Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w88 15/9 nk. 15-20
  • Kobota bana na ntango ya nsuka: ezali mokumba monene

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kobota bana na ntango ya nsuka: ezali mokumba monene
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Bisengo mpe mikumba
  • Mpasi ya baboti
  • Batata bazali na mokumba
  • Bamosusu baboti te, kasi bazali na esengo
  • Likambo ya moto na moto
  • Mwana oyo bokanaki te
  • “Bosalaka nyonso na nkombo ya Nkolo”
  • Bana na boumeli ya bolozi monene
  • Mpo na nini bazali na bana te?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Kobota ndenge nini basali ya Nzambe kotalela yango?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
  • Baboti—Bóteya bana na bino bálinga Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2019
  • Kobala mpe kobota na ntango oyo ya nsuka
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
w88 15/9 nk. 15-20

Kobota bana na ntango ya nsuka: ezali mokumba monene

“Babokola bana na bango malamu.”​—1 TIMOTE 3:12.

1. Mposa nini ezalaka na basi nyonso, mpe ndenge nini emonanaka uta bomwana na bango?

NTEMBE ezali te ete bana bazali liziba ya esengo. Mposa ya kozala mama ezali epai na mwasi nyonso, atako yango ezali makasi koleka epai na basi mosusu. Kati na mikili mingi ya Mpoto bana mibali ya mike basepelaka mingi na biloko ya kosakana lokola mituka ya mike, nzokande bana basi balingaka mingimingi bana ya popi, oyo bato basalaka yango balingaka komonisa yango lokola bana ya solo. Bana basi mingi bazelaka mokolo oyo bakokoka kosimba na maboko na bango, mwana ya popi lisusu te, kasi mwana ya solo, oyo akozala mwana na bango mpenza.

Bisengo mpe mikumba

2. Ndenge nini baboti basengeli kotalela mwana oyo baboti, mpe basengeli kondima nini?

2 Nzokande, mokumba ya baboti ezali kosenga ete batalela mwana oyo baboti, lokola mwana ya popi te, kasi lokola moto mpenza, oyo na ntina na ye bakozongisa monoko liboso na Mozalisi mpo na bomoi na ye mpe avenire na ye. Ntango baboti mwana, baboti basengeli kondima komema mokumba monene oyo mpe komesena na yango. Ezali bongo programme ya mbula 20 mpo na koleisa, kolatisa, kobokola mpe koteya bana na bango, kozanga koyeba soko bakozala bato ya ndenge nini ntango bakokola.

3. Mpo na nini Masese 23:24, 25 etali baboti baklisto mingi?

3 Ata bongo, ezali likambo na esengo na komona ete bana ya baklisto mingi basili kokoma basaleli ya sembo ya Jéhovah. Bamoko bamonaki bana na bango kokola mpe kobanda mosala ya pionnier, missionnaire to basali na Béthel. Epai na baboti wana lisese oyo ekokani na bango: “Tata na moyengebene akosepela mingi; ye oyo aboti mwana na mayele akomona esengo mpo na ye. Tata na yo mpe mama na yo bakosepela, mpe mama oyo aboti yo akoyoka esengo.”​—Masese 23:24, 25.

Mpasi ya baboti

4, 5. (a) Biblia esengi nini epai na bankulutu mpe basaleli na misala oyo bazali na bana? (b) Ndenge nini bana mosusu ‘bapesi mpasi na batata na bango’?

4 Kasi ezalaka boye ntango nyonso te, ata mpo na bana ya bankulutu. Ntoma Paulo akomaka: “Ekoki na mokengeli ete azala na efundeli soko moko te, mobali na mwasi moko, . . . ekoki na ye abongisa ndako na ye mpenza na malamu, kotosisa bana na ye na sembo na bozito; (mpo soko moto ayebi kobongisa ndako na ye moko te, akobatela lisangá na Nzambe boni?)” Mpe abakisaki: “Tika ete basungi bazala babali na mwasi moko mpe babatela bana na bango mpenza mpe ndako na bango mpenza malamu.”​—1 Timote 3:2-5, 12.

5 Ezali solo ete bankulutu mpe basaleli na misala bakoki kozala na efundeli moko te soki bana na bango, ntango bakomi mikolo, balingi lisusu kosalela Jéhovah te. Nzokande bakozala na efundeli kati na likambo ya bana na bango ya mike to ya mikolo baoyo bazali naino kofanda na ndako ya bango baboti. Bankulutu mosusu mpe basaleli na misala babungisaki mikumba na bango mpo ete bakomaki na bopotu to mpe balongaki te na mosala na bango oyo Biblia epesi bango ya ‘kokamba bana na bango mpe ndako na bango na lolenge malamu mpenza’. Mpo na batata yango, mpe mpo na bamosusu mingi, bazalaki mingimingi ntina ya mawa kasi ya esengo te. Mbala mingi lisese oyo elongisamaki ete: “Mwana na ebebe azali ntina na mpasi mpo na tata na ye.”​—Masese 19:13.

Batata bazali na mokumba

6. Mituna nini mibali baklisto basengeli komituna yango?

6 Mibali baklisto nyonso, ezala ete bazali na mikumba na lisangá to bazali na yango te, basengeli mpe kobosana te ete kokola ya basi na bango na elimo ekoki komekama ntango nyonso oyo mwasi azali na bana mike ya kobokola. Soki ndeko mwasi moko azali makasi te na elimo, akokoka solo koyekolaka mpe kobimaka na mosala ya kosakola wana ezali ye na mokumba ya mwana moke to bana mike mingi?

7. Nini esili kokomela bandeko basi mosusu, mpe mbala mingi ntina na yango ezali nini?

7 Mibali bazali ntango nyonso komona ete mokumba ya kobokola mwana moke ezali kopekisa basi na bango na kozwa litomba mpenza na boyekoli ya mokanda ya lisangá, na makita kati na Salle du Royaume mpe na ba assemblées ya circonscription mpe ya distrike? Ezalela yango ekoki koumela basanza mingi to mpe mbula mingi, soki kobota ezali kolandana penepene. Mingimingi mokumba yango etyamaka na mapeka ya mama kasi na oyo ya papa te. Yango wana emonanaka mbala mosusu ete mibali baklisto mingi bazali kokola na elimo kino kopesamela mikumba kati na lisangá, nzokande, bobele na ntango yango, basi na bango balembi kati na elimo. Mpo na nini? Ezali mpo ete bana na bango ya mike bazali kopekisa bango kotya likebi nyonso na makita, koyekola Biblia na bozindo to kosangana mingi kati na mosala ya kosakola. Tata oyo atiki nzela na makambo motindo oyo, azali solo komema mokumba na ye lokola esengeli?

8. Batata mingi bazali kosala nini mpo na kokabolana mokumba na basi na bango mpo na oyo etali kobatela bana, mpe bolamu nini bamama bazali kozwa na yango?

8 Nzokande, esengo ezali, mpamba te esalamaka boye ntango nyonso te. Batata baklisto mingi bazali kosala nyonso ekoki na bango mpo na kokabola kilo na likambo etali kobatelaka bana na bango. Bazali kokokisa malamumalamu mokumba oyo bango mpe bazali na yango, ya kosenzela ete bana na bango batya makelele te na boumeli ya makita; soki bébé na bango abandi kolela, to mwana na bango oyo akomi mwa mokolo azali kotya mobulu, tata akobima na ye libanda mpo na kopesa ye etumbu ebongi; ezali malamu te kotikela mama mokumba nyonso oyo, mpo ete akozanga eteni moko ya makita. Na ndako, mibali oyo balingi basi na bango bazali kosalisa bango na misala misusu mpe kolalisa bana; na motindo yango, mobali mpe mwasi bakoki kotikala na kimya mpe kozwa ntango ya komipesa na makambo ya elimo.

9. Nini emonisi ete bana bazali ntango nyonso epekiseli te?

9 Soki ebongiseli malamu ezali kati na lisangá, bamama oyo bazali naino bilenge bakoki kosala mosala ya pionnier auxiliaire. Bamosusu mpe bazali kosala mosala ya pionnier permanent. Na yango, tokoki koloba te ete bana bazali ntango nyonso epekiseli; mpamba te baklisto mingi, ata bazali na bana, balingi mosala ya pionnier.

Bamosusu baboti te, kasi bazali na esengo

10. Ekateli nini babalani mosusu bazwaki, mpe ememelaki bango bolamu nini?

10 Ezali na bilenge babalani mosusu oyo bazwaki ekateli ete bakobota te. Atako bazali na mposa ya bana lokola mwasi nyonso, basi baklisto mosusu, na boyokani na mibali na bango, baboi kobota, mpo na kosalela Jéhovah kati na mosala ya pionnier to na mosala ya missionnaire. Bambula balekisi na mosala yango ezali kokolisa botondi kati na motema na bango. Ya solo, baboti bana na mosuni te, kasi baboti bayekoli ya sika, oyo bazali kino lelo kosambela Jéhovah. ‘Bana oyo na solo kati na kondima’ bakobosana soko moke te moto oyo alakisaki bango “liloba ya solo”.​—1 Timote 1:2; Baefese 1:13; tala 1 Bakolinti 4:14, 17; 1 Yoane 2:1.

11. (a) Ndenge nini babalani mingi bazangi bana bazali kosalela Jéhovah, mpe mpo na nini bazali na mawa te? (b) Eteni nini ya Makomami ezali elendiseli mpo na babalani nyonso oyo baboti te “mpo na bokonzi”?

11 Na mokili mobimba, babalani mingi bamipimeli esengo ya kobota, bazali kosalela Jéhovah na circonscription, na distrike to na Béthel. Bango mpe bazali na esengo mpo ete bapesaki bomoi na bango mpo na kosalela Jéhovah mpe bandeko na bango na misala oyo ya sipesiale. Bazali na mawa soko moke te. Ata bazangi esengo ya kobota bana, nzokande basali mingi mpo na kokolisa mosala ya Bokonzi. Ya solo, eteni oyo ya Makomami ezali elendiseli mpo na babalani wana nyonso oyo baboti te “mpo na bokonzi”: “Nzambe azangi boyengebene te ete abosana mosala na bino mpe bolingo bosili bino kotalisa na nkombo na ye, awa esalelaki bino babulami mpe bozali naino kosalela bango.”​—Matai 19:12; Baebele 6:10.

Likambo ya moto na moto

12. (a) Mpo na nini kobota ezali privilege monene? (b) Na bileko nini kobota ezalaki moko na misala oyo Jéhovah apesaki na basaleli na ye na mabelé?

12 Lokola tolobaki yango na ebandeli ya lisolo oyo, kobota ezali likabo ya Nzambe. (Nzembo 127:3) Ezali libaku moko kitoko oyo bikelamu na ye ya elimo bazwaki yango te. (Matai 22:30) Na bileko bisusu, kobota bana ezalaki lokola mokumba oyo Jéhovah apesaki epai na basaleli na ye awa na mabelé. Ezalaki bongo mpo na Adame na Eva mpe mpo na babiki ya mpela. (Genese 1:28; 9:1) Mpe Jéhovah alingaki ete Bayisraele bayikana mingi na nzela na kobota bana.​—Genese 46:1-3; Exode 1:7, 20; Deteronome 1:10.

13, 14. (a) Tokoki koloba boni mpo na likambo etali kobota na mikolo na biso, mpe mpo na nini ezali malamu te kotonga ekateli ya moto na moto? (b) Atako ekateli etali moto na moto, nzokande toli nini epesami na baoyo bakanisi ete bakobota na ntango oyo ya nsuka?

13 Lelo oyo, kobota bana, ezali yango te mosala oyo Jéhovah apesi na libota na ye. Nde atako bongo ezali ntango nyonso lipamboli oyo apesi na babalani oyo balingi yango. Na ntina yango, ezali malamu te kotonga baklisto oyo baboti bana, to baoyo baboi kobota.

14 Lokola ezali likambo ya moto na moto, babalani nyonso bakozwa ekateli bango moko soki bakobota to te na mikolo oyo ya nsuka. Nzokande, lokola “ntango eyei mokuse”, ebongi ete babalani bakanisa malamumalamu, mpe kati na libondeli, mpo na matomba mpe mpo na bampasi ya kobota bana na mikolo na biso oyo. (1 Bakolinti 7:29) Baoyo bazwi ekateli ya kobota bana basengeli kotalela bobele bisengo ya kozala na bana te, kasi lisusu mikumba mpe mikakatano oyo bakoki kokutana na yango, ezala bango ezala bana oyo bakobota.

Mwana oyo bokanaki te

15, 16. (a) Ezaleli nini babalani basengeli kozala na yango te mpo na mwana oyo bakanaki te, mpe mpo na nini? (b) Ndenge nini babalani basengeli kotalela mwana nyonso, mpe yango epesi bango mokumba nini?

15 Bamosusu bakoki koloba ete: ‘Nyonso wana ezali malamu; kasi tokoki kosala nini mpo na mwana oyo tokanaki te?’ Babalani mingi oyo basili kobota mwana na motindo oyo, bayebaki malamu ete oyo ezali ntango malamu te mpo na kobota mwana; mpe bamoko bazalaki bamisionere uta mbula mingi. Na yango, ndenge nini basengeli kotalela mwana oyo bakanaki te?

16 Papa na mama ebongi bandima mokumba na bango. Ya solo, zemi mosusu eyaka kozanga kokana, kasi baklisto bakoyina te mwana oyo bakobota. Atako bakosengela kobongola bomoi na bango mpo ete baboti mwana, nzokande ezali malamu te na kosilika mpo na ye. Mpamba te, bango nde babengi ye ete aya na bomoi. Sikawa lokola ayei, ebongi bandima mokumba na bango oyo ya sika, koyebaka ete “ntango mpe makambo makanami te” ezali kozwa bato nyonso. (Mosakoli 9:11) Ata balingaki to balingaki te, basalaki elongo na Jéhovah kati na ebongiseli oyo ya bozalisi ekelamu ya sika, oyo Jéhovah Nzambe azali Mobandisi na yango. Basengeli kondima mwana lokola eloko ya bulee epesameli bango ete babatela yango mpe bamema na bolingo nyonso mokumba na bango ya “baboti kati na Nkolo”.​—Baefese 6:1.

“Bosalaka nyonso na nkombo ya Nkolo”

17. Toli nini ntoma Paulo apesaki yango na Bakolose, mpe ndenge nini baklisto bakoki kolanda toli yango lelo?

17 Liboso ya kopesa toli na ntina na mabota, ntoma Paulo akomaki: ‘Soko bokoloba nini, soko bokosala nini, bosalaka nyonso na nkombo na Nkolo Yesu, kopesaka Nzambe Tata matondi mpo na ye.” (Bakolose 3:17-21) Ata abali to abali te, ata azali na bana to azali na bana te, moklisto asengeli ntango nyonso kozala na botondi epai na Jéhovah mpe kozwa litomba na ezalela na ye mpo na ‘kosala nyonso na nkombo ya Nkolo’.

18, 19. (a) Ndenge nini baklisto oyo babali te to baboti te bakoki ‘kosala nyonso na nkombo na Nkolo’? (b) Ndenge nini baklisto basengeli kotalela bana na bango, mpe mokano nini basengeli komityela?

18 Moklisto oyo azwi ekateli ya kotikala likombe akosalela bonsomi na ye, mpo na kokokisa bamposa na ye te, kasi mpo na ‘kosala na molimo na ye mobimba, lokola mpo na Jéhovah’, soki likoki ezali, akota na lolenge moko to na lolenge mosusu na mosala na pionnier. (Bakolose 3:23; 1 Bakolinti 7:32) Bobele bongo, babalani oyo bazwi ekateli ete bakobota te, ezali te mpo basalela bomoi na bango na moimi na ‘kolukaka matomba ya mokili’, kasi ezali mpo ete batya mosala ya Bokonzi na esika ya liboso kati na bomoi na bango.​—1 Bakolinti 7:29-31.

19 Mpo na baklisto oyo bazali na bana, basengeli kosimba ntina na mokumba na bango oyo monene mpe kokokisa yango. Na esika ete batalela bana na bango lokola epekiseli kati na mosala na bango mpo na Jéhovah, ebongi batalela bana na bango lokola lolenge moko ya mosala oyo bazali kosalela Nzambe. Yango esengi nini? Tokamata ndakisa moko. Ntango moklisto akutani na moto moko oyo asepeli na solo, abandi koyekola na ye Biblia na ndako. Na nsima, akozala na etingya, kozongaka kotala moto yango poso nyonso, mpo na kosalisa ye ete akola na elimo. Ebongi ete baklisto basala motindo moko mpo na bana na bango. Uta bazali naino mike, bana bazali na mposa na boyekoli ya poso na poso mpe ebongisami malamu, oyo ekopesa bango nzela na kokola na elimo mpe bayekola kolinga Mozalisi na bango. (2 Timote 3:14, 15) Na ndako, baboti bakosenzela mpo na kopesa bango ndakisa malamu na etamboli ya boklisto, lokola basalaka yango na Salle du Royaume. Mbala nyonso oyo ekokoka na bango, bakokokisa mpe mokumba oyo mosusu: kolakisa bango mosala ya kosakola ndako na ndako. Na motindo yango, ata bazali kosakolaka epai na ba mikóló, baboti bakoluka, na lisalisi ya Jéhovah, ete ‘bazalisa bana na bango bayekoli’.​—Matai 28:19.

Bana na boumeli ya bolozi monene

20. (a) Nini ezali liboso na biso, mpe mikakatano nini Yesu asilaki koyebisa yango ete ekoya? (b) Mpo na nini maloba Yesu alobaki na ntina na bana na mikolo ya nsuka masengeli kotinda biso na kokanisa?

20 Liboso na biso, ezali na “bolozi monene, lokola emonanaki liboso te longwa na ebandeli na mokili kino lelo, mpe ekomonana lisusu te”. (Matai 24:21) Mpasi ekozala mpo na bato nyonso, ezala mikolo ezala bana mike. Kati na esakweli na ye na ntina etali nsuka na biloko na ntango oyo, Yesu asakolaki ete solo ya boklisto ekokabola mabota. Alobaki: “Ndeko akokaba ndeko na ye mpo na kufa, tata akokaba mwana, bana bakotemela baboti na bango mpe bakokaba bango mpo na kufa.” (Malako 13:12) Emonani bongo ete kobokola bana na ntango oyo ya nsuka ekozala mikolo nyonso bisengo na bisengo te. Ntango mosusu ekozala ntina na mpasi, na mawa mpe ata likama, lokola emonisi yango maloba na Yesu oyo touti kotanga.

21. (a) Atako mikakatano mizali liboso, mpo na nini baboti basengeli te komibanzabanza mingi mpo na yango? (b) Elikya nini bakoki kozala na yango, mpo na bango moko mpe mpo na bana na bango?

21 Nzokande, atako mpasi ezali liboso, baboti basengeli te komibanzabanza mpo na yango koleka ndelo. Soki bango moko bakotikala sembo mpe bazali kosala nyonso ekoki na bango mpo na kobokola bana na bango “kati na disipline mpe kolakisama na Jéhovah”, ntembe ezali te ete Nzambe akobatela bana na bango, soki nde bana yango bazali bana ya botosi. (Baefese 6:4; tala 1 Bakolinti 7:14) Lokola bango mpe bana na bango batangami kati na “ebele monene”, bakoki kolikya kobika na “bolozi monene”. Soki bana yango, na kokola na bango, bakomi basaleli ya sembo ya Jéhovah, bakozala seko na botondi epai na Nzambe lokola apesaki bango baboti oyo basimbaki ntina na mokumba na bango oyo monene.​— Emoniseli 7:9, 14; Masese 4:1, 3, 10.

Bozongeli

◻ Kobotama ya mwana ezali ebandeli ya eleko ya mbula boni ya milende?

◻ Mpo na nini bankulutu mosusu mpe basaleli na misala balongolamaki na mikumba na bango?

◻ Makambo nini moklisto asengeli kokanisa yango liboso mpo na mikumba ekozala na mwasi na ye nsima na kobota mwana?

◻ Nini emonisi ete baklisto bakoki kozala na esengo ata baboti te?

◻ Ndenge nini baboti basengeli kotalela mwana oyo bauti kobota, mpe mpo na nini ebongi te ete bamibanzabanza mingi mpo na ntango ezali koya?

[Elilingi na lokasa 16]

Batata bazali mpe na mokumba ya kokengela ete bana na bango batya makelele te na boumeli ya makita

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto