Bamemi-nsango ya kimya ya Nzambe bayangani
NKULUTU moko na États-Unis alobaki ete: “Tolendisamaka mingi na mayangani ya etúká oyo toyanganaka. Nzokande, oyo ya mbula oyo maloba ya kolimbola yango mazali te. Mokolo na mokolo tozalaki kozonga na komitunáká soki mokolo oyo elandi ekomemela biso eloko nini ya sika, mpe tozangaki ata eloko moko te!”
Soki oyanganaki na moko na Mayangani ya Etúká “Bamemi-nsango ya kimya ya Nzambe,” na ntembe te okondima maloba ya esengo ya moyangani oyo. Mokolo mokomoko ya liyangani ezalaki na motó na likambo moko ekeseni oyo etali mokumba oyo Batatoli ya Yehova bazali kokokisa lokola bamemi-nsango ya Nzambe. Tiká tótalela lisusu manáka ya mikolo yango misato.
“Kitoko boni . . . ye oyo akosakolaka kimya”
Wana ezalaki motó na likambo ya mokolo ya liboso ya liyangani. Ezwaki moboko likoló na Yisaya 52:7. Na ntango oyo ya mpasi, mingi bazali kosalela Yehova kati na mikakatano minene. Lisukúlu oyo ezalaki na motó na likambo ete “Tóyoka basakoli ya kimya oyo bazali kosala na molende” ezalaki na mituna-lisoló elongo na bamoko ya basakoli wana ya sembo. Koyoka maloba na monɔkɔ na bango moko ezalaki mpenza likambo ya kolendisa, mpe bayangani bandimisamaki bongo ete Yehova akoki mpe kopesa bango makasi, ata kobakisela bango “nguya oyo eleki nguya ya bomoto” mpo na kosalisa bango ete báyika mpiko.—2 Bakolinti 4:7, NW.
Masɛngami ya Yehova mazali bozito te. (1 Yoane 5:3) Yango emonisamaki polele na lisukúlu ya nsuka ya manáka ya ntɔ́ngɔ́, oyo mama ya likambo na yango ezalaki bongo kobimisama ya mwa búku ya nkasa 32 oyo ezali na motó na likambo Nzambe azali kosɛnga nini epai na biso? Esaleli wana ya sika mpo na boyekoli, oyo ezali na bililingi kitoko, na ntembe te ekozala lisungi monene mpo na kosalisa bato mingi ete báyeba mikano ya Nzambe. Mwa batoli mpo na lolenge ya kosalela mwa búku oyo ya sika epesami kati na lisoló ya nsuka ya boyekoli na zulunalo oyo mpe na lokasa 16 mpe lokasa 17.
Lisukúlu oyo ete “Tólendendela kati na mosala oyo ezali malamu” emonisaki mpenza ete Yehova ayebi malamu komekama oyo tozali kokutana na yango. Kolendendela elimboli koyika mpiko mpe kozanga kobungisa elikya. Yehova asili kopesa biso Liloba na ye, elimo na ye, mpe lisangá na ye mpo na kosunga biso. Esengeli kolendendela mpo na kosakola, nzokande, mosala ya kosakola ezali kosalisa biso na kolendendela, mpamba te yango ezali kobatela kondima na biso ete ezala makasi. Na bongo, lokola tobɛlɛmi na ndelo ya nsuka, tosengeli te kopesa nzela na mikakatano ete milɛmbisa molende na biso, mpamba te bobele baoyo bakoyika mpiko kino nsuka nde bakobika.—Matai 24:13.
Lisukúlu-moboko, “Mokumba na biso lokola bamemi-nsango ya kimya ya Nzambe,” ebendaki likebi likoló na kobima ya Bayuda na boombo longwa na Babilone mpe kozongisama lisusu ya losambo ya pɛto kati na Yelusaleme na mobu 537 L.T.B. Molobi alimbolaki ete likambo wana ezalaki bobele elakiseli ya oyo Bokonzi ya Nzambe ekokokisa mosika te na mokili mobimba. (Nzembo 72:7; Yisaya 9:7) Mokumba tozali na yango lelo ezali ya kosakola nsango malamu na ntina na Bokonzi wana mpe komitambwisa na boyokani na nsango yango. Bolingo mpo na Nzambe mpe mpo na bazalani esengeli kopusa biso na kokóba kati na mosala wana kozanga kotika.—Misala 5:42.
Likambo mosusu ya ntina na manáka ya Mwamitano ezalaki bongo masukúlu-matongani “Kebá na mitambo mibombami kati na kominanola.” Miziki ya mikolo oyo, bafilme, bavideo, mpe baemisyó ya televizyó, masano ya video, babúku, bazulunalo, mpe masɛki mbala mingi emonisaka makanisi ya bademó. Na yango, tosengeli ‘koyina oyo ezali mabe’ mpe ‘kokangama na oyo ezali malamu.’ (Baloma 12:9) Ɛɛ, tosengeli kotalela kominanola ya mbindo ete ezali mpii mpe kopɛngola yango; nzokande tosengeli komipesa na makambo mazali pɛto, ya boboto, mpe oyo ebongi na masanzoli. (Bafilipi 4:8) Mikanda mpe bisaleli mpo na bolukiluki oyo lisangá ya Yehova ezali kopesa, ezali kopusa bɔɔngɔ́ na biso ete ezala na makanisi ya kolendisa mpe ezali koteya biso lolenge ya kokesenisa mabe na malamu. (Baebele 5:14) Tosengeli kokangama na bibongiseli wana motindo moko tokoki kokangama na masuwa na ntango ya mbonge makasi na ebale.
Nsima na yango ezalaki bongo lisukúlu “Tɛmɛlá Zábolo—Ndimá bombanda te.” Mwa moke liboso ete bákɔta na Mokili ya Ndaka, bankóto ya Bayisalaele bakangamaki na motambo ya pite. Finease andimaki te ete eloko moko etɛmɛla losambo ya solo. Azwaki ekateli moko ya nguya na ntina na basáli na mabe, mpe bokangami na ye makasi esepelisaki Yehova. (Mituya 25:1-13) Mokano ya Satana ezali ya kosala ete mokomoko kati na biso amonana ete abongi te mpo na kokɔta na mokili ya sika ya Nzambe. Na yango, lokola Finease, tosengeli kotɛmɛla milende oyo Zábolo azali kosala mpo na kokómisa biso mbindo. Tózala bato oyo babalá to minzemba, tosengeli “kokima pite.”—1 Bakolinti 6:18.
“Tósimba na bosembo nyonso bopɛto ya Liloba ya Nzambe” ezalaki lisukúlu ya nsuka ya mokolo ya liboso ya liyangani. Babongoli mingi babakisaka to balongolaka biteni mosusu ya Makomami. Na ndakisa, mpo na kolóngisa ntómo oyo basi bazali na yango, babongoli ya The New Testament and Psalms: An Inclusive Version balobelaka Nzambe, lokola Tata te, kasi lokola Tata-Mama mpe balobelaka Yesu lokola “Moto” na esika ya “Mwana na moto.” Nzokande, Biblia New World Translation ezali na bosembo nyonso kolanda makomi ya lokótá ya ebandeli oyo esalelamaki mpo na kongɛngisa makanisi na biso likoló na mwa makambo matali Makomami. Na ndakisa, molobi alobaki ete: “Ezalaki ekomeli ya sikisiki oyo ezali kati na Biblia New World Translation nde esalisaki biso mpo na kobongisa lisusu masangá na kotyáká lisangani ya bankulutu, na boyokani mpenza na ndakisa oyo lisangá ya boklisto na ekeke ya liboso etikaki.” Tozali komonisa bosembo na biso na Liloba ya Nzambe na kotángáká yango mokolo na mokolo mpe na kosaleláká batoli na yango. Molobi alobaki lisusu ete: “Tozali komonisa ete tozali bakɔteli ya sembo ya Liloba ya Nzambe na kosakoláká yango na molende nyonso epai na basusu mpe na kosaleláká yango na mayele nyonso wana tozali koteya basusu, tokomeka soko moke te kokɔtisa makanisi na biso kati na yango na kolongoláká to kobakisáká makambo likoló na oyo yango ezali koloba.”
‘Kimya ya Nzambe eleki makanisi nyonso’
Motó na likambo wana, oyo ezwamaki na Bafilipi 4:7 nde elobelamaki na mokolo ya mibale ya liyangani. Mingi kati na makambo oyo malobelamaki matalelaki moto na moto na ntina na mosala ya kosakola, libota, komipesa mpe makambo mosusu matali bomoi ya mokolo na mokolo.
Nsima ya botaleli mokapo ya mokolo, masukúlu-matongani mapesamaki, yango ezalaki na motó na likambo ete: “Bamemi-nsango bazali koyebisa nsango malamu ya kimya.” Nsango na biso ezali nsango ya kimya, mpe esengeli kopesama na lolenge ya kimya. (Baefese 6:15) Mokano na biso ezali ya kosimba mitema, kasi ya kondimisa bato na makasi te. Kobongisama mpe mikanda oyo tozali kozwa uta na lisangá ya Yehova ezali kosalisa biso na kosala bongo. Tosengeli te kopesa nzela ete kozanga kotya likebi to kozanga kosepela oyo bato bazali komonisa elɛmbisa biso. Nzokande, tosengeli kokóba ‘kosala oyo ekoki na biso,’ kozala na ebongiseli malamu ya boyekoli ya yo moko, koyangana na makita, mpe kosangana na mosala ya kosakola. (2 Timoté 2:15) Tóbosana te kosala oyo ezali malamu mpo na basusu, mingimingi epai na baoyo bazali bandeko na biso kati na kondima. (Bagalatia 6:10) Ya solo, kosala oyo ekoki na biso elimboli te kosala na kolekisa ndelo. Oyo mokomoko akoki kosala na boyokani na makoki na ye mpe na ezalela na ye endimami epai na Yehova.
Basaleli ya Nzambe bazali kopesa ntango, nguya mpe biloko na bango mpo na kokólisa matomba ya Bokonzi. Lisukúlu “Makabo ya esengo kati na lisangá ya Yehova” emonisaki ete lokola bato oyo bakokani na bampate bazali kosepela na nsango ya Bokonzi, mposa ezali makasi ya kozala na bisaleli mosusu, bisika ya koyangana, mpe bandako ya bafiliale. Makabo na biso mazali kopesa lisangá likoki ya kozala na nyonso oyo esengeli mpo na kokokisa mosala ya kosakola na mokili mobimba. Makabo mapesami na bolingo nyonso mazali lisusu kokumisa Yehova mpe mazali kopesa esengo epai na mopesi. Na yango, lokola baklisto, tosengeli te komonisa bopɔtu na likambo wana ya ntina litali losambo na biso.—2 Bakolinti 8:1-7.
Manáka ya ntɔ́ngɔ́ esukaki na lisukúlu ya batisimo—oyo ezalaka ntango nyonso likambo ya ntina mingi kati na mayangani ya Batatoli ya Yehova. Oyo nde esengo na komona bato ya sika oyo bamipesi na kolanda matambe ya Yesu na kozwáká batisimo ya mai! (Matai 3:13-17) Baoyo nyonso bakómi na litambe oyo basili koteyama kati na liziba ya mayele maleki—elingi koloba, na Biblia. Lisusu, basili kozwa mokano ya solosolo kati na bomoi, mpe bapambwami na kimya oyo ezali kozwama na koyeba ete bazali kosala oyo ezali sembo.—Mosakoli 12:13.
Batoli ya ntina epesamaki na lisukúlu “Tiká ete bososoli ebatela yo.” Bososoli ezali na ntina mingi na makambo matali mombongo. Tosengeli te kosala makambo ya mombongo kati na Ndako ya Bokonzi, tosengeli mpe te kosalela na lolenge ya mabe baninga na biso baklisto mpo na matomba ya mosolo. (Kokanisá na Yoane 2:15, 16.) Bososoli ezali mpe na ntina ntango tomikɔtisi na makambo ya mombongo to ntango tozali kodefa to kodefisa mbongo. Molobi alobaki ete: “Kokwea ya makambo ya mombongo kati na baklisto esili koyeisa mawa mpe ata kolɛmba na elimo epai na baoyo bamikɔtisaki nokinoki na myango ya makámá mpo na kozwa mosolo.” Atako ezali mabe te ete baklisto básala mombongo kati na bango, nzokande ezali mpenza likambo ya mayele komonisa bokɛngi. Mpe wana boyokani ya mombongo esalemi kati na bato mibale, maloba ya boyokani yango masengeli ntango nyonso kokomama na mokanda.
Mibeko ya Nzambe mpo na mibali mpe basi elobelamaki kati na lisukúlu “Azalisaki bango mobali mpe mwasi.” Mikumba ya mobali mpe ya mwasi misili kobebisama na boumeli ya lisoló ya bato. Molobi alobaki ete: “Mingi bazali kokokisa na libungá nyonso bobali na boyangeli ya mabe, na ezaleli ya makambo makasi, to na kolobela bobali na lolenge ya kolekisa ndelo. Na bisika mosusu, komona mobali azali kolela liboso ya bato to ata na nkuku, emonanaka mingi te mpe ezalaka nsɔ́ni. Nzokande, Yoane 11:35 eyebisi ete wana azalaki elongo na bibele na nkunda ya Lasalo, ‘Yesu atangisaki mpisoli.’” Ezali boni mpo na basi? Bomwasi mbala mingi ekokisamaka na bonzenga ya nzoto. Kasi molobi atunaki ete: “Soki mwasi azali kitoko kasi nde azangi bososoli mpe azali moto na makɛlɛlɛ, motɔ́ngi, to moto na lolendo, akoki mpenza kozala kitoko na ndimbola ya solo ya liloba mwasi?” (Kokanisá na Masese 11:22; 31:26.) Na maloba na bango, etamboli na bango, mpe monzɛlɛ na bango, baklisto mibali mpe basi bazali kosala makasi na kolanda mibeko ya Biblia. Molobi alobaki ete: “Mobali oyo azali komonisa mbuma ya elimo ezalaka pɛtɛɛ mpo ete atosama, mpe mwasi oyo amonisaka yango ezalaka pɛtɛɛ mpo ete alingama.”—Bagalatia 5:22, 23.
Na nsima, ezalaki bongo masukúlu-matongani “Nzambe ya kimya azali komibanzabanza mpo na yo.” Baklisto mingi bazali na mitungisi na makambo matali mosolo. Nzokande, Yehova apesi elaka oyo: “Nakotika yo soko moke te, nakosabola yo mpe te.” (Baebele 13:5) Atako mikakatano mizali na makambo ya nkita, bamoko basili kotya motema na elaka wana na kokɔtáká na mosala ya mobongisi-nzela mosungi to na mosala ya mobongisi-nzela ya sanza na sanza. Basusu oyo bazali na likoki te sikawa ya kobanda mosala ya mobongisi-nzela bazali kotya matomba ya Bokonzi na esika ya liboso na kosimbáká mabaku nyonso mpo na kopesa litatoli. (Matai 6:33) Milende nyonso motindo wana mibongi mpenza kokumisama! Lisangá ya Yehova lisili kobimisa ebele ya mikanda oyo mizali kosunga biso kati na mosala ya kosakola mpe oyo mizali kosalisa biso ete tóyika mpiko na mikakatano na biso. Soki tozali komonisa botɔ́ndi na bibongiseli ya elimo oyo Yehova azali kopesa, ye akopambola biso na kimya kati na eleko oyo ya mpasi na makambo ya nkita.—Nzembo 29:11.
Wana lisukúlu ya nsuka ya mokolo wana, oyo ezalaki na motó na likambo “Tóluka kimya ya Nzambe kati na bomoi ya libota,” ekómaki pene na kosila, bayangani basepelaki na kozwa búku ya sika, Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota. Molobi alobaki ete: “Bóyekola na molende nyonso búku oyo moto na moto mpe kati na libota. Bósala makasi na kosalela batoli na yango oyo ezwi moboko kati na Biblia, boye bokokólisa kimya mpe bolamu ya libota na bino.”
“Tóbatela bomoko . . . kati na ekanganeli ya kimya”
Wana ezalaki motó na likambo oyo ebongaki mpenza na mokolo ya nsuka ya liyangani, yango ezwaki moboko likoló na Baefese 4:3. Batatoli ya Yehova, oyo bauti na mabota nyonso ya mokili, basili koteyama na Nzambe. Na yango, bazali kolinga kimya. Bazali kolanda ndakisa ya Yesu mpe bazali kosala makasi ete ‘bábatela bomoko ya elimo kati na ekanganeli ya kimya.’
Kimya oyo ezali kati na lisangá ya Nzambe elobelamaki mingi kati na masukúlu-matongani “Tóluka koyeba banani bazali bamemi-nsango ya solo.” Basakoli ya lokuta bazalaki kati na Yisalaele ya kala. Nzokande, bamemi-nsango ya solo ya Nzambe—na ndakisa Yisaya, Ezekiele, mpe Yilimia—basakolaki na bosikisiki nyonso kokwea ya Yelusaleme, eleko ya boombo, mpe kosikolama ya libota ya Nzambe. Ezalela motindo moko ezali na mikolo na biso. Bamemi-nsango ya lokuta batondi kati na bibongiseli ya politiki mpe na mangomba ya lokuta. Nzokande, Yehova asili kotɛlɛmisa Batatoli na ye mpo ete báyebisa mokano na ye na ntina na ebongiseli ya biloko oyo. Mingimingi uta 1919, basaleli ya Yehova basili kosalelama mpo na kosakola nsango ya Nzambe. Oyo nde bokeseni kati na bango mpe basakoli ya lokuta ya boklisto ya nkombo mpamba! Na molende nyonso, tiká ete tósala oyo ekoki na biso kati na mosala wana kino Yehova akoloba ete esili.
Lisukúlu “Tóyoka mpe tótosa Liloba ya Nzambe” emonisaki ete Makomami mazali liziba lileki monene ya litambwisi, ya kobɔndisama, mpe ya elikya. (Yisaya 30:20, 21; Baloma 15:4) Mokili ya lelo ezali mpenza kotika nzela na makambo nyonso. Koleka ndenge ezalaki liboso, tosengeli bongo koyoka batoli oyo euti na Liloba ya Nzambe mpe na lisangá. Yehova ayebi bolɛmbu na biso, mpe kati na Liloba na ye asili komonisa polele nzela oyo ekoki kozala litomba mpo na biso. Koyebáká ete Yehova azali kosunga biso, yango ezali kopesa biso elikya ya kokende liboso mpo na kosala nyonso oyo azali kosɛnga biso.
Yango epesaki nzela mpo na kolanda lisano-liteya. Ezalaki na motó na likambo ete “Mpo na nini tosengeli kotosa bibongiseli ya Teokrasi?” Kosaleláká lokola moboko lisoló ya Biblia oyo elobeli Gideona, yango elobelaki mingi liteya moko ya nguya—tosengeli kolanda malako ya Nzambe kasi tosengeli te kolanda makanisi na biso moko to kotya pembeni batoli ya Teokrasi.
Lisukúlu ya bato banso ezalaki na motó na likambo “Nsukansuka kimya ya solo eyei!—Euti wapi?” Kimya oyo Nzambe alaki ekeseni mosika na oyo mokili ya lelo ekoki kokanisa. Molobi alobaki ete: “Kimya ya solo elimboli kimya mokolo na mokolo. Kimya ya Nzambe elimboli mokili mozangi bokɔnɔ, mpasi, mawa, mpe kufa.” Biblia eyebisi biso ete Yehova “akosukisa bitumba kino nsuka na mokili.” (Nzembo 46:9) Lolenge nini akosala yango? Na kolongoláká mobimisi ya bitumba, Satana Zábolo. (Emoniseli 20:1-3) Yango ekopesa nzela na bato na bopɔlɔ ete ‘básangola mokili, básepela mpe na kimya na solo.’—Nzembo 37:11.
Nsima ya lisoló mokuse ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo ebongisamaki mpo na pɔ́sɔ wana, lisukúlu ya nsuka epesamaki. Ezalaki na motó na likambo “Tókende liboso awa ezali biso bamemi-nsango ya kimya ya Nzambe,” lisukúlu wana ya kosimba motema emonisaki ete mosala na biso ya kosakola ekeseni na misala nyonso mosusu mpe esengeli kosalema na lombangu. Sikawa ezali ntango ya kolɛmba te, ya kozonga nsima te, soko mpe ya kolanda makanisi ya libungá te. Tosɛlingwi na nyonso oyo tozali na yango mposa—nsango ya Nzambe, elimo santu na ye, mpe bibongiseli mingi oyo biuti na lisangá na ye ya Teokrasi oyo etondi na bolingo. Na yango, lokola tozali basaleli ya Nzambe, tiká ete tólanda kokende liboso lokola bamemi-nsango ya kimya ya Nzambe!
[Etanda/Bililingi na lokasa 9]
Esaleli moko ya bolingo mpo na mabota
Baoyo bayanganaki na mokolo ya mibale ya Liyangani ya Etúká “Bamemi-nsango ya kimya ya Nzambe” basepelaki mingi na kozwa búku ya sika oyo ezali na motó na likambo ete Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota. Búku wana ezali na makanisi mauti na Makomami oyo makopesa litomba mpo na mabota nyonso malingaka Nzambe.
Nkulutu moko oyo autaki na etúká ya Connecticut, na États-Unis, alobi ete: “Na mokolo mwa 15 Yúni, tozwaki oyo ya biso búku Bolamu na libota. Na mokolo mwa 16 Yúni, nakómaki na katikati mpo na botángi na yango. Na mokolo mwa 17 Yúni, tosalaki boyekoli ya liboso ya libota kati na búku yango, mpe tolendisamaki mingi! Bobele na mokolo wana, nasilisaki kotánga búku yango na mobimba. Búku wana kitoko, na ntembe te, ekozala na motuya mingi mpo na baoyo nyonso bazali na yango. Mateya ya búku yango oyo mazali polele mpe oyo mayokani na ntango na biso mazali elembeteli mosusu oyo emonisi ete ‘moombo ya sembo mpe ya mayele’ azali ‘kopesa bilei na ntango ebongi’ mpe azali mpenza komibanzabanza mpo na koleisa biso na ntango oyo ya mpasi.”—Matai 24:45-47.
[Elilingi na lokasa 7]
Bilenge mpe mikóló balingi koyeba oyo Nzambe azali kosɛnga epai na biso