Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w00 1/6 lok. 3
  • Ndimbola ya liloba “Moklisto” ezali kobongwana?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndimbola ya liloba “Moklisto” ezali kobongwana?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Balingi moto na moto asala oyo asepeli
  • Mateya ya lingomba na yo eyokani na mateya ya Biblia?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2016
  • “Bakristo” nyonso bazali mpenza bakristo ya solo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Kozala moklisto elimboli nini?
    Lamuká!—2008
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
w00 1/6 lok. 3

Ndimbola ya liloba “Moklisto” ezali kobongwana?

KOZALA moklisto elimboli nini? Soki batuni yo motuna oyo okopesa eyano nini? Batunaki bato ndenge na ndenge ya mikili mingi motuna yango; mpe talá biyano mosusu oyo mingi na bango bapesaki:

“Kolanda Yesu mpe kosala makambo lokola ye.”

“Kozala moto malamu mpe kokabela bato mosusu.”

“Kondima Klisto lokola Nkolo mpe Mobikisi.”

“Kokende Misa, kosambela bisambo bya bakristo mpe kokula kominyo.”

“Nandimi te ete esengeli kaka ete moto akendaka na ndakonzambe mpo bábenga ye moklisto.”

Ata badiksionɛrɛ ezali kopesa bandimbola ndenge na ndenge mpo na liloba yango. Kutu, mokanda moko epesi ndimbola zomi mpo na liloba “moklisto,” moko na yango elobi ete kozala moklisto elimboli “kondimela to kozala na lingomba ya Yesu Klisto” mpe mosusu elobi ete kozala moklisto elimboli “kozala moto oyo abongi mpe moto malamu na miso ya bato.” Na kotalela nyonso oyo, tokoki kokamwa te ete bato mingi bayebaka mpenza te soki kozala moklisto elimboli nini.

Balingi moto na moto asala oyo asepeli

Lelo oyo, bato oyo balobaka ete bazali baklisto, ata baoyo bakendaka ndakonzambe moko, bakoki kopesa makanisi ndenge na ndenge soki batuni bango mituna ya koyeba soki Biblia ekomami na lisalisi ya elimo ya Nzambe, soki bandimaka liteya ya evolisyo, soki lingomba esengeli kokɔta na makambo ya politiki, mpe soki ebongi ete bato báteyaka bato mosusu bindimeli na bango. Makambo oyo etali bizaleli ya bato ekómi kobimisa ntembe mingi, makambo lokola kolongola zemi, kosangisa nzoto mibali na mibali to basi na basi, mpe kofanda makango. Bato mingi bazali komona ete esengeli kotika moto na moto asala oyo alingi.

Na ndakisa, zulunalo moko (Christian Century) eyebisi ete na likita moko oyo lingomba moko ya Protesta esalaki, bandimaki na voti ete lingomba na lingomba esengeli kozala na lotomo ya “kopona mobali nyonso oyo lingomba elingi ye mpo na kozala nkulutu na lisangani ya bakambi, ata soki eyebani ete mobali yango asangisaka nzoto na mibali mosusu.” Kutu, bato mosusu ya teoloji balobi ete ata moto oyo andimelaka Yesu te akoki kobika. Zulunalo mosusu (The New York Times) elobi ete na makanisi ya bato yango ya teoloji, Bayuda, Bamizilma mpe bato ya mangomba mosusu “bakoki mpenza kokɔta na lola [lokola kaka baklisto].”

Kanisá soki moto moko oyo alobi ete alingaka boyangeli ya bakoministe kasi azali kolendisa boyangeli ya bakapitaliste to moto oyo alingaka demokrasi kasi azali kolendisa diktatire, to mpe moto oyo alingaka ete bato bábatela zamba, mai, mopɛpɛ na mabele, kasi azali kondima ete bákataka bazamba mpambampamba. Moto nyonso akolongisa yo soki olobi ete “moto yango azali mpenza moto oyo alingaka boyangeli ya bakoministe te to alingaka boyangeli ya demokrasi te to mpe azali moto oyo alingaka kobatela zamba, mai, mopɛpɛ mpe mabele te.” Nzokande, soki otali makanisi kilikili oyo bato balobaka ete bazali baklisto bazali na yango lelo oyo, okomona ete bindimeli yango ekeseni mpenza mpe mingi na yango eyokani ata moke te na makambo oyo Yesu Klisto, moto oyo abandisaki lingomba ya boklisto, ateyaki. Nyonso wana emonisi ete bazali baklisto ya ndenge nini?—1 Bakolinti 1:10.

Ndenge tokomona yango, kosɛnga ete bábongola mateya ya boklisto mpo na koyokanisa yango na makambo ya mikolo oyo ezali makanisi oyo ebandi lelo te. Ndenge nini Nzambe na Yesu Klisto batalelaka mbongwana ya ndenge wana? Mangomba oyo eteyaka makambo oyo Klisto ateyaki te ekoki mpenza kobengama mangomba ya boklisto? Tokotalela mituna yango na lisolo oyo elandi.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto