Tóyamba malamu bato na ntango ya Ekaniseli
1 Na bambula oyo euti koleka, kati na bayangani misato na Ekaniseli bobele moko nde azalaki mosakoli ya nsango malamu. Mbala mosusu ekozala bobele bongo na mbula oyo. Basusu bakoki koyangana na molulu yango na kolandáká lilako ya mozalani moko to moyebani moko oyo afandaka epai mosusu, nzokande basusu babyangami na mosakoli moko ya lisangá. Basusu basili kobatisama, kasi basanganaka lisusu na mosala ya kosakola te. Toyambaka na motema na biso mobimba baoyo bazali kotosa etinda oyo ya Yesu: “Bosalaka boye mpo na ekaniseli na ngai.”—1 Kol. 11:24; Lom. 15:7.
2 Basali na mosala ya koyamba bato basengeli kozala pene mpo na kotombela boyei malamu na bato nyonso mpo mingimingi epai na moto nyonso ya sika, nokinoki na ntango akómi na Ndako ya Bokonzi. Nzokande, biso nyonso tokoki komonisa ezaleli ya koyamba bapaya na ntango ya Ekaniseli. (Lom. 12:13) Na lolenge nini?
3 Na mpokwa wana, basusu bakozala na mosala mingi mpo na kokende koluka bato ya motema malamu. Basusu bakoki kokóma na ngonga malamu mpo na koyamba bapaya oyo bakozala bango moko. Na ntango moto moko oyo toyebi ye akoti na Ndako ya Bokonzi, tóyamba ye na boninga mpenza mpe tóbanda lisoló mbala moko. Tótuna ye soki ayebi mosangani moko na lisangá. Soki ayebi, tózala na ye elongo kino mosakoli yango akoya. (Talá Luka 10:35) Soki ayebi moto moko te, mpo na nini te kosenga na ye ete afanda pembeni na biso na boumeli ya likita? Tólimbwela ye ntina ya limpa mpe vinyo oyo esalelami na ntango ya likita. Akoki kozala na mposa ya lisungi na biso mpo na koluka mikapo ya Makomami oyo miyebisami na molobi.
4 Ntango Ekaniseli esili, tómonisa ye ete tosepeli ndenge azalaki elongo na biso. Tokoki koyanola na mituna na ye oyo mitaleli mosala na biso. Soki tomonisi ye mpenza bosepeli, tokoki mbala mosusu kobanda lisoló ya Biblia kati na Ndako ya Bokonzi to epai mosusu. Bandeko oyo bazalaka bayambi malamu basilaki kobanda boyekoli ya Biblia ya malamu koleka na kozwáká likanisi wana ya kitoko. Yambo ete akende, tólakisa ye epai na basakoli mosusu mpe tóbyanga ye na boninga mpenza ete azonga lisusu.
5 Tóyamba na esengo bandeko na biso basi to mibali oyo bayanganaka lisusu te pɔ́sɔ na pɔ́sɔ na makita to oyo basanganaka lisusu te na mosala ya kosakola uta mwa ntango. Na esika ete tótuna bango ntina oyo bayaka te, tólakisa bango bobele ete tosepeli komona bango lisusu. Ekoki kozala ete likanisi moko ya lisukúlu ya Ekaniseli ekopusa bango na kotalela lisusu boyokani na bango elongo na Yehova. Koyamba ya mɔ́tɔ mpe bosepeli ya solo oyo biso tokobombela bango mbala mosusu ekosimba mitema na bango. Tóloba na bango ete tokosepela komona bango lisusu.—Lom. 1:11, 12.
6 Lisukúlu moko ya sipesiale oyo ezali na motó ya likambo “Nsuka ya mangomba ya lokuta ebɛlɛmi” likosalema kati na masangá nyonso na mokolo mwa 23 Apríli. Tóbyanga na lisukúlu yango baoyo nyonso bakoyangana na Ekaniseli mpe tókamata bibongiseli mpo ete bazala wana. Tozali kolikya ete baoyo nyonso bakoyangana na makita wana ya ntina mingi bakomiyoka malamu mpe bakoyoka esengo na elimo ya bondeko ya mɔ́tɔ oyo ezali kati na libota ya Yehova.—Nzembo 133:1.