Mokili ekómi nsɔ́mɔ
KOPASWAMA ya bómbi moko monene oyo babombaki kati na motuka moko ebɛtaki ndako molai oyo ezali na biteni ya likoló 110 oyo ebéngami World Trade Center na engumba ya New York na Febwáli 26, 1993. Bankóto ya basáli bakangamaki na bitómbola oyo bitelemaki to basengelaki kokima mpo na kokita na bibuteli oyo bitondaki na milinga. Baokaki nsɔ́mɔ oyo ezali sikawa bipai nyonso kati na mokili oyo motondi na mobulu.
Na bamboka mingi, bato bazali na nsɔ́mɔ makasi ya babómbi, oyo ekómi mpenza likambo ya mokolo na mokolo na bamboka lokola Irlande mpe Liban. Ya solo, babómbi 13 epaswamaki bobele na mokolo moko—Marsí 12, 1993—na engumba Bombay, na mboka Inde, oyo ebomaki penepene na bato 200! Moto moko oyo amonaki likambo yango alobaki ete: “Bobangi makasi bozali kati na Bombay mobimba.” Engebene zulunalo Newsweek, bómbi oyo batyaka na motuka “epalangani mpenza mingi na boye ete ezali kopesa nsɔ́mɔ mingi.”
Nsɔ́mɔ ya babómbi ya nikleere ezali naino
Likambo oyo ete bamasini ya nikleere oyo epesaka lotiliki ekoki kobebisama na bómbi lizali kopesa nsɔ́mɔ. Kokwea ya bómbi likoló na masini ya nikleere oyo epesaka lotiliki ekoki kobimisa kobebisama mpe mpasi monene mpenza. Nsɔ́mɔ yango ekómaki makasi ntango mobali moko alukaki kotuta motuka na ye na ekuke ya kobatelama ya ndako ya bamasini ya nikleere ya engumba Three Mile Island oyo epesaka lotiliki na Etats-Unis.
Mingi bazali kobanga ete bato na mobulu mpe bayangeli oyo bazali na mposa ya nguya bakozwa bibundeli ya nikleere. Basusu bazali kobanga ete bankóto mingi ya bato ya mayele na makambo ya nikleere na bikólo oyo ebéngamaki kala Union Soviétique, baoyo bazangi mosala bakoluka koteka mayele na bango. Lisusu, atako boyokani ya START ezali kosɛnga kolongolama ya bibundeli ya makasi ya nikleere, kokokisama ya boyokani wana ekosila bobele na nsuka ya mobu 1999, to ata na nsima na yango. Kino ntango wana, bato mosusu ya mobulu oyo mbala mosusu bakozwa bokonzi bakoki kosalela bibundeli wana ya etumba mpo na kotya likámá monene likoló na bato.
Mobulu mozali kokólisa kobanga
Kopalangana monene ya mobulu ya koboma bato ezali kobangisa bato na bandako na bango mpe na balabála. Batangaki ete ba Américains pene na 23 200 babomamaki na mobu 1990. Na ndakisa, kati na engumba Chicago, bokóli mpo na oyo etali kosalela bilangwiseli ya makasi esalemi na cocaïne ememaki na koboma bato soko 700 na mbula moko. Kati na bingumba mosusu, ezali na bisika oyo bisili kokóma bisika ya bitumba, epai baleki nzela, ezala ata bana babomamaki na masasi oyo mazalaki kobɛtama. Zulunalo moko elobi ete: “Mobulu mozali kokóla nokinoki kati na bingumba ya mwa minene. . . . Moto moko te abatelami wana bituluku ya bato na [Etats-Unis] bitondi na bilangwiseli mpe na bilenge mingi ya mobulu. Mbula nyonso moko kati na ba Américains minei azali kokutana na mobulu to bazali koyiba kati na ndako na ye.”—U.S.News & World Report, Ɔkɔtɔ́bɛ 7, 1991.
Nsɔ́mɔ ya kobebisama ezali kotungisa basi mingi. Na France, motángo ya kobebisama ya basi ekólaki na 62% kobanda mobu 1985 kino mobu 1990. Bobele na mibu motoba, mobulu ya kobebisa basi ebakisamaki mbala mibale kino na 27 000 na Canada. Allemagne eyebisaki kobebisama ya mwasi na miniti nsambo nyonso.
Bana mpe bazali kobanga mpo na kobatelama na bango. Zulunalo Newsweek emonisaki ete na Etats-Unis, “bana, ata baoyo bazali na kelasi ya minei mpe ya mitano na eteyelo ya ebandeli, bazali kotambola na mindóki, mpe balakisi elongo na bakambi ya biteyelo bazali na nsɔ́mɔ.” Likámá yango lizali mpenza monene na boye ete ndambo moko na minei ya bamonisi ya biteyelo oyo bizali na bingumba basalelaka masini oyo elakisaka bibende, kasi bana ya mitó makasi bazwaka ntango nyonso nzela ya kolekisa mindóki na kopesáká yango epai na basusu na maninisa.
Nsɔ́mɔ ya SIDA
Ntalo monene ya bato bazali kobanga kozwa SIDA. Ezali na bato koleka 230 000 oyo basili kozwa SIDA bobele na Etats-Unis. SIDA esili kokóma ntina ya motoba ya kufa ya bilenge oyo bazali na mibu kobanda 15 kino 24. Zulunalo Newsweek eyebisi ete “Mikolo mizali koya mizali kobangisa na ntina na bokɔnɔ mingi oyo bopalanganaka nokinoki.”
Kokufa na SIDA ezali ntango nyonso kokóla kati na bato oyo bamipesi na mabina, na masano, na bafilime, na miziki, balakisi ya midɛlɛ, na televizyó, na ntɔ́ki, mpe na misala motindo yango. Lapólo moko emonisaki ete 60% ya kufa ya mibali oyo basalaka na kopanyi ya bopanzi nsango, na ntɔ́ki mpe na masano kati na engumba Paris, baoyo bazali na mibu kati na 25 mpe 44, euti na SIDA. O.M.S. (Ebongiseli oyo etalaka makambo ya kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto na mokili mobimba) emonisaki ete kobanda milió mwambe kino milió zomi ya bato na mokili mobimba bazali na VIH (mikrobe oyo epesaka SIDA). Monganga Michael Merson, mokambi moko ya O.M.S. alobi ete: “Ezali sikawa polele ete motuya ya bato oyo bazali na VIH kati na mokili mobimba mozali kokóla nokinoki, mingimingi kati na mikili ya bobólá.”
Na ntembe te, ezali lisusu na makambo matali ezingelo mpe bantina mosusu ya nsɔ́mɔ. Nzokande, bobele makambo oyo mayebisami awa makoki mpo na komonisa ete mokili ekómi nsɔ́mɔ. Makambo oyo mazali nde na ndimbola ya sikisiki? Tokoki nde kolikya ete nsɔ́mɔ ekoki kosila?
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 2]
Cover photos: Left: Tom Haley/Sipa Press; Bottom: Malanca/Sipa Press
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 3]
Bob Strong/Sipa Press