Oyebaki yango?
“Baoyo ya ndako ya kaisala” oyo batindelaki bakristo ya Filipi mbote epai ya Paulo bazalaki banani?
▪ Ntoma Paulo akomelaki lisangá ya Filipi ntango azalaki na Roma na mobu soki 60 tii 61 ya ntango na biso, mpe kaisala oyo alobelaki ezalaki amperɛrɛ Néron. Kasi, bato nini ya ndako ya Néron batindelaki bakristo ya Filipi mbote?—Bafilipi 4:22.
Ekozala libunga koloba ete maloba bato ya “ndako ya kaisala” elimboli mpenzampenza kaka bandeko ya amperɛrɛ. Kutu, esangisi nde bato nyonso, baombo, bato oyo basikwamaki, ezala na Roma mpe na bitúká na yango, baoyo bazalaki kosalela amperɛrɛ. Na yango, ekoki kozala ete bato ya “ndako ya Kaisala” ekokaki kozala na bankóto ya basaleli. Bazalaki kosala misala ndenge na ndenge, na ndakisa kokɛngɛla misala to kosala misala ya mabɔkɔ na bandako ya amperɛrɛ mpe na bisika na ye mosusu. Ekoki kozala ete bamosusu bazalaki kutu kosala misala na guvɛrnema.
Emonani ete basaleli mosusu ya amperɛrɛ na Roma bakómaki bakristo. Toyebi te soki bato yango bakómaki bakristo mpo Paulo asakolaki na Roma. Ezala bongo to te, emonani lokola ete bazalaki komibanzabanza mpo na lisangá ya Filipi. Lokola Filipi ezalaki koyangelama na Roma, mpe basoda mingi oyo bazwá pansiɔ mpe basali ya guvɛrnema bazalaki kofanda kuna, ekoki kozala ete bakristo mosusu oyo bazalaki kuna bazalaki baninga ya baoyo Paulo amemelaki mbote.
Libala ya bosɛmɛki oyo elobelami na Mibeko ya Moize ezalaki nini?
▪ Na Yisraele ya kala, soki mobali akufi kozanga kotika mwana, esengelaki ndeko na ye abala mwasi oyo ye atiki mpo abota bana mpo libota ya moto oyo akufi ebunga te. (Ebandeli 38:8) Na nsima, Ebongiseli yango ekɔtaki na Mibeko ya Moize mpe ebengamaki libala ya bosɛmɛki. (Kolimbola Mibeko 25:5, 6) Makambo oyo Boaze asalaki, oyo elobelami na mokanda ya Ruta, emonisi ete bandeko mosusu ya libota ya moto oyo akufi bakokaki kobala mwasi yango soki ndeko na ye ata moko te ya makila azali.—Ruta 1:3, 4; 2:19, 20; 4:1-6.
Lokola Basadukai balobelaki libala yango, ndenge Marko 12:20-22 emonisi yango, emonisi ete na mikolo ya Yesu libala ya bosɛmɛki ezalaki kosalema. Flavius Josèphe, Moyuda moko mpe moto ya istware ya siɛklɛ ya liboso alobaki ete libala yango ezalaki kaka te kobatela nkombo ya libota, kasi ezalaki mpe kosala ete libula etikala na libota mpe ezalaki mpo na bolamu ya mwasi oyo mobali na ye akufi. Liboso, mwasi azalaki te na lotomo ya kozwa biloko oyo mobali na ye atiki. Nzokande, mwana oyo abotamaki na libala ya bosɛmɛki akokaki kozwa biloko oyo mowei atikaki.
Mobeko epesaki bandeko ya mowei nzela ya koboya kosala libala ya bosɛmɛki. Kasi, ezalaki likambo ya nsɔni soki moto aboyi “kotonga ndako ya ndeko na ye ya mobali.”—Kolimbola Mibeko 25:7-10; Ruta 4:7, 8.