Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w11 15/4 nk. 29-32
  • Namoná makambo mingi ya malamu

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Namoná makambo mingi ya malamu
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Makambo oyo tobosanaka te
  • Ndenge tomonaki Carlos
  • Tosalaki mibembo ya mpasi kasi boyambi ya bandeko ekitisaki biso motema
  • ‘Tolingi koboya te’
  • Kosala elongo na bandeko ya sembo
  • Tozali na botɔndi mpo na bolamu ya Yehova
  • Natyaki miso mpe motema na ngai na libonza
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Nasali na eleko moko ya bokoli monene
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • Koluka Liboso Bokonzi​—⁠bomoi Ya Solosolo Mpe Ya Esengo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Okoki kokende kosakola na mboka mopaya?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
w11 15/4 nk. 29-32

Namoná makambo mingi ya malamu

Lisolo ya Arthur Bonno

EZALAKI na 1951. Ngai ná mwasi na ngai Edith tozalaki na liyangani moko ya etúká mpe bapesaki liyebisi ete likita moko ekozala mpo na bato oyo basepelaka na mosala ya misionɛrɛ.

Nalobaki na mbala moko ete: “Tókende koyoka!”

Edith azongisaki ete, “Arthur, ezali mpo na biso te!”

“Likambo te, Edie, tokoyoka kaka.”

Nsima ya likita yango, bapesaki bato baformilɛrɛ mpo na kokɔta Eteyelo ya Gileade.

Nalobaki na ye boye: “Tótondisa yango.”

Ye alobaki: “Kasi Arthur, bongo mabota na biso?”

Mbula soki moko na ndambo nsima ya liyangani wana, tokɔtaki Eteyelo ya Gileade mpe batindaki biso na ekólo Équateur, na Amerika ya Sudi.

Ndenge okoki komona yango na lisolo na ngai ná mwasi na ngai na liyangani wana, nazalaki moto oyo azongaka nsima te mpe nazalaki komona ete tokoki kosala likambo nyonso oyo tokani. Kasi, Edith azalaki moto ya boboto mpe ya komikitisa. Ntango azalaki kokola na Elizabeth, mboka moko moke na etúká ya Pennsylvanie, na États-Unis, amekaki ata mokolo moko te kobima mosika na ndako na bango, to kokutana na mopaya. Ezalaki mpasi mpo atika libota na ye. Atako bongo, andimaki na motema moko kokende kosala na mboka mopaya. Na 1954, tokómaki na Équateur mpe banda wana, tozali bamisionɛrɛ na ekólo yango. Na boumeli ya bambula oyo tolekisi awa, tomoná makambo mingi ya malamu. Okolinga koyeba makambo yango mosusu?

Makambo oyo tobosanaka te

Teritware na biso ya liboso ezalaki Quito, engumba-mokonzi, oyo ezali na bangomba ya Andes. Mpo na kokóma kuna, tosalaki mobembo ya mikolo mibale na engbunduka mpe na motuka monene longwa na Guayaquil, engumba oyo ezali pembeni ya mbu​—lelo mobembo yango ezwaka miniti 30 na mpɛpɔ! Na engumba Quito, tosalaki mbula minei, mpe tobosanaka yango te. Na nsima, na 1958, likambo mosusu ya malamu ekómelaki biso: Basɛngaki biso tósala mosala ya zongazonga.

Na ntango wana, ezalaki kaka na mwa zongazonga mibale na ekólo yango mobimba. Na yango, longola kotala masangá, tozalaki kolekisa bapɔsɔ mingi na mosala ya kosakola na bingumba mikemike ya ba-Indien, epai Batatoli bazalaki te. Mbala mingi na bingumba yango, tozalaki kolala na bashambrɛ ya mike mpenza oyo ezalaki na lininisa te, kaka mwa mbeto mpe eloko mosusu te. Tozalaki komema sanduku moko ya mabaya epai tozalaki kotya resho ya petrole, kikalungu, basaani, saani ya monene mpo na kosokola, badra, mosikitele, bilamba, bapapye ya bazulunalo ya kala, mpe mwa biloko mosusu. Tozalaki kosalela bapapye yango mpo na kozipa madusu na bifelo mpo na kopekisa bampoko ekɔta.

Atako bashambrɛ yango ezalaki molili mpe salite, tobosanaka te masolo oyo tozalaki kosolola na butu, wana tofandi na mbeto, tozali kolya mwa bilei oyo tolambaki na resho na biso. Lokola nazalaki mɔtɔmɔtɔ mpe mbala mingi nazalaki koloba kozanga kokanisa, na bantango mosusu, mwasi na ngai azalaki kosalela bangonga wana oyo tozali na kimya mpo na koyebisa ngai ndenge nakoki kobongisa elobeli na ngai epai ya bandeko oyo tokei kotala. Nazalaki koyokela ye, mpe ntango tokei kotala lisangá moko, nakómaki kolendisa bandeko mingi. Lisusu, soki nalobaki mabe ya basusu kozanga nakanisa, mwasi na ngai azalaki koboya kokɔta na lisolo yango. Na ndenge yango, nakómaki kotalela bandeko na ngai na ndenge ya malamu. Kasi, mbala mingi, na masolo na biso ya butu, tozalaki kolobela nde makambo oyo toyekolaki na masolo ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe makambo oyo tokutanaki na yango na mosala ya kosakola na mokolo yango. Makambo yango ezalaki kosepelisa mpenza!

Ndenge tomonaki Carlos

Na engumba Jipijapa, na wɛsti ya ekólo Équateur, bapesaki biso nkombo ya moto moko oyo asepelaki na nsango malamu​—kaka nkombo mpamba, Carlos Mejía, kasi bapesaki biso adrɛsi te. Ntango tolongwaki na ndako na biso na ntɔngɔ, toyebaki te soki tokobanda wapi mpo na koluka ye, na yango tobandaki kotambola kaka boye. Ezalaki kosɛnga tókima mabulu mingi ya pɔtɔpɔtɔ na babalabala, mpo mbula makasi ebɛtaki na butu. Nazalaki liboso, mpe na mbala moko nayokaki moto moko agangi makasi nsima na ngai ete: “Arthur!” Ntango nabalukaki, namonaki Edie atɛlɛmi na kati ya pɔtɔpɔtɔ oyo ekómi ye tii na mabɔlɔngɔ. Ezalaki likambo ya kosɛkisa mpenza, mpe nalingaki kosɛka soki elongi na ye etondaka na mpisoli te.

Nabimisaki ye na pɔtɔpɔtɔ yango, kasi sapato na ye etikalaki na kati ya pɔtɔpɔtɔ. Mwana moko ya mobali ná mwana moko ya mwasi bazalaki wana, mpe nayebisaki bango boye: “Soki bobimisi sapato yango na pɔtɔpɔtɔ, nakopesa bino mbongo.” Na miniti, babimisaki sapato yango, kasi Edie asengelaki koluka esika ya kosukola makolo. Mama ya bana yango azalaki kotala likambo oyo ekómelaki biso mpe abengaki biso na ndako na ye, epai asalisaki mwasi na ngai asukola makolo, wana bana na ye bazalaki kosukola basapato na ye. Liboso tólongwa wana, likambo moko ya malamu esalemaki. Natunaki mwasi yango soki ayebi epai tokoki kozwa mobali moko na nkombo Carlos Mejía. Akamwaki makasi, mpe alobaki ete: “Ezali mobali na ngai.” Nsima ya mikolo, boyekoli ya Biblia ebandaki, mpe nsukansuka bato nyonso ya libota yango bazwaki batisimo. Bambula mingi na nsima, Carlos, mwasi na ye, mpe bana na bango mibale bakómaki babongisi-nzela monene.

Tosalaki mibembo ya mpasi kasi boyambi ya bandeko ekitisaki biso motema

Mibembo na mosala ya zongazonga ezalaki mpasi. Tosalelaki babisi, bingbunduka, mituka minene, bwato, mpe mpɛpɔ ya mike. Mokolo moko, John McLenachan, oyo azalaki mokɛngɛli ya etúká, elongo na mwasi na ye Dorothy, bakendaki elongo na biso na mobembo moko mpo na kosakola na bamboka ya babomi-mbisi pene na ndelo ya ekólo Colombie. Tosalaki mobembo na bwato moko oyo ezalaki na moteur. Ba-requin minene lokola bwato yango ezalaki kotambola pembenipembeni na biso! Ata motambwisi ya bwato yango oyo amesaná na mibembo ya mai abangaki mpo na bonene ya ba-requin yango mpe amemaki bwato mbangumbangu pene na bokula.

Kasi, mikakatano oyo tokutanaki na yango na mosala ya zongazonga, ezalaki ya mpamba te. Toyebanaki na bandeko ya malamu mpenza, oyo bazalaki na bokabi mingi. Mbala mingi, mabota oyo ezalaki koyamba biso bazalaki kotya biso mbamba tólya mbala misato na mokolo, nzokande bango moko bazalaki kolya kaka mbala moko. Na bantango mosusu, bazalaki kosɛnga biso tólala na mbeto kaka moko oyo bazalaka na yango, mpe bango moko bálala na nse. Mbala mingi, mwasi na ngai azalaki koloba ete: “Bandeko mibali mpe bandeko basi oyo basalisi ngai namona ete tozali mpenza na mposa ya biloko mingi te mpo na kozala na bomoi.”

‘Tolingi koboya te’

Na 1960, likambo mosusu ya malamu ekómelaki biso​—babengaki biso tókende kosala na Betele, na engumba Guayaquil. Ngai nazalaki kosala na biro, mpe Edith azalaki kosakola na teritware ya lisangá moko pene na Betele. Nakanisá ata moke te ete nabongi kosala na biro mpe namonaki lokola nakokoka te, kasi ndenge Baebre 13:21 emonisi yango, Nzambe apesaka biso “eloko nyonso ya malamu mpo na kosala mokano na ye.” Mbula mibale na nsima, babengaki ngai nakende kolanda mateya ya Gileade oyo esengelaki kosalema na Betele ya Brooklyn, na New York, na boumeli ya sanza zomi. Na ntango wana, bazalaki kosɛnga basi bátikala na bateritware na bango. Brooklyn etindelaki mwasi na ngai mokanda. Basɛngaki ye akanisa malamu soki akondima mpenza kotikala ye moko sanza zomi.

Edith azongiselaki bango boye: “Nayebi malamu ete ekozala likambo ya pɛtɛɛ te, kasi toyebi ete Yehova akozanga te kosalisa biso ata na mokakatano nini. . . . Tolingi koboya ata mokumba moko te oyo bakoki kopesa biso to libaku oyo tokoki kozwa ya koyekola ndenge ya kokokisa malamu mikumba na biso.” Na boumeli ya ntango oyo nalekisaki na Brooklyn, mwasi na ngai azalaki kokomela ngai mokanda pɔsɔ nyonso.

Kosala elongo na bandeko ya sembo

Maladi esalaki ete ngai ná Edith tózonga na Quito na 1966, mpe kuna, tozongelaki mosala ya misionɛrɛ mpe tosalaki elongo na bandeko mibali mpe bandeko basi ya engumba yango. Bazalaki mpenza kobatela bosembo na bango!

Ndeko mwasi moko ya sembo azalaki na mobali oyo azali Motatoli te mpe mobali yango azalaki kobɛta ye mingi. Mokolo moko na ngonga ya 6 na ntɔngɔ, moto moko abengaki biso mpo na koyebisa biso ete babɛtaki lisusu ndeko yango. Nakendeki mbangu na ndako ya ndeko mwasi yango. Ntango namonaki ye, nandimaki te. Alalaki na mbeto, avimbivimbi mpe atondi na bampota. Mobali na ye abɛtaki ye nkɔmbɔ ya nzete tii ebukanaki. Mwa bangonga na nsima, nakendaki koluka mobali yango mpe nayebisaki ye ete asalaki likambo ya nsɔni. Asɛngaki bolimbisi na motema moko.

Na ebandeli ya bambula ya 1970, nakómaki nzoto kolɔngɔnɔ mpe nazongelaki mosala ya zongazonga. Engumba Ibarra ezalaki na kati ya zongazonga na biso. Ntango tokendaki kotala engumba yango na nsuka ya bambula ya 1950, Batatoli bazalaki kaka mibale, misionɛrɛ moko ná ndeko moko ya engumba yango. Na yango, tozalaki na mposa makasi ya kokutana na ebele ya bato ya sika oyo babakisamaki na lisangá.

Na likita na biso ya liboso, Ndeko Rodrigo Vaca azalaki kosala lisolo moko oyo ezalaki kosɛnga bato bápesa biyano. Soki atuni motuna, na esika bayangani bátombola kaka misapi, bazalaki koganga na monɔkɔ na bango ete: “Yo, yo!” (Ngai, ngai). Ngai ná Edith totalanaki mpe tokamwaki. Namitunaki ete: ‘Oyo nini boye?’ Na nsima, toyebaki ete Ndeko Vaca akufá miso kasi ayebaka mingongo ya bandeko ya lisangá ntango bazali kobelela. Azali mokɛngɛli oyo ayebi mpenza bampate na ye! Ekundwelaki ngai maloba ya Yesu oyo ezali na Yoane 10:3, 4, 14, oyo elobeli Mobateli ya mpate oyo aleki malamu, oyo ayebani mpe malamu mpenza na bampate na ye. Lelo, Ibarra ezali na masangá motoba ya monɔkɔ ya Espagnol, moko ya monɔkɔ ya Quichua, mpe moko ya elobeli ya bajɛstɛ. Tii lelo, ndeko Vaca azali kaka sembo; azali nkulutu mpe mobongisi-nzela monene.

Tozali na botɔndi mpo na bolamu ya Yehova

Na 1974, Yehova amoniselaki biso lisusu bolamu na ye ntango babengaki biso tózonga na Betele, epai bapesaki ngai lisusu mosala na biro moko mpe na nsima batyaki ngai na Komite ya filiale. Liboso, Edith azalaki kosala na nkuku, mpe na nsima akómaki kosala na biro oyo ekabolaka bankoma, epai azali kosala tii lelo.

Na boumeli ya bambula, tozalaki na esengo ya koyamba bankama ya bamisionɛrɛ oyo bazwaki formasyo na Gileade; bamisionɛrɛ yango basalisaka bandeko ya masangá epai batindami bákola na elimo mpe bázala molende. Tolendisamaki mpe na ebele ya bandeko oyo bautaki na mikili koleka 30 mpe bayaki kosala awa. Elimo na bango ya komipimela esimbaki mpenza mitema na biso! Bamosusu batɛkaki bandako na bango mpe mimbongo na bango mpo na koya awa kosala na bateritware oyo ezali na mposa ya basakoli mingi ya Bokonzi. Basombaki mituka mpo na kosakola na bamboka ya mosika, bafungolaki masangá ya sika, mpe basalisaki na kotonga Bandako ya Bokonzi. Bandeko basi mingi ya minzemba bautá na mikili mosusu mpe bayá awa mpo na kosala lokola babongisi-nzela​—bazali basali ya molende mpe ya makasi mpenza!

Ya solo, namoná makambo mingi na bambula oyo nazali kosalela Nzambe. Likambo oyo eleki ntina ezali boyokani na ngai na Yehova. Lisusu, nazali na botɔndi ndenge Yehova apesá ngai “mosungi.” (Eba. 2:18) Soki nakanisi mbula koleka 69 oyo nafandi elongo na mwasi na ngai, nakanisaka Masese 18:22, oyo elobi ete: “Ozwi mwasi ya malamu? Ozwi eloko ya malamu.” Kozala elongo na Edith epesaka ngai esengo mingi. Asalisá ngai na ndenge mingi. Mama na ye mpe azalaki kolinga ye mingi. Ntango tokómaki na Équateur, mwasi na ngai azalaki kotindela mama na ye mokanda pɔsɔ nyonso tii na 1990, ntango mama na ye akufaki; azalaki na mbula 97.

Nazali lelo na mbula 90 mpe Edith azali na mbula 89. Tosepelaka mingi ndenge tosalisá bato soki 70 báyeba Yehova. Ya solo mpenza, tosepelaka ndenge totondisaki baformilɛrɛ ya Eteyelo ya Gileade, eleki sikoyo mbula 60. Ekateli wana esalisá biso tózala na bomoi oyo etondi na makambo mingi ya malamu.

[Elilingi na lokasa 29]

Na Yankee Stadium, na New York, elongo na bamisionɛrɛ mosusu ya kelasi na biso ya Gileade, na 1958

[Elilingi na lokasa 31]

Elongo na libota moko, na mosala ya zongazonga, na 1959

[Elilingi na lokasa 32]

Na Betele ya Équateur, na 2002

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto