“Kino liwa ekokabola biso”
BABALANI boni bazongelá maloba wana na esengo mokolo ya libala na bango—mbala mosusu kozanga kokanisa ete likambo yango ekoki kosalema? Bobange, maladi, to aksida ezali makambo oyo ekómaka mingi mpe oyo ekoki kosukisa bomoi ya molongani moko, mpe kotika molongani mosusu ye moko mpe na mpasi.—Mosakoli 9:11; Baroma 5:12.
Baankɛtɛ emonisi ete pene na katikati ya motángo ya basi ya mbula 65 to koleka bazali basi oyo mibali na bango bakufá. Kutu, lokola kobungisa molongani ezali likambo oyo ekómelaka basi mbala misato koleka mibali, mbala mingi bato bakómá komona ete liwa ya molongani ezali “likambo etali basi.” Yango elingi koloba te ete mibali babungisaka basi na bango te. Likambo ya solo ezali ete bamilio ya bato bakutaná na likambo wana ya mpasi. Ozali moko na bango?
Ozala mwasi to mobali, soki ozali na mpasi yango, okoki kosala nini? Biblia ekoki kosalisa yo na mpasi yango? Bato mosusu oyo balongani na bango bakufá basalaki ndenge nini? Atako ezali na likambo kaka moko te oyo ekosimba epai ya moto nyonso, ezali na mitinda mpe makanisi oyo ekoki kosalisa.
Ndimá ete molongani akufi
Atako bato mosusu bakanisaka ete kolela ezali bolɛmbu to kutu mabe, Joyce Brothers, moto moko ya pisikoloji, oyo azali mpe mwasi oyo mobali na ye akufá, alobi ete mpisoli ezali lokola nkisi ya liboso mpo na mpasi ya motema. Kutu, ntango moto akufi bato balelaka na bango mpe esalisaka mpo na kolongola mpasi. Koyoka nsɔni te ya kobimisa mpisoli. Ndakisa moko ya malamu na likambo yango ezali na Biblia. Abrahama azalaki mobali ya kondima makasi, mpe azwaki libaku ya kobengama moninga ya Nzambe. Nzokande, ntango mwasi na ye ya bolingo akufaki, “akɔtaki kolela Sara makasi mpe alelaki ye na kobimisa mpisoli.”—Ebandeli 23:2.
Atako ezali mabe te kolinga kozala yo moko mpo na mwa ntango, komitangola na bamosusu te. Masese 18:1 ekebisi biso ete: “Ye oyo azali komitangola na bamosusu akoluka mposa na ye ya lokoso.” Kasi, luká lisalisi ya bandeko mpe baninga oyo bazali komitya na esika na yo. Na likambo yango, lisangá ya bokristo ezali ebongiseli kitoko, epai mibali oyo bakɔmɛli na elimo bakoki kopesa lisungi mpe batoli oyo esengeli.—Yisaya 32:1, 2.
Bato mosusu bamonaki ete kozongisa biyano na mikanda mpe bakarte ya kobɔndisa oyo bato bakomelaki bango esalisaka. Okoki kosalela libaku yango mpo na kokoma makambo malamu oyo ozali koyeba lisusu mpo na molongani na yo mpe bantango oyo bolekisaki elongo. Kosala album ya bafɔtɔ, mpe kotya esika moko mikanda mpe nkoma mosusu ya molongani na yo ekoki mpe kosalisa yo osilisa mpasi na yo.
Moto oyo molongani na ye auti kokufa akoki kobulungana mpe kosila mayele, kasi kokoba kosala makambo mpe misala oyo omesaná kosala ekosalisa yo. Na ndakisa, soki ozali na ngonga moko oyo olalaka, olamukaka, olyaka to osalaka misala mosusu ya ndako, meká kokoba kolanda programɛ yango. Bongisáká libela makambo oyo okosala na bawikende mpe na mikolo ya ntina mingi, na ndakisa na dati ya anivɛrsɛrɛ ya libala na bino, ntango oyo liwa ya molongani esalaka mpasi mingi. Mpe mingimingi, ezali na ntina okoba kosala makambo ya elimo oyo omesaná kosala.—1 Bakorinti 15:58.
Soki moto azali na mawa makasi na motema, akoki kozanga bososoli. Mbala mosusu, bato oyo bazali na makanisi ya mabe bakoki kutu koluka kolyela yo na ntango wana ya mpasi. Na yango, boyá kozwa bikateli mbangumbangu na makambo lokola kotɛka ndako, kokɔtisa mbongo mingi na mosala moko mpo ozwa benefisi, kokende kofanda esika mosusu, to kobala lisusu. Lisese moko ya bwanya elobi boye: “Myango ya moto ya etingya ememaka mpenza na litomba, kasi moto nyonso oyo asalaka makambo mbangumbangu akokelela mpenza kokelela.” (Masese 21:5) Osengeli kozela makanisi na yo ekóma kimya liboso osala bambongwana ya minene ya ndenge wana.
Kosimba biloko ya molongani na yo ekoki kosala yo mpasi mingi, mingimingi soki bofandaki bambula mingi, kasi yango ezali mpe na kati ya makambo oyo esalemaka ntango ozali kolela moto. Kozongisa yango nsima ekoki koumisa mawa na yo kaka mpamba. (Nzembo 6:6) Bato mosusu baponaka kosala yango bango moko; bamosusu bamonaka malamu básala yango elongo na moninga moko ya motema oyo bakosolola na ye makambo ya molongani yango. Okoki mpe kolinga koluka lisalisi ya moninga to ndeko moko mpo na bapapye ya Leta, na ndakisa kozwa mokanda ya liwa (acte de décès); koyebisa babiro ya Leta, babanki, mpe bakompanyi oyo epesaki ye banyongo; kobongola nkombo ya nkolo biloko; kozwa mbongo ya molongani oyo akufi; mpe kofuta mbongo ya lopitalo.
Kobosana te ete tozali na mokili moko oyo etondi na pite. Lokola otikali yo moko, milende na yo ya kotikala pɛto ekoki komekama. Maloba oyo ya ntoma Paulo ekómi kutu na ntina mingi koleka lelo: “Mokomoko na bino ayeba kopekisa nzoto na ye na kosantisama mpe lokumu, na mposa ya lokoso ya kosangisa nzoto te ndenge mpe bikólo wana oyo bayebi Nzambe te bazalaka na yango.” (1 Batesaloniki 4:4, 5) Na yango, ezali likambo ya bwanya koboya bafilme, babuku, mpe miziki ya lolango.
Longola nyonso wana, yebá ete ekozwa mwa ntango mpo mawa esila. Zulunalo moko (USA Today) elobi ete baankɛtɛ oyo iniversite moko (Institut de recherches sociales de l’Université du Michigan) esalaki emonisi ete moto oyo molongani na ye akufi asengeli na sanza 18 to koleka mpo nzoto mpe makanisi na ye ebanda kobonga. Bondelá Nzambe apesa yo ezaleli ya koyika mpiko, oyo mbuma ya elimo na ye ekómisaka makasi. (Bagalatia 5:22, 23) Atako sikoyo okoki kokanisa bongo te, mokolo na mokolo okobanda koyoka malamu koleka.
Ndenge basusu basalaki
Anna azalaki na esengo na libala na ye mbula 40; ndenge mobali na ye auti kokufa, epesi ye mpasi mingi. “Mama na ngai akufaki ntango nazalaki na mbula 13, na nsima tata na ngai, bayaya na ngai mibale ya mibali ná leki na ngai ya mwasi mpe bakufaki. Kasi mpo na koloba solo, liwa moko te na nyonso wana epesaki ngai mpasi lokola liwa ya mobali na ngai. Ezalaki lokola bakaboli ngai na biteni mibale. Mpasi yango elekelaki ngai.” Nini esalisaki ye na mpasi yango? Alobi boye: “Nasalaki buku monene ya bamesaje oyo bazalaki kotindela ngai na ordinatɛrɛ mpe ya bakarte oyo bato bazalaki kokoma mpo na komonisa ete bazalaki kolinga mpe kosepela na bizaleli malamu nyonso ya Darryl. Mokomoko elobeli mwa likambo moko boye oyo etali ye. Nandimi ete Yehova mpe akanisaka ye mpe akozongisa ye na bomoi na nzela ya lisekwa.”
Esther, oyo azali na mbula 88, alobeli likambo oyo esalisaki ye: “Nsima ya mbula 46 ya kofanda elongo, likambo oyo elekaki mpasi ezalaki nde kotikala kaka ngai moko. Kasi, namonaki ete komipesa mingi na makambo ya elimo esalisaka ngai mingi. Natikaki te momeseno na ngai ya koyangana na makita ya bakristo, koyebisa basusu nsango ya Biblia, mpe kotánga yango ngai moko. Kozala elongo na basusu mpe esilisaki ngai. Nalukaka baninga oyo bayokaka ngai. Ntango mosusu bazalaka na likambo ya koloba te mpo na kobɔndisa ngai, kasi nasepelaka mingi mpenza ndenge bapesaka ngai ntango mpe bayokaka ngai.”
Robert, oyo mwasi na ye akufaki na kanser nsima ya mbula 48 ya libala, alobi boye: “Ezali mpasi mingi kokanga motema na liwa ya molongani oyo okokaki kosolola na ye, kozwa bikateli elongo, kosala mibembo mpe kokende konje, mpe koyebisana makambo oyo elekaki na mokolo. Ezalaki etumba, kasi nazwaki ekateli ete nalɛmbisa mabɔkɔ te kasi nakoba na bomoi na ngai. Kosalisa nzoto mpe makanisi na ngai mosala esalisaki mingi. Libondeli mpe ebɔndisaka ngai mingi.”
Bomoi ya ntina nsima ya liwa ya molongani
Atako liwa ya molongani oyo olingaki mingi ezali moko na makambo oyo ebulunganisaka, ezali nsuka ya mokili te. Soki otaleli makambo na ndenge ya malamu, okoki sikoyo komona ete ozwi libaku ya komipesa na makambo oyo ozalaki na ntango mingi te ya kosala yango, na ndakisa makambo oyo olingaka mpo na kolekisa ntango to kosala mibembo. Makambo wana ekoki kosalisa yo ozanga eloko ya kosala te. Mpo na bato mosusu, ekoki kozala nde libaku ya komipesa mingi koleka na mosala ya kosakola. Ntembe ezali te ete okozwa esengo mpe nsai na kosalisa basusu na ndenge wana, mpo Yesu alobaki ete: “Esengo ya kopesa eleki oyo ya kozwa.”—Misala 20:35.
Kokanisa te ete okoki kozala na esengo lisusu te. Yebá ete Yehova Nzambe akomibanzabanza mpo na yo soki obaluki epai na ye. Mokomi ya nzembo Davidi alobaki boye: “[Yehova] asalisaka . . . mwasi oyo mobali akufá.” (Nzembo 146:9) Ezali likambo ya kobɔndisa koyeba ete Biblia elobeli Yehova kaka te lokola “Tata ya motema mawa mingi mpe Nzambe ya kobɔndisama nyonso” kasi elobi mpe mpo na Yehova ete: “Ozali kofungola lobɔkɔ na yo mpe ozali kokokisa mposa ya ekelamu nyonso oyo ezali na bomoi.” (2 Bakorinti 1:3; Nzembo 145:16) Ya solo, Yehova, Nzambe ya bolingo, azali na makoki, alingi, mpe azali pene na kosalisa baoyo balukaka ye na mposa makasi mpo asalisa bango. Mayoki na yo ezala lokola oyo ya Bayisraele ya kala, oyo bayembaki ete: “Nakotombola miso na ngai na bangomba. Lisalisi na ngai ekouta wapi? Lisalisi na ngai ezali kouta na Yehova, Mokeli ya likoló ná mabele.”—Nzembo 121:1, 2.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 19]
Bamilio ya bato bazali na mawa mpe batikalá bango moko mpo molongani akufá. Ozali moko na bango?
[Etanda na lokasa 21]
Bongo kobala lisusu?
Biblia emonisi ete liwa esukisaka libala, mpe yango epesi molongani oyo atikali libaku ya kobala lisusu. (1 Bakorinti 7:39) Atako bongo, ekateli wana etali kaka moto ye moko. Kasi, ezali na ntina bana báyeba ekateli oyo moboti azwi mpe básunga ye soki likoki ezali. (Bafilipi 2:4) Tózwa ndakisa ya Andrés; na ebandeli asepelaki te na ekateli oyo tata na ye azwaki ya kobala lisusu. Alingaki mama na ye mingi mpe amonaki ete moto moko te asengeli kozwa esika na ye. Alobi boye: “Kasi eumelaki te, namonaki ete tata azwaki ekateli ya malamu. Libala epesaki ye esengo lisusu. Akómaki kosala makambo oyo azalaki kosala lisusu te banda mwa ntango, na ndakisa kosala mibembo. Ya solo, nazali mpe na botɔndi mpo na mwasi na ye ya sika na ndenge azali kokipe ye malamu na nzoto mpe na makanisi.”
[Bililingi na nkasa 20, 21]
Komipesa na misala mpe kosɛnga Nzambe ezaleli ya koyika mpiko esalisaka moto akóma malamu