Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w06 1/7 nk. 21-25
  • Bazalaki kobotama na ekólo oyo Nzambe aponaki

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bazalaki kobotama na ekólo oyo Nzambe aponaki
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Bazalaki kobotama na kati ya ekólo ya batatoli
  • Bazalaki na bonsomi ya kopona
  • Masɛngami oyo basengelaki kokokisa
  • Nzambe aboi libota ya Yisalaele
  • Libota mosusu emipesi na Nzambe
  • Moto na moto amipesaki na Nzambe
  • Komipesa mpe bonsomi ya kopona
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
  • Mituna ya batángi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • “Bato oyo Yehova azali Nzambe na bango”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
  • ‘Sikoyo bozali bato ya Nzambe’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
w06 1/7 nk. 21-25

Bazalaki kobotama na ekólo oyo Nzambe aponaki

“[Yehova] Nzambe na yo aponaki yo ete ozala libota na ye.”​—DETERONOME 7:6.

1, 2. Makamwisi nini Yehova asalaki mpo na libota na ye, mpe boyokani nini Bayisalaele basalaki na Nzambe?

NA 1513 liboso ya ntango na biso (L.T.B.), Yehova asalaki boyokani ya sika na basaleli na ye awa na mabelé. Na mbula yango, asambwisaki Ezipito, oyo ezalaki nguya ya mokili mobimba mpe abimisaki Bayisalaele na boombo. Na ndenge yango, akómaki mobikisi mpe Nkolo na bango. Liboso abikisa bango, Nzambe alobaki na Moize ete: “Lobelá bato ya Yisalaele ete, Ngai nazali [Yehova], mpe nakobimisa bino na misala ya Baezipito mpe nakobimisa bino na boombo na bango mpe nakosikola bino na lobɔkɔ losembolami mpe na bitumbu minene, mpe nakozalisa bino lokola bato na ngai mpe ngai nakozala Nzambe na bino.”​—Exode 6:6, 7; 15:1-7, 11.

2 Mwa moke nsima ya kobima na Ezipito, Bayisalaele basalaki kondimana na Yehova Nzambe. Yehova azalaki kotalela bango lisusu moto na moto, libota na libota to mwa etuluku ya bato te, azwaki bango ekólo mobimba lokola libota na ye awa na mabelé. (Exode 19:5, 6; 24:7) Apesaki bango mibeko oyo esengelaki kotambwisa bango na bomoi ya mokolo na mokolo mpe, likambo eleki ntina, na makambo ya losambo. Moize alobaki na bango ete: “Libota monene nini ezali na nzambe penepene na bango, lokola [Yehova], Nzambe na biso, azali na biso soki ntango nini tokobyanga ye? Mpe libota monene nini ezali na Mibeko mpe malako ya sembo lokola mibeko oyo nyonso mitii ngai liboso na bino lelo?”​—Deteronome 4:7, 8.

Bazalaki kobotama na kati ya ekólo ya batatoli

3, 4. Mpo na nini mpenza Yehova akómisaki Yisalaele ekólo na ye?

3 Bankama ya bambula na nsima, Yehova akundwelaki Bayisalaele na nzela ya mosakoli Yisaya ntina oyo akómisaki bango ekólo na ye. Yisaya alobaki ete: “[Yehova] alobi boye, ye oyo asalaki yo, ɛ Yakobo, ye oyo atongaki yo, ɛ Yisalaele ete: Bangá te mpo ete ngai nasikoli yo, nabyangi yo na nkombo na yo, ozali ya ngai. Mpo ete ngai nazali [Yehova], Nzambe na yo, oyo ya Bulɛɛ ya Yisalaele, mobikisi na yo. . . . Yeisá bana babali na ngai longwa na mosika, mpe bana basi na ngai longwa na nsuka ya mokili; moto na moto oyo abyangami na nkombo na ngai, ye oyo nasali ye mpo na nkembo na ngai, ye oyo natongi ye, ɛɛ nasali ye. [Yehova] alobi ete, Bino bozali batatoli na ngai mpe moombo na ngai, oyo nasili kopona yo . . . bato baoyo natongi bango mpo na ngai moko ete bámonisa kosanzola na ngai.”​—Yisaya 43:1, 3, 6, 7, 10, 21.

4 Lokola Bayisalaele bamemaki nkombo ya Yehova, basengelaki kotatola bokonzi na ye epai ya bikólo. Bazalaki libota oyo ‘esalemaki mpo na nkembo ya Yehova.’ Basengelaki ‘kosanzola Yehova,’ kosakola misala na ye minene ya kobikisa mpe na ndenge yango, kokumisa nkombo na ye. Na mokuse, basengelaki kozala ekólo ya Batatoli ya Yehova.

5. Na ndenge nini Yisalaele ezalaki ekólo oyo emipesaki na Nzambe?

5 Na ekeke 11 L.T.B., mokonzi Salomo amonisaki ete Yehova aponaki Yisalaele na kati ya bikólo mosusu. Na libondeli oyo asalaki epai na Yehova, alobaki boye: “[Oponi] bango longwa na mabota nyonso na mokili ete bázala libula na yo.” (1 Mikonzi 8:53) Moyisalaele mokomoko mpe azalaki na boyokani malamu na Yehova. Liboso, Moize alobaki na bango boye: “Bino bozali bana ya [Yehova] Nzambe na bino. . . . Mpo ete yo ozali libota ya bulɛɛ epai na [Yehova] Nzambe na yo.” (Deteronome 14:1, 2) Na yango, ezalaki na ntina te bana oyo bazalaki kobotama na Yisalaele bámipesa epai na Yehova. Bazalaki kobotama na ekólo oyo emipesi na Nzambe. (Nzembo 79:13; 95:7) Bazalaki koteya mwana mokomoko mibeko ya Yehova mpe bana yango basengelaki kotosa mibeko yango ndenge kondimana oyo basalaki na Yehova esɛngaki.​—Deteronome 11:18, 19.

Bazalaki na bonsomi ya kopona

6. Moyisalaele mokomoko asengelaki kopona nini?

6 Atako Bayisalaele bazalaki kobotama na kati ya ekólo oyo emipesaki na Nzambe, mokomoko na bango asengelaki kozwa ekateli ya kosalela Nzambe. Liboso bákɔta na mokili ya Ndaka, Moize alobaki na bango ete: “Nabyangi likoló mpe nse kotatola na ntina na bino lelo, ete natii liboso na yo bomoi mpe kufa, mpe lipamboli mpe elakeli mabe. Na bongo poná bomoi ete yo mpe bana na yo bózala na bomoi, mpe ete olinga [Yehova] Nzambe na yo mpe otosa mongongo na ye mpe okangana na ye, mpo ete yango bomoi mpe [mikolo ebele, NW] mpo na yo, ete okoka kofanda na mokili oyo [Yehova] asimbelaki batata na bino ndai, Abalayama, mpe Yisaka mpe Yakobo, ete akopesa yango na bango.” (Deteronome 30:19, 20) Na yango, Moyisalaele mokomoko asengelaki kolinga Yehova, koyoka ye, mpe kokangama na ye. Lokola Bayisalaele bazalaki na bonsomi ya kopona, basengelaki kobuka mbuma ya bikateli oyo bazalaki kozwa.​—Deteronome 30:16-18.

7. Nini esalemaki nsima ya liwa ya bato ya ntango ya Yosua?

7 Eleko ya basambisi emonisi polele mbuma oyo bato bakoki kobuka soki batikali sembo epai ya Yehova to te. Liboso ya eleko yango, Bayisalaele balandaki ndakisa malamu ya Yosua mpe bazwaki mapamboli. “Bato basalelaki [Yehova] mikolo ya Yosua nyonso, mpe mikolo nyonso ya mikóló oyo baumelaki na nsima ya kufa ya Yosua, baoyo bamonaki misala minene nyonso misalaki [Yehova] mpo na Yisalaele.” Nzokande, bambula na nsima ya liwa ya Yosua, “libota mosusu ebimaki na nsima na bango, baoyo bayebaki [Yehova] te mpe bayebaki mosala oyo esalelaki ye Yisalaele te. Bato ya Yisalaele basalaki mabe na miso ya [Yehova].” (Basambisi 2:7, 10, 11) Nzokande, libota yango bapesaki motuya te na libaku ya kozala libota ya Nzambe, oyo Yehova asalelaki misala minene.​—Nzembo 78:3-7, 10, 11.

Masɛngami oyo basengelaki kokokisa

8, 9. (a) Ebongiseli nini ezalaki kosalisa Bayisalaele bámonisa ete bamipesi na Yehova? (b) Bayisalaele oyo bazalaki kopesa mbeka na bolingo na bango moko bazalaki kozwa litomba nini?

8 Yehova apesaki Bayisalaele mabaku ya komonisa ete bazali ekólo oyo emipesi na Nzambe. Na ndakisa, Mobeko na ye ezalaki mpe kosɛnga kopesa bambeka, oyo mosusu ezalaki mobeko mpe mosusu esengelaki kopesama na bolingo. (Baebele 8:3) Bambeka yango ezalaki ya kotumba, bambeka ya mbuma ya bilanga, mpe ya kimya oyo ezalaki kopesama na bolingo; bazalaki kopesa Yehova bambeka yango mpo na kolimbisama ya masumu mpe kopesa ye matɔndi.​—Levitike 7:11-13.

9 Bambeka wana ya bolingo ezalaki kosepelisa Yehova. Bambeka ya kotumba mpe ya mbuma ezalaki “nsolo malamu epai ya [Yehova.]” (Levitike 1:9; 2:2) Mpo na mbeka ya kimya, bazalaki kopesa Yehova makila mpe mafuta ya nyama, kasi banganga ná moto oyo apesi mbeka bazalaki kolya misuni. Bolei yango ezalaki elilingi ya boyokani na Yehova. Mobeko elobaki boye: “Wana ekokaba bino mbeka ya kimya epai ya [Yehova], bókaba yango ete bóyambama.” (Levitike 19:5) Atako Bayisalaele bazalaki kobotama basaleli ya Yehova, baoyo bazalaki kopesa bambeka na bolingo na bango mpo na komonisa ete bamipesi na Yehova, azalaki ‘koyamba bango’ mpe kosopela bango mapamboli.​—Malaki 3:10.

10. Ndenge nini Yehova amonisaki ete azalaki kosepela te na bambeka oyo bazalaki kopesa ye na mikolo ya Yisaya mpe Malaki?

10 Kasi, Bayisalaele bazalaki kopesa Yehova mokɔngɔ mbala na mbala. Na nzela ya mosakoli Yisaya, Yehova alobaki na bango ete: “Oyeiseli ngai bana ya mpate te mpo na mbeka etumbami, okumisi ngai na miboma na yo te; natyeli bino bozito ya makabo te.” (Yisaya 43:23) Lisusu, Yehova azalaki kosepela te na bambeka oyo ezalaki kopesama na mitema mibale. Na ndakisa, mbula 300 nsima ya Yisaya, na mikolo ya mosakoli Malaki, Bayisalaele bazalaki kopesa banyama oyo ezalaki na mbeba. Yango wana, Malaki alobaki na bango boye: “[Yehova] na bibele alobi ete, Ngai nazali na esengo mpo na bino te. Nakoyamba mpe likabo epai ya lobɔkɔ na bino te. . . . Bozali koyeisa yango ebɔtɔlami mpe banyama batɛngumi mpe na maladi; bozali koyeisa mbeka na bino bongo. [Yehova] alobi ete, Nayamba nde yango na lobɔkɔ na bino?”​—Malaki 1:10, 13; Amosa 5:22.

Nzambe aboi libota ya Yisalaele

11. Bayisalaele bazalaki na libaku nini?

11 Ntango Bayisalaele bakómaki libota ya Yehova, alakaki bango ete: “Soki bokotosa monɔkɔ na ngai mpe [bokobatela, NW] kondimana na ngai, mbɛlɛ bokozala bato na ngai mpenza kati na bato nyonso, mpo ete mokili mobimba ezali ya ngai, mpe bokozala bokonzi ya banganga mpe libota ya bulɛɛ.” (Exode 19:5, 6) Masiya oyo alakamaki asengelaki kobima na kati na bango mpe kopesa bango libaku ya kokóma basangani ya liboso ya guvernɛma ya Nzambe. (Genese 22:17, 18; 49:10; 2 Samwele 7:12, 16; Luka 1:31-33; Baloma 9:4, 5) Kasi, Bayisalaele mingi bamitambwisaki te lokola bato oyo bamipesi na Nzambe. (Matai 22:14) Baboyaki Masiya mpe babomaki ye.​—Misala 7:51-53.

12. Maloba nini ya Yesu emonisi ete Yehova aboyá ekólo Yisalaele?

12 Mwa mikolo liboso akufa, Yesu alobaki na Bakonzi ya mangomba ya Bayuda boye: “Botángá naino te na Makomami ete, ‘Libanga oyo batongi-ndako babwakaki yango nde ekómi libanga monene ya litumu ya ndako. Likambo yango euti epai ya Yehova, mpe ezali likambo ya kokamwa na miso na biso’? Yango wana nazali koloba na bino ete, Bokonzi ya Nzambe ekolongolama epai na bino mpe ekopesama na ekólo moko oyo ekobota bambuma na yango.” (Matai 21:42, 43) Mpo na komonisa ete Yehova aboyaki libota ya Yisalaele, Yesu alobaki ete: “Yelusaleme, Yelusaleme, yo mobomi ya basakoli mpe mobambi-mabanga na baoyo batindamaki epai na yo,​—mbala boni nalingaki koyanganisa bana na yo esika moko, ndenge nsoso ya mwasi ayanganisaka bana na ye na nse ya mapapu na ye! Kasi bino bolingaki yango te. Talá! Ndako na bino esundolami na mabɔkɔ na bino.”​—Matai 23:37, 38.

Libota mosusu emipesi na Nzambe

13. Esakweli nini Yehova ayebisaki na mikolo ya Yilimia?

13 Na ntango ya mosakoli Yilimia, Yehova asakolaki likambo moko ya sika mpo na basaleli na ye. Totángaka boye: “[Yehova] alobi ete, Talá mikolo ekoya wana nakokata kondimana ya sika na ndako ya Yisalaele mpe na ndako ya Yuda, pelamoko kondimana oyo ekataki ngai na batata na bango te na mokolo wana nakambaki bango na lobɔkɔ mpo na kobimisa bango na mokili ya Ezipito; babebisaki kondimana na ngai, ata ngai nazalaki mobali epai na ndako ya Yisalaele nsima ya mikolo yango; [Yehova] alobi bongo. Kasi oyo ekozala kondimana ekokata ngai na ndako ya Yisalaele nsima ya mikolo yango; [Yehova] alobi bongo. Nakotya mobeko na ngai na kati na bango, nakokoma yango na mitema na bango; nakozala Nzambe na bango mpe bango bakozala bato na ngai.”​—Yilimia 31:31-33.

14. Ntango nini mpe na ndenge nini ekólo ya Yehova ya sika ebotamaki? Ekólo yango ezali nini?

14 Moboko ya kondimana wana ya sika etyamaki ntango Yesu akufaki na mobu 33 T.B. mpe na nsima alakisaki tata na ye motuya ya makila oyo asopaki. (Luka 22:20; Baebele 9:15, 24-26) Nzokande, kondimana ya sika ebandaki ntango elimo santu ekitaki na pantekote ya mobu 33 T.B. mpe Yisalaele ya sika to “Yisalaele ya Nzambe” ebotamaki. (Bagalatia 6:16; Baloma 2:28, 29; 9:6; 11:25, 26) Ntoma Petelo akomelaki baklisto bapakolami boye: “Bino bozali ‘libota moko eponami, bonganga-nzambe moko ya bokonzi, libota moko mosantu, ekólo moko oyo esengeli kozala eloko ya Nzambe mpenza, mpo bósakola bizaleli malamu’ ya moto oyo abengaki bino bólongwa na molili bókɔta na kati ya pole na ye ya kokamwa. Mpo liboso bozalaki ekólo te, kasi sikoyo bozali ekólo ya Nzambe.” (1 Petelo 2:9, 10) Boyokani oyo Yehova azalaki na yango na ekólo ya Yisalaele esilaki mpenza. Na mobu 33 T.B., Yehova aboyaki ekólo ya Yisalaele mpe aponaki Yisalaele ya elimo to lisangá ya boklisto, ‘ekólo moko oyo ekobota bambuma’ ya Bokonzi ya Masiya.​—Matai 21:43.

Moto na moto amipesaki na Nzambe

15. Na mokolo ya pantekote ya mobu 33 T.B., batisimo nini Petelo asɛngaki bayoki na ye bázwa?

15 Nsima ya Pantekote ya mobu 33 T.B., moto nyonso, Moyuda to Mopakano, asengelaki komipesa na Nzambe mpe kobatisama “na nkombo ya Tata mpe ya Mwana mpe ya elimo santu.”a (Matai 28:19) Na pantekote, ntoma Petelo alobaki na Bayuda mpe baprozelite oyo bandimaki ete: “Bóbongola mitema, mpe tiká ete moko na moko na bino abatisama na nkombo ya Yesu Klisto mpo na kolimbisama ya masumu na bino, mpe bokozwa likabo ya ofele ya elimo santu.” (Misala 2:38) Bayuda ná baprozelite yango basengelaki kobatisama kaka te mpo na komonisa ete bamipesi na Yehova, kasi mpe mpo na komonisa ete bandimi Yesu, moto oyo Yehova aponaki mpo masumu na bango elimbisama. Basengelaki kondima ye lokola Nganga monene oyo Yehova aponi, motambwisi na bango mpe mokonzi ya lisangá.​—Bakolose 1:13, 14, 18.

16. Na ntango ya Paulo, ndenge nini Bayuda ná bapakano ya mitema sembo bakómaki bato ya Yisalaele ya elimo?

16 Bambula na nsima, ntoma Paulo alobaki ete: “Epai ya baoyo bazalaki na Damasi libosoliboso mpe epai ya baoyo bazalaki na Yelusaleme, mpe na mokili mobimba ya Yudea, mpe epai ya bikólo mosusu namemaki nsango oyo ete basengeli kobongola motema mpe kobaluka epai ya Nzambe na kosaláká misala oyo ebongi na kobongola motema.” (Misala 26:20) Nsima ya komonisa Bayuda ná bapakano ete Yesu azali Klisto to Masiya, Paulo asalisaki bango bámipesa na Nzambe mpe bábatisama. (Misala 16:14, 15, 31-33; 17:3, 4; 18:8) Lokola bandimelaki Nzambe, bayekoli wana ya sika bakómaki basangani ya Yisalaele ya elimo.

17. Mosala nini ya kotya bilembo ekómi pene ya kosila, mpe mosala nini mosusu ezali kosalema na lombangu?

17 Lelo oyo, etikali moke Yehova asilisa kotya Bayisalaele ya elimo bilembo. Ntango akosilisa, akoyebisa “baanzelu minei” oyo basimbi mipɛpɛ ya libebi ya “bolɔzi monene” báfungola yango. Kaka na ntango yango, koyanganisama ya “ebele ya bato,” oyo bazali na elikya ya kofanda libela na libela awa na mabelé ezali kosalema na lombangu mpenza. “Bampate mosusu” wana bazali komonisa kondima na “makila ya Mwana-mpate” mpe bazali kozwa batisimo mpo na komonisa ete bamipesi na Yehova. (Emoniseli 7:1-4, 9-15; 22:17; Yoane 10:16; Matai 28:19, 20) Na kati na bango, ezali mpe na bilenge oyo baboti na bango bazali baklisto. Soki ozali na kati ya bilenge yango, ekozala malamu otánga lisolo oyo elandi.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Mai, 2003, nkasa 30-31.

Bozongeli

• Mpo na nini ezalaki na ntina te bana oyo bazalaki kobotama na Yisalaele bámipesa epai na Yehova?

• Ndenge nini Bayisalaele bakokaki komonisa ete bazali kotosa kondimana na bango ya komipesa na Nzambe?

• Mpo na nini Yehova aboyaki libota ya Yisalaele, mpe ndenge nini aponaki mosusu?

• Kobanda na pantekote ya mobu 33 T.B., Bayuda ná bapakano basengelaki kosala nini mpo bákóma bato ya Yisalaele ya elimo?

[Elilingi na lokasa 21]

Bayisalaele bazalaki kobotama na kati ya ekólo oyo emipesi na Nzambe

[Elilingi na lokasa 23]

Moyisalaele mokomoko asengelaki kozwa ekateli ya kosalela Nzambe

[Elilingi na lokasa 23]

Makabo ya bolingo ya Bayisalaele ezalaki kopesa bango libaku ya komonisa ete balingi Yehova

[Elilingi na lokasa 25]

Nsima ya pantekote ya mobu 33 T.B., bayekoli ya Yesu bamipesaki na Nzambe bango moko mpe babatisamaki

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto