Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w07 1/1 nk. 9-11
  • Okoki kofungwama na bolingo?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Okoki kofungwama na bolingo?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Tózwaka bandeko na biso baklisto na motuya
  • Bakolinti ‘bazali na nkaka’
  • Kofungwama na bolingo lelo oyo
  • Fungwamá mpe luká baninga ya sika
  • Tóyebaka bamposa ya basusu
  • ‘Tófungwama’
    Mosala na biso ya Bokonzi—2004
  • Bókoba kokola na bolingo ya bondeko
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • “Bólinganaka makasi”
    Tósambela Nzambe kaka moko ya solo
  • “Bókoba kotambola na kati ya bolingo”
    Pusaná penepene na Yehova
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
w07 1/1 nk. 9-11

Okoki kofungwama na bolingo?

NSINGA ya longo ya masuwa esengeli kozala makasi mpo mipɛpɛ mpe mbonge emema masuwa te. Kasi, yango ekoki kosalema kaka soki nsinga yango ekangisami makasi. Soki te, nsinga ekokatana.

Ezali mpe bongo mpo na lisangá ya boklisto. Mpo lisangá ezala makasi, bandeko basengeli kozala na bomoko. Nini esengeli kosangisa bango? Ezali bolingo, nguya makasi oyo esangisaka bato. Yango wana, Yesu ayebisaki bayekoli na ye ete: “Nazali kopesa bino komandema ya sika, ete bólinganaka bino na bino; ndenge ngai nalingaki bino, mpo bino mpe bólingana bino na bino. Na ndenge wana bato nyonso bakoyeba ete bozali bayekoli na ngai, soki bozali na bolingo na kati na bino.” Ya solo, bolingo ya baklisto ya solo eleki kozala kaka baninga mpamba mpe kopesana limemya. Bazalaka na bolingo ya komipesa mpo na basusu.​—Yoane 13:34, 35.

Tózwaka bandeko na biso baklisto na motuya

Masangá mingi ezali na mikóló mpe bilenge, oyo bakeseni na mposo, bikólo, mimeseno, minɔkɔ, basusu bazali bazwi, mpe basusu bazali babola. Moto na moto azalaka na makambo oyo alingaka to aboyaka, makambo oyo atyelaka motema to abangaka, mpe mbala mingi moto na moto azalaka na mokakatano na ye, oyo ekoki kozala maladi to kozanga mbongo. Bokeseni wana ekoki kozala likama mpo na bomoko na biso. Kasi, nini ekoki kosalisa biso tófungwama na bolingo mpe tóbatela bomoko atako mokakatano yango ezali? Soki tozali mpenza kopesa ndeko mokomoko motuya na lisangá, yango ekosalisa biso tófungwama na bolingo.

Kasi, ndenge nini tokoki kopesa moto motuya? Tokopesa moto motuya soki tozali kotyela ye likebi, koyeba malamu na ye mpe kopesa ye matɔndi. Soki tozali kopesa bandeko na biso baklisto motuya, tokotya likebi na bamposa na bango, tokoyeba malamu na bango mpe tokozala na botɔndi mpamba te, biso nyonso tosambelaka kaka Nzambe moko. Yango ekosala ete tókóma kolinga bango lisusu makasi. Soki totali mwa moke makambo oyo ntoma Paulo akomelaki baklisto ya Kolinti na ekeke ya liboso, yango ekosalisa biso tóyeba lolenge oyo tosengeli mpenzampenza kolinga bandeko.

Bakolinti ‘bazali na nkaka’

Paulo akomelaki Bakolinti mokanda ya liboso na mobu 55 ya ntango na biso (T.B.) mpe akomaki mokanda ya mibale kaka na mbula yango. Makambo oyo alobeli emonisi ete bato mosusu na lisangá ya Kolinti bazalaki kopesa bandeko na bango baklisto motuya te. Paulo alobelaki likambo yango na maloba oyo: “Monɔkɔ na biso efungwami epai na bino, Bakolinti, motema na biso efungwami. Bozali na nkaka na kati na biso te, kasi bozali na nkaka nde na kati ya bolingo na bino moko ya motema.” (2 Bakolinti 6:11, 12) Paulo alingaki koloba nini ntango alobelaki bango ete “bozali na nkaka”?

Paulo alingaki koloba ete bafungwamaki te na bolingo na bango. Molimboli moko ya maloba ya Biblia alobi ete Bakolinti bazalaki kolinga Paulo te, mpo “bazalaki kokanisela ye mabe . . . mpe azalaki kosalela bango makambo na bosembo te.”

Yoká toli ya Paulo oyo: “Na bongo, lokola mbano mpo na yango​—nazali koloba lokola nde na bana mike​—bino mpe bófungwama.” (2 Bakolinti 6:13) Paulo alendisaki Bakolinti báfungwama na bolingo mpo na bandeko baklisto. Elingi koloba ete na esika ya kozanga kotyelana motema mpe kolandela mabunga ya mikemike, basengelaki nde kozala na makanisi malamu mpe kolingaka bango.

Kofungwama na bolingo lelo oyo

Ezali mpenza likambo ya esengo komona lelo oyo basambeli ya solo ya Nzambe bazali kosala milende mpo na kofungwama na bolingo. Na ntembe te, kofungwama na bolingo esɛngaka milende. Yango elimboli kaka te koyeba oyo tosengeli kosala. Mpo na kofungwma na bolingo, etamboli na biso esengeli kokesene na oyo ya bato oyo batosaka mitinda ya Biblia te. Mbala mingi, bato yango bapesaka basusu motuya te. Bakoki kosala makambo kozanga kokanisa, kozanga limemya mpe kobimisa maloba kotyola. Tosengeli soki moke te kolanda bizaleli wana. Ekozala likambo ya mawa soki bolingo na biso ekiti mpo tozangi kotyelana motema lokola Bakolinti. Yango ekoki mpe kosalema soki tozali koluka kaka mabunga ya ndeko na esika ya kotalela malamu na ye. Yango ekoki mpe kosalema soki tokómi koyoka basusu nkaka mpo bautá mboka mosusu.

Kasi, mosaleli ya Nzambe oyo afungwami na bolingo, apesaka mpenza bandeko motuya. Apesaka bango lokumu, amemyaka bango mpe ayebaka bamposa na bango. Atako azali na bantina ya koimaima, azalaka pene mpo na kolimbisa mpe abombaka nkanda te. Kutu, atyelaka bandeko motema atako basaleli ye mabe. Boboto esalisaka ye amonisa bolingo oyo Yesu alobelaki ntango alobaki ete: “Na ndenge wana bato nyonso bakoyeba ete bozali bayekoli na ngai, soki bozali na bolingo na kati na bino.”​—Yoane 13:35.

Fungwamá mpe luká baninga ya sika

Bolingo ya solosolo ekosalisa biso tolinga kaka te baninga na biso ya motema, kasi toluka mpe baninga mosusu oyo tomesani na bango mpenza te na kati ya lisangá. Bato yango ekoki kozala banani? Bandeko na biso mosusu bazalaka nsɔninsɔni to, mpo na bantina mosusu, bazalaka na baninga mingi te. Liboso, tokoki komona ete tozali mpenza na makambo ndenge moko te na bandeko yango, longola kaka ete biso nyonso tosambelaka Yehova. Tobosana te ete Biblia elobeli bato mosusu oyo balinganaki makasi, atako bazalaki na makambo ndenge moko te.

Na ndakisa, Luta ná Naomi bakesenaki makasi na bambula, na bikólo, na mimeseno, ata mpe na minɔkɔ ya mboka. Kasi, yango epekisaki bango te bázala baninga. Yonatana azalaki mwana ya mokonzi mpe Davidi azalaki mobateli ya mpate. Atako bakeseneki na bambula mingi, boninga na bango ezali moko ya boninga ya makasi oyo elobelami na Makomami mosantu. Boninga wana, ezalaki mpenza kopesa bato yango esengo mpe kolendisa bango na elimo.​—Luta 1:16; 4:15; 1 Samwele 18:3; 2 Samwele 1:26.

Ata lelo oyo, baklisto ya solo oyo bakeseni mpenza na bambula to na makambo ya bomoi bakómaka mpe baninga ya solosolo. Na ndakisa, Regina azali mama ya bana mibale, oyo azali kobɔkɔla bango kaka ye moko.a Azali na misala mingi mpe azalaka na ntango mpenza te ya kofanda na baninga. Harald ná mwasi na ye Ute bakóma mibange mpe bazali na bana te. Mabota oyo mibale ekokani kaka na makambo moke. Atako bongo, Harald ná Ute basalelaki toli ya Biblia ya kofungwama na bolingo. Na makambo mingi oyo bazalaki kosala, bazalaki kobenga Regina ná bana na ye, kosakola mpe kominanola elongo.

Tokoki mpe kolinga bandeko mosusu ndenge tolingaka baninga na biso ya motema? Mpo na nini te koluka kokóma baninga ya solosolo ná bandeko na biso baklisto oyo tokeseni na bango bikólo, mimeseno mpe bambula?

Tóyebaka bamposa ya basusu

Soki tozali na bolingo ya solo, yango ekotinda biso tóyebaka bamposa ya basusu. Bamposa ya ndenge nini? Tótalela bamposa ya bandeko ya lisangá. Bilenge bazali na mposa ya litambwisi, mibange bazali na mposa ya kolendisama, basakoli ya ntango nyonso basengeli kozwa longonya mpe lisalisi, mpe bandeko oyo bazali kotungisama na makanisi basengeli na moto oyo bakoyebisa makambo. Moto na moto azalaka na bamposa na ye. Tosengeli kosala nyonso oyo tokoki mpo na kosunga bango.

Kofungwama na bolingo elimboli mpe koyeba komitya na esika ya bato oyo bazali mpenza na bosɛnga. Oyebi ndeko moko oyo azali na maladi oyo eumelá na nzoto to oyo azali kobunda na mokakatano mosusu? Soki ozali kofungwama na bolingo mpe ozali na boboto, yango ekotinda yo omitya na esika ya baoyo bazali na bosɛnga mpe osunga bango.

Lokola bisakweli ya Biblia mpo na mikolo ezali koya ezali kokokisama, bolingo makasi mpe bomoko na lisangá esengeli kozala na motuya koleka bozwi, makoki to makambo oyo tokoki kosala. (1 Petelo 4:7, 8) Mokomoko na biso akolendisa bomoko kati na lisangá soki azali kofungwama na bolingo mpo na bandeko. Tokoki kolikya ete Yehova akopambola mpenza biso soki tozali kotosa maloba ya Mwana na ye Yesu Klisto oyo: “Komandema na ngai yango oyo, ete bólinganaka ndenge ngai nalingi bino.”​—Yoane 15:12.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Topesi bango bankombo mosusu.

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 10]

Kozwa bandeko na motuya elimboli komonaka mpe makambo na bango ya malamu, komemyaka bango mpe koyebaka bamposa na bango

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto