezali mabe; mpe ezali kati na “misala ya nzoto.” (Gal. 5:19-21) Ekoki kosalema ete basaleli mosusu ya Yehova bákolisa ezaleli ya kowelana na kati ya lisangá kozanga ete báyeba yango? Yango ezali motuna moko ya ntina mingi, mpamba te elimo ya kowelana ekoki kobebisa bomoko na biso na kati ya lisangá. Tokosala malamu soki tozali kolobela ndakisa ya basi mpe mibali ya sembo oyo Biblia elobeli, oyo baboyaki kokóma na ezaleli ya kowelana. w21.07 14 par. 1-2

Mwamibale, 8 sanza ya 8

Esengo na moto oyo azali kotya likebi na moto oyo azangá; Na mokolo ya likama Yehova akobikisa ye.​—Nz. 41:1.

Bolingo ya sembo etindaka biso tósalisa baoyo bazali na mawa to balɛmbi nzoto. Lelo oyo mpe, bandeko mingi ya motema boboto bandimaka kosalisa bandeko ya lisangá oyo bazali na mawa makasi to mpe oyo bazali konyokwama na makanisi. Balingaka bandeko na bango mpe balingaka kosala nyonso oyo bakoki mpo na kosalisa bango. (Mas. 12:25; 24:10) Yango eyokani mpenza na makambo oyo Paulo alobaki ete: “Bólobaka na ndenge ya kobɔndisa epai ya milimo oyo enyokwami na makanisi, bósalisa bato ya bolɛmbu, bózala na motema molai epai ya bato nyonso.” (1 Tes. 5:14) Mbala mingi likambo eleki malamu oyo tokoki kosala mpo na kosalisa ndeko oyo azali na mawa to oyo alɛmbi nzoto ezali ya koyoka ye na likebi mpe koyebisa ye ete tolingaka ye. Yehova amonaka ntango otyelaka moko ya bampate na ye likebi. Masese 19:17 elobi: “Ye oyo amoniselaka moto oyo azangá boboto azali kodefisa Yehova, mpe [Yehova] akozongisela ye ndenge na ye wana ya kosala.” w21.11 10 par. 11-12

Mwamisato, 9 sanza ya 8

Bómeka mpe bómona ete Yehova azali malamu; esengo na mobali makasi oyo azali kokima epai na ye.​—Nz. 34:8.

Tokoki kosala nini mpo tómibongisa sikoyo mpo na makambo oyo ekosalema na mikolo ezali koya? Tosengeli kosepela na oyo tozali na yango, mpe kozala na esengo mingi mpo na boyokani na biso ná Yehova. Soki toyebi Nzambe na biso malamu, tokozala mpe na kondima ete akobatela biso ntango Goge ya Magoge akobundisa biso. Maloba ya mokapo ya lelo emonisi ntina oyo Davidi ayebaki ete akokaki kotya motema ete Yehova akosalisa ye. Mbala mingi Davidi azalaki kotyela Yehova motema, mpe Nzambe na ye ayokisaki ye nsɔni ata mbala moko te. Ntango Davidi azalaki elenge, abundisaki engambe Mofilistia moko na nkombo Goliate, mpe ayebisaki mobali yango ya nguya ete: “Na mokolo ya lelo, Yehova akokaba yo na lobɔkɔ na ngai.” (1 Sa. 17:46) Na nsima, Davidi akómaki kosala epai ya Mokonzi Saulo, oyo alukaki mbala mingi koboma ye. Kasi “Yehova azalaki na” Davidi. (1 Sa. 18:12) Lokola Davidi amonaki ndenge Yehova asalisaki ye na kala, ayebaki ete akokaki lisusu kotyela Ye motema na komekama oyo azalaki na yango. w22.01 6-7 par. 14-15

Mwaminei, 10 sanza ya 8

Bana nyonso ya Nzambe babandaki koganga na esengo.​—Yobo 38:7.

Na makambo nyonso oyo Yehova asalaka, amonisaka motema molai mpe azwaka ntango oyo esengeli mpo na kosilisa mosala na ye. Asalaka yango mpo na lokumu ya nkombo na ye mpe mpo na bolamu ya basusu. Na ndakisa, tótala ndenge Yehova abongisaki malɛmbɛmalɛmbɛ mabele mpo na bato. Biblia emonisi yango, elobi ete atyaki “bolai na yango,” apikaki “bitɛlɛmiselo na yango,” mpe atyaki “libanga na yango ya litumu.” (Yobo 38:5, 6) Azwaki kutu ntango ya kotalatala mosala na ye. (Eba. 1:10, 12) Kanisá ndenge baanzelu bazalaki komiyoka ntango bazalaki komona Yehova azali kosala eloko moko nsima ya mosusu. Na ntembe te basepelaki mpenza! Yango wana na ntango moko boye “babandaki koganga na esengo.” Yango eteyi biso nini? Esɛngaki bankóto ya bambula mpo Yehova asilisa kokela. Kasi ntango Yehova atalaki biloko nyonso oyo akelaki, amonaki ete ezalaki “malamu mingi.” w21.08 9-10 par. 6-7

Mwamitano, 11 sanza ya 8

Longonya, moombo malamu mpe ya sembo!​—Mat. 25:23.

Na ndakisa oyo Yesu apesaki, mobali moko alingaki kokende mobembo. Liboso ya kokende, abengaki baombo na ye mpe apesaki mokomoko na bango batalanta oyo basengelaki kosala na yango mombongo. Lokola mobali yango ayebaki ete baombo na ye bazali na makoki ekeseni, apesaki moko batalanta mitano, mosusu mibale, mpe mosusu moko. Baombo mibale ya liboso basalaki mosala makasi mpo na kobakisela nkolo na bango mbongo. Kasi oyo ya misato asalaki ata eloko moko te na mbongo oyo bapesaki ye. Na yango, nkolo na ye alongolaki ye na mosala. Moombo ya liboso mpe ya mibale bazwaki na lisɛki te mokumba oyo bapesaki bango mpe basalaki mosala makasi mpo na kosalela nkolo na bango. Mpe yango esalaki ete bábakisa batalanta ya nkolo na bango mbala mibale. Nkolo na bango apesaki bango mbano mpo na mosala makasi oyo basalaki. Lisusu, nkolo na bango asepelaki mpe abakiselaki bango mikumba mosusu! w21.08 21-22 par. 7; 22 par. 9-10

Mwapɔsɔ, 12 sanza ya 8

Na mbala moko lisusu . . . Nakoningisa likoló, ná mabele.​—Hag. 2:6.

Na boumeli ya mikolo oyo ya nsuka, Yehova amonisi mpenza motema molai. Alingi ata moto moko te abomama. (2 Pe. 3:9) Apesi moto nyonso libaku ya kobongola motema. Kasi motema molai na ye ekokóma na nsuka. Baoyo baboyi kopesa Bokonzi ya Nzambe mabɔkɔ, makambo ekosukela bango kaka ndenge esukelaki Farao na mikolo ya Moize. Yehova alobaki na ye boye: “Mbɛlɛ sikoyo nasili kosembola lobɔkɔ na ngai mpe kotindela yo ná bato na yo maladi mabe mpo olongolama na mabele. Kasi, ya solo, natiki yo ozala mpo na ntina oyo: mpo nalakisa yo nguya na ngai mpe mpo nkombo na ngai esakolama na mabele mobimba.” (Kob. 9:15, 16) Nsukansuka, bikólo nyonso ekoyeba ete kaka Yehova nde azali Nzambe ya solo. (Ezk. 38:23) Koningana oyo mokapo ya lelo elobeli elimboli kobebisama ya seko ya baoyo, lokola Farao, baboyaka kondima ete Yehova azali na lotomo ya koyangela. w21.09 18-19 par. 17-18

Mwalomingo, 13 sanza ya 8

Bósepela elongo na bato oyo bazali kosepela; bólela elongo na bato oyo bazali kolela.​—Rom. 12:15.

Oyoki mpasi komona moto oyo olingaka alongolami na lisangá? Mpe okosala nini soki na lisangá, bandeko mosusu balobi makambo oyo ebakiseli yo lisusu mpasi? Tokoki te kozela ete moto nyonso alobaka kaka makambo ya malamu. (Yak. 3:2) Biso nyonso tozali bato ya kozanga kokoka, yango wana kokamwa te soki moto moko azali koyeba te oyo asengeli koloba to mpe alobi likambo moko oyo epesi yo mpasi kozanga kokana. Kobosana te toli oyo ntoma Paulo apesaki: “Bókoba kokanga motema moto na moto na makambo ya mosusu mpe kolimbisana na motema moko soki moko na bino azali na likambo ná mosusu.” (Kol. 3:13) Kobá kosalisa bandeko ya libota oyo batikali sembo. Bazali mpenza na mposa makasi ete osalisa mpe olendisa bango na ntango ya boye. (Ebr. 10:24, 25) Na bantango mosusu, bandeko ya libota oyo bazali sembo bamiyokaka ete bango mpe balongolami na lisangá mpo bandeko mosusu baboyaka kosolisa bango. Salá nyonso mpo bámiyokaka ndenge wana te! Bana oyo baboti na bango batiki solo bazalaka mpenza na mposa tópesaka bango longonya mpe tólendisaka bango! w21.09 29 par. 13-14; 30 par. 16

Mwayambo, 14 sanza ya 8

Moto ya bwanya akoyoka mpe akozwa lisusu mateya mingi.​—Mas. 1:5.

Ntango mibange bazali kosolola na bilenge, bango nyonso bazwaka matomba. (Rom. 1:12) Bino bilenge, bokomindimisa lisusu ete Yehova atyelaka basaleli na ye likebi, mpe mibange bakomona ete bozali kopesa bango lokumu. Bakosepela koyebisa bino ndenge oyo Yehova apambolá bango. Mbala mingi, kitoko ya moto esilaka ntango mbula na ye ezali kopusana. Kasi baoyo bazalaka sembo epai ya Yehova, bakómaka lisusu kitoko mingi na miso na ye wana mbula na bango ezali kopusana. (1 Tes. 1:2, 3) Mpo na nini? Mpo na boumeli ya bambula, batikaki ete elimo ya Nzambe ebongisa bango mpe esalisa bango bákólisa bizaleli malamu. Wana tozali koyeba malamu bandeko na biso oyo bakómi mibange, tozali kopesa bango lokumu, mpe tozali koyekola epai na bango, yango ekosalisa biso tózwaka bango na motuya mingi! Lisangá ekómaka makasi kaka te soki bilenge bazali kotalela mibange ete bazali na motuya, kasi mpe ntango mibange bazali kotalela bilenge ete bazali na motuya. w21.09 7 par. 15-18

Mwamibale, 15 sanza ya 8

Bótika kosambisa mpo básambisa bino te; mpo bakosambisa bino na lisambisi oyo bozali kosambisa.​—Mat. 7:1, 2.

Tosengeli kosala makasi ya koboya kozala makambo makasimakasi kasi lokola Nzambe na biso, ‘tótonda mpenza na motema mawa.’ (Ef 2:4) Komonisa motema mawa esuki kaka te na koyokela moto mawa. Moto ya motema mawa asalaka makambo mpo na kosalisa basusu. Biso nyonso tosengeli kosala makasi tóyeba bato oyo bazali na mposa ya lisalisi na libota, na lisangá mpe na esika tofandi. Ezali na mabaku mingi oyo tokoki komonisa motema mawa! Na ndakisa, ezali na moto moko oyo azali na mposa tólendisa ye? Ezali na mwa makambo oyo tokoki kosala mpo na kosalisa ye, na ndakisa kopesa ye mwa biloko ya kolya to mpe kosunga ye na makambo mosusu? Ezali na ndeko moko oyo auti kozongisama na lisangá mpe azali na mposa ya baninga oyo bakoki kolendisa ye? Tokoki koyebisa basusu nsango malamu mpo na kolendisa bango? (Yobo 29:12, 13; Rom. 10:14, 15; Yak. 1:27) Soki tozali kotya likebi na bamposa ya basusu, tokomona ete tozali na mabaku mingi ya komonisa motema mawa na esika tofandi. Soki tomonisi motema mawa, tokosepelisa Tata na biso ya likoló oyo “atondi mpenza na motema mawa”! w21.10 13 par. 20-22

Mwamisato, 16 sanza ya 8

Yehova azali Mobateli na ngai. Nakozanga eloko te.​—Nz. 23:1.

Na Nzembo mokapo 23, Davidi alobelaki makambo oyo ezalaki na motuya mingi, na ndakisa, ebele ya mapamboli ya elimo oyo azwaki mpo andimaki Yehova azala Mobateli na ye. Yehova akambaki Davidi “na banzela ya boyengebene,” mpe asalisaki ye na ntango ya bisengo mpe na ntango ya mpasi. Davidi ayebaki ete atako Yehova alalisaki ye na “bisika ya koleisa banyama oyo etondi na matiti,” bomoi na ye ekozanga mikakatano te. Na bantango mosusu, alɛmbaki nzoto, lokola nde azalaki kotambola “na lobwaku ya molili makasi,” mpe azalaki na banguna. Kasi lokola Yehova azalaki Mobateli na ye, Davidi azalaki ‘kobanga ata eloko moko ya mabe te.’ Na ndenge nini Davidi ‘azangaki eloko te’? Na ndenge ya elimo, Davidi azalaki na nyonso oyo asengelaki na yango mpo atikala penepene na Yehova. Esengo na ye etalelaki biloko ya mosuni te. Davidi asepelaki na oyo Yehova apesaki ye. Makambo oyo ezalaki na ntina mingi mpo na ye ezalaki nde lipamboli mpe libateli ya Yehova. Maloba oyo Davidi alobaki ekoki kosalisa biso tómona mpo na nini ezali na ntina tótalela biloko ya mosuni na ndenge ebongi. w22.01 3-4 par. 5-7

Mwaminei, 17 sanza ya 8

Moto na moto akozwa mbano na ye na kolanda mosala na ye.​—1 Ko. 3:8.

Na ntango ya kala, bato bazalaki koboya koyoka nsango oyo basaleli ya Yehova mingi bazalaki kosakwela bango. Na ndakisa, ekoki kozala ete Noa azalaki “mosakoli ya boyengebene” na boumeli ya bambula mingi. (2 Pe. 2:5) Na ntembe te, azalaki na elikya ete bato bakondima koyoka nsango oyo azalaki kosakola, kasi Yehova alobaki te ete ekosalema bongo. Kutu, ntango Nzambe azalaki kopesa Noa malako mpo na kotonga masuwa, ayebisaki ye boye: “Osengeli kokɔta na masuwa, yo ná bana na yo ná mwasi na yo mpe ná basi ya bana na yo elongo na yo.” (Eba. 6:18) Mpe ntango Yehova azalaki koyebisa ye bonene ya masuwa yango, mbala mosusu Noa amonaki ete bato nyonso te nde bakondima koyoka ye, mpo masuwa yango ekokoka kokɔtisa bango nyonso te. (Eba. 6:15) Kasi ndenge toyebi yango, ata moto moko te ya mokili mabe ya ntango wana andimaki koyoka Noa. (Eba. 7:7) Yehova akanisaki nde ete Noa alongaki te na mosala na ye ya kosakola? Soki moke te! Na miso ya Nzambe, Noa alongaki na mosala na ye ya kosakola mpo asalaki makambo nyonso oyo Yehova asɛngaki ye asala.​—Eba. 6:22. w21.10 26-27 par. 10-11

Mwamitano, 18 sanza ya 8

Nazalaki na mingi ntango nakendaki, mpe Yehova azongisi ngai mabɔkɔ mpamba.​—Ruta 1:21.

Kanisá ndenge oyo Ruta amiyokaki ntango Naomi azalaki koloba bongo! Asalaki nyonso oyo akokaki mpo na kosalisa Naomi. Ruta alelaki elongo na ye, apesaki ye makasi, atambolaki elongo na ye na boumeli ya mikolo mingi. Atako Ruta asalisaki ye mingi mpenza, Naomi alobaki: “Yehova azongisi ngai mabɔkɔ mpamba.” Maloba yango emonisaki ete Naomi abosanaki lisalisi nyonso oyo Ruta apesaki ye. Na ntembe te, maloba yango epesaki mpenza Ruta mpasi na motema! Kasi asundolaki Naomi te. (Ruta 1:3-18) Lelo oyo, ndeko mwasi oyo alɛmbi nzoto akoki na ebandeli koloba likambo moko oyo ekoki kopesa biso mpasi na motema, atako milende nyonso oyo tozali kosala mpo na kosalisa ye. Kasi tosilikaka te. Tosundolaka te ndeko na biso oyo azali na mposa ya lisalisi, mpe tosɛngaka Yehova asalisa biso tómona ndenge ya kopesa ye makasi. (Mas. 17:17) Na ndakisa, ndeko mwasi moko oyo azali na mposa ya lisalisi akoki koboya tósalisa ye na ebandeli. Kasi bolingo ya sembo ekotinda biso tósala nyonso oyo tokoki mpo na kosalisa ye.​—Gal. 6:2. w21.11 11 par. 17-19

Mwapɔsɔ, 19 sanza ya 8

Bókóma basantu na etamboli na bino mobimba.​—1 Pe. 1:15.

Na Biblia, liloba “mosantu” mpe “bosantu” esalelamaka mpo na kolobela bopɛto na bizaleli mpe na makambo ya losambo. Liloba yango ezali mpe kopesa likanisi ya kotyama pembeni mpo na kosalela Nzambe. Na maloba mosusu, tokozala basantu soki tozali na bizaleli ya malamu, soki tozali kosambela Nzambe na ndenge oyo andimaka, mpe soki tozali na boyokani ya malamu elongo na ye. Koyeba ete Yehova, Nzambe oyo azali mosantu na ndenge ya kokoka, alingaka kaka tózala baninga na ye atako tozali bato ya kozanga kokoka, ezali mpenza kokamwisa! Yehova azali pɛto mpe azali na mbindo te na makambo nyonso. Toyebi yango na maloba oyo baserafɛ, baanzelu oyo bazalaka penepene ya kiti na ye ya bokonzi, balobaki mpo na ye. Basusu kati na bango balobaki: “Mosantu, mosantu, mosantu ezali Yehova ya mampinga.” (Yis. 6:3) Ya solo, mpo baanzelu bázala na boyokani malamu elongo na Nzambe na bango oyo azali mosantu, bango moko mpe basengeli kozala basantu; likambo ya esengo, bazalaka bongo. w21.12 3 par. 4-5

Mwalomingo, 20 sanza ya 8

Bókeba mpenza ete ndenge na bino ya kotambola ezala te lokola bato bazangá bwanya kasi lokola bato ya bwanya, bómisombela ntango oyo ebongi.​—Ef. 5:15, 16.

Mbala mingi, bilenge bakanisaka nzela eleki malamu oyo bakolanda na bomoi na bango. Nzokande, balakisi mpe bato ya mabota na bango oyo bazali Batatoli ya Yehova te bakoki kolendisa bango bákɔta na iniversite mpo na nsima bázwa misala ya malamu oyo ekopesa bango mbongo ebele. Na ntembe te bakelasi ya bongo ekolya bango ntango mingi. Kasi mbala mosusu baboti mpe baninga mosusu na lisangá bazali kolendisa bilenge yango bálekisa ntango na bango na mosala ya Yehova. Nini ekoki kosalisa elenge oyo alingaka Yehova azwa ekateli oyo eleki malamu? Akozwa litomba soki atángi mpe akanisi toli ya Baefese 5:15-17 na mozindo. Nsima ya kotánga bavɛrsɛ yango, elenge akoki komituna boye: ‘“Mokano ya Yehova ezali nini”? Ekateli nini ekosepelisa ye? Nakosalela ntango na ngai malamu koleka soki nalandi nzela nini?’ Kobosana te ete “mikolo ezali mabe,” mpe mosika te mokili oyo eyangelami na Satana ekobebisama. w22.01 27 par. 5

Mwayambo, 21 sanza ya 8

Ya solo, bandeko na ye bazalaki kondimela ye te.​—Yoa. 7:5.

Ntango nini Yakobo akómaki moyekoli ya sembo ya Yesu? Ntango Yesu asekwaki, “abimelaki Yakobo, mpe na nsima bantoma nyonso.” (1 Ko. 15:7) Bokutani wana ná Yesu esalisaki Yakobo akóma moko ya bayekoli na ye. Azalaki wana ntango bantoma bazalaki kozela elimo santu oyo elakamaki, na shambre moko ya likoló na Yerusaleme. (Mis. 1:13, 14) Na nsima, Yakobo azwaki libaku ya kosala na lisangani ya mikóló-bakambi ya siɛklɛ ya liboso. (Mis. 15:6, 13-22; Gal. 2:9) Mpe na ntango moko boye liboso ya mobu 62 ya ntango na biso, na litambwisi ya elimo santu, akomelaki bakristo oyo batyamaki mafuta na elimo mokanda. Mokanda yango ezali na litomba mpo na biso lelo oyo, tózala na elikya ya kozwa bomoi ya seko na likoló to awa na mabele. (Yak. 1:1) Josèph, moto moko ya istware na siɛklɛ ya liboso, akomaki ete Yakobo abomamaki na kolanda mitindo ya nganga-nzambe monene ya Bayuda, Ananiasi mwana ya Anasi. Yakobo atikalaki sembo epai ya Nzambe tii ntango asilisaki bomoi na ye awa na mabele. w22.01 8-9 par. 3, 5

Mwamibale, 22 sanza ya 8

Nzambe na ngai, Nzambe na ngai, mpo na nini osundoli ngai?​—Mat. 27:46.

Liteya ya liboso oyo tokoki koyekola na mokapo ya lelo ezali ete tosengeli te kozela Yehova abatela biso na mikakatano oyo ekoki komeka kondima na biso. Kaka ndenge Yesu amekamaki tii na nsuka, biso mpe tosengeli komibongisa mpo na kotikala sembo ata soki esɛngi tókufa. (Mat. 16:24, 25) Kasi, toyebi ete Nzambe akotika nzela te ete tómekama koleka oyo tokoki koyikela mpiko. (1 Ko. 10:13) Liteya mosusu ezali ete, ndenge moko na Yesu, bakoki konyokola biso ata soki tosali likambo moko te ya mabe. (1 Pe. 2:19, 20) Baoyo batɛmɛlaka biso basalaka yango kaka te mpo tosalaki likambo moko ya mabe, kasi mpo tozali bato ya mokili te, mpe topesaka litatoli mpo na solo. (Yoa. 17:14; 1 Pe. 4:15, 16) Yesu ayebaki ntina oyo Yehova atikaki nzela ete anyokwama. Kasi na kokesana na Yesu, na bantango mosusu, basambeli ya sembo ya Yehova oyo bazali konyokwama bamitunaka ntina oyo Yehova atiki nzela ete makambo ya bongo ekómela bango. (Hab. 1:3) Nzambe na biso oyo azali na motema mawa mpe na motema molai ayebi ete bato ya ndenge wana bazangi kondima te; bazali nde na mposa ya libɔndisi oyo kaka ye nde akoki kopesa yango.​—2 Ko. 1:3, 4. w21.04 11 par. 9-10

Mwamisato, 23 sanza ya 8

Libondeli na ngai ebongisama lokola mpaka ya malasi liboso na yo.​—Nz. 141:2.

Yehova akondima losambo na biso soki eyokani na mokano na ye mpe ntango tozali kosambela ye na limemya mpe na bolingo. Toyebi ete tosengeli kosambela kaka Yehova, mpe tolingi ete makabo na biso ya losambo oyo tozali kopesa ye ezala ya malamu mpenza. Lolenge moko ya kosala yango ezali ntango tozali kobondela ye. Biblia ekokanisi mabondeli na biso na mpaka ya malasi oyo ebongisami malamumalamu, oyo ezalaki kopesama na tabernakle mpe na nsima na tempelo. Mpaka ya malasi yango ezalaki kosepelisa Nzambe. Ndenge moko mpe, mabondeli na biso oyo euti na motema “esepelisaka” Nzambe, ata soki tosaleli maloba milaimilai te. (Mas. 15:8; Mib. 33:10) Esepelisaka motema ya Yehova ntango toyebisaka ye ete tolingaka ye mpe tozali na botɔndi epai na ye. Alingaka tóyebisa ye makambo oyo ezali kotungisa biso, makambo oyo tozali kolikya, mpe bamposa na biso. Liboso osolola na Yehova na libondeli, mpo na nini te okanisa liboso makambo oyo olingi koloba? Soki osali bongo, okopesa Tata na yo ya likoló “mpaka ya malasi” ya malamu mpenza. w22.03 20 par. 2; 21 par. 7

Mwaminei, 24 sanza ya 8

Epai na bino baoyo bozali kozwa bolɔzi, kopema elongo na biso na ntango ya emoniseli ya Nkolo Yesu uta na likoló elongo na baanzelu na ye ya nguya.​—2 Tes. 1:7.

Na Armagedone, kokata soki banani Yehova akomonisela motema mawa to te ekozala mokumba na biso te. (Mat. 25:34, 41, 46) Tokondima mpenza bikateli ya Yehova, to tokotika ete yango ebɛtisa biso libaku? Ya solo, tosengeli koyekola kotyela Yehova motema mingi banda sikoyo mpo tótyela ye mpe motema mobimba na mikolo ezali koya. Kanisá ndenge oyo tokomiyoka na mokili ya sika. Mangomba ya lokuta ekozala lisusu te, ata mpe bibongiseli ya mombongo ya lokoso ná baguvɛrnema oyo enyokolaka bato mpe ebimiselaka bato ebele ya bampasi banda kala. Maladi, bobange, mpe liwa ya bato oyo tolingaka ekozala lisusu te. Satana ná bademo na ye bakokangama mpo na mbula nkóto. Makambo nyonso ya mabe oyo botomboki na bango ebimisá ekozala lisusu te. (Em. 20:2, 3) Na ntango yango, tokozala mpenza na botɔndi ndenge totyelaki lolenge oyo Yehova asalaka makambo motema! w22.02 6-7 par. 16-17

Mwamitano, 25 sanza ya 8

Esengo na bato oyo batyaka kimya.​—Mat. 5:9.

Yesu azalaki moto ya liboso mpo na kotya kimya mpe alendisaki bato básilisaka matata na bango. Ateyaki bango ete basengeli koyokana na bandeko na bango soki balingi ete Yehova andima losambo na bango. (Mat. 5:23, 24) Mpe asalisaki bantoma mbala na mbala mpo bátika kowelana mpo na koyeba soki nani aleki baninga. (Luka 9:46-48; 22:24-27) Mpo na kozala moto oyo atyaka kimya, tosengeli kosuka kaka te na koboya kobimisa kowelana. Tosengeli kozala bato ya liboso mpo na kotya kimya ntango makambo ebebi mpe tosengeli kolendisa bandeko básilisaka matata na bango. (Flp. 4:2, 3; Yak. 3:17, 18) Tokoki komituna boye: ‘Makambo nini nandimaka komipimela mpo na kotya kimya ná basusu? Ntango ndeko moko azokisi ngai, nabombelaka ye nkanda na motema? Nazelaka ete moto oyo tozwani na ye matata nde aya mpo tózongisa kimya, to ngai nde nazalaka moto ya liboso mpo na kotya kimya, ata soki emonani lokola ete moto yango nde alukaki makambo?’ w22.03 10-11 par. 10-11

Mwapɔsɔ, 26 sanza ya 8

Esengo ya kopesa eleki oyo ya kozwa.​—Mis. 20:35.

Banda kala, Biblia esakolaki ete basaleli ya Nzambe “bakomipesa na bolingo na bango moko” mpo na kosalela Yehova na nse ya litambwisi ya Mwana na ye. (Nz. 110:3) Esakweli yango ezali mpenza kokokisama lelo oyo. Mbula na mbula, basaleli ya Yehova ya molende balekisaka bamilio ya bangonga na mosala ya kosakola. Basalaka yango na bolingo na bango moko, mpe bafutaka bango te mpo na mosala yango. Basalelaka mpe ntango na bango mpo na kosalisa bandeko na bango bakristo bázwa biloko oyo basengeli na yango, kolendisa bango, mpe kosalisa bango bákóma na kondima makasi. Bankulutu mpe basaleli na misala balekisaka bangonga ebele na kobongisa masolo oyo bakosala na makita mpe bakendaka kotala bandeko mpo na kolendisa bango. Nini etindaka bango básalaka mosala nyonso wana? Ezali bolingo; bolingo mpo na Yehova mpe mpo na bato. (Mat. 22:37-39) Yesu atiká ndakisa ya malamu na oyo etali kotya matomba ya basusu liboso ya oyo ye moko. Tosalaka makasi tólanda ndakisa na ye. (Rom. 15: 1-3) Baoyo bamekolaka ye bakozwa matomba. w22.02 20 par. 1-2

Mwalomingo, 27 sanza ya 8

Lifuti ya mosali oyo azwaka lifuti ekotikala te butu mobimba epai na yo tii na ntɔngɔ.​—Lev. 19:13.

Na Yisraele ya kala, bato mingi bazalaki kosala mosala ya bilanga. Mpe na nsuka ya mokolo, bazalaki kofuta basali oyo bazwaki bango na mosala ya bilanga. Koboya kofuta mosali yango mbongo na ye ekokaki kosala ete azanga mbongo ya koleisa libota na ye mokolo yango. Yehova alobaki boye: “Azali na mpasi mpe molimo na ye ezali kotya motema na lifuti na ye.” (Mib. 24:14, 15; Mat. 20:8) Lelo oyo, basali mingi bafutamaka mbala moko to mbala mibale na sanza, kasi mikolo nyonso te. Atako bongo, etinda oyo ezali na Balevi 19:13 ezali mpe na ntina lelo oyo. Bato mosusu oyo bazwaka bato na mosala bazalaka sembo te epai ya basali na bango na ndenge bafutaka bango mbongo moke koleka oyo basengeli na yango. Bayebaka ete basali yango bakoki kozala na eloko ya kosala te, mpe bakokoba kaka kosala ata soki bazali kofuta bango mbongo moke mpenza. Na maloba mosusu, ezali lokola ‘batikalaka na lifuti ya mosali oyo asengeli kofutama.’ Mokristo oyo asalaka makambo ya mombongo asengeli kosala makasi azala sembo epai ya basali na ye. w21.12 10 par. 9-10

Mwayambo, 28 sanza ya 8

Nazali na mposa ya mai.​—Yoa. 19:28.

Nsima ya makambo nyonso ya mpasi oyo Yesu akutanaki na yango, asengelaki koyoka mposa ya mai makasi. Azalaki na mposa ete moto moko asalisa ye mpo akokisa mposa oyo azalaki na yango ya komɛla mai. Yesu amonaki te ete ezali bolɛmbu komonisa bato mosusu ndenge oyo azalaki komiyoka. Biso mpe tosengeli kosalaka bongo. Mbala mingi na bomoi na biso, tomonaka malamu tóyebisa bato mosusu te makambo oyo tozali na mposa na yango. Kasi soki tokómi na mposa ete bato mosusu básalisa biso, tosengeli kokakatana te mpo na kosɛnga lisalisi. Na ndakisa, soki tozali mobange to tozali kobɛla, tokoki kosɛnga moninga moko akende kotika biso na wenze to epai ya monganga. Soki tolɛmbi nzoto, ekoki kosɛnga ete tóyebisa nkulutu, to moninga moko mokristo oyo akɔmɛli na elimo ayoka biso na likebi to mpe ayebisa biso “liloba ya malamu” oyo ekolendisa biso. (Mas. 12:25) Tóbosana te ete bandeko na biso balingaka biso, mpe bazalaka na mposa ya kosalisa biso na “ntango ya mpasi.” (Mas. 17:17) Kasi bakoki koyeba te makambo oyo ezali na motema na biso. Soki toyebisi bango te, bakoyeba mpe te soki tozali na mposa ya lisalisi. w21.04 11-12 par. 11-12

Mwamibale, 29 sanza ya 8

Omonisi ete olɛmbi nzoto na mokolo ya mpasi? Nguya na yo ekozala moke.​—Mas. 24:10.

Mbongwana ezalaka mpasi mpo na mingi kati na biso. Makambo ebongwanaki mpo na bandeko mosusu oyo basalaki mosala moko ya ntango nyonso bambula ebele. Esɛngaki bamosusu bátika mokumba oyo bazalaki kolinga mingi mpo mbula na bango epusanaki. Ntango makambo ya bongo ekómeli biso, toyokaka mawa mpo tozali kaka bato. Ekozala mpasi te tómesana na mbongwana soki tozali kotalela makambo ndenge Yehova azali kotalela yango. Azali kosala makambo ya minene lelo oyo, mpe tozali na lokumu monene ndenge tozali bato oyo bazali kosala elongo na ye. (1 Ko. 3:9) Bolingo oyo Yehova alingaka biso ekobongwana te. Yango wana, soki mbongwana moko oyo esalemi na ebongiseli ya Yehova ezwi yo, boyá kolekisa ntango na komituna mituna ebele mpo na mbongwana yango. Na esika ya kokanisa mikolo oyo eleká, sɛngá Yehova asalisa yo omona makambo ya malamu na mbongwana yango. (Mos. 7:10) Tóbatela makanisi ya malamu. Yango ekosala ete tóbatela esengo na biso mpe tótikala sembo ata ntango bomoi na biso ebongwani. w22.03 17 par. 11-12

Mwamisato, 30 sanza ya 8

Yehova, Yehova, Nzambe . . . abatelaka motema boboto mpo na bankóto.​—Kob. 34:6, 7.

Yehova amoniselaka banani bolingo ya sembo? Biblia elobi ete tokoki kolinga biloko mingi, na ndakisa “mosala ya bilanga,” “vinyo mpe mafuta,” “disiplini,” “boyebi,” “bwanya” mpe biloko mosusu. (2 Nt. 26:10; Mas. 12:1; 21:17; 29:3) Kasi tokoki soki moke te komonisela biloko bolingo ya sembo, tomoniselaka yango kaka bato. Yehova amonisaka ezaleli yango epai ya moto nyonso te. Amonisaka yango kaka epai ya baoyo bazalaka na boyokani ya malamu mpenza elongo na ye. Nzambe na biso azalaka sembo epai na biso, baninga na ye. Azali na mokano moko ya malamu mpo na biso, mpe akosundola biso te. Yehova amonisi bolingo na ye epai ya bato nyonso. Yesu ayebisaki mobali moko na nkombo Nikodeme ete: “Nzambe alingaki mokili mingi, yango wana apesaki Mwana na ye se moko oyo abotamaki, mpo moto nyonso oyo azali kondimela ye abomama te, kasi azwa bomoi ya seko.”​—Yoa. 3: 1, 16; Mat. 5:44, 45. w21.11 2 par. 3; 3 par. 6-7

Mwaminei, 31 sanza ya 8

Na ezaleli na bino ya koyika mpiko bokobikisa milimo na bino.​—Luka 21:19.

Bomoi na mokili oyo ezali mpenza mpasi. Mpe tóyeba ete na mikolo ezali koya, tokoki kokutana na mikakatano mingi mpenza. (Mat. 24:21) Tozelaka na mposa makasi mokolo oyo tokobosana makambo yango mpe ekoya lisusu na motema te! (Yis. 65:16, 17) Na yango, tosengeli koyekola ndenge ya kokoba koyika mpiko. Mpo na nini? Mpo Yesu alobaki: “Na ezaleli na bino ya koyika mpiko bokobikisa milimo na bino.” (Luka 21:19) Soki tokanisi ndenge bato mosusu bazali koyika mpiko na mikakatano oyo ekokani na oyo ya biso, yango ekopesa biso makasi ya kokoba koyika mpiko. Yehova Nzambe nde azali ndakisa eleki malamu na likambo etali koyika mpiko. Yango ekamwisi yo? Mbala mosusu. Kasi soki okanisi malamu, okomona ete esengeli kokamwisa yo te. Satana Zabolo nde azali koyangela mokili oyo. Yango wana mikakatano etondi na mokili. Yehova azali na nguya ya kosilisa mikakatano yango mbala moko, kasi azali naino kozela tii mokolo oyo atyá ekoka. (Rom. 9:22) Kasi liboso mokolo yango ekoka, Nzambe na biso azali kokoba koyika mpiko. w21.07 8-9 par. 2-4

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto