Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w06 1/7 nk. 26-30
  • Bilenge, bópona kosalela Yehova

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bilenge, bópona kosalela Yehova
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Babotamaka basaleli ya Nzambe te lelo oyo
  • Makebisi ezali nini?
  • Elenge, Yehova azali kosɛnga yo opona
  • Ndimá kozwa batisimo
  • Okobatisama mokolo nini?
  • “Tokokenda na yo elongo”
  • Baboti, bozali kosalisa bana na bino bákende liboso tii bázwa batisimo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2018
  • Elenge: Omibongisi mpo na kozwa batisimo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2016
  • Bilenge basengeli kozwa batisimo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • ‘Nasengeli kozwa batisimo?’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
w06 1/7 nk. 26-30

Bilenge, bópona kosalela Yehova

“Bópona lelo ye oyo bokosalela.”​—YOSUA 24:15.

1, 2. Wapi batisimo oyo ebongi te oyo mangomba epesaka?

PENE na nsuka ya ekeke ya mibale ya ntango na biso (T.B.), mokomi moko na nkombo Tertullien akomaki ete: “Bana bakoki kokóma baklisto kaka ntango bayebi Klisto.” Azalaki kotɛmɛla makasi batisimo ya bana mike, momeseno oyo ekómaki kosalema na boklisto ya lipɛngwi na ntango na ye. Kasi, na bokeseni na Tertullien mpe na oyo Biblia eteyaka, Augustin, moko ya babandisi ya Lingomba ya Katolike, alobaki ete batisimo elongolaka lisumu lisangó, mpe ete bana oyo bakufaka kozanga kobatisama bakendaka na lifelo. Liteya wana esalaki ete bákóma kobatisa bana mike ntango kaka babotami.

2 Mangomba mingi ya minene ebatisaka bana mike tii lelo. Lisusu, na ntango ya kala, bakonzi ya mboka mpe ya mangomba bazalaki kobatisa na makasi “bapakano” soki balongi bango na etumba. Kasi, kobatisa bana mpe mikóló na makasi eyokani te na Biblia.

Babotamaka basaleli ya Nzambe te lelo oyo

3, 4. Nini ekoki kosalisa bana oyo baboti na bango bamipesá na Nzambe bámipesa bango moko?

3 Biblia emonisi ete Nzambe atalelaka bilenge lokola basantu ata soki moboti kaka moko azali moklisto. (1 Bakolinti 7:14) Yango ekómisaka bana yango mbala moko basaleli ya Yehova? Te. Nzokande, bana oyo babɔkɔlami na baboti oyo bamipesá na Yehova bazwaka mateya oyo ekoki kotinda bango bámipesa bango moko na Nzambe. Salomo, mokonzi ya bwanya, akomaki ete: “Mwana na ngai, batelá lilako ya tata na yo mpe longwá na mibeko ya mama na yo te. . . . Soki okotambola, ekokamba yo; soki okolala mpɔngi, ekobatela yo, soki okolongwa na mpɔngi, ekolobana na yo. Zambi malako mazali mwinda mpe mobeko ezali pole; mpamela ya kolakisama ezali nzela epai ya bomoi.”​—Masese 6:20-23.

4 Mateya ya baboti ekoki kobatela bana soki bana bazali kotosa yango. Salomo alobaki mpe ete: “Mwana ya mayele akosepelisa tata, nde mwana ya zoba azali na bozito epai ya mama na ye.” “Mwana na ngai, yoká mpe zalá na boyebi mpe kambá motema na yo na nzela.” (Masese 10:1; 23:19) Bino bilenge, mpo bózwa litomba na mateya ya baboti na bino, esengeli bóndimaka na motema moko batoli mpe disipilini na bango. Babotamaka na bwanya te, kasi bokoki ‘kokóma na bwanya’ mpe kopona “nzela ya bomoi.”

Makebisi ezali nini?

5. Toli nini Paulo apesi bana ná batata?

5 Ntoma Paulo akomaki ete: “Bana, bótosaka baboti na bino na kati ya bomoko elongo na Nkolo, mpo yango ezali likambo ya boyengebene: ‘Kumisá tata na yo ná mama na yo’; oyo ezali komandema ya liboso elongo na elaka: ‘Mpo makambo ezala malamu mpo na yo mpe oumela ntango molai na mabelé.’ Mpe bino, batata, bósilikisaka bana na bino te, kasi bókoba kobɔkɔla bango na disipilini mpe na makebisi ya Yehova.”​—Baefese 6:1-4.

6, 7. Kobɔkɔla bana na “makebisi ya Yehova” esɛngaka nini, mpe mpo na nini kosala bongo emonisi te ete baboti bazali kotindika bana na makasi?

6 Baboti batindikaka nde bana na bango na makasi ntango bazali kobɔkɔla bango na “disipilini mpe na makebisi ya Yehova”? Te. Nani akoki komona mabe soki baboti bazali kolakisa bana na bango nzela mpe bizaleli oyo bamoni ete ezali malamu? Nani amonaka mabe ntango bato oyo bandimaka te ete Nzambe azali bateyaka bana na bango ete Nzambe azali te? Bato ya Katolike bamonaka ete bazali na mokumba ya kolakisa bana na bango bindimeli ya lingomba na bango, mpe bato bamonaka yango mpenza mabe te. Ndenge moko, bato bakoki koloba mabe te mpo na Batatoli ya Yehova oyo bazali koteya bana na bango bálanda makanisi ya Yehova oyo euti na Biblia.

7 Buku moko (Theological Dictionary of the New Testament), elimboli ete liloba ya Grɛki oyo babongoli na “makebisi” na Baefese 6:4 ezali kopesa likanisi ya “kosembola makanisi, kolongola oyo ya mabe mpe kokóma na oyo ya Nzambe.” Ezali boni soki mwana oyo azali kolanda makanisi ya baninga to koluka kozala lokola bango aboyi mateya ya baboti na ye? Tokoki mpenza koloba ete bopusi yango ezali kouta epai ya baboti to baninga? Soki baninga bazali kopusa bana na bango bámɛlaka bangi, bálangwaka masanga, to básalaka pite to ekobo, esengeli koloba mabe mpo na baboti oyo bazali kosalisa bana báyeba ete kolanda etamboli motindo wana ezali likama?

8. Ndenge nini basalisaki Timote andima solo?

8 Ntoma Paulo akomelaki elenge Timote boye: “Kangamá na makambo oyo oyekolaki mpe oyo ondimisamaki bosolo na yango, koyebáká epai ya banani oyekolaki yango mpe ete banda na bomwana na yo mpenza oyebi makomi mosantu, oyo ezali na likoki ya kokómisa yo moto ya bwanya mpo na lobiko na nzela ya kondima na bokangani na Klisto Yesu.” (2 Timote 3:14, 15) Liboso bákóma baklisto, mama ná nkɔkɔ ya Timote bazalaki kosalisa ye banda bomwana na nzela ya Biblia mpo andimela Nzambe. (Misala 16:1; 2 Timote 1:5) Na nsima, ntango bakómaki baklisto, bakangaki Timote nsinga na nkingo te mpo akóma moklisto, kasi ‘basalisaki ye nde na nzela ya Makomami.’

Elenge, Yehova azali kosɛnga yo opona

9. (a) Yehova apesá bato nini, mpe mpo na ntina nini? (b) Ndenge nini Mwana mobotami-se-moko ya Nzambe asalelaki bonsomi na ye ya kopona?

9 Yehova akokaki kokela biso lokola bamasini, mpo tósalaka kaka oyo ye alingi. Na esika ya kosala bongo, apesá biso bonsomi ya kopona. Nzambe alingaka bato bámipesa na ye bango moko. Asepelaka komona ete bikelamu na ye, mikóló mpe bilenge bazali kosalela ye na bolingo nyonso. Ndakisa eleki kitoko ya moto oyo asalaki mokano ya Nzambe na bolingo nyonso ezali Mwana na ye mobotami-se-moko. Yehova alobaki mpo na ye ete: “Oyo azali Mwana na ngai, molingami, oyo nandimi.” (Matai 3:17) Mwana yango ya liboso ya Nzambe alobaki na tata na ye boye: “Nasepeli kosala yango ekosepelisa yo; ɛ Nzambe na ngai; mibeko na yo ezali kati na motema na ngai.”​—Nzembo 40:8; Baebele 10:9, 10.

10. Kosalela Yehova ndenge alingaka esɛngaka nini mpenza?

10 Yehova alingaka ete baoyo bazali kosalela ye na litambwisi ya mwana na ye básalaka mpe mokano na ye na bolingo. Mokomi ya nzembo asakolaki boye: “Bato na yo bakomipesa na yo na bolingo nyonso, na mokolo ya nguya na yo, na nkembo ya bulɛɛ, bilenge na yo bakoya epai na yo lokola mamwɛ longwá na ntango ya ntɔngɔntɔngɔ.” (Nzembo 110:3) Ebongiseli ya Yehova mobimba, na likoló mpe na nse ezali kotambola mpo bato basalaka mokano na ye na bolingo na bango.

11. Likambo nini bana oyo baboti na bango bamipesá na Nzambe basengeli kopona?

11 Bilenge, bóyeba ete ezala baboti na bino to bankulutu ya lisangá bakoki kotindika bino te bózwa batisimo. Bino moko nde bosengeli komonisa mposa ya kosalela Yehova. Yosua alobaki na Bayisalaele ete: “Bósalela [Yehova] na motema moko mpe na sembo . . . Bópona lelo ye oyo bokosalela.” (Yosua 24:14-22) Lolenge moko, bino moko nde bosengeli kozwa ekateli ya komipesa na Yehova mpe kondima kosala mokano na ye.

Ndimá kozwa batisimo

12. (a) Atako baboti bakoki koteya bana na bango, nini bakoki kosala te mpo na bango? (b) Ntango nini Yehova akómaka kotalela elenge lokola moto oyo akoki kozwa ekateli ya kosalela ye?

12 Bilenge oyo nde ntango ya komonisa kondima bino moko, kasi bótya motema kaka na oyo ya baboti na bino te. (1 Bakolinti 7:14) Yakobo akomaki boye: “Soki moto ayebi kosala oyo ezali malamu kasi azali kosala yango te, ezali lisumu epai na ye.” (Yakobo 4:17) Baboti bakoki kosalela Nzambe mpo na bana na bango te mpe bana bakoki kosalela Nzambe mpo na baboti na bango te. (Ezekiele 18:20) Oyebi Yehova mpe mikano na ye? Ozali na mbula ya kokanga ntina ya makambo oyo oyekoli mpe obandi kokóma na boyokani na ye? Tokoki mpenza kokanisa ete Nzambe azali kotalela yo ete okoki kozwa ekateli ya kosalela ye?

13. Mituna nini bilenge oyo bazwi naino batisimo te basengeli komituna?

13 Ozali elenge oyo azwi naino batisimo te, oyo abɔkɔlami na baboti oyo bazali baklisto? Oyanganaka na makita to mpe obimaka na mosala ya kosakola? Soki ezali bongo, omituna boye: ‘Mpo na nini nazali kosala makambo oyo nyonso? Nayanganaka na makita mpe nabimaka na mosala ya kosakola mpo baboti na ngai batindikaka ngai to mpo nazali na mposa ya kosepelisa Yehova?’ Yo moko ondimi mpenza “mokano ya Nzambe oyo ezali malamu mpe ekoki kondimama mpe ezali ya kokoka”?​—Baloma 12:2.

Okobatisama mokolo nini?

14. Bandakisa nini ya Biblia emonisi ete ezali na ntina te kolekisa ntango mpo na kobatisama?

14 Ntango kaka mosakoli Filipo ayebisaki ye ete Yesu azali Masiya, Moetiopia atunaki boye: “Nini ezali kopekisa ngai kobatisama?” Kasi, Moetiopia yango ayebaki mpenza Makomami mpe amonaki ete asengeli kozela lisusu te mpo na komonisa polele ete, kobanda na ntango wana, azwi ekateli ya kosalela Yehova na kati ya lisangá ya boklisto, mpe yango ememelaki ye esengo mingi. (Misala 8:26-39) Ndenge moko, mwasi moko na nkombo Lidia, oyo Yehova afungolaki motema na ye “polele mpo atya likebi na makambo oyo Paulo azalaki koloba,” ye ná bato ya ndako na ye “babatisamaki” mbala moko. (Misala 16:14, 15) Lisusu, mokɛngɛli ya bolɔkɔ na mboka Filipi ayokaki “liloba ya Yehova” oyo Paulo na Silasi bateyaki ye, mpe “ye ná bato na ye babatisamaki kozanga koumela.” (Misala 16:25-34) Na yango, soki oyebi mateya ya mobɔkɔ na ntina na Yehova mpe mikano na ye, mpe ozali mpenza na mposa ya kosala mokano na ye, oyebani na lisangá lokola elenge ya bizaleli malamu, oyanganaka na makita nyonso mpe osakolaka nsango malamu ya Bokonzi mingi, ozali kozela nini mpo na kobatisama?​—Matai 28:19, 20.

15, 16. (a) Wapi likanisi ezangá ntina bilenge mosusu bazalaka na yango mpo na kobatisama? (b) Ndenge nini komipesa mpe batisimo ekoki kobatela bilenge?

15 Ozali kobanga kozwa batisimo mpo oyebi ete mokolo okosala mabe bakosambisa yo na lisangá? Soki ezali bongo, kanisá likambo oyo: Soki ozali na likoki ya kobala, okoboya kobala kaka mpo ozali komona ete mabala mingi ezali kokufa? Te! Ndenge moko, osengeli kobanga kozwa batisimo te soki okokisi masɛngami. Na ntembe te, soki omipesi na Yehova mpe ondimi kosala mokano na ye, yango ekotinda yo osala makasi mpenza mpo na koboya etamboli mabe. (Bafilipi 4:13) Bilenge, bókanisa te ete soki boboi kobatisama lelo nde bokozongisa monɔkɔ te epai na Yehova. Soki okómi na mbula oyo yo moko okoki kozwa bikateli, yebá ete okozongisa monɔkɔ epai na Yehova mpo na makambo ozali kosala, ezala obatisamá to te.​—Baloma 14:11, 12.

16 Batatoli mingi bamoni ete ekateli oyo bazwaki ya kozwa batisimo ntango bazalaki naino bilenge esalisi bango mingi. Tózwa ndakisa ya elenge moko ya mbula 23 na Mpoto. Alobi ete lokola azwaki batisimo na mbula 13, yango esalisaki ye ‘akima bamposa ya bolenge.’ (2 Timote 2:22) Banda bomwana, azalaki na mokano ya kokóma mosali ya ntango nyonso. Lelo oyo, azali kosala na esengo mpenza na biro ya filiale moko ya Batatoli ya Yehova. Mapamboli beboo ezali kozela bilenge nyonso oyo bazali kopona kosalela Yehova, yo mpe lokola.

17. Na makambo nini ezali na ntina tókoba kososola soki “mokano ya Yehova” ezali nini?

17 Komipesa mpe batisimo ezali ebandeli ya bomoi oyo esɛngaka kotalela mokano ya Yehova na makambo nyonso oyo tozali kosala. Mpo na kokokisa elaka yango, esɛngaka ‘kosomba ntango.’ Ndenge nini tokoki kosomba ntango? Soki tosaleli ntango oyo tokokaki kolekisa na makambo ya mpambampamba mpo na koyekola Biblia na mozindo, koyanganaka na makita nyonso mpe kosakolaka na molende mpenza “nsango malamu ya bokonzi.” (Baefese 5:15, 16; Matai 24:14) Soki tomipesi epai ya Yehova mpe tozali na mposa ya kosala mokano na ye, yango ekomonana na makambo nyonso tozali kosala: kominanola, kolya mpe komɛla, mpe miziki oyo toyokaka. Mpo na nini te kopona lolenge ya kominanola oyo okobanda kosalela libela na libela? Ebele ya bilenge oyo bazali na esengo lelo oyo bakoki koyebisa yo ete ezali na balolenge ya komisepelisa mingi oyo eyokani na “mokano ya Yehova.”​—Baefese 5:17-19.

“Tokokenda na yo elongo”

18. Motuna nini bilenge basengeli komituna?

18 Banda na mobu 1513 L.T.B. tii na mobu 33 T.B., Yehova azalaki na ekólo moko awa na mabelé oyo aponaki mpo na kosambela ye mpe kozala batatoli na ye. (Yisaya 43:12) Bana oyo bazalaki kobotama na Yisalaele, bazalaki mbala moko bato ya ekólo yango. Banda na pantekote, Yehova aponá “ekólo” ya sika awa na mabelé, Yisalaele ya elimo to “ekólo moko mpo na nkombo na ye.” (1 Petelo 2:9, 10; Misala 15:14; Bagalatia 6:16) Ntoma Paulo alobi ete Klisto apɛtoli mpo na ye moko “ekólo moko ya bato, oyo bazali na molende mpo na misala ya malamu.” (Tito 2:14) Bilenge, bino moko bozali na bonsomi ya koluka koyeba epai wapi bato yango bazali. Lelo oyo, banani bazali “libota ya boyengebene mpe [oyo bazali] kobatela kondimana,” kotosa mitinda ya Biblia, bazali Batatoli ya Yehova ya sembo mpe bazali kosakola Bokonzi ya Nzambe lokola elikya kaka moko mpo na bato? (Yisaya 26:2-4) Talá yo moko na kati ya mangomba mpe kokanisá etamboli ya bandimi na yango na oyo Biblia ezali kosɛnga mpo na basaleli ya Nzambe ya solo.

19. Bamilio ya bato na mokili mobimba bazali kondima likambo nini?

19 Bamilio ya bato na mokili mobimba, ná bilenge, bazali kondima mpenza ete “libota ya boyengene” yango ezali batikali bapakolami ya Batatoli ya Yehova. Bazali koloba na Bayisalaele yango ya elimo ete: “Tokokenda na [bino] elongo, zambi toyoki ete Nzambe azali elongo na bino.” (Zekalia 8:23) Bilenge, tozali mpenza na elikya mpe tozali kobondela mpo na bino ete bózwa ekateli ya kozala na kati ya basaleli ya Nzambe mpe, na ndenge yango, “bópona bomoi,” elingi koloba bomoi ya seko na mokili ya sika ya Yehova.​—Deteronome 30:15-20; 2 Petelo 3:11-13.

Bozongeli

• Makebisi ezali nini?

• Yehova andimaka mosala ya ndenge nini?

• Bilenge nyonso oyo babɔkɔlami na baboti oyo bamipesá na Nzambe basengeli kopona nini?

• Mpo na nini esengeli te kokakatanaka mpo na kobatisama?

[Bililingi na lokasa 26]

Okoyokela nani?

[Elilingi na lokasa 28]

Ndenge nini komipesa mpe batisimo ekoki kobatela yo?

[Elilingi na lokasa 29]

Nini ezali kopekisa yo kobatisama?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto