Kobota ndenge nini basali ya Nzambe kotalela yango?
“Tika ete Jéhovah . . . azalisa bino lokola ezali bino mbala nkoto!”—DETERONOME 1:11.
1. Biblia elobi nini mpo na bana mpe kobota?
NA NZEMBO 127:3-5 tozali kokuta maloba oyo: “Bana bazali likabo na Jéhovah, mpe mbuma na libumu ezali libonza. Bana mibali babotami na moto kati na bolenge na ye bazali lokola mbanzi na loboko na elombe. Esengo ezali na moto oyo azali na libenga etondi na bango!” Ya solo, kobota ezali likabo kitoko oyo Mozalisi, Jéhovah, apesaki yango na babalani ya liboso mpe na bakitani na bango.—Genese 1:28.
Ndenge Bayisraele bazalaki kotalela bana
2. Nini emonisi ete kobota bana mingi ezalaki likambo malamu mpo na bakitani ya Abrahame, ya Yisaka mpe ya Yakobo?
2 Epai na bakitani ya Abrahame, bana oyo babotamaki na Yisaka mpe na Yakobo, kozala na bana mingi ezalaki likambo malamu. Ata bana oyo babotamaki na basi mosusu to na bamakango, bazalaki bango nyonso bana mpenza; ezali bongo mpo na bana mosusu ya Yakobo, oyo na nsima bakomaki bankoko ya mabota 12 ya Yisraele. (Genese 30:3-12; 49:16-21; tala 2 Ntango 11:21) Atako na ebandeli Nzambe asalaki se mwasi moko mpo na mobali moko, nzokande na nsima atikaki bakitani ya Abrahame kobala basi mingi mpe kozala na basi ya makango; mpo na yango babotanaki noki. Bayisraele basengelaki kokoma “libota na bato mingi lokola mputulu na mabelé”. (2 Ntango 1:9; Genese 13:14-16) Bango nde basengelaki kobimisa “libota” ya ndaka, na nzela na yango “mabota nyonso na mokili” makopambwama.—Genese 22:17, 18; 28:14; Deteronome 1:10, 11.
3. Yisraele ezalaki ndenge nini na mikolo ya boyangeli ya Salomo?
3 Ezali polele ete na Yisraele kobotama ya mwana etalelamaki lokola likabo euti epai ya Jéhovah. (Nzembo 128:3, 4) Nzokande, maloba ya Nzembo 127 oyo totangi yango na ebandeli ya lisolo, makomamaki na mokonzi Salomo, oyo azalaki mokonzi na Yisraele na eleko moko malamu mingi na lisolo ya libota yango. Tala oyo Biblia elobi na ntina na eleko yango: “Yuda mpe Yisraele bazalaki mingi lokola zelo pembeni na mai-na-monana; balyaki mpe bamelaki mpe bayokaki esengo. Yuda mpe Yisraele bafandaki na kimya longwa na Dani [na nord] kino Bele-Seba [na sud], moto na moto na nse na mowiti na ye na vinyo mpe na nzete na ye na mbuma, mikolo nyonso na Salomo.”—1 Mikonzi 4:20, 25.
Bileko ya mpasi mpo na bana na mokili ya Yisraele
4, 5. (a) Mpo na nini kobota ezalaki elengi te na bileko bisusu na Yisraele? (b) Makambo nini ya nsomo emonanaki mbala mibale na Yelusaleme?
4 Kasi ezalaki mpe na bileko mosusu kati na lisolo ya Yisraele oyo kobota ezalaki mpenza ntina ya esengo te. Tala oyo mosakoli Yilimia akomaki na ntango ya kobomama ya liboso ya Yelusaleme: “Miso na ngai ezali kolemba na mpisoli . . . , mpamba te bana mike mpe banungi na mabele bazali kosenzwa kati na nzela na mboka. . . . Basi balya nde mbuma na nzoto na bango, bana baoyo babatelami na maboko?” “Maboko na basi, ata bazali na mawa, masili kolamba bana na bango mpenza.”—Bileli 2:11, 20; 4:10.
5 Balobaka ete makambo ya nsomo koleka masalemaki bikeke nsambo na nsima. Moyuda Yozefe mokomi na makambo na bato azali koyebisa ete na ntango ya kobebisama na Yelusaleme na mobu 70 ya ntango na biso, bana bawelaki bilei na batata na bango mpe bamama babotolaki bilei epai na bana na bango ya mike. Azalaki koyebisa ndenge mwasi moyuda moko abomaki bébé na ye, akalingi ye mpe alei ye. Kobota bana na ebongiseli ya Bayuda mwa ntango moke liboso ete Jéhovah abomisa Yuda mpe Yelusaleme na mobu 607 liboso ya ntango na biso mpe na mobu 70 ya ntango na biso ekokaki kotalelama mpenza lokola bozoba.
Bana epai ya baklisto ya liboso
6, 7. (a) Mitindo nini Yesu asukisaki yango epai ya baklisto? (b) Na nzela nini Yisraele ya elimo esengelaki kokola, mpe nini emonisi yango?
6 Ndenge nini kobota etalelamaki epai na baklisto ya yambo? Tokomona liboso ete Yesu asilisaki likambo ya kobala basi mingi epai ya bayekoli na ye. Azongisaki modele oyo etyamaki na Jéhovah na ebandeli, elingi koloba mwasi moko mpo na mobali moko. (Matai 19:4-9) Soki Yisraele ya mosuni bakomaki mingi mpenzampenza na nzela ya kobota bana, nzokande Yisraele ya elimo esengelaki kobakisama mingimingi na nzela na mosala ya kozalisa bayekoli.—Matai 28:19, 20; Misala 1:8.
7 Soki lisangá ya boklisto esengelaki kokola mpenzampenza na nzela ya kobota bana, mbele Yesu akokaki koyikisa bayekoli na ye mpiko te na “kotikala likombe mpo na bokonzi ya likolo”. (Matai 19:10-12) Mpe ntoma Paulo mbele akokaki kokoma te ete: “Ye oyo akokaba nzoto na ye na libala akosala malamu, nzokande ye oyo akotikala likombe akosala malamu koleka.”—1 Bakolinti 7:38, MN.
8. Nini emonisi ete na ekeke ya liboso baklisto mingi bazalaki bato babali mpe bazalaki na bana?
8 Nzokande atako balobaki malamu na ntina na kotikala monzemba mpo na matomba ya Bokonzi, ezala Yesu ezala Paulo moko te atyelaki yango lokola mobeko. Bango mibale bayebaki ete baklisto mosusu bakobala. Emonanaki mpe ete bamosusu kati na bango basengelaki kobota bana. Mpe, mikapo mingi ya Makomami na greke ya boklisto ezali kopesa batoli ya polele mpo na motindo ya kobokola bana. (Baefese 6:1-4; Bakolose 3:20, 21) Epai mosusu, nkulutu to mosaleli na misala oyo abala asengelaki kozala tata malamu.—1 Timote 3:4, 12.
9. Engebene ntoma Paulo, ndenge nini kobota ekokaki kozala libateli mpo na basi mosusu baklisto, kasi, longola yango, ndenge nini basengelaki komitambwisa?
9 Ntoma Paulo alobaki lisusu ete kobota ekozala libateli mpo na baklisto mosusu ya basi. Tala oyo alobaki na ntina na lisalisi oyo epesameli basi babola oyo bakufela-mibali: “Oboya kokoma nkombo na basi-bakufeli-mibali baoyo bakomi mibange te, . . . lisusu, bakoyekolaka kozala na goigoi, kolekaleka na ndako na ndako, ee, bazali bobele na goigoi te kasi bato na bilobaloba mpe bisalasala, awa ekosololaka bango makambo mabongi te. Bongo, nalingi ete baoyo mibange te babala, babota bana, babatela ndako, bapesa mpe moyini na biso nzela na kotonga biso te. Mpo ete bamosusu basili kopengwa kobila Satana.” Basi motindo boye basengelaki ‘kobika na nzela na kobota bana soko bakoumela na kondima mpe na bolingo mpe na bulee esika moko na makanisi malamu’.—1 Timote 5:11-15; 2:15.
