Tóbanda boyekoli ya Biblia na kosaleláká búku Bomoi ya seko
1 Bolingo mpo na bazalani na biso esengeli kopusa biso na kozongela nokinoki baoyo bazali na nzala mpe na mposa ya solo mpo na kosunga bango. (Mat. 5:6) Tosengeli kobosana te ata mwa bosepeli moke oyo tomoni mpe kobatela yango soki tolingi te ete bosepeli na ye esila. Mpo na kolónga, tosengeli komibongisa.
2 Mokano na biso esengeli kozala ya kobanda boyekoli ya Biblia. (Mat. 28:20) Ebimeli ya liboso ya búku Bomoi ya seko ezalaki koloba na maloba na yango ya ebandeli ete: “Na bongo búku oyo ya boyekoli ebongi mpo na bato banso, bilenge to mibange, ezala batánga mingi to batánga mingi te.” Na yango, ekomeli ya búku yango ezali kokómisa boyekoli pɛtɛɛ mpe ezali kopesa nzela ata na bato ya sika ete básangana na mosala yango. Tokolónga na kobanda boyekoli ya Biblia soki tozali kosala bozongeli ya sika na molende.
3 Lolenge nini kobanda boyekoli? Na ntango ya bozongeli na biso, mingimingi, ezali malamu kobanda lisoló likoló na likanisi moko, to motuna moko, oyo tolobelaki na boumeli ya bokutani na biso ya liboso. Mbala mosusu tolobelaki ezalela ya bakufi mpe totunaki motuna oyo: “Elikya nini ezali mpo na balingami na biso oyo basili kokufa?” Tólimbola ete lisekwa ezali ete elikya oyo ezangi moboko; Biblia ezali kolobela makambo mingi ya lisekwa oyo masilaki kosalema. Tótalela bililingi ya bankasa 167 kino 169. Na nsima tósolola na ntina ya makambo mazwami na paragrafe 1 mpe 2, na lokasa 166. Soki moto yango asepeli, tósenga ye ete tózongela ye mpo na koya kokóba lisoló.
4 Mbala mosusu tosololaki na tata moko to na mama moko oyo bamonisaki ete batungisami mingi na ntina na mikakatano oyo mizali kobakisama oyo bakutanaki na yango mpo na kobokola bana. Na ndakisa tokoki koloba na maloba na biso moko ete:
◼ “Baboti nyonso bazalaka na mposa ete bapesa epai na bana na bango makambo malamu oyo masengeli. Biblia ezali na batoli oyo ezali kopesa nzela na baboti ete básalisa bana na bango na kozala na bomoi moko malamu, bomoi oyo ezali na ntina. Mpo na ntina yango, tozali mpenza kolendisa mabota ete bayekolaka Biblia elongo. [Bendá likebi likoló na paragrafe 23, lokasa 246.] Boyebi oyo ezwami na nzela wana ekopesa mapamboli ya seko na libota mobimba.” Tótánga Yoane 17:3. Tólimbola epai na molobani na biso ete tozali pene na kozonga lisusu komonisa na libota na ye lolenge nini kobanda boyekoli.
5 Soki tozali elenge to mosakoli ya sika mpe soki, mbala ya liboso, tolobelaki na mokuse elikya ya paladiso, tokoki kofungola búku na lokasa 3 mpe koloba na ndakisa na elobeli ya pɛtɛɛ ete:
◼ “Biblia elaki ete baoyo bazali kosala mokano ya Nzambe bakoki kolikya kozala na bomoi kati na mokili ya sika lokola oyo epai bolamu mpe kimya ekozala mingi. Búku oyo ezali komonisa likambo tosengeli kosala soki tolingi kozwa bolamu yango.” Tólimbola na mokuse lolenge nini boyekoli esalemaka mpe tósenga ete tomeka kosala yango elongo na ye.
6 Lokola tozali bayekoli ya Yesu, tozali kati na mokumba ya kosalisa bazalani na biso. (Lom. 10:14) Soki totikaki mokanda moko, to soki tosalaki bobele lisoló mpamba elongo na moto moko, tozali na mokumba ya kolona bosepeli na ye. (Mat. 9:37, 38) Soki tozali kokokisa malamu mokumba yango, bato nyonso bakoki kozwa matomba malamu.—1 Tim. 4:16.