Etanda ya makambo ezali na kati
15 Aprili 2011
Nimero ya boyekoli
MASOLO YA BOYEKOLI MPO NA PƆSƆ YA:
30 Mai 2011–5 Yuni 2011
Tózwa makambo na lisɛki te na mosala ya Yehova
LOKASA 9
6-12 Yuni 2011
LOKASA 13
13-19 Yuni 2011
“Mbuma ya elimo” epesaka Nzambe nkembo
LOKASA 18
20-26 Yuni 2011
Ozali kotika elimo ya Nzambe ekamba yo?
LOKASA 23
Ntina ya masolo ya boyekoli
LISOLO YA BOYEKOLI 1 NKASA 9-13
Na mokili oyo bato mingi bazwaka mikumba na bango na lisɛki, bakristo basengeli kozwa bomoi na lisɛki te. Likambo yango ezali na ntina mingi na oyo etali losambo na biso ya Yehova. Lisolo oyo ekopesa makanisi ya bokatikati, oyo euti na Makomami mpo na komonisa ndenge oyo tosengeli kozwa mikumba na biso ya bokristo na lisɛki te.
LISOLO YA BOYEKOLI 2 NKASA 13-17
Bato mingi bamonaka ete kozwa bikateli ezali mpasi. Lisolo oyo ekosalisa biso tóyeba ntina oyo tosengeli koyeba kozwa bikateli ya malamu. Ekolobela makambo oyo tokoki kosala mpo tózwaka bikateli oyo ekokumisa Nzambe.
MASOLO YA BOYEKOLI 3, 4 NKASA 18-27
“Mbuma ya elimo” ezali nini? Ndenge nini tokoki kolona yango? Mpo na nini tosengeli kolona yango? Okozwa biyano na mituna wana ntango tokotalela bizaleli libwa ya mbuma ya elimo. Masolo oyo ekopesa mpe makanisi ya malamu oyo ekoki kosalisa mingi kati na biso.
MASOLO MOSUSU
3 Ozali komona polele ndenge Nzambe azali kokamba biso?
6 Ndenge ya kozala sembo na mokili oyo ezangi bosembo
29 Namoná makambo mingi ya malamu