Bayanganaki lokola basanzoli na esengo
LIBOTA na kala ya Yehova Nzambe ezwaki etindá oyo ete ‘bázala na esengo solo’ wana bazalaki koyangana mpo na losambo. (Deteronome 16:15) Liyangani ya Etúká “Basanzoli na esengo” oyo esalemaki na 1995/1996 epesaki mpenza epai ya Batatoli ya Yehova bantina ya solo ya kozala na esengo.
Uta yango ebandaki kosalema, mayangani wana masili kotonga kondima. Masili mpe komonisa lolenge ya kozala na esengo kati na mokili oyo mozangi esengo. Tiká tótalela liyangani yango mokolo na mokolo.
‘Bósanzola Yehova, bino bato na ye . . . Bósepela!’
Motó na likambo oyo ya mokolo ya liboso ya liyangani etongamaki likoló na Nzembo 149:1, 2. Lisukúlu “Tozali na ntina ya konganga na esengo” etalelaki kokokisama ya esakweli ya Yisaya mokapo 35. Ekokisamaki na Yisalaele ya kala mpe mingimingi na mikolo na biso na kozongisama ya bolamu mpe ya kolɔngɔ́nɔ́ ya basambeli ya Yehova kati na paladiso ya elimo. Na yango, bayangani bazalaki na ntina ya konganga na esengo mpo na oyo Nzambe asili kokana kosala mpo na libota na ye kati na paladiso ya elimo mpe na Paladiso ya mosuni oyo esili kobɛlɛma.
Lisukúlu-moboko: “Batyami pembeni lokola basanzoli na esengo na mokili mobimba,” epesaki eyano na motuna oyo: Nini esali ete tótyama pembeni longwa na mokili oyo? Ezali bongo bomoko na biso mpo na kosambela Yehova. Epai nyonso oyo Batatoli ya Yehova bazali na mabelé oyo, bazali koloba mpe koteya na bomoko. Lisusu, bazali kosepela na ntina ya mokano monene Yehova azali na yango ya kosantisa nkombo na ye mosantu mpe kolóngisa lotómo na ye ya kozala mokonzi na nzela ya Bokonzi na ye. Kasi lolenge nini Yehova azali kosalisa biso mpo ete tózwa esika kati na mokano na ye? Asili kopesa biso solo ya Liloba na ye mosantu. Nzambe asili kopesa biso elimo santu na ye. Asili kopambola biso na bondeko kati na mokili mobimba mpe na ebongiseli mpo na losambo ya pɛto. Libota na biso ya mokili mobimba ezali kosalisa biso na kosalela Yehova na esengo mingi na motema.
“Tókabwana na mokili mpe tózwa litɔnɔ na yango te” elobelaki mingi ntina ya kopɛngola matɔnɔ ya koponapona mpe bokabwani kati na bato. (Yakobo 2:5-9) Bamoko bakoki kozala na boyokani bobele na bato oyo bautá na bango esika moko to na baoyo bazali na mosolo lokola bango, kotyoláká bongo baninga na bango baklisto mosusu oyo bazali babólá to bazangi makoki. Basusu bakoki kolinga mingi bobele baoyo bazali na mikumba kati na lisangá. Bazali kobosana ete libaku lileki monene oyo moto akoki kozala na yango ezali bongo ya kozala Motatoli ya Yehova. Na yango, tosengeli te kopesa nzela na mimeseno ya mokili ete mibebisa biso mpe mibebisa kimya ya lisangá.—2 Petelo 3:14.
Lisukúlu “Nakoki mpo na kobala?” emonisaki ete mingi babalaka na lombangu. Bamoko babalaka mpo na kokima mikakatano na ndako to mpamba te baninga na bango bazali kobala. Nzokande, bantina ya moboko mpo na libala ezali bongo mposa babalani bazali na yango bango mibale ya kolanda mikano ya teokrasi, bolingo ya solosolo, mposa ya kozala na moninga mpe kobatelama, mpe mposa ya kobɔkɔla bana. Kobongisama malamu na elimo ezali na ntina mpo na komilɛngɛla na libala. Kati na makambo mingi, esengeli mpe kokólisa bizaleli malamu na kolatáká bomoto ya sika. Ezali lisusu likambo ya mayele komindimisa soki moto oyo akozala mobalani na yo azali komonisa bilembeteli ete azali na boyokani ya solosolo elongo na Yehova mpe soki azalaka na limemya epai na bato mosusu. Koluka batoli epai na baklisto oyo bakɔmɛli ezali mpe likambo ya mayele.—Masese 11:14.
Lisoló wana oyo ezalaki na batoli mingi elandanaki na oyo ezalaki na motó na likambo ete “Baboti oyo bazali kozwa esengo kati na bana na bango.” Kobotama ya mwana ezalaka ntango moko ya bosepeli monene. Nzokande, kobɔkɔla bana mpe ememaka mikumba minene. (Nzembo 127:3) Na yango, ezali likambo ya ntina ete bana báteyama kolinga Yehova. Baboti bakoki kosala yango na kolobeláká makambo matali Yehova mbala na mbala epai na bana na bango na kosaleláká mitindá ya Liloba na ye kati na libota.
Mokolo wana ya liboso ya liyangani esukaki na likambo moko ya kosepelisa—kobima ya mwa búku ya sika Batatoli ya Yehova mpe Kelasi (ebimeli ya Lifalansé). Ezali kolimbola polele ete Batatoli “balendisaka bilenge na bango na koyekola makasi mpe na kozwa na lisɛki te badevuare oyo bapesaka bango na kelasi.” Mwa búku wana mpe ezali komonisa matomba minene masili kozwama na bakelasi ya koyekola kotánga mpe kokoma oyo etambwisami na Batatoli ya Yehova na boumeli ya bambula mingi na Nigéria, na Mexique, mpe na mikili misusu. Mwa búku yango esengeli kosalisa balakisi na komona ete biso tózwaka kelasi na motuya.
“Tótombwela Nzambe mbeka na masanzoli ntango nyonso”
Motó na likambo oyo ya mokolo ya mibale etongamaki likoló na Baebele 13:15. Manáka ya ntɔ́ngɔ́ emonisaki masukúlu-matongani oyo mazalaki na motó na likambo ete: “Tóyanola na libyangi ya kosanzola Yehova.” Mbula ya kobotama oyo moto azali na yango etye ndelo te mpo na koyanola na libyangi yango. Nzembo 148:12, 13 esɛngi na bilenge mibali, baseka, mibangé, mpe bana ete básanzola Yehova. Mingi kati na basaleli ya esengo ya Yehova bazalaki na likoki ya koyeisa mingi masanzoli na bango. Na mokili mobimba, koleka bato 600 000 bazali na mosala ya kosakola ntango nyonso, to mosala ya babongisi-nzela. Bato koleka 15 000 bazali kosala mosala ya mobongisi-nzela monene, mpe soko bato 15 000 bazali kati na mosala ya Betele.
“Tósala na bosembo nyonso elongo na lisangá ya Yehova” ezalaki lisukúlu oyo emonisaki ete bosembo ezali na ntina mpo na basaleli ya Nzambe. Kozala sembo epai na Yehova elimboli kokangama makasi epai na ye na komipesa makasi na boye ete yango esala lokola nguya oyo ezali kobenda. Bosembo esɛngi ete tópɛngola ezaleli ya kobuka mitindá ya Biblia na nkó, ezala ete basusu bazali komona biso to bazali komona biso te. Esɛngi lisusu ete tókangama na bosembo nyonso na mateya ya Biblia oyo mazali kati na bazulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! ezala mpe na bilei mosusu ya elimo oyo la Société Watch Tower azali kopesa. Lisukúlu wana elandanaki na lisukúlu ya batisimo. Oyo nde esengo ezalaki ntango baoyo bamilɛngɛlaki mpo na kozwa batisimo bamonisaki polele komipesa na bango epai na Yehova!
Maloba ya Hosea 4:1-3 mazalaki elakiseli mpo na lisukúlu oyo esalemaki nsima ya nzánga “Mabe na malamu—Okolanda nini?” Atako likanisi ya mokili na ntina na malamu esili kobeba, baklisto basengeli kosala “milende makasi” mpo na kolanda bizaleli malamu. (2 Petelo 1:5) Yango ebandaka na lolenge moto azali kokanisa. Soki makanisi na ye mazali malamu, moto akobimisa maloba ya pɛto, ya malamu, mpe ya kolendisa mpe akosala makasi na kozala sembo na boyokani na ye elongo na basusu. Kolanda malamu esɛngi lisusu kosala makasi na koyeba kososola mpe komonisa motema mawa epai na moninga moklisto oyo azali konyokwama na bokɔnɔ to konyokwama na makanisi.—1 Batesaloniki 5:14.
Lisukúlu mosusu oyo ete: “Tómibatela na mitambo ya Zábolo,” ekebisaki baklisto na ntina na komitika te na bopusi ya bademó. Na makambo matali kosalisama mpo na bokɔnɔ, baklisto basengeli kosɛnzɛla mpo na batekiniki, lokola bolengoli (Hypnotisme), oyo ezali na boyokani na bikelákela. Epai mosusu, oyo bato bazali kosala mpo na kobatela kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto na bango ezali likambo litali moto ye moko.
Mokolo ya mibale esukaki na likambo moko ya esengo—kobima ya búku moke oyo esalemi mpo na kosalisa bato ya motema sembo ete bákóla nokinoki mpo na komipesa mpe kozwa batisimo. Búku wana ya sika oyo ezali na nkasa 192 ezali na motó na likambo ete Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko. Búku Boyebi ezali komonisa solo na lolenge ya kolendisa. Ezali kolekisa ntango mingi te na kokweisa mateya ya lokuta. Elobeli na yango ya polele mpe kolobelama ya makambo na lolenge ya molɔngɔ́ esali ete ezala pɛtɛɛ mpo na kosalela yango mpo na kotambwisa boyekoli ya Biblia mpe kosalisa bato ete bázwa boyebi ya kosimba motema na ntina na Nzambe.
“Bino bato na ye, bósepela mpe bóyoka esengo libela”
Maloba wana mauti na Yisaya 65:18 mazalaki motó na likambo ya mokolo ya misato ya liyangani. Kokokisama ya bisakweli ya Biblia emonisi ete 1914 ezali mbula oyo ebongiseli oyo mabe ekɔtaki na mikolo na yango ya nsuka. Na yango, masukúlu-matongani oyo mazalaki na motó na likambo ete “Basanzoli na esengo na boumeli ya nsuka ya ebongiseli oyo” ebendaki likebi ya bayangani. Balobi bamonisaki lolenge nini bamilió ya bato bapusamaki makasi na lokoso mpe na elimo ya mobulu ya mokili oyo. Na ntango ebongisami, bakosambisama lokola eteni ya mokili oyo Satana azali mokonzi na yango. Na bongo, sikawa ezali ntango ya kosala liponi. Tolingi kozala na ngámbo nini? Tolingi kosambela Yehova mpe kosimba lotómo na ye ya kozala mokonzi, to tokopesa nde nzela na Satana ete azala mokonzi na biso na kosaláká makambo oyo mazali kosepelisa ye? Kozanga ntembe biso banso tosengeli kozala na ngámbo ya Yehova.
Lisukúlu ya bato banso na liyangani yango ezalaki na motó na likambo, “Tósanzola mokonzi na seko!” epesaki epai na bayangani nyonso libaku ya kokanisa mozindo. Atako likanisi ya boseko emonani ete eleki makanisi na biso bato ya botau, Yehova ayebi yango malamumalamu. Mokomi na Nzembo ayembaki ete: “Yehova azali Mokonzi libela na libela.” (Nzembo 10:16) Mokonzi wana ya seko asili kofungola nzela mpo na bato ete bázwa bomoi ya seko na nzela ya Mwana na ye, Yesu Klisto. (Yoane 17:3) Molobi alobaki ete: “Ɛɛ, biso bato na masumu tokoki kozwa bomoi ya seko na nzela ya kolakisama ya Nzambe mpe na kondima kati na mbeka ya lisiko ya Yesu.”
Wana liyangani ezalaki kobɛlɛma na nsuka na yango, bayangani balendisamaki na lisoló ya nsuka oyo ezalaki na motó na likambo ete: “Tósanzola Yehova na esengo mokolo na mokolo.” Ezali likambo ya kolendisa na kozwa lapólo ya bokóli ya mosala ya kozalisa bayekoli na mabelé mobimba. Mpe bayangani balendisamaki na ‘kopambola Yehova mikolo nyonso mpe kosanzola nkombo na ye libela na libela.’—Nzembo 145:2.
Misala ya bozoba mpe ya mabe mingi koleka mizali kosala ete mokili ezala na esengo te. Atako bongo, bato oyo bazali mpenza na kondima epai na Yehova bakoki kozwa esengo oyo Nzambe apesaka. Lokola bandeko kati na mokili mobimba, Batatoli ya Yehova bakoki bongo kozongela maloba malandi ya Nzembo 35:27, 28: “Baoyo balingi ete nalóngisama, básepela mpe báyoka esengo; bálobaka ntango nyonso ete, Yehova asanzolama, ye oyo akosepela mpo na kimya na moombo na ye. Lolemo na ngai ekosolola mpo na boyengebene na yo, ekosanzola yo mikolo nyonso.”
[Bililingi na lokasa 7]
Mabota makozwa litomba na mwa búku “Batatoli ya Yehova mpe Kelasi”
[Bililingi na lokasa 8, 9]
Búku ya sika, “Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko,” ezali komonisa makambo ya solo oyo mazali na Biblia na lolenge ya kolendisa
[Elilingi na lokasa 9]
Mingi basili kozwa batisimo lokola elembo ya komipesa na bango epai na Yehova
[Elilingi na lokasa 9]
Bato oyo bazalaki na liyangani balendisamaki mingi na lisano-liteya “Tópesa lokumu epai na baoyo babongi na yango kati na bobangé na bango”