Ozali koyeba lisusu?
Osepelaki mpenza na botángi ya banimero ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo euti kobima? Talá soki okoki kopesa biyano na mituna elandi:
• Mpo na nini tokoki kondima ete elanga ya Edene ezalaki esika ya solo?
Biblia elobi ete elanga yango ezalaki solo, eyebisi makambo ya sikisiki na ntina na esika oyo ezalaki. Bibale mibale kati na bibale oyo lisolo yango elobeli ezalaka lelo oyo. Masapo to masolo mpamba elobelaka makambo na bosikisiki ndenge wana te. Yesu, Motatoli oyo aleki batatoli nyonso, alobaki ete Adama ná Eva bazalaki bato ya solo.—1/1, nkasa 5-6, 9.
• Nzambe ayebaki ete Adama ná Eva bakosala lisumu?
Te. Yehova apesaki bango mayele mpe bonsomi ya kopona; bazalaki na likoki ya kopona kotosa to te. Atako Nzambe azali na likoki ya koyeba makambo liboso, aponaka ntango oyo asengeli kosalela likoki yango.—1/1, nkasa 13-15.
• Bakristo ya solo basalelaka nkombo ya Nzambe lokola nkisi?
Bato mosusu bazwaka eloko to elembo moko lokola nkisi to bikelakela oyo ezali na nguya moko ya maji mpo na kobatela bango, kasi basaleli ya Nzambe batalelaka nkombo na ye ndenge wana te. Bamonisaka kondima epai ya Yehova mpe balukaka kosala mokano na ye, na ndenge yango nde bakimaka epai ya nkombo na ye. (Sef. 3:12, 13)—15/1, nkasa 5-6.
• Banani bazalaki kozwa litomba na momeseno ya kolɔkɔta mbuma oyo ezalaki kotikala na elanga?
Bato nyonso. Ezalaki kolendisa babola bázala gɔigɔi te, mpo basengelaki kolɔkɔta. Basusu bazalaki kozwela yango litomba na ndenge ezalaki kolendisa bango bákabaka, mpe bátya motema na mapamboli ya Nzambe.—1/2, lokasa 15.
• Mpo na nini Yehova aboyaki Mokonzi Saulo?
Saulo asengelaki kozela mosakoli ya Nzambe aya kopesa mbeka, kasi mokonzi yango atosaki te, apesaki mbeka ye moko. Na nsima, atosaki te mitindo oyo Yehova apesaki ye ya kosilisa nyɛɛ ekólo moko ya banguna.—15/2, nkasa 22-23.
• Ndenge nini tokoki komonisa ete toyinaka makambo ya kobuka mibeko?
Tokotika masanga na esika na yango, tokokima misala ya molili, mpe tokotosa likebisi oyo Yesu apesaki na oyo etali pite mpe ekobo. Na ndakisa, tokokima pornografi mpe makanisi mabe oyo yango ekoki komema. (Mat. 5:27, 28) Tokokangama mpe te bato oyo babimisami na lisangá.—15/2, nkasa 29-32.
• Ndenge bato ya arkeoloji bauti kokundola bandako ya kala ya kobɔkɔla banzoi na ekoló Israël emonisi nini?
Bato ya arkeoloji bamonaki bandako ya kobɔkɔla banzoi koleka 30, oyo bato ya mayele balobi ete ekokaki kobimisa ata litre 500 ya mafuta ya nzoi mbula na mbula. Yango emonisi ete bazalaki kobɔkɔla banzoi na ekoló oyo Nzambe alobaki ete ‘ekotonda na miliki mpe na mafuta ya nzoi.’ (Kob. 3:8)—1/3, lokasa 15.
• Na ndenge nini Yirimia azalaki lokola nzete “oyo elonami pembeni na mai, oyo ezali kotinda misisa na yango”? (Yir. 17:7, 8)
Atikaki kobota mbuma ata mokolo moko te; aboyaki mpe kolanda makanisi ya basɛki. Akangamaki nde na Yehova, Liziba ya mai oyo ebatelaka bomoi, mpe alandaki na likebi makambo nyonso oyo Nzambe ayebisaki ye.—15/3, lokasa 14.
• Yesu alingaki koloba nini ntango ayebisaki Marta ete kaka biloko moke nde ezali na ntina to moko kaka? (Luka 10:41, 42)
Alingaki te koloba ete Marta alingaka mingi biloko ya mokili mpo azalaki kolamba biloko mingi; atyolaki mpe te mosala makasi oyo azalaki kosala. Kasi, azalaki komonisa makambo oyo Marta asengelaki kotya na esika ya liboso. Marta azalaki kolekisa libaku ya ntina mingi ya kolendisa kondima na ye.—1/4, nkasa 12-13.
• Wapi mwa makambo oyo emonisi ete kosambisama ya Yesu elandaki mibeko te?
Tribinale eyokaki ata maloba ya moto moko te oyo akokaki kolongisa ye. Balukaki batatoli ya lokuta. Basambisaki ye na butu. Kosambisama na ye ebandaki mpe esukaki kaka na mokolo moko.—1/4, lokasa 20.