Sanza ya 10
Mwalomingo, 1 sanza ya 10
Esengo na moto oyo azwi ata eloko moko te ya kobɛta libaku epai na ngai.—Mat. 11:6.
Makambo oyo toteyaka mpe oyo tondimaka eutaka na Biblia. Atako bongo, bato mingi baboyaka kondima mateya na biso mpo tosalaka te milulu oyo ekamwisaka bato na losambo na biso. Lisusu, toteyaka te makambo oyo bazalaka na mposa ya koyoka. Oyo tosengeli kosala mpo tóbungisa kondima na biso te. Ntoma Paulo ayebisaki bakristo ya Roma ete: “Kondima eutaka na likambo oyo moto ayoki. Mpe likambo oyo moto ayoki eyaka na nzela ya liloba ya Kristo.” (Rom. 10:17) Yango wana, tokokómisa kondima na biso makasi soki tozali koyekola Makomami, kasi te soki tozali kosangana na milulu oyo euti na mimeseno ya bapakano ata soki bato mingi basepelaka na yango. Tosengeli kokómisa kondima na biso makasi na nzela ya boyebi ya sikisiki mpo ‘soki moto azali na kondima te akoki kosepelisa Nzambe ata moke te.’ (Ebr. 11:1, 6) Na yango, tosengeli te koluka komona elembo oyo euti na likoló mpo tóndima ete tozali na solo. Koyekola na mozindo mateya ya Biblia oyo ekómisaka kondima makasi, ekoki kosalisa biso tóndima ete tozali na solo mpe tólongola bantembe nyonso. w21.05 4-5 par. 11-12
Mwayambo, 2 sanza ya 10
Makambo na ngai etamboli malamu mpo nsango malamu ekende liboso.—Flp. 1:12.
Ntoma Paulo akutanaki na mikakatano mingi. Azalaki mpenza na mposa ete Yehova asalisa ye ntango banguna na ye babɛtaki ye, batyaki ye na bolɔkɔ, mpe balukaki ata koboma ye. (2 Ko. 11:23-25) Paulo ayokaki nsɔni te mpo na koloba ete na bantango mosusu asengelaki kosala makasi mpo abundisa ezaleli ya kolɛmba nzoto. (Rom. 7:18, 19, 24) Azalaki mpe na maladi moko oyo ezalaki lokola “nzubɛ moko na kati ya mosuni” na ye, mpe azalaki na mposa ete Nzambe alongola yango. (2 Ko. 12:7, 8) Yehova apesaki Paulo makasi mpo akokisa mokumba na ye atako akutanaki na mikakatano mingi. Tótalela makambo oyo Paulo akokisaki. Na ndakisa, ntango azalaki mokangami na ndako moko na Roma, asakolaki nsango malamu na molende liboso ya bakonzi ya Bayuda mpe ntango mosusu liboso ya bakonzi ya Leta. (Mis. 28:17; Flp. 4:21, 22) Asakwelaki mpe bakɛngɛli mingi ya mokonzi, ata mpe bato nyonso oyo bazalaki koya kotala ye. (Mis. 28:30, 31; Flp. 1:13) Kaka na ntango yango, Nzambe asalelaki ye mpo akoma mikanda oyo esalisaki bakristo ya ntango ya kala, mpe oyo ezali kosalisa biso lelo oyo. w21.05 21 par. 4-5
Mwamibale, 3 sanza ya 10
“Bókende mosika te koleka makambo oyo ekomamá,” mpo mokomoko na bino avimba na lolendo te.—1 Ko. 4:6.
Lolendo etindaki Uzia, mokonzi ya Yuda, aboya koyoka toli mpe asala likambo oyo azalaki te na lotomo ya kosala. Uzia asalaki makambo mingi ya malamu. Alongaki bitumba mingi, atongaki bingumba ebele mpe azalaki na bilanga ebele. “Nzambe ya solo asalaki ete makambo na ye etambola malamu.” (2 Nt. 26:3-7, 10) Kasi Biblia elobi: “Ntango kaka akómaki makasi, motema na ye ekómaki na lolendo.” Yehova apesaki mobeko ete kaka banganga-nzambe nde bazalaki na ndingisa ya kotumba mpaka ya malasi na tempelo. Kasi na lofundo nyonso, Mokonzi Uzia akendaki na tempelo mpo na kotumba mpaka ya malasi. Yehova asepelaki te mpe apesaki ye maladi ya maba. (2 Nt. 26:16-21) Lolendo ekoki kotinda biso mpe tósala lisumu oyo Uzia asalaki? Ee, ekoki kosalema soki tozali kokanisa mingi mpo na biso moko. Tóbosana te ete ezala makoki to mokumba nini oyo tozali na yango na kati ya lisangá eutaka nde epai ya Yehova. (1 Ko. 4:7) Soki tozali na lolendo, Yehova akosalela biso te. w21.06 16-17 par. 7-8
Mwamisato, 4 sanza ya 10
Bósepela na likambo oyo te ete bilimo ezali kotosa bino, kasi bósepela nde mpo bankombo na bino ekomami na likoló.—Luka 10:20.
Yesu ayebaki ete bayekoli na ye bakokutana kaka na makambo ya malamu te na mosala ya kosakola. Kutu, kati na baoyo bayokaki bayekoli yango, toyebi te soki bato boni bakómaki bandimi. Bayekoli ya Yesu basengelaki kosepela kaka te mpo bato bazalaki koyoka bango, kasi nde mpo Yehova azalaki kosepela na milende na bango. Soki toyiki mpiko na mosala na biso, tokozwa bomoi ya seko. Ntango tosalaka oyo tokoki mpo na kolona mboto ya Bokonzi, “tolonaka mpe mpo na elimo” na ndenge totikaka ete elimo ya Nzambe esala na bomoi na biso. Soki ‘totiki te’ mpe “tolɛmbi te,” Yehova alaki ete akopesa biso bomoi ya seko ata soki tosalisi moto moko azwa batisimo to te.—Gal. 6:7-9. w21.10 26 par. 8-9
Mwaminei, 5 sanza ya 10
Mawa ekangaki ye mpo na bango . . . Mpe abandaki koteya bango makambo mingi.—Mrk. 6:34.
Mokolo moko, Yesu ná bayekoli na ye balɛmbaki nsima ya kosakola mingi. Bazalaki na mposa ya kokende na esika moko mpo bápema. Kasi, ebele ya bato bamonaki bango. Yesu ayokelaki bango mawa mpe abandaki koteya bango “makambo mingi.” Mpo amityaki na esika na bango. Amonaki ndenge bazalaki konyokwama mpe bazangaki elikya, yango wana azalaki na mposa ya kosalisa bango. Lelo oyo, bato mingi bazali mpe bongo. Kotika te ndenge oyo bazali komonana na miso ekosa yo. Bazali lokola bampate oyo esundolami mpe ezangi mobateli mpo na kotambwisa yango. Ntoma Paulo alobaki ete bato ya lolenge wana bazali na Nzambe te mpe bazangi elikya. (Ef. 2:12) Ntango tomonaka ndenge bato ya teritware na biso bazalaka na boyokani ya malamu te ná Nzambe, bolingo mpe motema mawa etindaka biso tósalisa bango. Mpe lolenge eleki malamu ya kosalisa bango, ezali ya kosɛnga tóyekola na bango Biblia. w21.07 5 par. 8
Mwamitano, 6 sanza ya 10
Tólukaka te komimonisa ete toleki bamosusu, . . . koyokelana likunya.—Gal. 5:26.
Moto oyo amimonaka ete aleki basusu, azalaka na lolendo mpe alukaka kaka matomba na ye moko. Moto ya likunya alukaka kaka te kozwa eloko oyo moto mosusu azali na yango, kasi alingaka mpe ete moto yango azanga eloko yango. Ya solo mpenza, koyokela moto likunya ezali koyina ye. Ezaleli ya komimona ete toleki basusu mpe likunya ezali lokola bansɛlɛlɛ oyo ezali kolya mabaya ya nsamba ya ndako. Ata soki ndako yango ezali komonana kitoko, kasi lokola bansɛlɛlɛ ezali kolya mabaya ya nsamba na yango, nsukansuka ndako yango ekokwea. Ndenge moko mpe, moto akoki kosalela Yehova bambula mingi, kasi soki atiki ete ezaleli ya komimona ete aleki basusu mpe likunya etambwisa ye, yango ekoki kobimisela ye makama mpe nsukansuka akokwea. (Mas. 16:18) Akotika kosalela Yehova mpe akobimisela basusu mpasi. Tokoki kobundisa ezaleli ya komimona ete toleki basusu soki tosaleli toli oyo ntoma Paulo apesaki: “Bósala eloko moko te na kowelana to mpo bozali komimona ete boleki bamosusu, kasi na elimo ya komikitisa bómonaka bamosusu ete baleki bino.”—Flp. 2:3. w21.07 15-16 par. 6-8
Mwapɔsɔ, 7 sanza ya 10
Nsango malamu oyo tozali kosakola eyaki epai na bino kaka na maloba te kasi mpe na nguya mpe na elimo santu mpe na kondima makasi.—1 Tes. 1:5.
Bato mosusu bakanisaka ete lingomba ya solo esengeli koyanola na mituna nyonso, ata oyo biyano na yango ezali na Biblia te. Ezali mpenza malamu kokanisa bongo? Tótalela ndakisa ya ntoma Paulo. Alendisaki baninga na ye bakristo ete ‘báluka koyeba likambo nyonso,’ kasi alobaki mpe ete ezalaki na makambo mingi oyo azalaki kokanga ntina na yango te. (1 Tes. 5:21) Akomaki boye: “Tozali na boyebi ya ndambo.” Abakisaki lisusu boye: “Tozali komona bandelo molilimolili na talatala ya ebende.” (1 Ko. 13:9, 12) Ndenge moko na Paulo, biso mpe tokangaka ntina ya makambo nyonso te. Kasi Paulo ayebaki mateya ya moboko oyo etali Yehova. Ayebaki makambo mingi oyo endimisaki ye ete azalaki na kati ya solo! Mpo na komindimisa ete tozali mpenza na kati ya solo, tosengeli kokokanisa lolenge oyo biso Batatoli ya Yehova tosambelaka Nzambe ná lolenge oyo Yesu azalaki kosambela ye. w21.10 18-19 par. 2-4
Mwalomingo, 8 sanza ya 10
Nsima ya mbula ntuku mitano (50), akotika.—Mit. 8:25.
Bandeko oyo bokómi mibange, ezala bozali na mosala ya ntango nyonso to te, bokoki kosala makambo mingi mpo na kosalisa basusu. Na ndenge nini? Bómesana na lolenge ya bomoi oyo bokómi na yango, bómityela mikano ya sika, mpe bótya makanisi na bino kaka na makambo oyo bokokoka kosala. Mokonzi Davidi azalaki mpenza na mposa ya kotongela Yehova ndako. Kasi ntango Yehova ayebisaki ye ete akopesa mokumba yango na elenge Salomo, Davidi andimaki ekateli oyo Yehova azwaki mpe na motema moko, apesaki mabɔkɔ na mosala yango. (1 Nt. 17:4; 22:5) Davidi amonaki te ete ye nde abongaki na mokumba yango mpo Salomo azalaki ‘elenge mpe azalaki naino makasi te.’ (1 Nt. 29:1) Davidi ayebaki ete mpo tempelo yango etongama, ezalaki kotalela te mbula mpe mayele ya bato oyo bazalaki kokamba mosala yango, kasi nde lipamboli ya Yehova. Ndenge moko na Davidi, bandeko oyo bakómi mibange bakobaka kozala na molende na mosala ya Yehova ata ntango mokumba na bango ebongwani. Bayebaka ete Yehova akopambola bilenge oyo bazali kokokisa mikumba oyo bazalaki na yango liboso. w21.09 9 par. 4; 10 par. 5, 8
Mwayambo, 9 sanza ya 10
Akotambwisa bato ya komikitisa na ekateli na ye ya lisambisi, mpe akoteya bato ya komikitisa nzela na ye.—Nz. 25:9.
Soki tomityeli mikano ya elimo, bomoi na biso ekozala na ntina mpe tokosalela yango malamu. Kasi tosengeli komityela mikano oyo tozali na likoki ya kokokisa. Tosengeli kaka te komityela mikano ndenge moko na basusu. Soki tosali bongo, tokoki kolɛmba nzoto. (Luka 14:28) Lokola ozali mosaleli ya Yehova, ozali na motuya na kati ya libota na ye, mpe ezali na moto mosusu te oyo akokani na yo. Soki Yehova abendaki yo epai na ye, ezali te mpo ozalaki na ntina mingi koleka bato mosusu. Abendaki yo mpo ntango atalaki motema na yo, amonaki ete ozali na komikitisa, okondima ete ateya mpe abongisa yo. Yebá ete asepelaka ntango osalaka oyo okoki mpo na kosalela ye. Ezaleli na yo ya koyika mpiko mpe bosembo na yo emonisi ete “ozali na motema ya kitoko mpe ya malamu.” (Luka 8:15) Na yango, kobá kopesa Yehova oyo eleki malamu. Yango ekosala ete ozala na ntina ya kosepela ‘mpo na yo moko.’—Gal. 6:4. w21.07 24 par. 15; 25 par. 20
Mwamibale, 10 sanza ya 10
Moto oyo alongoli mosumuki na nzela ya libunga na ye akobikisa molimo na ye.—Yak. 5:20.
Tosengeli ntango nyonso kozala na motema molai ntango tozali kozela makambo ekatama na bosembo. Na ndakisa, ntango bankulutu bayebi ete ndeko moko asalaki lisumu ya monene, babondelaka mpe balukaka “bwanya oyo euti na likoló” mpo báyeba likanisi ya Yehova na likambo yango. (Yak. 3:17) Mokano na bango ezalaka ya kosalisa mosumuki alongwa “na nzela ya libunga na ye” soki esengeli. (Yak. 5:19, 20) Basalaka mpe nyonso oyo ekoki mpo na kobatela lisangá mpe kobɔndisa baoyo likambo yango epesaki bango mpasi. (2 Ko. 1:3, 4) Mpe ntango bankulutu bayebi ete lisumu moko ya monene esalemaki, basengeli koluka liboso koyeba ndenge makambo esalemaki; yango ekoki kozwa mwa ntango. Na nsima, babondelaka mpe bapesaka toli oyo euti na Makomami mpe basembolaka mosumuki yango “na ndenge oyo ekoki.” (Yir. 30:11) Bankulutu basengeli mpe te kozwa ekateli nokinoki. Ntango bankulutu balandaka litambwisi ya Yehova, bandeko nyonso ya lisangá bazwaka mpenza litomba. w21.08 10-11 par. 12-13
Mwamisato, 11 sanza ya 10
Epai okokende, ngai mpe nakokende . . . Bato na yo bakozala bato na ngai, mpe Nzambe na yo Nzambe na ngai.—Ruta 1:16.
Lokola nzala makasi ekɔtaki na Yisraele, Naomi ná mobali na ye mpe bana na bango mibale ya mibali bakendaki kofanda na Moabe. Kuna, mobali ya Naomi akufaki. Bana na bango mibale babalaki, kasi likambo ya mawa, bango nyonso mibale mpe bakufaki. (Ruta 1:3-5) Makambo yango elɛmbisaki mpenza Naomi nzoto mpe esilisaki ye mayele. Atungisamaki mingi mpenza mpe akómaki kokanisa ete Yehova asambwisaki ye. Amonisaki ndenge oyo azalaki komiyoka mpo na Nzambe na maloba oyo: “Lobɔkɔ ya Yehova ebɛti ngai.” “Mozwi-ya-Nguya-Nyonso akómiseli ngai makambo bololo mpenza.” Alobaki lisusu boye: “Yehova asambwisi ngai mpe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso ayeiseli ngai mpasi.” (Ruta 1:13, 20, 21) Yehova ayebaki ete “monyoko ekoki kotinda moto ya bwanya asala lokola moto ya ligboma.” (Mos. 7:7) Atindaki Ruta amonisela ye bolingo ya sembo. Ruta andimaki komonisela Naomi bolingo ya sembo, mpe na boboto nyonso, asalisaki ye mpo alɛmba nzoto mingi te mpe ayeba ete Yehova azalaki kaka kolinga ye. w21.11 9-10 par. 9-10, 13
Mwaminei, 12 sanza ya 10
Akoba kosɛnga Nzambe.—Yak. 1:5.
Soki totye makanisi na biso nyonso na mikumba oyo tozali na yango sikoyo, yango elakisi ete tosengeli koluka te kosala lisusu mingi na mosala ya Yehova? Te! Tosengeli komityela mikano oyo ekosala ete tókóma basakoli mpe bateyi ya malamu koleka, mpe tósalisa bandeko na biso bakristo. Tokokokisa mokano yango soki na komikitisa nyonso tozali kosalela basusu na esika ya kosala mpo na biso moko. (Mos. 11:2; Mis. 20:35) Okoki komityela mikano nini? Sɛngá Yehova asalisa yo mpo oyeba mikano oyo okozala na likoki ya kokokisa. (Mas. 16:3) Okoki komityela mokano ya kokóma mobongisi-nzela mosungi to ya sanza na sanza, kosala na Betele, to na mosala ya kotonga bandako mpo na mosala ya Bokonzi. To mpe okoki koyekola monɔkɔ mosusu mpo na kosakola nsango malamu to kokende kosakola na teritware mosusu. w21.08 23-24 par. 14-15
Mwamitano, 13 sanza ya 10
Motema boboto ya [Yehova] ezali seko na seko.—Nz. 136:1.
