Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w92 1/12 nk. 21-25
  • Esengo oyo mosala ya Jéhovah ememelaki ngai

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Esengo oyo mosala ya Jéhovah ememelaki ngai
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Nakolaki na Etats-Unis
  • Natiki kobongisa radio mpo na kokota boloko
  • Mosala ya pionnier
  • Kobotama ya bana mpe mosala ya kosakola na bipekiseli
  • Kobokola bana na biso na Etats-Unis
  • Mosala na Perou
  • Mokili ya Equateur ebengi biso
  • Bomoi oyo etondi mbano
  • Koluka Liboso Bokonzi​—⁠bomoi Ya Solosolo Mpe Ya Esengo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Natyaki miso mpe motema na ngai na libonza
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Nazali kolanda mokano oyo namityelaki wana ezalaki ngai na mibu motoba
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • “Motema boboto na yo eleki bomoi na malamu”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
w92 1/12 nk. 21-25

Esengo oyo mosala ya Jéhovah ememelaki ngai

LISOLO YA GEORGE BRUMLEY

Nautaki kosilisa kopesa mateya ya kobongisa radio, oyo nazalaki kolakisa na ba officiers ya police ya empereur Hailé Selassié ntango moko na bango ayebisaki ngai na pembeni ete ayebaki ete ngai nazali misionere Témoin de Jéhovah. Atunaki ngai na mposa nyonso ete: “Okolinga koyekola Biblia elongo na ngai?”

LOKOLA mosala na biso ya kosakola epekisamaki na Etiopia, balingaki kobengana ngai na mboka, lokola basalaki epai na Batemwe mosusu, soki bakonzi ya mboka bayebaka ngai malamu. Namitunaki soki moyekoli wana azalaki mpenza sembo to soki atindamaki na bayangeli mpo na kotyela ngai motambo. Lokola nazalaki tata ya libota na bana misato ya kobokola, likanisi ya kobungisa mosala na ngai mpe kopusama na kotika mboka wana mpe baninga na ngai ebangisaki ngai.

Okoki kotuna ete ‘Kasi, lolenge nini Moameriké tata ya libota akoki kopona kotikala na Afrika ya Nord-est, mosika ya mboka mpe bandeko na ye?’ Bopesa ngai nzela nalimbolela bino yango.

Nakolaki na Etats-Unis

Na bamibu 1920, wana nazalaki naino na école primaire, tata na ngai azwaki abonema ya Mosenzeli mpe asombaki mikanda nyonso ya Etudes des Ecritures. Tata alingaki kotanga mingi mpe asilisaki mikanda yango nyonso. Azalaki moto na yauli mpe ya kosekisa bato, lokola emonisami na motindo oyo azalaki kozwa bato oyo azalaki kobyanga na mokolo ya dimanche. Azalaki na mokanda moko kitoko oyo etongamaki na mposo ya nyama elongo na “Biblia Mosantu” na makomi ya wolo likoló ya ezipeli mpe na mokongo na yango. Azalaki kobanda masolo na kolobaka ete: “Lelo ezali mokolo ya eyenga. Okoki kotangela biso mwa ba versets?”

Ntango nyonso mobyangami azalaki kondima, kasi wana azalaki kofungola mokanda, ata likomi moko lizalaki kati yango te. Na ntembe te, moto yango asengelaki kokamwa. Tata azalaki bongo koloba ete ‘bapastere bayebi eloko moko te kati na Biblia,’ mpe azalaki kozwa Biblia moko mpe kotanga Genese 2:7. Kuna, kolobaka mpo na kozalisama ya moto ya liboso, Biblia elobi ete: “Moto akomaki molimo ya bomoi.”

Tata azalaki kolimbola ete moto azali na molimo te, kasi azali molimo, ete lifuti ya lisumu ezali kufa, mpe soki moto akufi, ya solo akufi mpe akoki koyeba likambo moko te. (Mosakoli 9:5, 10; Ezekiele 18:4; Baloma 6:23) Liboso ete nakoka kotanga malamu nasilaki kosimba na moto Genese 2:7. Wana ezali makambo ya liboso oyo nazali komikundola na ntina na esengo ya koyeba solo ya Biblia mpe kokabola yango elongo na basusu.

Lokola tozalaki kozwa Mosenzeli na ndako na biso, libota mobimba ebandaki kosepela na bilei ya elimo. Nkoko na ngai ya mwasi azalaki kofanda elongo na biso, mpe ye azalaki moto ya liboso kokoma mosakoli ya nsango malamu kati na libota na biso. Lisangá lizalaki te epai tozalaki kofanda na engumba ya Carbondale, etuka ya Illinois, kasi na mabaku mosusu makita mazalaki kosalema. Mama azalaki komema bana mitano na ngambo mosusu ya engumba esika mibange basi bazalaki kokamba boyekoli ya Mosenzeli. Tobandaki mpe kosangana na mosala ya kosakola

Natiki kobongisa radio mpo na kokota boloko

Nabalaki na 1937 ntango nazalaki bobele na mibu 17. Nazalaki kobika na mosala ya kobongisa radio mpe kolakisa mayele yango epai na basusu. Nsima ya kobota bana mibale, Peggy mpe Hank, libala na biso esukaki. Ezalaki libunga na ngai, mpo ete nazalaki kolanda bomoi ya boklisto te. Likambo oyo ete nazwaki te mokumba ya kobatela bana na ngai mibale etungisaki ngai bomoi na ngai mobimba.

Na nsima, etumba ya mibale ya mokili mobimba ebandaki mpe etindaki ngai na kokanisa na ntina na makambo mingi. Masangá ya basoda mapesaki ngai libaku ya kokoma lieutenant mpe kolakisa mosala ya kobongisa radio epai na balikili, kasi lobanzo na ngai na ntina na oyo Jéhovah azali kokanisa na ntina na bitumba ememaki ngai na kobondela mokolo na mokolo. Abonema na ngai ya Mosenzeli esilaki, Lucille Haworth oyo azwaki mokanda ya liyebisi ayaki kotala ngai. Perry Haworth azalaki tata ya Lucille, mpe basangani mingi ya libota na ye basilaki kokoma Batemwe uta mibu 1930. Ngai mpe Lucille tolinganaki, mpe tobalanaki na décembre 1943.

Na 1944, nazwaki batisimo mpe nalandaki mwasi na ngai kati na mosala ya pionnier. Mwa moke nsima, nabyangamaki na mosala ya soda, kasi naboyaki kokota. Lokola etumbu, nazwaki ekateli ya mibu misato ya bokangami na boloko ya El Reno na etuka ya Oklahoma. Ezalaki mpo na ngai esengo ya konyokwama mpo na Jéhovah. Ntongo nyonso wana nazalaki kolamuka mpe kososola epai wapi nazalaki mpe mpo na ntina nini, nazalaki kooka bosepeli monene mpe nazalaki kotonda Jéhovah. Nsima ya etumba, baoyo kati na biso bazalaki na mibu koleka 25 babandaki kopesamela nzela na kobima na boloko. Batikaki ngai na février 1946.

Mosala ya pionnier

Ntango nakendeki kokutana na Lucille, azalaki kosala mosala ya pionnier na engumba moke ya Wagomer, na etuka ya Oklahoma. Tozalaki na motuka te, yango wana totambolaki na makolo bipai nyonso mpo na kosakola kati na engumba mobimba. Na nsima tokendeki na Wewoka, bobele na Oklahoma. Mwa moke nsima, nazwaki mosala na station ya radio ya zingazinga mpe nabandaki kotalela makambo ya bopanzi nsango. Kosala mosala ngonga motoba mpe komipesa na mosala ya pionnier ezalaki likambo ya petee te, kasi tozalaki kosepela na libaku tozalaki na yango ya kosalela Jéhovah. Tosombaki motuka moko ya kala na ntango ebongi mpo na kokende na assemblée ya Los Angeles na 1947. Kuna tobandaki kokanisa mpo na lisengi ya kokota na Eteyelo ya la Société Watchtower ya Galaad mpo na kobongisama ya bamisionere.

Tososolaki ete esengelaki kozala litambe moko monene mpe tolingaki te kozwa nokinoki ekateli ya kotika Etats-Unis. Nazalaki naino kotungisama na ntina na bana na ngai oyo nabungisaki libateli na bango, yango wana tomekaki lisusu kozwa lotomo ya kobatela bango. Tozwaki mpenza litomba te mpo na lolenge ya bomoi na ngai ya kala mpe boloko oyo nakotaki. Mpo na yango tozwaki ekateli ya kokoma bamisionere. Tobyangamaki na kelasi ya 12 na Galaad.

Tozwaki mapolomi na biso na 1949, kasi na ebandeli basengaki biso ete totalaka masangá na Tennessee. Nsima ya mbula misato kati na mosala ya mokengeli ya zongazonga, tozwaki mokanda mouti na biro ya président ya la Société Watch Tower oyo alingaki koyeba soki tokolinga kozala balakisi na Ethiopia, mosala oyo tosengelaki kokokisa elongo na mosala ya kosakola. Moko na masengami ya bayangeli ezalaki ete bamisionere bazala balakisi. Tondimaki, mpe na 1952 tokendeki na Ethiopia.

Ntango tokomaki na Ethiopia, tozalaki kolakisa bakelasi ya école primaire na ntongo, mpe nsima ya nzanga tozalaki kokamba bakelasi ya boyekoli ya Biblia, kozanga lifuti. Nsima na ntango moke, bato babandaki koya mpenza mingi kino tozalaki koteya bangonga misato to minei na mokolo. Bamoko kati na bayekoli bazalaki bapolisi; basusu bazalaki balakisi to ba diacres na biteyelo ya bamisionere mpe na biteyelo ya Lingomba ya Orthodoxe ya Ethiopia. Mbala mosusu bayekoli bazalaki kokoma 20 to koleka na kelasi moko! Bayekoli mingi batikaki mangomba ya lokuta mpe babandaki kosalela Jéhovah. Tozalaki na esengo. Lisusu, wana nazalaki kolamuka ntongo nyonso, nazalaki kopesa Jéhovah matondi.

Kobotama ya bana mpe mosala ya kosakola na bipekiseli

Na 1954, toyaki koyeba ete tozali kozela mwana, mpo na yango tosengelaki kozwa ekateli ya kozonga na Etats-Unis to kotikala na Ethiopia. Kotikala na biso ezalaki kotalela makoki na ngai ya kozwa mosala ya mosuni. Nazwaki mosala ya ingénieur ya radio, na station ya empereur Hailé Selasié. Yango wana totikalaki.

Le 8 septembre 1954, mwana na biso ya mwasi Judith abotamaki. Nakanisaki ete nazalaki na libateli ya mosala mpo ete nazalaki kosala mpo na empereur, nzokande nsima ya mbula mibale nabungisaki mosala yango. Kasi, sanza moko ekokaki naino te wana Lisangá ya police ezwaki ngai​—mpe epesaki ngai lifuti moko malamu koleka—​mpo na kolakisa na bilenge lolenge ya kobongisa ba radio oyo balobanaka na yango. Kati na bambula misato oyo elandaki, bana na biso ya mibali Philip mpe Leslie babotamaki.

Bobele na ntango wana bonsomi ya mosala na biso ya kosakola ekitisamaki. Lingomba ya Orthodoxe ya Ethiopia esalaki bopusi likoló na bayangeli mpo babengana bamisionere Témoins de Jéhovah. Nabongolaki visa na ngai, nalongolaki misionere mpo na kotya mosala ya mosuni, na kolanda toli ya la Société. Mosala na biso ya misionere epekisamaki, mpe esengelaki kozala na bokengi mpe na mayele. Makita nyonso ya lisangá mazalaki kosalama, kasi bobele na bituluku ya mike.

Bapolisi basalaki bolukiluki na bandako mingi ya Batemwe oyo batyelamaki miso. Nzokande, kozanga ete bayeba yango, lieutenant moko ya police oyo azalaki mosambeli na Jéhovah azalaki koyebisa biso bisika balingaki kosala bolukiluki. Lokola litomba, mokanda moko te mokangamaki na bambula wana. Tozalaki kosala boyekoli na biso ya Mosenzeli mokolo na eyenga, na kokendeke na ba restaurants epai ya nsuka ya engumba esika bamesa etyamaki mpo na kolya libanda.

Ezalaki eleko yango, wana nazalaki kolakisa bilenge ba officiers lolenge ya kobongisa radio, nde moyekoli oyo nalobelaki na ebandeli asengaki ete nayekola na ye Biblia. Nakanisaki ete azalaki sembo mpe tobandaki koyekola. Bobele nsima ya boyekoli mibale, moyekoli ya mibale ayaki elongo na ye, mpe oyo ya misato. Nakebisaki bango ete bayebisa na moto mosusu te ete nazali koyekola Biblia elongo na bango, mpe basalaki yango te.

Na 1958, assemblée internationale La volonté divine esalemaki na Yankee Standium mpe Polo Ground ya New York. Na ntango wana, Peggy mpe Hank, elongo na bandeko mosusu ya libota na biso basilaki kokoma Batemwe ya molende. Nasepelaki mingi ete nazwaki libaku ya kozala wana! Nasepelaki te bobele na bokutani elongo na bana na ngai mibale ya mikolo mpe basangani mosusu ya libota, kasi natondaki lisusu na esengo na komona ebele monene wana ya bato koleka 250 000 oyo bayaki na mokolo ya nsuka ya assemblée.

Na mbula oyo elandaki, président ya la Société, Nathan Knorr ayoki kotala biso na Ethiopia. Apesaki biso batoli kitoko etali lolenge ya kokamba mosala ya kosakola na ntango ya bipekiseli, mpe asepelaki na libota na biso mpe na kolongono na biso ya elimo. Nalimbolaki ye ete tozalaki koteya bana na biso kobondela. Natunaki ye soki akosepela koyoka libondeli ya Judith. Andimaki mpe nsima na koyoka yango alobaki na Judith: “Ezalaki malamu mpenza, Judith.” Bongo na ntango ya bolei nasengaki na ndeko Knorr asala libondeli, mpe na nsima Judith alobaki ete: “Ezalaki malamu mpenza, ndeko Knorr!”

Kobokola bana na biso na Etats-Unis

Boyokani na ngai elongo na lisanga ya police esukaki na 1959. Tolingaki kotikala, kasi boyangeli ya mboka endimaki kosala lisusu boyokani ya mosala te elongo na ngai. Na yango tolingaki kokende wapi? Nalukaki kokende na mikili misusu epai mposa ya bandeko ezalaki monene, kasi nakokaki te. Na mwa mawa na motema, tozongaki na États-Unis. Na libaku ya bozongi na biso, tosalaki likita moko ya libota; bana na ngai nyonso mitano bayebanaki mpe basepelaki nokinoki moko na mosusu. Longwa wana bazali na boyokani ya penepene.

Tokendeki kofanda na Vichita, na etúka ya Kansas epai nazwaki mosala lokola ingénieur ya radio mpe molekisi ya mindule. Lucille amesenaki na misala ya ndako, mpe bana bazalaki kokende na eteyelo ya penepene. Nazalaki kokamba boyekoli ya Mosenzeli mokolo ya lundi na mpokwa, namekaki ntango nyonso koyeisa yango kitoko. Tozalaki koluka mokolo na mokolo koyeba soki bana bazali na mikakatano na eteyelo.

Lokola bana nyonso bakomisamaki na Eteyelo ya mosala na Nzambe, kobongisama yango esalisaki bango na kelasi. Uta bomwana tomesenisaki bango na mosala ya kosakola. Bayebaki kolakisa mikanda mikolimbolaka Biblia epai na bato, mpe bazalaki kokende elongo na biso na boyekoli na Biblia epai na bato.

Toteyaki epai na bana malako ya moboko na ntina ya bomoi, na kolimbolaka na bango ete bakoki ntango nyonso te kozwa eloko oyo epesami na moko na bango. Na ndakisa, likabo moko ekoki ntango nyonso te kopesama na bango nyonso. Tozalaki kokanisa elongo na bango boye, “Soki ndeko na yo ya mwasi to ya mobali azwi eloko ya kosakana, mpe mosusu ezali te mpo na yo, ekozala malamu ete omilelalela?” Na ntembe te, na libaku ya nsima, basusu bazalaki kozwa eloko, na yango moto moko te atalelamaki na boputu. Tozalaki ntango nyonso kolinga bango nyonso, kozanga kosepela na moko koleka basusu mibale.

Ezalaki kokoma ete bana basusu bapesamela nzela ya kosala makambo oyo bana na biso bapesameli nzela te. Mbala na mbala nazalaki koyoka ete: “Songolo akoki kosala yango, bongo mpo na nini biso te?” Nazalaki komeka kolimbola, kasi mbala mingi eyano ezalaki bobele ete “Bozali na libota wana te, bino bozali bana ya Brumley. Tozali na malako lolenge moko te.”

Mosala na Perou

Uta tozongaki longwa na Ethiopia, ngai mpe Lucille tozalaki kooka mposa ya kozongela lisusu mosala ya misionere. Na nsima, na 1972 libaku epesamelaki biso ya kokende na Perou, na sud ya Amerike. Ezalaki na esika mosusu malamu te oyo tokokaki kopona mpo na kobokola bana na biso na bolenge na bango. Bokutani na bango elongo na bamisionere mpe ba pionniers spéciaux mpe na bandeko mosusu oyo bayaki kopesa lisalisi na Perou esalisaki bango na komona lolenge nini baoyo batye mpenza matomba ya Bokonzi na esika ya liboso bazali na esengo. Philip abyangaki boninga yango bopusi ya malamu.

Nsima ya mwa ntango, baninga oyo tozalaki na bango na Kansas bayokaki motindo tozalaki kolonga kati na mosala ya Bokonzi na Perou mpe bayaki kokutana na biso. Nabongisaki ndako na biso lokola ndako ya bamisionere. Moto na moto azalaki na mokumba na ye, mpo biso nyonso tozala na ntango ya kosepela na mosala ya kosakola. Ntongo nyonso tozalaki kotalela texte moko ya Biblia na eleko ya bolei. Ezalaki mpenza libaku ya esengo mpo na biso nyonso. Lisusu, wana nazalaki kolamuka ntongo nyonso mpe kososola epai nazalaki mpe mpo na nini, nazalaki kopesa Jéhovah botondi ya mozindo, na nse ya motema.

Mwa ntango na nsima Judith abalaki mpe azongaki na États-Unis, epai alandaki mosala na ye ya pionnier. Nsima ya kosala mosala ya pionnier spécial mbula misato, Philip asengaki mosala na Béthel mpe abyangamaki na Béthel ya Brooklyn, na New York. Na nsuka, Leslie mpe azongaki na États-Unis. Bakendeki na mwa mawa na motema, mpe balobaki ete komema bango na Perou ezalaki likambo lileki malamu oyo tosalaki mpo na bango.

Biso mpe tososolaki ete tosengeli kozonga mpo ete nkita ya mboka Perou ebebaki mpenza makasi. Na bozongi na biso na Wichita na 1978, tokutaki etuluku moko ya Batemwe oyo bazali koloba lokota ya Espagnol. Basengaki ete totikala mpe tosalisa bango, likambo oyo tondimaki na esengo nyonso. Lisangá moko ebotamaki, mpe tokomaki kolinga yango motindo moko na masanga epai tozalaki liboso.

Mokili ya Equateur ebengi biso

Atako ngambo moko ya nzoto na ngai elembaki na likama, nazalaki na mposa nyonso kolona elikya ete ngai mpe Lucille tokokaki lisusu kosala na mokili ya bopaya. Na 1984 mokengeli moko ya zongazonga alobelaki biso mpo na bokoli na Équateur mpe mposa monene ya bankulutu ya masangá. Namonisaki ete nakokaki bobele kosala moke na mosala ya kosakola na ntina ya bokono na ngai, kasi andimisaki ngai ete ata nkulutu ya mibu 65, oyo ngambo moko ya nzoto na ye etengumi akoki kosalisa.

Nsima na kokende na ye, butu mobimba tokokaki kolala te mpo tozalaki kolobela bobele makoki ya kokende na Equateur. Lucille azalaki koyoka mposa lolenge moko na ngai. Yango wana tosalaki publisité ya kopanyi na biso ya nkisi ya kobatela bilanga mpe totekaki yango nsima ya mposo mibale. Totekaki mpe ndako na biso bobele nsima ya mikolo zomi. Bongo, na bonunu na biso, na esengo monene, tozongelaki lisusu mosala na biso ya misionere na mokili ya bopaya.

Tofandaki na Quito, mpe mosala ya kosakola ezalaki mpenza esengo monene, mokolo na mokolo ezalaki komemela biso ekperianse ya sika to makambo oyo tomona naino te. Kasi na 1987, minganga bamonaki ete nazali na kanser ya mokwa ya mokongo; oyo ezalaki kosenga kopasola yango nokinoki. Tozongaki na Wichita mpo na lipaso, oyo elekaki malamu. Bobele mbula mibale nsima ya bozongi na biso na Quito, kanser emonanaki lisusu, mpe tosengelaki kozonga na États-Unis mpo na libela. Tokendeki na Carolina du Nord epai tozali kofanda sikawa.

Bomoi oyo etondi mbano

Nazali na elikya mingi te mpo na nzoto na ngai. Esengaki ete basala ngai lipaso monene ya misopo na 1989. Atako bongo, nazali naino kosala lokola nkulutu mpe nazali kokamba boyekoli ya Biblia mingi elongo na baoyo bazali koya epai na ngai na ndako. Na boumeli ya mibu mingi tosili kosalisa ebele na bato na kolona, kosopa mai to na kolona mboto ya solo. Wana ezali esengo ya solo oyo ekoki kobeba te ata soko ezongelami mbala boni.

Likoló na nyonso wana, nazalaki na esengo ya komona bana na ngai nyonso kosalela Jéhovah. Peggy asili kosala mibu 30 kokendeke elongo na mobali na ye Paulo Moske, kati na mosala ya zongazonga na États-Unis. Philip mpe mwasi na ye Elisabeth, elongo na Judith, bango nyonso bazali na mosala ya ntango nyonso na New York. Hank mpe Leslie elongo na basi na bango bazali Batemwe ya molende, lisusu bandeko na ngai ya mibali mpe ya basi minei mpe mabota na bango, oyo esangisi bandeko ya mosuni 80, bango nyonso bazali kosalela Jéhovah. Lucille mpe amonisaki ndakisa malamu ya mwasi moklisto kati na libala na boumeli ya mibu 50 ya bokangami na biso. Na boumeli ya bambula oyo euti koleka azali kosala kozanga komilela misala mingi ya kosepelisa te mpo na kosalisa ngai na nzoto oyo esili kobeba.

Ya solo, bomoi na ngai ezalaki ya esengo. Epesaki bosepeli oyo maloba mpamba makoki kolimbolama te. Kosalela Jéhovah ezali kopesa esengo na motindo boye ete mayoki na ngai ya motema mazali ya kosambela ye libela awa na mabelé. Nakanisaka ntango nyonso Nzembo 59:16, oyo elobi ete: “Kasi ngai nakoyemba nguya na yo, nakonganga na esengo na ntango na ntongo mpo na malamu na motema na yo. Mpo ete ozali ebombelo na ngai mpe ekimelo na ngai mpo na mokolo ya mpasi.”

[Elilingi na lokasa 23]

George Brumley mpe empereur ya Ethiopia, Hailé Sélassié

[Elilingi na lokasa 25]

George Brumley mpe mwasi na ye, Lucille

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto