Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w06 1/10 nk. 4-7
  • Okoki kozala na bomoi libela na libela

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Okoki kozala na bomoi libela na libela
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Bomoi ya seko ebungi
  • Bomoi ya seko ezwami lisusu
  • Likabo ya bomoi ezangi kufa
  • Bomoi ya seko na paladiso awa na mabelé
  • Nzela se moko oyo ezali komema na bomoi ya seko
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Bakufi bakozonga lisusu na bomoi!
    Lamuká!—2009
  • Tokoki mpenza kozala na bomoi ya seko?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Liwa, monguna ya nsuka, akosilisama makasi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
w06 1/10 nk. 4-7

Okoki kozala na bomoi libela na libela

BATO mingi na mangomba ya mokili bazali na bilikya ndenge na ndenge ya bomoi ya seko. Lingomba na lingomba bakoki kozala na makanisi na bango na ntina na likambo yango, kasi bango nyonso bazali na elikya kaka moko, kozala na bomoi ya esengo, na mokili moko ya kitoko, epai liwa ekozala te. Yo mpe ozalaka na mposa ya bomoi yango? Mpo na nini likanisi ya bomoi ya seko epalanganá ndenge wana? Mokolo mosusu bato bakozwa bomoi ya seko?

Makomami ezali komonisa ete Mozalisi atyaki mposa ya bomoi ya seko na motema ya moto banda na ebandeli, ntango akelaki mobali ná mwasi ya liboso. Biblia elobi boye: “Ata likanisi ya bomoi ya seko [Nzambe] asili kotya yango na mitema na bango, mpo bato báyeba te misala oyo Nzambe ya solo asalaki banda na ebandeli tii na nsuka.”​—Mosakoli 3:11, NW.

Kasi, mpo na kozala na bomoi libela na libela, Adama ná Eva basengelaki kondima ete Nzambe nde ayebisaka bango oyo ezali malamu mpe oyo ezali mabe. Soki básalaka bongo, mbele Yehova atikaki bango bázala na bomoi “libela na libela” na elanga ya Edene, esika oyo abongisaki mpo na bango.​—Genese 2:8; 3:22, NW.

Bomoi ya seko ebungi

Biblia emonisi ete Nzambe alonaki na kati ya elanga yango “nzete ya koyeba malamu mpe mabe” mpe alobaki na Adama ná Eva ete bálya mbuma na yango te, soki te bakokufa. (Genese 2:9, 17) Koboya kolya mbuma yango elingaki komonisa ete Adama ná Eva bandimi boyangeli ya Nzambe. Nzokande, kolya yango elingaki komonisa ete baboyi boyangeli ya Nzambe. Adama ná Eva baboyaki kotosa Yehova mpe bayokelaki Satana, ekelamu ya elimo oyo atombokelaki Nzambe. Yango wana Yehova akataki ete Adama ná Eva babongi te kozala na bomoi libela na libela.​—Genese 3:1-6.

Adama ná Eva basengelaki kopona na kati ya bomoi ná liwa. Yango wana, kozanga kotosa na bango ememelaki bango liwa, elingi koloba bazalaki lisusu na bomoi te. Adama ná Eva to bana na bango bakokaki te kosalela nkisi moko boye mpo na kozala na bomoi libela to kozala na molimo oyo ekufaka te.a

Bana nyonso ya Adama bazali konyokwama mpo na botomboki na ye. Ntoma Paulo alimbolaki likambo yango. Akomaki boye: “Lisumu ekɔtaki na mokili mpo na moto moko mpe liwa mpo na lisumu, ndenge moko mpe liwa epalangani epai ya bato nyonso mpamba te bango nyonso basalaki lisumu.”​—Baloma 5:12.

Bomoi ya seko ezwami lisusu

Ntoma Paulo asalelaki ndakisa ya baombo ya ekeke ya liboso mpo na kolimbola boombo ya bana ya Adama. Mpo na lisumu oyo Adama ná Eva batikelá bana na bango, basengelaki kaka kobotama “baombo ya lisumu” ya liwa. (Baloma 5:12; 6:16, 17) Maloba basengelaki kaka elingi koloba ete esengelaki kozala kaka bongo soki Yehova apesaka mbeka te mpo na kosikola biso na boombo yango. Paulo alobaki boye: “Lokola libunga kaka moko ebimiselaki bato ya mitindo nyonso etumbu, ndenge moko mpe mosala kaka moko ya kolongisama esali ete bato ya mitindo nyonso bátángama bayengebene mpo na bomoi.” ‘Mosala yango ya kolongisama’ etindaki Yesu apesa bomoi na ye ya moto ya kokoka “lokola lisiko oyo ekokani mpo na bato nyonso.” Yehova andimaki ete lisiko yango ezali na nguya ya kosikola bato na “lisambisi” ya “etumbu.”​—Baloma 5:16, 18, 19; 1 Timote 2:5, 6.

Yango wana, bato ya siansi bakoki soki moke te kozwa sɛkɛlɛ ya bomoi ya seko na kati ya baselile ya moto; sɛkɛlɛ yango ezali epai mosusu. Biblia emonisi ete kokufa ya bato ezali likambo ya mobeko, kasi ya baselile te. Ndenge moko mpe, mbeka ya lisiko oyo Yesu apesaki mpo bato bázwa lisusu bomoi ya seko ezali likambo ya mobeko. Mbeka ya lisiko ezali mpe komonisa boyengebene mpe motema-boboto ya Nzambe. Kasi, banani bakozwa litomba na mbeka ya lisiko mpe bakozwa bomoi ya seko?

Likabo ya bomoi ezangi kufa

Yehova Nzambe azali “seko na seko.” Akoki kokufa te. (Nzembo 90:⁠2, NW ) Moto ya liboso oyo Yehova apesaki likabo ya bomoi ezangi kufa ezali Yesu Klisto. Ntoma Paulo alobaki boye: “Klisto, sikoyo lokola alamwisami na bakufi, akokufa lisusu te; liwa ezali lisusu na bokonzi likoló na ye te.” (Baloma 6:9) Yango wana, mpo na komonisa bokeseni oyo ezali na kati ya Yesu ná bakonzi ya mokili oyo, Paulo alobi ete kaka ye moko nde azali na bomoi ezangi kufa na kati ya bango nyonso. Yesu akotikala “na bomoi libela na libela.” Bomoi na ye “ekoki te kobebisama.”​—Baebele 7:15-17, 23-25; 1 Timote 6:15, 16.

Kaka Yesu te nde azwá likabo yango. Baklisto bapakolami oyo baponami mpo na koyangela na nkembo ya likoló bazwi mpe lisekwa ndenge moko na Yesu. (Baloma 6:5) Ntoma Yoane amonisi ete bato 144 000 nde bazwi libaku yango. (Emoniseli 14:1) Bango mpe bazali kozwa bomoi ezangi kufa. Mpo na lisekwa na bango, Paulo alobi boye: “Mosuni ná makila ekoki te kozwa libula ya bokonzi ya Nzambe . . . Kelelo ekobɛta, mpe bakufi bakolamuka bato bazangi kopɔla, mpe biso tokokóma ndenge mosusu. Mpo oyo ezali ya kopɔla esengeli kolata motindo ya kozanga kopɔla, mpe oyo ekufaka esengeli kolata motindo ya kozanga kokufa.” Liwa ezali na bokonzi te likoló ya baoyo bazali kozwa lisekwa ya ndenge wana.​—1 Bakolinti 15:50-53; Emoniseli 20:6.

Likambo wana oyo Nzambe ayebisi biso ezali na ntina mingi. Atako baanzelu bazali bikelamu ya elimo, bakelamaki na bomoi ezangi kufa te. Yango emonani na ndenge baanzelu oyo balandaki Satana na botomboki na ye bakobebisama. (Matai 25:41) Nzokande, bato oyo bakoyangela elongo na Yesu bazali kozwa bomoi ezangi kufa, oyo emonisi ete Yehova andimi mpenza bosembo na bango.

Yango elimboli ete kaka bato 144 000 nde bakozwa bomoi ya seko na kati ya bamiliare ya bato oyo bazali awa na mabelé? Te. Mpo na nini?

Bomoi ya seko na paladiso awa na mabelé

Mokanda ya Emoniseli epesi elilingi moko kitoko ya ebele ya bato oyo bazwi bomoi ya seko na paladiso awa na mabelé. Na kati na bango, ezali mpe na baoyo bakufaki, kasi basekwaki mpe bazongaki lisusu na nzoto kolɔngɔnɔ mpe makasi lokola bilenge. (Emoniseli 7:9; 20:12, 13; 21:3, 4) Bakozala pembeni ya “ebale moko ya mai ya bomoi, pɛɛ lokola klisitali, ezali kotiyola uta na kiti ya bokonzi ya Nzambe.” Na pembenipembeni ya ebale yango, ezali na “banzete ya bomoi . . . , mpe nkasa ya banzete wana ezalaki mpo na kobikisa bikólo.” Yehova Nzambe azali kobenga bato na maloba oyo: “Tiká moto nyonso oyo azali na mposa ya mai aya; tiká moto nyonso oyo alingi, akamata mai ya bomoi ofele.”​—Emoniseli 22:1, 2, 17.

Banzete mpe mai ya bomoi ezali te bankisi, oyo bato ya siansi babengi alchimie bazalaki kosalela mpo na koyeisa bomoi molai, to liziba oyo ezongisaka moto elenge lokola oyo bato mosusu basalaki mibembo mpo na kokende koluka yango. Ezali nde komonisa bibongiseli oyo Nzambe azwaki na nzela ya Yesu Klisto mpo na kozongisa bato na bomoi ya kokoka oyo bazalaki na yango na ebandeli.

Mokano oyo Nzambe azalaki na yango ya kopesa bato ya botosi bomoi ya seko ebongwani te. Ekokokisama mpenza mpamba te Yehova azali sembo. Nzembo 37:29 elobi ete: “Bayengebene bakosangola mokili mpe bakofanda wana libela.” Elaka wana etindaka biso ná baoyo bazwi libaku ya kozala na bomoi ezangi kufa na likoló tóloba boye: “Misala na yo ezali minene mpe ya kokamwa, Yehova Nzambe, Mozwi-ya-Nguya-Nyonso. Banzela na yo ezali ya boyengebene mpe ya solo, Mokonzi ya seko. Nani akobanga mpenza yo te, Yehova, mpe akopesa nkombo na yo nkembo te, mpo yo moko kaka nde ozali sembo?”​—Emoniseli 15:3, 4.

Ozali na mposa ya kozwa likabo kitoko wana ya bomoi ya seko? Soki ezali bongo, osengeli kozala sembo epai ya “Mokonzi ya seko” mpe kotosa ye. Osengeli koyeba Yehova mpe Yesu Klisto, ye oyo apesi nzela ete tózwa lisusu bomoi ya seko. Nzambe akopesa bato nyonso oyo bazali kondima makanisi na ye na likambo etali malamu ná mabe likabo ya “bomoi ya seko.”​—Yoane 17:3.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Mpo na koyeba makambo mosusu na ntina ya liteya ya molimo oyo ekufaka te, talá na mwa buku Nini ekómelaka biso soki tokufi?, ebimisami na Batatoli ya Yehova.

[Etanda/Elilingi na lokasa 5]

Mposa oyo esilaka te

Lisapo ya Gilgamesh, oyo balobaka ete esalemaki soki na mobu 2 000 liboso ya ntango na biso (L.T.B.), elobeli ndenge elombe yango azalaki koluka kotikala elenge libela na libela. Na Ezipito ya kala, lokola bazalaki kokanisa ete molimo ekufaka te, bazalaki kokaukisa nzoto ya bibembe mpo epɔla te mpo milimo esalelaka nzoto yango lisusu. Yango wana, malita mosusu ya Ezipito ezalaki kotonda na biloko nyonso oyo mowei akoki kozala na mposa na yango na mokili ya bawei.

Emonani lokola bato ya siansi babengi alchimie na Chine babandá kondima ete moto akoki kozala na bomoi libela na libela banda na ekeke ya mwambe L.T.B.; mpe banda ekeke ya minei L.T.B. bakómaki kosalela bankisi mpo na kosala ete moto akufaka lisusu te. Bato ya Mpoto na eleko ya Moyen Âge mpe Baarabe bazalaki mpe komeka kosala bankisi na bango moko oyo eyeisaka bomoi molai. Bankisi na bango mosusu ezalaki na baaside lokola arsenic, mercure mpe soufre. Ebele ya bato oyo basalelaki bankisi yango bamityaki pwazɔ na nzoto.

Lisusu, na eleko moko boye, nsango etambolaki mokili mobimba ete ezali na liziba moko oyo, soki moto amɛli mai na yango, akozonga elenge.

[Etanda/Bililingi na lokasa 7]

Bomoi ya seko ekobanda kolɛmbisa bato?

Bato mosusu balobaka ete bomoi ya seko ekobanda kolɛmbisa bato, mpamba te ekozala kaka na makambo ndenge moko mokolo na mokolo nsuka te. Mbala mosusu, bango bakanisaka ete bomoi ya seko ekozala kaka lokola bomoi ya lelo, oyo mpo na bato mingi elɛmbisaka mpe ezali na ntina te. Nzokande, Nzambe alaki ete na Paladiso bato ‘bakosepela na kimya ya solo.’ (Nzembo 37:11) Bomoi yango ekopesa bato libaku ya koyeba biloko oyo Yehova akelá mpe bakozala na ntango ya kokolisa makoki nyonso oyo bazali na yango, koyekola makambo mingi mpe kosala makambo oyo bakokaka te kosala lelo oyo.

Aubrey de Grey, profɛsɛrɛ moko ya iniversite ya Cambridge, oyo ayekolaka ndenge ya kokómisa bomoi ya bato molai alobi ete: “Bato oyo batánga mingi mpe basalelaka mayele na bango balɛmbaka bomoi ya lelo te mpe bazangaka makambo ya sika ya kosala te.” Atako bongo, Liloba ya Nzambe elobi ete: “Moto te ayebi kososola mosala mosalaki Nzambe longwá na ebandeli kino nsuka.”​—Mosakoli 3:11.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto