Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w05 15/6 lok. 29
  • Bazali Kosanzola Yehova na eteyelo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bazali Kosanzola Yehova na eteyelo
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Masolo mosusu
  • “Longwa na minɔkɔ na bana”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Masolo ya basakoli ya Bokonzi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Molakisi moko abongoli makanisi na ye
    Lamuká!—2009
  • Bilenge oyo basanzolaka Yehova bazalaka na bomoi ya malamu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
w05 15/6 lok. 29

Bazali kosanzola Yehova na eteyelo

NA MOKILI mobimba, bilenge Batatoli ya Yehova bazali kozwa mabaku ya kosanzola Nzambe na eteyelo, ezala na maloba na bango to na etamboli na bango. Tótala mwa bandakisa oyo ezali komonisa ndenge oyo bamonisaka molende na bango.

Na ekólo Grèce, basɛngaki na elenge Motatoli ya Yehova moko akoma lisolo moko oyo ekolobela ndenge mopɛpɛ ezali kobeba. Nsima ya koluka na Index des publications de la Société Watch Tower, azwaki lisolo moko na zulunalo Lamuká! oyo ezalaki na makanisi oyo ebongi. Na nsuka ya lisolo na ye, amonisaki ete makambo nyonso wana eutaki na Lamuká! Molakisi na ye alobaki na ye ete ezalaki moko ya masolo oyo eleki kitoko na masolo nyonso oyo atángá. Na nsima molakisi asalelaki makanisi yango na likita moko mpe ebotaki mbuma ya malamu. Ndeko mwasi yango azwaki likanisi ya komemela molakisi wana banimero mosusu ya Lamuká! Kati na yango moko ezalaki na motó ya likambo: “Balakisi​—Mpo na nini tosengeli na bango?” Na nsima molakisi akumisaki zulunalo Lamuká! na kelasi mpe bana-kelasi mosusu bakómaki kosɛnga ndeko mwasi yango banimero ya zulunalo yango. Esengelaki ndeko mwasi yango amemaka bazulunalo yango mpo bákoka kotánga.

Na ekólo Bénin, elenge mwasi moko moklisto akutanaki na komekama ya ndenge mosusu. Lokola momeseno, baboti ya baninga na ye mosusu ya kelasi bayokanaki mpo na kofuta balakisi mpo báteyaka bana na bango na ndako mateya oyo bayebaka malamu te. Kasi, balakisi baponaki mokolo ya pɔsɔ na ntɔngɔ mpo bápesaka mateya yango. Elenge Motatoli yango aboyaki mpe alobaki boye: “Bandeko ya lisangá na biso mobimba tokutanaka mokolo ya pɔsɔ na ntɔngɔ mpo na kobima na mosala ya kosakola. Mpo na ngai, yango ezali ntango eleki malamu na kati ya pɔsɔ; nakoki kosalela yango mpo na likambo mosusu te!” Tata na bango, oyo abɔkɔlaka bango kaka ye moko mpe azali Motatoli, andimaki likanisi na ye mpe akendeki kosɛnga na baboti mpe balakisi mosusu ete bábongola programɛ yango. Kasi, bango nyonso baboyaki. Elenge mwasi yango azwaki ekateli ya kolanda mateya yango te. Mokolo ya pɔsɔ ye azalaki kobima na mosala ya kosakola na bandeko ya lisangá na bango. Baninga na ye ya kelasi bazalaki kosɛka ye mpe koloba na ye atika kosakola mpe abosana Nzambe na ye. Bakanisaki ete akozwa te. Nzokande, bana-kelasi oyo balandaki mateya na ndako bazwaki te, kasi ndeko mwasi wana azwaki. Batikaki kosɛka ye. Sikoyo baninga na ye ya kelasi bakómá koloba na ye ete: “Kotika te kosalela Nzambe na yo.”

Na République tchèque, elenge mwasi moko ya mibu 12 asengelaki kobongisa lisolo na buku moko. Mama na ye alendisaki ye asalela buku Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo. Abandaki lisolo na ye na mituna oyo: “Bokanisi boni? Nani akoki kozala moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo?” Alobelaki Yesu, bomoi na ye awa na mabelé mpe mateya na ye. Na nsima alobelaki mokapo oyo ezali na moto ya likambo: “Toli mpo na kolimbisa baninga.” Molakisi na ye akamwaki mpe alobaki ete: “Lisolo na yo ezali lisolo eleki kitoki kati na masolo nyonso oyo nayoká!” mpe andimaki kozwa buku yango. Baninga na ye mosusu ya kelasi mpe basɛngaki ye buku yango. Na mokolo oyo elandaki, mwana mwasi yango azalaki na esengo mpamba te akabolaki babuku 18.

Bilenge lokola oyo bazali kozwa esengo monene na kosanzola Yehova na eteyelo. Ebongi ete biso nyonso tómekola molende oyo bilenge yango bazali komonisa.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto