Masolo ya basakoli ya Bokonzi
Mokanda ya Alejandra
KOKOMA mokanda ezalaka lolenge moko malamu ya kopesa litatoli banda kala. Atako ntango mosusu litomba na yango emonanaka mbala moko te, bato oyo batyaka milende na kokoma mikanda mpo na kopesa litatoli, bazwaka mbano na yango. Bakanisaka toli ya Biblia oyo ezali na bwanya: “Na ntɔngɔ, koná mbóto na yo mpe na mpokwa pekisá lobɔkɔ na yo te, mpo ete oyebi te soki nini ekokóma malamu to oyo to yango to soki nyonso mibale ekozala malamu.”—Mosakoli 11:6.
Alejandra, elenge Motatoli ya Yehova oyo asalaki mbula zomi na Betele ya Batatoli ya Yehova na Mexique, abɛlaki kanser mpe akómaki kozwa bankisi ya maladi yango. Lokola maladi na ye ekómaki makasi mpenza, alɛmbaki mpe akokaki lisusu kosala mosala te. Kasi, lokola alingaki kotika mosala ya kosakola te, azwaki ekateli ya kokomaka mikanda. Na mikanda yango azalaki kolimbola ebongiseli ya koyekola Biblia ofele na ndako mpe azalaki kotya nimero ya telefone ya mama na ye. Na nsima, azalaki kopesa mama na ye mikanda yango mpo atikaka yango na bandako oyo akokuta bato te ntango akei kosakola ndako na ndako.
Na ntango yango, Diojany, elenge mwasi moko oyo autaki na Guatemela akómaki mwana ya mosala na ndako moko na engumba Cancún, na Mexique. Kuna, akutanaki na Batatoli ya Yehova mpe bakómaki koyekola na ye Biblia. Mwa moke na nsima, patrɔ na ye azwaki mokano ya kolongwa na engumba Cancún mpo na kofanda na Mexico mpe asepelaki kokende na ye. Diojany azalaki na mposa ya kokende te mpo amonaki ete soki akei, akokutana lisusu na Batatoli te.
Patrɔ na ye ayebisaki ye ete: “Komitungisa te, Batatoli bazali bisika nyonso; soki kaka tokómi kuna, tokoluka bango.” Ntango Diojany ayokaki bongo andimaki kokende na bango. Ntango bakómaki na Mexico, patrɔ na ye alukaki Batatoli. Atako Batatoli bazali koleka 41 000 mpe masangá 730 na engumba yango, amonaki bango te.
Eumelaki te, Diojany abandaki kolɛmba nzoto mpo azalaki komona Batatoli te mpo azongela boyekoli na ye ya Biblia. Mokolo moko, mwana ya patrɔ na ye ayaki koyebisa ye ete: “Nzambe na yo ayoki mabondeli na yo!” Apesaki ye mokanda mpe alobaki ete: “Batatoli batikeli yo mokanda oyo.” Ezalaki mokanda oyo eutaki epai ya Alejandra.
Diojany akutanaki na mama ya Alejandra ná leki na ye, Blanca, mpe andimaki báyekolaka na ye Biblia. Nsima ya mwa bapɔsɔ, akutanaki na Alejandra mpe bazalaki na esengo mingi ya komonana. Alejandra alendisaki ye atika te koyekola Biblia mpe amipesa na boyekoli yango mpo na kokola na elimo.
Mwa basanza na nsima, na Yuli 2003, Alejandra akufaki; atikelaki bandeko na ye ya elimo ndakisa malamu ya kondima mpe ya mpiko. Bato mingi oyo bakendaki na ebembe ya Alejandra bayokaki mawa mpenza ntango bamonaki Diojany, mpe ntango alobaki ete: “Alejandra ná libota na ye bazali ndakisa ya malamu mpenza mpo na ngai. Nazali na ekateli ya kosalela Yehova mpe mosika te nakozwa batisimo. Nazali kozela mokolo nakomona lisusu Alejandra na Paladiso oyo ezali koya.”
Ya solo, mokanda ezali eloko moke mpenza. Kasi, ekoki kosala makambo minene mpe oyo ekoumela.