Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w05 15/5 nk. 4-7
  • Etikali moke bobola esila na mokili

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Etikali moke bobola esila na mokili
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mpo na nini Nzambe atiki ete bobola ezala?
  • “Bómitungisa soki moke te”
  • Ebongiseli oyo ezali kosalisa bato
  • Bobola ekosila ntango nini?
  • Mosika te, moto moko te akozala lisusu mobólá!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Landá ndakisa ya Yesu mpe monisá ete omibanzabanzaka mpo na babola
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Milende mpo na kosilisa bobola
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Nsango malamu mpo na babola
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
w05 15/5 nk. 4-7

Etikali moke bobola esila na mokili

BABOLA mingi basepelaka kotala bililingi ya paladiso lokola oyo ezali na ezipeli ya zulunalo oyo. Adama, mobali ya liboso, ná mwasi na ye Eva bazalaki na paladiso. Bazalaki na kati ya elanga ya Edene. (Genese 2:7-23) Atako Paladiso wana ezali lisusu te, tokoki mpenza kondima ete paladiso mosusu ekozala; yango ekozala mokili ya sika mpe kuna bobola ekozala te. Biblia nde elaki likambo yango.

Tótalela elaka oyo Yesu Klisto apesaki mokolo ya nsuka ya bomoi na ye awa na mabelé. Mosali-mabe moko oyo akufaki elongo na Yesu azalaki na kondima ete Nzambe akoki kosilisa mikakatano ya bato. Alobaki boye: “Yesu, kanisá ngai ntango okokɔta na bokonzi na yo.” Maloba yango emonisi ete mosali-mabe wana andimaki ete Yesu akozala Mokonzi mpe ete bato oyo bakufá bakozonga na bomoi. Yesu apesaki ye eyano oyo: “Ya solo nazali koyebisa yo lelo, Okozala elongo na ngai na Paladiso.”​—Luka 23:42, 43.

Biblia elobi ete bato oyo bakozala na Paladiso “bakotonga ndako mpe bakofanda na yango; bakokona bilanga ya [vinyo] mpe bakolya mbuma na yango.” (Yisaya 65:21) Kutu, “bakofanda mpe na nse, moto na moto na nse ya [nzete ya vinyo] na ye mpe na nzete na ye ya [figi], moto moko akobangisa bango te mpo ete monɔkɔ ya [Yehova] na bibele elobi bongo.”​—Mika 4:4.

Kasi, mpo na nini Nzambe azali kotika bobola ezala lelo oyo? Nzambe azali kosala nini mpo na kosalisa babola? Bobola ekosila mokolo nini?

Mpo na nini Nzambe atiki ete bobola ezala?

Paladiso oyo Adama ná Eva bazalaki kofanda ebungaki mpo Satana Zabolo, anzelu moko mabe, atombokelaki Nzambe. Alobaki na Eva na nzela ya nyoka mpe akosaki ye mpo abuka mobeko ya Nzambe oyo epekisaki kolya mbuma ya nzete moko oyo ezalaki na elanga. Satana akosaki Eva ete akozala malamu mingi soki aboyi Nzambe atambwisa ye. Ntango Eva apesaki mobali na ye Adama mbuma oyo epekisamaki, mobali na ye mpe alyaki; na ndenge yango, Adama mpe aboyaki Nzambe mpe alandaki mwasi na ye.​—Genese 3:1-6; 1 Timote 2:14.

Nzambe abenganaki bango na Paladiso mpe banda wana, bakómaki na bomoi ya mpasi. Yehova atiki nzela ete Satana ayangela bato tii lelo oyo mpo bámona mpasi oyo kozanga kotosa Nzambe ememaka. Bomoi ya bato banda kalakala emonisi ete bato bakoki te kokómisa mabelé oyo Paladiso. (Yilimia 10:23) Kutu, lokola bato baboyaki ete Nzambe atambwisa bango, yango ebimisi makambo mabe mpenza oyo moko na yango ezali bobola.​—Mosakoli 8:9.

Atako bongo, Nzambe asundoli babola te na mokili oyo etondi na mikakatano. Biblia, Liloba na ye, ezali na batoli malamu mpo na babola.

“Bómitungisa soki moke te”

Ntango Yesu azalaki koloba na ebele ya bato, oyo babola mpe bazalaki kati na bango, ayebisaki bango boye: “Bótala malamumalamu bandɛkɛ ya likoló, mpamba te balonaka te mpe babukaka te mpe bayanganisaka te na ndako ya kobomba biloko; nzokande Tata na bino ya likoló aleisaka bango. Bino boleki bango na motuya te? . . . Boye bómitungisa soki moke te mpe bóloba te ete, ‘Tokolya nini?’ to, ‘Tokomɛla nini?’ to, ‘Tokolata nini?’ Mpo nyonso wana ezali biloko oyo bikólo mosusu balukaka na lokoso mpenza. Mpo Tata na bino ya likoló ayebi ete bozali na mposa ya biloko nyonso wana. Boye, bókoba koluka liboso bokonzi mpe boyengebene na ye, mpe biloko nyonso wana mosusu ekobakisamela bino.”​—Matai 6:26-33.

Moto oyo azali mobola asengeli koyiba te. (Masese 6:30, 31) Nzokande soki atye Nzambe na esika ya liboso na bomoi na ye, akozwa biloko oyo asengeli na yango. Tózwa ndakisa ya Tukiso, mobali moko oyo afandaka na ekólo Lesotho. Na 1998, basoda oyo bautaki na ekólo mosusu bakɔtaki na Lesotho mpo na kopekisa bato oyo batombokelaki guvɛrnɛma. Etumba wana ekɔtisaki mobulu na mboka mpe bato babukaki bamagazini, mingi babungisaki misala na bango, mpe nzala makasi ekɔtaki na mboka.

Tukiso azalaki kofanda na kartye ya babola, na engumba-mokonzi. Bato mingi ya kartye wana bayibaki biloko. Ntango Tukiso azongaki na mwa ndako na ye, akutaki ebele ya biloko oyo Maseiso, mwasi oyo azalaki kofanda na ye, azwaki. Tukiso alobaki na ye boye: “Bimisá biloko oyo libándá.” Amonisaki ye ete mobeko ya Nzambe epekisi koyiba. Maseiso atosaki. Bato ya kartye basɛkaki bango mpe balɔkɔtaki biloko yango.

Mateya ya Biblia oyo Batatoli ya Yehova bayekolisaki Tukiso nde etindaki ye asala bongo. Okanisi ete akufaki nzala lokola atosaki mobeko ya Nzambe? Te. Mwa moke na nsima, bankulutu ya lisangá epai Tukiso azalaki koyangana babongisaki biloko ya kolya mpo na kopesa ye. Kutu, Batatoli ya Yehova ya Afrika ya Sudi, ekólo oyo ezali pembeni, batindelaki bandeko na bango ya Lesotho batɔni koleka mibale ya biloko. Mposa ya kotosa mibeko ya Nzambe oyo Tukiso azalaki na yango mpe bolingo oyo bandeko bamonisaki na ndenge bapesaki bango biloko, esimbaki motema ya Maseiso. Ye mpe akómaki koyekola Biblia. Nsukansuka, bakomisaki libala na bango na buku ya Leta mpe bazwaki batisimo. Tii lelo oyo, bazali kosalela Nzambe na bosembo.

Yehova Nzambe amibanzabanzaka mpo na babola. (Talá etanda “Ndenge nini Nzambe atalelaka babola?”) Yango wana, azwi bibongiseli mpo na kosalisa bato mosusu oyo bazali lokola Tukiso ná Maseiso báyekola makambo na ye. Lisusu, na Liloba na ye apesi batoli ya ntina mpo na bomoi ya mokolo na mokolo.

Ebongiseli oyo ezali kosalisa bato

Batatoli ya Yehova basalaka makasi bámekola Nzambe, ye oyo amibanzabanzaka mpo na babola. (Bagalatia 2:10) Mbala mingi, soki na mboka moko baklisto ya solo bakutani na likama, bandeko ya mikili mosusu bazwaka bibongiseli mpo na kosalisa bango. Likambo eleki ntina ezali ete Batatoli ya Yehova bamibanzabanzaka mpo na bamposa ya elimo ya bato nyonso, ata mpe ya babola. (Matai 9:36-38) Na boumeli ya mbula 60 oyo eleki, Batatoli mingi bazwaki formasyo mpe bakendaki na mosala ya misionɛrɛ na mikili mosusu. Na ndakisa, ezali mobali moko ná mwasi na ye oyo bazali bamisionɛrɛ bautá na Finlande mpe bayekolaki monɔkɔ ya Sesotho nde bateyaki Tukiso ná Maseiso mpo bákóma bayekoli ya Yesu. (Matai 28:19, 20) Mbala mingi, bandeko oyo bakendaka na mosala ya misionɛrɛ batikaka mboka na bango ya bozwi, epai bomoi ezali malamu, mpe bakendaka na mokili ya bobola.

Baklisto ya solo bayibaka te mpo na kozwa biloko ya kobikela. Bazalaka nde na kondima ete Yehova Nzambe akoki kokokisa bamposa na bango. (Baebele 13:5, 6) Lolenge moko oyo Yehova akokisaka bamposa na bango ezali na nzela ya ebongiseli ya basambeli na ye na mokili mobimba oyo bamibanzabanzaka mpo na bandeko na bango.

Yehova asalisaka mpe babola na kopesa bango batoli oyo ekoki kosalisa bango na bomoi ya mokolo na mokolo. Na ndakisa, Biblia epesi etinda oyo: “Tiká moyibi ayiba lisusu te, kasi tiká nde asala mosala makasi, kosaláká na mabɔkɔ na ye oyo ezali mosala ya malamu, mpo azala na eloko ya kokabela moto oyo azali kokelela.” (Baefese 4:28) Basomɛlɛ mingi bazali kosala misala na bango moko mpo na kobikela, na ndakisa mosala ya bilanga. Lisusu, Biblia eteyaka babola ete soki baboyi mimesano mabe lokola komɛla masanga mingi, ekosalisa bango bábebisaka mbongo na bango mpambampamba te.​—Baefese 5:18.

Bobola ekosila ntango nini?

Biblia emonisi ete tozali na “mikolo ya nsuka” ya boyangeli ya Satana. (2 Timote 3:1) Etikali moke Yehova Nzambe atinda Yesu Klisto aya kosambisa bato. Eloko nini ekosalema na ntango wana? Yesu apesaki eyano na ndakisa moko oyo alobaki. Ayebisaki bato boye: “Ntango Mwana ya moto akoya na kati ya nkembo na ye mpe baanzelu nyonso elongo na ye, bongo akofanda na kiti na ye ya bokonzi ya nkembo. Mpe bikólo nyonso ekoyanganisama liboso na ye, mpe akokabola bato bamosusu epai bamosusu epai, se ndenge mobateli ya mpate akabolaka bampate epai bantaba epai.”​—Matai 25:31-33.

Bampate oyo Yesu alobeli na ndakisa yango ezali bato oyo bazali kotosa bokonzi na ye. Yesu akokanisaki bato yango na bampate mpo bazali kolanda ye, Mobateli na bango. (Yoane 10:16) Bampate yango bakozwa bomoi ya seko na mokili oyo Yesu akoyangela. Ekozala bomoi ya esengo na mokili ya sika oyo ezangi bobola. Bantaba, elingi koloba bato oyo bazali koboya bokonzi ya Yesu, bakobomama mpo na libela.​—Matai 25:46.

Bokonzi ya Nzambe ekosilisa makambo nyonso ya mabe. Bato bakobosana eloko oyo babengi bobola. Bato oyo bakofanda na mabelé bakolingana mpe bakomibanzabanza mpo na basusu. Ndenge Batatoli ya Yehova balinganaka ezali komonisa ete makambo wana ekoki mpenza kosalema, mpamba te Yesu alobaki boye: “Na ndenge wana bato nyonso bakoyeba ete bozali bayekoli na ngai, soki bozali na bolingo na kati na bino.”​—Yoane 13:35.

[Etanda/Bililingi na lokasa 6, 7]

NDENGE NINI NZAMBE ATALELAKA BABOLA?

Biblia emonisi ete Mozalisi ya bato “apesaka biloko na baoyo bazali na nzala.” (Nzembo 146:7, Bible na Lingala ya lelo oyo) Ezali na bavɛrsɛ koleka nkama oyo ezali komonisa ete Nzambe amibanzabanzaka mpo na babola.

Na ndakisa, na kati ya Mibeko oyo Yehova apesaki ekólo ya Yisalaele ya kala, asɛngaki ete ntango basali-bilanga bazali kobuka mbuma, básilisaka nyonso te. Basengelaki te kozongela bambuma oyo etikali na nzete ya olive to ya vinyo. Mibeko wana ezalaki komonisa ete Nzambe akanisaka bapaya, bitike, mpe basi oyo bakufelá mibali.​—Levitike 19:9, 10; Deteronome 24:19-21.

Lisusu, Nzambe alobaki na Bayisalaele boye: “Bokopesa mawa te na mwasi-akufeli-mobali, soki na mwana etike mpe te. Soki okopesa bango mawa mpe baleli epai na ngai mbɛlɛ nakoyoka kolela na bango solo, mpe nkanda na ngai ekopela, mpe nakoboma bino na mopanga, mpe basi na bino bakozala basi-bakufeli-babali mpe bana na bino bakozala bitike.” (Exode 22:22-24) Kasi, na Yisalaele, bazwi mingi bazalaki kotosa maloba yango te. Mpo na yango mpe mpo na makambo mosusu ya mabe oyo bazalaki kosala, Yehova Nzambe atindaki basakoli mpo na kokebisa bango. (Yisaya 10:1, 2; Yilimia 5:28; Amosa 4:1-3) Nsukansuka, Nzambe atikaki ete Baasulia mpe na nsima bato ya Babilone bábɔtɔla mokili ya Yisalaele. Babomaki Bayisalaele mingi, mpe bamemaki bamosusu na boombo.

Yesu Klisto, mwana ya Nzambe, amekolaki mpe Tata na ye na oyo etali komibanzabanza mpo na babola. Mokolo moko, ntango alimbolaki ntina ya mosala na ye, Yesu alobaki boye: “Elimo ya Yehova ezali likoló na ngai, mpamba te apakoli ngai mpo na kosakola nsango malamu epai ya babola.” (Luka 4:18) Yango elingi koloba te ete Yesu azalaki koteya kaka babola. Azalaki mpe koteya bazwi. Kasi, ntango azalaki kosakola, azalaki komibanzabanza mpo na babola. Na ndakisa, apesaki elenge mozwi moko toli oyo: “Tɛká biloko nyonso oyo ozali na yango mpe kabolá yango na babola, mpe okozwa eloko ya motuya na likoló; mpe yaká landá ngai.”​—Luka 14:1, 12-14; 18:18, 22; 19:1-10.

Yehova Nzambe ná mwana na ye Yesu Klisto bamibanzabanzaka mpenza mpo na babola. (Malako 12:41-44; Yakobo 2:1-6) Mpo na komonisa ete amibanzabanzaka mpo na babola, Yehova abombi na makanisi na ye ebele ya babola oyo bakufá. Bato wana nyonso bakosekwa na mokili ya sika epai bobola ekozala te.​—Misala 24:15.

[Bililingi]

Bondeko ya Batatoli ya Yehova ya mokili mobimba ezali komonisa ete mokili ya sika ekozala mpenza

[Elilingi na lokasa 5]

Tukiso, Maseiso, ná misionɛrɛ oyo ayekolaki Biblia na Tukiso

[Elilingi na lokasa 5]

Maseiso liboso ya ndako na ye elongo na misionɛrɛ oyo ayekolaki na ye Biblia

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto