“Motema boboto na yo eleki bomoi na malamu”
Lisoló ya Calvin H. Holmes
Ezalaki na sanza ya Desɛ́mbɛ 1930 wana nautaki kosilisa kobimisa miliki ya ngɔmbɛ tata azongaki na ndako autaki kotala moninga moko oyo azalaki kofanda pene na biso. Wana abimisaki mokanda ya langi ya bulé na libenga na ye, alobaki ete: “Wyman adefisi ngai búku oyo.” Ezalaki na motó na likambo ete Délivrance, ebimisamaki na la Société Watch Tower. Tata, atako azalaki na momeseno ya kotángaka mikanda te, atángaki búku wana kino na kati ya butu.
NA NSIMA, Tata adefaki babúku mosusu, moko ezalaki na motó na likambo ete Lumière mpe mosusu ezalaki na motó na likambo ete Réconciliation, nyonso ebimisamaki na la Société Watch Tower. Azwaki Biblia ya mama oyo ekómaki ya kala mpe abandaki kotánga kino na kati ya butu na lisalisi ya mwinda ya pitɔlɔ́. Tata asalaki mbongwana monene. Na eleko wana ya mpiɔ asololaká na biso na boumeli ya bangonga mingi—ngai, mama, mpe baleki na ngai misato ya basi—wana tofandaki zingazinga ya mɔ́tɔ ya nkoni.
Tata alobaki ete bakomi ya babúku yango bazalaki kobéngama Bayekoli ya Biblia, mpe ete, engebene bango, tozalaki kobika na “mikolo ya nsuka.” (2 Timoté 3:1-5) Alimbolaki ete mabelé ekobebisama te na nsuka ya mokili kasi na nsé ya Bokonzi ya Nzambe ekobongwana paladiso. (2 Petelo 3:5-7, 13; Emoniseli 21:3, 4) Likambo yango esepelisaki ngai mingi mpenza.
Lokola tozalaki kosala esika moko, tata azalaki koteya ngai. Nazali komikundola ete tozalaki kolongola masangu na mikokolo ntango alimbolaki ete nkombo ya Nzambe ezali Yehova. (Nzembo 83:18) Bongo, na Prɛntá ya 1931, ntango nazalaki bobele na mibu 14, nazwaki etɛlɛmɛlo mpo na Yehova mpe mpo na Bokonzi na ye. Nabondelaki Yehova kati na elanga ya kala ya pomme oyo ezalaki na nsima ya ndako mpe nalakaki ye ete nakosalela ye mpo na libela. Motema na ngai esilaki kopusama na motema boboto ya Nzambe na biso ya kokamwa.—Nzembo 63:3.
Tozalaki kofanda na ferme moko ezwami na ntáká ya kilomɛtɛlɛ soko 30 na engumba Saint-Joseph, na etúká ya Missouri, na États-Unis, mpe na kilomɛtɛlɛ pene na 65 na engumba Kansas City. Tata abotamaki na ndako moko ya moke ya banzeté oyo nkɔkɔ na ngai atongaki na kati ya ferme na ebandeli ya ekeke ya 19.
Kobongisama mpo na mosala ya kosakola
Na eleko ya molungé ya 1931, biso nyonso na libota na biso toyokaki na radio lisukúlu “Bokonzi, elikya ya mokili,” oyo Joseph Rutherford, asalaki na liyangani ya Colombus na etúká ya Ohio, na ntango wana azalaki prezidá ya la Société Watch Tower. Yango esimbaki motema na ngai, mpe nazalaki na esengo ya kokende elongo na tata mpo na kokabola mwa búku oyo ezalaki na lisukúlu wana ya ntina epai na bayebani na biso.
Na Prɛntá ya 1932, nayanganaki mpo na mbala ya liboso na likita ya Batatoli ya Yehova. Moninga moko ya kartyé abyangaki ngai na tata na engumba Saint-Joseph koyoka lisukúlu oyo George Draper, mokɛngɛli-motamboli ya Batatoli ya Yehova alingaki kosala. Ntango tokómaki kuna, likita ekómaki na katikati, mpe nafandaki na nsima ya engambe moko na nkombo J. D. Dreyer, oyo na nsima asalaki bopusi mingi kati na bomoi na ngai.
Na sanza ya Sɛtɛ́mbɛ 1933, nayanganaki na liyangani elongo na tata na Kansas City, epai nasanganaki mpo na mbala ya liboso na mosala ya kosakola. Tata apesaki ngai mwa búku misato mpe alakisaki ngai ete nalobaka boye: “Nazali Motatoli ya Yehova, nazali kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe. Nakanisi ete oyokaki Zuzi Rutherford na radio. Masukúlu na ye mazali koleka na baemisyó ya radio koleka 300 pɔ́sɔ na pɔ́sɔ.” Na nsima nazalaki kolakisa mwa búku. Na mpokwa yango, wana nazalaki kobimisa miliki ya ngɔmbɛ na ferme, nazalaki kokanisa ete wana ezalaki mokolo moleki bonene kati na bomoi na ngai.
Mosika te eleko ya mpiɔ ebandaki, mpe tozalaki lisusu kotambola mingi te. Kasi, Ndeko Dreyer na mwasi na ye bayaki kotala biso mpe batunaki ngai soki nakolinga kokende epai na bango mokolo ya pɔ́sɔ mpe nalala kuna. Ntáká ya kilomɛtɛlɛ 10 oyo nasengelaki kotambola kino na ndako ya Ndeko Dreyer ezalaki na ntina mpamba te nasengelaki kobima na bango na mosala ya kosakola mokolo molandaki mpe koyangana na boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na Saint-Joseph. Uta ntango wana, nazalaki kozanga mpenza te na mosala ya kosakola oyo ezalaki kosalema mokolo ya lomingo. Kobongisama mpe batoli oyo nazwaki epai ya Ndeko Dreyer ezalaki na motuya mingi.
Na mokolo ya 2 Sɛtɛ́mbɛ 1935, namonisaki elembo ya komipesa na ngai epai ya Yehova na nzela ya batisimo ya mai na engumba Kansas City.
Ebandeli ya mosala ya bomoi na ngai mobimba
Na ebandeli ya 1936, nasɛngaki mosala ya mobongisi-nzela, elingi koloba mosakoli ya ntango nyonso, mpe batyaki ngai na molɔngɔ́ ya baoyo bazalaki koluka moninga mpo na kosala esika moko mosala ya mobongisi-nzela. Mwa moke na nsima, nazwaki nkomá ya Edward Stead, azalaki na engumba Arvada, na etúká ya Wyoming. Alimbolaki ete atambolaka na lisalisi ya kiti ya kotindika mpe azali na mposa ya lisungi mpo na kosala mosala ya mobongisi-nzela. Nokinoki nandimaki lisɛngi na ye mpe na mokolo ya 18 Apríli 1936, nandimamaki mpo na kosala mosala ya mobongisi-nzela.
Liboso ya kotika ndako mpo na kokende kokutana na Ndeko Stead, mama asololaki na ngai wana tozalaki bobele biso mibale. Atunaki ngai ete: “Mwana na ngai, ondimisami solo ete oyo ezali mosala olingi kosala?”
Nayanolaki ete: “Bomoi na ngai ekozala na ntina te, soki nakosala mosala mosusu.” Nayaki kososola ete motema boboto ya Yehova eleki biloko mosusu nyonso na ntina.
Kosala mosala ya mobongisi-nzela esika moko na Ted, lolenge oyo tozalaki kobenga Ndeko Stead, ezalaki kobongisama eleki malamu. Azalaki na molende mpe na lolenge malamu ya komonisa nsango ya Bokonzi. Nzokande, nyonso oyo Ted akokaki kosala uta na kiti na ye ezalaki sé kokoma mpe koloba; azalaki na maladi ya mingai na matonga ya nzoto mobimba. Nazalaki kolamuka na ntɔ́ngɔ́ntɔ́ngɔ́ mpo na kosukola ye, kokata ye mandefu, kolamba bilei ya ntɔ́ngɔ́, mpe koleisa ye. Na nsima nazalaki kolatisa ye bilamba mpe kobongisa ye mpo na kobima na mosala ya kosakola. Na eleko wana ya molungé, oyo tosalaki mosala ya mobongisi-nzela na etúká ya Wyoming mpe na etúká ya Montana, tozalaki kolala libándá. Ted azalaki kolala na liboso kati na motuka na ye, mpe ngai nazalaki kolala na nsé na mwa hema ya kapɔ́. Na Ɔtɔmne ya mobu yango nakendaki na súdi kosala mosala ya mobongisi-nzela na etúká ya Tennessee, ya Arkansas, mpe ya Mississippi.
Na sanza ya Sɛtɛ́mbɛ 1937, mpo na mbala ya liboso nazwaki libaku ya kozala na liyangani monene oyo esalemaki na Columbus, na etúká ya Ohio. Kuna, bibongiseli bikamatamaki mpo na koyeisa monene mosala ya kosakola na kosaleláká fonó. Tozalaki kobénga libaku mokomoko oyo tozalaki kosalela fonó na ekuke ya moto ete setup. Na sanza moko nasalaki setup koleka 500, mpe bato koleka 800 bayokaki. Nsima ya kopesa litatoli na bingumba ebele ya ɛ́sti ya etúká ya Tennessee, ya Virginie, mpe ya Virginie ya Wɛ́sti, nabyangamaki mpo na kosala mosala ya mobongisi-nzela monene bakisa mpe mokumba ya sika, kosaláká elongo na mokɛngɛli ya zone, lolenge bakɛngɛli-batamboli bazalaki kobengama na ntango wana.
Nazalaki kokende kotala masangá mpe bituluku oyo bizwami mosika na masangá na Virginie ya Wɛ́sti—kolekisáká pɔ́sɔ mibale kino minei na lisangá mokomoko—mpe nazalaki kotambwisa mpe kopesa ndakisa na mosala ya kosakola. Na nsima, na sanza ya Yanúali 1941, naponamaki mpo na kosala lokola mokɛngɛli ya zone. Na ntango wana mama na ngai elongo na baleki na ngai misato ya basi—Clara, Loïs, mpe Ruth—basilaki kozwa etɛlɛmɛlo mpo na Bokonzi. Na bongo, libota na biso mobimba tokendaki na liyangani monene oyo esalemaki na engumba Saint-Louis na eleko ya molungé ya mobu wana.
Mwa moke nsima ya liyangani, bayebisaki bakɛngɛli ya zone ete mosala ya zone ekosila na nsuka ya sanza ya Novɛ́mbɛ 1941. Na sanza elandaki États-Unis ekɔtaki na Etumba ya Mibale ya mokili mobimba. Batindaki ngai mpo na kosala mosala ya mobongisi-nzela monene, esɛngaki kolekisa ngonga 175 na mosala ya kosakola sanza na sanza.
Mabaku ya sipesiale kati na mosala
Na sanza ya Yulí 1942, nazwaki nkomá oyo etunaki ngai soki nakolinga kokende kosala na mboka mopaya. Nsima ya kondima, nabyangamaki na Betele, biro monene ya Batatoli ya Yehova na Brooklyn, New York. Bandeko minzemba soko 20 babyangamaki na mbala moko mpo na kobongisama moko ya sipesiale.
Nathan H. Knorr, oyo azalaki ntango wana prezidá ya la Société Watch Tower, alimbolaki ete mosala ya kosakola ekitaki mpe tosengelaki kobongisama mpo na kolendisa masangá na elimo. Alobaki ete, “Tolingi koyeba te bobele mikakatano ya masangá, kasi tolingi koyeba oyo bino bamonisi-batamboli bosalaki mpo na yango.”
Ntango tozalaki na Betele, Fred Franz, oyo akitanaki Ndeko Knorr lokola prezidá ya la Société na 1977, asalaki lisukúlu moko kati na yango alobaki ete: “Etumba ya Mibale ya mokili mobimba ekosila, mpe mosala monene ya kosakola ekobanda. Na ntembe te bamilió ya bato bakoyanganisama lisusu kati na lisangá ya Yehova!” Lisukúlu wana ebongolaki lolenge na ngai ya kotalela makambo. Ntango bakabolaki bateritware, bayebisaki ngai ete nasengelaki kotalaka masangá nyonso ya etúká ya Tennessee mpe ya etúká ya Kentucky. Liboso bazalaki kobenga biso basaleli ya bandeko, ebengeli oyo nsima ekómaki mokɛngɛli ya zongazonga.
Nabandaki kotala masangá na mokolo ya 1 Ɔkɔtɔ́bɛ 1942, wana nazalaki bobele na mibu 25. Na eleko wana mwango bobele moko ya kokóma na masangá ezalaki ya kotambola na makolo to na mpunda. Na bantango mosusu nazalaki kolala na eteni moko ya ndako esika moko na libota oyo eyambaki ngai.
Na sanza ya Yulí 1943, wana nazalaki kotala lisangá ya Greeneville na etúká ya Tennessee, nazwaki libyangi ya kokɔta na kelasi ya Gileadi, Eteyelo ya Biblia ya la Société Watchtower, ya mbala ya mibale. Na Gileadi, nayekolaki oyo elimboli solosolo “kotya motema na etingya na koleka na makambo masili biso koyoka” mpe ntango nyonso ‘kozala na misala ya kosala kati na mosala ya Nkolo.’ (Baebele 2:1; 1 Bakolinti 15:58, NW) Sanza mitano ya mateya elekaki nokinoki, na boye ete na mokolo ya 31 Yanuáli 1944 tozwaki mapɔlɔ́mi.
Na Canada mpe kino na Belgique
Bamoko kati na biso totindamaki na Canada, epai epekiseli na mosala ya Batatoli ya Yehova eutaki kolongolama. Natindamaki na mosala ya mokɛngɛli-motamboli, oyo ezalaki kosɛngisa ngai kotambola nzela mosika longwa na lisangá moko kino na lisangá mosusu. Wana nazalaki kotambola na masangá, nazalaki na esengo ya koyoka baeksperiansi na lolenge oyo mosala ya kosakola esalemaki na boumeli ya epekiseli na Canada. (Misala 5:29) Bandeko mingi bazalaki kolobela oyo babéngaki kampanye ya mbangumbangu, wana na butu sé moko, mwa búku ekabolamaki na ndako mokomoko na ekólo Canada mobimba. Oyo nde nsango malamu ya koyoka ete na Máí 1945 etumba esilaki na Mpótó!
Na eleko ya molungé ya mobu wana, ntango nazalaki kotala masangá na engumba moke ya Osage, na etúká ya Saskatchewan, nazwaki nkomá ya Ndeko Knorr, akomaki boye: “Nazali kobakisela yo libaku malamu ya kokende na Belgique. . . . Mosala ezali mingi na ekólo wana. Ezali ekólo oyo etumba ebebisi, mpe bandeko na biso bazali na mposa ya lisungi, mpe emonani malamu ete tótinda ndeko moko ya États-Unis mpo na kopesa bango lisalisi mpe libɔndisi oyo bazali na yango mposa.” Nazongisaki eyano nokinoki, kondimáká kokende kuna.
Na sanza ya Novɛ́mbɛ 1945, nazalaki na Betele ya Brooklyn epai kuna Charles Eicher ayekolisaki ngai Lifalansé, ndeko yango azalaki mobangé mpe autaki na etúká Alsace na ekólo France. Nazwaki lisusu mateya ya nokinoki na lolenge ya kotambwisa misala ya filiale. Liboso ya kokende na Mpótó, nakendaki kotala mpo na mwa ntango mokuse libota mpe baninga na ngai na engumba Saint-Joseph, na etúká ya Missouri.
Na mokolo ya 11 Desɛ́mbɛ, natikaki engumba New York na masuwa Queen Elizabeth, mpe mikolo minei na nsima nakómaki na engumba Southampton, na ekólo Angleterre. Nalekisaki sanza mobimba na filiale ya Angleterre, epai nazwaki mateya mosusu. Nsima na yango, na mokolo ya 15 Yanuáli 1946, natikaki libongo ya Angleterre mpe nakatisaki mai ya La Manche mpo na kokóma na libongo ya Ostend, na Belgique. Longwa na esika yango nakɔtaki na engbunduka kino na engumba Bruxelles, kuna libota mobimba ya Betele ezalaki kozela ngai na esika ya bozeli engbunduka.
Mosala ebakisami nsima ya etumba
Naponamaki lokola mokambi ya mosala ya kosakola na Belgique, kasi nayebaki koloba lokota ya mboka yango te. Na nsima ya sanza soko motoba, nakómaki komeka kosolola mwa moke na Lifalansé. Kosala elongo na bato oyo batyaki bomoi na bango na likama mpo na kokóba mosala ya kosakola na boumeli ya mbula mitano ya boyangeli ya Nazi ezalaki libaku malamu. Bamoko na bango bautaki kobima na bakáa ya bakangami.
Bandeko bazalaki na mposa makasi ete mosala ebongisama malamu mpe báleisa bato oyo bazalaki na nzala ya [elimo] solo ya Biblia. Na yango, bibongiseli bizwamaki mpo na kosala mayangani mpe mpo ete bakɛngɛli-batamboli bátalaka masangá. Tolendisamaki lisusu ntango Nathan Knorr, Milton Henschel, Fred Franz, Grant Suiter, mpe John Booth—bango nyonso bautaki na biro monene ya Batatoli ya Yehova na Brooklyn bayaki kotala biso. Na mikolo wana ya ebandeli, nasalaki lokola mokɛngɛli ya zongazonga, mokɛngɛli ya etúká, mpe mokambi ya filiale. Na mokolo ya 6 Desɛ́mbɛ 1952, nsima ya pene na mbula nsambo ya mosala na Belgique, nabalaki Emilia Vanopslaugh, oyo azalaki mpe kosala na filiale ya Belgique.
Mwa basanza na nsima, na mokolo ya 11 Apríli 1953, nabéngisamaki na biro ya bapolisi mpe bayebisaki ngai ete kozala na ngai na Belgique ezalaki kotya libateli ya ekólo yango na likama. Nakendaki na Luxembourg kozela kino ntango likambo na ngai likotalelama na Conseil d’État.
Na sanza ya Febwáli 1954, Conseil d’État ya Belgique endimaki ete nazalaki kotya ekólo na likama. Elembeteli bapesaki ezalaki ete uta kokóma na ngai na Belgique, motángo ya Batatoli kati na ekólo ebakamaki na lolenge ya kokamwa—elongwaki na Batatoli 804 na 1946 kino na 3 304 na 1953—mpo na yango, libateli ya Belgique ezalaki na likama mpamba te bilenge Batatoli mingi bazalaki kozwa etɛlɛmɛlo ya koboya komikɔtisa na makambo ya politiki. Yango wana, ngai na Emilia totindamaki na ekólo Suisse, epai tobandaki kosala mosala ya zongazonga na teritware epai balobaka lokota ya Lifalansé.
Eteyelo ya mosala ya Bokonzi—oyo ezali mpo na kobongisama malamu ya bankulutu baklisto—ebandaki na 1959 na South Lansing, na etúká ya New York. Nabyangamaki kuna mpo na kolanda mateya oyo masengelaki kolakisama na Mpótó. Ntango nazalaki na États-Unis, nakendaki kotala libota na ngai na engumba Saint-Joseph, na etúká ya Missouri. Kuna namonaki mama na ngai ya bolingo mpo na mbala ya nsuka. Akufaki na Yanuáli 1962 mpe tata akufaki na Yúni 1955.
Na sanza ya Mársi 1961, Eteyelo mpo na mosala ya Bokonzi ebandaki na engumba Paris, na ekólo France, mpe nakendaki na Emilia. Bakɛngɛli ya etúká, ya zongazonga, bakɛngɛli ya masangá, mpe babongisi-nzela minene bayaki na eteyelo yango, bautaki na France, na Belgique, mpe na Suisse. Na boumeli ya sanza 14 oyo elandaki, natambwisaki kelasi mbala 12 oyo mokomoko ezalaki koumela pɔ́sɔ minei. Na nsima, na Apríli 1962, Emilia akómaki na zemi.
Komesana na makambo ya sika
Tozongaki na Genève, na ekólo Suisse, epai kuna tozwaki mokanda ya Letá oyo epesaki biso ndingisa ya kofanda kuna. Nzokande, kozwa esika ya kofanda ezalaki likambo ya pɛtɛɛ te, mpamba te bandako ezalaki mingi te. Ata mpe kozwa mosala ezalaki likambo ya pɛtɛɛ te. Nsukansuka nazwaki mosala na magazini moko ya monene oyo ezwami na esika ya mombongo na engumba Genève.
Nasilaki kolekisa mbula 26 kati na mosala ya ntango nyonso, bongo bomoi na biso ya sika esɛngaki mpenza mbongwana. Na boumeli ya mbula 22 oyo nasalaki mosala na magazini mpe nazalaki kobɔkɔla bana na biso mibale ya basi, Loïs mpe Eunice, libota na biso ezalaki kotya ntango nyonso matomba ya Bokonzi na esika ya liboso. (Matai 6:33) Nsima ya kosila-sanza na 1985, nabandaki kosala lokola mokɛngɛli ya zongazonga mosungi.
Emilia azali na nzoto makasi mpenza te, kasi azali kosala oyo ekoki na ye na mosala ya kosakola. Loïs asalaki lokola mobongisi-nzela na boumeli ya mbula soko zomi. Elongo na ye tolekisaki ntango ya esengo na elimo na liyangani kitoko ya mikili mingi na engumba Moscou na boumeli ya eleko ya molungé ya mobu 1993! Mwa moke na nsima, wana azalaki na mobembo na ekólo Sénégal, na Afrika na ntango ya loi, Loïs akufaki ntango azalaki kosukola na mbu. Bolingo mpe boboto ya bandeko na biso ya Afrika mpe ya bamisionere ezalaki libɔndisi monene mpo na ngai ntango nakendaki na Sénégal mpo na kokundama ya Loïs. Nazali na mposa makasi ya komona Loïs na lisekwa!—Yoane 5:28, 29.
Nazali na botɔ́ndi mingi mpo ete na boumeli ya mbula koleka 40 nasungami na moninga moko ya bolingo. Na yango, atako nazali kobɛla bokɔnɔ ya motema mpe nazali na mitungisi ndenge na ndenge, motema boboto ya Yehova ezali kitoko mpe epesi ntina na bomoi na ngai. Motema na ngai ezali kopusama na kosakola mpo na Nzambe na biso, Yehova, na maloba ya mokomi ya nzembo ete: “Zambi motema boboto na yo ezali koleka bomoi, bibebu na ngai ekosanzola yo.”—Nzembo 63:3, NW.
[Elilingi na lokasa 26]
Toyeisaki monene mosala ya kosakola na kosaleláká fonó
[Elilingi na lokasa 26]
Baboti na ngai na 1936
[Elilingi na lokasa 26]
Litatoli na balabála na Belgique na 1948