Etanda ya makambo ezali na kati
15/12/2013
© 2013 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania.
NIMERO YA BOYEKOLI
3-9 SANZA YA MIBALE 2014
‘Koningana nokinoki te na makanisi na yo’!
LOKASA 6 • NZEMBO: 65, 59
10-16 SANZA YA MIBALE 2014
Okomipimela makambo mosusu mpo na Bokonzi?
LOKASA 11 • NZEMBO: 40, 75
17-23 SANZA YA MIBALE 2014
‘Oyo ezali ekaniseli mpo na bino’
LOKASA 17 • NZEMBO: 109, 18
24 SANZA YA MIBALE 2014–2 SANZA YA MISATO 2014
‘Bósala boye mpo na kokanisa ngai’
LOKASA 22 • NZEMBO: 99, 8
MASOLO YA BOYEKOLI
▪ ‘Koningana nokinoki te na makanisi na yo’!
Ezali mpenza na ntina tótika te ete bákosa biso tóndima makanisi oyo euti na Biblia te mpe makambo oyo ezangi motó ná makolo! Na mokanda ya liboso mpe ya mibale oyo ntoma Paulo atindelaki Batesaloniki, tozali kokuta batoli oyo eyei na ntango oyo ebongi mpenza mpo na biso.
▪ Okomipimela makambo mosusu mpo na Bokonzi?
Esengeli komipimela makambo mingi mpo ete matomba ya Bokonzi ekende liboso. Na lisolo oyo, tokozwa liteya na bambeka oyo ezalaki kopesama na Yisraele ya kala. Tokotalela mpe bandakisa ya bandeko mingi ya mikolo na biso oyo bazali komipimela makambo mosusu mpo ete matomba ya Bokonzi ekende liboso.
▪ ‘Oyo ezali ekaniseli mpo na bino’
▪ ‘Bósala boye mpo na kokanisa ngai’
Kaka na eleko moko na mbula, Bayuda basalaka Elekeli mpe bakristo ya solo bakanisaka liwa ya Yesu. Mpo na nini tosengeli koluka koyeba makambo oyo ezalaki koleka na Elekeli? Ndenge nini toyebaka ntango oyo Bilei ya mpokwa ya Nkolo esengeli kosalema, mpe ezali na ntina nini mpo na biso?
MASOLO MOSUSU
3 Yehova abatelaki bango na bilili ya bangomba
EZIPELI: Ezali mpasi komona nzela ya kokutana na bato oyo bapanzaná na bisika ndenge na ndenge ya bangomba ya mabangamabanga oyo babengi (kopje), bangomba yango mosusu ezali na mabanga ya mineneminene na bansongɛ na yango. Kasi, atako bongo, bandeko bazali kokende na bangomba ya Matobo, na Matabeleland na Zimbabwe.
ZIMBABWE
MOTÁNGO YA BATO:
12 759 565
BATATOLI:
40 034
BAYEKOLI YA BIBLIA:
90 894
Bato ya Zimbabwe basepelaka kotánga mikanda na biso. Motatoli mokomoko akabolaka bazulunalo soki 16 sanza na sanza