Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 8/95 lok. 8
  • Tóbatela bosepeli oyo bato bamonisaki

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tóbatela bosepeli oyo bato bamonisaki
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1995
  • Masolo mosusu
  • Makanisi mpo na ndenge ya kobanda masolo na mosala ya kosakola
    Mosala na biso ya Bokonzi—2005
  • Ndenge ya kolakisa buku Biblia eteyaka
    Mosala na biso ya Bokonzi—2006
  • Tósalela bazalani na biso malamu na kolandáká bosepeli nyonso
    Mosala na biso ya Bokonzi—1996
  • Boyebi oyo euti na Nzambe ezali koyanola na ebele ya mituna
    Mosala na biso ya Bokonzi—1997
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—1995
km 8/95 lok. 8

Tóbatela bosepeli oyo bato bamonisaki

1 Wana tozali kosakola ndako na ndako, ntango oyo tozalaka na yango mpo na kosolola na moto oyo asepeli na nsango ezalaka mingimingi mokuse. Mbala mingi, mosala ya koteya yango moko ekokisamaka wana tozali kosala bozongeli ya sika mpe tozali kotambwisa boyekoli ya Biblia. (Mat. 28:19, 20) Mpo na koteya malamu na ntango ya bozongeli ya sika, tosengeli komikundola makambo oyo tolobelaki na mbala eleki, na nsima, tokomibongisa mpo na kolanda lisolo.

2 Soki tolobelaki makambo matali mobulungano ya bomoi ya libota, tokoki kosalela mateya ya mokapo 29 ya buku “Bomoi ya seko” mpe koloba ete:

◼ “Mbala eleki, tomonaki ete ezali likambo ya mayele na kolanda batoli ya Biblia mpo na kozala na bomoi ya libota ya esengo. Na makanisi na yo, eloko nini ekoki kosangisa mabota lelo oyo?” Tótika moto yango ayanola. Tólakisa paragrafe 27 na lokasa 247 mpe tótánga Bakolose 3:12-14. Tóbakisa mwa makanisi mosusu na komonisáká ete bolingo ya solo ekoki kokangisa mabota esika moko. Tólimbola ete boyekoli ya buku Bomoi ya seko pɔsɔ na pɔsɔ ekoki kosunga ye na kosilisa mikakatano na ye.

3 Soki, na boleki na biso ya liboso, tosololaki na ntina etali kobeba ya makambo ya mokili, tokoki kolanda lisolo na kolobáká ete:

◼ “Nakanisi, okondima mpo na koloba ete mbongwana monene esengeli kosalema soki tolingi kozala na bomoi mokolo mosusu kati na kimya. Biblia ezali komonisa ete Satana nde azali mobandisi ya mikakatano na biso. Bato mingi bazali komituna mpo na nini Nzambe atiki ete yango eumela ntango molai boye. Okanisi nini mpo na yango?” Tótika moto yango ayanola. Tófungola buku Bomoi ya seko na lokasa 20, paragrafe 14 mpe 15, tólimbola mpo na nini Satana abomami naino te. Na nsima, tótánga Baloma 16:20, oyo ezali komonisa oyo tokoki kozela na mikolo mizali koya mosika te.

4 Soki tolobelaki bolamu oyo tokozwa na nse ya Bokonzi, na ntango ya bozongeli ya sika, tokoki koloba boye:

◼ “Bokonzi ya Nzambe ekopesa makambo ya kitoko koleka na mabele mpe bato. Bolamu yango elakisami malamumalamu kati na buku, na lokasa 12 mpe na lokasa 13. Nini ezali kobenda likebi na yo likolo na elilingi oyo? [Tiká ayanola.] Kanisá bomoi oyo ekozala kati na mokili motindo oyo!” Tótánga paragrafe 12. Soki moto yango amonisi bosepeli, tótuna motuna ya paragrafe 13 mpe tósolola na ntina na eyango na yango. Tómonisa ete mokapo oyo ezali kolobela makambo mosusu matali bolamu oyo Bokonzi ekopesa mpe ete tokosepela kosolola elongo na ye na mbala ekoya.

5 Likoli ezali ya kobanda boyekoli na kolobáká ete:

◼ “Bato mingi basili kozwa biyano ya Biblia na lisalisi ya buku oyo na mituna oyo bazalaki komituna.” Tófungola buku yango na etánda ya masolo mpe tótuna na moto yango ete: “Lisolo nini ezali kosepelisa yo mingi koleka?” Tótika moto yango ayanola, tókenda na mokapo oyo esepelisi ye mpe tótánga paragrafe ya liboso. Tólimbwela ye ete mituna oyo mizali na nse ya lokasa moko na moko mizali kobimisa makanisi ya ntina ya paragrafe moko na moko. Tólakisa ye yango na kosololáká na paragrafe mosusu moko to mibale, na nsima tózwa bibongiseli mpo na kozongela ye.

6 Na kolandáká bosepeli oyo bato bamonisaki na buku Bomoi ya seko, tokomonisa ete tozali na mposa ya kokokisa mpenza mosala na biso. (2 Tim. 4:5) Tokoki kosalisa baoyo bakoyoka biso mpo na kozwa bomoi ya seko.​—Yoane 17:3.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto