“Nandimaki te ete ekosuka boye”
MOLAKISI moko ya eteyelo ya ntei na ekólo Espagne akomaki boye: “Banda mbula koleka nkama, Batatoli ya Yehova bamonisi ete balinganaka makasi, ete bazali bato ya kolongobana mpe, oyo eleki nyonso, bazali na kondima makasi.” Nini etindaki molakisi yango aloba bongo, atako andimaka te ete Nzambe azali?
Likambo yango ebandaki ntango basɛngaki Noemí akoma lisolo moko na mamekani ya nsuka na eteyelo ya ntei. Lokola Noemí azalaki Motatoli ya Yehova, aponaki kolobela “Elembo ya violɛ na boyangeli ya Banazi.”
Mpo na nini Noemí aponaki kolobela elembo yango? Alobi boye: “Lokola molakisi moko asengelaki kotángaka lisolo yango mpe kopesaka ngai batoli, namonaki ete yango ekoki kozala libaku malamu mpo na kopesa ye litatoli. Lokola lisolo ya Batatoli ya Yehova oyo batikalaki sembo epai ya Nzambe na boyangeli ya Banazi na Allemagne esimbaki mpenza motema na ngai, nayebaki ete ekoki mpe kosimba mitema ya bato mosusu.”
Lisolo ya Noemí esimbaki mitema ya bato mingi koleka kutu ndenge akanisaki. Mwa 5 Ɔkɔtɔbɛ 2002, lisolo na ye ezwaki mbano oyo eleki monene na momekano moko oyo etalelaki mikanda nyonso oyo bato ya mayele babimisaki na ekólo na bango. Bambano ya momekano yango epesamaka na baprofɛsɛrɛ 20 ya bainiversite ya minene ya Espagne.
Noemí azwaki mbano na ye na mabɔkɔ ya Pilar del Castillo, ministre ya makambo ya biteyelo na ekólo Espagne. Noemí mpe apesaki ministre kasɛti-video La fermeté des Témoins de Jéhovah face à la persécution nazie. Ministre azwaki yango na esengo.
Na engumba Manresa epai Noemí afandaka, zulunalo ya engumba yango elobelaki bolongi ya Noemí mpe lisolo na ye. Mokambi ya eteyelo na bango mpe asɛngaki ye kopi moko ya lisolo yango mpo bátánga yango na molulu ya kokanisa mbula 75 ya eteyelo yango.
Noemí alobaki boye: “Nasilisi eteyelo ya ntei na ndenge moko ya esengo mpenza. Nandimaki te ete ekosuka boye. Nasepelaki makasi ntango natángaki makambo oyo molakisi na ngai, Jorge Tomás Calot, akomaki na maloba ya ebandeli ya lisolo na ngai:
“‘Nandimaka te ete Nzambe azali, kasi nalingi nayeba soki Nzambe yango azali mpenza, oyo azali kotinda basambeli na ye “bálingaka bazalani na bango” makasi ndenge wana.’”