Sanza ya 9
Mwamitano, 1 sanza ya 9
Batunaki ye alakisa bango elembo moko oyo euti na likoló.—Mat. 16:1.
Na mikolo ya Yesu, bato mosusu bazalaki te kosepela na mateya na ye. Kasi ntango aboyaki kosala likamwisi oyo bazalaki kosɛnga ye, baboyaki ye. (Mat. 16:4) Oyo Makomami elobi. Mosakoli Yisaya akomaki boye mpo na Masiya: “Akoganga te, akotombola mongongo na ye mpe te, mpe akoyokisa mongongo na ye na balabala te.” (Yis. 42:1, 2) Yesu asalaki mosala na ye kozanga ete abenda likebi ya bato epai na ye. Atongaki te batempelo ya minene, alataki te bilamba ya lokumu oyo bakonzi ya mangomba bazalaki kolata, mpe alukaki te ete bato bábenga ye na bibengeli ya lokumu. Ntango azalaki kosamba, Yesu aboyaki kosala likamwisi kaka mpo na kosepelisa Mokonzi Erode, atako bomoi na ye ezalaki na likama. (Luka 23:8-11) Yesu asalaki makamwisi, kasi mokano na ye ya libosoliboso ezalaki ya kosakola nsango malamu. Ayebisaki bayekoli na ye boye: “Ezali mpo na yango nde nabimaki.”—Mrk. 1:38. w21.05 4 par. 9-10
Mwapɔsɔ, 2 sanza ya 9
Oyo elakisi bomoi ya seko, báyekola koyeba yo, Nzambe ya solo kaka moko, mpe moto oyo yo otindaki, Yesu Kristo.—Yoa. 17:3.
Tozali koluka baoyo bazali na “ezaleli oyo ebongi mpo na bomoi ya seko.” (Mis. 13:48) Mpo na kosalisa bato yango bakóma bayekoli, tosengeli kosalisa bango (1) bákanga ntina, (2) bándima, mpe (3) básalela makambo oyo bazali koyekola na Biblia. (Kol. 2:6, 7; 1 Tes. 2:13) Bandeko nyonso ya lisangá bakoki kosalisa bayekoli ya Biblia soki bazali komonisela bango bolingo mpe soki bazali kosalisa bango bámiyoka malamu ntango bayei na makita. (Yoa. 13:35) Ndeko oyo azali koyekola na moto Biblia akoki kolekisa ntango mingi mpe kosala molende mpo na kosalisa moto yango akweisa biloko oyo “epikamá makasi,” elingi koloba mateya mpe mimeseno ya mabe. (2 Ko. 10:4, 5) Ekoki kosɛnga basanza mingi mpo na kosalisa moyekoli ya Biblia asala bambongwana na bomoi na ye mpe akokisa masɛngami mpo na kozwa batisimo. Kasi milende yango ekendaka na mai. w21.07 3 par. 6
Mwalomingo, 3 sanza ya 9
Bóluka koyeba likambo nyonso soki ezali solo; bókangama makasi na oyo ezali malamu.—1 Tes. 5:21.
Biso Batatoli ya Yehova tondimaka mpenza ete toteyaka solo mpe tosambelaka Yehova na lolenge oyo andimaka. Ntoma Paulo andimaki mpenza ete azali na kati ya solo. (1 Tes. 1:5) Andimaki likambo yango kaka te mpo ezalaki kosepelisa ye. Paulo azalaki koyekola Liloba ya Nzambe na mozindo mpenza. Andimaki ete “makomami nyonso ekomami na litambwisi ya elimo ya Nzambe.” (2 Tim. 3:16) Makambo nini ayekolaki? Paulo amonaki na Makomami makambo oyo endimisaki ye ete Yesu azalaki Masiya oyo alakamaki; likambo oyo bakonzi ya mangomba ya Bayuda baboyaki kondima. Bakonzi ya mangomba yango bazalaki na bokosi. Bazalaki koloba ete bazalaki bamonisi ya Nzambe, nzokande bazalaki kosala makambo oyo Nzambe ayinaka. (Tito 1:16) Kasi, Paulo akesanaki na bango. Azalaki te kopona makambo oyo asengelaki kondima na Liloba ya Nzambe mpe oyo asengelaki kondima te. Andimaki koteya mpe kosalela “mokano mobimba ya Nzambe.”—Mis. 20:27. w21.10 18 par. 1-2
Mwayambo, 4 sanza ya 9
Moto moko te akoki koya epai na ngai soki Tata, oyo atindaki ngai, abendi ye te.—Yoa. 6:44.
Atako biso nde tolonaka mpe tomwangisaka mai, tosengeli kobosana te ete Nzambe nde akolisaka. (1 Ko. 3:6, 7) Yehova azwaka bato nyonso na motuya. Apesi biso lokumu ya kosala elongo na Mwana na ye mpo na koyanganisa bato ya bikólo nyonso, liboso nsuka ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo eya. (Hag. 2:7) Tokoki kokokanisa mosala na biso ya kosakola na mosala ya kobikisa bato. Mpe biso tozali lokola bato oyo babikisaka bato oyo mabele ezipi bango na esika oyo batimolaka mabanga ya ntalo. Ata soki kaka bato moke nde babikisi moto moko oyo mabele ezipaki, bango nyonso bazalaka na esengo mpo bango nyonso basalaki mosala ya ntina mingi. Ezali mpe bongo mpo na mosala na biso ya kosakola. Toyebi te motángo ya bato oyo bakobikisama na ebongiseli oyo ya Satana. Kasi Yehova akoki kosalela ata nani na kati na biso mpo na kosalisa bango. Andreas oyo afandaka na Bolivie alobi boye: “Nayebaka ete ntango moto moko ayekoli solo mpe azwi batisimo, ezali mpo bato mingi basalaki elongo mpo na kosalisa ye.” Biso mpe tóbatela makanisi ya bongo mpo na mosala ya kosakola. Soki tosali bongo, Yehova akopambola biso mpe mosala na biso ya kosakola ekomemela biso esengo mpenza. w21.05 19 par. 19-20
Mwamibale, 5 sanza ya 9
Bálongwa na motambo ya Zabolo.—2 Tim. 2:26.
Moto oyo asalaka bokila azalaka kaka na mokano moko: ya kokanga to koboma nyama. Akoki kosalela mitambo ekeseni kaka ndenge Biblia emonisi yango. (Yobo 18:8-10) Ndenge nini moto oyo asalaka bokila asalaka ete nyama ekangama na motambo na ye? Ayekolaka nyama yango malamumalamu. Alukaka koyeba esika oyo nyama yango ekendaka, eloko oyo nyama yango esepelaka na yango, mpe motambo ya malamu oyo ekoki kokanga nyama yango kozanga ete eyeba. Satana azali lokola moto oyo asalaka bokila. Ayekolaka biso malamumalamu. Ayebaka esika oyo tozali kokende mpe makambo oyo tosepelaka na yango. Na nsima, asalelaka motambo oyo akanisaka ete ekokanga biso na ntango oyo tozali kokanisa te. Kasi Biblia eyebisi biso ete soki tokangami na mitambo yango, tokoki kolongwa. Eyebisi biso mpe oyo tokoki kosala mpo na kokima mitambo yango. Mitambo mibale ya Satana oyo ekangaka bato mingi ezali lolendo mpe lokoso. Na boumeli ya bambula mingi, Satana alongi mpenza kosalela mitambo yango. Azali lokola mokangi-ndɛkɛ oyo asalelaka motambo to monyama mpo na kokanga ndɛkɛ. (Nz. 91:3) Kasi tosengeli kotika te ete Satana akanga biso. Mpo na nini? Mpo Yehova amonisi biso mayele oyo Satana asalelaka.—2 Ko. 2:11. w21.06 14 par. 1-2
Mwamisato, 6 sanza ya 9
Nsuki mpɛmbɛ ezalaka motole ya kitoko ntango yango ezwami na nzela ya boyengebene.—Mas. 16:31.
Bandeko oyo bakómi mibange bazali na motuya mingi. Liloba ya Nzambe ekokanisi nsuki mpɛmbɛ na bango na motole to ekɔti ya mikonzi. (Mas. 20:29) Kasi, ekoki kosalema ete tózanga kotyela bandeko yango likebi. Bilenge oyo bayebaka ete bandeko oyo bakómi mibange bazali na valɛrɛ, bazwaka eloko ya motuya mingi koleka bomɛngo. Bandeko oyo bakómi mibange bazali na motuya mingi na miso ya Yehova. Ayebi mpenza soki bazali bato ya lolenge nini, mpe azwaka na motuya bizaleli na bango. Asepelaka ntango mibange bayebisaka bilenge bwanya oyo bazwá na mosala na ye. (Yobo 12:12; Mas. 1:1-4) Azwaka mpe na motuya ezaleli na bango ya koyika mpiko. (Mal. 3:16) Atako bakutanaki na mikakatano na bomoi na bango, babatelaki kondima na bango makasi epai ya Yehova. Elikya na bango mpo na bomoi na mikolo ezali koya ekómá makasi koleka ndenge ezalaki ntango babandaki koyekola solo. Mpe Yehova alingaka bango mpo bakobaka kosakola nkombo na ye ata “na ntango ya nsuki mpɛmbɛ.”—Nz. 92:12-15. w21.09 2-3 par. 2-3
Mwaminei, 7 sanza ya 9
Moto na moto ameka mosala na ye moko ndenge ezali, bongo akozwa likambo ya komikumisa na yango mpo na ye moko.—Gal. 6:4.
Ezali malamu tótalelaka makanisi na biso mbala na mbala. Tokoki komituna boye: ‘Namiyokaka malamu kaka soki nakanisi ete naleki moto mosusu? Nasalaka mosala makasi na lisangá kaka mpo naleka basusu? To nasalaka yango nde mpo na kosepelisa Yehova?’ Biblia eyebisi biso ete tosengeli te komikokanisaka na basusu. Mpo na nini? Mpo soki tozali kokanisa ete toleki bandeko na biso, tokoki kokóma na lolendo. Lisusu, soki tozali komikokanisa na bandeko mosusu oyo tokanisi ete baleki biso, tokoki kolɛmba nzoto. (Rom. 12:3) Tosengeli kobosanaka te ete soki Yehova abendaki biso epai na ye, ezali te mpo tozali kitoko, tolobaka malamu, to mpo bato mingi balingaka biso; kasi nde mpo tolingaka ye mpe toyokaka Mwana na ye.—Yoa. 6:44; 1 Ko. 1:26-31. w21.07 14-15 par. 3-4
Mwamitano, 8 sanza ya 9
Bosengeli kokómisama sika na kati ya bokasi oyo ezali kotambwisa makanisi na bino.—Ef. 4:23.
Kasi mpo tókómisa makanisi na biso makanisi ya sika, tosengeli kobondelaka, koyekolaka Liloba ya Nzambe, mpe komanyolaka. Na yango, kobá kosala makambo yango mpe kosɛnga Yehova apesa yo makasi. Elimo santu na ye ekosalisa yo olonga ezaleli ya komikokanisa na basusu. Yehova akosalisa yo oyeba soki okómi na likunya to na lolendo. Lisusu, akosalisa yo opikola bizaleli yango nokinoki na motema na yo. (2 Nt. 6:29, 30) Yehova ayebi makambo oyo ezali na motema na biso. Ayebi ndenge oyo tozali kobunda mpo na kolonga makanisi mabe ya mokili oyo, ayebi mpe mabunga na biso. Ntango Yehova amonaka milende oyo tozali kosala mpo na kobundisa bizaleli yango, bolingo na ye mpo na biso ekómaka makasi. Mpo na komonisa ndenge oyo alingaka biso, Yehova asaleli ndakisa ya bolingo makasi oyo ezalaka kati na mama ná mwana na ye ya moke. (Yis. 49:15) Ezali esengo koyeba ete Yehova alingaka biso mingi ntango amonaka ete tozali kobunda mpe kosala nyonso oyo tokoki mpo na kosalela ye na motema mobimba! w21.07 24-25 par. 17-19
Mwapɔsɔ, 9 sanza ya 9
Bósepela elongo na bato oyo bazali kosepela.—Rom. 12:15.
Tokoki kobakisa esengo na biso soki tozali kosala nyonso oyo tokoki na mokumba oyo bapesi biso na mosala ya Yehova. ‘Omipesa mingi’ na mosala ya kosakola mpe na makambo ya lisangá. (Mis. 18:5; Ebr. 10:24, 25) Bongisáká makita malamu mpo opesa biyano oyo ekolendisa. Zwáká na motuya mingi masolo nyonso oyo bapesi yo na likita ya kati ya pɔsɔ. Soki basɛngi yo okokisa mokumba moko na lisangá, kómáká na ngonga mpe zalá moto oyo bakoki kotyela motema. Kokanisa te ete mokumba oyo bapesi yo ezali na ntina te, mpe osengeli te kolekisa ntango na yo mpo na yango. Salá makasi oyeba malamu mokumba oyo bapesi yo. (Mas. 22:29) Soki omipesi mobimba na mosala ya Yehova, okokóma moninga na ye ya motema mpe okozala na esengo mingi. (Gal. 6:4) Lisusu ekozala mpasi te mpo osepela ntango bandeko mosusu bazwi mokumba oyo ozalaki kosepela na yango.—Gal. 5:26. w21.08 23 par. 11
Mwalomingo, 10 sanza ya 9
Bwanya oyo euti na likoló ezalaka libosoliboso pɛto, mpe kimya, na makambo makasimakasi te, esepelaka kotosa, etondi na motema mawa mpe na mbuma ya malamu, eponaka bilongi te, ezalaka na bokosi te.—Yak. 3:17.
Tosengeli koboya lolendo mpe kondima koteyama na Yehova. Kaka ndenge maladi ekoki kokómisa makasi misisa ya motema ya moto mpe kopekisa yango ebɛta malamu, lolendo mpe ekoki kokómisa motema na biso ya elilingi makasi mpe kopekisa biso tólanda litambwisi ya Yehova. Bafarisai bakómisaki mitema na bango makasi tii baboyaki kondima makambo oyo emonisaki polele ete Yesu azalaki na elimo ya Nzambe mpe ete azalaki Mwana ya Nzambe. (Yoa. 12:37-40) Lolendo na bango ezalaki ya mabe mpenza mpo epekisaki bango kozwa bomoi ya seko. (Mat. 23:13, 33) Yango wana, ezali na ntina mingi ete tókoba kotika Liloba ya Nzambe mpe elimo santu na ye ebongola bomoto na biso, etambwisa makanisi mpe bikateli na biso! Lokola Yakobo azalaki moto ya komikitisa, atikaki ete Yehova ateya ye. Mpe komikitisa na ye nde esalaki ete akóma moteyi malamu. w22.01 10 par. 7
Mwayambo, 11 sanza ya 9
Bókoba kosɛnga.—Mat. 7:7.
Ntango tozali kolanda toli yango mpe ‘totingami na mabondeli,’ tokoki kotya motema ete Tata na biso ya likoló azali koyoka biso mpe akoyanola na mabondeli na biso. (Kol. 4:2) Atako tokoki komona ete eyano na libondeli na biso ezali koumela, Yehova alaki ete akoyanola na libondeli na biso na ‘ntango oyo tozali na mposa ya lisalisi,’ elingi koloba, na ntango oyo ebongi. (Ebr. 4:16) Yango wana tosengeli soki moke te kopesa Yehova foti mpo ayanoli te na libondeli na biso na ntango oyo tokanisaki. Na ndakisa, bandá kala bato mingi babondelaka ete Bokonzi ya Nzambe esukisa mokili oyo mabe. Kutu Yesu alobaki ete tosengeli kobondela mpo na yango. (Mat. 6:10) Kasi ekozala mpenza bozoba soki totiki ete kondima na biso epai ya Nzambe elɛmba kaka mpo nsuka eyei te na ntango oyo tokanisi ete esengelaki koya! (Hab. 2:3; Mat. 24:44) Tomonisaka bwanya ndenge tokobaka kozela Yehova mpe totyaka motema ete akoyanola na mabondeli na biso. Nsuka ekoya mpenza na ntango oyo ebongi, mpamba te Yehova asilá kopona “mokolo mpe ngonga” mpo na yango. Mpe yango ekozala mpenza ntango oyo ebongi mpo na moto nyonso oyo alingaka Yehova.—Mat. 24:36; 2 Pe. 3:15. w21.08 10 par. 10-11
Mwamibale, 12 sanza ya 9
Na komikitisa bómonaka bamosusu ete baleki bino.—Flp. 2:3.
Mibange oyo bazali na komikitisa bayebaka ete wana mbula na bango ezali kopusana, bakoki te kosala mingi ndenge bazalaki kosala liboso. Tótalela ndakisa ya bakɛngɛli na biso ya zongazonga. Soki bakokisi mbula 70, basɛngaka bango bátika mokumba yango mpe básala makambo mosusu na ebongiseli ya Yehova. Atako bongo, bayebaka ete eleki malamu bilenge bákokisa mikumba yango. Na yango, bamonisaka ezaleli oyo Balevi bazalaki na yango na Yisraele ya kala. Mobeko esɛngaki bango ete soki bakokisi mbula 50, bátika mikumba oyo bazalaki kokokisa na tabernakle. Balevi yango bazalaki kosepela na mokumba nyonso oyo bazalaki kopesa bango, mpe bazalaki kokokisa yango na molende nyonso. Lisusu bazalaki kosala oyo bakoki mpo na kosalisa bilenge. (Mit. 8:25, 26) Lelo oyo, soki bakɛngɛli ya zongazonga bakokisi mbula 70, batikaka kokende kotala masangá. Atako bongo, basalisaka mpe balendisaka mpenza masangá na bango. w21.09 8-9 par. 3-4.
Mwamisato, 13 sanza ya 9
Tata, nasaleli likoló lisumu mpe nasaleli yo lisumu. Nabongi lisusu kobengama mwana na yo te.—Luka 15:21.
Na Luka 15:11-32, Yesu apesaki ndakisa ya kolendisa ya mwana oyo abungaki nzela. Elenge mobali yango atombokelaki tata na ye, alongwaki ndako mpe asalaki mobembo na “mokili moko ya mosika.” Kuna, akómaki na bomoi moko ya mbindo. Kasi nsima ya kokutana na mikakatano, akómaki kokanisa na bikateli ya mabe oyo azwaki. Akómaki kokanisa bomoi ya malamu oyo azalaki na yango ntango azalaki na ndako ya tata na ye. Ndenge Yesu amonisaki yango, elenge mobali yango ‘azongelaki makanisi ya malamu.’ Azwaki ekateli ya kozonga ndako mpe kosɛnga tata na ye bolimbisi. Ezalaki mpenza malamu ndenge mwana yango amonaki ete azwaki bikateli ya mabe. Mwana yango amonisaki ete abongolaki mpenza motema mpo na makambo mabe oyo asalaki. Ndakisa yango ezali kaka te lisapo moko ya kolendisa. Lisolo yango ezali na mateya mingi ya ntina oyo ekoki kosalisa bankulutu ntango bazali koluka koyeba soki moto moko oyo asalaki lisumu ya monene abongoli mpenza motema. w21.10 5-6 par. 14-15
Mwaminei, 14 sanza ya 9
Nakoningisa likoló mpe mabele.—Hag. 2:6.
Eloko nini ekoningana te to ekolongolama te? Ntoma Paulo akomaki boye: “Yango wana, lokola tosengeli kozwa bokonzi moko oyo ekoki koningana te, tókoba kosalela Nzambe mosala mosantu na ndenge endimami ná kobanga Nzambe ná nsɔmɔ.” (Ebr. 12:28) Ntango koningana yango ya nsuka ekosila, kaka Bokonzi ya Nzambe nde ekoningana te. (Nz. 110:5, 6; Dan. 2:44) Tozali lisusu na ntango ya kolekisa te! Bato basengeli kopona: Soki bakobi kopesa mokili oyo mabɔkɔ, bakobomama. Kasi soki baponi kosalela Yehova mpe basali bambongwana oyo esengeli, bakozwa bomoi ya seko. (Ebr. 12:25) Na nzela ya mosala na biso ya kosakola, tokoki kosalisa bato bázwa ekateli ya malamu. Mpe tóbosana te maloba oyo ya Nkolo na biso Yesu: “Nsango malamu oyo ya Bokonzi ekosakolama na mokili mobima esika bato bafandi mpo ezala litatoli na bikólo nyonso, bongo nsuka ekoya.”—Mat. 24:14. w21.09 19 par. 18-20
Mwamitano, 15 sanza ya 9
Nakotika yo soki moke te mpe nakosundola yo ata moke te.—Ebr. 13:5.
Bankulutu, bozali na mokumba monene ya kolendisa baoyo ndeko na bango ya libota atiki kosalela Yehova. (1 Tes. 5:14) Bózwaka bibongiseli mpo na kolendisa bango liboso mpe nsima ya makita. Bókendaka kotala bango mpe bóbondelaka mpo na bango. Bósakolaka elongo na bango, mpe na bantango mosusu, bóbengisaka bango na losambo na bino na kati ya libota. Bankulutu, bosengeli kotyelaka bampate ya Yehova oyo bazali na mawa makasi likebi, mpe komonisela bango motema mawa mpe bolingo oyo basengeli na yango. (1 Tes. 2:7, 8) Yehova “alingi moto ata moko te abomama kasi alingi nde bato nyonso bábongola motema.” (2 Pe. 3:9) Atako moto akoki kosala lisumu ya monene, bomoi na ye ezali kaka na motuya na miso ya Nzambe. Kobosana te ete Yehova afutaki eloko eleki motuya, elingi koloba bomoi ya Mwana na ye oyo alingaka mingi, mpo na mokomoko na biso. Na motema mawa na ye, Yehova alukaka kosalisa baoyo batiki lisangá mpo bázongela ye. Azalaka na elikya ete bakozongela ye, ndenge Yesu amonisaki yango na ndakisa ya mwana oyo abungá.—Luka 15:11-32. w21.09 30-31 par. 17-19
Mwapɔsɔ, 16 sanza ya 9
Bino bozwi litomba ya mosala na bango ya makasi.—Yoa. 4:38.
Mbala mosusu ozali kokoka lisusu te kosakola mingi ndenge ozalaki kosala liboso mpo ozali kobɛla to ozali lisusu na makasi mingi te. Atako bongo, okoki kaka kozala na esengo mpo na oyo ozali kosala. Tótala ndakisa ya Mokonzi Davidi, ntango ye ná mibali oyo bazalaki elongo na ye babikisaki mabota na bango mpe biloko na bango na mabɔkɔ ya Baamaleke. Mibali 200 balɛmbaki mpenza mpe bazalaki na makasi ya kobunda te, yango wana batikalaki mpo na kobatela bisaka. Davidi ná mibali oyo bazalaki elongo na ye balongaki etumba mpe babɔtɔlaki biloko ebele ya banguna na bango. Na nsima, Davidi apesaki mitindo ete baoyo bakendaki etumba ná baoyo bakendaki te, basengeli kokabola biloko ndenge moko. (1 Sa. 30:21-25) Ezali mpe bongo mpo na mosala na biso ya kokómisa bato bayekoli. Ndeko nyonso oyo asalaka oyo akoki na mosala ya kosakola akoki koyoka esengo mbala nyonso oyo moyekoli moko ya sika azwi batisimo. Yehova amonaka mosala makasi oyo tosalaka mpe ndenge oyo tolingaka ye mingi, mpe akopambola biso. Ateyaka biso mpe ndenge ya kozwa esengo na nyonso oyo tokoki kosala na mosala ya kosakola. (Yoa. 14:12) Tondimisami ete Nzambe akosepela na biso soki tolɛmbi te! w21.10 28 par. 15-17
Mwalomingo, 17 sanza ya 9
Kitoko ya bilenge ezali nguya na bango.—Mas. 20:29.
Wana tozali kokóma mibange, tokoki kobanga ete tokozala lisusu na likoki ya kosala mingi te na mosala ya Yehova ndenge tozalaki kosala liboso. Ata soki sikoyo tozali lisusu na makasi mingi te, tokoki kosalela bwanya mpe makambo oyo toyekolá mpe oyo tokutaná na yango na bomoi mpo na kosalisa bilenge básalela makoki na bango malamu mpe bázwa mikumba mosusu na ebongiseli ya Yehova. Bandeko oyo bakómi mibange basengeli kozala na komikitisa soki balingi kosalisa bilenge. Moto ya komikitisa amonaka ete basusu baleki ye. (Flp. 2:3, 4) Mibange oyo bazalaka na komikitisa bayebaka ete ekoki kozala na balolenge mingi ya kokokisa mokumba moko malamu mpe na boyokani na makomami. Na yango, bazelaka te ete moto nyonso asala likambo kaka ndenge bazalaki kosala yango na kala. (Mos. 7:10) Atako bazalaka na makambo mingi ya koyebisa bilenge, babosanaka te ete “makambo ya mokili oyo ezali kobongwana” mpe ekoki kosɛnga ete báyekola lolenge ya sika ya kosala makambo mosusu.—1 Ko. 7:31. w21.09 8-9 par. 1, 3
Mwayambo, 18 sanza ya 9
Nani kati na banzambe azali lokola yo, ee Yehova? Nani azali lokola yo, yo oyo oleki bosantu?—Kob. 15:11.
Yehova akosɛnga soki moke te basaleli na ye básala likambo moko oyo ekobebisa lokumu na bango. Azali mpenza mosantu. Yango emonisamaki polele na likomi oyo ezalaki na linzanza ya wolo likoló ya tirba ya nganga-nzambe monene. Linzanza yango ezalaki na maloba oyo: “Bosantu ezali ya Yehova.” (Kob. 28:36-38) Maloba oyo ezalaki likoló ya linzanza yango esengelaki kondimisa moto nyonso oyo akomona yango ete Yehova azali mpenza mosantu. Kasi tokoloba nini mpo na Moyisraele oyo akokaki komona maloba yango te mpo azalaki na likoki te ya kopusana penepene na nganga-nzambe monene? Ndenge nini alingaki koyeba ete Yehova azali mosantu? Ntango bazalaki kotánga Mobeko liboso ya mibali, basi, mpe bana, Moyisraele nyonso azalaki koyoka ete Yehova azali mosantu. (Mib. 31:9-12) Soki yo mpe ozalaka wana, na ntembe te olingaki koyoka maloba oyo: “Ngai nazali Yehova Nzambe na bino; mpe bosengeli . . . kozala basantu, mpamba te ngai nazali mosantu.” “Bosengeli kozala basantu mpo na ngai, mpamba te ngai Yehova nazali mosantu.”—Lev. 11:44, 45; 20:7, 26. w21.12 3 par. 6-7
Mwamibale, 19 sanza ya 9
Bótika kozala motema likolólikoló.—Luka 12:29.
Bato mosusu bakoki komitungisa mingi mpo na biloko na bango ya mosuni. Ekoki kozala ete bafandaka na ekólo moko ya bobola mpenza. Yango ekoki kosala ete ezala mpasi mpo bázwa mbongo mpo na kokokisa bamposa ya mabota na bango. Ekoki mpe kozala ete moto oyo azalaki kosalisa libota na mosuni akufá; yango ekómi mpasi mpo libota yango ezwa mbongo ya kokokisa bamposa na yango. Na esika tókóma komitungisa mingi mpo na mikakatano na biso, tosengeli nde kotyela Yehova motema. Kobosana te ete Yehova Tata na biso ya bolingo alaki ete akokokisa bamposa na biso ya mosuni soki totye makambo ya elimo na esika ya liboso. (Mat. 6:32, 33) Akokisaka ntango nyonso bilaka na ye. (Mib. 8:4, 15, 16; Nz. 37:25) Soki Yehova aleisaka bandɛkɛ mpe alatisaka bafolo, na ntembe te, tozali na ntina ya komitungisa te mpo na oyo tokolya to oyo tokolata! (Mat. 6:26-30; Flp. 4:6, 7) Ndenge kaka bolingo etindaka baboti bákokisa bamposa ya mosuni ya bana na bango, bolingo mpe etindaka Tata na biso ya likoló apesa biso oyo tosengeli na yango. w21.12 17 par. 4-5; 18 par. 8
Mwamisato, 20 sanza ya 9
Yehova azalaki kaka elongo na Yozefe mpe azalaki komonisela ye motema boboto.—Eba. 39:21.
Osilá koyoka mpasi makasi mpo na likambo oyo moto to ndeko moko ya lisangá asalaki yo? Tótalela ndakisa ya Yozefe oyo anyokwamaki mpo na makambo ya kozanga bosembo oyo bandeko na ye basalelaki ye. Akobaki kotya makanisi na ye nyonso na mosala ya Yehova; mpe Yehova apambolaki ye mpenza mpo amonisaki motema molai mpe ezaleli ya koyika mpiko. Nsukansuka, Yozefe alimbisaki baoyo bayokisaki ye mpasi mpe amonaki ndenge Yehova apambolaki ye. (Eba. 45:5) Lokola Yozefe, tozwaka libɔndisi ntango topusanaka penepene na Yehova mpe tozelaka ete asilisa makambo ya kozanga bosembo na ntango oyo ebongi. (Nz. 7:17; 73:28) Soki ozali koyika mpiko na makambo ya kozanga bosembo to moto moko apesi yo mpasi, kobosana te ete Yehova azalaka pene ya “baoyo motema ebukani.” (Nz. 34:18) Alingaka yo ndenge omonisaka motema molai mpe ndenge oyo obwakelaka ye mokumba na yo ya kilo. (Nz. 55:22) Azali Mosambisi ya mabele mobimba mpe amonaka makambo nyonso. (1 Pe. 3:12) Na yango, soki ozali kobunda na mikakatano ya makasi oyo okoki kosilisa te, kobosana te ete ezali na ntina. w21.08 11-12 par. 14; 12 par. 16
Mwaminei, 21 sanza ya 9
Bókoba kososola soki mokano ya Yehova ezali nini.—Ef. 5:17.
Ekozala bwanya kosalela bomoi na biso na ndenge oyo Yehova akosepela na biso. Tosengeli kotya makambo oyo eleki ntina na esika ya liboso. Na bantango mosusu, kosalela ntango na biso malamu ekoki kosɛnga kopona kati na makambo mibale oyo ezali mpenza mabe te. Tokoki komona yango na likambo oyo esalemaki ntango Yesu akendaki kotala Maria ná Marta. Na ntembe te Marta asepelaki mingi koyamba Yesu epai na bango, yango wana alukaki kolambela ye biloko ya malonga mpenza. Nzokande, ndeko na ye Maria amonaki malamu afanda pene ya Nkolo na ye Yesu mpe ayoka mateya na ye. Likambo oyo Marta asalaki ezalaki mabe te, kasi Yesu alobaki ete Maria “aponi eloko oyo ezali malamu.” (Luka 10:38-42) Nsima ya mikolo, ekoki kozala ete Maria abosanaki biloko oyo balyaki na libaku yango, kasi tondimi ete abosanaki ata mokolo moko te mateya oyo ayokaki epai ya Yesu. Kaka ndenge Maria azwaki na motuya mwa ntango oyo alekisaki elongo na Yesu, biso mpe tozwaka na motuya ntango oyo tolekisaka elongo na Yehova. w22.01 27 par. 5-6
Mwamitano, 22 sanza ya 9
Omoni ndenge Ahaba amikitisi mpo na ngai?—1 Bak. 21:29.
Atako Ahaba amikitisaki liboso ya Yehova, makambo oyo asalaki na nsima emonisaki ete abongolaki mpenza motema te. Asalaki ata eloko moko te mpo na kosilisa losambo ya Baala na bokonzi na ye. Mpe alendisaki losambo ya Yehova te. Nsima ya liwa ya Ahaba, Yehova amonisaki ndenge azalaki kotalela ye. Mosakoli ya Yehova, Yehu alobaki azali “moto mabe.” (2 Nt. 19:1, 2) Kanisá naino: Soki Ahaba abongolaka mpenza motema, mosakoli alingaki te koloba ete azalaki moto mabe oyo azalaki koyina Yehova. Ya solo, atako Ahaba amonisaki mwa moke mawa mpo na makambo oyo asalaki, kasi abongolaki mpenza motema te. Mateya nini tokoki kozwa na ndakisa ya Ahaba? Ntango Eliya ayebisaki Ahaba ete libota na ye ekozwa etumbu, na ebandeli, Ahaba amikitisaki. Yango ezalaki likambo ya malamu mpenza. Kasi makambo oyo asalaki na nsima, emonisaki ete abongolaki motema te. Kobongola motema ya solosolo esuki kaka te na koyoka mawa mpo na mwa ntango. w21.10 2-3 par. 4-5, 7-8
Mwapɔsɔ, 23 sanza ya 9
Nsango malamu oyo ya bokonzi ekosakolama.—Mat. 24:14.
Yisaya azalaki mosakoli, ekoki kozala ete mwasi na ye azalaki mpe mosakoli, mpo abengami “mosakoli mwasi.” (Yis. 8:1-4) Babalani yango batyaki losambo ya Yehova na esika ya liboso na bomoi na bango. Lelo oyo, babalani bakoki mpe kotya losambo ya Yehova na esika ya liboso na bomoi na bango soki bazali kosala nyonso oyo bakoki na mosala na ye. Bakoki kokómisa kondima na bango makasi epai ya Yehova soki bazali koyekola bisakweli ya Biblia elongo mpe komona ndenge oyo bisakweli yango ekokisamaka. (Tito 1:2) Bakoki kokanisa na oyo bakoki kosala mpo na kokokisa bisakweli mosusu ya Biblia. Na ndakisa, bakoki kopesa mabɔkɔ na esakweli oyo Yesu alobaki ete nsango malamu esengeli kosakolama na mabele mobimba liboso ete nsuka eya. Soki babalani bazali komona kokokisama ya bisakweli ya Biblia, bakokóma lisusu na ekateli makasi ya kosala oyo bakoki na mosala ya Yehova. w21.11 16-17 par. 9-10
Mwalomingo, 24 sanza ya 9
Alobaki na moyekoli yango ete: “Talá! Mama na yo!”—Yoa. 19:27.
Yesu azalaki komitungisa mpo na mama na ye, oyo mbala mosusu akómaki mwasi oyo mobali akufá. Lokola Yesu azalaki kolinga mpe komitungisa mpo na mama na ye, apesaki Yoane mokumba ya kobatela ye mpo ayebaki ete akokokisa mpe bamposa na ye ya elimo. Banda mokolo wana, Yoane akómaki lokola mwana ya Maria, mpe akómaki kobatela ye kaka lokola mama na ye moko. Yesu amonisaki mpenza bolingo makasi mpo na mwasi oyo abatelaki ye ntango abotamaki, mpe oyo atɛlɛmaki pene na ye ntango azalaki kokufa! Maloba ya Yesu ekoki koteya biso nini? Bolingo na biso mpo na bandeko na biso bakristo ekoki kozala makasi koleka ndenge oyo tolingaka bato ya libota na biso. Bandeko na biso ya libota bakoki kotɛmɛla to mpe kosundola biso. Kasi ndenge Yesu alakaki yango, soki tokangami na Yehova mpe ebongiseli na ye, tokozwa “mbala nkama moko” koleka oyo tobungisi. Mingi bakokóma lokola bana na biso ya mibali, bana na biso ya basi, bamama to mpe batata na biso. (Mrk. 10:29, 30) Omiyokaka ndenge nini lokola ozali na kati ya lisangá mobimba ya bandeko oyo bazali na bomoko mpo bandimelaka Yehova, balingaka ye, mpe bamoniselanaka bolingo?—Kol. 3:14; 1 Pe. 2:17. w21.04 9-11 par. 7-8
Mwayambo, 25 sanza ya 9
Bóbosana te kosala malamu mpe kokabela bamosusu biloko.—Ebr. 13:16.
Bolingo ya sembo etindaka biso tósala mingi koleka mpo na kosalisa basusu. Lelo oyo mpe, bandeko na biso mingi bandimaka komonisela basusu bolingo ya sembo; basalaka yango ata epai ya bandeko oyo bayebi te. Na ndakisa, soki bayoki ete likama moko ekweli bandeko, na mbala moko balukaka ndenge ya kosalisa bango. Lisusu, soki bayoki ete ndeko moko ya lisangá azali na mikakatano ya mbongo, balukaka mbala moko ndenge oyo bakoki kosalisa ye. Ndenge moko na bakristo ya Masedonia ya siɛklɛ ya liboso, basalaka mingi koleka mpo na kosalisa bango. Bamipimelaka makambo mosusu mpe bapesaka “koleka ata makoki na bango mpenza” mpo na kosalisa bandeko na bango oyo bazali na bosɛnga. (2 Ko. 8:3) Lelo oyo mpe, bankulutu oyo batyelaka bandeko ya lisangá likebi, bapesaka longonya na ntango ebongi na bandeko ya lisangá oyo basalisaka basusu. Yango epesaka bandeko yango makasi oyo basengeli na yango mpo bálɛmba te.—Yis. 32:1, 2. w21.11 11 par. 14; 12 par. 21
Mwamibale, 26 sanza ya 9
Sembolá litoi na yo mpe yoká maloba ya bato ya bwanya.—Mas. 22:17.
Biso nyonso tozalaka mbala na mbala na mposa ya toli. Na bantango mosusu, biso moko tokoki kosɛnga toli epai ya moto oyo tomemyaka. Na bantango mosusu mpe ndeko moko oyo azali komitungisa mpo na biso akoki koyebisa biso ete etikali moke ‘tóbɛta libaku’ elingi koloba, tósala likambo oyo ekopesa biso mawa na nsima. (Gal. 6:1) To mpe, toli mosusu ekozala nde mpo na kosembola biso mpo tosalaki libunga moko ya monene. Ata soki epesami mpo na ntina nini, tosengeli koyoka toli. Kosala bongo ezali mpo na bolamu na biso mpe ekoki kobikisa bomoi na biso! (Mas. 6:23) Mokapo na biso ya lelo elendisi biso ‘tóyoka maloba ya bato ya bwanya.’ Moto moko te ayebi makambo nyonso; ezalaka kaka na moto oyo aleki biso na boyebi to asalá makambo mingi koleka biso. (Mas. 12:15) Na yango, koyoka toli ekomonisa ete tozali na komikitisa. Ekomonisa ete toyebi esika makoki na biso esuki mpe toyebi ete tozali na mposa ya lisalisi mpo tókokisa mikano na biso. Salomo, oyo azalaki mokonzi ya bwanya, akomaki boye: “Ntango bapesi-toli bazali ebele likambo elongaka.”—Mas. 15:22. w22.02 8 par. 1-2
Mwamisato, 27 sanza ya 9
Ye oyo azali kozipa makambo na ye oyo ebuki mibeko akolonga te, kasi ye oyo ayamboli mpe atiki yango akoyokelama mawa.—Mas. 28:13.
Kobongola motema ya solosolo esuki kaka te na koyoka mawa mpo na makambo ya mabe oyo tosalaki. Esɛngaka mpe ete moto abongola makanisi mpe mayoki na ye mpe asala makambo oyo emonisi ete abongoli mpenza motema. Yango esɛngi kotika makambo ya mabe mpe kotosa mitinda ya sembo ya Yehova. (Ezk. 33:14-16) Likambo eleki ntina oyo mosumuki asengeli kosala, ezali ya kozongisa boyokani ya malamu elongo na Yehova. Tosengeli kosala nini soki toyebi ete moninga na biso moko ya motema asali lisumu ya monene? Tokoluka nde kobomba lisumu oyo moninga yango asalaki? Kosala bongo esimbaka te mpo Yehova azali komona. (Mas. 5:21, 22) Okoki kosalisa moninga na yo soki oyebisi ye ete bankulutu bakosepela kosalisa ye. Soki moninga na yo aboyi koyebisa bankulutu likambo yango, ekozala malamu oyebisa bankulutu likambo yango mpo na komonisa ete olingi kosalisa ye. w21.10 7 par. 19-21
Mwaminei, 28 sanza ya 9
Bótyaka likebi kaka na makambo na bino moko te, kasi bótyaka mpe likebi na makambo ya bamosusu.—Flp. 2:4.
Biso nyonso tokoki koyekola komekola elimo ya komipimela ya Yesu. Biblia elobi ete “akómaki lokola moombo.” (Flp. 2:7) Moombo to mosali ya malamu alukaka mabaku ya kosepelisa nkolo na ye. Lokola ozali moombo ya Yehova mpe olingaka kosalela bandeko, na ntembe te mposa na yo ezali ete okóma lisusu na ntina mingi mpo na Yehova mpe bandeko na yo. Omituna boye: ‘Nandimaka mpenza kotika makambo na ngai pembeni mpo na kosalisa basusu? Nandimaka mbala moko kopesa mabɔkɔ ntango basɛngi bato bákende kotya bopɛto na esika oyo liyangani ekosalema to mpo na kobongisa Ndako ya Bokonzi?’ Soki omoni ete osengeli kobongisa makambo mosusu na oyo etali komonisa elimo ya komipimela, kasi ozali koyeba te obanda wapi, okoki kosala nini? Bondelá Yehova na motema mobimba. Kobombela ye eloko te. Yebisá ye ndenge oyo ozali komiyoka, mpe sɛngá ye asalisa yo mpo ‘olinga mpe osala.’—Flp. 2:13. w22.02 23 par. 9-11
Mwamitano, 29 sanza ya 9
Nakopemisa bino.—Mat. 11:28.
Yesu amonisaki boboto na ndenge azalaki makambo makasimakasi te, ata ntango ezalaki mpasi kosala yango. (Mat. 11:29, 30) Na ndakisa, ntango mwasi moko Mofenisia asɛngaki ye abikisa mwana na ye, na ebandeli Yesu aboyaki kosala likambo oyo asɛngaki, kasi ntango mwasi yango amonisaki kondima monene, na boboto nyonso, Yesu abikisaki mwana yango. (Mat. 15:22-28) Atako Yesu azalaki na boboto, azalaki kokanga miso na mabe te. Na bantango mosusu, amonisaki boboto na ndenge asembolaki baoyo azalaki kolinga. Na ndakisa, ntango Petro alukaki kopekisa Yesu asala mokano ya Yehova, Yesu apamelaki ye na miso ya bayekoli mosusu. (Mrk. 8:32, 33) Asalaki yango mpo na kosambwisa ye te, kasi nde mpo na koteya ye mpe kokebisa bayekoli mosusu báboya ezaleli ya lofundo. Na ntembe te, Petro ayokaki mwa nsɔni, kasi disiplini yango esalisaki ye. Mpo na komonisela bato oyo olingaka boboto, na bantango mosusu ekosɛnga ete oyebisaka bango makambo polele. Ntango ozali kosala bongo, mekolá Yesu mpe pesá batoli oyo euti na Liloba ya Nzambe. w22.03 11 par. 12-13
Mwapɔsɔ, 30 sanza ya 9
Tópesa Nzambe mbeka ya lisanzoli ntango nyonso, elingi koloba, mbuma ya mbɛbu na biso oyo ezali kosakola nkombo na ye polele.—Ebr. 13:15.
Kosanzola Yehova ezali na kati ya losambo na biso. (Nz. 34:1) Tosanzolaka Yehova ntango tozali kolobela na esengo bizaleli na ye kitoko mpe misala na ye. Tokozala na makambo mingi ya malamu ya koloba mpo na Yehova soki motema na biso ezali na botɔndi. Soki tozali kozwa ntango ya komanyola bolamu ya Yehova, elingi koloba makambo nyonso oyo asaleli biso, tokozanga ata mokolo moko te likambo ya koloba mpo na kosanzola ye. Mingimingi mosala ya kosakola epesaka biso libaku malamu ya ‘kopesa Nzambe mbeka ya lisanzoli, elingi koloba, mbuma ya mbɛbu na biso.’ Kaka ndenge tosengeli kokanisaka liboso makambo oyo tokoyebisa Yehova na libondeli, tosengeli mpe kokanisaka malamu makambo oyo tokoyebisa bato oyo tokosolola na bango na mosala ya kosakola. Tolingaka ete “mbeka [na biso] ya lisanzoli” ezala ya malamu koleka. Yango wana toyebisaka bato mateya ya solo na esengo mpenza. w22.03 21 par. 8