“Mpasi kati na nzoto”
10. Toli nini ekeseni Paulo apesi yango na basi-bakufeli-mibali kati na mokanda na ye ya liboso na Bakolinti?
10 Tokomona lisusu ete na mokanda na ye ya liboso epai na Bakolinti, bobele ye ntoma Paulo apesaki likanisi mosusu epai na basi mosusu bakufela-mibali. Akomaki: “Nazali koloba epai na bango babali naino te mpe na basi-bakufeli-mibali ete malamu na bango batikala lokola ngai. Nde soko bayebi komikanga mposa na bango te, babala. Kobala eleki malamu na kozika na mposa. Nde na makanisi na ngai, akozala na esengo na koleka [mwasi-akufeli-mobali] soko akotikala lokola ezali ye. Nabanzi mpe ete ngai nazali na elimo na Nzambe.”—1 Bakolinti 7:6, 8, 9, 40.
11. (a) Baklisto babali basengelaki kokutana na nini, mpe ndenge nini Genese 3:16 engengisi 1 Bakolinti 7:28? (b) Paulo alingaki koloba nini ete “nalingi kokimisa bino yango”?
11 Paulo alimboli lisusu ete: “Soko moto oyo azali moseka akobala, asali lisumu te. Kasi baoyo bakobala bakozwa mpasi na nzoto na bango. Mpe nalingi kokimisa bino yango.” (1 Bakolinti 7:28, MN.) Na ntina na ‘mpasi yango kati na nzoto’, Traduction du monde nouveau oyo ezali na ba références ezali kotinda na Genese 3:16, epai kuna tozali kotanga: “[Jéhovah] alobaki na mwasi ete: ‘Nakobakisa mpasi na yo na kobota; okobota bana na mpasi, nde okozala na mposa na mobali na yo, mpe ye akozala na bokonzi likolo na yo.”’ Longola mikakatano ya libala oyo mikoki kobima, ‘mpasi kati na nzoto’ oyo ezalaki kozela mpenza baoyo bakobala ekouta mpe na kobota. Kozanga ete akoma kino na kopekisa libala mpe kobota, Paulo amipesaki mokumba ya kokebisa baninga na ye kati na kondima ete makambo mibale oyo ekokaki kozala ntina ya mikakatano mpe kopengola likebi mpo na kokitisa bango kati na mosala ya Jéhovah.
“Ntango eyei mokuse”
12. Toli nini ntoma Paulo apesaki epai ya baklisto babali, mpe mpo na ntina nini?
12 Na ekeke ya liboso ya ntango na biso, baklisto bakokaki te kotambwisa bomoi na bango lokola bato ya mokili. Makambo kati na yango bazalaki kobika ezalaki mpenza na bopusi likolo ya mabala na bango. Paulo akomaki: “Bandeko, nazali koloba ete ntango eyei mokuse, sikawa tika ete baoyo bazali na basi bazala lokola bango bazangi basi, . . . mpe bango bazali na bozwi na mokili bazala lokola bango bazali na bozwi te; mpo ete motindo na mokili oyo ezali kolimwa. Nalingi ete bokangwa na mikakatano. . . . Nazali koloba boye epai na bino bobele mpo na malamu na bino; ezali mpo na kokanga bino na nkamba te, kasi na ntina ete botambolaka na ngolu mpe ete bosalelaka Nkolo na motema mobimba.”—1 Bakolinti 7:29-35.
13. Ndenge nini ‘ntango ezalaki mokuse’ mpo na baklisto ya ekeke ya liboso?
13 Frédéric Godet, molimboli na Biblia akomaki boye: “Mpo na baye bazangi kondima mokili ekoumela seko; nzokande mpo na baklisto, bango bazali nde kozela Parousia [Kozonga ya Klisto].” Klisto apesaki na bayekoli na ye elembo ya “kozonga” na ye mpe akebisaki bango boye: “Bosenzelaka mpo ete boyebi te soko Nkolo na bino akoya na mokolo nini.” (Matai 24:3, 42) Ntango ezalaki “mokuse” na ntina boye ete baklisto na ekeke ya liboso basengelaki kozela mokolo na mokolo koya na Klisto. Epai mosusu, moko te kati na bango akokaki koyeba mikolo boni etikalaki na ye liboso ete “ntango mpe makambo mayebani te” etya nsuka na bomoi na ye, kolongwelaka ye likoki nyonso ya ‘kosala mpo na libyangami na ye.’—Mosakoli 9:11; 2 Petelo 1:10.
14. (a) Matai 24:19 elimboli nini? (b) Mpo na nini ezalaki likambo ya ntina kotosa toli ya Yesu na mikolo mizalaki liboso ya mobu 66?
14 Baklisto ya Yuda mpe ya Yelusaleme basengelaki mpenza ‘kosenzela’. Ntango Yesu akebisaki bayekoli na ye na ntina na kobomama ya mibale ya Yelusaleme, alobaki: “Mawa na basi bazali na zemi mpe na baoyo bakomelisa bana mabèle na mikolo yango!” (Matai 24:19) Ya solo, awa Yesu azalaki kopesa toli te epai na baklisto ya ekeke ya liboso ete babota bana te. Azalaki bobele koyebisa bango esakweli oyo: ntango elembo ya kobomama ya Yelusaleme ekobima, kokima ya nokinoki ekozala mpasi koleka mpo na mwasi oyo azali na zemi mpe mpo na baboti oyo bazali na bana mike. (Luka 19:41-44; 21:20-23) Nzokande, wana yikiyiki ezalaki komata epai ya Bayuda oyo bafandaki na Yudea na mikolo mizalaki liboso ya mobu 66, na ntembe te baklisto bamikundolaki likebisi oyo ya Yesu, mpe batalelaki soki ekoki kozala likambo ya mayele na kobota bana na ntango wana ya mobulu.
Bana na mikolo na biso
15, 16. (a) Ndenge nini ‘ntango eyei mokuse’ mpo na baklisto ya lelo? (b) Mituna nini baklisto basengeli komituna yango?
15 Ndenge nini baklisto basengeli kotalela libala mpe kobota bana na “ntango oyo ya nsuka”? (Danyele 12:4) Babosana te ete “motindo na mokili ezali kobongwana”, lokola emonanaka liboso te, to, engebene libongoli ya Osty, “elongi ya mokili oyo ezali koleka”.—1 Bakolinti 7:31.
16 “Ntango eyei mokuse mpenza”. Ee, etikali bobele ntango moke na libota ya Jéhovah mpo na kosilisa mosala oyo Mozalisi apesaki bango. “Nsango malamu oyo na Bokonzi ekosakolama na mokili mobimba lokola litatoli na mabota nyonso, mpe bongo nsuka ekoya.” (Matai 24:14) Mosala oyo esengeli kosila liboso ete nsuka eya. Na yango, ebongi ete baklisto bamituna bopusi nini likambo ya kobala to kobota bana ekozala na yango likolo ya bosangani na bango na kati na mosala oyo ya lobiko.
Tozwa liteya na likambo ya kala
17. (a) Mosala nini Noa mpe bana na ye misato basalaki liboso ya mpela, mpe tokoki koloba boni mpo na ntango oyo mosala yango eumelaki? (b) Ekoki kozala mpo na ntina nini bana na Noa babotaki te liboso ya mpela?
17 Yesu akokanisaki ntango ya “komonana na Mwana na moto” na “mikolo ya Noa”. (Matai 24:37) Noa na bana na ye misato ya mibali bazwaki mosala ya sikisiki mpo na kosala liboso na koya na mpela. Ezalaki bongo mosala ya kotonga masuwa monene mpe kosakola. (Genese 6:13-16; 2 Petelo 2:5) Ntango Jéhovah apesaki mitindo na ye mpo na kotonga masuwa, emonani lokola ete bana na Noa basilaki kobala basi. (Genese 6:18) Toyebi te mbula boni masuwa etongamaki, kasi ntembe ezali te ete mosala wana eumelaki mbula mingi. Na boumeli na eleko oyo nyonso liboso na mpela, basi na bana na Noa babotaki te. Ntoma Petelo alobi sikisiki ete, bato mingi te, ‘bobele mwambe, babikaki’ na mpela, elingi koloba mibali minei mpe basi minei, kasi bana te. (1 Petelo 3:20) Ekoki kozala na bantina mibale mpo na yango bana ya Noa bazangaki kobota bana. Ya liboso, lokola kobomama ya mokili na mai ebelemaki, Nzambe apesaki bango mosala oyo ezalaki kosenga likebi na bango mobimba. Ya mibale, bazalaki mpenza na mposa te ya kobota bana na eleko wana oyo ‘masumu na bato ezalaki mingi mpe makanisi nyonso kati na mitema na bango ezalaki bobele epai na mabe mikolo nyonso’, eleko oyo ‘mokili etondaki na yauli’.—Genese 6:5, 13.
18. Atako ezali mobeko te mpo na babalani ya lelo, ndenge nini ndakisa ya bana ya Noa mpe basi na bango ekoki kosalisa biso na kokanisa
18 Yango elimboli te ete ezaleli oyo bana ya Noa mpe basi na bango bamekolaki liboso na mpela esengeli kozala mobeko mpo na babalani ya lelo. Nzokande, lokola Yesu akokanisaki mikolo ya Noa na eleko na biso, ndakisa na basaleli oyo ya Jéhovah na ntango ya kala ekoki kosalisa biso na kokanisa.
19. (a) Ndenge nini eleko na biso ekokani na eleko ya Noa? (b) Paulo asakolaki nini mpo na “mikolo ya nsuka”, mpe ndenge nini esakweli yango etali likambo ya kobota?
19 Motindo moko lokola Noa mpe libota na ye, biso mpe, tozali kobika kati “na mokili ya bato mabe”. (2 Petelo 2:5) Lokola bango, tozali “kati na mikolo ya nsuka” ya biloko mabe oyo ezali pene mpo na kobomama. Ntoma Paulo asakolaki ete na “mikolo ya nsuka” ya biloko mabe ya Satana “mpasi” ekoya. Komonisaka ete kobokola bana ekozala kati na makambo ya mpasi ya ntango oyo ya nsuka, abakisaki ete bana “bakotombokela baboti”. Alobaki lisusu ete bato nyonso, ezala bana mike to bilenge, bakozala “bato bazangi matondi, bato bazangi bolingo, batomboki”. (2 Timote 3:1-3) Atako awa Paulo asakolaki makambo oyo masengelaki kobima na “mikolo ya nsuka” kati na bato ya mokili, emonani polele ete bizaleli motindo boye ekobakisa mpasi epai na baklisto mpo na oyo etali kobokola bana, lokola mingi basili komona yango.
20. Tokotalela nini na lisolo oyo elandi?
20 Na yango, esengeli ete tozala na likanisi libongi kati na likambo oyo etali kobota bana. Ekoki kozala liziba ya esengo monene, kasi ekoki mpe komemela biso mawa. Kobota bana ezali na matomba na yango mpe na mikakatano na yango. Tokotalela yango na lisolo elandi.
Bozongeli
◻ Mpo na nini kobota bana mingi ezalaki likambo malamu na Yisraele?
◻ Nini emonisi ete na bileko bisusu kobota bana ezalaki likambo ya mpasi mingi mpo na Bayuda?
◻ Ndenge nini Yisraele ya elimo esengelaki kokola?
◻ Ndenge nini ‘ntango ezalaki mokuse’ mpo na baklisto ya liboso?
◻ Ekoki kozala mpo na ntina nini bana na Noa babotaki te liboso ya mpela, mpe tokoki koloba boni mpo na baklisto ya lelo?
[Elilingi na lokasa 13]
Ezalaki mpasi mpenza mpo na kokima libanda na Yelusaleme elongo na bana mike