Kelasi ya mbala ya 127 ya Gileadi
Bamisionɛrɛ batindami “tii na esika eleki mpenza mosika na mabele”
YESU atindaki bayekoli na ye bázala batatoli “tii na esika eleki mpenza mosika na mabele.” (Misala 1:8) Batatoli ya Yehova bazwaka etinda yango na lisɛki te.
Kutu, na boumeli ya bambula koleka 65 oyo touti kolekisa, bamisionɛrɛ oyo bazwaki formasyo na Gileadi, eteyelo ya Watchtower mpo na mateya ya Biblia, bapesi mabɔkɔ mpo na kopalanganisa mosala yango ya kosakola na mikili koleka 200. Mwapɔsɔ, 12 Sɛtɛmbɛ 2009, mibali mpe basi 56, baministre oyo bameseni na mosala ya kosakola, bazwaki badiplome nsima ya kolanda formasyo na boumeli ya sanza mitano na eteyelo ya bamisionɛrɛ oyo ezali na Patterson na New York, États-Unis.
Likoki ya kokanisa
Ndeko Stephen Lett, oyo azali na Lisangani ya Mikóló-Bakambi ya Batatoli ya Yehova mpe azalaki prezida ya likita yango, asalaki lisukulu oyo ezalaki na motó ya likambo: “Salelá na bwanya likoki na yo ya kokanisa.” Akebisaki liboso bana-kelasi na lolenge minei oyo basengeli te kosalela makanisi na bango. Lolenge misato ya liboso ezalaki: (1) koboya kokanisa biloko ya mokili oyo ekoki te kopesa libateli ya solosolo; (2) koboya kokanisa misala ya mbindo; mpe (3) koboya komitungisa koleka ndelo, koluka te kokanisa mabe oyo ekoki kokóma lobi. (Masese 18:11; Matai 5:28; 6:34) Na likambo ya misato, molobi alobaki ete komitungisa koleka ndelo mpo na makambo oyo elekaki lobi mpe oyo ekoki kosalema lobi ebakisaka mitungisi oyo moto azali na yango lelo. Ndeko Lett, alobaki boye: “Yango ezali mokumba ya kilo mpo na komema.” Mpe likambo ya minei ezalaki nini? Akebisaki bana-kelasi bákanisa te ete bomoi oyo bazalaki na yango liboso eleki oyo bakokutana na yango na esika bakotinda bango na mosala ya misionɛrɛ. Kosala bongo ekoki kosala ete bábungisa esengo oyo bakoki kozwa na mosala na bango.
Na nsima, ndeko Lett alendisaki bana-kelasi básalelaka likoki na bango ya kokanisa na lolenge minei ya malamu. Alobaki: (1) Bámonaka mosika makambo oyo ekoki komemela bango makama na elimo mpe na nzoto mpe bákima yango; (2) bámonaka na makanisi masolo oyo bazali kotánga na Biblia, mpe básala lokola nde bazalaki wana ntango makambo yango ezalaki kosalema; (3) bákanisaka ete moto nyonso oyo basololi na ye na teritware na bango ya sika akoki kokóma mosambeli ya Yehova; mpe (4) bámityaka na esika ya bato oyo bazali koteya, yango ekosalisa bango bákolisa likoki na bango ya koyokela basusu mawa.—Masese 22:3.
Ntina ya kopesa basusu formasyo
Ndeko David Splane, oyo azali na Lisangani ya Mikóló-Bakambi, asalaki lisukulu moko oyo ezalaki na motó ya likambo ete: “Pesá bato ya sembo makambo yango,” eutaki na 2 Timote 2:2. Ntango ntoma Paulo ayebisaki Timote ete apesa mibali ya sembo formasyo, likanisi ya Paulo ezalaki te ete Timote asuka kaka na koteya mibali yango solo, kasi mpe alendisa bango bápesa basusu formasyo. Molobi ayebisaki bana-kelasi ete mposa ezali monene ya mibali oyo basengeli kokamba misala na lisangá. Ntango nini mpe ndenge nini mibali yango basengelaki kozwa formasyo? Ndeko Splane alendisaki bana-kelasi bábanda kopesa mibali yango formasyo ntango kaka babandi koyekola na bango Biblia.
Kasi, bamisionɛrɛ basengeli mpenzampenza kosala nini mpo na kopesa bayekoli ya Biblia formasyo mpo bázala bandakisa ya sembo epai ya basusu? Molobi alobelaki makambo mingi. Bamisionɛrɛ basengeli kolakisa bango ndenge ya kobongisa malamu makambo oyo bakoyekola. Na nsima, ntango bayekoli yango babandi koyangana na makita ya lisangá esengeli mpe kolakisa bango ndenge ya kobongisaka makambo oyo ekolobelama na makita. Molobi alobaki boye: “Soki moto azali kokoka te koyekola Biblia ye moko, akokoka soki moke te koteya basusu.” Ndeko Splane alobaki mpe ete bamisionɛrɛ bakoki kosalisa bato ya sika bakómaka na retare te na makita, básimbaka mosala ya kosakola na makabo na bango, mpe bátosaka baoyo bazali kokamba lisangá. Alobaki ete lolenge eleki malamu ya kolakisa mateya yango ezali ya kopesa ndakisa malamu.
Kozala batatoli ezali libaku malamu
Ndeko Guy Pierce, oyo azali mpe na Lisangani ya Mikóló-Bakambi, asalaki lisukulu oyo eutaki na maloba ya Yesu oyo ezali na Misala 1:8: “Bokozala batatoli na ngai.” Akundwelaki bana-kelasi ete na ekeke ya liboso ya ntango na biso, bato ya ekólo Yisraele babungisaki libaku ya kozala batatoli ya Yehova. Libaku yango epesamaki na ekólo oyo esengelaki kobota mbuma ya Bokonzi. (Matai 21:43) Lisangá ya bakristo oyo batyami mafuta na elimo ezwaki esika ya ekólo yango. Molobi atángaki maloba ya ntoma Petro oyo alobaki ete ‘ekólo mosantu’ ya bakristo oyo batyami mafuta na elimo esengelaki ‘kosakola bizaleli’ malamu ya Yehova. (1 Petro 2:6-9) Na yango, Yesu alingaki te koloba ete bakristo bakozala lisusu te batatoli ya Yehova, kasi kaka batatoli na ye. Kutu, Yesu abengami “Motatoli ya Sembo.” (Emoniseli 1:5; 3:14) Azali Motatoli ya Yehova ya libosoliboso mpe ndakisa oyo tolandaka.—1 Petro 2:21.
Molobi ayebisaki bana-kelasi ete lelo oyo maloba ya Yesu oyo ezali na Misala 1:8 ezali na ndimbola monene. Mpo na nini? Likambo moko ya ntina mingi oyo ezali na Emoniseli 11:15, ekokisamaki! Bokonzi ya Nzambe oyo etambwisami na Masiya esili kotyama. Sikoyo, tokoki mpenza koloba ete mosala ya kopesa litatoli ezali kosalema “tii na esika oyo eleki mpenza mosika na mabele.” (Misala 1:8) Ndeko Pierce abɛtaki nsɛtɛ ete bamisionɛrɛ bazali kopesa litatoli na ntina na Yehova mpe Bokonzi na ye, kasi te mpo na bango moko to mpo na lolenge ya bomoi oyo bazalaki na yango liboso bákóma bamisionɛrɛ, mimeseno mpe bikólo oyo bautá. Alendisaki bana-kelasi ete “soki likoki ezali” báteya “bato mingi lisusu na ntango oyo etikali.”
Makambo mosusu ya ntina ya likita yango
Ndeko Alex Reinmueller, mosungi na komite ya kobimisa mikanda, asalaki lisukulu oyo ezalaki na motó ya likambo: “Yehova akopesa bino mpiko.” Alobaki ete soki bamisionɛrɛ batye motema na nguya ya Yehova, akosalisa bango báyeba makasi na bango, bándima bolɛmbu na bango, bálonga kobanga mpe bápesa Nzambe oyo bazali na yango ya malamu koleka.
Ndeko Sam Roberson mpe ndeko William Samuelson, balakisi mibale na Departema ya biteyelo ya Teokrasi, balendisaki mpe bana-kelasi. Ndeko Roberson asalaki lisukulu oyo ezalaki na motó ya likambo: “Nazali na yo,” eutaki na Yisaya 41:10. Alobaki ete bamisionɛrɛ bakokutana na makambo mingi ya esengo. Bakokutana mpe na mikakatano. Bakoki kolonga soki balandi ndakisa ya Mokonzi Davidi oyo abelelaki Tata na ye ya bolingo na libondeli. (Nzembo 34:4, 6, 17, 19) Lisukulu ya ndeko Samuelson elobelaki ntina ya kokoba kokolisa likoki ya kokanisa. Bamisionɛrɛ oyo basalaka bongo bazalaka na likoki ya komipekisa ete bázongisa mabe te ntango balobi na bango mabe mpe básilika noki te.—Masese 2:10, 11.
Ndeko Jim Mantz, mosungi na komite ya Bokomi, asololaki na bandeko ya Komite ya filiale oyo bautaki na ekólo Georgie, mpe na ekólo Honduras, mpe mosangani moko ya komite ya ekólo oyo autaki na Tadjikistan. Bandeko wana oyo bakɔmeli na elimo bapesaki bamisionɛrɛ toli na ndenge ya ‘kosalaka malamu mpo na kolonga mabe,’ mpo na kokóma baninga ya bato oyo bakoki koyina bango. (Baroma 12:21) Ndeko Mark Noumair, molakisi mosusu, asalaki lisolo moko kitoko, asololaki na bana-kelasi mpo na makambo bakutanaki na yango na mosala ya kosakola ntango bazalaki kozwa formasyo na Gileadi. Lisolo yango ezalaki na motó ya likambo oyo esimbaki mpenza mitema: “Ɛɛ, ndenge nini nakoki kosalisa?”
Mpo na kosukisa, prezida ya likita atángaki maloba ya nzembo ya sika oyo ezali na motó ya likambo: “Moná ntango biloko nyonso ekozala ya sika.” Bayangani nyonso 6 509 bazongaki na ekateli makasi ya kotatola na ntina na Yehova mpe Mwana na ye tii na esika eleki mpenza mosika na mabele.
[Etanda/Karte na lokasa 31]
MAKAMBO ETALI BANA-KELASI
Bauti na mikili: 8
Bana-kelasi bazalaki: 56
Babalani: 28
Mwayene ya mbula ya kobotama: 33.6
Mwayene ya mbula ya batisimo: 18.3
Mwayene ya mbula balekisi na mosala ya ntango nyonso: 13.6
[Karte]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
Batindami na mikili 22 oyo ezali awa na nse
EPAI BAMISIONƐRƐ BATINDAMI
ALBANIE
BOLIVIE
BURUNDI
CAMBODGE
CHILI
COSTA RICA
CÔTE D’IVOIRE
CURAÇAO
GUYANA
HAÏTI
JAMAÏQUE
MOLDAVIE
MOZAMBIQUE
NÉPAL
NICARAGUA
OUGANDA
PANAMA
PARAGUAY
PÉROU
RÉP. DÉM. DU CONGO
SERBIE
TANZANIE
[Elilingi na lokasa 31]
Kelasi ya mbala ya 127 ya Gileadi, Eteyelo ya Watchtower mpo na mateya ya Biblia
Bankombo na bango ekomami awa na nse na kolanda ndenge batɛlɛmi na fɔtɔ, banda na moto ya liboso na lobɔkɔ ya mwasi, mpe banda na molɔngɔ ya liboso tii na molɔngɔ ya nsuka.
(1) Marshall, T.; Prudent, L.; Mashburn, A.; Rosenström, S.; Testa, A.; Takeyama, M.; Sisk, M.
(2) Grooms, K.; Miura, S.; Camacho, M.; Rozas, S.; Burch, M.; Meza, I.; Young, G.; Geraghty, S.
(3) Bonilla, C.; Knaller, D.; Parrales, R.; Hotti, S.; Takada, A.; Tournade, M.; Sopel, C.
(4) Miura, Y.; Parrales, K.; Prudent, K.; Colburn, S.; Willis, L.; Vääränen, A.; Sisk, B.; Takada, R.
(5) Grooms, J.; Vääränen, M.; Geraghty, B.; Stackhouse, R.; Wilson, A.; Bonell, E.; Camacho, D.; Meza, R.; Bonell, M.
(6) Takeyama, S.; Testa, G.; Colburn, T.; Mashburn, C.; Willis, W.; Tournade, L.; Burch, J.; Stackhouse, J.
(7) Wilson, J.; Young, J.; Marshall, E.; Rozas, M.; Knaller, J.; Hotti, N.; Rosenström, A.; Sopel, J.; Bonilla, O.