Bolingo ya sembo ezali na ntina mingi na miso ya Yehova. (Hos. 6:6) Na nzela ya mosakoli Mika, Nzambe asɛngi biso ‘tólinga boboto’ to bolingo ya sembo. (Mika 6:8) Kasi liboso tólinga bolingo ya sembo, tosengeli naino koluka koyeba soki ezali nini. Na Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika ya Anglais, maloba “bolingo ya sembo” ezali mbala soki 230. Bolingo ya sembo elimboli nini? Elimboli kolinga moto makasi mpenza, kokangama na ye makasi, kozala sembo epai na ye mpe kozala ntango nyonso elongo na ye. Mbala mingi esalelamaka mpo na kolobela bolingo oyo Nzambe azalaka na yango mpo na bato. Bato mpe bakoki komonisela yango basusu. Yehova azali ndakisa eleki malamu na likambo etali komonisa bolingo ya sembo. Yango wana, Mokonzi Davidi alobaki ete: “Ee Yehova, motema boboto na yo ezali na likoló . . . Ee Nzambe, motema boboto na yo ezali mpenza kitoko!” (Nz. 36:5, 7) Osepelaka mpe na bolingo ya sembo ya Nzambe lokola Davidi? w21.11 2 par. 1-2; 3 par. 4
Mwapɔsɔ, 14 sanza ya 10
Yango wana, bosengeli kobondela boye: “Tata na biso na likoló, nkombo.”—Mat. 6:9.
Yesu, “Mwana ya liboso na biloko nyonso oyo ezalisamá,” mpe ebele ya baanzelu bazali na kati ya libota ya basambeli ya Yehova. (Kol. 1:15; Nz. 103:20) Ntango Yesu azalaki awa na mabele, asalisaki bato ya sembo báyeba ete bakoki kobenga Yehova Tata na bango. Ntango azalaki kosolola na bayekoli na ye, Yesu abengaki Yehova “Tata na ngai mpe Tata na bino.” (Yoa. 20:17) Ntango moto amipesi na Yehova mpe azwi batisimo, akɔtaka na libota ya bandeko oyo balinganaka mpenza. (Mrk. 10:29, 30) Yehova azali Tata ya bolingo. Yesu alingi tótalelaka Yehova ndenge oyo atalelaka ye, elingi koloba, lokola moboti ya boboto mpe ya bolingo oyo tokoki kosolola na ye ntango nyonso. Kasi alingi te tótalelaka ye lokola mokonzi moko oyo azangá boboto. Abandaki libondeli ya ndakisa na maloba oyo: “Tata na biso.” Yesu akokaki koyebisa biso tósalela batitre ya lokumu oyo Biblia elobeli mpo na kobenga Yehova. Na ndakisa, “Mozwi-ya-Nguya-Nyonso,” “Mozalisi,” to “Mokonzi ya seko.” (Eba. 49:25; Yis. 40:28; 1 Tim. 1:17) Kasi ayebisaki biso tóbengaka Yehova “Tata.” w21.09 20-21 par. 1, 3
Mwalomingo, 15 sanza ya 10
Manase ayaki koyeba ete Yehova azali Nzambe ya solo.—2 Nt. 33:13.
Mokonzi Manase aboyaki koyoka makebisi oyo Yehova apesaki ye na nzela ya basakoli na ye. Nsukansuka, ‘Yehova amemelaki bato ya Yuda bakonzi ya limpinga ya mokonzi ya Siri, bongo bazwaki Manase na mabulu, mpe bakangaki ye na bikangeli mibale ya motako mpe bamemaki ye na Babilone.’ Wana azalaki mokangami na mboka-mopaya, emonani ete Manase akanisaki na mozindo na makambo oyo asalaki. Na nsima, “amikitisaki mingi mpo na Nzambe ya bankɔkɔ na ye.” Kasi asukaki wana te. “Akitisaki Yehova Nzambe na ye motema.” Kutu, Manase “azalaki kobondela Ye.” (2 Nt. 33:10-12) Nsukansuka, Yehova ayanolaki na mabondeli ya Manase. Amonaki ete Manase abongolaki mpenza motema, ndenge mabondeli na ye emonisaki yango. Na yango, Yehova ayokaki malɔmbɔ oyo Manase asalaki mpo na kosɛnga bolimbisi, mpe azongisaki ye lisusu na bokonzi. Manase asalaki oyo akoki mpo na komonisa ete abongolaki mpenza motema. w21.10 4 par. 10-11
Mwayambo, 16 sanza ya 10
Bato mibale baleki moto moko, mpo bazali na mbano malamu na mosala na bango ya makasi.—Mos. 4:9.
Akila ná Prisile basengelaki kotika esika oyo bamesanaki kofanda mpe kokende kosala mosala na bango ya kotonga bahema na esika mosusu. Ntango bakómaki na esika oyo basengelaki kofanda na Korinti, Akila ná Prisile bapesaki mabɔkɔ na lisangá na bango ya sika mpe basalaki elongo na ntoma Paulo mpo na kolendisa bandeko. Na nsima, bakendaki na engumba mosusu epai mposa ya basakoli ezalaki monene. (Mis. 18:18-21; Rom. 16:3-5) Na ntembe te bazalaki na bomoi ya esengo mpe na makambo mingi ya kosala! Lelo oyo, babalani bakoki komekola Akila ná Prisile soki bazali kotya matomba ya Bokonzi na esika ya liboso. Ntango ya malamu oyo babalani basengeli kolobela mikano oyo basengeli komityela na bomoi na bango ezali ntango bazali bafianse. Soki babalani bazwi bikateli elongo mpe basali nyonso bákokisa mikano ya elimo elongo, bakomona ndenge elimo ya Yehova ekosala na bomoi na bango.—Mos. 4:12. w21.11 17-18 par. 11-12
Mwamibale, 17 sanza ya 10
Bokobanga moto na moto mama na ye mpe tata na ye . . . Ngai nazali Yehova Nzambe na bino.—Lev. 19:3.
Ya solo, tosengeli kozwa na lisɛki te mobeko ya Nzambe oyo esɛngi tótosaka baboti na biso. Kobosana te ete mobeko oyo ezali na Balevi 19:3, oyo esɛngi biso tókumisa tata ná mama, eyei na nsima ya mobeko oyo elobi: “Bokozala basantu, mpamba te ngai, Yehova Nzambe na bino, nazali mosantu.” (Lev. 19:2) Soki tokanisi mobeko oyo Yehova apesaki ya kokumisa baboti na biso, tokoki komituna boye: ‘Nakumisaka mpenza baboti na ngai?’ Soki omoni ete osalaka yango te, sikoyo nde ntango ya kobongisa makambo. Ya solo, okoki te kobongola makambo oyo eleká. Kasi okoki sikoyo kozwa ekateli ya kosalisa baboti na yo lisusu mingi. Na ndakisa, okoki kozwa bibongiseli mpo olekisaka ntango mingi elongo na bango. Okoki mpe kopesa bango mwa mbongo mpo básomba biloko oyo basengeli na yango, kosalisa bango bázala na boyokani makasi ná Yehova, mpe kolendisa bango. Soki osali bongo, yango ekomonisa ete ozali kotosa maloba oyo ezali na Balevi 19:3. w21.12 4-5 par. 10-12
Mwamisato, 18 sanza ya 10
Bótika kosambisa.—Mat. 7:1.
Mokonzi Davidi asalaki mabunga minene. Na ndakisa, Davidi asalaki ekobo ná Bate-sheba, mpe abomisaki kutu mobali na ye. (2 Sa. 11:2-4, 14, 15, 24) Likambo yango ememelaki kaka ye moko mpasi te, kasi mpe libota na ye ata mpe basi na ye mosusu. (2 Sa. 12:10, 11) Mokolo mosusu, Davidi azangaki kotyela Yehova motema mobimba na ndenge apesaki mitindo ete bátánga basoda ya Yisraele. Yango ebimisaki makambo nini? Maladi mabe ebomaki Bayisraele soki 70 000! (2 Sa. 24:1-4, 10-15) Olingaki kokanisa ete Yehova asengeli kolimbisa Davidi te? Yehova asalaki bongo te. Atyaki makanisi na ye na bosembo oyo Davidi amonisaki na bomoi na ye mpe na makambo oyo emonisaki ete abongolaki mpenza motema. Yango esalaki ete Yehova alimbisa ye mpo na masumu minene oyo asalaki. Yehova ayebaki ete Davidi azalaki kolinga ye mingi mpe azalaki na mposa ya kosala oyo ezali malamu. Osepelaka te ndenge oyo Nzambe na biso atyaka likebi na makambo ya malamu oyo tosalaka?—1 Bak. 9:4; 1 Nt. 29:10, 17. w21.12 19 par. 11-13
Mwaminei, 19 sanza ya 10
Na ntango wana kaka abandaki komona, mpe abandaki kolanda ye, mpe kokumisa Nzambe.—Luka 18:43.
Yesu amoniselaki baoyo nzoto ezalaki kosala malamu te motema mawa. Kanisá lisusu nsango oyo atindelaki Yoane Mobatisi ete: “Bato oyo bakufá miso bazali komona, batɛngumi bazali kotambola, bato ya maba bazali kopɛtolama mpe bato oyo bakufá matoi bazali koyoka, bakufi bazali kolamuka.” Nsima ya komona makamwisi oyo Yesu asalaki, bato nyonso “basanzolaki Nzambe.” (Luka 7:20-22) Bakristo bamekolaka Yesu na ndenge bamoniselaka baoyo nzoto ezali kosala malamu te motema mawa. Na yango, tomoniselaka bato ya lolenge wana boboto mpe motema molai. Ya solo, Yehova apesá biso te nguya ya kosala makamwisi. Kasi tozali na lokumu ya koyebisa bato nyonso oyo bakufá miso, ezala na mosuni to na elimo, nsango malamu oyo etali paradiso epai bato nyonso bakozala na nzoto ya kokoka mpe bakozala na boyokani malamu elongo na Nzambe. (Luka 4:18) Nsango malamu yango etindi bato mingi bápesa Nzambe nkembo. w21.12 9 par. 5
Mwamitano, 20 sanza ya 10
Boyoká nsango ya koyika mpiko ya Yobo mpe bomoná ndenge Yehova asukisaki makambo na ye.—Yak. 5:11.
Yakobo asalelaki Makomami mpo na kopesa bandeko na ye liteya. Asalelaki Liloba ya Nzambe mpo na kosalisa bayoki na ye bámona ete Yehova apesaka ntango nyonso mbano na baoyo, lokola Yobo, bazali sembo epai na Ye. Mpo na kobimisa liteya yango, Yakobo asalelaki maloba ya pɛtɛɛ mpe ndimbola ya mindɔndɔ te. Na ndenge yango, abendaki likebi ya bayoki na ye epai na ye moko te, kasi epai ya Yehova. Liteya: Mateya na yo ezala pɛtɛɛ, mpe euta na Liloba ya Nzambe. Ntango tozali koteya tosengeli te koluka kokamwisa bato mosusu na makambo oyo toyebi, kasi tosengeli nde komonisa bango boyebi mingi oyo Yehova azali na yango mpe ndenge oyo atyelaka bango likebi. (Rom. 11:33) Tokokokisa mokano yango soki makambo oyo tozali koloba ezali kouta na Makomami. Na ndakisa, na esika tóyebisa bayekoli na biso ya Biblia makambo oyo biso tokoki kosala na esika na bango, tosengeli nde kosalisa bango bákanisa na bandakisa ya Biblia mpo báyeba ndenge oyo Yehova akanisaka mpe ndenge oyo ayokaka. Yango ekosalisa bango báluka kosepelisa Yehova, kasi biso te. w22.01 10-11 par. 9-10
Mwapɔsɔ, 21 sanza ya 10
Osengeli kolinga moninga na yo lokola yo moko.—Lev. 19:18.
Nzambe apekisi biso kosala basusu mabe. Kasi alingi tósuka kaka wana te. Kolinga basusu ndenge wana ezali na ntina mingi mpo na mokristo oyo alingi kosepelisa Nzambe. Yesu amonisaki ete mobeko oyo ezali na Balevi 19:18 ezali na ntina mingi. Mofarisai moko atunaki ye boye: “Mobeko nini eleki monene na kati ya Mibeko?” Yesu ayanolaki ye ete “mobeko oyo eleki monene na kati ya mibeko” ezali ya kolinga Yehova na motema na biso mobimba, na molimo na biso mobimba, mpe na makanisi na biso nyonso. Na nsima, Yesu atángaki maloba oyo ezali na Balevi 19:18, oyo elobi: “Ya mibale oyo ekokani na yango yango oyo: ‘Osengeli kolinga mozalani na yo lokola yo moko.’” (Mat. 22:35-40) Ezali na balolenge mingi ya komonisela mozalani na biso bolingo. Lolenge moko ezali ya kosalela toli oyo ezali na Balevi 19:18, oyo elobi: “Osengeli te kozongisela bana ya bato na yo mabe to kokangela bango nkanda.” w21.12 10-11 par. 11-13
Mwalomingo, 22 sanza ya 10
Ntango amonaki mopɛpɛ makasi, abangaki mpe, lokola abandaki kozinda, agangaki: “Nkolo, bikisá ngai!”—Mat. 14:30.
Yesu asembolaki lobɔkɔ, asimbaki ntoma Petro mpe abikisaki ye. Ezali na ntina tóbosana te ete Petro azalaki na likoki ya kotambola likoló ya mai ntango atyaki likebi na ye nyonso epai ya Yesu. Kasi ntango Petro atyaki makanisi na ye na mopɛpɛ, akómaki na nsɔmɔ makasi mpe abandaki kozinda. (Mat. 14:24-31) Tokoki koyekola mateya mingi na ndakisa ya ntoma Petro. Ntango akitaki na masuwa mpe abandaki kotambola likoló ya mbu, akanisaki te ete akobanga mpe akobanda kozinda. Mposa na ye ezalaki ya kokoba kotambola likoló ya mai tii esika Nkolo na ye azalaki. Kasi na esika akoba kotya makanisi na ye epai ya Yesu, akómaki nde kobanga mopɛpɛ. Atako lelo oyo tokoki te kotambola likoló ya mai lokola Petro, biso mpe tokutanaka na mikakatano oyo emekaka kondima na biso. Soki totiki kotya likebi na biso nyonso epai ya Yehova mpe bilaka na ye, tokobanda kozinda na elimo. Na yango, ata soki tokutani na mikakatano nini na bomoi na biso, tosengeli kokoba kotya makanisi na biso nyonso epai ya Yehova mpe na likoki na ye ya kosalisa biso. w21.12 17-18 par. 6-7
Mwayambo, 23 sanza ya 10
Na motema boboto oyo otondi na yango nakokɔta na ndako na yo.—Nz. 5:7.
Kobondela, koyekola, mpe komanyola ezali na kati ya losambo na biso. Ntango tobondelaka, tosololaka na Tata na biso ya likoló, oyo alingaka biso mingi. Ntango toyekolaka Biblia, tozwaka “boyebi ya Nzambe,” oyo azali Liziba ya bwanya nyonso. (Mas. 2:1-5) Ntango tomanyolaka, tokanisaka bizaleli kitoko ya Yehova, ata mpe mokano monene oyo azali na yango mpo na biso mpe mpo na bato nyonso. Yango nde lolenge eleki malamu ya kosalela ntango na yo. Kasi nini ekoki kosalisa biso mpo tósala yango malamu? Soki esengeli, luká esika ya kimya. Tótalela ndakisa ya Yesu. Liboso abanda mosala na ye awa na mabele, alekisaki mikolo 40 na esobe. (Luka 4:1, 2) Na esika yango ya kimya, Yesu akokaki kobondela mpe komanyola makambo oyo Tata na ye akanaki mpo na ye. Na ntembe te, kosala bongo ebongisaki Yesu mpo na komekama oyo asengelaki kokutana na yango mosika te. w22.01 27-28 par. 7-8
Mwamibale, 24 sanza ya 10
Ntango bapesi-toli bazali ebele likambo elongaka.—Mas. 15:22.
Nkulutu to ndeko mosusu oyo akɔmɛli na elimo akoki kobenda likebi na biso na likambo moko oyo tosengeli kobongisa. Soki bolingo etindi ndeko moko apesa biso toli oyo euti na Biblia, tosengeli koyoka toli yango mpe kosalela yango. Mpo na koloba solo, tokoki kozala na mokakatano mpo na kondima toli ya polele oyo bapesi biso. Tokoki kutu koyoka nkanda. Mpo na nini? Atako tondimaka mbala moko ete tozali bato ya kozanga kokoka, ekoki kozala mpasi tóndima toli ntango moto abendi likebi na biso na likambo moko oyo tosengeli kobongisa. (Mos. 7:9) Tokoki koluka komilongisa. Tokoki kokanisela mopesi-toli yango mabe to kosilika mpo na lolenge oyo apesaki toli yango. Tokoki kutu koloba mabe mpo na mopesi-toli yango mpe koloba: ‘Ye nani mpo apesa ngai toli? Ye moko mpe asalaka mabunga!’ Kutu, soki toli oyo bapesi biso esepelisi biso te, ntango mosusu tokosala lokola toyoki te to tokoluka toli oyo ekosepelisa matoi na biso. w22.02 8-9 par. 2-4
Mwamisato, 25 sanza ya 10
Nguya na bino ekomonana mpenza soki bofandi nyɛɛ mpe botye motema.—Yis. 30:15.
Bomoi na mokili ya sika ekoki ntango mosusu kobimisa mwa mikakatano oyo ekosala ete ezala mpasi tótyela lolenge ya Yehova ya kosala makambo motema? Na ndakisa, kanisá makambo oyo esalemaki mwa moke na nsima ntango Bayisraele balongwaki na boombo na Ezipito. Bato mosusu bakómaki komilelalela mpo bazangaki biloko oyo bazalaki kolya na Ezipito, mpe bamonaki mpamba mana oyo Yehova azalaki kopesa. (Mit. 11:4-6; 21:5) Makanisi ya ndenge wana ekoki mbala mosusu koyela biso ntango bolɔzi monene ekosuka? Toyebi te mosala nini ekosɛnga tósala mpo na kopɛtola mabele mpe kokómisaka yango mokemoke paradiso. Ekoki kozala ete mosala ekozala mingi mpe makambo mosusu ekozala pɛtɛɛ te na ebandeli. Tokomeka nde komilelalela mpo na biloko oyo Yehova akopesa biso na ntango wana? Tóbosana te: Soki tosepelaka mingi na oyo Yehova apesaka biso sikoyo, tokosepela mpe mingi na oyo akopesa biso na ntango wana. w22.02 7 par. 18-19
Mwaminei, 26 sanza ya 10
Bakosimba mpenza eteni ya nse ya elamba ya Moyuda moko mpe bakoloba ete: “Tokokende na bino.”—Zek. 8:23.
Na esakweli oyo ezali na Zekaria 8:23, maloba “Moyuda moko” mpe “bino” ezali kaka eloko moko, elobeli bakristo oyo batyami mafuta na elimo, oyo bazali naino na bomoi awa na mabele. (Rom. 2:28, 29) “Bato zomi ya minɔkɔ nyonso ya bikolo” ezali komonisa bampate mosusu. ‘Basimbi mpenza’ bakristo oyo batyami mafuta na elimo, elingi koloba bakangami na bango na bosembo mpenza na losambo ya pɛto. Ndenge moko, mpo esakweli oyo ezali na Ezekiele 37:15-19, 24, 25 ekokisama, Yehova asali ete bakristo oyo batyami mafuta na elimo básala elongo na bampate mosusu na bomoko mpenza. Esakweli yango elobeli mwa biteni mibale ya nzete. Baoyo bazali na elikya ya bomoi na likoló bazali lokola mwa eteni ya nzete “mpo na Yuda” (libota epai bakonzi ya Yisraele bazalaki koponama). Mpe baoyo bazali na elikya ya bomoi awa na mabele bazali lokola mwa eteni ya nzete “ya Efraime.” Yehova asengelaki kosangisa biteni yango mibale mpo ekóma “eteni kaka moko ya nzete.” Yango elingi koloba basalaka na bomoko na litambwisi ya Mokonzi na bango kaka moko, Yesu Kristo.—Yoa. 10:16. w22.01 22 par. 9-10
Mwamitano, 27 sanza ya 10
Bókeba mpenza ete bósala makambo na bino ya boyengebene na miso ya bato te mpo bango bámona bino.—Mat. 6:1.
Yesu alobelaki baoyo bazalaki kopesa babola makabo mpe kosala nyonso mpo bato bámona likambo oyo basali mpo bákumisa bango. Atako makambo oyo bazalaki kosala ezalaki komonana malamu, Yehova azalaki kosepela na yango te. (Mat. 6:2-4) Tokomonisa bolamu ya solosolo soki tozali kosala makambo ya malamu kozanga koluka matomba na biso moko. Na yango, okoki komituna boye: ‘Nasukaka kaka na koyeba makambo ya malamu, to nasalaka yango mpenza? Nini etindaka ngai nasalela basusu makambo ya malamu?’ Yehova Nzambe asalelaka elimo na ye mpo na kosala misala. (Eba. 1:2) Na yango, ezaleli nyonso ya mbuma ya elimo ekoki mpe esengeli kopusa biso na misala. Na ndakisa, moyekoli Yakobo akomaki: “Kondima oyo ezali na misala te ekufi.” (Yak. 2:26) Tokoki mpe koloba bongo mpo na bizaleli mosusu nyonso ya mbuma ya elimo ya Nzambe. Mbala nyonso oyo tomonisi bizaleli yango, tolakisaka ete elimo ya Nzambe ezali kosala kati na biso. w22.03 11-12 par. 14-16
Mwapɔsɔ, 28 sanza ya 10
Na boyokani na Mosantu oyo abengaki bino, bino mpe bókóma basantu na etamboli na bino mobimba.—1 Pe. 1:15.
Tokoki komipesa mingi na makambo ya elimo mpe kosalela basusu makambo ya malamu, kasi ntoma Petro asɛngaki bakristo básala likambo mosusu ya ntina mingi. Liboso alendisa biso tókóma basantu na etamboli na biso nyonso, alobaki boye: “Bóbongisa makanisi na bino mpo na mosala.” (1 Pe. 1:13) Mosala yango nini? Ntoma Petro alobaki ete bandeko ya Kristo oyo batyami mafuta na elimo basengelaki ‘kosakola bizaleli malamu ya moto oyo abengaki bango.’ (1 Pe. 2:9) Kutu, bakristo nyonso lelo oyo bazali na lokumu ya kosala mosala yango ya ntina mingi oyo esalisaka bato mingi koleka mosala mosusu nyonso. Ezali lokumu monene mpo na basaleli ya Nzambe oyo basakolaka mpe bateyaka mbala na mbala na molende! (Mrk. 13:10) Ntango tosalaka yango, tomonisaka ete tolingaka Nzambe mpe bazalani na biso. Lisusu, tomonisaka ete tolingi ‘kokóma basantu’ na etamboli na biso nyonso. w21.12 13 par. 18
Mwalomingo, 29 sanza ya 10
Likambo nyonso oyo bokolimbisa moto na boboto, ngai mpe nakolimbisa ye yango.—2 Ko. 2:10.
Ntoma Paulo azalaki ntango nyonso na makanisi ya malamu mpo na bandeko ya lisangá. Paulo ayebaki ete soki moto asali libunga moko, yango elakisi te ete azali moto mabe. Alingaki bandeko, mpe azalaki kotala mingimingi bizaleli na bango ya malamu. Ntango bandeko bazalaki komona ete ezali mpasi kosala oyo ezali malamu, Paulo azalaki koloba te ete bazalaki kosala yango na nko; azalaki nde komona ete bazali kaka na mposa ya lisalisi. Tótala ndenge Paulo asalisaki bandeko basi mibale oyo bazalaki na lisangá ya Filipi. (Flp. 4:1-3) Emonani ete Evodi ná Sɛntishe batikaki ete matata oyo bazalaki na yango ekabola bango. Paulo agangelaki bango te, mpe akaniselaki bango mabe te. Atalaki mingimingi nde bizaleli na bango ya malamu. Bandeko basi yango ya sembo bazalaki kosalela Yehova banda kala. Paulo ayebaki ete Yehova azalaki kolinga bango. Lokola Paulo azalaki na makanisi ya malamu mpo na bandeko basi yango, yango etindaki ye alendisa bango básilisa matata na bango. Ndenge Paulo azalaki na makanisi ya malamu mpo na basusu esalisaki ye abatela esengo na ye mpe abatelaki boninga makasi ná bandeko ya lisangá wana. w22.03 30 par. 16-18
Mwayambo, 30 sanza ya 10
Yehova azali pene na baoyo motema ebukani; abikisaka baoyo elimo etutami.—Nz. 34:18.
Kimya oyo Yehova apesaka ekokitisa motema na biso mpe ekosalisa biso tókanisa malamu. Yango nde esalemaki mpo na ndeko mwasi moko na nkombo Luz. Alobi boye: “Mbala mingi na miyokaka ete nazali kaka ngai moko. Na bantango mosusu, mayoki yango etindaka ngai nakanisa ete Yehova alingaka ngai te. Kasi na ntango yango, nayebisaka mbala moko Yehova ndenge oyo nazali komiyoka. Libondeli esalisaka ngai namiyoka malamu.” Ndenge ndakisa ya ndeko Luz emonisi yango, tokoki kozwa kimya na nzela ya libondeli. (Flp. 4:6, 7) Toyebi ete Yehova ná Yesu bakosunga biso ntango moto moko oyo tolingaka akufi. Motema mawa etindaka biso tósakola mpe tóteya bato, mpo Yehova Nzambe mpe Yesu Kristo bamonisaka ezaleli yango ya malamu. Mpe tolendisami koyeba ete Yehova Nzambe mpe Mwana na ye ya bolingo bamityaka na esika na biso ntango tozali na bolɛmbu mpe ete balingaka kosalisa biso tóyika mpiko. Tozali kozela mokolo oyo Yehova akokokisa elaka na ye ya kitoko, ya ‘kopangwisa mpisoli nyonso na miso na biso’!—Em. 21:4. w22.01 15 par. 7; 19 par. 19-20
Mwamibale, 31 sanza ya 10
Bókɔta na porte ya moke; mpamba te nzela ya monene mpe oyo efungwamá nde oyo ememaka na libebi, mpe bato oyo bazali kokɔta kuna bazali mingi.—Mat. 7:13.
Yesu alobelaki baporte mibale ekeseni oyo ezali komema na banzela mibale ekeseni, elingi koloba, nzela ya “monene” mpe nzela ya “nkaka.” (Mat. 7:14) Alobelaki nzela mosusu ya misato te. Biso moko tosengeli kopona nzela nini tokolanda. Yango ezali ekateli ya ntina mingi oyo tosengeli kozwa, mpamba te yango ekoki kosala ete tózwa bomoi ya seko to te. Ebele ya bato balandaka nzela ya “monene” mpo ezalaka mpasi te kotambola na nzela yango. Likambo ya mawa, ebele ya bato baponaka kotikala na nzela yango mpe balandaka makambo oyo bato mingi oyo bazali na nzela yango basalaka. Bayebaka te ete Satana nde moto azali kosala nyonso atinda bato na nzela yango, mpe ete nzela yango ememaka na liwa. (1 Ko. 6:9, 10; 1 Yoa. 5:19) Na kokesana na nzela ya “monene,” nzela mosusu ezali ya “nkaka” mpe Yesu alobaki ete kaka bato moke nde bamonaka yango. Mpo na nini? Yebá ete na vɛrsɛ oyo elandi, Yesu akebisaki bayekoli na ye na basakoli ya lokuta.—Mat. 7:15. w21.12 22-23 par. 3-5