Liteya oyo tokoki kozwa na mayele moko oyo ebimaki na Lidia ya kala
EKOKI kozala ete oyoká ata mokolo moko te lisolo ya mboka Lidia, yango wana okoki kokamwa koyoka ete mayele moko oyo babimisaki kuna ekɔtisá mbongwana na makambo ya mombongo na mokili. Batángi ya Biblia bakokamwa mpe koyoka ete likambo moko oyo babimisaki na Lidia esalisi mpenza mpo na kolimbola bisakweli mosusu ya Biblia ya makasi. Bato ya Lidia babimisaki mayele nini? Liboso ya koyanola na motuna yango, ekozala malamu tóyeba ata moke makambo ya ampire wana oyo bato basalá lokola kobosana.
Bakonzi ya Lidia bazalaki koyangela na Saladi, mboka-mokonzi na yango, na wɛsti ya Asie Mineure, oyo bakómá kobenga Turquie. Crésus, mokonzi ya nsuka ya Lidia, akómaki mpenza na bomɛngo, kasi na 546 L.T.B., Sirise Monene, mokonzi ya Perse alongaki bokonzi na ye. Mwa bambula na nsima, kaka ye Sirise alongaki ampire ya Babilone.
Balobaka ete bato ya mombongo ya Lidia oyo bazalaki mayele mingi nde bazalaki bato ya liboso oyo basalelaki mbongo ya ebende. Wolo mpe palata ebandá kosalelama lokola mbongo banda kala, kasi lokola biteni ya wolo nyonso ezalaki monene ndenge moko te, bato bazalaki ntango nyonso komeka yango na kilo ntango bazalaki kotɛka mpe kosomba biloko. Na ndakisa, na Yisalaele, Yilimia mosakoli ya Nzambe asombaki mabelé mpe akomaki ete: “[Namekelaki] ye mosolo, sɛkɛlɛ zomi na nsambo ya palata.”—Yilimia 32:9.
Na Lidia, bato ya eleko ya Yilimia babimisaki eloko moko oyo ekokaki kosalisa mpo mombongo esalema na mindondo te: Bakómaki kosalela mbongo ya ebende oyo ezalaki na kilo ndenge moko mpe ezalaki na elembo oyo eyebanaki na bato nyonso. Mpo na kosala mbongo ya liboso ya ebende, bazalaki kosangisa wolo na palata. Soki basangisi bongo, bazalaki kobenga yango électrum. Ntango Crésus akómaki mokonzi, alongolaki bibende wana mpe abimisaki mosusu. Mosusu ezalaki ya palata mpe mosusu ezalaki ya wolo. Bato ya Lidia babimisaki mbongo ya bibende mibale ekeseni. Mpo na kozwa mbongo moko ya ebende ya ntalo mingi, esengelaki kopesa mbongo ya bibende 12 ya ntalo moke. Kasi, bato mosusu bazalaki mpe kosala mbongo ya bibende na wolo oyo basangisi na bibende mosusu ya ntalo moke. Batɛkisi bazalaki na mposa ya mayele moko ya pɛtɛɛ mpo na koyeba wolo ya solosolo.
Bato ya Lidia bayaki komona ete libanga moko ya moindo, oyo babengaka libanga ya Lidia ekosilisa mokakatano yango. Soki bapaloli mbongo yango likoló ya libanga wana, langi na yango ezalaki kolakisa soki ezali wolo ya solo to te. Mayele wana ya komeka mbongo na libanga ezalaki kosalisa bango báyebaka mbongo ya solo. Ndenge nini mayele wana ya komeka mbongo na libanga ekoki kosalisa biso tóyeba lisusu Biblia malamumalamu?
Ndimbola mosusu ya liloba yango na Biblia
Lokola bato mingi ya mimbongo bakómaki komeka mbongo ya bibende ya wolo na libanga, liloba oyo ezalaki kolobela mayele yango ekómaki mpe kosalelama mpo na kolobela lolenge nyonso ya komeka. Na Grɛki, monɔkɔ oyo bakomaki na yango eteni mosusu ya Biblia, bazalaki mpe kosalela liloba yango mpo na kolobela minyoko oyo bazalaki konyokola bato mpo na komeka bango.
Lokola bakɛngɛli ya bolɔkɔ nde bazalaki konyokola bato ya bolɔkɔ, bakómaki mpe kosalela liloba oyo eutaki na mayele yango mpo na kolobela bakɛngɛli yango. Na ndakisa, Biblia elobeli lisese oyo Yesu apesaki ya moombo ya kozanga botɔndi oyo nkolo na ye apesaki na mabɔkɔ ya “bakɛngɛli ya bolɔkɔ” to “banyókoli” ndenge Biblia Liloba lya Nzambe ebengi bango. (Mateo 18:34) Na ntina na mokapo yango, buku moko (The International Standard Bible Encyclopaedia) elobi boye: “Ekoki kozala ete kokɔta bolɔkɔ ezalaki kotalelama lokola ‘monyoko’ (mpe ezalaki mpenza bongo), yango wana ‘banyokoli’ yango ezali kaka bakɛngɛli ya bolɔkɔ.” Yango esalisi biso tókanga ntina ya mokapo moko ya ntina mpenza na Biblia.
Libombami ebimi polele
Banda kala, bato ya mitema sembo oyo batángaka Biblia bamitunaka soki nini ekokómela Satana. Biblia elobi ete: “Zabolo . . . abwakamaki na kati ya laki ya mɔtɔ mpe ya sufulu, epai nyama mabe ná mosakoli ya lokuta bazalaki; mpe bakonyokolama butu moi libela na libela seko.” (Emoniseli 20:10) Soki Yehova akómi konyokola bato seko na seko, wana azali lisusu Nzambe ya bolingo mpe ya sembo te. (Yilimia 7:31) Lisusu, Biblia emonisi ete bomoi ya seko ezali likabo, kasi etumbu te. (Baloma 6:23) Emonani polele ete Emoniseli 20:10 ekomamá na maloba ya elilingi. Nyama mabe mpe laki ya mɔtɔ esalelami na ndenge ya elilingi. (Emoniseli 13:2; 20:14) Liloba minyoko esalelami mpe na ndenge ya elilingi? Liloba yango ekoki mpenza kolimbola nini?
Ndenge tolobaki, liloba ya Grɛki oyo basaleli mpo na minyoko euti na liloba oyo bazalaki kosalela na Lidia mpo na kolobela mayele ya komeka mbongo na libanga, mpe ekoki kolimbola minyoko oyo moto azwaka na bolɔkɔ. Yango wana, monyoko ya sekoseko oyo Satana akozwa elimboli ete bakokanga ye na bolɔkɔ epai moto akoki kozala na likoki ata moke te ya kokima, elingi koloba akokufa libela.
Mayele ya komeka mbongo na libanga oyo bato ya Lidia bazalaki kosalela, esalisi biso tóyeba likambo mosusu oyo eyokani na bolingo ya Nzambe na oyo etali “monyoko” ya libela na libela oyo Satana akozwa. Na minɔkɔ mosusu, liloba yango (oyo eutá na mayele ya komeka mbongo na libanga) elimbolaka emekeli ya biloko. Na ndakisa, na Lingelesi, liloba yango elimbolaka komeka to kotalela eloko mpo na koyeba soki ezali ya malamu to ya solo. Na yango, “monyoko” ya libela na libela oyo Satana akozwa ezali kopesa likanisi ya etumbu oyo akozwa. Etumbu yango ekozala mpenza ndakisa mpo na moto nyonso oyo akoluka lisusu kotombokela Yehova. Soki moto atɛmɛli bokonzi na ye, ekozala lisusu na ntina te ete Yehova atikela ye lisusu ntango ya komonisa soki azali na elonga to te.
Koyeba ntina oyo bato ya mimbongo ya bipai nyonso bakómaki kosalela mayele ya bato ya Lidia ya komeka mbongo na libanga mpe maloba ya elilingi oyo mayele yango ebimisá, esalisi biso tóyeba malamu oyo ekokómela Satana. Oyo ekokómela ye ekozala mpenza ndakisa mpo na moto nyonso oyo akotombokela Nzambe na nsima; soki moto ameki, Nzambe akolimbisa ye te.—Baloma 8:20.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 23]
Monyoko ya libela na libela oyo Satana akozwa ekozala mpenza ndakisa mpo na moto nyonso oyo akoluka lisusu kotombokela Yehova
[Karte na lokasa 21]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
Mbu ya Moindo
LIDIA
SALADI
Mbu ya Meditelane
[Elilingi na lokasa 21]
Esika Saladi ya kala ezalaki
[Elilingi na lokasa 22]
Na ntango ya kala, bazalaki kosalela bimekeli mpo na komeka mbongo
[Eutelo ya bafɔtɔ]
E. Strouhal/Werner Forman/Art Resource, NY
[Bililingi na lokasa 22, 23]
Mayele ya komeka mbongo na libanga esalelamaka tii na moi ya lelo
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Coins: Courtesy Classical Numismatic Group, Inc.; touchstone: Science Museum/Science & Society Picture Library
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 21]
Electrum coin: Courtesy Classical Numismatic Group, Inc.